Lingala: Bible for 1 Corinthiens, 1 Thessaloniciens, 2 Corinthiens, 2 Thessaloniciens, Ba filipe, Bagalatia, Baloma, Colosiens, Efezo, Emoniseli, Luka, Malako, Matayo, Misala ya batoma, Petelo ya mibale, Petelo ya yambo, Timothe ya mibale, Timoté ya yambo, Yoan, Yoane ya misato, Yuda

Formatted for Translators

©2022 Wycliffe Associates
Released under a Creative Commons Attribution-ShareAlike 4.0 International License.
Bible Text: The English Unlocked Literal Bible (ULB)
©2017 Wycliffe Associates
Available at https://bibleineverylanguage.org/translations
The English Unlocked Literal Bible is based on the unfoldingWord® Literal Text, CC BY-SA 4.0. The original work of the unfoldingWord® Literal Text is available at https://unfoldingword.bible/ult/.
The ULB is licensed under the Creative Commons Attribution-ShareAlike 4.0 International License.
Notes: English ULB Translation Notes
©2017 Wycliffe Associates
Available at https://bibleineverylanguage.org/translations
The English ULB Translation Notes is based on the unfoldingWord translationNotes, under CC BY-SA 4.0. The original unfoldingWord work is available at https://unfoldingword.bible/utn.
The ULB Notes is licensed under the Creative Commons Attribution-ShareAlike 4.0 International License.
To view a copy of the CC BY-SA 4.0 license visit http://creativecommons.org/licenses/by-sa/4.0/
Below is a human-readable summary of (and not a substitute for) the license.
You are free to:
The licensor cannot revoke these freedoms as long as you follow the license terms.
Under the following conditions:
Notices:
You do not have to comply with the license for elements of the material in the public domain or where your use is permitted by an applicable exception or limitation.
No warranties are given. The license may not give you all of the permissions necessary for your intended use. For example, other rights such as publicity, privacy, or moral rights may limit how you use the material.

Matayo

11Mokanda na ebandeli na mbotama na Yesu Christo mwana na Dawidi mwana na Abalayama. 2Abalayama azalaki tata na Isaya, Isaya tata na Yakobo, Yakobo tata na Yuda mpe bandeko na ye. 3Yuda tata azalaki tata naPharès na Zara, mama na bango Tamar. Pharès azalaki tata na Esrom, Estron tata na Aram.4Aram tata na Aminadab. Aminadab tata Naasson, Naasson tata na Salmon. 5Salmon tata na Rahab bazalaki baboti ya Boaz. Boaz azalaki tata na Obed mama na Obed ezalaki Ruth. Obed azalaki na Jesse. 6Jesse azalaki tata na Dawidi, bongo Dawidi tata na Salomo na nzela ya mwasi ya Urie.7Salomo azalaki tata na Roboam, Roboam azalaki tata na Abia azalaki tata na Asa. 8Asa tata na Josaphat, Josaphat azalaki tata na Joram, Joram azalaki koko na Osias.9Ozias azalaki tata na Joatham. Joatham tata na Achab, Achab azalaki tata na Ezechias, 10Ezechias azalaki tata na Manasse, Manasse azalaki tata na Amon, Bongo Amon azaki tata na Josias. 11Josias azalaki tata na Jechonias na bandeko na ye, na tango na boumbu na Babylone.12Sima ya boumbu ya Babylone, Jechonias azalaki tata na Salathiel. Salathiel koko na Zorobabel, 13Zorobabel tata na Abiud, Abiud tata na Eliakim. Eliakim azalaki tata na Azor. 14Azor azalaki tata na Sadok. Sadok azalaki tata na Achim. Achim azalaki tat na Eliud.15Eliud azalaki tata na Eléazar. Eléazar azalaki tata na Matthan. Matthan azalaki tata na Jacob. 16Jacob azalaki tata na Joseph mobali na Maria oyo abota Yesu. Yesu azali oyo bazalaki kobenga Chlisto. 17Ebandeli na mbotama kobanda na Abalayama tii na Dawidi, mabota zomi na minei. Kobanda Dawidi tii na boumbu na Babylone, mabota zomi na minei.18Kobanda na boumbu na Babylone tii na Klisto , mabota zomi na minei. Mbotama na Yesu eyaki na lolenge oyo: Mama na ye Maria aponamaki na libala na Joseph yambo bakutana. Ekomaki ye na zemi na nguya na molimo mosantu, 19mobali na ye Joseph azalaki mobali na sembo. Alingaki kopesa mwasi na ye nsoni te na miso na bato. Bongo, azwaki mokano ya kotika mwasi na ye na kuku.20Lokola azalaki kokanisa makambo wana, anzelu na Nzambe abemeli ye na ndoto mpe alobi na ye : «Joseph mwana na Dawidi; banga te kozwa Malia lokola mwasi na yo. Zemi azali na yango euti na molimo mosantu. 21Akobota mwana mobali mpe nkombo na ye Yesu. Pamba te, akobikisa bato na masumu na bango.22Nionso eyaki mpo na kokokisa oyo ekomama na basakoli mpo na Mokonzi. 23Tala moseka akozwa zemi, akobota mwana mobali; bakobenga ye Emmauel (Nzambe na biso elongo).24Joseph alamuki na pongi mpe asali oyo anzelu na Nzambe atindaki ye asala. Azwaki ye lokola mwasi na ye. 25Kasi afandaki na ye lokola mwasi na mobali te, kino Maria abotaki mwana mobali mpe apesaki ye nkombo Yesu
21Yesu abotamaki na Bethleem na Yudea na tango ya Mokonzi herode. Ba nganga miloto baytaki na mboka ya ebimelo na moyi, bakomaki na Yelusaleme balobi: 2«Mokonzi na bayuda abotami na esika nini? Tomonaki monzoto na esika moyi ebimelaka, toyei kogumbamela ye.» 3Tango nkumu Herode ayoki makambo wana, atungisamaki na motema, ye na bato na nyonso ya Yelusaleme.4Herode abeng bakonzi ya banganga nzambe mpe balikisi mibeko nyonso mpe atuni bango: «Wapi esengelaki klistu abotama?» 5Bayanoli: «Na Beteleme na etuka ya Judea, tala ndenge ekomama na mikanda ya basakoli: 6"Eh Beteleme, mabele ya Judea, ozali mboka ya pamba te na kati ya bituka ya Judea, solo mokonzi monene akobima na yo, mpe akokamba ekolo ya Isalaele.»7Bongo Herode asangisi banganga mayele mpo atuna bango na ngonga nini bamonaki monzoto. 8sima atindi bango na Beteleme alobi: «Bokende, botuna malamu mpo na mwana. Soki bomoni ye, bokoyebisa ngai mpo nga mpe nakende kogumbamela ye.»9Sima ya koyoka nkumu, bakobi mobembo mpe monzoto oyo bamonaki ezalaki liboso na bango mpe e ekei kotelema na esika oyo mwana azalaki. 10Tango bamoni monzoto, batondisami na esengo mingi.11Bayingeli na ndako, bamoni mwana na Maria, mama na ye. Bafukami mpe bakumisi ye. Bafungoli mabenga, bazwi biloko na bango, bapesi ye makabo oyo; wolo, paka mpe malasi. 12Nzambe akebisi bango bazonga epai na Herode te; yango wana bazongaki na ekolo na bango na nzela mosusu.1314Sima ya bokeyi na bango, mwanze ya mokonzi abemeli Jozefu na ndoto mpe alobi: «Telema, kamata mwana, na mama naye, bokima na Ezipito. Bokenda kofanda kuna kino nakoloela bino mpo ete Herde azali kolukamwana mpo aboma ye.» Bobele na butu wana, Jozefu akamati mwana mpe mama na ye mpe bakimi na Ezipito. 15Bafandaki kuna ti tango Herode akufaki. Makambo yango esalamaki mpo na kokokisa maloba oyo Mokonzi alobaka na monoko ya basakoli: «Mwana na ngai bima na Ezipito.»16Sima Herode asosoli te banganga minzoto batosi ye te, asiliki makasi, mpe atindi bakenda koboma bana ya mibali ya mibu mibale kokita oyo bazalaki na Beteleme mpe na etuka mobimba, kolanda tango oyo banganga minzoto balobaki.17Yango nyonso esalami ndenge mosakoli Yilimia alobaki: 18«Bayoki mongongo na Rama, bilelo na bilelo makasi, Rachel azali kolela bana na ye, aboyi balendisa ye mpo bana bazali lisusu te.»19Tango Herode akufi, mwanze ya Mokonzi abimeli Jozefu na Ezipito mpe alobi na ye: 20«Telema mpe kamata mwana na mama na ye mpe kenda na Isalaele, mpo oyo balingaki kobingisa bomoi ya mwana, basi bakufi. 21Jozefu akamati mwana na mama na ye, bakei na ekolo ya Islaele.22Tango ayoki Akelusi akomi nkumu na ebonga ya tata na ye Herode,Jozefu abangi kokende, sima Nzambe kokebisa na ndoto, akei na etuka ya Galilea. 23mpe afandaki na engumba ya Nazarete. Makambo oyo esalami mpo na kokokisa maloba na basakoli oyo elobi: Bakobenga ye Nazareen.
31Na mikolo wana,Yoane Mobatisi ajalaka koteya kati na lisobe ya Yudea na kolobaka: 2«Bobongola mitema, pamba te bokonji na likolo ebelemi.» 3Nzoka nde, tala oyo balobelaki na mosakoli Isaya ete «Mongongo ya ye oyo ejali konganga na lisobe"bobongisa balabala na Mokonji, sembola banzela na ye"»4Tala, Yoane alataki monkoto ya nkunja ya kamela mpe mokaba ya mposo ya nyama na liketo na ye,bilei na ye ejalaki makonko na mafuta ya njoi. 5Na yango, Yelusaleme, Yudea mobimba mpe etuka njinga njinga na ebale ya Yolodani bajalaki kokenda epai na ye. 6Babatisamaki na ye kati na ebale ya Yolodani, na ndenge bajalaki koyambola masumu na bango.7Kasi tango amoni ebele ya bafalisayo mpe basaduki koya na ye mpo na libatisi, alobi na bango: «Bino bakitani ya nyoka ya ngenge, nani akebisi bino bokima kanda ejali koya? 8Bobota mbuma malamu ya bongwana. 9Mpe bokanisa te nakoloba mpo na bino moko. Tojali na tata na biso Abalayama, pamba te, najali koyebisa bino ete Njambe ajali na makoki ya kotelemisa mpo na Abalayama bana ata na mabanga oyo.10Kala soka etiama pembeni ya misisa ya banjete, boye njete nyoso oyo ekobata mbuma malamu te ekokatama mpe ekobwakama kati na moto. 11Ngai najali kobatisa na mai mpo na kobongola motema. Kasi oyo akoya sima na ngai ajali na nguya koleka ngai, mpe ngai najali kutu na makoki te ya kolata sapato ya ye. Akobatisa bino na Molimo Mosantu mpe na moto. 12Epupelo ejali na loboko na ye pene pene ya kopetola solo etumbelo. Kasi akojikisa matiti na moto oyo ekoki kokufa te.13Sima Yesu akomi na Galilea na ebale ya Yolodani mpo babatisa ye na Yoane. 14Kasi Yoane amekaki penja penja koluka koboyela ye, alobi: «Ngai najali na mposa najua libatisi na yo, mpe yo oyei na ngai?» 15Yesu ajongisi mpe alobi: «Tika esalema sika oyo, mpo ejali malamu mpo na biso tokokisa bosembo nyonso.» Na boye Yoane andimelaki ye.16Sima ya kojwa libatisi, Yesu abimi mbala moko na mai mpe tala, likolo efungwamelaki ye. Molimo na Njambe kokita na lolenge na ebenga evandi likolo na ye. 17Tala, mongongo moko ebemi na likolo koloba: «Tala mwana na ngai ya bolingo. Asepelisaka ngai.
41Na sima Molimo akumbaki Yesu na esobe mpo amekama na Zabolo. 2Sima ya mikolo tuku minei ya kokila, ayokaki nzala. 3Satana apusanaki pe alobi na ye: «Soki ozali mwana na Nzambe pesa mitindo na mabanga ebongwana bilei. 4Kasi ayanolaki: «Ekomama, moto akobika kaka na bilei te, kasi na liloba ya Nzambe.5Bongo Zabolo akumbi ye na engumba esantu pe akitisi ye na songe ya ndako nzambe. 6Ayebisi ye: «Soki ozali mwana na Nzambe,pumbwa tii na nse, nzambi ekomama: Akopesa mitindo na ba-anzelu na ye basenzela yo pe bakokumba yo obeta libanga te.»7Kasi Yesu ayanoli: «ekomami lisusu«okoki komeka Mokonzi Nzambe na yo te.» 8Zabolo amatisi ye lisusu na songe ya ngomba likolo penza, pe alakisi ye bokonzi ya mokili na bisengo na yango. 9Ayebisi ye: «Nakopesa yo bomengo yonso oyo soki ogumbameli ngai.»10Yesu alobi: «Satana, longwa! Nzambi ekomama: "Okogumbamela bobele Mokonzi Nzambe na yo pe okotosa bobele ye."» 11Na mbisa Zabolo atiki ye, pe ba-anzelu bayaki kosunga ye.12Tango Yesu ayoki té bakweyi na Yoane, abendani na Galileya. 13Atikaki Nazarete akeyi kofanda na Kapalanaume, pembeni ya mbu ya Galileya na etuka ya Zabuloni pe Nefetali.14Esalamaki boye po ete maloba ya mosakoli Esaya ekokisama. 15«Mabele ya Zabuloni pe Nefetali kuna na mbu koleka Yolodani; Galileya ekolo ya bapagano. 16Bato oyo bafandi na kati ya molili, bamoni moyi engali, pe epayi ya baye bazali na etuka pe kati molili ya somo, moyi engengeli bango.17Na tango wana, Yesu abandi koteya alobi: Botika masumu, nzambi bokonzi na Nzambe epusani.18Lokola azalaki koleka pembeni nya mbu ya Galileya, amoni bandeko babale, Petelo na Andele. Bazalaki koloba namonyama na kati ya mbu po bazalaki balobi. 19Yesu alobi na bango: «Bolanda ngai pe nakokomisa bino balobi ya bato.» 20Saaipi batikaki minyama pe balandi ye.21Wana Yesu azalaki kokoba kotambola, amoni bandeko babale, Jaki na Yoane bana ya Zebede, na kati ya bwato kobongisa minyama, abengi bango. 22Sasaipi, batiki bwato na tata na bango pe balandi ye.23Yesu atambolaki na Galileya mobimba koteya na ba ndako Nzambe, kosakola sango malamu ya bokonzi na Nzambe pe kobikisa bakoni na bakakatani nyonso. 24Lokumu na ye epanzanaki Suliyamobimba pe bato bamemelaki bakoni ya lolenge nyonso, pe Yesu abikisaki bango. 25Etuluku ya bato elandaki ye wuta Galileya, Dekapoli,Yelusalema, Yudea pe koleka Yolodani.
51Na tango Yesu amoni etuluku ya bato, amati na ngomba pe afandi. Bayekoli bayei na ye. 2Ye afungoli monoko pe abandi koteya bango: 3«Esengo na babola na molimo, pamba te bokonzi na likolo ezali po na bango. 4Esengo na baoyo bazali kolela, mpo ete bakobondisama.5Esengo na baoyo bazali na komikitisa, mpo ete bakozwa bomengo ya mokili oyo. 6Esengo na baoyo bazali koyoka nzala mpe mposa ya bosembo, mpo ete bakotondisama. 7Esengo na bato bayokelaka mawa, zambi bakoyokela bango mawa. 8Esengo na baoyo bazali motema peto, zambi bakoyokela bango mawa.9Esengo na baoyo balukaka kimia, mpo ete bakobianga bango bana na Nzambe. 10Esengo na baoyo bazali konyokolama na ntina na sembo na bango, zambi bokonzi na likolo ezali mpo na bango.11Esengo na bino, soko bato bajali kofinga bino, mpe konyokola bino, to kobuka lokuta na makambo nyonso ya mabe likolo na bino na ntina na ngai. 12Bosepela mpe botondisama na esengo makasi mpo ete bomengo na bino ezali solo makasi kuna na likolo. Mpo ete Ezali ndenge moko bato banyokolaki basakoli oyo bazalaki liboso na bino.13Bino bozali mungwa na mokili, soko mungwa ezangi elengi, ekobongo lisusu boni? Ekomi eloko ezangi ntina, bobele ete ebwakama libanda mpo bato bato banyata yango na makolo. 14Bino bozali mwinda na mokili, mboka batongi likolo ya ngomba, ekoki kozipama te.15Bobele bongo, bapelisaka mwinda te mpo babomba yango na nse na kitunga? Bongo te, batiaka yango likolo mpo engengela bato nyonso bazali na ndako. 16Boye tika mwinda na bino engengela bato mpo bamona misala kitoko na bino mpe bakumisa Tata na bino oyo azali na likolo.17Bokanisa te ete nayei mpo naboma mobeko to basakoli, nayei mpo nakoboma te, kasi mpo na kokokisa yango. 18Na solo, nazali koloba na bino na tango nyonso likolo mpe mokili ikoumela, liloba moko te, ata ya moke makasi, ekolongwa na mobeko, kino makambo nyoso ekokisama.19Yango wana oyo akobuka moko na moke ya mibeko, mpe akolakisa basusu basala ndenge moko, akozala moto na moke na ntina na bokonzi na likolo. Kasi ye oyo akosalela yango, mpe akoteya basusu mpo basala bongo, akozala moto monene kati na bokonzi na likolo. 20Nazali koyebisa bino, soko sembo na bino eleki sembo ya bakomeli mibeko to Bafalizao te, bokoki kokota na bokonzi na likolo te.21Boyokaki koloba na tango ya kala: «Koboma te», mpe ete: «Kasi oyo akobama moninga, akoleka na esambiseli» 22kasi ngai nabondeli bino, moto nyonso akoyaka nkanda epai ya ndeko na ye akozwa esambiseli; ye oyo okoloba na ndeko na ye: «Moto pamba» akoki koleka liboso na ba juzi mpo asambisama. Ye oyo akoloba na ndeko na ye: «Ozali zoba» akokota na lifelo.23Bobele bongo soko okei kopesa mabonza mpe okanisi makambo mabe kati na ndeko na yo, 24tika makabo na yo na etumbelo, kenda naino kobongisa na ndeko wana liboso. Na sima yaka kopesa mabonza na yo.25Yokana noki na ndeko na yo oyo afundi yo tango bozali na nzela mpo na kosamba, soko te akotika yo na juzi, mpe juzi akotika yo na pulusi mpe ye, akobwaka yo na ndako eyindo. 26Solo, nalobi na yo: Okobima kuna te, soko ofuti mosolo basengi te.27Bosili koyoka ete: «kosala ekobo te» 28Kasi nalobi na bino ete moto nyoso nani akotala mwasi mpe ati makanisi na posa na ye, asili kosala na ye ekobo na motema na ye.29Soko liso na yo moko etindaka yo na masumu, longola yango mpe bwaka yango mosika na yo; zambi eleki malamu mpo na yo, eteni na nzoto ebeba koleka nzoto mobimba ekota lifelo. 30Soko loboko na yo mobali ezali kotinda yo kosala masumu, longola yango mpe bwaka yango mosika na yo. Ezali malamu eteni na nzoto na yo ebeba koleka nzoto mobimba kokota na lifelo.31Elobama mpe boye: «Moto nyonso oyo aboyi mwasi na ye akomela ye mokanda ya koboma libala» 32Kasi nalobi na bino moto akoboya mwasi bobelesoko akuti ye na mobali mosusu, akomisi ye mwasi na ekobo; mobali oyo abali mwasi baboyi, asali ekobo lokola.33Na bongo, bosili koyoka koloba na ba mpaka: «Bokata seleka na lokuta te kasi bosala yango liboso ya Mokonzi.» 34Nzoka nde, bolapa ndai na likolo te mpo ezali gbende ya Nzambe. 35Na mabele te, ezali efandelo ya makolo na Nzambe; na Yelusalema te, mpo ezali engumba ya Mokonzi monene.36Kokata seleka mpe te na kotanga mutu na yo, zambi yo moko okoki kokomisa suki pembe na mutu na yo te. 37wana ezali bino koloba, boloba sembo «Iyo, iyo» to «Te, te» oyo nyonso ebakisamaka euti na satana.38Bosili koyoka koloba: «Liso mpo na liso, lino mpo na lino.» 39Kasi ngai nalobi na bino kowelana na moto mabe te, moto nyonso akobeta yo mbata na mbanga ya mobali, pesa ye mosusu lokola.40Soko moto amemi yo na likambo mpo abotolo yo kazaka, tika azwa mpe mokoto na yo. 41Ye oyo alingi otambola na ye metele nkoto moko, sala na ye lisusu nkoto mibale. 42Moto oyo akosenga epai na yo, pesa ye yango, mpe koboya kodefisa te, oyo alingi kodefa epai na yo.43Bosila koyoka koloba ete: «Okolinga moninga na yo mpe okoyina monguna na yo.» 44Kasi ngai nalobi na bino: «Bolinga banguna na bino mpe bokobondela mpo na banyokoli na bino." «Bopambola baoyo bazali kobwakela bino masuma. Sala bolamu epai na baoyo bazali koyina bino» 45Na lolenge wana bokokoma bana na Tata oyo aleki likolo. Zambi atindaka moi likolo na bato malamu mpe bato mabe, likolo ya bato bazali sembo mpe mpo na bato bazali sembo te.46Zambi soko bozali kolinga bobele baoyo balingaka bino, litomba nini bokoki kozwa na yango? Bobele bongo, bakongoli na mpako basalaka. Bino bosalaka malamu koleka bango. 47Mpe soko bokopesaka losako bobele na bandeko na bino, nini ya malonga bosali? bapagano mpe basalaka bongo. 48Na bongo bozala bato malamu, lokola Tata na bino na lokolo azali malamu.
61Batela kosalela misala na sembo na liboso na bato, po na koyeba yo. Soki okozwa lifuti te pene na tata na yo ajali na likolo. 2Soki ozali kopesa moto eloko,kobeta ngonga na liboso na yo, ndenge bato oyo bakosalaka na synagoga, na balabala po bakumisa bango na bato. Solo nazali koyebisa bino, bango basi bazwi lifuta na bango.3Po na bino, tango bozali kopesa, tika loboko ya mwasi eyeba te oyo loboko ya mobali ezali kopesa. 4Po ete likabu na bino ezala na kuku. Bongo tata na bino oyo atalaka na kuku akofuta bino.5Tango bozali kobondela, bozala lokola bakosi te,balingaka kobondela batelemi na synagoga. Pe na suka ya balabala. Po bayebana na bato. Ya solo, nazali koyebiasa bino, basi bazwi lifuta nabango. 6Kasi bino, tango bozali kobondela, kota na ndako na bino pe kanga yango, pe bondela tata na bino oyo azali na esika na kuku, oyo amonaka nyonso ya kuku akofuta bino. 7Tango bozali kobondela kolekisa maloba pamba pamba te ndenge bapagano basalaka, bakanisaka ndenge balobaka ebele nde Nzambe akondima mabondeli na bango.8Po na yango, bomekola bango te, tata na bino ayebi eloko nini bozali na posa na yango; yambo bosenga ye yango. Bobondelaka boye: 9«Tata na biso azali na likolo, tika nkombo na yo ezwa lokumu, 10tika bokonzi na yo eya. Tika mokano na yo esalama awa na nse pe kuna na likolo.11Pesa biso lelo bilei ya mokolo na mokolo. 12Limbisa mabe na biso ndenge tolimbisaka pe baoyo basalaka biso mabe. 13Kotika biso te na komekama, kasi bikisa biso na moyini. Na yo ezali bokonzi, na nguya pe nkembo seko na seko, amen.14Soki bokolimbisa bato mabe na bango, tata na bino oyo azali na lokolo akolimbisa bino pe. 15Kasi soki bokolimbisa mabe na baninga te, tata na bino pe akolimbisa bino mabe na bino te.16Koleka lisusu tango bozali kokila, bolakisa bizaleli ya mawa te, ndenge bato mabe basalaka, babalusaka bilongi na bango po ete bato bamona bango bazali kokila. Ya solo, nazali koloba na bino, basi bazwi lifuti na bango. 17Kasi bino, soki bozali kokila, bopakola mafuta pe bosokola bilongi na biono na mayi. 18Po ete bolakisa na bato te solo bozali kokila. Kaka tata na bino oyo azli na kuku, akofuta bino.19Bolokota bomengo na mokili te pamba te banyama ya mbabele ekobebisa yango to bamiyibi bakoyiba yango. 20Na yango bolokota bomengo na likolo oyo ata nyama moko te akobebisa yango pe moyibi moko te akokoka koyiba yango. 21Bongo esika bomengo ezali, motema pe motema ekozala.22Liso ezali mwinda ya nzoto, Soki liso ezali malamu, nzoto mobimba ezali pole penza; 23Kasi soki liso ezali mabe, nzoto mobimba ekozala na molili. Yango wana, soki pole ezali kati na yo ezali molili, boni molili koleka ezali kati na yo? 24Moto moko te akoki kosalela bakonzi mibale na mbala moko. Akoyina moko pe akolinga mosusu to akokangama na moko pe akosundola mosusu. Bokoki kosalela Nzambe pe mbongo na mbala moko.25Yango wana nazali koyebisa bino, bomitungisa te po na bomoi na bino, po na oyo bokolia pe bokomela, pe lisusu po na bilamba ya kolata. Bongo bomoi eleki bilei na malamu pe nzoto eleki bilamba. 26Botala bandeke na likolo, balonaka te, babukaka te, bakongolaka te nkona na bilanga, Kasi Tata na bino na likolo aleisaka bango, bongo bino boleki bandeke te?27Nani kati na bino, akoki kobakisa ngonga muke na bomoi na ye? 28Po na nini bozali na mawa na tina na bilamba? Kanisa ndenge fololo na bilanga, ndenge ekobata pe ndenge ekolaka, esalaka te, etongaka. 29Kasi, nalobi na bino boye Salomo na Nkembo na ye alataki lokola bango te.30Soki Nzambe azali kolatisa matiti na bilanga oyo ezali wana lelo oyo, bongo lobi ebwami na moto, Ndenge nini akozanga kolatisa bino, bato na kondima moke? 31Bomitungisa te na koloba: «Tokolia nini to tokomela nini, to eloko nini tokolata?»32Biloko oyo nyonso bakolukaka yango na bapagano; Tata na bino na likolo, ayebi posa na bino. 33Luka liboso bokonzi pe sembo na Nzambe; bongo, biloko nyonso ekopesamela bino. 34Bomitungisa te po na lobi, pamba te mokolo na mokolo ezali na makambo na yango.
71Bosambisa te mpo ete basambisa bino te. 2Bokosamba lolenge bokosambisaka mpe na emekelo bokomekelaka baninga, nde bakomekela bino;3Boni omoni lokasa na liso ya moninga wa yo, tango libaya lijipi oyo ya yo? 4Boni olobi na moninga wa yo, alongola lokasa lojali na liso lia ye kasi libaya lijipi liso lia yo? 5Yo mokosi! longola naino libaya na liso lia yo sima olongola oyo ya ye.6Biloko bisantu bikoki kopesa na bambwa te. Mpe biloko bia bino bia mutuya na banguku te, mpo ete babebisa biango na makolo ma bango mpe na sima babongwani mpo na koboma bino.7Bosenga mpe bakopesa bino, boluka mpe bokozwa, bobeta ekuke mpe bakofungolela bino. 8Oyo asengi bakopesa ye, oyo aluki akomono, oyo abeti ekuke bakofungola ye. 9Nani akopesa mwana na ye libanga soki asengi ye lipa? 10To asengi mbisi apesi ye nyoka?11Bato mabe, bokopesa bana ba bino biloko malamu, bongo tata wa bino ajali na likolo akoki kopesa biloko malamu te na baye bakolomba ye? 12Boye, oyo elingi bino batu basalela bino, bosalela mpe mpo na bango lokola. mpo ete mobeko mpe basakoli balobi bongo.13Boingela ekuke moke mpo ete njila ya monene ejali komema na libebi; ebele bakoleka njela yango. 14Mpo ete ekuke ejali moke mpe njela nkaka mpo komema na bomoi, moke bakoleka yango.15Bokeba na basakoli ya lokuta, bakoya na poso ya mpate, kasi bajali bankosi mpo na koboma. 16Bakoyebana na misala mia bango. Bokoki kobuka mbuma na mowiti na njete ya njube te, to mbuma na mosuke na makasa mpamba? 17Njete malamu ekobata mbuma malamu, njete mabe ekobota mbuma mabe;18Njete malamu ekoki kobota mbuma mabe te, to njete mabe ebota mbuma malamu. 19Njete oyo ekobota mbuma malamu te, ekokatama mpe ekobwakama na moto. 20Lolenge wana bokoyaba bango na mbuma na bango;21Banso balobaka: «Mokonji, Mokonji, bakoingela na bokonji bwa lokolo te bobele baoyo basalaka mokano mwa tata wa ngai. 22Ebele bakoloba na mokolo mona: «Mokonj, Mokonji tosakolaki na nkombo na yo te? Tobenganaki milimo mabe na nkombo na yo te? Mpe ebele ya bikamwisi na nkombo na yo te?» 23Nakoloba na bango polele, nayebi bino te, bolongwa pene na ngai, bato mabe.24Oyo nyonso ayoki maloba ma ngai mpe ajali kosalela mango, ajali lokola moto atongi ndako likolo lia libanga. 25Mbula enoki mayi matondi, mpela eyaki, ndako yango ekwei te, mpo etongami likolo lia mabanga.26Kasi moto nyonso ayoki malioba ma ngai mpe asaleli yango te, ajali lokola moto na joba atongi ndako na esika na jelo. 27Mbula enoki, mayi matondi, mpela eyei, ekweisi ndako.28Yesu asilisi koteya, etuluku ya bato bakamwi na mateya na ye. Ateyaki lokola moto ajali na bokonji, 29kasi lokola bakomi na mibeko na bango te.
81Tango Yesu Akiti na ng;omba, etuluku ya bato elandi ye. 2Moto moko azalaki na bokono ya maba aye mpe afukamely Yesu mpe alobi: « Mokonzi, soki soki olingi okoki kobikisa nga». 3Yesu asimbi ye na loboko mpe alobi: « na lingi. bika». kaka na ngonga wana abiki na bokono ya hmaba.4Yesu alobi na ye: « batela sekele koloba na moto moko te ata azali nani. Kende komimonisa epai ya banganga Nzambe mpe opsa likabo ndege Mose alobaki mpona litatoli.5Ekoti Yesu na capernaume, kapitene moko akei kokutana naye mpe abondeli ye. 6Alobi « Mokonzi mosali na ngai alali na ndaku azali na bokono mpe azali kotema te. Azo nnyoikwama mingi». 7Yesu ayebisi ye «na kokende na ndaku nayo mpe nakobikisa ye».8Kasi kapitene ayanoli: « okonzi, ngai nazali nani mpo okota na ndako na ngai, kasi loba kaka liloba moko mosali na ngai akobika». 9Pamba te ngai na tosaka bakonzi na ngai mpe nazali na ba soda, ba tosaka ngai soki na pesi mitindo na moko kende mpe akeyi, na mosusu yaka mpe aye, soki nalobi sala mosala oyo mpe asali yango. 10Tango ayoki ye, Yesu akmwe mpe alobi na ba oyo bazalaki kolanda ye: « nalobi na bino bo solo, na mona nanu moto ya kondima ya boye te ata na Isalaele.11Nalobi na bino, ebele ba wutaka na esika moyi ebimelaka mpe na esika elalelaka, ba kovanda na mesa na Abraham, Isaac mpe Yacobo na bokonzi ya likolo. 12Kasi ba oyo ba sengelaki kozala na bokonzi ya likolo, ba kobwakana libanda na kati ya molili; kuna ekozala milelo mpe kolia mino». 13Yesu alobi na kapitene: « kende lokola ondimi esalemela yo bongo». Mosali abikaki kaka na ngonga wana.14Tango Yesu akomi na ndaku ya Petelo, akuti mama ya mwasi ya Petelo alali azali kobela. 15Yesu asimbi ye na loboko mpe maladi esili. Atelemi mpe abandi kopesa bango bileyi.a 16Tango ekomi pokwa, bato bayeli Yesu ebele ya bamaladi oyo bazalaki kotungisama na milimo mabe mpe na liloba moko, abengani milimo, mpe abikisi bato ya maladi nyonso. 17Na boye akokisaki makambo mosakoli Isaya alobaka: « Ye amemaka mikumba ya bato mpe alongolaka maladi na biso».18Tango Yesu amoni etuluku ya bato bazingeli ye, apesi mitindo bakatisa na ngambo ya mayi na etuka ya Galile. 19Kaka na tango wana mokomo ya mibeko moko ayei epai na Yesu mpe alobi: « moteyi, na kolanda yo esika nyonso okokende». 20Yesu ayanoli ye: « ba nyama ya zamba ezali na mabulu na yango, kasi mwana ya moto azali na esika ya kolala te»21Moko na kati ya bayekoli alobi na ye: « Mokonzi, mpesa ngai nzela na kende kokunda papa na ngai». 22Kasi Yesu ayanoli ye: « landa ngai mpe tika ba kufi ba kunda bango na bango».23Tango Yesu amati na bwatu, bayekoli balandi ye. 24Na mbala moko, mbonge ya makasi etelemi na ebale, mayi ebandi kokota na bwatu mpene edinda wana Yesu azalaki ya kolala. 25Bayekoli balamuisi Yesu mpe balobi naye: « Mokonzi tolingi tokufa, bikisa biso».26Yesu alobi na bango: « mpona nini bozali kobanga, bato bazangi kondima?» atelemi mpe apesi mitindo na mbonge mpe na mayi na mbala moko kimia ekoti. 27Bato bakamwe mingi mpe balobi: « moto ya motindo nini oyo na bonge ya mayi ezali kotosaye?»28Tango Yesu akomi na Ngambo ya laki na mabele ya Gadara. Bato mibale bazalaki na milimo na mabe bakutani na Ye. Bawuti na kunda. bazalaki kotambola mingi. Ata baleki nzela bazalaki kobanga koleka na nzela wana. 29Bazalaki ko nganga mpe koloba : « likambo nini yo na biso, mwana ya Nzambe? Oyaki mpona konyokola biso tango nayo ekoki nanu te»30Ezalaki na mwa mosika ya esika wana, Ebele ya bangulu bazalaki kolia. 31Milimo mabe ezalaki kaka kobondela Yesu mpe kloloba: « soki olingi obengana biso, tinda biso to kota na bangulu». 32Yesu alobi na bango: «bokende » milimo ebimi mpe ekeyi kokota na bangulu; na mbala mùoko bangulu balongue na likolo ya ngomba ba keyi kokweya na mayi mpe bakufi.33bakengeli ya bangulu bakimi, mpe bakeyi na etuka koyebisa bato, makambo nyonso elekaki, mingi balobaki makambu ya bato mibale oyo bazalaki na milimo mabe. 34Bongo bato ya etuka wana baye kokutana na Yesu. Tango bamoni ye ba bondeli ye alongwa na mabele na bango
101Yesu asangi ba dikili na ye zomi na mibale, na ye zomi na mibale, apesi bango bokonzi likolo na milemu mabe, po ete bokengana pe bo bikisa lolenge ya bokono nionso pe bilemba mabe nionso ya nzoto.2Tala ba kombo ya ba dikili zomi na mibale ya liboso simon abangami petolo; andre ndeko na ye jacques, murena ya zebede na jean ndeko na ye. 3Phillipe na barthelemy, thomas na matthieue mofutisi pako, jacques mwana na siphee na thodee. 4Simon le zelzte na judas iscariot moteki na yesu.5Yesu atindi bango zomi na mibala. mesi bango mitindi, bokende na ba pakano te,pe bokota na etuka na samarie te. 6Kasi bokenda bongo na ba mpate babunga ya ndako na israil. 7Tango bazo kende bateya pe baloba bokonzi na likolo ekomi pembeni.8Bobikisa bato ya bokono, bosekwisa bakufi bopetola bato na maba pe bobenga milimu mabe. bo zui ya ofele, bobenga molimu mabe.bo zwi ya ofele, ba pesa pe ya ofele. 9Bomema yolo te falanga te, eloko te na bapoches na bino bozwa saki ya molembo te , to elamba ya mibale, to sapato, to nzete na kopesa mibale,to sapato, to nzete na kopesa mitindu. 10Bongo mosala abongi na lifuti na ye.11Engumba nionso oyo to mboka nionso bakokota baluka mutu malamu oyo akoyamba bino bino boko loyuwa wana. 12Tango ba zokota na ndako ya motu bapesa losaku. 13Soki ndako eyambi biso tika ndako wana ezala na kimia soki ndako eyambi bino te tiko kimia etikala na bino.14Pona batu oyo bazo boya koyamba bino to koboya koyaka maloba na bino, tango bokobima na ndako, na mbaka te na engemba popupula makolo na bino. 15Ya solo, na zo yebisa bino. mboka na sodame na gomore ba kosambisa muke penza, kasi engumbu wa ekosambisa na mokolo ya kosambisama.16Na tina bino na kaki na bakosi, bozala na ekenge lokola ba nioki, pe bato ya komikotika lokola ba ebenga. 17Bomitsia na kokengela liboso na batu pamba te bakoteka bino na basambisi pe ba kobeta bino fimbo na ndako na etangeli na mibeko. 18Bakosambisa bino na bakonzi ya mboka pe bakonzi pona ngai, pona kosunga na matotoli na bango pe bapakano.19Tango bakoba b ino na esambiselo, bomitungisa te na maloba oyo bokoloba, ekopesa mela bina na ngonga wana. 20Ezali bino bokoba te, kasi, molimo na tata na biso akoloba kati na bino21Ndeko akoteka ndiko na ye na kufa, tata na mwana na ye, mwana na tata, pe bana bakotombola baboti na bango pe ekoyesa bango kufwa. 22Bango nionso, ba koyina bini na tina na kombo na ngai kasi oyo akoyika mpiko kino suka, ako bika. 23Tango bakoniokala bino na enyumba, bokina na engumba mosusu. bongo ya solo, na zoloba na bino. boko silisa kotambola ba engumbe ya israel te yambo mwana moto aya.24Dikili azali likolo na mokongi na ye, to mosala ezala likolo na nkolo na ye. 25Ebongi dikiki basunga ye lokola mokonzi na ye pe mosalu lokola nkelo na ye. soki ba bengaki mokonzi na ndako na beelze bul talo boni na mabe ekozala ba kombo ya batu na ndako wana?26Bongo, boganga bango te, pamba te ekozala ekoko te na kuku ekoti kala kombombana. 27Nionso na zo lobela bino na molili bolaba yango na moyi oyo azo kuwuna wuna na bino na litoyi bolokela ye na likolo na ndako.28Bobanga ba oyo bazo nzoto kasi bakoki kobama bomayi ye. kasi bo banga mutu oyo oyo akoki na lifelo. 29Tu bandeko mibale etekama te pona mbongo ? bongo moko kati na bango ba zo kweya te na mabele. 30Ndenge moko na suki ya ba mitu na bino ezali nionso ya kotanga. 31Bobanga te, bino bozali mutuya kole ba ba ndeke.32Mutu nionso akatubela miso na bato ngai pe na kotubela pona ye pena liboso na tata na ngai oyo azali likolo. 33Kasi motu nionso akowangana ngai na miso na tata na ngai oza likolo.34Bokanisa te ke na yaki pona komema kimia na mokili, kasi na yaki nayaki pono komema mopanga. 35Nayaki pona katisia mobulu mwana mobali na tata na ye mwana mwasi na mama na ye mwasi bokilo. 36Ba nguna ya motu ezali bato ya libota na ye.37Oyo akolinga tata na ye to mama na ye koleka ngai, abangi na ngi te, oyo akolinga mwana ya mobali to ya mwasi koleka ngai abangi na ngai te. 38Oyo akome ma ekulusu na ye pona kolanda ngai abongi na ngai te. 39Oyo akozwa bamoyi akobungisa, kasi oyo akobungisa bomoyi na ye akozwa ngango40Oyo akoyamba bino ayambi ngai, oyo ayambie ngai ayambi mutu oyo atinda ngai. 41Oyo ayambi mosakoli pamba te azali mosakoli, akozwa lifuti ya mosakoli oyo ayambi mutu na sembe, pamba te azali mutu na sembo akozwa lifuti ya na sembo.42Motu nionso akopesa kopo na mayi ya piyo na moko na bana moke pamba te azali dikili na ngai ya solo, na yebisi bino, akozanga ata mbala moko te lifuti na ye.
111Tango Yesu asilisi kopesa mitindo na bayekoli naye zomi na mibale, alongwe mpo akende koteya mpe kosakola na bituka na pembeni. 2Yoane mobatisi ayoki bazali kolobela misala ya Kristo. Wana ye na boloko atindi bayekoli na ye epai ya Yesu. 3Batuna ye boye: Ozali oyo asengeli koya to esengeli kozela mosusu?»4yesu ayanoli mpe alobi: « bokende koyebisa Yoane oyo bo moni mpe oyo boyoki. 5Bakufi miso bazali komona, bibosono bazali kotambola, batosa bokono ya mabe bazali kobika, ba kufa matoi bazali koyoka, bakufi bazali kosekwa, mpe sango malamu ezali kosakolama na bato ya mawa. 6Esengo na moto oyo akozala libaku ya mabe mpona ngai».7Awa ba yekoli na Yoane bazongi, yesu abandi koloba na etuluku ya bato na likambo na yoane : « 8Bokendaki kotala na nini na esobe, nzela ya moke oyo mopepe ezali koningisa ? Bo kendaki kotala nini, moto alati bilamba ya kitoko? solo oyo ba lati bilamba ya kitoko avandaka na ndaku ya bakonzi.9Bokendaki kotala nini, mosakoli? boye bokendaki kotala mosakoli ya solo, nalobi na bino boye, Ye aleki mosakoli. 10Pamba te Yoane azali moto oyo Bakoma boye: "Natndi ntoma nagai liboso nayo kobongisela yo nzela.11Na lobi na bino ya solo, na bato oyo nyonso ba botama na basi, moto te aleki Yoane mobatisi. Kasi na kati ya mokonzi ya Nzambe moto ya suka aleka. 12Kobanda Yoane mobatisi azalaki kosakola kino lelo, bokokonzi ya likolo ezali ya kowelela mpe bato ya makasi nde ba kokota.13Kasi basakoli nyonso mpe mibeko basakolaki kino na eleko ya Yoana. 14Soki bolingi koyamba ye, Ezali ye nde Elia, oyo asengelaki koya. 15Oyo azali na matoyi ya koyoka , ayoka.16Na kokokanisa ekeke oyo na nani? ezali lokola bana mike bavandi na zando, bavandi mpe ba bengani moko na moko mpe ba lobi: 17tobetelaki bino polopolo, kasi bo bine te. Tosali matanga boleli te.18Yoane aye aboyi !kolia kwanga mpe komela vino. Bolobi " azali na molimo" 19Mwana ya moto ayei, azo lia mpe komela mpe bolobi, botala azali na lokoso mpe moto na milangwa, moninga ya bafutisi mpaku mpe ya bato ya masumu! kasi mayele na ye ezali komonana na misala.20Bongo Yesu abandi kopamela bato ya bituka mingi oyo ye amonisaki misala ya kokamwa, mpo ete banbopngolaki mitama te. « awa nayo Korazine! 21Mawa nayo Betesaïda! soki misala ya minene oyo esalamaki na etuku ya Tyr na Sidon nde ezalaki epai na bino, mbele balataki saki mpe potopoto mpna kotalisa ete babongoli mitama. 22Yango ,wana na lobi na bino mokolo Nzambe akosambisa mokili etumbu na bino ekoleka ya Tyr na Sidon.23Mpe yo Kapernaume okanisi ete okomata ti na likolo? te, okokita ti na bonka ya bato bakufa, pamba te soki makamuisi masalamaki nayo, mbele ezala kino lelo. 24Yango wana na lobi nayo mokolo Nzambe ako sambisa mokili etumbu na bino ekoleka ya sodomo.25na tango wana Yesu alobi. « E tata, Mokonzi na likolo na nse! napesi yo matondo, obombi makambo oyo na bato ya bwania mpe bato ya mayele, efongoli sekele na bato ba oyo ya mayele moko, mpe na bana mike. 26Solo, Tata olingaki ezala bobele bongo. 27Makambo nyonso epesamelaki na Tata na ngai, moko te ayebi bobele Tata na ngai moto moko te ayebi Tata bobele mwana mpe na ba oyo mwana alingi kolakisa bango Ye.28Boya epai na ngai, bino nyonso oyo bazali kosala mpe bomemi mikumba ya kilo, na kopesa bino bopemi. 29Bozala basali na ngai mpe boya kozua mayele epayi ngai pamba te na zali moto ya motema malamu mpe ya boboto, bokozua kimia na mitema na bino. 30Kosalela ngai ezali mpasi te, mpe bikumba na ngai ezali kilo te.
121Nantango wana yesu na bayekoli na ye bazalaki kpleka na kati na ble mokolo na eyenga. bayekoli na ye bayakaki nzala, babandi kabuka yango mpe kolia. 2Ntango ba falisa yo bamoni yango balobi na yesu tala bayekoli na yo bazali koluka mobeko na saba ta.3Kasi yesu alabeli bango botangi niono oyo davidi asalaki ntango ayokaki nzala na ba to yo yonso bazalaki na ye elingo? 4Ndenge akotaki na ndako na nzambe mpe aliaki lipa oyo ebulisami oyo esengelaki na ye te kolia mpe na ba oyo bazalaki na ye elongo bobele banganga nzambe nde bakoki kolia.5Mpe botangaki te na kati na mabeko ete na ntango na sabata, ba nganga na kati na tempelo bazalaki kabuka mabeko na tempelo kasi ezalaki mpo na bango mabe te? 6Kasi nalobeli bina te muto moko azali awa aleki ba nganga na monene.7Soko boyebaka likambo elingi kolaba nini nalingaka makambo na mawa kasi mbeka te mbele bopesi basali mabe te etumbu. 8Zambe mwana na moto azali nkolo na sabata.9Boye yesu alongwi wana mpe akoti na ndako na koyekola mobeko synagogue. 10Mpe tala, mabali moko azalaki wana loboko eka oki ba farisa yo batunaki yesu ezali malamu kobitisa moto na mposi mokolo na eyenga batuni bango mpo bameka kokweisa ye na masumu.11Yesu alobi muto nani na kati na bino oyo azali bobele na mpate moko mpe yango ekwei na libulu na mokolo na sabata okoluka te kobimiqsa ye noki kunana mokolo na sabata? 12Bani bani muto aleki mpote na ntina na bango eleki malamu kasala bolamu na mokolo na sabata .13Na bango yesu alabi na moto wana sembola laboko na yo asemboli yango mpe noki moke ebikaki, lakala laboko mosusu. 14Emoni ba falisayo bongo, babimaki libanda mpo babongisa makanisi mabe likolo na ye. bokanga ye mpo na koboma.15Ntango yesu amoni bango bongo. amibendi nzoto mpe akei. bituluku na bato bakei nsima na ye mpe abikisi banso. 16Akebisaki makasi mpo bayekisa bato basusu te. 17Mpo ete oyo elobamaki na masakoli yisaya ekokisama.18Tala mosali na ngai oyo naponi ye molingami na ngai oyo motema na ngai esepeli na ye mingi. nakotia molimo na ngai kati na ye mpe akosambisa bapakano.19Akotomboka te mpe akogonga te mpe moto te nyite ebimisaka milinga, kino alongisa sembo na ye. 20Akobuka te lititi akembi, akozimisa te nzete ebimisaka milinga, kino alongisa sembo na ye. 21Mpe bapakanu bakozala na elikia mpo na nkombo na ye.22Na bongo muto moko na lolanda mokufeli mpe baba, na yesu abikisaki ye monoko na ye epai na yesu. abikisaki ye monoko efungwamaki mpe amanaki polele. 23Bituluku na bato bokamwaki balabi ekoki kozanga te ete muto oyo azali mwana na dauidi?24Ntango bafalisa yo bayaki likambo na ekamwisaki oyo, balobe moto oyo ezali kobengena milimo mabe nanzela na beelzebuel mokonzi na ba milimo mabe. 25Kasi yesu ayebaki makanisi nabango pe alobi bokenzi oyo ekabwani na yango mpenza ekoki na kobebisama, mpe mboka yonso to ndako oyo etelemeli bakonzi wana ekoki kowuma te.26Sokop satana azali kobengana satana akumi na bokwanikati na ye moko boni boni bokonzi na ye ekoki komela . 27Kasi soko nazali kobimisa milimo mabe na beellzebul bongo ba yo bazali kolanda bango bakobengena milimo mabe na ntina oyo bango fakozala basa mbisi na bino.28Soko nazali kobengena ba milimo mabe na nguya na molimo na nzamne boye bakonzi na nzambe ezali kati na bino. 29Lolenge nini muto akoki kokota na ndako na elombe mpe ayiba biloko na ye yonsosako akongi elombe wana te ? nde akoki kobotala bomengo na ye na ndako. 30Ye oyo azali na ngai te amizalisi mongena na ngai, mpe oyo azali kasa ngona na ngai te azali kobebisa.31Na bongo nalabeli bino mosumu yonso mpe na kotiala nzambe ekolimbisama kasi masumu na kotiola molimo mosato ekolimbisama te. 32Kasi soko muto akolaba mabe na ntina na mwana na moto ekolimbisama mpo na ye. kasi muto nani akolaba mabe na ntina na molimo mosato masumu wana ekolimbisama te ata awa na mokili ata na ntango ekoya.Boye sako nzete ezali malamu mboma na yango mpe malamu nzete na mabe mboma na yongo mpe ekozala mabe zambi nze
131Mokolo yango ,yesu abimi nandako azalaki koteya afandi pembeni ya ebale. 2Etuluku ya bato ezingaki ye,mpe nabwato avandi ,bango nionso batelemaki na libongo.3Mpe yesu ayebisaki bango makambo ebele na masese,alobi: Mokoni moko abimaki mpona kokona. 4Tango azalaki kokona,mikona mosusu ekweyi pembeni ya nzela bandeke baye komela yango. 5Bakona mosusu ekweyi esika ya mabanga,mabele ndambo,sasaipi ebimi nzambi mabele ezalaki na bozindo te. 6Tango moyi ebimi,bilona nionso eziki mpo ezalaki na misisa te pe ekawuki.7Misusu ekweyi na kati ya nzube,banzube ekolaki mpe efinaki yango. 8Bakona mususu ekweyi na mabele ya kitoko mpe eboti kona mosusu koleka kama tuku motoba pe tuku misato. 9Oyo azali na matoyi ayoka.10Bayekoli bayaki epayi na yesu kotuna mpona nini azali koloba na bato na masese? 11Yesu ayanoli: Mpona bino bozwi makoki yako sosola sekele ya bokonzi na likolo,kasi bango te. 12Nzambi oyo azali na yango bakobakisa mpo akoma na yango ebele,kasi mozangi bako longola ata moke oyo azali na yango.13Tina wana nazali kolobela bango na masese,nzambi ata bazali kotala ,kasi bazali komo te ,pe ata bazali koyoka kasi bazali kososola te. 14Mpona bango lisakoli ya izaya ekokisami: Bokoyoka,kasi bokososola te,pe boko tala kasi bokomona te.15Nzambi bakomi mitema libanga ,pe bazipi miso mpo bamona te, matoyi mpo bayoka te pe mitema mpo basosola te.Noki to babongwama mpe babika.16Bo pambolami mpo miso mpe matoyi na bino ezali koyoka pe komona. 17Ya solo,nayebisi bino,ebele yaba sakoli mpe ba yengebene bakanaki komona mpe koyoka makambo oyo bozali komona mpe koyoka,kasi bamoni mpe bayoki te.18Boyoka lisese ya moloni. 19Tango moko ayoki liloba yabokonzi asosoli te,monguna aye mpe akamati maye elonamaki na motema ,ezali bambuma oyo ekweyi pembeni ya balabala(nzela).20Bambuma oyo ekweyi bisika yamabanga ezali moto ayoki liloba mpe andimi sasaipi na esengo. 21Ezangi misisa mpe bopikiliki tango moke. Wana ekoya mikakatano to miniokoli mpona liloba,akopengwa22Mbuma oyo ekweyi naba nzube,ezali ye moto ayoki liloba kasi mposa ya bomengo,efini liloba mpe eboti te. 23Bambuma ekweyi na mabele ya kitoko,nde moto oyo ayoki liloba mpe asosoli; ya solo ekobota mpe lisusu mokama,ntuku motoba,ntuku misato mpe akobongisa yango.24Yesu abeti lisese mosusu: Bokonzi nalikolo ezali lokola moto oyo aloni mbuma ya malamu nakati ya elanga naye. 25Nakati kati yabutu,monguna aye kolona matiti mabe nakati ya loso pe alimwe , 26tango milona ebimi mpe eboti mbuma,matiti mabe mpe emonani.27Basali ya nkolo elanga baye kotuna ye;mokonzi,olonaki milona yamalamu te? Ekomi matiti ya mabe ndenge nini? 28Ayanoli bango :ezali misala ya monguna,basali ba zongisi; olingi tokende kopikola yango ?29Mokonzi ayanoli :te! noki te bokopikola loso. 30Botika yango ekola elongo kino tango yako buka,nakoyebisa naba sali, bolongola naino matiti ya mabe mpona kotumba na sima bosangisa loso nakati ya ebombelo na ngai.31Yesu abeteli bango lisese mosusu: Bokonzi ya likolo ekokani na mbuma ya ndunda oyo moto aloni na elanga naye. 32Ezali mbuma ya moke kati na mbuma nionso,kasi soki ekoli ekomaka molayi lokola nzete,bandeke basalaka ba zala na bango na bitape na yango.33Yesu abeteli bango lisese mosusu: Bokonzi ya likolo ekokani na fulu ya mapa oyo mwasi asangisi yango na kopo misato ya fufu kino ekovimba.34Yesu ateyaki bango mpe koloba kaka na masese. 35Esalamaki bongo mpo maloba ya mosakoli ekokisama;nakoloba mpe nako yebisa bango makambo oyo ebatama wuta ebandeli ya mokili.36Tango yesu apanzi bato,akeyi kopema,bayekoli baye kotuna ye ndimbola biso lisese ya matiti mabe oyo ebotaki na elanga. 37Ayanoli: Moloni ezali mwana ya nzambe. 38Elanga ezali mokili oyo,bambuma ya kitoko ezali bandimi,matiti mabe ezali bana ya satana. 39Monguna oyo aloni matiti mabe,ezali zabolo,eleko ya kobuka ezali suka na ekeke(ya mokili) ,basali nde ba angelou.40Lokola matiti mabe esilaki kozika ekozala mpe bongo nasuka ya mokili. 41Mwana na moto akotinda angelou naye,bapikola nakati ya bokonzi naye mabe nionso mpe masumu nionso. 42Bakobuaka na lifelo,kuna ekozala kolela mpe kolia mino. 43Bayengebene bako ngenga lokola moyi na bokonzi na tata na bango, oyo azali na matoyi ayoka.44Bokonzi ya likolo ekokani na moto oyo amoni eloko ya motuya nakati na elanga,asepeli,akeyi koteka biloko naye nionso mpe asombi elanga nionso. 45Lsusu,bokonzi na likolo ezali ndenge moko na moteki oyo azali koluka palata ya motuya. 46Tango akundoli palata ya motuya makasi akeyi koteka biloko naye nionso mpe asombi yango47Bokonzi ya likolo ekokani na moniama ebwakami na mayi ekangi ba mbisi lolenge nionso,tango etondi balobi babimisa yango na libongo. 48Na sima bavandaki kosangisa ya malamu nakati ya bitunga mpe babwakaki ya mabe.49Ekozala ndenge wana na mokolo ya suka ,nzambe akoya kosambisa bato kasi ba angelou bakoya kokabola bato yamalamu na ya mabe. 50Bakobwakama na lifelo, kuna ekozala kolela mpe koswa mino51Bososoli makambo nionso? Bayekoli bayanoli; 52boye tososoli . Na sima yesu alobi: Kalaka nionso oyo atanga makambo na bokonzi ya likolo akokani na moto oyo azali na ndako mpe abimisi biloko ya kala mpe ya sika nakati ya ebombelo naye. 53Tango asilisi koloba makambo nionso ,alongwe na esika wana.54Na sima yesu akendaki koteya etuluku ya bato nakati ya ba eyanganelo,ba oyo bayokaki ye,bakamwaki balobi; bwanya mpe makamwisi ya moto oyo ewiti wapi? 55Yende mwana ya josefe te? Azali mwana ya maliya te? Yakobo,josefe,simona mpe yuda bazali bandeko naye te? 56Bandeko naye ya basi bazali kati na biso te?57Bamonaki lokola afingi bango ,kasi yesu ayebisi bango: Ezali kaka na mboka pe libota ya mosakoli nde bamemiaka ye te. 58Asalaki lisusu makamwisi mingi te na esika wana mpo bazalaki mitema mabanga(motema makasi)
141Natango wana, Helode le Tetraque apesaki na kola mpona Yesu. 2Alobi na basali naye: « ezali Yeoane mobatisi moto asukwi na ba kufi? Yango wana nguya na ye ezali kosala bongo kati naye.3Pamba te, helode akangaki Yoane, akangi ye basinga nzoto mobimba mpe atiaki ye na boloko na tina Helodiade, mwasi ya ndeko na ye filipe. 4Pamba te Yoane alobaki naye boye: ndingisa epesemeli yo te na mibeko ozuwa muasi ya ndeko na yo. 5Helode alingaki aboma ye kasi abangaki etuluku ya bato mpo bazwaki ye lokola mosakoli.6Tango mokolo ya feti ya mbotama na Helode ekokaki, mwana mwasi ya helodiade abinaki , helode asepelaki na mabina wana. 7Akati tseleka ya kolaka na mwana mwasi, eloko nyonso akosenga ye akopesa ye yango.8Sima ya kozua mitondo na mama naye: «alobi» pesa n gai na sani mutu na Yoane m:obikisi. 9Mokonzi akomaki kipelekese na esengeli ya mwana mwasi. Kasi na tina tseleka naye mpe na etuluku ya batu bazalaki wana na milulu, Apesaki mitindo esalama bongo.10Atindaki moto akata mutu ya Yoane mobatisi na boloko. 11Bongo mutu naye bamemaki yango mpe bapesi mwana mwasi sima apesi mama naye. 12Bayekoli ya Yoane bazwaki nzoto na ye mpe bakundaki yango sima nayango, bakendaki koyebisa Yesu.13Tango Yesu azui sango ya liwa na Yoane mobatisi, akendaki komifandela ye moko mwamosika. Tango etuluku ya batu bayebi sango wana, bato na engunda ebele penza komaki kolanda Yesu. 14Yesu azalaki kotambola na liboso na bango ayokeli bango mawa mpe abandi kobikisa bango na bokono na bango.15Tango mpokwa eye, bayekoli bapusani pembeni na Yesu mpe balobi na ye: « esika oyo eza esika na pamba mpe ngonga epusani bengana etuluku ya bato oyo bakende na bandako na bango basomba bileyi.16Kasi Yesu ayanoli bango: Bazali na posa ya kozonga te. bopesa bango bino moko biye ya kolia». 17Bayanoli Yesu: «tozali kaka na ba kwanga mitanu na mbisi ya mayi mibale» Yesu ayanoli bango. 18Yesu ayanoli bango: boyelenga yango!19Yesu alobi na etuluku na bato, bafanda na matiti. Atomboli miso likolo apamboli mpe apesi bango bakabola balia. 20Bango nyonso baliaki mpe batondaki koleka. Mpe balokotaki bakitunga ya biteni zomi na mibale. 21Etuluku ya bato baliaki ezalaki koto mitanu ya mibale kaka, basi mpe bilenge batangaki bango te22Sima ya kolia, amatisi bayekoli na bwatu mpo bakoma na ngambu. Bongo ye moko azalaki kozongisa etuluku na bato. 23Sima ya kozongisa bato, akoti ye moko na bwatu akeyi na ngomba pona kobondela. Pokwa eyaki azalaki kaka ye moko. 24Bwatu ekomaki na katikati na mayi, mbonge makasi mpe mopepe ezalaki kowa na mopanzi mosusu.25Tango ngonga epusanaki mpo tongo etana, Yesu apusani pembeni na bango, azali kotombola na mayi. 26Tango bayekoli bamoni ye kotambola na mayi, babangaki makasi penza mpe balobi : « oyo zabolo», mpe ba nganga ki na kobanga makasi. 27Yesu alobeli bango kaka na tango wana: «oyika mpiko ezali ngai, bobanga te»28Patelo aya noli ye: « Mokonzi, soki ezali yo mpesa ngai mitindo naye esika yo ozali na tambola likolo na mayi» 29Yesu alobi na ye : "Yaka" bongo petelo abimaki na bwatu mpe abandaki kotambola likolo na mayi kokende esika yesu azalaki. 30Tango Petelo amoni mbonge makasi na mopepe, abngaki makasi. mpe abandi kozinda na mayi, mpe ngangi: « Mokonzi bikia ngai.31Yesu apusani mpe atandi loboko naye mpe kosimba petelo. Yesu alobi na ye: « moto ya kondima moke» Mpona nini ondimaki te? 32Tango Yesu na Petelobakoti na bwato mpepeesili: 33Bongo bayekoli oyo bazalaki na bwatu bakumisi Yesu mpe balobi na ye « solo ozali mwana na Nzambe»34Tango bakatisi ebale, basekami na mboka genezareth. 35Bongo batu ya mboka wana bayebaki Yesu penza. batindi ba ba maloba bipayi na bipayi mpo bayela bato ya bokono. 36Bazali konbondela ye mpo asimba elamba naye, mpe bango ynonso babikisami.
151Ndambo moke ya Bafelizao mpe bakomi mibeko bauti Yelusalema bayei epai na Yesu, balobi: 2«Mpo na nini bayekoli na yo batosaka bonkoko te? basokolaka maboko te liboso ya kolia.» 3Yesu ayanoli bango : «Mpona nini bino botosaka mibeko na Nzambe te mpo na bonkoko na bino?»4Mpo Nzambe alobi ete:«Kumisa tata mpe mama na yo.» Oyo akolakela bango mabe akufa. 5Kasi bino bolobi na bato: «Lisungi lia ngai mpo na bino, ezali likabo na Nzambe. 6Moto yango ajali na ntina te ya kokumisa tata wa ye mpe bino bobebisi liloba lia Nzambe mpo na bonkoko bwa bino.7«Bakosi! Mosakoli Yisaya alobaki solo tango asakolaki mpo na bino. 8Bato oyo bakumisaka ngai na mbebo kasi mitema na bango mijali mosika na ngai. 9Bakumisaka ngai pamba mpo mateya ma bango majali na ntina na mibeko mia bato.»10Mpe abiangi etuliku ya bato epai ya ye, alobi: «Boyoka mpe bososola. 11Oyo ekotaka o monoko mwa moto ekoki kobebisa ye te, kasi oyo ebimaka kati ya monoko mwa ye.12Bayekoli bayaki koloba na ye ete bafalizao basiliki mpo na maloba ma yo. 13Yesu ayanoli bango ete « nzete inso tata wa ngai o likolo aloni te ekokatama. 14Bolanda bango te, bajali bakufi miso. Soki mokufi miso atamwisi mosusu, bango babale bakokweya o libulu.»15Petelo ayanoli Yesu: «Limbola biso lisapo lina. 16Yesu ayanoli bango: «Bino mpe boyebi te ndimbola na yango? 17Ejali inso te ikotaka o monoko, koleka na libumu tii na njongo linene.18Kasi nyonso ebimaka na monoko eutaka o motema, yango nde ekomisaka moto mabe. 19Na motema nde makambo oyo ewutaka; makanisi mabe, koboma bato, ekobo, pite, moyibi, lokuta, kofinga. 20Makambo oyo nde eyeisaka moto mabe. Kasi kolia kojanga kosukola maboko ekoki kokomisa moto mabe te.»21Kolongwa na Yesu wana , akei na mokili ya Tula mpe Sidona. 22Mpe mwasi moko wa mokili mwa canana ajalaki kuna, ayaki epai na Yesu agangi «Mokonji mwana wa Dawidi, yokela ngai mawa; mwana wa ngai wa mwasi ajali kotungisama na milimo mabe.» 23Yesu ayanoli ye te. Bayekoli na ye bayebisi ye ete: « bengana ye mpo ajali kotia makelele sima na biso.»24Kasi Yesu ayanoli: «Natindami bobele mpo na bampate babunga ya Yisalele. 25Bongo ayaki kofukama liboso ya ye alobi: «Mokonji salisa ngai.» 26Ayanoli mpe alibi: «Ezali malamu te kopesa bilei ya bana na imbwa.27Alobi: «Mokonji, ba imbwa baliaka mpe biloko bikweaka na nse ya mesa ya bakonji.» 28Yesu ayanoli ye, «mwasi, kondina na yo ezali monene, esalemela yo lokola elingi yo.» Mpe mwana abikaki na ngonga ena.29Yesu alongwi na esika ena mpe akei na ngambo ya mbu ya Galileya. Abutaki likolo ya ngomba afandaki kuna. 30Etuluku ya bato bayei epai ya ye, bakakatani, bibosono, bakufi miso, bimimi mpe babeli basusu batia bango na makolo ma Yesu mpe abikisaki bango. 31Etuluki ya bato basepelaki komona bimimi kolba, bibosono na njoto kolongonu, mikakatali kotambola, bakufi miso komona, bakumisaki Njambe na Yisalele.32Yesu abiangaki bayekoli ba ye, alobi na bango: «Najali na mawa mpo na etuluku ya bato bafandi elongo ngai, bajali na bilei te. Nalingi kotika bango na nzala te, pamba te bakoki kokwaya o nzala.» 33Bayekoli bayanoli: «Tokozwa bilei wapi mpo na ebele ya bato oyo?» 34Yesu atuni bango: « bajali na mapa boni?» Bayanoli ye: «Sambo na mbisi moke.» 35Bongo Yesu apesi mitindo bafanda.36Ajwaki mapa sambo mpe mbisi, sima ya botondi Nzambe, akaati yango na biteni, apesi na bayekoli mpo bakabola. 37Banso baliaki na mposa na bango, batondaki mpe biteni etikalaki, batondisaki bikolo sambo. 38Motango mwa bato mojalaki nkoto minei kotanga basi na bana te. 39Sima na yango, Yesu azongisaki bato mpe ayingeli na bwato, akei na etuka na Magadana.
161Ba pharisiens na ba saddusay bayeki komeka ye alakisa elombo ewiti likolo. 2Yesu ayanoli bango tango pokwa eyaka, bazo loba akosala ngonga moloyi, bongo likolo ezali motani .3Pe na tongo likolo bozo loba ekozala ba kake lelo, bongo likolo eza motane pe molili. boyebi lolenge ya koyeba bilembo ya likolo. bkasi bo komaka te na koyeba lolenge bilembo na ngonga. 4Lolenge ya batu mabe pe basumuki bazo luka elembo. kansi elembo moko ekopesama, soki ezali ozo na janas te pe yesu alongwe kati na bongo pe akeyi.5Tango ba dikilibakomi na ngambo na mayi, babosanaki kozwa ba kwanga. 6Yesu alobi na bango balela na bokebi maloba ya ba phalisay pe ba sadduceen. . 7Badikili ba bangi kati na bango boye, ezali pamba te tokamati ba kwanga te. 8Yesu lokola ayebi nionso, alobi bino, bato ya kondima moke pona nini bogo kanisa bino na bino bongo, po to zwaki ba kwango te.9Bakangi te, pe bozo kanisa te pona ba kwanga mitanu pona etuluku na bato pona toko mitanu pe ba kitunga boni balokotaki? 10To na kwanga samba pona toko mingi ya batu talo boni ya bakitunga bokotaki11Ndenge nini boyebaki te, tangu na zali kolabe la bino, ezalaki pona ba kwango te , bomikebisa na maloba ya baphalisay pe la saddusay. 12Bongo ba dikili na yesu basosolaki boye yesu azaki kolobela bango bakeba na esaleli bango oyo batsiaka na bakwanga, kasi bakeba na moteya ya baphalisay pe ba saddusay.13Tango yesu aye na engumba na cesaree ya p^hilipo, yesu atuna ba dikili na ye bazo loba mwana moto azali nani. 14Ba pesi ayane azali joune mobatisi, bamususu azali eliie, ba mosusu azali jeremie, to moko na basakali. 15Alobeli bango bango bango bino ngai na zali nani. 16Simon petolo ayanoli yo ozali masiya,mwana na nzambe na bomoyi.17Yesu ayanoli pambolama simon mwana na jonas ezali nzoto te pe makila te esosoliso yo yango, kasi tata azali likolo. 18Na yebisi yo ozali petolo, na likolo na libanga na kotonga lingomba na ngai bikuke na ewelo na kufua ekofongwa na pona yango te.19Na kopesa yo bafongola na likolo. nionso boko kanga awa na se ekokangama kuna likolo. nionso boko fongola awa na se, ekofongama kuna na likolo. 20Yesu ayebisi la dikili na ye baloba yango na batu te ke azali masiya21Bango, yesu abandaki koyebisa ba dikili na ye, esengeli akende na yelusalem, koniokwama makasi penza na maboko ya bakolo, ba nganga nzambi pe ba komi mikanda esengeli ba boma ye pe mikolo ya misatu anokosekwa. 22Bongo petolo apusi yesu na mopanzi pe alobi na ye tika mipepe nionso ekomela yo te. 23Kasi yesu abaloki pe alobi na petolo kusana kuna, satan ozali libaku pona ngai, bongo azali na nzambi, kasi makambu ya batu24Bango yesu alobi na ba dikili na ye, soki motu alingi kolanda ngai ami baya ye moko. akomata ekulusu na ye alanda ngai. 25Motu nionso alingi kobikisa bamoyi na ye akobungisa yango. 26kasi, motu nionso akobungi bomoyi na ye na tina na ngai akozwa yango. Eboko nini ekosalama na moto soki alongi kozwa mokili mobimba kasi soki okobungisa bomozi ya ye? eloko nini mutu akoki kopesa na kosambokina na bomoy na ye.27Bongo mwana na motu akowa na nkembo na tata na ye elongo na ba angelu na ye . pe akofuta motu na motu ndenge misala na ye. 28Na zali koyebisa bino ya solo ezali kati na bino awa bakokufua te pe bokomona mwana mutu koye na bokongi na ye
171Sima na mikolo motoba, Yesu azuaki bayekoli oyo Petelo, Yakobo, mpe Yoane ndeko na ye, mpe amemaki bango na ngomba molai. 2Amibokolaki libosa na bango elongi naye engengaki lokola moi, bilamba neya ekunaki pembe penza.3Mpe tala, Mose na Elia babimelaki bango mpe basololi naye. 4Petelo alobeli Yesu :" Soko okolinga, eleki na malamu totikala awa. Soko okolinga, natonga awa ndaku mike misato, mpona yo moko, moko na Mose, mpe moko na Elia".ak 5Lokola ezali ye koloba, tala, mapata na pembe ezipa bango, mongongo ewuti na mapata eyokani ete: « Tala muana nagai bolingi oyo nasepelayoka naye mingi boyoka». 6Na ntango bayekoli bayoki bongo banso bakweyaki na bilongi na bango mpo batondisamaki na kobanga makasi ». 7Na bongo yesu aye epai na bango, mpe alobi: «botelema, bobanga te» 8Boye batalaki na likolo kasi bamonaki moto te bobele Yesu.9Lokola banbandaki kokita na ngomba, Yesu apesi ban go mitindo ete;« boyebisa moto te oyo bomoni, kino kkokisama elaka na muana muto kosekua na bomoi». 10Bayekoli misato oyo batunaki ye: « Mpona nini bakomi na mobeko bazali koloba, ezali na ntina monene ete Elia aya liboso?».11Yesu ayanoli bango: « Na solo, Elia akoya mpo na kobongisa makambo yonso. 12Kasi nalobeli bino: « Elia asila koya, Kasi bato bayebaki ye te. Nzoka nde , basalelaki yonso oyo ekokaki basala mpona ye. Na lolenge wana, mwana na moto akoleka na mpasi na maboko na bango». 13Boye bayekoli basosolaki ete ye azali koloba na ntina na Yoane mobatsi.14Tango bazongaki epai ya bituluku ya bato, mobali moko ayaki na Yesu, afukameli liboso na ye. 15Mpe alobi: « Mokonzi, yokela muana nangai mawa zambi azali kokweya kokweya mpe konyokolma na mpasi mingi. Na boye akweyaki tango nyonso na moto mpe na mai. 16Naye epai ya bayekoli nayo, mpe bakokaki kobikisa ye».17Yesu ayanoli: « libota na bozangi bondima mpe kobongola makambu na malamu na mabe, kino ntango nini nakozala na binoseko? kino tango nini nakomemaka bino ntango nyonso? Bomema ye awa». 18Yesu apameli molimo mabe mpe ebimaki na kati naye. mwana mobali abikaki noki noki na ntango wana.19Bongo bayekoli bapusanaki na Yesu na kobombala mpe balobi: « boni boni biso tokokaki kobengana milomo mabe wana te?». 20Yesu ayanolaki bango : « Ewuti na kondima na bino nse moko. Zambi nalobeli bino na solo, soko b ozali na kodima ata moke lokola awangila, bokoloba na ngomba oyo, "longua awa mpe kende kuna" nyonso ekolongwa mpe eloko moko moko te ekoleka nguya na bino. 21kasi milimo mabe na ndenge oyo babenganaka yango bobele na mabondeli mpe losambo na zanga kolia.22Wana ezalaki bango na galileya , yesu alobeli bayekoli naye: « Mwana na moto akopesama na maboko na bato; 23Mpe bakoboma ye, na sima ya mikolo misato akosekwa». Na yango bayekoli bayokaki mawa makasi.24Na tango bakomaki na kapelnauma, bakongoli na mosolo ya pako na tempelo bayaki epai na Petelo mpe balobaki, molakisi na bino afutaka pako te? 25Petelo aynolaki: « iyo» Tango Petelo akotaki na ndako epai na Yesu, ye akamataki liloba moto na liboso mpe alobi: « Okanisi na likambo oyo boniboni Simona? bakozui na makili oyo bazuaka mpako to lifuta epai na banani? epai na bato na bango to epai na bapaya?26Tango Petelo ayanoli: « na bapaya» Yesu alobi : « na bongo bana bonka bazali nse na mobeko wana te mpo bafuta pako. 27Kasi mpo ete tosumaka bato na kolokolo mosolo na pako te. kenda na mai buaka ndobo nayo mpe mbisi okobenda yango liboso, ofongola mpe okmona lopata. Kamata yango mpe kenda kofuta pako mpona biso nayo.
191Tango jesu asili kolaba wane alongue na galilea pe akeyi na mabele ya juda na nzambe ya ebale ya jurda. 2Etuluku ya bato balandi ye pe abikisi bango.3Balakisi mibeko bayei epayi na yesu ba lobi endingisami kolandana na mebeko mobali akoki kokabuana na mwasi na soki mbeba moko ezali? 4Yesu ayonoli pe alobi bo tango te ekomami uta ebandeli nzambe akelaki mobali pe muasi.5Pe ayebisi bango ya ngo wana mobali akotika tata na ye akosangana na mwasi na ye pe bango mibale kokoma mutu moko? 6Na bongo ba zali mibale te kasi moto moko na yongo oyo nzambe asangi mokakokabola te.7Ba yebisi ye pona nini moize apesiki mitindo a kopesa mokonda yo bo kabwani pe kobenga? 8Yesu ayanoli bango pona mitema makasi na bino, moize apesaki bino nzela ya kokabuana, ka na ebandeli ezaliki bongo te. 9Na lobi na bino moto nyoso akokabwana na mwasi na ye, soki asaliki ekobo te, te akeyi kobala mwasi mosusu asali kindumba pe moto oyo akobala mwasi aboma libala asali ekobo10Baye koli balobi ne yesu soki ezali bongo pona mobali ena ya kobala ezali te. 11Kasi yesu alobi na bango ezali bato nyoso te bokoki kondi malakisi oyo, epesemeli po na kondima yango. 12Ezali na bato ba botama mikongo ekufa ata na libumu ya mama, ba mosusu bato nde ba bama bango mikongo, pe ba mosusu ezali bango moko pona bokonzi yo likolo. moto oyo andima malakisa oyo andima yango.13Awa bayeli yesu bana mike po atiela bango maboko kasi ba yekoli ba bandi kopesika bango. 14Kasi yesu alobi botika bana mike kopekisa bango te baya epayi na ngai po bokonzi ya likolo ezali mpo moto oyo akokami na bango. 15Atieli bango mabako, pe sima alongue wana.16Moto moko ayaki epayi na yesu, pe alobi moteyi na sala nini po zua moi ya seko? 17yesu ayonoli ye pona nini ozali kosenga ngai oyo ezali malumu? oyo azali malamu ezali nzambe kasi soki olingi kokota na bokonzi yo likolo tosa mibeko. Moto alobi na ye mibeko nini jesu ayanoli ye18Moto alobi na ye mibeko nini jesu aya noli ye kobama te kosala kindumba te koyiba te kokosela moto likambo te , 19Tosa tata pe mama na yo, pe linga moni nga na lokola omilingaka20Elenge mobali ayebisi ye na tosaka makambo nyoso wana nini lisusu na sala? 21Yesu alobi na ye soki olingo azala moto kokoka, tekisa nyoso azali na yango, pe zua misolo pesa na bakelala, pe yo okozua lifuta na lola. sima yaka pe landa ngai, 22Tango elenge mobali oyoki maloba wana yesu azalaki koloba, akeyi na mawa po azalaki na bomengo mingi.23Yesu alabi na bayekoli ya solo na zali koloba na bino, ezali pasi po moto na mbango ikokota na bokonnzi ya likolo. 24Na lobi na bino ezali pasi mingi te nyama ya shameau koko ta na lisusu ya tonga ke pona moto ya bomengo kokota na bokonzi ya nzambe.25Tango ba yekoli bongo ba komwe pe ba lobi nani solo akoki kobika? 26Yesu atali pe alobi ya ngo ezali pasi pona bato kasi epayi na nzambete. 27Bango petete ayanoli pe alobi tala biso to tika nyoso pona kolanda yo, okofuta biso nini?28Yesu alobi na bango ya solo na lobi na bino oyo ba landa ngai, na eloko ekoya tango mwana ya moto oko vanda na kiti na ye ya kembo, pe boko vanda na ba kiti zomi na mibale, bokosambisa ma bota zomi na mibale, bo kosambisa ma bota zomi na mibale ya israel.29Moto nyoso atika ndako na ye ba ndeko ya mibali, bana na ye to lopango pona kombo na ngai ako zua mbala misutu pe akozue moyi ya seko. 30Kasi ebele ya bato bazali liboso sikoyo ba kokoma bato ya suka pe ebele oyo ba zali ya suka ba kokoma bato na liboso
201Tala bokonzi nalikolo ezali lokola mosala ebimeli na mabele,ebimi na ntongo mpona kozwa ba sali na elanga na vino. 2Tango bayokani nabasali mpona lifuti ya mokolo moko,atindi bango na elanga ya vino.3Abimi na ngonga ya misato mpe amoni basusu bazalaki wana,kasi basali eloko te. 4Ayebisi bango ,bino mpe bokende na elanga na vino,oyo esepelisi bino nakopesa bino yango,bongo bakendaki kosala.5Abimi lisusu na ngonga ya motoba pe na ngonga ya libwa asali ndenge moko. 6Mbala mosusu ,na ngonga ya zomi na moko abimi kotala,akuti ba mususu bazosala eloko te,alobeli bango;mpona nini bozo sala te kati na mokolo mobimba ? 7Bayanoli ye boye;mpamba te moto moko te azwi biso na mosala.Alobeli bango ,bino mpe lokola ,bokende na vino.8Pokwa eye,mokolo na elanga aye,alobi na kapita na elanga;benga basali nionso mpe pesa bango lifuti na bango,kobanda mokolo na suka kino mokolo ya liboso. 9Tango basali oyo bazwamaki na mosala na ngonga na zomi na moko ba ye,moko na moko azwaki lifuti naye. 10Tango basali ya yambo baye,bakanisaki kozwa ebele koleka ba mususu,nkasi bazwaki ndenge moko11Sima yakozwa lifuti na bango,babangi koyima-yima na mokolo elanga. 12Balobi naye;basali wana basali kaka ngonga moko,nkasi ofuti biso nionso ndenge moko biso batu toniokwami kobanda tongo tiii ngonga oyo nasé ya moyi makasi.13Mokolo na elanga ayanoli na moko na bango;naboyi,nasali yo ata mabe moke te,toyokanaki te mpona lifuti? 14bozwa oyo ebongi na bino,bokende,na poni kopesa na basali ya suka lifuti ndenge moko na bino.15Nakoki kosala te oyo ngai moko nalingi nabiloko na ngai? Ebandi boni kolula mpo ngai nazali moto malamu? 16Bongo moto yaliboso akokoma moto ya suka,mpe ya suka akokoma ya liboso,bamikanda mosusu ya kala ezo loba; babiangami bazali ebele kasi ba ponami bazali moke.17Ndenge yesu azalaki kokenda na yeruzalem,akamataki balikili naye zomi na mibale, na nzela ayebisi bango : 18Botala,tozokeda na yeruzalem ,mwana na moto bakokaba ye naba nganga nzambe mpe bakomi mibeko,bakokatela ye etumbu na kufa . 19Bakokaba ye naba pakano mpona basakana naye,kobeta ye mpe bako baka ye na kulunsi,kasi mokolo ya misatu akosekwa20Bongo maman ya bana ya ezbedée aye na yesu na bana ye.Akumisi ye na losako,pe asengi ye eloko moko. 21Yesu ayanoli ye eloko nini mpenza olingi? Mwasi ayanoli ye ;ndima kotia bana na ngai,moko naloboko ya mobali mosusu na loboko ya mwasi na bokonzi nayo.22Kasi yesu ayanoli ye: Oyebi te oyo yo ozali kosenga ,yo okokoka komela kopo ya bololo oyo ngai nakomela ? Bayanoli yesu boye;tokokoka komela yango . 23Ayebisi bango namoni,kopo na ngai,bokomela yango kasi pona kovanda na loboko yakimobali to na oyo ya kimwasi ,ngai te nde nakopesa yo eyano ,kasi ezali mpona ba oyo tata abongisa. 24Tango ba likili zomi bayoki masolo wana ,bakamwaki bango makasi.25Kasi yesu yesu abengi bango pe olobi: Oyebi bakonzi yaba bakano baza na nguya likolo na bango,batu na bango ya motuya baza na nguya likolo na bango. 26Kasi ekozala bongo te mpona bino,oyo akolinga kozala likolo na bino,esengeli azala mosali na bino. 27Oyo alingi azala moto na liboso kati na bino azala moto na sima. 28Yango wana, mwana moto ayaki te poba salela ye kasi asala mpona kopesa bomoi naye nambeka ya bato ebele.29Tango babimi na yerico,etuluku na bato balandaki ye. 30Bakufi miso mibale bazalaki pembeni na nzela,tango bayoki ete yesu azali koleka,bagangaki mpe balobi;mokonzi mwana na dawidi yokela biso mawa. 31Kansi bato bazalaki kopekisa bango,baganga te bavanda kimia,bangangaki lisusu makasi koleka; mokonzi mwana na dawidi yokela biso mawa32Bongo yesu atelemaki,abengi bango mpe atuni bango,bolingi nasalela bino nini? 33Bango bayanoli ye ete ;tika miso na biso emona lisusu, 34yesu atondi na mawa asimbi miso nabango,nambalaka miso nabango emoni mpe bakomi kolanda ye.
221Yesu alobelaki bango lisusu na masese: 2Bokonzi na likolo ekokami na nkumu moko oyo azalaki kobongisa milulu ya libala mpona mwana naye ya mobali. 3Atindaki basali naye mpona kobenga bayi bazwaki nkasa yako biangama kasi baboyaki koya.4mokonzi atindi lisusu basali mosusu nakoloba nabango;loba na bayi bazwaki biangama: Tala,nabomi ba niama mpe biloko nionso ebongisami . Boya na milulu na libala.5Bato basundoli miango,bakeyi na makambo na bango mosusu na elanga,mosusu mombongo naye. 6Basusu bakangi basali wa mokonzi,kofinga bango mpe koboma bango. 7Mokonzi atondisami na kanda;mpe atindi mapinga naye koboma ba bomi wana mpe kotiya bango na motô na mboka na bango8Sima alobi na basali naye: Milulu ezali pene,kasi ba biangami babongisamaki te. 9Na bongo bokende kobengo bato nionso bokokuta na nzela baya na milulu ya libala. 10Basali bakeyi na nzela kobenga bato nionso,ya mitema malamu mpe ya mitema mabe ,ndaku ya milulu etondaki na bato.11Tango nkumu akotaki mpona kotala ba biangami,amoni moto moko oyo alataki bilamba ya milulu te. 12Nkumu atuni ye: moninga,lolenge nini okoti awa ozangi bilamba ya milulu? moto wana azangi liloba.13Bongo, nkumu alobi naba sali naye: Bokanga ye maboko na makolo bobwaka ye libanda namolili,esika na milelo mpe koswa mino. 14Mpo ete ebele babengami kasi ba ponami bazali moke15Na sima, bafarizi bakeyi kobongisa lolenge nini bako tiela yesu motambo na maloba naye. 16Batindeli ye basali nabango,elongo nabato na erode,balobi na yesu: Nkumu,toyebi ete olobaka solo mpe oteyaka nzela na nzambe na bosolo,okotelaka moto te mpe okabolaka bato te. 17Loba na biso,ozali kokanisa nini? ezali malamu kofuta mpako epayi ya sezalo to te?18Kasi yesu ayebaki nkanza na bango ayanoli bango: Bato ya bilongi mibale !pona nini bozali komeka ngai? 19Bolakisa ngai likuta moko ya mpako,bapesi ye moko20Yesu alobi na bango: elongi ya nini ezali awa pe kombo ya nani? 21Bazongisi ya sezalo ,bopesa na cezalo oyo ezali ya cezalo mpe na nzambe oyo ezali ya nzambe. 22Tango bayoki bango,bakamwe,mpe batiki bakeyi2324Wokolo wana,ndambo naba saducena oyo baboyaka lisengwa,bayaki epayi naye,basengi ye: molakisi,mose alobaki:soki mobali akufi aboti te ,ndeko naye ya mobali esengi abala mwasi naye
231Bongo Yesu alobi na etuluku ya bato mpe na bayekoli na ye. 2Alobi: « Balakisi mibeko na ba falisayi mosala na bango kolakisa bato mibeko ya Mose. 3Bongo botosaka bango mpe bosalaka makambo nyonso bakobanda koloba na bino, kasi bazali koloba makambo, kasi bazali kosalela yango te.4Solo , bazali komemisa bato mikumba ya kilo na mapeka, kasi bango moko bazali kokoka komemma yango te. 5Bazali kosala makambo nyonso babima malamu na miso na bato. Batongaka ba songe ya minene na ba nzambala na bango oyo ba lataka na tango ya losambo, bango bakomisala yango milaiyi6Bango balingaka kovanda na bisika ya liboso na kati ya feti mpe bango bavandaka na bakiti ya liboso na eyanganelo. 7Mpe balingaka bapesa bango losako na miso ya bato nyonso, mpe babengaka bango "Moteyi" na bato.8Kasi bino babenga bino te « moteyi» bino bozali na moteyi moko, mpe bino nyonso bozali ba ndeko. 9Mpe Bobengaka moto te awa na mokili«Tata»; Nzambi tozali na tata moko, azali na likolo. 10Mpe ba benga bino te "bateyi" bazali na moteyi, moko ye nde Yesu Kristo.11Kasi oyo aleki bino esengeli azala mosali na bino. 12Moto nyonso akomitombola akokitisama, mpe oyo akomikitisa, akotombwama.13Mawa na bino balakisi mibeko mpe ba falizayi, bato ya mayele mabe, bokangeli bato nzela ya bokonzi ya likolo. Mpe bino moko bo kokotate, bazali kosala nyonso mpona ba oyo balingi kokota bakota te. 14Mawa na bino balakisi ya mibeko mpe ba Falisayi bato ya lokuta bozali koyiba biliko ya basi bakufely mibali, mpe kaka na tango wana bo kosanaka kosambela mingi, yango wana bokozua etumbu ya makasi. 15Mawa na bino ba lakisi mibeko, ba Falisayi bato ya lokuta bo tambola la na mokili mobimba mpo na kozua mopaya oyo akondima kosambela Nzambe na biso bayuda mpe tango bokozua ye, bomisi ye moto na lifelo lokola bino bozali.16Mawa na bino ba tambwisi ya bato bakufa miso, bino moko bomonaka te, mpe bo lobaka boye: « soki moto akati seleka na kombo ya Ndako na nzambe ezali na likambo te kasi sokimoto akati seleka na kombo ya ndako na Nzambe ezali na likambo te, kasi soki moto akati seleka na wolo, ebombama na kati ya ndaku ya Nzambe ya Nzambe akotosa seleka wana». 17Bino ba bolole, bakufa miso, na ba wowlo na ndaku ya Nzambe nini eleki?18Boloba lisusu moto ako kata seleka na etumbeli asala eloko te. Kasi moto oyo akokata seleka ya makabo ezali na etumbelo esngeli atosa seleka na ye. 19Bino bato bakufa miso, eloko nini eleki, makabo to etumbeli oyo ebnulisaka makabo?20Boye, moto akokata seleka na etumbelo akati likolo ya biloko nyonso ezali wana. 21Mpe oyo akati seleka na ndako ya nzambe akati na ndako ya nzambe na oyo avandaka kuna ndaku ya Nzambe. 22Mpe oyo akati seleka na kombo ya likolo akati liboso ya ngwende ya Nzambe oyo avandaka na yango.2324Mawa na bino balakisi ya mibeko na ba falisaye, bato ya mayele mabe, bopesaka Nzambze eteni ya moko na kati ye biteni zomi ya makasa ya solo kitoko. bo bosani oyo eleki na mibeko, kosala bato bolamu. Bino ba tambwuisi ya bato bakufa miso, bolongolaka nzinzi na kati ya mayi ya komela. Kasi bazali komela nyama monene ba bengi chamo.25Mawa na bino ba lakisi ya mibeko na ba Falisayi, bato ya mayele mabe, bosokolaka libanda ya kopo mpe ya sani, kasi kati na bino, bo tonda na moyibi na ba posa ya mabe. 26Mofalisayi mokufi miso, sokola nanu kati na kopo mpe ya sani ekoma mpeto.27Mawa na bino balakisi mibeko mpe ba Falisayi. Bato ya mayele mabe, bokokani na Nkunda bapakoli langi ya pembe na libanda emonani kitoko, kasi na kati na yango etondi mikuwa ya ba kufi mpe makambo nyonso ya bosoto. 28Lolenge moko na bino, bozali komonana lokola bato ya malonga na miso ya bato, kasi na kati botondi na mahyele mabe mpe masumu.29Mawa na bino balakisi mibeko na baFalisayi, bato na mayele mabe, bozali kotonga ba nkunda ya basakoli mpe bo bongisaka ba malita ya bato ya bosembo. 30Bolobaka : « Soki tozalaka na tango ya batata na biso mbele to lingakakosanaga na bango te mpo na koboma basakoli». 31Na boye bozali na ko tatola bino moko, bozali bana ya ba oyo ba boma basakoli.32Bongo bino bozali kosukisa mosala oyo ba tata na bino basalaka. 33Libota ya nyonka bokokima etumbu ya lifelo ndenge nini?34Yango wana, tala na tindeli bino ba sakoli, bato ya bwania mpe ba lakisi mibeko. Bo koboma bango mpe bo baka mosusu. Mpe bokobeta ba mosusu na biyan,genelo, mpe bo ko landa bango na ba mboka nyonso. 35Lifuti na bino ezali makila ya bato na bosembo oyo bobomaka na mokili, kobanda makila ya Abelmoyengebene, tii na makila ya zakalia, Baracie, oyo bo bomaka na kati na ndaku ya bosantu na mesa ya mabonza. 36Ya solo, na lobi, bokozua etumbu na makambu wana.37Yelusaleme, yo oboyi ba oyo ngai na tindelaki yo mpe obambi bango mabanga. Mbala boni na lingaki kosangisa yo lokola soso asangisaka bana naye na nse ya mapapu, bolingaki te. 38Botala ndako na bino ekawuki. 39Bongo nalobi na bino bokomona lisusu te tii na tango bokoloba: « Apambolama oyo azali koya na kombo ya Mokonzi».
241Yesu abimi na tempelo mpe akeyi,ba likili naye bapusanaki pene naye mpona koyebisa misala yakotonga tempelo. 2Ye ayanoli bango: Bozo mona makambo te? Ya solo nazo loba nabino : Libanga moko te ezala likolo na libanga mosusu oyo ezanga kobaluka.3Evandaki ye nangomba olivia ,ba likili ba yaki pene naye na kuku kotuna ye,lobela biso, tango nini makambo oyo ekoya,bilembo nini ya bozongi nayo mpe bilembo na suka na mokili? 4Yesu ayanoli bango boye : Bosala keba ,moto akosa bino te . 5Yeba ete ebele ya bato bakoya nakombo na ngai ; nakoloba ngai nazali klisto mpe bato ebele bako pengwa.6Bokoyoka bakolobela bitumba,pe bitumba ya sika bipayi na bipayi,bomitungisa te,boyeba ete biloko wana ekoya ,kasi,ezali suka ya mokili te. 7Yeba ekolo ekotelemela ekolo mosusu ,mpe bokonzi ekotelemela bokonzi mosusu,nzala ekoya mpe mabele ekoningana na bisika ebele. 8Nionso wana ekozala ebandeli ya pasi yakobota.9Bakokaba bino na minioko ya ndenge na ndenge,pe bako boma bino ,mokili ekoyina bino na tina ya kombo na ngai . 10Ebele bakobetana mabaku,bakoyinana bango na bango. 11Ebele yaba sakoli ya mabe bakotelema mpe bako pengwisa ebele na bato.12Pamba te mabe ekomata ngomba makasi,bolingo na bato ebele ekosila. 13Oyo akoyika mpiko kino suka akobikisama. 14Mpe sango malamu ya bokonzi na nzambe ekosakolama mokili mobimba mpe matatoli ekozala ,yambo suka eya.15Yongo wana ,tango bokomona bosoto,makambo mabe oyo mosakoli daniela alobaka tango atelemaka na liboso na esika nabule( tika moto nionso akotanga yango asosola. 16Tika ba oyo bazali na yudeya bakima naba ngomba. 17Tika oyo nazali likolo na ndaku akita te na ndaku naye,mpona kozwa eloko oyo ye alingi. 18Tika oyo azali na bilanga azonga te na ndako naye mpona kozwa kazaka naye.19Mawa na basi na zemi mpe ba oyo bakomelisa bana mokolo wana! 20Bobondela makasi mpo ete kokima na bino ezala na tango ya malili makasi to mokolo na sabata te. 21Mpamba te minioko ekozala makasi koleka,nanu esalama te wita mokili ebanda,kino tango oyo,mpe ekotikala kozala te. 22Soko mikolo ezali mikusé te,moko te alingaki abika,kasi na tina yaba ponami mukolo ekomi mukusé.23Soki moto ayebisi bino;botala,klisto azali awa ,to klisto azali kuna, bondimela ye te. 24Mpamba te ba klisto ya lokuta naba sakoli ya lokuta batondi,bakoya mpe bakosala bilembo mpe bikamwa,mpona kopengusa ba ponami. 25Botala,nayebisi bino yango liboso.26Soki bakoyebisa bino;botala,klisto azali na mabele ezanga matiti,kokende te,to azali na ndako na fulani,kondima te. 27Ndenge moyi ebimaka na ebimelo na tango engalaka tiii na esika ekotaka,ndenge ekozala koya ya mwana na moto. 28Esika ekozala bibembe yaba niama ,esika nde ekozala bandeke oyo eliaka musuni.29Bongo sima ya tango ya minioko,moyi ekokoma molili,sanza ekozanga kongala,minzoto ekokweya likolo,nguya nionso ya likolo ekoningana.30Na bongo elembo ya mwana na moto ekomonana nalikolo,mpe bikolo nionso ya mabele bako yima-yima. Bakomona mwana na moto koya na lipata na nkembo na likolo na nguya mpe nkembo. 31Na mingongo ya kelelo,akotinda ba angelou naye mpona kosangisa baponami na mokili mobimba.32Tala bozwa ndakisa ya nzete ekawuka,soki omoni bitape ya nzete ebimisi matiti,bokoyeba ete ngonga na mbula ebelemi. 33Lolenge moko,tango bokomona makombo nionso wana,bokoyeba ete akomi pene,na ekuke.34Solo nazali koyebisa bino,ekeke oyo ekoleka te yambo makambo oyo ekoma. 35Likolo mpe mabele ekoleka,kasi maloba na ngai ekoleka te.36Kasi mpona mikolo oyo mpe ngonga oyo,moko te ayebi,atako ba angelou nalikolo,ata mwana na moto pe ayebi te kaka tata ye moko.37Ekozala ndenge na tango na nowa,bongo nde mwana na moto akoyela. 38Lokola na mikolo wana yambo mbula ebeta bato bazalaki kolia pe komela,bazaki kobala mpe kobalisa kino nowa akotaki na masuwa. 39Bandimaki te ke ekosalama kino tango mbula ebetaki mpe ememaki bango, lolenge wana nde ekozala koya ya mwana na moto.40Bato mibale bakozala na elanga;moko akonetolama mpe moko bako akobwakisama. 41Basi mibale bakozala na mosala yakotuta bileyi na liboka moko akokende mosusu akobwakisama. 42Bomilengela mpo ete boyebi te mokoli nkumu na bino akoya.43Boyeba ete soki mokolo ndako ayebaka ngonga nini moyibi akoya,okomilengela akolinga te bakuluna bakotela ye. 44Yango wana,esengeli kokengela tango nionso.45Nani wana mosali ya malamu mpe ya bwanya,oyo molakisi naye atie ye na ndaku naye,mpona kopesa ye yakolia natango esengeli? 46Apambolama mosali tango molakisi akokuta ye kosala bongo tango akoya. 47Ya solo nazali koyebisa bino molakisi akotombola ye likolo ya makambo naye nionso.48Kasi soki mosali yamabe amilobeli naye moko: Molakisi na ngai akoya sikoyo te, 49mpe akomi kobundisa basali mosusu, kolia mpe komela namilangwa, 50molakisi ya mosali wana akoya mokolo moko oyo mosali akoyeba te, mpe natango oyo akokaki kokanisa te. 51Molakisi naye akokata ye ndambu ndambu pe akokokisa ye na bato yabilongi mibale,akotia ye esika ya milelo mpe yako suwa mino.
251Bongo bokonzi ya likolo ekokani na basi moseka zomi oyo bakamati mwinda na bango,bakendaki kokutana na mobali ya libala. 2Mitano na bango bwanya mitano mosusu bwanya te. 3Tango basi oyo bazangi bwanya bazui ba mwinda na bango, bazuaki mafuta te. 4Kasi basi ya bwanya bazui mafuta mpe mwinda na bango.5Wana molongani nabango awumelaki,balembaki mpe balalaki. 6Kasi na katikati ya butu,bayoki mongongo: Tala molongani azoya,bokende koyamba ye.7Basi nionso balamuki mpe bakomi kobongisa ba mwinda na bango. 8Basi oyo bazangaki bwanya balobi naba oyo ya bwanya;bopesa biso ndambu ya mafuta mpo ete ba mwinda na biso elingi kokofa. 9Kasi basi ya bwanya ba yanoli; ezali moke mpona bino pe biso,bokende kosomba epayi ya bateki10Tango bakeyi kosomba molongani akomi, basi ya bwanya oyo bamilengelaki bakendaki naye na libala mpe ekuke ya ndako ya libala ekangamaki. 11Sima ba oyo bakendaki kosomba mafuta bayaki mpe balobi;molakisi,molakisi fongolela biso ekuke. 12Solo solo nazali koyebisa bino nayebi bino te. 13Bomi lengela mpo ete boyebi mokolo te mpe ngonga te.14Mpo ete ekozala lokola moto oyo alingi kosala mobembo na mokili mosusu,abengi basali naye mpe akamboli bango bozwi naye. 15Na moko apesi mpata mitano,mosusu mpata mibale mpe mosusu mpata moko moto na moto azwi mbongo na motuya ekoki na nguya naye yako salela mpe moto yango akeyi na mobembo nayo. 16Noki-noki oyo azwa mpata mitano atieyango na misala naye mpe eboti mpata mosusu17Lolenge moko na oyo azwaki mpata mibale atiyango na misala eboti mibale mosusu. 18Kasi mosali oyo azwaki mpata moko akeyi kokunda yango bongo ya molakisi naye.19Tango eleki mwamoke,molakisi yabasa azongaki mpe atunaki bango. 20Mosali oyo azwaki mpata mitano abakisi mitano mosusu,mpe alobi molakisi opesaki ngai mpata mitano tala nabakisi mitano mosusu. 21Mpe molakisi alobi ezali malamu,obongisami namosala,ozalaki nalimemia na makambu ya moke mpe nakopesa yo ya mingi koleka,kota na esengo ya molakisi nayo22Ye oyo azwaki mpata mibale aye,tala nabakisi mpata mibale mosusu. 23molakisi alobi malamu,mosali ya sembo,ozalaki sembo na makambo ya moke nakopesa yo makambo ya munene,kota kati na esengo ya molakisi nayo.24Na suka,mosali oyo azwi mpata moko,akeyi mpe alobi ;molakisi naye ete ozalaka moto ya motema makasi,obukaka na esika oloni te,mpe okotaka na esika osalaki te. 25Na bangaki makasi,nde nakendaki kobomba mpata nayo nakundaki yango nasé ya mabele,tata,yango oyo nazongiseli yo.26Kasi kolo naye ayanoli: Na nkanza mpe botawu,oyebaki ete nabukaka esika oyo naloni te. 27Esengaki atiya mbongo na ngai na banke ,nakozonga na ngai mbele nazwi na matabisi.28Bobotola ye mpalata mpe bopesa na oyo azana yango zomi. 29Mpo ete na oyo azali na yango ,bakobakisela ye yango,kasi oyo azangi bakolongola ata ndambu oyo azali nayango. 30Bwaka mosali oyo azangi tina na molili libanda,esika ya milelo mpe kosuwa mino.31Tango mwana na moto akoya na kembo naye mpe elongo na ba angelou,akovanda ngwende na ye nakembo. 32Ba bikolo nionso ekosangana liboso naye mpe ye akokabola bato,lolenge mobateli mpate akabolaka ba mpate na ba ntaba. 33Akotiya ba mpate naloboko naye ya mobali,mpe ba ntaba na oyo ya mwasi.34Na boye mokonzi akoloba naba oyo bazali na loboko ya mobali:boya bino oyo bopambolamaki epayi ya tata na ngai,bozwi bokonzi oyo ebongisama mpona bino wita ebandeli ya mokili. 35Mpo nayokaki nzala bolesaki ngai , bopesaki ngai mayi natango ya posa ,nazalaki mopaya boyambaki ngai . 36Nazalaki bolumba bolatisaki ngai,nabelaki bosalisaki ngai mpe nazalaki na boloko boyaki kotala ngai.37Na bongo bato na sembo bakoyanola mokonzi;nkumu,tango nini tomonaki yo nanzala ?Tango nini topesaki yo yako lia? Tango nini topesaki yo yakomela? 38Tango nini toyambaki yo lokola mopaya? Tango nini tolatisaki yo bilamba ? 39Tango nini tomonaki yo kobela? Tango nini totalaki yo na boloko? 40Mpe mokonzi akoyanola solo-solo nazalikoyebisa bino,nionso oyo bosalaki mpona bandeko na ngai ezali nde na ngai bosalaki41Mpe akoloba naba oyo ya loboko ya mwasi:Bolongwa mosika na ngai,bolakelami mabe, bokende na motô yalibela oyo ebongisama mpona zabolo naba angelou naye. 42Mpo nayokaki nzala bopesaki ngai yako lia te,mpe nayokaki mposa bopesaki ngai yako mela te; 43nazalaki mopaya boyambaki ngai te; nazalaki bolumbu bolatisaki ngai bilamba te;nazalaki kobele mpe na boloko bino boyaki kobongisa ngai te.44Bakozongisela ye nakoloba ete;nkumu; tango nini tomonaki yo na nzala,na mposa ya mayi,mopaya,bolumbu,kobela ,na boloko mpe to salelaki yo te? 45Mpe akoyebisa bango na solo nazali koyebisa bino,oyo bino bosalaki te naba ndeko na ngai ezali na ngai nde bosalaki te. 46Mpe bango bakokende na moto ya libela mpe bato na sembo na bomoyi ya seke.
261Yesu asilisi maloba naye nyonso, alobi na bayekoli naye: 2« boyebi pasaka ekozala na sima ya mikolo mibale mpe mwana na moto akokabama mpo nakobakisama na ekulusu».3Bakonzi ya nganga Nzambe mpe ba nkumu ya bonka bayanganaki epai na nganga mokonzi Kaife. 4Basali likita mpona kokanga Yesu na nkuku mpe koboma ye. 5Balobaki ete ezali na kati na milulu te mpona bato batomboka te.6Yesu azalaki na Betania epai na simona moto na bokono bwa maba. 7Ezalaki bango na mesa kolia, Muasi moko aye epai naye na molangi na malasi na motuya na solo kitoko. Asopi yango na likolo na moto naye. 8Bayekoli basilikli mpe balobi, mpona nini libebi ya boye? 9Malamu malasi oyo esengeli etekama na motuya makasi, mosolo bapesa na babola.10Kasi Yesu lokola ayebaki bango alobi na bango, mpona nini bozali komitungisa mpona ntina na mwasi oyo? asali malamu mpo na ngai. 11Babola bakozala nabino tango nyonso, kasi bokozala na ngai libela te.12Tango asopi malasi na nzoto na ngai, asali yango mpona bokundami na ngi. 13Yasolo na yebisi bino, bipayi binso sango malamu oyo ekosakolama na mokili kombo ya mwasi oyo ekonzanga kosakolama te mpo na kokamisa ye.14Moko na bayekoli na kombo Yuda Isakaliota, akendeka na bakonzi ya banganga Nzambe. 15Mpe alobi, bopesa nga nini mpo na kaba ye na bino? Bapesakiye Ntuku misato na palata. 16Wuta mokolo wana alukaki lolenge yakokaba ye.
271Tango tongo etani, bakonzi ya baganga nzambe banso na ba nkumu ya mboka basali likita po na koboma Yesu. 2Sima ya kotia ye singa, ba mokumbi o boso bua Poso Pilato, mokonzi ya engumba.3Tango Ydasi moteki na Yesu amoni ete bakateli yesu etumbu ya kufa, ayoki pasi o motema, azongisi misolo tuku misato epayi ya bakonzi ya banganga nzambe mpe ba nkumu. 4Alobi: «Nsumuki zambi na sopi makila ya moto oyo asali mbeba te.» Bayebisi ye: « Ya biso nini? Etali yo.» 5Yudasi abuaki misolo tuku misato na kati ya ndako mosanto pe amityaki singa o kingo.6Bakonzi ya bangnga nzambe balokoti misolo pe balobi: «Epekisami kotya misolo ya makila o kati ya sanduku ya makabo.» 7Bayangani mpe basombi na misolo wana elanga ya mosali mbeki mpo na kokunda bapaya. 8Kino lelo, elanga ena ebiangami «elanga ya makila»9Boye nde ekokisami oyo elobaki mosakoli Yelemia: «Bakamati misolo tuku misato nde ntalo oyo bana Isalayele bandimi.» 10Epesamaki engebene motuya na elanga ya mosali mbeki ndenge mokonzi apesaki mitindo.11Sik'oyo bamemi Yesu o boso bua moyangeli pe atuni ye: «Yo nde Mokonzi ya bayuda? Yesu ayanoli: «Olobi» 12Kasi tango banganga nzambe pe bankumu bafundaki ye,ayanoli te. 13Bongo Pilato atuni ye: «Oyoki te ndenge bazali kofunda yo?» 14Kasi ayanoli ata moke te. pe moyangeli akamwaki penza.15Lkola momeseno, moyangeli azalaki kobimisa mokangami moko na eyanga ya Pasika oyo baponi. 16Natango wana, ezalaki na mokangami moko ayebanaki, nkombo na ye Balabasi17Tango basanganaki Pilato atuni: «Bolingi natika nani? Balaba to Yesu babengi Klisto?» 18Ayebaki ete bakabi Yesu po na zuwa. 19Efandaki ya ngbende ya bazuzi, mwasi na ye atindeli ye liloba: «Kosala moto wana mabe te, po natungisami mingi na butu ya lelo na ntina na ye.»20Nganga nzambe mokonzi na bankumu bandimisi bato mpo basenga Balaba mpe baboma Yesu. 21Moyangeli atuni bango: «Na bango mibale, bopni nani? Bazongisi Balaba» 22Pilato atuni bango, nasala boni na Yesu oyo babengi Klisto? Bayanoli: «Baka ye o ekulusu.»23Alobi: «Mbeba nini asali?» Kasi bagangaki lisusu makasi: «Baka ye o ekulusu.» 24Lokola Pilato alongi bango te, mpo babandaki kotomboka, azwi mayi, asukoli maboko liboso na bato, alobi: «Makila na ye na mutu na ngai te, bosala ndenge bolingi.»25Bato banso balobi: «Makila ma ye ekwela biso mpe bana na biso» 26Mpe atikaki Balaba, kasi abetisaki Yesu fimbo mpe apesi ye abakama na ekulusu.27Basoda ya moyangeli bakei na Yesu na esika ya kosamba, pe basangisaki kopani ya basoda. 28Balongoli ye bilamba mpe balatisi ye zambala ya motane ngwa. 29Batongi ekoti ya nzube mpe balatisi ye, bapesi ye lingenda na loboko ya mobali, kofukama mpe koseka ye. Bazali koloba: «Losako Mokonzi ya bayuda.»30Babwakeli ye nsoi, babeti ye fimbo na mutu. 31Sima ya koseka ye, balongoli ye kazaka, bazongisi bilamba na ye mpe bamemi ye mpo abakama na ekulusu.32Tango babimi, bakutani na Simoni ya Silene, bakumbisi ye ekulusu na makasi. 33Ekomi bango na Gologata, elingi koloba: « mokuwa ya moto» 34Bapesi ye masanga basangisa na mayi ya bololo, tango ameki, aboyi komela.35Sima ya kobaka ye na ekulusu, bakaboli bilamba na ye mpe babeti yango mbese. 36Mpe bafandi kosenzela ye. 37Bakomaki ntina ya etumbu na likolo ya mutu boye: «Ezali Yesu, Mokonzi ya Bayuda.»Babaki ye na miyibi mibale,moko na ngambo ya mobali mpe mosusu ngambo ya mwasi. Baleki nzela bazalaki kofinga ye mpe koningisa mitu. Mpe koloba: «Olobaka ozali na makoki ya kobuka ndako nzambe mpe kotonga yango na mikolo misato.
281Sima na Sabate, na tongo ya mokolo ya liboso ya boso, Mali a ya Magadala mpe Malia mosusu, ba kendaki mpona kokota na nkunda. 2Tala mabele eninganaki makasi, mpo muanze akitaki na likolo, aye mpe alongli libanga mpe afandi likolo na yango.3Lolenge na ye ezalaki kongala lokala moi mpe bilamba na ye ezalaki pembe makasi. 4Bakengeli ba bangaki makasi mpe ba komaki lokola bakufi.5Mwanze asololi na basi mpe alobi na bango, bi tjungisa te, na yebi ete bozali koluka Yesu oyo babakakiye na ekulusu. 6Aza lisusu awa te, asekwi lolenge alobaki. Boya mpe botala esika oyo batiaki ye. 7Bokende noki mpe boloba na ba ayekoli naye: « Asekwui kati na bakufi mpe botala , azali kokende liboso na bino na galileya. Kuna nde bokomonaye». Boye nalobi na bino.8Bopye basi balonguaki noki noki na lilita ba tondaki na nsomo mpe na esengo, bakimaki mbangu epai na bayekoli. 9Kasi tala Yesu akutanaki na bango mpe alobi: « kimia ezala na bino» BAsi basi bakei mpona kosimba makolo naye mpe ko fukamela ye. 10Boye Yesu alobi na bango, « bozala na bobangi te. Boloba na bandeko nanga bakende na Galileya kuna nde bakomona ngai».11Tango bazali kokende na nzela, ndambo ya bayekoli bakoti na engumba mpe balobi na ba nganga Nzambe makambo nyonso elekaki. 12Tango na ba nganga bakutanaki na bampaka mpe basololaki na makambo yango, bapesaki misolo mingi na ba solda . 13Mpe bayebisaki bango baloba ete bayekoli na Yesu bayaki koyiba nzoto naye na butu tango tozalaki na pongi.14Soki likambu oyo oyokani na matoyi ya moyangeli ya etuka biso tokokitisa motema naye mpe bokozua etumbu moko te. 15Boye basoda bazuaki mmbongo mpe basalaki ndenge ba teuaki bango. Makele wana epanzani kati na bayuda kino moyi mua lelo.16Kasi ba zomi na moko bakenadaki na galileya na ngomba oyo Yesu alakisaki bango. 17Tango bamonaki ye, bafukamelaki ye kasi ba mosusu batiaki tembe.18yesu apusanaki pembeni na bango alobi na bango boye: « Bokonzi nyonso epesameli ngai na likolo mpe na nse. 19Bokende bokomisa mabota nyonso bayekoli, ba batisa bango, na kombo na Tata mpe na muana mpe na molimo mosanto.20Bo lakisa bango batosa makambo nyonso na lakisaki bino. Mpe tala ngai nazali na bino kino suka ya mokili».

Malako

11Awa ebandeli na sango malamu na Yesu-Christu, mwana na Nzambe. 2Bo ekomami o mokanda mwa mosakoli Isaya; natindi o boso bwa yo mosakoli wa ngai, ye nde akobongisa nzela na yo. 3Azali mongongo ya moto oyo azali konganga o lisobe ete: Bongisa nzela ya Mokonzi, mpe bosembola bilekeli bia ye.4Yoane abimi pwasa, kolakisa bato o lisobe, mpe koteyaka libatisi ya mbongwana, mpo na bolimbisi ya masumu. 5Etuka mobimba ya Yudea elongo na bayei mboka Yelusalemi, bazalaki kokende epai na ye, kotubela masumu na bango mpe kozwa libatisi. 6Molato ya Yoane ezalaki bongo mposo ya mpunda ya lisobe mpe mokaba ya mposo ya nyama, mpe azalaki kolia mpasu mpe mafuta ya nzoyi ya nzamba.7Mateya na ye azalaki kolobela nguya ya moto akoya sima naye, mpe bozangi nguya epai ne ye, mpo akoki kofungola ata sapato na ye. 8Ngai nabatisi bino o mai, ye akobatisa bino na molimo mosantu.9Eutaki Yesu na Nazareth kokenda Galilea. Abatisamaki na Yoane, na ebale ya Youludani. 10Sima ya libatisi na ye o ebale Youludani, likolo efungwami mpe Molimo mosantu ayei na ye lokola ebenga 11mpe mongngo makasi kowuta o mapata, koloba ete: oyo azali mwana na ngai wa bolingo, esengo na ngai12Mpe molimo ekumbi ye na lisobe . 13Asalaki mikolo tuku minei na lisobe, kuna amekamaki na satana, mpe ba mwanze bazalaki nzinga-nzinga na ye, kosenzela ye na nyama ya nzamba.14Sima ya bokangami ya Yoane, Yesu akomi o mboka Galilea, mpe abandi kosakola sango malamu ya Nzambe. 15Nakolobaka: « ngonga ebeti mpo na boyeyi bwa bokonzi bwa likolo. Bobongola mitema mpe bondima sango malamu.»16Ezalaki ye koleka pembeni ya mayi ya mboka Galilai, amoni balobi mbisi babale, Simoni na Andele. 17Yesu alobi bango: «boya mpe bolanda ngai, nakokomisa bino balobi ya bato» 18Na lombangu basundoli minyama na bango, mpe balandi ye.19Ezalaki Yesu kotambola mwa mosika na ebale, amoni Yakobo, mwana na Zebede, elongo na ndeko na ye Yoane, kati na bwato kobongisa minyama. 20Abiangi bango, na mbisa batiki tata na bango Zebede kati na bwato, elongo na basali, mpe bango balandi ye.21Ekomaki ye na Capernawume, o mokolo mwa eyenga, Yesu akendaki na eyanganelo ya bayuda mpe ateyaki. 22Bato bakamwaki mateya na ye mpo azalaki koteya lokola moto azali na bokonzi kasi lokola bakomi na mibeko te.23Bobele na ngonga ena, moto moko azalaki na molimo na mbindo kaki na eyanganelo ya bayuda, angangi makasi 24koloba boye: «Biso na yo likambo nini? Yesu na Nazarete, oyei mpo obebisa biso? ozali mosantu na Nzambe. 25Yesu apameli molimo na mbindo ete: Fanda kimia mpe bima kati na yeᵎ» 26Na mbisa molimo na mbindo ekweisi ye o nse mpe ehami.27Bayi mboka batondaki na nsayi, na kokamwa soki mateya etonda bokonzi boye, ewuti waqpi? oyo ekopesa mitindo na milimo mbindo mpe kotosa ye. 28Bongo sango yango epanzanaki noki o mboka Galilai.29Mpe sima ya kobima na ye o eyanganelo ya bayuda, akei o ndako ya Simoni mpe Andele, elongo na Yakobo mpe Yoane. 30Nzoka nde bokilo na Simoni azalaki kobele mpe balobelaki Yesu na ntina na ye. 31Bongo Yesu abelemi mpe akwi ye na loboko mpe atelemisi ye ngwi, bokono bosili mpe abandi kosalela bango o ndako.32O pokwa yango, bamemeli ye baoyo yonso bazalaki na bokono mpe milimo ya mbindo. 33Engumba mobimba eyanganaki o ekuke. 34Abikisi babeli nzike mpe abengani milimo mbindo, kasi alingaki te ete milimo na mbindo koloba, nzambi ayebaki bango.35Lokola molili ezaki naino, atelemaki mpe akeyi ye moko o esika ya bobombami, wana nde abondeli. 36Simoni, elongo na baoyo bazalaki na ye, baluki ye. 37Ekuti bago ye mpe balobi na ye :« Batu banso bazali koluka yo»38Alobi: « tohama, tokenda bingumba nzinga-nzinga, mpo nateya lokola, yango mosala nayeli. 39Bongo angaikaki Galilai mobimba, koteya o biyanganelo ya bayuda mpe kobengana milimo mbindo o kaki ya bato.40Moto na maba moko abelemi na ye, alombi ye mabolongo o nse koloba :« soko okoki kokomisa ngai peto.» 41Yesu atondisami na mawa, asemboli loboko mpe asimbi ye mpe alobi boye:« Nalingi. koma peto.» 42Mbala yoko, bokono bwa maba bokei, mpe akomi peto.43Yesu akebisi moto ona mpe azongisi ye, 44na koloba boye: koyebisa moto te, kasi kenda komitalisa epai ya nganga Nzambe, mpe pesa mbeka bo elobi Mose na ntina na kopetolama, lokola litatoli epai na bango.45Kasi abandaki koyebisa na moto yonso mpe sango yango epanzani na lolenge ete Yesu akokaki kokota na kimia te na bingumba, mpe afandaki na esika na ye moko, nde bato bazalaki koya apai na ye.
21Sima ya mikolo, Yesu azongaki na Capernawume. tango bato bayokaki bozongi naye, 2ebele bayanganaki kino esika ezalaki lisusu te. Yesu ateyi bango liloba na Nzambe.3Bato mosusu bamemeli Yesu ebosono moko, amemami na bato minei. 4Lokola bato bazalaki ebele, esika ya kokomisa moto ona epai na Yesu ezalaki te. babuti o likolo ya ndako, batoboli mpe bakotisi ye, alali likolo ya mbeto liboso ya Yesu.5Yesu amoni kondima na bango, alobi na ebosono: «Mwana na ngai, masumu na yo malimbisami» 6Bakomi mikanda mosusu bafandaki wana, bakanisi o mitema mia bango: 7«Ebandi boni moto oyo aloba boye? Atuki Nzambe I Nani akoki kolimbisa masumu soko Nzambe te?»9Yesu lokola ayebaki makanisi na bango, alobi na bango: mpo na nini makanisi boye o mitema mia bino? 8Nini ezali pet koloba, masumu na yo elimbisami to telema kamata mbeto na yo mpe kenda?10Kasi mpo boyeba ete mwana na moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu, alobi na ebosono: 11telema! zonga na ndako na yo. 12Atelemi mbala moko, azwi etoko na ye mpe akei. bato yonso bakamwi komona yango mpe bakumisi Nzambe koloba boye: «Naino tomona likambo ya boye te.»13Yesu atiki Capernaum mpe atamboli pembeni na libeke. Etuluku ya bato bayei mpe ateyi bango. 14Tango abandi koleka, amoni mwana ya lewi, Alfe. afandaki esika na ye ya mosala mpo nakofutisa pako. Yesu alobi na ye «landa ngai.» Atelemi mpe alandi Yesu.15Sima na mikolo Yesu azalaki kolia o ndako ya Lewi elongo na basumuki mpe bayekoli na ye, bazalaki ebele kolanda ye. 16Balakisi mibeko mpe bafalisayo batuni bayekoli : «Mpo nanini azali kolia mpe komela elongo na basumuki mpe bakongoli mpako?»17Yesu, sima na koyoka yango, alobi na bango: Bato oyo bazali nzoto kolongonu, bazalaka na posa ya monganga te. Bobele babeli. Nayaki koluka bayengebene te, kasi basumuki/18Bato mosusu bayei mpe batuni Yesu: «Ntina nini bayekoli ya Yoane mpe Bafalisayo bakilaka kasi oyo ya yo te?.» 19Yesu ayebisi bango : Bomona wapi babiangami na libala bazali kokila tango bazali elongo na mobali ya libala? Tango yonso bazali elongo na mobali ya libala, bakoki kokila te.20Kasi mikolo mikoya, wana mobali ya libala akoazala elongo na bango te, nde bakokila o mikolo mina. 21Moto moko te atongaka elamba ya sika likolo ya oyo ya kala, elingi koloba ete moko mpe mosusu ekopasuka makasi.22Bongo Yesu abakisi; moto moko te atiaka vinio ya sika o kati ya mbeki ya kala, pamba te, vinio ekopasola mbeki, mpe bakozanga vinio na mbeki. «Kasi , esengeli kotia vinio ya sika o mbeki ya sika.»23O mokolo mwa eyenga, Yesu azalaki koleka kati na bilanga ya masangu mpe bayekoli na ye babandi kobuka mbuma na yango. 24Bongo Bafalisayo balobi na ye: «mpo na nini bazali kosala oyo mobeko elingisi te mokolo mwa eyenga?»25Ayanoli bango: Batanga naino te oyo Dawidi asala, wana ezalaka ye na bosenga mpe nzala? (ye na bato azalaka na bango) 26Lolenge bakotaki o ndako Nzambe tango Abiatale azalaki nganga Nzambe mokonzi, baliaki kwanga ebulisami (eloko oyo epekisami na moto yonso longola banganga nzambe) mpe apesaki baoyo bazalaki na ye elongo.27Yesu asukisi boye: mokolo mwa eyenga esalama mpo na moto kasi moto asalama mpo na mokol mwa eyenga te. 28Yango wana, mwana na moto azali mokonzi ya mokolo mwa eyenga.
31Yesu-Christu akoti na eyanganelo, wana ezalaki moto moko na loboko ya kokauka. 2Bamosusu bazalaki kotala ye soko akobikisa ye mokolo ya eyenga mpo bakamba ye.3Yesu alobi na moto wana : «Telema wana na kati.» 4Mpe alobi na bango : «Epesameli biso ndingisa kosala malamu to mabe mokolo ya eyenga, kobikisa to koboma?» Batikali nye.5Na mawa na ntina na mitema mabe na bango, alobi na ye :«Sembola loboko na yo.» Asemboli mpe Yesu abikisi yango. 6Na lombango, bafalisayi babimi mpe basali likita elongo na baherodia mpe bayokani baboma ye.7Yesu na bayekoli na ye bakei pembeni na ebale, mpe ebele na batu bauti Galilai mpe Yudee, 8mpe Yelusalema, bingumba ya Yude, ya Idumeya koleka Yordani mpe mboka nzinga-nzinga na Tir mpe Sidon; ebele ya bato bayei epai na Yesu wana eyokaki bango sango.9Alobi na bayekoli na ye babongisela ye ebiei, lokolabato bazalaki ebele. 10Pamba te, ebele na bato na bokono balingaki kosimba ye loenge abikisaki ebele.11Milimo na mbindo o tango emonaki ye, efukamaki mpe engangaki : «Yo oazali mwana na Nzambe.» 12Apameli bango mpo ayebana te.13Abuti na ngomba, abiangi baoyo alingi mpe bayaki na ye. 14Aponi zomi na mibale, mpe abiangi bango bantoma. Na ntina ete atinda bango koteya, 15na bokonzi ya kobengana milimo mabe. 16Aponi zomi na mibale : Simona, oyo apesaki nkombo ya Petelo;17Jaki mwana na Zebede, Yoane ndeko na Jaki oyo apesi nkombo ya Boanegès, elakisi mwana na nkake; 18mpe Andele, Filipo, Batelemi, Matai, Toma, Jaki mwana na Alfe, Tade, Simona Zelote, 19mpe yuda Iscariote oyo akoteka ye.20Sima na yango, bakendaki o ndako, mpe etuluku ya bato basanganaki lisusu kino bakokaki kolia biei ya bango te. 21Tango libota eyoki yango, bayei koluka mpe bakanga ye. balobaki boye :«azangi mayele.» 22Bakomi mibeko bauti Yelusalema balobi boye : «Azali na molimo ya Belzebulu. Mpe na nzela ya mokonzi ya milimo mabe nde azali kobengana milimo mabe.»23Yesu abengi bango nzinga-nzinga na ye mpe alobi na bango na masese: «Ndenge nini Satana akoki kobengana Satana? 24Soko bokonzi ekabwani kati na yango moko, bokonzi wana ekoumela te. 25Soko ndako ekabwani kati na yango, ekoki kotelema te.26Soko Satana atomboki kati naye moko, akabwani, akokoka kosala eloko te, akomi na suka. 27Pamba te , moto moko te akoki kokota na ndako na moto makasi mpe koyiba biloko na ye soko akangi ye singa mpe kozwa biloko na ndako.28Solo nalobi na bino :«Masumu ya bato ekolimbisama mata kotuka; 29kasi kotuka molimo mosantu ekolimbisama te mpo ete moto wana amemi lisumu ezangi suka.» 30Yesu alobi boye mpo balobi na ye: «azali na milimo mbindo.»31Mama mpe bandeko na ye bazalaki libanda, mpe batindi moto kobenga ye. 32Ebele na bato bazalaki nzinga-nzinga balobi na ye: «Mama mpe bandeko na yo bazali koluka yo libanda.»33Yesu alobi na bango:«Nani mama mpe bandeko na ngai?» 34Atali baye bazalaki penepene na ye, alobi: «Tala!mama mpe bandeko na ngai. 35Oyo azali kosala mokano na Nzambe, azali ndeko mobali, mwasi mpe mama na ngai
41Sika Yesu abandi kotangisa libanda na mai monene. Etuluku ya bato bazingaki ye; yesu afandaki na bwato likolo na mai monene mpe bato bafandaki na pembeni na mai. 2Atangisi bango makambo mingi na masese mpe alobi na bango na kati ya matangisina ye,3Boyokamela, 4moloni abimi mpo na kolona. Tango azalaki kolona, ndambu na mbuna ekweaki na nzela mpe bandeke baliaki yango. 5Mbuma mosusu ekweaki likolo ya mabele oyo ezalaki na mabanga mike mike, na bongo mpe ekolaki noki te pamba te mabele ezalaki penza mozindo te.6Yango ezikaki mpe ekaukaki nioso na moi po ezalaki na misisa te. 7Na bongo ndambu mosusu ya mbuma ebotaki mbuma te po te yango ekweaki likolo ya nzete ya nzube pe ezipaki yango8Milona oyo ekweaki na mabele kitoko, yango ebimaki na nkona ya kolandisama tuku minei, tuku motaba pe mokama. 9Pe alobi, oyo azali na matoyi ya koyoka, ayoka10Tango Yesu atikali ye moko, bayekoli pe bato bazalaki pembeni na ye, batunaki ye na ntina na masese. 11Ayebisi bango, «na bino nde bokonzi ya Nzambe epesameli, kasi masese po na baoyo bazali libanda, 12na ntina ete tango bazali kotala, bamona te, pe tango bazali koyaka, basosola te, po babongola motema te pe Nzambe alimbisa bango.»13Kasi alobi na bango: «Bososoli lisese te? Ndenge nini bokososola masese mosusu? 14Moloni akokani na moteyi sango malamu. 15Bamosusu bakokani na nzela. Liloba na Nzambe eyeli bango lokola mbuma na nzela. Tango bayoki yango, satana abotoli bango o mitema.16Bamosusu bazali lokola mbuma ekweyi na mabele ya mabanga, bayoki liloba na Nzambe, bayambi yango na esengo. 17Boye misisa ya nzete ezwi esika te o mitema na bango, bayambi boye mpo na tango moke. Sima na mikakatano mpe minioko na ntina na liloba na Nzambe, babwaki boyambi na bango.18Bamosusu bazali lokola mbuma ekweyi na kati na nzube, bayambi liloba naNzambe, 19na tina na mikakatano ya mokili, posa ya bozwi ekoti ebele, mpe makambo mosusu mingi ebomi liloba wana, mpe ekoti te. 20Boye bamosusu bazali lokola mbuma ekweyi na mabele malamu. Bayoki liloba na Nzambe, bayambi yango, boye baboti mbuma malamu; tuku misato, tuku motoba mpe nkama moko.21Yesu alobi na bango: moto nani ayei na mwinda, atii yango o nse ya katini to o nse ya mbeto? bobele o likolo ya mesa. Boye te? 22Boye oyo ebombami ekoyebama, mpe sekele ekoyabana. 23Soko moto azali na matoyi ya koyoka, tika ayoka.24Bongo Yesu alobi na bango lisusu: « Bokeba na oyo bazali koloba na bino. Lolenge na bino ya bososoli makambo ya Nzambe, boye Nzambe akopesa bino bolamu na ye koleka. 25Mpo ete oyo azali na biloko mingi, akozwa mosusu; nde oyo azali na yango te, bakobotolo ye ata ndambu azali na yango.26Alobi: «Bokonzi ya Nzambe yango ezali lokola moloni nkona na mabele. 27Ayebaka te tango nini mbuma ebotaka malamu. 28Na tango ye alalaka pe alamukaka, mabele yango moko ebotaka mbuma, ya liboso ebimisaka nzete, bongo likol na nzete na yango nkona ya kokola. 29Pe bongo mbuma na yango eteli, na lombango azwaka nkona po na tango ya kobuka ekoki.30Pe alobi: « Tokoki kokokisa bokonzi na Nzambe na nini? to lisese nini tokoki kosalela pona kolimbola yango malamu? 31Lokola nkona ya moutarde, tango elonami, 32yango nde ezali mike penza yango ekolaka na lombango koleka nkona nioso ya elanga pe bitape na yango nde bandeke batongaka zala na bango.»33Na masese ebele boye, azalaki kotalisa bango liloba kino bakoma na makoki ya kososola malamu, 34pe azalaki kolobela bango lisusu na masese te. Kasi tango azalaki kotikala ye moko, azalaki kolimbola bayekoli na ye.35Na mukolo wana, ayebisaki bango, «tokende na ngambo mosusu na ebale» 36Na yango, bayekoli balongwaki kati na etuluku ya bato pe bakendaki elongo na Yesu po ete Yesu azalaki nkati na bwatu. Kasi bwatu mosusu ezalaki na esika wana. 37Pe mbonge na mopepe makasi eyaki pe etondisaki mai kati na bwatu.38Kasi Yesu azalaki kolala kati na bwatu. Bongo bazalaki kolamusa Yesu pe balobi na ye: «Mokonzi ozali kokanisa te tozali kokufa?» 39Pe tango alamukaki, agangelaki mupepe pe ayebisaki ebale: «Kimia » Pe mupepe esilaki pe kimia makasi ekotaki.40Pe alobaki na bango: «Bozali kobanga nini? bozangi kondima?» 41Bobangi ezwi bango pe bamituni moko pe mosusu: «Ye azali nani? po ete mupepe na ebale etosa ye.»
51Bakatisi o ngambo ya ebale monene okati ya bai Gadalamea. 2Na pwasa o eleko Yesu abimi na ebeyi, moto ya milimo ya mbindo abimi o kati ya mayita mpo na bokutani na ye.3Efandeli ya moto oyo ekomaki bobele na mayita, kasi moto moko te, akokaki kokanga ye na minyololo. 4Bakangaki ye mbala nzike na minyololo mpe mabende, azalaki bobele kokata yango. Ata ko moto te, abelemaki pembeni na ye.5Mikolo nyoso moi mpe butu, azalaki kowaya-waya kati na mayita mpe likolo ya bangomba. Azalaki bobele konganga makasi mpe komizokisa na mabanga. 6Na komona Yesu na mosika, apotaki mbangu mpe amikitisaki o boso bwa ye.7Abeleli na makasi: «Ngai na yo toweli nini Yesu mwana na mokonzi Nzambe? Nabondeli yo na nkombo ya Nzambe otungisa ngai te.» 8mpo Yesu azalaki kopesa mitindo ete «milimu mabe ebima kati na moto oyo».9Yesu atuni ye: «yo ozali nani?» «Ngai nazali mapinga mpo ete tozali bayike» 10Bongo babondeli Yesu ete abengana bango na etando ya mabele wana te.11Na eloko wana, ebuluku ya bangulu ezalaki kolia na nzinga nzinga na ngomba, 12bongo milimo na mbindo esengi Yesu et, «pesa biso mitindo tokota kati na ebuluku na bangulu. 13Tango bazwi mitindo ya Yesu, milimo ya mbindo ehami na kati ya moto wana, na boye eyingeli kati na bangulu. Nde boye, bangulu bakilingani uta na bangomba, mpe izindi yonso o kati ya mai na motango pene-pene koto mibale.14Bakengeli ya bibwele ya ngulu bapoti mbangu kopesa sango na engumba, mpe na ba mboka nzinga-nzinga, na maye elekaki, bongo bato bayike bayaki kokamwa na maye malekaki. 15Bapusanaki pene na Yesu, bongo bakuti moto oyo azalaki na bazabolo ebele, afandi na molato kitoko mpe na limemya, mpe bobangi ekoti kati na bango.16Baye bamonaki maye ma utaki koleka na moto azalaki na bazabolo, bapesi mpe bango sango na oyo ekomelaki mpe ebuluku na ba ngulu. 17Bayebisi Yesu abima na engumba na bango.18Wana Yesu aingelaki o ebei, moto oyo abikisamaki na milimo ya mabe, asengaki kokenda na ye elongo. 19Kasi Yesu alingisaki ye te. Alobi na ye boye: Zonga o ndako na yo, yebisa na libota na yo bolamu mpe mawa na Nzqmbe asaleli yo. 20Bongo akendaki na etando kosakola makambo yonso ya minene Yesu asalelaki ye, mpe moto yonso akamwaki.21tango Yesu akotaki o ebei o ngambo ya ebale, etuluku ya bato bazingi ye,bongo atelemaki pene-pene na ebale monene. 22Moko ya bakambi ya eyanganelo ya bayuda na nkombo ya Yaliusi ntango akomi, mpe amoni Yesu, amikitisi na makolo na ye. 23Asengi na ye na kolela penza et abikisa mwana na ye azali na mpasi, soki alingi koya kobikisa ye. 24Yesu akendaki na ye elongo, boyike na bato balandi ye, mpe bazingeli pembeni.25Nzoka nde ezalaki na mwasi moko oyo azalaki na bokono mbula zomi na mibale, kotangisa makila. 26Amonaki mpasi mingi ata baminganga, bakokaki kobikisa ye. Abebisaki misolo ebele, kasi mpasi eyaki koleka lisusu. 27Ayokaki sango na Yesu. Bongo apusanaki sima na ye, tango Yesu azali kotambola, asimbi songe ya elamba na ye.28Nde azwi makanisi ete, soki nasimbi elamba na ye, nakobika. 29Na ngonga asimbi yango, ayoki an kati na ye lobiko, bongo ayoki penza ete nzoto ekomi kolongonu, mpasi yonso esili.30Na pwasa Yesu ayoki kati naye ete nguya ebimi mpe atuni na batu nzinga-nzinga; nani asimbi elamba na ngai? 31Bayekoli bayonoli ye, ozali komona ebuluku ya bato baye bazali nzinga-nzinga; mpe ozali kotuna nani asimbi yo? 32Bongo Yesu aluki pembeni na ye, moto oyo asali bongo.33Mwasi oyo kososola makambo oyo ndenge elekaki na ye, mpe ayamboli kati na nsolo. 34Alobi na ye, mwana, kondima na yo ebikisi yo. Kenda na kimia, obikisami na mpasi na yo.35Na ngonga azalaki kosolola na ye, batu bauti na ndako na eyanganeli ya bayuda kopesa nsango ete tika kotungisa Mokonzi, mwasi asili kokufa.36Kasi Yesu tango ayoki masolo na bango, ayebisi mokonzi na eyanganelo ya bayuda ete, kobanga te. Zala na kondima. 37Alingisaki te moto alanda ye, abengi bobele Petelo, Yakobo mpe Yoane, ndeko na Yakobo. 38bakei o ndako ya capita ya eyanganelo ya bayuda. Akuti bato ebele kolela mpe konganga makasi.39Ntango aingeli kati na ndako; Alobi na bango mpo na nini bozali komitungisa mpe kolela? Mwana akufi na ye te, kasi alali mpongi. 40Bango batioli ye, kasi ye abimisi bango yonso libanda.Akamati bobele baboti na mwana, mpe bato bayaki na ye, bakoti esika mwana azalaki.41Asimbi mwana na loboko mpe alobi na ye : « Talitha Koumi» elimboli ete: « Moseka, napesi mitindo, Telema» 42Na lombangu mwana atelemi mpe atamboli, (azalaki na mbula zomi na mibale) Ekamwisi bato yonso. 43Apesi mitindo ete, bapanza sekele oyo na moto moko te. Ayebisi na baboti bapesa ye bileyi.
61Yesu alongwi wana mpe akei na mboka na ye, mpe bayekoli na ye balandi ye. 2Mokolo na eyenga, abandi koteya na etonga, ebele bayoki mpe bakamwi. Batuni: azwi malakisi oyo wapi? Nani apsesi ye bonya boye? mpe azali kosala bikamwisi boye? 3Ezali ye mwana na mosali mabaya te, mwana na Malia mpe ndeko na Yakobo, Jose, Juda mpe Simoni? Mpe bandeko na ye ya basi bazali awa kati nabiso te? Baboyi kondimela ye.4Boye Yesu alobi na bango: Lokumu epesameli mosakoli bisika yonso, kasi na mboka na ye te, baoyo ya ye te mpe ndako na ye te. 5Yesu akokaki kosala bikamweseli te soko kotia maboko na babeli mpe kobikisa bango. 6Boye mitema makasi na bango ekamwisi ye mpe akei na ye bamboka nzinga-nzinga.7Abengi bazomi na mibale mpe atindi bango babale babale, mpe apesi bango bokonzi likolo ya milimo yonso ya mbindo; 8Apesi bango mitindo bazwa eloko moko te ezali bino kokenda, bilei te, libenga te, mosolo te soko bobele pango; 9sapato mpe kazaka mibale te.10Alobi na bango: Na tango yonso bakoyamba bino na ndako, boumela wana. 11Kasi soko bayambi bino to bayoki bino te, bobima na mboka wana mpe bopupola putulu ya matambe bino, yango nde litatoli mabe epai na bango.12Boye bayekoli bakei mpe babandi koteya bato ete babongola mitema. 13Babengani ebele ya milimo mabe, mpe babikisi bato ebele.14Mokonzi Herode ayhoki sango yango, zambi kombo na Yesu eyebanaki mingi. Bamoko balobaki: «Yoane mobatisi asekwi! yango nde azwi nguya ya kosala bikamweseli lolenge boye.» 15Boye basusu balobaki :« azali Elia», bamosusu balobaki:« azali mosakoli, lokola moko ya basakoli ya kala.»16O eleko Herode ayoki boye, alobi: «Yoane oyo nakataki moto asekwi!» 17Zambi Herode akangisaki ye mpe atiaki ye na boloko na ntina na Herodias, mwasi ya Filipo ndeko na ye, oyo abalaki.18Mpo ete Yoane apekisaki ye, na koloba ete: «Ezali malamu te kobala mwasi na ndeko na yo kolandisama na mibeko». 19Kasi Herodias abomba kanda na motema mpe akanaki koboma ye nde azangaki makoki, 20pamba te Herode azalaki kobanga Yoane; mpo ayebaki ete azali moto malamu mpe mosantu, boye abatelaki ye ete azwa mabe te. Koyoka masakoli na Yoane, ekopesa ye mpasi; atako bongo, asepelaki koyoka ye.21Boye na mokolo ya bokundoli mbotama ya Herode, tango malamu emonani mpo na kokokisa mokano na Herodia. Bakonzi ya mapinga, mpe bakambi ya Galilai babiangamaki na milulu yango. 22Ezalaki bango o mesa, mwana ya Herodia ya mwasi akoti mpe abineli Herode na babiangami na ye. Asepelisaki bango koleka. Mokonzi alobi na ye: «Senga ngai eloko yonso olingi, boye nakopesa yo yango.23Akati ndayi, alobi:«Yonso okosenga ngai, nakopesa yo yango, ezala ndambo ya mboka na ngai.» 24Elenge mwasi abimi mpe atuni mama na ye: «Nasenga nini?» Alobi na ye: «Moto ya Yoane mobatisi.» 25Mbala moko, akoti na lombango epai ya mokonzi mpe atuni ye koloba: « Nalingi moto ya Yoane mobatisi na kati ya saani.»26Mokonzi ayoki mawa mingi koleka, kasi na ntina ya ndayi alapaki mpe liboso na babiangami na lipati, akoki koboya bosenga na ye te. 27Bongo atindi soda moko amemela ye moto ya Yoane mobatisi. 28Soda akei mpe akoti na boloko mpe akati moto ya Yoane. 29Eyoki bayekoli na Yoane boye, bakei mpe bakamati ebembe ya ye mpe bakundi yango.30Bantoma, basanganaki nzinga-nzinga na Yesu, bayebisi ye yonso oyo basalaki mpe bateyaki bato. 31Alobi na bango: «Bokende esika na kimia kati na lisobe mpe bopema naino.» Mpo ete bazalaki ata na ngonga ya kolia te. 32Boye bakoti na bwato mpe bakei esika moko ya kimia.33Kasi bato bamoni lolenge bakei mpe ebele bayebaki yango. Mingi bautaki na bingumba yonso, balandaki ye mpe bakomaki esika yango liboso na Yesu. 34Awa ekiti bango na bwato, amoni boyike bwa bato mpe ayokeli bango mawa mingi mpo bazalaki lokola mpate ezangi mobateli. Mpe abandi koteya bango makambo mingi.35Sima ya tango molai, bayekoli bayei koyebisa ye: «Esika oyo ezali esobe mpe ntango esili koleka. 36Zongisa bango o mboka nzing-nzinga mpo bamisombela bilei.»37Ayanoli bango mpe alobi boye: «Bino bopesa bango bilei.» Batuni ye: «Tokoki kosomba kwanga na mosolo nkama mibale mpo topesa bango?» 38Atuni bango: «Bozali na kwanga boni? Bokenda mpe botala.» Sima na kotala, balobi: « Biteni mitano mpe mbisi mibale.»39Yesu alobi na bato bafanda bisika bisika. 40Bafandi bongo, mosusu nkama mpe mosusu tuku mitano. 41Akamati biteni mitano ya kwanga mpe mbisi mibale, atali likolo, apamboli, akatikati kwanga mpe apesi bayekoli bakobola yango. Akaboli mbisi mibale mpe lokola.42Bato yonso balei mpe batondi. 43Balokoti biteni ya kwanga mpe ya mbisi oyo etikali, yango etondisi bikolo zomi na mibale. 44Boye motwiya ya mibali baliaki, ezalaki koto mitano.45Sima na yango, Yesu amatisi bayekoli na ye na ebei mpo bakenda kozila ye na ngambo na Bethsaïda wana ezalaki kozongisa bato na mboka na bango. 46Tango bakei, ye akei na ngomba mpo nakobondela. Na 47pokwa, ebei ezalaki kati ya ebale mpe Yesu azalaki ye moko na mokili.48Amoni ete bayekoli bazaki na mikakatano ya kotambwisi ebei mpo na mopepe. Pene na tongo kotana, Yesu abandi kotambola likolo ya mai, mpe ayei epai na bango. 49Emoni bango ye kotambola likolo ya mai, bakanisi azali elima, mpe babandi konganga, 50pamba te bayoki somo mingi. Boye Yesu alobi na bango: «Ezali ngai! Bobanga te!»51Akoti na ebei elongo na bango mpe mopepe esili. Bayekoli bakamwi mingi penza koleka. 52pamba te, bazalaki kososola te biteni mitano elimboli nini. Kasi mitema na bango ezalaki bobele makasi.53Tango bakatisi mai, bakomi na Genesaret, bakangi ebei na libongo. 54Ebimi bango na ebei, mbala moko bato bayei koyamba Yesu. 55Bongo bakei mbangu kokamata bato na bokono na mboka mobimba; koya na bango bisika yonso bayebi ete Yesu akoleka wana.56Bipai binso Yesu azalaki koleka, ezala na mboka ya minene to ya mike to na bingumba, bazalaki kotia babeli na balabala mpe kobondela Yesu ete apesa bango nzela ya kosimba ata songe ya elamba na ye. Mpe bato yonso oyo bazalaki kosimba ye, babikisamaki.
71Bafalisayo bayei kokutana pembeni na Yesu, na ndambo ya balakisi mibeko bawutaki Yelusalem2Bamonaki te batekoli na Yesu bazalaki kolia bileyi na maboko bosoto, basukoli maboko te. 3Po ba Falisayo na ba Yuda baliaka te nano basukoli maboko te, lolenge mitindo ya ba mbuta mutu ezalaki kotinda. 4Na ntango ba Falisayo bawutaka na bisika oyo bakutana ka, bako kaka kolia nano basukoli te. Ezali na makambo mosusu oyo ba Yuda bazalaki kosala mpe kosukola bisaleli ya makusa mpe bisika ya kolia.5Ba Falisayo na ba lakisi mibeko batuni Yesu: "Mpo nini ba yekoli na yo batosaka moboko ya mateya oyo ba mbuta muntu bapesa mitindo ete baliaka kwanga maboko bosoto te ?"6Yesu ayanoli bango : Bato na lokuta, Isaya asakolaki malamu mpo bizaleli na bino, bato oyo bakumisaka ngayi se na bibebu, kasi mitema na bango ezali mosika na ngayi. 7Kokumisa oyo bapesaka ngayi ezali na nzela te, mpo batosaka se mobeko mpe mateya bato bakoma.8Bozali koboya mitindo Nzambe apesi bino mpo na kokangama na mobeko oyo bato bakoma. 9Mpe alobi na bango: "Bozali kobwaka mitindo Nzambe apesi bino mpo na kotosa bakoko! 10Mpo Mose alobaka: "Kumisa tata na yo mpe mama na yo" mpe "moto nyonso akoloba mabe mpona tata to mama na ye esengeli akufa".11Kasi bino bolobi ete : "soki moto alingi kopesa likabo epayi ya baboti na ye, mpe alobi nabombi yango mpo na Nzambe 12na yango bozali kopesa ye nzela te mpo asalisa baboti na ye. 13Bozali koboma mitindo ya Nzambe mpona kotosa mibeko bozwa. Mpe bozali kosala makambo mingi ya kokokana.14Abengi lisusu etuluku ya bato mpe alobi: "Boyoka ngayi mpe boyeba. 15Eloko moko te ewutaka libanda ya moto mpe ekomi ye bosoto. Bobele oyo ewutaka na kati ya motema nde ekomisaka moto bosoto. 16Oyo aza na matoyi ayoka.17Yesu atiki etuluku mpe akoti na ndako mpe bayekoli batuni ye ndimbola lisese wana. 18Yesu ayanoli: "Bino mpe boza lokola bozangi mayele, boza komona te oyo etwutaki libanda ekomisaka moto bosoto te, 19mpo ewuti na motema te, kasi ekoti nde na libumu nde ebimi na djongo (W.C). Na koloba bongo Yesu akomisi bilia nyonso peto".20Ayebisi bango :"Oyo ewutaka na kati ya moto nde ekomisaka ye bosoto. 21Mpo makambu ya bosoto ewutaka na motema ya moto, pité, koyiba, koboma, 22kosala ekobo, posa mabe, makambo mabe, mayele mabe, bondumba, kolula, kotonga, lolendo, bozoba. 23Makambo nyoso oyo ya mabe ewuti libanda te, kasi na kati ya moto nde ekomisaka moto bosoto24Na yango Yesu alonwe na esika yango, akeyialingaki bato bayeba te azali wana, akokaki kobomba te. 25Na mbala moko, mwasi moko ya mopaya aye ko bondela ye mpo abengana molimo mabe Epayi ya mwana na ye ya muasi. 26Mwasi yango azalaki Grecque, syro-phenicienne.27Alobi na ye: " Tika bana balia nano, ezali malamu te kokamata kwan ga ya bana mpe kobwakela yango ba mbwa". 28Kasi ye azongisi : "Na ndimi Mokonzi, ata ba mbwa baliaka mpumbulu oyo ekweyaka tango bana baza kolia na mesa.29Alobi na mwasi: "Mpo ete olobi yango kende na kimia, milimo mabe abimi epayi ya mwana na yo". 30Ekendeki na ndako na ye mpe akuti mwana alali na mbeto, molimo mabe ebimi.31Atikaki engumba Tyr, koleka na Sidon, kokende na mbu ya galileya mpe akomi na engumba ya ba mboka jomi. 32Bamemeli ye moto ayokaka te, mpe koloba na mpasi, babondeli ye amama ye maboko.33Ekeyi na ye pembeni mosika na ekutulu, akotisi misapi na matoyi, asimbi lolemo na soyi. 34Atali na likolo, apemi alobi: "Epfata" elakisa "fungwama yo". 35Na ntango wana kaka, matoyi efungwami, oyo ezalaki kokanga lolemi na ye ebebisami, mpe abandi koloba36Apesaki bongo motindo baloba na moto te, ba tikala se kimia, kasi bazalaki se kopanza nsango na ye. 37Bakamwaki mingi mpe balobi: "Azalaki kosala makambo ya malamu, koyokisa bato bakufa matoyi mpe kolabisa ba baba."
81Na mikolo yango, ebele ya bato bazalaki, mpe bakelelaki bileyi. Yesu abiangi bayekoli ba ye mpe alobi na bango : 2"Nazali koyokele ebele na bato oyo mawa, pamba te nafandi na bango mikolo misato, mpe baleyi te. 3Soki nazongisi bango na bandako nzala, bakolemba na nzaela, mpo ete bamosusu kati na bango bowuti mosika". 4Bayekoli ba ye bazongiseli ye: "Lolenge kani tokoki kozwa bileyi ya kopesa bango mp bablia mpe batonda?"5Yesu atuni bango: "Bozali na kwanga boni?" Bazongesi: "Sambo." 6Afandisi bato yanso na mabele. Azui kwanga sambo, atondi Nzambe, abuki yango mpe apesi bayekoli ba ye mpo bakabelela bato yonso.7Bazalaki lisusu na mwa ndambo ya mbisi muke. Yesu atondi lisusu Nzambe, mpe apesi bayekoli mpo bakabola. 8Bato baleyi mpe batondi. Bayekoli balokoti biteni ya biloko bitikalaki, batondisi bitunga sambo. 9Bato bazalaki na esika yango koto mineyi. yesu azongisi bango o bamboka ya bango. 10Kaka na tongo yango ayingeli o bwato na bayekoli bayi, akatisi mayi tii na etuka ya Dalmanutha.11Na sima, ba Fanizé bakomi epayi ya Yesu, mpe babandi kotiyana tembe na ye. Lokola bazalaki koluka komuka ,ye, basengi asalela bango elembo moko ekomonisa ete nguya na ye ewuti na Nzambe. 12Yesu ayoki mawa mpo na yango mpe alobi: "Mpo na nini bato na tango oyo bazali kosenga elembo? Na bino ya solo, elembo moko te ekolakisama na bato na tango oyo. 13Sima atiki bango mpe ayengeli lisusu o bwato mpo na kokatiusa mayi.14Bayekoli babosanaki kokamata bileyi. Bazalaki na kwanga moko kaka na bwato. 15Yesu alobi na bango : "bokeba! ba farizé na bato ya Erode basalelaka mino ya ùmabe mpo na kotumba kwanga."16Ba kanisi kati na bango ete, tozali na kwanga te. 17Eyebi ye bongo, alobi na bango ete mpo na nini bozali kososolama na likambo na kozanga kwanga? Mitema mua bino miyeyi makasi?18Awa ezali bino na miso, bazali kotala te? Mpe awa ezali bino na matoyi, bozali koyoka te? Bozali kokanisa te? 19Wana ebuki nga kwanga mitano mpo na bato nkoto mitano, bolokoti bitunga boni ya biteni oyo etikalaki? Bango bazongiseli ye: "Zomi na mibale".20Boye, mokolo oyo nasalelaki kwanga sambo mpo na koleyisa bato koto mineyi, titunga boni botondisaki na biteni oyo etikalaki? " Mpe bango bazongiseli ye: "Bitunga sambo". 21Bongo Yesu alobi na bango: "Nayino bozui kaka bososolo te.22Bakomaki na Betsaida. Kuna bamemeli Yesu mokufi miso moko, mpe ba bondeli ye ete asimba ye. 23Yesu asimbi ye na loboko, mpe ememi ye mwa mosika ya mboka. Abwakeli soyi na miso, atieli ye maboko mpe atuni ye: "Ozali komona nini?"24Atali likolo mpe a lobi ete: "Nazali komona bato, Kasi bakokani na nzete kotambola. 25Bongo atie maboko na ye na miso na ye, moto oyo akufa miso abiki, amoni biloko biso polele. 26Azongisi ye na ndako na ye, kolobela ye ete: "kota ata na mboka te".27Yesu na bayekoli na ye bakeyi na bamboka ya Seraré, moko ya bamboko ya engumba Phillipo. Na nzela atuni bango boye: "Bato bakolobaka ete ngayi nani?" 28Balobi na ye ete: "Yowani Mobatisi", mpe basusu et : "Eliya", mpe basusu ete , "Moko na basakoli".29Ye atuni bango ete: "Nde bino bokolobaka ete ngayi nani? Petelo azongiseli ye ete: "Ozali Klisto". 30Mpe apesi monoko makasi ete bayebisa moto te na ntina na ye.31Abandaki kolakisa banga ete ekoki na Mwana na Moto koyoka bwale mingi, koboyama na bampaka ya mboka mpe na banganga minene mpe na bakomeli, ako bo boma ma, mpe kosekwa sima mikolo misato. 32Alobaki mpe polele. Petelo akamati ye pembeni moke abandi kopamela ye.33Nde ye abongwi, amoni bayekoli na ye mpe apameli Petelo, alobi ete: "Kenda sima na ngayi Satana! Zambi ozali kokanisa makambo ya Nzambe te kasi makambo ya bato. 34Abiangi ebele epayi na ye esika moko na boyekoli na ye mpe alobi na bango ete: "Soki moto alingi kobila ngayi, tika ete amiboya ye npenza, atombola ekulusu na ye mpe abila ngayi.35Zambi moto nani akolinga kobikisa bomoi na ye akobungisa yango, soko nde nani akolinga kobebisa bomoi na ye mpo na ngayi mpe mpo na Nsango Malamu, akobikisa yango. 36Zambi litomba nini ekozala na moto oyo akozwa mokili mobimba mpe akobungisa bomoi na ye? 37Eloko nini ekoki na moto kopesa mpo na kotikala na bomoi na ye?38Moto nani akoyoka nsoni na ntina na ngayi mpe na ntina ya maloba na ngayi na kati ya libota oyo na pité mpe masumu, Mwana ya Moto akoyoka nsoni na ntina na ye, wana ekoya ye kati na nkembo ya Tata na ye esika moko na ba-anzelu na bulé.
91Yesu atuni na bango, solo na yebisi bino ete bamususu kati na bino ba telemi awa ba kokufa te liboso bokonzi ya Nzambe ntango akoya na nguya. 2Sima ya mikolo motoba, Yesu azui Petelo, Yakobo na Yowane mpe akeyi na bango likolo ya ngomba. 3Yesu abonguani liboso na bango, bilamba na ye ekomi kongenga makasi koleka.4Mpe Eliya na Mose babimi, babandi kosolola na Yesu. 5Na bongo Petelo azongisi mpe alobi na Yesu, Mokonzi sengeli totikala awa, pesa biso ndingisa totonga ba hema misatu, moko pona Yo, moko pona Mose mpe moko pona Eliya. 6Mpo ete bakomi na kobanga, Petelo akoki lisusu koloba.7Mapata eye kozipa bango. liloba ebimi kati ya mapata. Oyo azali muana nalingi boyoka ye. 8Mbala moko batali sima bamoni lisusu moto te kaka Yesu.9Tango baye kokita, Yesu apekisi bango koloba na bato nyonso oyo bamoni kuna ti kino muana ya moto akosekua. 10Bango ba bombi liloba wana na komituna ndimbola na tina ya lisekua na baweyi.11Batuni ye pona nini ba Scribes balobi esengeli Eliya azonga liboso? ayanoli bango, Eliya akoya liboso kotia biloko nyonso na mulongo. 12Kasi pona nini ekomami ete muana ya moto esengeli ayoka mpasi mingi, bakomisaye lokola moyibi, moto azanga tina. 13Pona ngayi, nayebisi bino ete Eliya asili koya kala. mpe basaliye ya mabe ndenge balingi lokola ekomama pona ye.14Na bozongi kati na ya bayekoli mususu, bakuti bato ebele kati na bango, mpe ba Scribes bazali kosuana na bango. 15Kaka tango bamoni Yesu na bayekoli naye, bango nyonso basepeli, mpe bakimi epayi naye pona kopesa ye mbote. 16Ye atuni basali naye, likambu nini bozali kosuana na bango?17yo bakoki Moko kati na bango, azongisi eyano molakisi Ngayi na memeli yo muana nanga, aza kotungisama na molimo mabe akomisaye baba. 18Akamati ye , akueyisi ye, akangami, mino ekangami mpe akomi libanga. Mpe alobi, na sengi basali nayo bakoki kobengana molimo ya mbindu te. 19Yesu ayanoli bango, bato bazanga kodima, ti na ngonga nini ngayi nakotikala na bino? to mikolo boni na kozala na bino? bomemela nayi muana wana.20Tango kaka ba memi muana na Yesu, molimo akueyisi muana, akomi koningisa nzoto, kotanga soyi. 21Yesu atuni tata naye kobanda mikolo boni azali na bokono oyo? kobanda bomuana naye, elobi tata ya muana. 22Akueyeka na moto to na mayi, po ameka kobebisaye. soki okoki kosala eloko moko, yokela biso mawa mpe salisa biso.23Yesu azongiselaye, soki olingi? nyonso ekosalema na moto oyo adimi. 24Mbala moko tata ya muana agangi, nadimi, yaka asalisa kodima nanga. 25Tango Yesu amoni bato ebele bazoya epayi naye, pabengani molim mabe, yo molimo mabe mpe ya kolobisa te, bima na mitindo lna pesi yo mpe ko kozongela te.26Molimo mabe egangi, ekueyisi muana mpe ebimi, muana akomi lokola mokufi na denge oyo bato balobi ete akufi. 27Ya solo Yesu azui ye na liboko, atelemisiye mpe muana altelemi na esengo.28Tango Yesu akoti na ndaku, basali batuni ye na nkuku, pona nini biso tokoki te kobengana molimo wana? 29Ye azongiseli bango eyano, molimo ya boye ekoki na losambo ya makasi.30Bango baleki na ngambu ya Galile, balingaki te bato bayeba iesika bango bazali. 31Mpo Yesu azali koteya na masese mpe ayebisi bango polele ete, muana ya moto bakoteka ye na banguna ba oyo bakoboma ye, tango ye akokufa, akosekua na liwa sima ya mikolo misatu. 32Lokola bango bazalaki na kobanga, batunaki te nini alingi koloba.33Eleko bakomi na bonka ya Capernaum atuni basali naye, nini bozalaki kusuana na nzela? 34Na bongo na vandi kimia, mpo bazalaki koloba bango na bango na likambu ezalaki munene penza. 35Ye avandi mpe abengi basali naye nionso zomi na mibale (12), alobi nabango ete soki moto alingi azala ya liboso, azala nanu ya suka ya bato nionso mpe musali na bango.36Azui muana muke, atie ye kati kati na bango, azui ye na maboko mpe alobeli bango. 37Oyo akoyamba muana lokola oyo, na kombo na ngayi azui ngai lokola mpe soki nani azui ngayi, ezali ngayi moko te, akozua mpe lisusu oyo atindi ngayi.38Yowani alobi naye, Mokonzi tomonaki moto moko kobengana milimo mabe na kombo nayo! na bongo topekisaki ye mpo ete azali na biso te. 39Na bongo Yesu alobi, bopekisaye te mpo ete moto moko te akoki kosala mosala ya kitoko na kombo nanga mpe azala na nguya yakoloba mabe na oyo etali n gayi.40Oyo azo telemela biso te aza na biso. 41Kasi oyo akopesa bino kopo ya mayi ya komela mpo ete azali na Klisto, solo nayebisi bino akozanaga mbano na ye te.42Oyo a kokueyisa moko na badimi ya moke, bodimela ngayi, ya malamu balatisaye libanga na kingu mpe babuaka ye na ebale munene. 43Na bongo soki liboko nayo ezali kokueyisa yo, kata yango. 44Eza malamu pona yo kokota na bomoyi ya seko na loboko moko ete ozala na maboko mmibale mpe okende na lifelo esika moto ekufaka te.45Soki lokolo nayo ezali kokueyisa yo, kata yango, ezali malamu kokota na bomoyi ya seko tengu tengu na kozala makolo mibale obuakama na lifelo. 46Esika nkusu na bango ekufaka te, Mpe moto ekufaka pe te.47Soki liso nayo ezali kokueyisa na mbeba, longola yango, na bongo ezali malamu mpo nayo okota na bokonzi ya Nzambe na liso moko koleka ozala na misu mibale obuakama na lifelo. 48Libulu ya moto, esika nkusu na bango ekufaka te mpe moto ezimanaka te ata mokolo moko te.49Mpo ete, moto na moto akotiama moto lokola mungua. 50Mungua ezali na elengi mpe kitoko, kasi soko mungua esli elengi, okoki kopesayango elengi boniboni? Bozala na mungua kati na bino, bozala na kimia kati na bino.
101Yesu alungwaki esika ena, akeyi o etuka ya Yudea, koleka ebele Yuludani, mpe etuluku na bato balandaki ye bango ateyaki bango bo momesano. 2Bayi ba Falisayo baye epayi na ye, kosenginya ye mpe kotuna: mobeko endingisi mobali kokabwana na mwasi na ye?" 3Ayanoli bango boye: "Mobeko na Mose elobi nini?" 4Bango kozongisa boye : " Mose andingisaki na mobali, kokoma mokanda mo tatoli bo kabwani, mpe azongisa mwasi wana."5"Ezali mpo na mitema makasi na bino, nde mobeko mona mokomamaka". Yesu ayanoli bango : 6"Kasi na ebandeli ya mokili, Nzambe akelaki bango mobali na mwasi".7Yango ekomama, mobali akolongwa ndako ya baboti na ye, mpe akofanda elonga na mwasi na ye, 8mpe bango babale nde bakomi nzoto moko. 9Na yango moto ameka kokabola te oyo Nzambe asangisi.10Efandaki bango o ndako, bayekoli batuni ye lisusu mituna mpo na tina yango. 11Alobi na bango boye: "Ye oyo akabwani na ye asali ekobo". 12Mpe soki mwasi akabwani na mob ali na ye, kobalana na mobali mosusu, asali ekobo lokola".13Sima, ba boti bamemeli ye bana, mpo asimba mpe apambola bango. Kasi, bayekoli bapekisaki bango. 14Kasi , tango emonaki Yesu bongo, azuaki kanda ekasi , mpae alobi ete: "Bopekisa te bana koya epayi na ngayi, nzambi bokonzi bwa likolo ezali mpo na bato bawulani na bango".15Na bosolo na lobi boye : Ye oyo akolinga kokota o bonkonzi bwa likolo, soki amimoni lokola mwana moke te akoyingela te. 16Na mbisa, Yesu akwi bana o maboko na ye, abenisi bango nakosambela mpo na bango.17Ebandaki ye mobembo, elengi mobali ayeyi limbangu epayi na ye kofukama o bozo ye, mpe atuni: "Mokonzi malamu nakela boni-boni mpo nazua bomoyi bwa seko? 18Mpe yesu alobi: "Boni boni obengi ngayi Mokonzi malamu? Moto malamu azali te, soki Nzambe ye meyi. 19Oyebi mibeko zomi: "Oko boma te, okosala ekobo te, akoloba makambo malokuta te, okozwa eloko ya moto na lokuta te, memia baboti bayo".20Elenge koyanola: "Moteyi, manso alobi, natosaka nanga wuto bolenge bwa ngayi. 21Yesu atali ye mpe asepeli na ye. Mpe alobi na ye: "Ezangi yo likambo yoko. Kende kotekisa bozui bwa yo nyonso, mpe mosolo mona opesa na babola, nambisa nde ozui bomengo o likolo, nde sima yake mpe landa ngayi". 22Kasi azui mawa makasi o mutema mpo na etinda ena. mpe abaluki na dzololo, mpamba te, azalaki na bomengo mingi23Yesu atali nzinga-nzinga mpe alobi na bayekoli na ye: "Boyeba te, ezali mpasi mingi na bazui kokota o bokonzi bwa Nzambe!". 24Eyoki bango makambo mana, bayekoli bakamwe mingi. Bongo Yesu alobi na bango lisus: "Bana, lokola ezali mpasi mingi mpo nakokoto o bokonzi bwa Nzambe! 25Ebongi malamu na panda na lisobe koleka na lidusu na tango, kasi mpasi mpo na mozui kokota o bokonzi bwa likolo."26Bazalaki na kokomwa makasi, mpe bamo lobeli bango na bango: "Nani akoki kozua lobiko?" 27Yesu atali bango mpe alobi:" Ekosalema te mpo na bato, kaka Nzambe nde, mpo ete manso mazalisami na Nzambe." 28Petelo abandi koloba na ye: "Tala, tosundoli manso, mpe tolandi yo"29Yesu alobi: "Na bosolo, nalobi bino na bino, ye oyo atiki ndako na ye, bandeko na ye, ba boti baye, bana baye, bilanga na ye, mpo na ngayi mpe mpo na sango malamu, 30nde azui na makama ba ndako, ba ndeko, ba boti, bana mpe bilanga awa o nse kotukama, mpe bomoyi ya seko na mokili ekoya. 31Kasi yeba ete bayike bazali ba yambo, bakokoma baye ya mokondo, mpe ba ye ya mokondo, bakokoma bato ba yambo.32Ezali bango ko mata na njela ya Yelusalemi, bongo yesu alekaki o boso nwa bango. Kokamwa ezalaki kati na bayekoli bongo Yesu akendaki lisusu naba zomi na babale, alimboleli bango maye masengeli kokomela ye o mikolo mikoya. 33"Yokamela, tobuta o Yelusalemi kuna mwana moto akokabama o maboko ya nganga Nzambe minene ùmpe ba tangi mibeko. Bango bakomo katela etumbu ya liwa mpe bako kaba ye naba pagano. 34Bako zomela ye, kobwakela ye nsoyi, kobeta ye nfimbo mpe bako boma ye, na sima mikolo misato , nde akosekwa."35Zaki mpe Yoone bana ya Zebede bayebisi ye boye: "Molakisi, tolingi osalela biso ma ye manso tokosenge yo". 36Ye ayanoli bango boye: "Bolingo nasalela bino nini?" 37Bango koloba: "Ndingisa ete tofanda na kembo na yo, moko o loboko la yo ya mobali, mpe moyike na oyo ya mwasi".38Kasi Yesu ayanoli bango boye: "Bobungi maye bokosenge. Zambi bokokoka komela nkeni mpe kokanga motema na libatisi oyo nakozua?". 39Bango kozongisela ye: "Toko koka". Yesu alobi na bango: "Nkeni ekomela ngayi, bokomele yango engebene na libatisi nakozua. 40"Kasi oyo esengeli koloba nani akofanda o loboko ya mobali to mpe ya mwasi, ngayi te nde na ponaka, bobeke baye ba ponama.41Eyokaka bayekoli basusu zomi bongo, bazui nkanda mpe koyina yima natina zaki mpe Yoane. 42Yesu abiangi bango pembeni na ye, mpe alobi : "boyeba ete baye bazali lokola bakambi ya ba pagano, bakonzaka bango bakolo katina bango, basalelaka bokonzi likolo na banga.43Kasi ezala bongo te kati na bino, zambi ye oyo alingi azala monene kati na bino, azali nayino mosali ; 44Ye oyo alingi azala mwa yambo kati na bino, andima nayino kozala mohumbu na bino nyonso. 45Zambi mwana na moto aye te mpo basalela ye, kasi ye nde asala mpo na basusu, mpe kopesa bomoyi bwa ye lokola mbeka po na bayike.46Ekomi bango ne Yeliko, mpe lokola alongwaki wana elongo na bayekoli baye, etuluku ya bato bamolandaki, mpe mwana na Timée, na kombo Bartimée, mokufi miso mpe molombi mbongo afandaki o ngambo la balabala. 47Eyokaki ye ete Yesu na Nazareti koleka na nzela, abandi konganga na mongongo ekasi: "Yesu, mwana na Dawidi, yoka ngayi mawa". 48Bayike bazalaki kopekisa mokufi miso, koyebisa ye akanga monoko. Kasi azalaki se konganga makasi: "Mwana na Dawidi, yoka ngayi mawa".49Yesu atelemi mpe apesi mitindo babenga ye. Babengi mokufi miso, koyebisa ye na bato: "Kwa bopikiliki, telema, obiangami." 50Asundoli kazaka na ye pembeni, apumbuki mpe aye na Yesu.51Nambisa, Yesu ayanoli ye: "Olingi nasala na yo nini?" mokufi miso ye koloba: "Rabuni, nalingi na mona." 52Bongo Yesu ayanoli boye: "Kenda, kondima na yo ebikisi yo." Na pwasa, moto yango amoni lisusu, mpe alandi Yesu na nzela.
111Babelemi na Yelusalem pene-pene na Bethfagé na Betaniya na ngomba ya ba Olive, Bayekoli mibale na Yesu batindami mpe 2apesi bango mitindo : "Bokenda na mboka liboso na biso. Boko mona mwana na punda ba matela ye nayino te, bakamata boya na ye. 3Soki moto atuni : "bozali kosala boye mpo nini" Bo zongisela ye : "Mokonzi asengeli na ngo" akotika mpe bokoya na yango".4Bakendaki mpe bakuti yango ekangami lokola Mokonzi alobaki. Mpe bakangoli ye. 5Batuni bango na bato: "Bozali kokangola mwana punda mpo nini?" 6Bayanoli bango, lokola Yesu alakisaki bango.7Bayekoli mibale batindamaki bayeli Yesu mwana punda mpe balatisi yango bilamba kitoko mpo Yesu amata. 8Bato bayike batandaki mpe bilamba ya kitoko mpe ba mosusu Basimbi mangalala. 9Bato mosusu baleki liboso, mpe ba susu bazali kolanda ye sima bazali koganga: " Hozana! atombwana oyo azali koya na kombo ya Mokonzi. 10Kembo na ngbende ya bokonzi na Tatna biso Dawidi! Hozana kuna lola.11Nabongo kokota na ye na Yelusalema, ejalaki na tina amona makambo ezalaki koleka na etonga na Nzambe, Kasi ngonga elekaki, akendaki na ba yekoli na ye na mboka Bathania. 12Na bozongi na bango alembaki na nzala.13Mpe amoni nzete na mosika na makasa kitoko, akanisaki ete ezali na mbuma, nzokande ezalaki te, mpo ejalaki eleko na yango te. 14Alakeli yango mabe, ekoleyisaka moto moko te, mbuma na yango. Batu bazalaki na ye bayoki maloba ango.15Bokomi na bango na engumba ya Yelusalema, ayingeli kati na etonga, akuti nyamu-nyamu na bayi, mombongo; batekisi, mpe basombi na kati ya etonga. Apanzi mitalaka ya basombitinyi na batisi ya bibenga. 16Alingisaki lisusu te bakotisa biloko ya mombongu na etonga.17Apesi bango malakisi ete, makomi elobi te ete etongfa ezali esika ya mabondeli mpo na bikolo yonso? Bino bokomisi yango esika ya babomi. 18Eyoki ba nganga Nzambe minene, mpe na bakomi mibeko, maloba oyo, bazui miango ya koboma ye, na boye, bato bayike penza basepelaki na mateya yango nde ebangisaki bango ete, bakotombokisa bato 19tango mpokwa ekoki, babimi na engumba bakeyi.20Na bozongi na bango na nzela elekaki bango liboso ba moni nzete ya lingolo ekawuki kino na misisa. 21Nde Petelo azongi makanisi alobi: "Mokonzi nzete olobelaki mabe ekawuki."22Yesu ayanoli ye bojala na kondima na Nzambe. 23Ya solo okopesa mitindo ata na ngomba kenda mpe ekoyokamela yo, kozala na tembe te mpo Nzambe akoko kisa yango.24NA boye, nayebisi bino maye bokosenga na malombi mpe na ko lombo ekopesemela bino. 25Boyebaka mpe kolimbisa banguna na bino, mpo ete Tata Nzambe alimbisaka mpe bino. 26Soki boye te, bokolimbisama te, Tata na bino na likolo ako limbisa pe bino t.27Bazongi na Yelusalema, nde yesu akeyi kozungu-luka na etonga, na boye ba nganga Nzambe, bato na mibeko, bamoni ye. 28Balobi na ye : " na ndingisa ya nani mpe ozali kosala makambu oyo? Mpe ozui makoki epayi ya nani ya kosala maye ojali kosala ?29Yesu azongiseli bango bo yanola nayino ngayi, bongo nakolimbola bino. 30Nani alingisaki Yowani Mobatisi? Nzambe to bato ya mokili?31Batiani tembe kati na bango: Toloba nini? Soki toyanoli ye ewutaki na lola, akozua biso : "kasi bondimelaki ye te boni?" 32Soki toyanoli ye ewuti na bato : "bako boma biso" ... mpo bayike bayebi Yowani mosakoli ya solo. 33Bongo bayokani kobuka lokuta ete: "Toyebi te". Yesu mpe akutanisi bango na koyanola bango ete : "Ngayi mpe nayebi te, soki najali kosala makambo oyo na nguya ya nani".
121Sika Yesu aband i kotangisa bongo na masese, mpe alobi: moto moko alonaki nzetz ya vino, mpe atongaki lopango zinga zinga ya lopango atimolaki libulu, lokola libulu oyo ba kamolaka vino, mpe atongaki enongeli ya mosenzeli, mpe ayesaki mosali na vino, na yango ye abembokaki. 2O tango nde atindaki mosali moko, kuna na basali ya vino pona komemelaye ndambu ya vino. 3Kasi azuaki mosekua mpe bakangaki mpe bazongisaki ye maboko pamba.4Sika atindaki mosali mususu mpe bazokisaki ye omutu mpe bakataki ye bilamba. 5Atindaki mosali mosusu mpe ba bomakiye. Mpe baniongaki mpe ba bomaki basali nionso na lolenge moko.6Azalaki na moto moko ya kotinda nde muana na ye ya bolingo, nde mutu ya suka atindela ki bango. Alobi bakotosa ye mpo azali muana na ngayi. 7Kasi basali ya vino balobani natina na bongo: botala masangoli, boya toboma ye, mpe libula eko zala ya biso.8Bakangaki ye na puasa mpe babomaki ye mpe bauaki ye libanda ya elanga ya vino. 9Sika awo nde akosala nini? akoya kobebisa zelanga ya vino mpe akopesa yango na bato mosusu.10yipbotangi makomi oyo te? Libanga na tina oyo ba tongi ba buakaki yango nde basalelaki. 11Oyo ewuti epayi ya Mokonzi ezali malamu na komona. 12Bazalaki koluka kokanga yesu kasi ba bangaki etuluku ya batu mpo ete ba yebaki makambu ayebisaki bango na lisese pona bango. na yango batelemaki mpe bakendeki.13Na yango batindelaki ye ndambu ya ba Pharizao mpe ba Yelodia ba tandelaye motambo na maloba. 14Tango bokomaki, mpe ba lobi naye: molakisi, oponaka bato na lolenge ya mabe te, oteyaka na bosolo bonse nzela ya Nzambe, endingisami kofuta mpaku ya kayisala? Esengeli na biso kufuta to kofuta te? 15Lokola Yesu ayebaki mayeli na bango, ya mabe, ayebisi bango: pona nini bozali komeka ngayi? bo memela ngayi bongo moko na tala yango.16Bamemelaki na Yesu, atuni b ango, elilingi na likomi oyo eza ya nani? bayanoli boye; ezali ya kayisala. 17Yesu alobi: ya kayisala ya kayisala, ta Nzambz ya Nzambe. bakamuaki na maloba naye.18Na yango, ba sadayene ,bazalaki kondima te ete lisekua ezali, bayaki epayi na Ye. Mpe ba tunaki: 19Molakisi, Mose akomelaki biso, sokin ndeko mobali akufi mpe atiki muasi kasi muana nte, ndeko yamobali ye ako yingela muasi wana mpo abota na ye bana.20Ezalaki ba ndeko mibali sambo, ya yambo abalaki muasi sima mikolo ye akufaki, kasi atikaki muana te. 21Ya mibale mpe azuaki muasi yango, ye mpe akufaki mpe atikaki muana te. Ya misato ndenge moko. 22Lokola ya motoba mpe lolenge moko atikaki muana te. Suka na yango muasi mpe akufaki. 23Tango bango nionso bakozonga na bomoyi na lisekua, nani akozala na ye lokola muasi naye? pamba te lbango nionso bazuaka ye muasi ya libala.24Yesu alobi: pona yango bo bungi te, mpo ete boyebi makomi te, atako nguya ya Nzambe? 25Tango ako sekuisa ba weyi, kuna babalami tope kobalisa ekozala te kasi ba kozala lokola ba muanzelu.26Kolandisama ya baye bakosekua, botangaki te na makomi nya Mose, kpona oyo etali nzete yakopela, ndenge nini Nzambe ayebisaki ye mpe alobaki naye, nazali Nzambe ya Abalayama, Nzambe ,ya Isaaka mpe Nzambe ya Yakobo? 27Azali Nzame ya bakufi te, kasi Nzambe ya batu na bomoyi. Bozali komiosa makasi.28moko na bakomi mikanda ayaki koyoka masolo na bango; ko aymona ete Yesu alobaki malamu, atunaki Ye: kati na nionso, mobeko nini eleki na motuya koleka? 29Yesu ayanoli: boyokamela ya motuya; Isaleli, Nzambe Mokonzi azali moko. 30Okolionga Nzambe Mokonzi nayo okati o motema mobimba, okati ya molimo nayo, na makanisi nayo nionso mpe na makasi nayo. 31Yoka mobeko ya mibale: Oko linga moninga nayo ndenge omilingaka. ezali na mobeko monene koleka oyo te.32Bakomi ya mibeko bazong;ikseliye: Mokonzi olobi ya solo ete Nzambe azali kaka moko, ba mosusu bazali te. 33Linga ye na motema, na mayele mpe na makasi nayo, bongo tolinga ba zalani na biso. Yango nde eleki ma bonza mpe ba mbeka nionso. 34Tango yesu asosoli ete apesi ye eyano ya buania, alobi: Ozali mosika ya bokonzi ya likolo te. na yango moto akoki kotuna Yesu motuna te.35Ezalaki Ye koteya na tempelo, ayanoli bango: boni boni batu na mibeko balobaka Kristo azali muana ya Dawidi? 36Nzoka nde DAwidi ye moko tango atondisamaki alobi Mokonzi alobi na Mokonzi nanga: fanda na loboko na nga ya mobali kino na kokitisa banguna nayo semakolo nayo. 37Soki Dawidi abengaki ye mokonzi, boni boni Mesiya akoma lisusu muana ya Dawidi? Etuluku ya batu ba tondaki na sayi.38Yesu alobi okati ya malakisi naye, bomibatela na bakomi ya mibeko oyo ba sepelaka kolata bilambaba ya milayi mpe kopesana mbote na bisika ya polele. 39Mpe ba fandaka na bisika ya liboso kati na eyanganelo mpe na nteke. 40Ba bebisaka ba ndanku ya basi oyo bakufela mibali mpe kotelemela losambo ya molayi : mpe ete batu ba mona bango, bato wana ;bakozua etumbu ya makasi.41Yesu kati na tempelo afandaki mosika te na ebombelo ya na makabo: azalaki kokeba lolenge bazalaki kopesa mingi. 42Bongo, mobola muasi akufela mobali, atiaki kaka mpalata mibale ewulani na mpalata moke.43Na bongo, Yesu abiangi bayekoli naye mpe alobi: nalobi na bino solo, muasi oyo atie mbongo kolekabango banso na ebombamelo. 44Mpo ete bango nionso bapesi se mileki mia bango, kasi muasi mokufeli mobali atako azali mobola apesaki mbongo nionso oyo azalaki na yango pona kobika.
131Wana Yesu kobima na tepelo, moko na bayekoli na ye alobi: "Moteyi tala bonzenga ya mabanga ba tonga bandako oyo." Ayanoli ye: 2"Omoni yango? ezali na liban,ga moko te ekotikala likolo na mosusu, yonso eko panzana".3Evandaki ye likolo na ngomba ya Olive, liboso ya tepelo, Petolo, Zaki, Yoane mpe Andele bayei na bokutu kotuna ye: 4loba naino: "Tango nini makambu yangoi ekokoma? Mpe bilembo nini tokososola ete makambo yango ekomi penepene?"5Yesu abandi kososolisa bango: "Bokeba babungisa bino te". 6Bato ya lokuta bakoya na kombo na ngayio kokosa et ngayi nde Klisto Bako bulungisa ebele ya bato.7Tango bakoyoka sango ya bitumba mpe lokito ya bibundeli bo palapala te. Mpo esengeli ezala bongo, kasi ezali nde ebandeli kaka. 8Soki Ekolo yoko ebundisi mosusu, bakonzi moko ebundisi mosusu, na bisika nzike mabele ekoningana, mpe nzala makasi ekoya. Wana ezali ebandeli ya bwale, mwasi ayokaka na mpasi ya kobota.9Bomi keba. Bako kaba bino na mikonzi mpo banyokola bino. Bako beta-beta bino na ba ndako ya biyanganelo mpe liboso ya bakambi ya bituka, mpe esepelisa bango. 10Kasi esengeli nayinoi nsango malamu eteyama na bikolo yonso ya mokili.11Bobanga te, ntango bako kanga mpe kofunda bino, bolenga liboso na bango te, mpo na bozangi maye boko loba liboso na bango, Molimo Mosantu nde akopesa maloba kati na bino. 12Ba ndeko bako bomana bango na bango, tata akoboma mwana na ye. Bana bako tombukela baboti mpo bakufa. 13Boko yinama mpo na ngayi na bato nyonso. Oyo ako yika mpiko kino nsuka ye nde akobika.14Bososola, ntango bokomona makambo ya soni mpe ya bwale kosalema na bisika oyo esengeli te. Ba oyo ya Yudea bakima na ba ngomba. 16Oyo amataki likolo ya ndako akoki kokita kozua eloko te. 15Oyo akeyi kokata bilanga akoki kozongela kasaka na ye te.17MAwa mingi ekojala na basi oyo bajali na bana mikie, mpe bajali konungisa. 18Eleko yango bobondela penza ete ejalma ntango ya mpio makasi te. 19Bwale oyo ekoya ekojala makasi koleka, uta mokili esalema na Nzambe oyo ekoleka yango ejali te moto moko akokaki kobika te. 20Soki Nzambe akokutolaka mikolo yango te, mpo na kobikisa baponomi na ye.21Bongo soki moto ayebisi bino, tomoni Klisto kuna, abimi na ngambo kuna bondima te. 22Mpo ba Klisto ya lokuta, mpe ba sakoli ya lokuta, bako bima mpe bakosala bikamwa na bikamwasi mpe bako pengwisa bayike na bandimi. 23Bojala na bokengeli nakebisi bino.24Kasi soki mikolo ya bwale yango eleki moyi ekokoma mwaindo, sanza ekongenga lisusu te, 25minzoto ekokilingana uta lola tii na mabele, nguya yonso ebombana na lola epanzani. 26Bongo bako mona mwana na Nzambe kokita kati na mapata na lokumu mpe lokito. 27Mpe ba anjelu bakozua mitindo mpona kosangisa baponami yonso kino nasuka ya mokili mpe na suka ya mapata.28Botala nzete ya musuke. Soki tomoni ete nkasa na yango ebandi kotela mpe ekawuki, tososoli ete ntango ya mbula ekoki. 29Ezali nse bongo, ntango bokomona kokokisama na makambo oyo, boyeba ete abelemi pene.30Ezali solo ete bato ya eleko oyo bakosila kokufa te, kino makambo oyo ekokokisama. 31Manso bojali komona (Likolo nase) ekosila , 32kasi maloba na ngayi te. Kasi mokolo to ngonga eyebani na moto mosusu te, kaka Tata Nzambe ye moko.33Bozala na bokenga, mpo bojali kososola te, soki tokomi ntango nini. 34Moto na moto asala lotomu epesemeli ye na mokonzi bakengeli bafungola miso, ko lala te.35Bokeba pamba te bozongi ya nkolo ndako eyebani ngonga te, na katikati ya butu, liboso soso elela. 36Soki aye akuta bino na pongi te. 37Na yebisi bino, moto na moto akengela!
141Mikolo mibale na liboso ya elekeli mpe elambo na kwanga ezangi mfulu, banganga minene mpe bakomeli bazalaki koluka nzela na mayele mpona kokanga ye mpe koboma ye. 2Kasi balobi ete: "Ntango na elambo te ete yikiyiki ebima kati na bato te".3Ezalaki ye na Betania na ndako ya Simona, moto na maba, afandi na mesa mpo na kolia, mwasi moko ayeyi na mwa mbeki ya mafuta na malasi, eloko na motuya monene, abuki mbeki mpe asopi yango na moto na ye. 4Kasi bamosusu na bango balobi na kanda ete: "Libebi na mafuta oyo ezali na ntina nini? 5Zambi bakoki kotekisa mafuta oyo mpo na mpata nkama misato mpe babola bakoki kozua mosolo." Bazalaki kosilika mpo na mwasi.6Nde Yesu alobi ete : "Tika ye nye! Mpo nini bazali kotumola ye? Ye asili kosalela n gayi mosala kitoko. 7Bozali na babola awa ntongo nyonso mpe soko balingi kosalela bango ntango yonso bokoki kosala yango. Kasi bokozala na ngayi ntango yonso te. 8Ye asali eloko ekokaki na ye kosala. Asili kpakola nzoto na ngayi liboso mpo na kokunda. 9Nazali koloba na bino solo ete nsango malamu ekolakisama wapi na molongo mobimba, likambo lisali hye ekoyebisama mpo na ekaniseli na ye.10Na sima Yuda Iscariote, ye moko na Bazomi na mibale akeyi epayi na banganga minene mpo na kokaba ye epayi na bango. 11Wana eyoki bango ye basepeli mpe bandimi kofuta ye mosolo. Ye mpe aluki nzela malamu mpo na kokaba ye.12Na mokolo na liboso na mikolo na kwanga ezangi mfulu, wana ebomi bango mpate wapi na Elekeli, bayekoli na ye batuni ye ete:"Olingi ete tokenda wapi mpo na kobongisa biloko ete olia Elekeli?" 13Atindi bayekolo babale mpe alobi na bango ete: "Kenda na mboka mpe mobali moko akokutema na bino oyo azali kokumba mbeki na mayi bobila ye. 14Mpe soko akolingela wapi, bo loba na nkolo ya ndaku ete Molakisi alobi ete: "Esika wapi wana kolia ngayi elombo na elekeli na bayekoli na ngayi elongo."15Akotalisa bino eteni moko na likolo esili kobonga mpe kotandama. Bobongisela biso kuna. 16Bayekoli balongwi, bakeyi na mboka mpe bazui yango lokola esili ye koloba na bango, mpe babongisi elambo na Elekeli.17Awa pokwa ekomi ayeyi na bazomi na babale elongo. 18Ezalaki bango kofanda na mesa mpe kolia, Yesu alobaki ete: Nazali koloba na bino solo ete, moko na bino akokaba ngayi, moko mpenza oyo azali kolia esika moko na ngayi. 19Babandi koyoka mawa mpe batuni ye moko moko ete: "Ezali ngayi?"20Alobi na bango ete: "Ezali moto moko na bazomi na babale, oyo azali kotia misapi na ye kati na sani esika moko na ngayi. 21Zambi Mwana na Moto akokenda lokola ekomami na ye kasi mawa na moto oyo okokaba Mwana na Moto! Eleki na malamu mpo na moto yango soki abotamaki te.22Ezalaki bango kolia akamati kwanga, apamboli, abuki yango, apesi bango yango mpe alobi: «Bokamata oyo nzoto na ngayi.» 23Akamati kopo, mpe esili ye kotonda , apesi bango yango mpe bango nyonso bameli yango. 24Ye alobi na bango et : «Oyo makila na ngayi na kondimama, masopani mpona bato mingi. 25Nazali koloba na bino solo ete nakomela mayi na vino lisusu te kino mokolo ngayi yango na sika kati na bokonzi na Nzambe.»26Esili bango koyemba loyembo, babimi kokenda na ngomba na Bilaya. 27Yesu alobi na bango ete: «Nako beta mobateli mpe bampate bakopanzama.28KAsi na sima ya lisekwa na ngayi nako leka liboso na bino na Galileya.» 29Petelo alobi na ye ete: « Ata bango yonso bako tayisama libaku, kasi ngayi te.»30Yesu alobi na ye ete : «NAzali koloba na yo na solo ete na butu oyo mpenza, liboso nayino nsoso eleli mbala mibale te, oko angana ngayi mbala misato.» 31Kasi ye apesi monoko makasi ete: «Soki ekokoka na ngayi ko kufa na yo elongo, nako angana yo te.» Bango nyonso balobi bobele bongo.32Ekeyina esika moko etangami Getesemane mpe alobi na bayekoli na ye ete: «Bafanda nayino ezali ngayio kobondela.» 33Akamati Petelo na Zaki na Yoane esika moko na ye mpe abandi koyoka mawa na motema mpe bozito. 34Alobi na bango ete: « Molimo na ngayi ezali koyoka mawa, kino mawa na kufa. Bowumela awa mpe bokengela.»35Akeyi na liboso moke, akweyi na mabele mpe abondeli ete ntango oyo elongwa na ye, soko ekoki. 36Aloli ete: «Aba, Tata, makambo yonso makoki na yo Longwela ngayi kopo oyo Nde mokano na ngayi esalama te kasi mokano na yo37Ayeyi azui bango kolala mpongi mpe alobi na Petelo: «Simoni ozali kolala mpongi? Okokaki kokengela saa moko te? 38Bokengelaka mpe bobondela ete bokota na ko mekamaka te Molimo ezali na mposa nde nzoto ezali mtawu.» 39Akeyi lisusu, abondeli kolaba malobi ye liboso.40Lisusuayeyi azui bango kolala mpongi mpo ete miso na bango bozito mingi na mpongi mpe boyebi te soko bakozongisela ye monoko nini. 41Ayeyi mbala na misato epayi na bango alobi na bango ete: «Bozali nayino kolala mpe nayino kopema? Ntango esili koya! Bazli kokaba Mwana na Moto na maboko na bato na masumu. 42Botelema, tokenda botala mokabi na ngayi abelemi.»43Naino ezalaki ye koloba, Yuda ayeyi, ye moko na bazomi na mibale, mpe ebelena bato na ye elongo bazalaki na mipanga mpe mangenda mpe babimi na banganga minene na bakomeli na mikolo na mboka. 44Mokabi asili koyebisa bango elembo, koloba ete: «Soko mapopwepwa nani, ye wana. Bokanga ye mpe bokenda na ye malamu. 45Ayeyi akeyi epayi na Yesu nokinpoko mpe alobi ete : «Rabuni», Apwepwi ye. 46Batii maboko likolo na ye bakangi ye.47Kasi mokona ba oyo bazalaki na ye abendi mopanga na ye, azokisi moombo na nganga monene, akati lotoyi na ye. 48Yesu alobi na bangoete: «Bino boyeyi na mipanga mpe mangenda mpo na kokanga ngayi lokola moyibi? 49Mokolo na mokolo nazalaki na bino kati na tempelo mpo na kolakisa mpe bokangaki nga te. Nde malamu ete makomi makoka. 50Bango nyonso batiki ye bakimi.51Elenge mobali mokoabili ye, ye azalaki kolata bobele elamba moko. Bakangi ye, 52nde atiki elamba na ye, akimi bolumbu.53Bakambi Yesu epayi na nganga monene mpe banganga minene yonso mpe mikolo na mboka mpe bakomeli basili koyangana. 54Petelo abili ye mosika kino ekoti ye kati na lopango na nganga monene. Afandi esika moko na bapolisi mpo na koyota moto.55Banganga minene mpe koyangana mobimba baluki litatoli na ntina na Yesu mpo na koboma ye. 56Bato mingi batatoli maloba na lokuta nde maloba na bango makokani te.57Bamosusu batelemi koloba monoko na lokuta na likambo na ye ete 58toyokaki ye koloba ete: «NGayi nako boma tempelo oyo esalami na maboko mpe nsima na mikolo misato nako tonga mosusu ekosalama na maboko te». 59Ata bongo matoli na bango nakokani te.60Nganga monene atelemi kati na bango mpe atuni Yesu ete: «Okoyanola te? Matatoli na bato oyo mpo na kokweyisa yo mazali nini? 61Nde azalaki nye, ayanoli bango te. Lisusu Nganga monene atuni ye ete: «Yo ozali Klisto, Mwana na Mapambwani? 62Yesu alobi ete: «Ngayi nazali. Mpe bokomona Mwana na moto kofanda na loboko mobali na nguya mpe koya kati na mapata o likolo.»63Nganga monene apasoli elamba na ye, mpe alobi ete: «Tozali na bosenga na batatoli mosusu mpo ya nini? 64Bosili koyoka maloba na kotuka. Makanisi na bino nini?» Bongo yonso balobi: «Abongi kokufa». 65Basusu kati na bango ba bwakeli ye soyi mpe kozipa ye elongi mpe kobeta ya bibotu mpe kolobela ye: «Lakisa ete ozali Mosakoli!» Nani abeti yo? Sima, bakengeli bakamati ye, mpe ba bamboli ye ba mbata.66Ezalaki Petelo kati na lopango, elenge mwasi moko na basali na nganga monene ayeyi. 67Emoni ye Petelo koyota moto, atali mpe alobi na ye ete: «Yo mpe ozalaki elongo na Mo Nazarete oyo , Yesu.» 68Nde awangani, na bolobaka ete : «Nayebi te mpe nazali koyeba ntina na maloba na yo te.» Na sima abimi na lopango mpe soso eleli.69Elenge mwasi yango amoni ye mpe abandi koloba na bato batelemi pembeni ete: «Moto oyo azali moko na bayekoli na ye!» 70Kasi Petelo awangani lisusu. Sima ya mwa ntango moke, ba oyo bazalaki wana balobi na Petelo: «Ya solo, yo mpe ozali moko na bango, pamba te ozali moto na Galileya.»71Bongo Petelo abandi kokata seleka boye: «Nzambe mpenza! Nayebi na ngayi moto bazali koloba te.» 72Na ntango wana, soso eleli mbala ya mibale. Bongo Petelo akomi kokanisa maloba Yesu alobelaki ye: «LIboso et soso elela mbala mibale, okowangana mbala misato ete oyebi ngayi te.» Petelo ayoki mawa mpe abandi kolela.
151Nanta tongo, na nganga Nzambe minene elongo na ba tangi mibeko, ba mpaka ya masanga elongo na lisanga ba kambi ya bayuda, basangaki, na mbisa, bango bakangaki Yesu mpe ba memi ye na Poso Pilato. 2Bongo pilato amotuni: yo ozali mokonzi ya bayuda? yesu amoyanoli: " Olobi yango". 3Ba nganga Nzambe minene bazalaki na mafunde nzike ya Yesu epai na Poso Pilato4Pilato amotuni lisusu: "oyanoli te? tala ebele na mafundi ya bato oyo likolo nayo". 5Kasi Yesu afungolaki lisusu ata monoko te oboso ya poso pilato, mpe ye akamuaki makasi.6O eleko nya mabongisi ya nteke, Mokonzi poso Pilato, azua momesano ya bobimisi o boloko mokangami moko oyo akotuina boyike bua bato bajye amoni o boso bua ye, elongo na batomboki basusu. 7Kuna boloko, ezalaki na ba tomboki elongo na babomi, lokola moto moko na kombo barabasi. 8Boyike bwa bato, e,yeï ya poso pilato mpe koyebisaye et jasala bo momesano, enbene na lolenge ya bobisi o boloko moto oyo bangi balingi.9Poso Pilato atuni bango boye, " bolingi nabimisa o boloko mokonzi ya bayuda? 10Na kotunaka bongo, ye ayebaki malamu, lolenge ba nganga Nzambe minene ba pesakiye engebene na mibeko la bayuda. 11bongo ba nganga Nzambe minene, ba tiye songi songi na boyike bwa bato mpo babimisa se barabasi o boloko.12Poso Pilato atuni b bango lisusu: " bongo nasala boniboni na mokonzi ya bayuda"? 13banso bagangi makasi mpe lisusu "omobaka o ekulusu"14Poso Pilato alobi na bango: " esali ye mabe nini? "kasi bango bagangi koleka lisusu "omo baka o ekulusu". 15lolenge Poso Pilato alingaki kosepelisa bayi mboka, na yango abimisi barabase o boloko, ba beti Yesu fimbo mpe akabami mpo abakama o ekulusu.16bayi mapinga bakumbi Yesu o kati ya lopango la mbulamatadi mpe libyangani ya mapinga ya ba solda ya etuku ena. 17Balatisi yesula kazaka la motane mpe sone liye ekoti ya nzube ya nzube, bongo bakotisiye yango o moto. 18Sima bapesiye Mbote koloba ete, Mbote Mokonzi ya bayuda.19Ba betiye kekele na moto mpe buakeli ye nsoyi, mpo na kotiolaye , bafukameli ye mpe makumisiye ya lokuta. 20Sima na bango kotiola ye, balongoliye kazaka ya motane, mpe balatiye bilamba bya ye moko, na mbisa ba kumbi ye mpo abakama. 21Bango kopesa mitindo na moleki nzela, oyo awutaki na bilanga naye, na kombo ,ya Simoni ya mboka Sylène, tata na alezandeya mpe lufu, akumba ekulusu na Yesu.22Bayi mapinga bakumbi Yesu na esika moko ebangami Golgotha, ndimbola na yango " esika na mikuwa ya moto". 23Bapesi Yesu na makasi vino esangisama na kisi na kombo myrrhe, kasi ye amelaki yango te. 24Mpe ba mobakiye na ekulusu, na kokabolaka bilamba na ye na Zeke, mpo na koyeba soki solda nani azui mbano koleka.25ezalaki ngongan ya misato ya Nzanga nde, ba mobakakiye na ekulusu. 26Likolo na eteni ya linzanza, bakomaki tina ya bofundami na ye "Ye oyo Mokonzi ya yuda". 27ba mobakeyi na ekulusu elongo na ba bomi mibale, moko na loboko naye ya mobali, mpe mosusu na loboko naye ya mwasi. 28Wana esalemaki mpo makomi masantu makokisama, bakomobakaye na ekulusu elongo na ba bomi.29baleki nzela, ya esika wana, bazalaki kofinga ye, koningisa moto mpe koloba : " ye oyo alobaki akobuka tempelo, mpe atonga yango sima ya mikolo misatu. 30Mikitisa na ekulusu mpe omikisa".31Kaka lolenge wana, na nganga Nzambe minene bazalaki kozomela ye, elongo na bnatangi mibeko, koloba: ye abikisaki bayike, bongo amibikisa mpe ye moko. 32Tika ete Kristo, Mokonzi na Isalayele akita sasaïpi na ekulusu, mpo na biso tomona mpe tondima ye". baye babakamaki na ekulusu elongo naye, lbazalaki kofinga ye mpe lokola.33Na ngongo ya motoba sima ya nzanga, malili ejingaki mboka mobimba, kino ngonga ya libwa sima ya nzanga. 34mbongo kaka na ngonga ya libwa wana, Yesu agangi na mon ngpgo makasi: " Eoi, Eloi, lama sabatani? Oyo elakisi Nzambe na ngayi, boni obwakisi ngayi". 35Bayike baye bazalaki nzinga nzinga na ekulusu na yesu, balobi boye: "tala ako belela eliya".36Moto moko akilingingani na lombangu, akwi mwa etini ya elamba, azindisi yango lokati ya amsanga ya ngayi, atingisi yango na eteni ya nzete ya kekele, mpe atomboli : yango omonoko mwa Yesu, bongo moto wana lalobi "totala soko Elia akokitisa ye na ekulusu". 37Sima na yango, yesu aganga makasi mpe akati motema. 38Elamba monene ,ya tempelo epasuki na biteni bibale, utuo olikolo kino onse.39Bongo tango soda sinzili atelemi liboso na Yesu, amoni ete akufi, nde alobi: "ya solo, moto oyo azalaki mwana na Nzambe. 40Basi nzike mpe bazalaki komona na mosika, kati na bango, maliya madelene, maliya (maman na zaki leki ya yosefu), mpe salome. 41Tango ezalaka bango o mbonka ,galileo, bazalaki kolanda ye mpe kosalela ye, bayike na basi basusu, ba butaki mpe na mboka yelusalemi.42Lokola butu eyingelaki, na mokolo mwa liboso ya sabata. 43Moto na kombo ya Yozefu ya mboka alimate ayeî kuna, mpo ye azalaki moto na lokumu, nakati ya lisanga ya bayuda oyo bazalaki kozela boyeyi ya bokonzi ya Nzambe. Azui bompikiliki, mpe akeyi apayi na Poso Pilato, kosenga ye nzoto na Yesu. 44Poso Pilato akamuaki koyoka ,ete yesu akufaki, mpe ye abengi soda sinzili mpo atuna soki mpenza akufaki.45Eyokaki Poso Pilato na monoko ya soda sinzili ete, Yesu akufaki solo, nde andingisi bapesa nzoto na ye na Yozefu ya alimate. 46Yozefu asombaki elamba na mpmbe, akitisi Yesu na ekulusu, ajingi ye na elaùmba ya mpembe, na mbisa, atié nzoto naye na kunda eye atimolaki kati na libanga. na mbisa, azipi ekotelo na kunda, na libanga monene. 47Maliya madelene mpe Maliya mamana Yozé bango bamoni esika ekundamaki yesu.
161Sima ya mukolo ya eyenga, Mariya wa Magdala pe Mariya mama wa Yakobo pe wa Salomé baombi biloko ya malasi mpo bakende kupakola nzoto ya Yesu. 2Na tongo-tongo mokolo ya liboso bango baleyi o lilita eleko ya moyi ebima3Ekende bango na nzela bazali kumituna: "Nani akolonguela biso libanga monene wana? 4Efongoli bango miso moni ete moto moko asili ko longola libanga ata ko ezalaki monene.5Ekoti bango na lilita, ba moni elenge mobali alati elamba ya pembe avandi koboko ya mobali mpe azalaki na kokamua. 6Alobi na bango: "Bo banga te. Bozali koluka Yesu na Nazaleté, oyo ba bakaki ye na ekulusu. Ye asili ku sekwa! Azali lisusu awa te. Bokende kotala esika oyo batiaki ye. 7Bongo bokende koyebisa na ba yekoli na ye mpe Petelo bakende liboso na Galile. Kuna bokomona ye lokola ayebisaka bino.8KObima na bango na lilita na lombango. Kolenga na kokomwa elataki bango. Ba lobi na eloko te na moto po b azalaki na somo.9Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso na mposo, sima kosekwa na ye, amimonisi liboso na Mariya Madeleine oyo ye abenganaki milimo mabe sambo. 10Ye akeyi pe koyebisa na ba oyo bazalaki na ye. Tango wana bango bazalaki ko yima-yima pe ko lela-lela. 11Bayoki ete ye azali na bomoyi pe bamoni ye kasi bandimi te ete asekwaki.12Sima na yango, amimonisami na bato mibalé na ndenge mususu bazalaki ko kende na bilanga. 13Bakeyi pe koyebisa basali mosusu, kasi bandimeli bango te14Sima ya ngonga, Yesu amonisami na basali na ye, tango bazalaki na misa, ye agangeli bango mpo kozanga kondima pe kokanga mitema na bango, mpo été bazalaki kondimela ba oyo ba monaki ye liboso sima ya kusekwa kati ya bakufi. 15Ye alobi na bango: "Bokende bisika yonso na mokili pe boteya sango malamu". 16Oyo ako ndima pe abatisami akozwa lobiko, kasi oyo akondima te akokweya pe akozwa etumbu.17Tala bilembo eko lakisama mpo na ba oyo ba ko ndima : Bako bengana milimo mabe na kombo na ngayi. bakoloba na minoko ya sika. 18Bako mema nioka na maboko, kasi ekoswa bango ata moke te. Bakotia maboko na ba beli bango ba kobika.19Sima Mokonzi asili kolobela bango, abuti likolo pe afandi na loboko ya mobali ya Nzambe. 20Basali ya Yesu bakeyi pe koteya bisika yonso, tango oyo Mokonzi azaliki kosala na bango pe ko kokisa maloba na bilembo oyo ezali ko landa yango.

Luka

11Bayike ba mipesaki mosala ya bokoma lolenge ya kolandisama basango mineneoyo ekokisami kati na biso, 2Kolanda maye oyo banzeneneke ya yambo, oyompe bakomaki bapanzi songo batindelaki biso. 3Yango wana, malingami ngaimpe na monaki malamu koluka koyeba na bosindo uta ebandeli, mpe kokomelayo mikanda kitoko osungama. 4Nalingi ete oyeba kososola malaka moyeozuaki.5Na ngonga eye herode azali mokonzi na judee, ezalaki na ngonganzambe moko na kombo ya zacharie, azalaki moko yo lingomba ya ba nganganzambe ya abia .mwasi wa ye azalaki mokitani ya aron mpe bamobe bengakielisabete. 6Bango mibale bazalaki sembo liboso na nzambe, bako nde bazalikikotosa solo mibeko mpe makomi ya mokonzi. 7Nzoka nde bazalaki na mwanate, mpo ete elizabeti azalaki ekombo, mpe na eleko wana, mbula na bangomibale epai samoki.8Mokolo moko zacharie azalaki kosala mosala mwa yeoboso ya nzambe, na ngonga oyo epesamelaki lisanga ly aye, 9Na boluki nganganzambe na ni moponami, mpela moko momesa no ya bonzambe bobeti mbeseekokisaki ye na tempelo ya mokonzi pona kutumba malasi. 10Boye lingombampbimba bazalaki na losambo libanda na ngonga ya mbeka ya malasi.11Muanzeya nzambe abimelaki ye, atelama na loboko ya mobali ya etumbelo yamalasi. 12Komona muanze, zachana amitungisamaki mpe ayokaki nsomo. 13Kasimuanze alobelaki ye kobanga te, zacharia, mpo ete losambo na yo endi mamakimuasi na yo elisabeti akobota mwana mobali mpe okopesa ye nkombo yajean.14Akozala pona yo sango yo esengo koleka mpe bayike bokosepela mponambotama na ye. 15Mpona ete akozala moto monene oboso ya mokonzi, yeakomela ata vinu, to mpe masanga ya makasi te. ye akotondisama na malinomasantu uta libumu ya mama na ye.16Bango, bayike ya bayuda bayambakinzambe mokonzi na bango. 17Akotambola elongo na nzambe na ndima mpe nanguya ya elia, pona kobelemisa mitema ya batata pene na bana na bango mpekokumba ba tomboki botamboli mpela noko buania ya ba yengabeni, na ntina yakobongisa libota mpo na mokonzi.18Zacharia alobaki na muanze nakoyebalolenge nini mpo nazali mpaka, mpe mbula ya muasi na ngai esilikopusana. 19Muanze azongisi, nazali gabriel oyo atelemeka oboso ya nzambe natindamoki pona kosolola na yo mpe koyebiosa yo sango malamu eye. 20Kasi,okokoma baba, mpe okozanga maloba kino mokolo yango ekokokisama mpo eteondimelaki maloba na ngai te oyo ekokokisama na ngongo na ngo.21Batobazalaki kozela zachana na kokamua ete afandaki ngonga molayi kati na eyanganela. 22Ngonga ye abimaki mpe na kazango maloba, basosolaki ete ye azuakiemonisela kati na tempelo na bango ye atikalaki baba mpe kosolola na yeekomaki kaka na misapi. 23Boye azongaki na ndako na ye tango mosala na yeesilaki.24Na ngonga moke elizabeti muasi na ye akumbaki zemi abombaki sanzamitano na komilobelaki. 25Mokonzi asaleli ngai abuakeli ngai miso mpe ngolupona kosukisa nsoni elataki ngai liboso ya mibali.26Na sanza motoba ye zemimuanze gabriel atindamaki ya nazareth. 27Epai ya elenge moseka, oyoasengamaki na libala epai ya yosefu wa libota ya Davidi moseka yangoabengamaki mana. 28Abelamaki pene na ye mpe alobaki losako na yo oyonzambe asali ngolu koleka mokonzi azala na yo. 29Na maloba manaamitungisamoki mokosi mpe amitanaki ntina ya losako eye.30Muanze alobelakiye kobanga te moria mpo ete ngollu na nzambe epesameli yo. 31Boye yo okobatamwana mpe okopesa ye nkombo ya yesu. 32Ye akozala engambe mpeakobengama mwana na nzambe monene mokonzi nzambe okopesa ye ngwendeya nkoko na ye davidi. 33Ye akokonza seko na libota yo yakoko, mpe bokonzi naye ekozala na suka te.34Mana alobaki na mwanze boni boni yango ekosalemampo na yebi ata mobali te. 35Muanze azongisaki boye molimo mosantu akokitelayo mpe nguya ya nzambe monene ekozipa yo na elilingi na yango na yangomwana eye akobotama akozala mosantu, mpe akobengama mwana nanzambe.36Boye, ndeko na yo elisabeti ye mpe akumbami na zemi ya mwanamobali na bompaka. ye oyo ba bengeki ekomba, akokisi sanza motaba nazemi. 37Pona ete eloko moko te ekoki kolembama na nzambe. 38Mana alobinazali mosali ya mokonzi.monso esalamela ngai mpele moko liloba na ye nabongo mwanze atikaki ye.39Na ngonga wana mana akumbamaki na lombangoya judee. 40Ayingelaki na ndako ya zacharia mpe apesaki losako naelisabeti. 41Eyokoki elisa beti losako ya mona, muana kati na libumu aninga nakiboye elisabeti atondisamaki na nguya yo molimo mosantu.42Ye angangaki namongongo makasi kioloka yo azali ya kopambwana kati na basi banso mpembuma kati na yo epambuama. 43Lolenge nini epesameli ngai ete maman yamokonzi na nga abeleme pene na ngai? 44Pona tango koyoka losako na yo,mwana aninganaki na esengo kati na ngai. 45Esengo na oyo asili kondima mpoete maye malobamaki ntina na mokonzi eko kokisama.46Na bongo mari alobakinakumisi mokonzi na motema na ngai. 47Mpe nazali kosepela na nzambe,mobikisi na nga na molimo48Mpona ete ye abuakaki miso na mosali na ye oyoamikitisaki. 49Mpo ete, nzambe na nguya asali ya minene ntina na ngai nkombona ye mosantu.50Mawa okowumela bileko na bileko na baye bazali kobangaye. 51Ye asembali loboko na ye ya nguya mpe apanzaki baye bazalili na makanisiya lolendo.52Ye akuesaki bakenzi na ngwende na bango mpe atambolaki bayeya komikitisa. 53Babola batondisamaki na maye ya malamu, kasi abenganakibazui maboko pamba.54Ye ayaki kosangana Israeli mosali na ye, na ntinakotalisa mawa na ye. 55Mpela moko alobaki na bakoko na biso na abrahama mpena bakitani na ye seko na seko.56Maria afandaki na elisabeti pene ya sanzamisato, sima na yango, azongoki epayi na ye. 57Tango ngonga ya kobota yaelisabeti ekokaki, yz abandaki mwana mobali. 58Bato nzinga nzinga na ye mpeba ndeko na ye bayokoki sango ete mokonzi akitisaki mawa monene likolo naye mpe bango basepelaki elongo na ye.59Baye na mokolo ya muamba, bayakipona bokoti ngenga ya mwana balingaki kobenga ye zacharia nkombo ya mobalina ye. 60Kasi mama na ye alobaki boye te bakobenga ye yoone. 61Balobaki na yemoto moko te koti na bandeko na yo abengami na nkombo wana.62Na bongo nabilembo batunaki papa na ye nkombo nini ye alingaki babenga ye. 63Ye asengakiekomelo mpe akomaki boye yoane nde nkombo na ye bakamuaki bangombaso.64Boye ye akanguamaki na monoko mpe na lolemo, mpe alobaki nakopambola nzambe. 65Na bango baye banso ba bafuandaki nzinga nzinga bazuaki kobanga mpe na ngambu mobimba ya ngomba ya judee sango ya ngoepanzanaki. 66Bango bayokaki maye wana, bakangaki mango kati na motema nakoloba muana oyo akokama nani? mpona loboko na mokonzi ezalaki naye.67Zacharia mobali mwa ye atondisamaki na molimo mosantu, mpe asakolakina koloba. 68Apombolama mokonzi nzambe ya israeli, mpo ete ye atolaki mpeakongolaki libala la ye.69Ye ayingisi biso nguya lobiko kati na libota na davidi,mosali na ye. 70Boye nde asakalaki na eloko wana na monoko ya basakoli basantu. 71Yango nde lobiko eye ekangoli biso na banguna na biso mpe na mabokoya bayini na biso.72ayokeli bakoko na biso mawa,pe akanisi boyokani mosantu na ye. 73Seleka oyo akataki na koko na biso Abraamya kopesa biso nzela, 74awa tosili kokangolama na maboko ya banguna,tósalela ye na bobangi té, 75na bosantu pe na bosemboliboso na ye, mikolo na biso nyonso.76Pe yo, mwana, okobengama mosakoli ya Oyo-aleki-likolo,po okotambola liboso ya Mokonzi po na kobongisa nzela na ye, 77po na kopesa na bato na ye boyebi ya lobiko,na nzela ya bolimbisi ya masumu na bango,78po na motema mawa ya Nzambe na biso,oyo na yango moi uta na likolo ekoya kotala biso, 79po na kongengela bato oyo bafandi na molili pe na elilingi ya liwa,pe po na kotambwisa makolo na biso na nzela ya boboto.80Mwana akolaki pe akómaki makasie na Molimo; pe afandaki na esobe tii mokolo ya komonisama na ye na Israel.
21O ntango ena, Cezar Auguiste apesaki motindo ete batanga motuya ya batobazali kati na mokili. 2Botangi ya liboso esalemaki na Sulia, o tango Kiriniusuazalaki Mokambi ya engumba. 3Boye, banso bakendaki komikomisa moto namoto na engumba na ye.4Yozefu mpe alongwaki na Nazarete ya Galileya, mpoakenda na Yudea, ya engumba ya Dawidi ebiangami Beteleme, mpo azalakimokitani ya libota ya Daviwidi, 5akendaki kokomisa nkombo na mobandami naye Malia, oyo azalaki na zemi.6Tango bazalaki wana, eleko ya kobota ekomakipene. 7Abotaki mwana mobali ya liboso, balingaki ye na bilamba, mpe batiakiye na eleilo, zambi esika ya kolala ezalaki te mpo na bango na ndako yabapaya.8ezalaki na esika yango babokoli bibwele oyo bazalaki kolala na bilangampo na kobatela bibwele ya bango. 9Na mbala moko, anzelu ya Mokonziabimelaki bango mpe nkembo na Mokonzi engengelaki bango; mpe babangakimingi.10Anzelu ayebisi bango: «Bobanga te, mpo nayeli bino sango malamu,oyo ekozala esengo monene mpo na bato banso. 11Ebotameli bino lelo, naengumba ya Dawidi, Mobikisi oyo azali Klisto, Mokonzi. 12Tala elemboepesameli bino: bokokuta mwana moke balingi ye na bilamba mpe balalisi ye naeleilo ya bibwele.»13Mbala moko, etuluku ya mapinga ya lola basangani naanzelu, bazali kokumisa Nzambe koloba: 14«Nkembo na nzambe na bisika bilekilikolo mpe boboto awa na nse na bato oyo alingaka.»15Tango banzelu batikibango bakei likolo, babateli mpate balobanaki moko sima na mosusu: «Tokendakino Beteleme kotala oyo esalemi, oyo Mokonzi alakisi biso.» 16Na lombangobakendaki kuna mpe bakutaki Malia na Yozefu mpe mwana moke alali na eleiloya bibwele.17Nsima na komona boye, bayebisaki bato oyo ekomelaki bango nantina na mwana. 18Baoyo nyoso bazalaki koyoka bango, bakamwaki na oyobabateli mpate bazalaki koloba. 19Kasi Malia abombaki nyoso na motema mpeazalaki kokanisa yango. 20Mpe babateli mpate bazongangi na kokumisaka mpekosanzolaka Nzambe na nyoso bayokaki mpe bamonaki, engebene na oyobayebisaki bango.21Tango mikolo mwambe ekokaki mpe esengelaki mwana akatama ngenga, bapesaki ye nkombo Yesu; nkombo oyo anzelu apesaki ye liboso ya kozwa zemi.22Tango mikolo ya kopetolama na bango ekoki, engebenena mobeko ya Mose, Yozefu mpe Malia bakumbaki ye na Yelusaleme mpo nakolakisa ye epai na Mokonzi. 23Kolandisama na oyo ekomami na mobeko naMokonzi: «Mwana nyoso ya mobali, ya liboso, akobulisama mpo naMokonzi.» 24Bapesaki mpe mabonza lolenge elobama na mobeko ya Mokonzi:Bana mibale ya ebenga ya zamba to ya mboka.»25Nzoka nde ezalaki naYelusaleme, moto moko na nkombo Simeona, moto malamu mpe kobangaNzambe, azalaki kozila mokolo oyo Isalayele ekolongwa na mawa mpe Molimomosanto azalaki na ye. 26Ayebisaka ye ete akokufa te, soki amoni MasiyaMokonzi te.27Simeona, kokambama na Molimo Mosanto, akendaki na tempelo.Lokola baboti bamemaki mwanaYesu mpo na kokokisa mibeko; 28Akamataki yena maboko na ye, kosanzola Nzambe mpe koloba: 29«Sasaipi Mokonzi, tikamosali wa yo akenda na kimia engebene na liloba na yo.30Mpo ete miso mangai mamoni lobiko na yo, 31oyo obongisaki liboso na bato banso, 32Pole mpo nabapagano mpe nkembo na bato na Isalayele.»33Tata mpe mama na yebakamwaki mingi na makambo bazalaki koloba mpo na mwana. 34Simeonaapambolaki bango mpe alobaki na Malia mama na ye: «Mwana oyo aponamimpo na kokweisa mpe kotelemisa ebele na bana na Isalayele mpe lokola elemboekomema bokeseni. 35Mopanga ekopasola molema, na ntina ete makanisi ebelena mitema emonana.»36Ezalaki mpe na mosakoli mwasi Anna, mwana naFanuele, ya ekolo Asele. Azalaki mobange na mbula. Afandaki mbula sambo namobali na ye sima ya bolenge na ye, 37aumelaki mbula tuku mwambe na mineisima na kufa ya mobali na ye, atikaki ndako Nzambe te mpe azalaki butu mpemoyi kokila mpe kobondela. 38Na tango yango, ayaki mpe abandi kopesamatondo na Nzambe mpe koloba na ntina na mwana na baoyo nyoso bazalakikozila lisiko ya Yelusaleme.39Wana esilisaki bango kokokisa oyo nyosomobeko na Mokonzi ekoma, bazongaki na Nazarete na Galileya. 40Mwanaakolaki mpe akomaki makasi, akolaki na bwanya mpe na ngolu na Nzambeezalaki likolo na ye.41Baboti na ye bazalaki kokenda mbula na mbula na miluluya pasika. 42Tango akokisi mibu zomi na mibale, bakendaki na milulu kolandabonkoko na bango. 43Tango milulu esilaki, bazalaki kozonga epai na bango,mwana Yesu atikalaki na Yelusaleme, kasi baboti bayebaki te. 44Kokanisa eteazalaki elongo na baninga ya mobembo, elekaki mokolo moko na nzele, libosoete baluka ye kati na baboti na bango mpe baninga.45Wana ezwaki bango ye te,bazongaki na Yelusaleme mpo na koluka ye. 46Sima ya mikolo misato ndebamonaki ye o kati ya tempelo, afandi kati na balakisi, koyoka bango mpekotuna bango mituna. 47Baye banso bazalaki koyoka ye bazalaki kokamwa mpona mayele mpe biyano na ye.48Na bomoni ye, bakamwaki mpe mama na yealobi na ye: «Mwana na ngai, mpo na nini osali biso boye? Yoka, tata na yo nangai, toluki yo na mawa mingi!» 49Ayanoli bango: «Mpo na nini bozali kolukangai, boyebi te esengeli nazala na ndako na Tata na ngai?» 50Kasi basosolaki teoyo azalaki koloba na bango.5152Boye akei elongo na bango na Nazarete, azalaki kotosa bango. Mpe mama na ye azalaki kobomba makambo nyoso oyo na motema. Kasi Yesu akolaki na bwanya mpe na bolayi, kozwa ngolu mingi na Nzambe mpe na bato.
31O mobu zomi na mitano ya boyangeli ya Tibele Cezar, o tango yango PonsoPilato azalaki mokonzi engumba Yudea, Helode azalaki mokonzi ya engumbaGalileya, Filipo, ndeko na ye azalaki mokonzi ya etuka ya Itule mpe yaTrakonitide, Lusaniasi ezalaki mokonzi ya Abilene, 2mpe o tango ya banganganzambe minene Anna mpe Kaifa, liloba ya Nzambe eyaki epai ya Yoane mwanana Zakalia, na esobe.3Azalaki kotambola nzinga-nzinga ya ebale Yuladeni, koteya libatisi ya kobongola motema mpe kolimbisama ya masumu.4Ndenge ekomama na mokanda ya mosakoli Yisaya: « Yoka mongongo ezali kobelela na esobe: "Bongisa nzela ya Mokonzi, lalisa mabele!5Lobwaku nyoso ekozipama,ngomba nyoso ya minene mpe mike ikokitisama, nzila itengama ikonyolisama,nzila ya mabanga ikolalisama, 6mpe moto nyoso akomona loboko ya Nzambe."»7Boye Yoane azalaki koloba na etuluku oyo eyaki mpo na kobatisama na ye: « Bino, libota ya nyoka! Nani akebisi bino mpo na kokima kanda oyo ezali koya?8Bobota mbuma ezali komonisa ete bobongoli mitema mpe boloba te: "Tata na biso Abalayama", pamba te nalobi na bino ete Nzambe azali na makoki ya kobongola mabanga oyo bana ya Abalayama.9Tala, epasola ezali pene mpo na kokata misisa ya nzete. Boye nzete nyoso oyo ezali kobota mbuma malamu te ekokatama mpe ekobwakama na moto.»10Sima na yango, etuluku batuni Yoane:«Sik'oyo tosala nini?» 11Ayanoli bango koloba: «oyo azali na kazaka mibaleapesa moko na oyo azangi, mpe oyo azali na biloko ya kolia asala mpebongo.»12Bakongoli na mpako bayaki mpe mpo bazwa libatisi mpe balobi:«Molakisi, tosengeli kosala nini?» 13Azongiseli bango: «Bozwaka te mbongokoleka oyo esengeli bozwa.»14Basoda basusu batunaki mpe ye: « Bongo biso, tosala nini?» Ayanoli bango: «Bosala mobulu te, bosala moto mabe te. Bosepela na lifuta na bino.»15O tango bato bazalaki kozila boyei ya Klisto, moko namoko azalaki komituna na motema na ye soki Yoane azali Klisto. 16Yoaneazongiselaki bango: «Ngai nazali kobatisa bino na mayi, oyo azali koya sima nangai, azali na nguya koleka ngai mpe ngai nakoki kolongola singa ya sapato naye te. Ye akobatisa bino na Molimo Mosnto mpe na moto.17Ye moko akokombola elanga na ye, akobomba mbuma malamu na ebombamelo na ye mpe mbuma ya mabe akobwaka yango na moto ya libela.18Na nzela na maledisiebele, Yoane ateyaki bango sango malamu. 19Tango bapamelaki mokonziHelode mpo abalaki Helodiasi, mwasi ya ndeko na ye, mpe makambo mosusumabe ye asalaki, 20abakisaki lisusu mbeba oyo: akongaki Yoane naboloko.21Esalamaki ete tango bato bazwaki libatisi, Yesu mpe abatisamaki.Boye tango azalaki kosambela, likolo efungwamaki, 22mpe Molimo Mosantoakitaki likolo na ye na lolenge ya ebenga. Mpe mongongo kouta likolo: «Yoozali mwana na ngai ya bolingo, kati na yo nazwaka esengo.»23Tango Yesuabandi mosala na ye, azalaki pene na mbula tuku misato, azalaki (ndengebazalaki kokanisa) mwana na Yozefu, mwana na Heli, mwana 24na Matta,mwana na Lewi, mwana na Melki, mwana na Yannai, mwana naYozefu,25mwana na Mattatiasi, mwana na Amosi, mwana na Nahumu, mwanana Hesli, mwana na Naggai, 26mwana na Maate, mwana na Mattatiasi, mwanana Semeine, mwana na Yoseki, mwana na Yoda,27mwana na Yoanani, mwanana Resa, mwana na Zorobabele, mwana na Salatiele, mwana na Neri, 28mwanana Melki, mwana na Addi, mwana na Kosam, mwana na Elmadam, mwana naEr, 29mwana na Yesu, mwana na Eliezer, mwana na Yorim, mwana na Mattati,mwana na Lewi.30Mwana na Simeona, mwana na Yuda, mwana na Yozefu,mwana na Yonam, mwana na Eliakim, 31mwana na Melea, mwana na Menna,mwana na Mattata, mwana na Natam, mwana na Dawidi, 32mwana na Jesse,mwana na Yobede, mwana na Boazi, mwana na Sala, mwana naNaasson,33mwana na Aminadab, mwana na Admin, mwana na Arni, mwana naHezron, mwana na Perez, mwana na Yuda 34mwana na Yacobo, mwana naIzaki, mwana na Abalayama, mwana na Terah, mwana na Nahor, 35mwana naSerug, mwana na Reu, mwana na Peleg, mwana na Eber, mwana naShelah,36mwana na Kainan, mwana na Arphaxad, mwana na Sem, mwana naNowa, mwana na Lemek, 37mwana na Mathusaleme, mwana na Enoka, mwanana Yareth, mwana na Mahaleleele, mwana na Kainan, 38mwana na Enos, mwanana Seth, mwana na Adamo, mwana na Nzambe.
41Yesu atondisamaki na molimo mosantu bozongi na ye kowuta na ebale yajordani mpe akambamaki na kati ya esobe. 2Kuna amekamaki na zabolo mpo namikolo tuku mineye. aliaki elokote na sima na mikolo yonso wana maliki,nasema ayokaki nzala.3Zabolo alobi na ye soki ozali mwana ya nzambe pesamitindo na mabanga ebongwana kwanga. 4Yesu ayanoli boye ekomami motoakobika kaka na kwanga te.5Bongo zabolo amatisaki yesu na bisika ya likolompe alakisi ye bokonzi ya mokili mobimba na bomengo na ya ngo na mwangonga moke. 6Zabolo alobi na ye nakopesa yo bokonzi mpe lokumu na yangonyonso mpo esilaki kopesa mela ngai, mpe nakoki kopesa yango na oyo na 7 kolinga. 7Na bongo, soki ogumbamili ngai mpe okumisi ngai,8Kasi yesu ayanoli ye boye ekomami boye okokumisa mpe okosalela bobele nzambe se ye moko.9Lisusu zabolo atambwisi yesu tee na ye lusalema mpe amatisaki yelikolo koleka na songe ya tempelo mpe alobi soki ozali solo mwa ya nzambe,omibwaka kowuta na likolo kino na nse. 10Zambi ekomami boye akopesabanzelu mitindo na tina na yo mpo babatela 11yo.Bakotanda moboko na bangompo na koyamba yo na ntina ete makolo na yo etutana na mabanga te.12Yesuayanoli ye boye makomi elobi boye epekisami komeka mokonzi nzambe wayo. 13Wana esili zabolo komeka yesu, alongwi mosika na ye mpona kozila tangomosusu.14Bango wana esilaki yesu kotondisama na molimo mosantu azongakigalileya epayi akolaki mpe nsango na ye eyokanaki bipayi nyonso. 15Abandakikoteya oteyi na eyanganelo ye bayuda mpe batu yonso bazalaki kokumisa ye nabatu yonso.16Ekomaki ye na kati ya engumba ya nazalete epayi akolaki, bomomesano, wana ayi ndelaki na kati ya eyanganelo mokolo ya sabate atelemakimpona kotanga na koganga na mongo ngo makasi. 17Bapesaki ye mokanda yamosakoli ezaya. afungolaki yango bobele na esika oyo ekomami boye.18Molimoya klisto ezali likolo na ngai apakoli ngai mpo na kopa nza nsango malamu nababola, atindi ngai kotatola bakangami na makomi mpe ba kufi miso ba mona,mpe baniokuami, bazua bosomi. 19Mpe kosakola mbula ya ngolu yankolo.20Akangi buku ya makomi mosatu mpe azongiseli mosali mpe afandi.batu nyoso na kati ya eyanganelo batalaki na miso. 21Bongo abandaki koloba nabango lelo oyo liloba esili kokokisama mpo bosili koyoka yango. 22Banso bayokaki maloba oyo, bazalaki banzengeni mpe bakamwa kimingi na maloba yangolu ezalaki kobima na monoko na ye mpe bozalaki koloba oyo nde mwana nayosefo te?23Bongo alobaki na bango ya solo bakoloba na ngai lisese oyomonganga mibikisa yo moko. na maso to yokaki na ntina na yo maye osalaki nacapernaum, sala yango mpe awa na mboka na yo mpo tondimela yo. 24Alobelakina bango mosakoli mpko te bakoki koyamba ye na mboka na ye yambotama.25Kasi ya solo molobi na binu, na ntango ya eliya na isalayele, basibakufela mibali bazalaki ebele tango likolo ekangamaki, mbula ezalaki kobeta tensima ya mibu mboka mobimba. 26Kasi eliya atindamaki te epayi na moko nabango te, bobele epayi na oyo ya sarepta ya sido nde eliya atindamaki. 27Naisalayele ntango ya mosakoli elisa babeli ya bokono ya maba bozalaki ebele kasimoko te apetolamaki kasi babele namonana zuria nde apetolamaki.28Banso oyobazalaki na kati ya eyangonelo basilaki koyoka nyonso alobaki, batondi samakina kanda. 29Batelemi na kanda kobengana ye libanda ya mboko pene pene namopanzi ya ngomba epayi batongi mboka na bango mpe kobuaka ye nase. 30Kasi yesu adusoli na kati kati na bango mpe akeyi na ye esikamosusu.31Akiti na capernaum, moko ya mboka o kati ya mokili ya galilea mpeabandi lisusu koteya makambo matali sabata. 32Batu bakamwaki na mateya naye jambi azalaki koteya na kibokonzi nyoso.33Tala na kati na eyanganelo, mokoazalaki na molimo mabe abelelaki na mongongo makasi. 34Ah tosala na yo nini,yesu na nazareth yo yei mpona kobomabisa nayebi lolenge na yo mosanto nanzambe.35Yesu agangeli molimu mabe na koloba na ye. kanga mbanga na yo,mpe bima na kati na ye ntango molimo mabe esili kobuaka ye nese kati nabango ebimi kati na kati na ye na kimia. 36Banso ba kamui mpe batikaki tekobetela basusu masolo koloba ete maloba na ye ezali ndenge nini? azali kopesamitindo na kibokonzi mpena nguya na molimo ya mbindu mpe yango ezalikotosa ye. 37Boye nungu nungu mpona yesu epanzani na zingazinga yonso yesumboka ya pembeni.38Bongo yesu kowuta na etonge neli akeyi kokota na ndakona simon akuti mama bokilo ya simona azali kobela makasi, babondeli ye mpoasala ata eloko moko mpo na ye. 39Angumaki pene na ye mpe apesi mitindo napasi mpe pasi etiki ye, mpe abiki na ngonga wana atelemi mpe abandi kosalelabango.40Tango na pokwa, bamemeli yesu batu nyoso oyo bazalaki batunabokono ndenge na ndenga. atieli bango maboko mpe babiki samibanso. 41Ebele na milimo mabe babimaki nakati na ebele na bango na kogongoozali mwana na nzambe bongo yesu apameli molimo mabe mpe apekisaki bangondingisa te baloba mpo bayebaki ye azali klisto.42Ntango tongo etani ye abimimpe akeyi na kati na esobe etuluku ya batu balukaki ye mpe bakutaki epayiazalaki basengaki na ye akende mosika na bango te. 43Kasi ayebisaki na bangoebongi na ngai koteya na mboka mosusu nsango malamu ya bakonzi na nzambe.mpo na yango nde natimaki awa. 44Na mbisa akobaki kotea na biyangenelomosusu kati na yuda.
51Bakomi wana, etuluku ya bato bawelisi nzinga nzinga ya Yesu mpo na koyokaliloba ya Nzambe, bazalaki na libeke ya Genesareth. 2Yesu amoni buatu mibalebakangi na libongo ya libeke. Balobi mbisi bazalaki kosokola minyama. 3Yesuakoti kati na buatu moko oyo ezalaki ya Simon, mpe asengi bapusa yango namayi pene ya libongo, afandi likolo na yango mpe akomi koteya abandi koteyaebele ya bato.4Tango asilisi koloba, alobi na Simon «pusa na muzindo mpebuaka munyama mpo boloba». 5Simon azongisi : «molakisi tolobi butumobimba tozui eloko te, kasi lokola yo nde olobi na kobuaka monyama». 6Babuaki mpe bakangi mbisi ebele, munyama pene epasuka. 7Babelelibaninga na bango oyobazalaki na buatu musus mpo ya kosalisa bango, bayeimpe batondisi nyonso mibale etondi pene ya kozinda.8Simon Amoni boye,akueyi na makolo ya mokonzi mpe alobi:« longua mosika na ngai monkozi, mpona zali mosumuki». 9Bango nyonso bakamuaki na komona ebele ya mbisi oyoezuamaki. 10Jacques na Jean bana ya Zebedee, baninga na ye oyo bazalaki nabuati mosusu bakamuaki mpe mingi, Yesu alobi na pierre: « kobanga tekokomisa yo molobi ya bato». 11Bamemi buato na libongo, batiki biloko nyonsompe balandi Yesu.12Bazalaki na Yesu kati na engumba moko, moto mokoazalaki na maladi ya maba. Amoni mokonzi akweyi elongi na mabele mpeabondeli ye boye: « Mokonzi sok'olingi okoki kobekisanga». 13Wana Yesuasemboli loboko, asimbi ye mpe alobi: «nalingi yango bika sikoyo». Mabe mpeelimwe na nzoto na ye14Mokonzi apesi mitindo aloba na mote te« kenda komilakisa na ba nganga Nzambe, mpesa libonza mpo ya kobika nayo lokola Moïse akomaki, wana ekozala litatoli mpona bango. »15Sango ya mokonzietamboli bipayi, na bipayi, bato mingi bazalaki koya kosangana mpo na ko yokaye. Mpona kobikisama na bokono na bango. 16Kasi mokonzi alongwe akeyi namabele ya zelo na zelo mpo na kobondela.17Mokolo moko Yesu azalaki koteya, bna falisayi na balakisi ya mibeko bafandaki na nse wana, bawutaki na ba bonka na Galileya mpe ya Yuda, mpe Yelusaleme. Yesu azalaki kobikisa bato ya bokono nanguya ya Nzambe.18Bamemeliye moto akufa makolo, alali na etokobazalaki koluka kotia ye liboso ya Yesu. 19Bazui esika yakokotisa ye te, mpo nabato balekaki mingi. Bamatisiye likolo ya ndaku, batoboli lidusu bakitisiye naetoko nakati ya lisanga liboso na Yesu.20Komona kondima na bango, yesualobi: « masumu nayo elimbisami». Balakisi ya mibeko na ba Falisayi bamituninako yima yima:« Oyo azali nani, azali kotiola boye. 21Oyo akoki kolimbisamasumu soko Nzambe te?.22Kasi Yesu ayebaki makanisi na bango, atuni bango:« makanisi mabe kati mitema na bino ewuti wapi? 23Nini ezali ya malamukoloba na moto ete: « masumu na yo elimbisami to kopesa mitindo telema mpekende nayo». 24Mpo ete boyeba ete muana na moto nazali na bonkonzi yakolimbisa masumu awa na mokili, bongo alobi na loto akufa makolo : «Napesiyo mitindo, zua mbeto nayo kende na ndaku nayo».25Na mitindo naye, motoatelemi liboso na bango, azui etoko naye mpe azongi epayi na ye kati yakonsazola nzambe. 26Bango batikali nye mpe bakumisi Nzambe, kobanga ekotina bango, bazalaki koloba: « tomoni lelo likambo ya kokamua».27Nakobimanaye, akutani na mokongoli mpako na kombo ya Levi afandi na bureau yakokongola mpako: «Apesi mitindo ya kolanda ye». 28Levi atiki mosala nayempe alandi ye.29Levi asali limpate monene na ndaku naye mpo na Yesu, wapibakongoli mpako bazalaki etuluku mpe na baleki nzela basangani wana mpo na kolia. 30Bafalisayi na bakomi mibeko bayimaki yimaki ùmpe balobi na bayekoli:« mpo na nini bozalikolia mpe komela na bakongoli pako na bato namasumu? 31yesu ayanoli bango: « ezali te baye bazali na nzoto kolongonobakolukaka monganga, kasi babelinde. 32Na ye mpo na bato na sembo te, kasimpo na bato ya masumu babonguana».33Balobi naye boye: « bayekoli ya Jeanbazali koboya kolia, kaka mingi bazali kosangana na mabondeli, ndenge mokona baye ya Bafarisayi oyo ya yo bazali kolia mpe komela». 34Mokonzi ayanolibango boye: « Okoka kolalisa nzala» balingami ya moto abali Marie na ngongaoyo mobali ya libala azali na bango elongo?. 35Mikolo mikoya wapi mobali yalibala akozala na bango te, nde mokolo yango, bakolia te.36Alobi na lisese: « Moto te akokamate eteni ya elamba ya ùsika abamba na oyo ya kala. Soki asali bongo, akopasola eteni ya elamba ya sika, elamba oyo ya sika soki epasuki, ekokendalte na elamba oyo ya sika soki epasuki, ekokenda te na elamba ya kala.37Moto moko te akotia masanga na ekutu ya kala, pamba te masanga yasika ekoki kopasola etuku nionso ekobeba. 38Na yango nesengeli otia masangana etuku ya sika. 39Moto te soki ameli masanga yakala, akolinga lisusu ya kalaezali malamu koleka oyo ya sika.
61yesu alekaki kati na bilanga mokolo ya sabata, bayekoli naye babuki masangobatumbi sima baleyi yango. 2Bafalisayi bamoni bango mpe balobi: «mpona ninikosala mokolo ya kopema?»3Yesu ayanoli: « Dawidi ayokaki ayokaki nzala nabaninga, botanga makomi wana te?» 4Sima akoti na ndako na Nzambe navaninga, azui mapa oyo ebulisami mpe baleyi, mampa oyo epekisami koliamasena banganga Nzambe kasi na bato mususu te». 5Alobi nabango: « muana namoto nazali mokonzi ya mposo.6Yesu akoti mokolo mosusu na eyanganelo mpoya koteyabato na mokolo ya poso na kati ezalaki na mato moko mukakutali naloboko ya maobali. 7Bakalaka ya mibeko mpe falisayi bakengeli Yesu mponakotala soki akobikisa moto oyo na mokolo sabato wana bazua ngonga yakofunda ye balobi ete abuki mibeko. 8Yesu ayebaki makanisi na bango alobi namoto oyo: «Telema liboso yabato nyonso na kati-kati» moto wana asalaki sebongo kolandisama maloba ya Yesu.9Wana Yesu alobi na bango: « epesamelikosala malamu to mabe mokolo ya sabato, na kobikisa bomoyi to kobingidayango»? 10Yesu alandisi miso naye kotala bango, mpe alobi na mokakatani:«sembola loboko nayo ya mobali mpe loboko ebiki. 11Bango basiliki penza mpebabandi kolobana kati na bango likambo nini tokoki kosala Yesu.12Mokoloyango Yesu akeyi na ngomba kobondela Nzambe butu mobimba. 13Etani tongo,abiangi bayekoli na ye mpe aponi bango azui zomi na mibale apesi kombo yabantoma.14Kombo ya bantoma wana yango oyo: « Simon abaloli ye na komboya Pierre, André, ndeko ya simon, Jacques, Jean, Barthelemy, 15Mathieu,Thomas, Jacque muana ya Alphee, Simon na kombo ya Zelote, 16Judas muanaya Jacques, mpe Judas Iscariote oyo atekaki ye.17Sima yesu akeyi na bango nangomba atelemi na mabele polele, etuluku munene ya bayekoli wana mpe ebeleyabato na Judée, ya Jerusalem, Bamboka oyo ezali pene ya ebale monene Tyr na Sidon. 18Bayaki mpo na koyoka Yesu mpo babika na ba maladi na bango, nabaye milimo mabe ekangaki bango. 19Etuluku ya bato balukaki kosimba elambanaye mpo babika na kati ya nguya oyo ezalaki naye.20Atali bayekoli, alobi nabango: « esengo na babola kati na molimo mpo ete bokonzina baye bazali nanzala, sikoyo na Nzambe ezali na bino. 21Esengo na bino bozali kolela, pambatebokoseka.22Esengo ezala na bino soki bayinaka bino, soki bafingaka bino mpebaboyaka koyoka kombo na bino likolp na ngayi muana na moto. 23Bosepelampe bozala na esengo mpo ete lifuti na bino ekozala monene na likolo, boyebaete bankoko na bango banyokolaka basakoli.24Mawa na bino bazui, mpo bosilikozua bomengo na bino. 25Mawa na bino bosili ko tonda, boyeba mokolo ezalibokokufa nzala, mpe na bino bozali koseka , mokolo ezali bokosalamatanga.26Mawa na bino soko bato nyonso bakumisa ka bino, boyeba ete bankoko na bango bazalaki mpe kokumisa basakoli ya lokuta se bongo.27Binobaye bozali koyoka ngai, bolinga banguna na bino mpe bosala bangobolamu. 28Bopambola baye bazali kolakela bino mabe, bondela mpe mpo bayebazali konyokola bino.29Babeti yo na litama ya muasi, pesa ye mpe abeta nalitama ya mobali, soki azui elamba nayo, tikela ye mpe kazaka nayo. 30Pesa naoyo asengi, ata azui eloko nayo kosengaye yango lisusu te.31Oyo olingi basalayo te, mpe kosala moninga te. 32Olinga te se baye bazali kolinga yo, bato namasumu mpe basaka se bongo litoma nini okoki kozua. 33Soki okosala malamuse na baye yo olingi, litomba nini yo okozua, pamba te bapagano mpe basalakase bongo. 34Soki okodefisa se na oyo yo oyebi ete akozongisela yo, okozualitomba nini, bato ya masumu mpe basaka se bongo.35Linga bayini nayo, salelabango bolamu, defisa kasi kosenga te, wana lipamboli ekozala monene kuna nalikolo. 36Landa bizaleli ya Tata Nzambe nayo oyo atondi na mawa.37Kofundaka baninga te, kokueyisa moninga te na likambo limbisaka nyoso oyo ekozongela yo.38Kabaka baninga mpe bakokabela yo, wana ezali lolenge ya malamu ( biloko yakati na kopo, baningisa, etonda koleka) oyo ba kotia na songe ya elamba na bino. Mpo ete ezali na lolenge moko wana bakosalela bino.39Atunibango: «mokufi miso akoki kotambolisa moninga na ye, na kozanga kozualikama?» 40Moyekoli azalaki na makoki ya kosala koleka molakisi naye, sokiasimbi mateya malamu.41Longola nanu eteni na libaya oyo ezali na liso nayoliboso ya kolongola mua lititi oyo ezali na liso ya moninga. 42Olobi na ndekonayo, ndeko nalongola yo lititi oyo ekoti yo, ebongi yo moko ozali na nzete,moto na lokuta, longola liboso nzete oyo ezali nayo, sima omona ya moningamalamu.43Nzete moko te ya malamu ekoki kobota mbuma ya mabe oyo mpeezali mabe ebota mboma ya malamu te. 44Bakoyebaka nzete malamu na mbumana yango, babukaka mbuma ya figi na nzete ya nzube te, mpe mbuma ya vinu nabanzetz ya sende te.45Moto malamu abimisaka makambo malamu oyo ezali na motema naye. oyo mpe ya mabe kaka se bongo mpe, makambo manso moto abimisaka ewutaka na motema.46Ozali kobianga: mokonzi, mokonzi mpo niniozali kosala oyo ngai nazali kolinga te? 47Moto akoya na ngai se ye oyo azalikoyoka maloba na ngai, asaleli yango, na misala, na yango na kolakisa bino nanani akokani. 48Akokani na moto oyo atongi ndako na ye likolo ya libanga, atamopepe ekoya ndako ekoningana te mpo etongami malamu.49Oyo ayoki liloba na ngai mpe ati yango na misala te akokani na moto oyo atongi ndako na ye likolo ya zelo soki mbonge, mopepe eye, ekokweya.
71Sima ya bosilisi koloba na mabota oyo bazalaki koyoka ye, akotaki na kapernaum.2Kapitene azalaki na mawumbu oyo alingaki mingi azalaki nabokono pene ya liwa. 3Eyokaki kapitene sango ya yesu, atindaki ba mbuta mutuya ba yuda, kosenga aya kosalisa mosali na ye. 4Kokoma epai na yesu babondeli koloba ba ye akoki na lisalisa na yo. 5Atongeli biso eyangenelo oyo,mpo alingaka ekolo na biso.6Yesu akobaki nzela moko elongo na bana emoniye kapitene penepene na ndako na ye atindi baninga epai ya mokonzi,komitungisate minyoko koyengela na ndako na ngai te. mpo ete na bongi te,mpo oyingela ndako. 7Nakokiko ya epai na yo te na tina wana kasi loba kakaliloba moko mpe mosali na ngai akobika. 8Ngai mpe, nazali moto oyo natiami,na nse ya bakonzi basala mpe bazuami nse ya bakonzi na nga soki na pesi oyomotinolo kende, mpe akeyi na mpe na mosusu yaka mpe ayei, mosali, sala boyempe asali ndenge na lobi na ye.9Eyoki yesu bongo akamwi, mpe abaluki epai yabaye bazalaki koloba, mpe alobi ata na israel na moni moto ya lolenge yabondemi eye te. 10Tango baye batendaki bango bakomi na ndako bakuti mosalina nzoto kolongono.11Sima ya tango moke, yesu akeyi na mboko nain mpebayekoli balandi ye, bayike ya bato balandi ye mpe lokola. 12Ekomi na ekuke naengumba nain, tala bakumbi moweyi moko, mwana se moko ya mama oyoakupela, mobali ezalaki bayike ya bato ya engamba. 13Na kotala ye, mokonziatondi na mawa mpo na ye mpe alobi kolela te. 14Na sima, apusani asumbisanduku, epai koni nzoto ya moweyi ezalaki mpe baaye bamenaki batelemi, pealobi, elenge mobali na lobi na yo, telema. 15Moweyi, afandi mpe abandi kokobayesu azongisi ye epai ya mama na ye.16Bobangi esimbaki bato banso. bakumi sinzambe, koloba ete mosakoli ya monene atelemi okati na biso nzambe ataliekolona ye. 17Sango na yesu epanzani na yendez mpe bituka nyoso yapembeni.18Bayekoli ya yoane bayebisokiye makambo. 19Yowome atindibayekoli mibale kotuna mokonzi, soki ezali ye nde ayei, to toze lamosusu. 20Ekomi bango pembeni ya yesu, bato wana batuni, yonde osengelikoya, to, tozela mosusu.21Yesu na tango wana soki baye ya bokona, bo nyokoli,mpe baye ya mulimo mabe, apesi ba yike na balalanga ba mona. 22Alobi nabango, sima kokende, beyebisa yowone maye bomoni, mpe botamboli, bato nanaka bapetolami, ba pokotoyi bayoki, bama basekui mpe sango malamu eteyamina babola. 23Apambola yo atikaka kondimela ngai, mpe ya misala nangai.24Yesu abandi koloba na bayike ya bato, na tina ya yoani sima yabatindami na ye, bokendeki kotala nini na esobe? nzete eye nzali konangona namopepe? 25Bokendaki kotala nini?moto moko alataki elamba ya kitoko, bayebalati bilamba ya ntalo, mpe baye bazali na bomengo bazali na ndoko yampkonzi. 26Bongo bokendaki kotala ni basakoli iyo mosakoli moko te.27Talaoyo ekomami mpo ye mona na tendi oboso na yo momemi sango nde akobongisela yo nzila. 28Kati na baye ba botama na mwasi, moko te aleki yowana nabonene.29Eyoki mabotanyoso pe bafutisi ya mpako balobi nzambe azali sembo,na bozui libati si ya yoane. 30Baye basosoli mubeko ya bayuda na bafarizayo, babwakisi soki maborigisi ya nzambe mpo ete bazuaki lubatisi ya yowanete.31Tina nini na kokisa bato ya ekeke eye bakokani na nini. 32Bakokani na banaoyo basakanaka libanda, bamekaka mpe kososoli saka baninga mpe basusukoloba. tobeti lundanda bo binite. totendi nzembo ya matonga mpe bino bolelite.33Mpo yowane mo batisi ayaka, azalaki kolaya kuanga te, komela vinote,bolobi, azali na milimo mabe. 34Mwana na moto ayei koleya, komela, binabolobi, azali moko ya balangai, moninga ya bafuti mpako, moleyi, ya biloko yakitoko mpe bato ya masumu. 35Kasi bwanya eyebani bisaki inso na bana naye.36Moko ya bafarizayo mpe afandi na mesa. 37Mpe mwasi moko na engumbaazalaki na masumu, tango ayoki sango na yesu na ndako ya mofarizeyo,amemaki molongi ya malasi ya albate. 38Lokola atelemaki na sima na ye, penena makolo na ye, abandi kosukola makolo na ye na pizoli, mpe apangusa nabasuki mpe abuesi ye na malasi.39Emoni mofalizo oyo abiangi yesu boye azalikoloba kati na ye, soki moto oyo azalaki mosakoli akokaki kososola mwasi oyoasimbi ye, azali na masumu. 40Yesu akamati maloba alobi simon nazali na mwaeloko, ya koyebisa ayanoli loba molakisi41Moto moko adefisi mbongo na batomoko mokana, mosusu tuku mitano. 42Alimbisaki bango mpo ete bakokakikofuta, nani akati na bango, babale nani akolenga mingi. 43Simo alobi, na banzioyo ngolu epesameli ye oyo azalaki na nyongo ya monene nde a monokimalamu.44Yesu abaluki epai ya mwasi mpe alobi na simoni na koti epai na yo,osopeli ngai mayi na makolo te, kasi ye asukoli makolo na ngai na pisoli, mpeapanguisi na suki na ye. 45Opesi ngai beze, te kasi ye, nta akotaki, atiki te kozipamakolo na ngai na beze.46Opakoli nga mafuta na mitu te, kasi ye apakoli ngaimalasi na makolo. 47Yango na yebisi yo, ebele ya masumu na ye malimbisamimpo ete a monisi bpnene ya bolingo mpo na ngai oyo balimbisi moke akolingamoke.48Nalobi masusu na yo elimbisami. 49Baye bazalaki na mesa elongo na yebazali kozali kowotongono na nse ya mitema, mote kani akokikolimbisamasumu. 50Yesu alobi na mwasi kondima na yo ebikisi yo, kende na kimia.
81Sima na mwa tango Yesu akendaki kati na bingumba mpe mboka, koteya mpekosakola sango malamu ya bokonzi na Nzambe. Bazomi na mibale bazalaki naye elongo. 2Mpe lisusu basi oyo babikisamaki na milimo mabe mpe bokono:Malia, oyo abiangami Madelene, oyo milimo sambo ebimaki kati na ye, 3Janni,mwasi ya Kuza, mobombi biloko ya Helode, Suzanni mpe ebele ya basi basusuoyo bazalaki kokokisa mposa na bango na biloko na bango.4Ntango etulukumonene ya bato bazalaki koyangana nzinga-nzinga na ye, bautaki bingumbandenge na ndenge, ayebisaki bango lisese moko: 5«Moloni moko akendakikolona. Ntango azalaki kolona, ndambu ya mbuma mosusu ekweaki pembeni nanzela, banyati yango mpe ndeke ilei nyoso. 6Ndambu mosusu ekweaki namabanga mpe ikoli noki, ikauki zambi na kozanga mayi.7Ndambu mosusuekweaki kati na nzube, nzube ekolaki elongo na yango mpe ezingakiyango. 8Kasi ndambu mosusu ya mbuma ekweaki na mabele kitoko mpe ebotimbuma nkama na na nkama.» Sima na Yesu koloba boye, angangaki: «Oyoazali na matoyi ya koyoka, ayoka.»9Bongo bayekoli na ye batunaki ye liseseyango elakisi nini? 10Alobi na bango: «Epesameli bino koyeba mabombami yabokonzi na Nzambe, kasi mpo na bato mosusu, ezali na masese; mpo ete sokibazali kotala, bamona te mpe soki bazali koyoka, basosola eloko te.11Talandimbola ya lisese: nkona ezali liloba ya Nzambe. 12Mbuma oyo ekweakipembeni na nzela, ezali bato oyo bayoki liloba na Nzambe, mpe zabolo alongoliyango o mitema mia bango, mpo ete bakoka kondima te mpe babika te. 13Oyoekweaki na mabanga, ezali baoyo bayambi liloba na esengo, kasi bazangimisisa; bandimeli na tango moko, kasi tango na komekama, bakweisi kondimana bango.14Oyo ekweaki na kati na nzube, ezali baoyo bayoki liloba na Nzambempe na kotambola na bango, mikakatano, bomengo mpe mposa ya mokiliekangi bango mpe mbuma na bango ekomeli te. 15Kasi oyo ekweaki na mabelekitoko, ezali baoyo bayoki liloba na motema malamu, basimbi yango makasimpe eboti mbuma na kokanga motema.»16Tala , moto moko te apelisakamwinda mpo azipa yango na mbeki to atia yango na nse ya mbeto. Kasi atiakayango likolo mpo ete baoyo nyoso bazali kokota bamona yango. 17Pamba te,eloko moko te ya kobombama ekozanga koyebana, mpe ya nkuku ekozangakomonana polele. 18Boyoka na bokebi, mpo ete bakopesa oyo azali na ebele,kasi oyo azangi, bakobotola ata oyo akanisi kozwa.»19Na sima, mama mpebandeko na ye bayaki koluka ye, kasi bakokaki komana ye te na ntina na etulukuya bato. 20Bayebisi ye: «Mama na ngai mpe bandeko na yo bazali libanda,balingi komona yo.» 21Yesu ayanoli bango: «Mama na ngai mpe bandeko nangai, ezali baoyo bazali koyoka liloba na Nzambe mpe bazali kotosayango.»22Mokolo moko, Yesu amataki na bwato na bayekoli naye, alobi nabango: «Toleka ngambo mosusu ya ebale.» Babandi kokenda. 23Ntango nazalakikokenda, Yesu alali. Mbonge makasi ekomaki na ebale mpe bwato ebandakikotonda mayi pene na kozinda.24Boye bayekoli bapusanaki pene na ye mpebalamusi ye na koloba: «Molakisi! Molakisi! Tozali kokufa!» Alamuki,angangeli mopepe mpe mbonge mpe nyoso ekomi kimia. 25Mpe alobi na bango:«Wapi kondima na bino?» Batondaki na bobangi mpe kokamwa, balobani katina bango na basusu: «Oyo azali nani, apesi mitindo na mipepe na mayi mpeyango etosi ye.»26Bakomaki na mboka ya bageraseniens oyo etalani naGalileya. 27Ntango bakiti na bwato, mobali moko azalaki na milimo mabe oengumba yango, ayei kokutana na ye. Elekaki tango molayi, azalaki kolatabilamba te mpe azalaki kofanda na ndako te kasi na nkunda.28Ntango amoniYesu, angangi, akwei liboso na ye. Na mongongo makasi alobi: «Likambo niningai na yo Yesu, mwana na Nzambe na likolo? Nalombi na yo, kotungisa ngaite.» 29Mpo Yesu apesaki mitindo na molimo mabe kobima na moto yango, mpoete mbala mingi ezalaki kolata ye. Ata ko bazalaki kokanga ye na minyololompe nsinga mpe kokengela ye, azalaki kokata minyololo mpe azalakikotindikama na molimo mabe na bisobe.30Bongo Yesu atuni ye: «Nkombo nayo nani» Ayanoli: «Ebele», mpo ete milimo mabe ezalaki ebele kati naye. 31Babondelaki ye ete atinda bango na libulu te.32Tala, etuluku ya nguluezalaki wana kolia likolo na ngomba. Milimo mabe ebondelaki ye ete atindabango na ngulu wana. Mpe ye apesaki bango nzela. 33Na mbala moko, milimomabe ebimaki mpe ekei kokota na ngulu, mpe yango ekimaki mbangu kokweyana ebale mpe ekofaki .34Ntango babateli mpate bamoni bongo, bakimi mbangokopesa sango na engumba ya bango mpe na bamboka. 35Bongo bato babimakimpo na kotala makambo euti koleka. Mpe ntango bakomi pene a Yesu, bakutimoto oyo milimo ebimaki afandi na makolo na ye,alati bilamba, zaongisimakanisi ya bomoto, Bango banso batondaki na bobangi.36Bato oyo bamonakimakambo ndenge elekaki, bayebisaki basusu ndenge moto oyo azalaki namilimo mabe abakaki. 37Bato nyoso ya etuka ya baGeraseniens basengaki naYesu ete alongwa na ekuka na bango, pamba te kobanga monene ekangakibango. Nde amataki na bwato mpe azongaki.38Moto oyo milimo mabe abimakiasengaki na ye ete alanda ye. Kasi Yesu aboyaki na koloba: 39«Zonga na ndakona yo mpe panza sango na makambo minene oyo Nzambe asali kati na yo.»Moto yango akandaki mpe asakoli na engumba mobimba oyo Yesu asalaki mpona ye.40Tango Yesu azongaki, etuluku ya bato bayaki koyamba ye, mpo etebazalaki kozila ye. 41Bamoni mobali moko na nkombo Jaïrus; azalaki moko nabakonzi ya eyanganelo. Afukami na makolo na Yesu mpe abondeli ye eteakenda epai na ye, 42mpo ete mwana na ye ya mwasi moko azalaki na mbulapene na zomi na mibale alingaki kokufa. Ntango Yesu azalaki kokenda, etulukuya bato bazalaki kokangama na ye.43Nzoka nde mwasi moko azalaki na mpasiya kotanga makila mbula zomi na mibale, asilisaki mbongo na ye na minganga,kasi azwaki lobiko te. 44Apusanaki sima na Yesu mpe asimbaki songe ya elambana ye mpe na ngonga yango, makila ekatani.45Yesu atuni: «Nani asimbi ngai?»Lokola bango nyoso bandimaki te, Petelo alobi na ye: «Molakisi, etuluku yabato bakangami na yo mpe bazali kotindika yo.» 46Kasi Yesu alobi: «Motomoko asimbi ngai mpo namoni nguya moko ebimi na ngai.»47Mwasi amonakiete akoki komibomba lisusu te, ayei na kolenga nyoso kokweya liboso na ye.Ayebisi na miso na bato nyoso ntina oyo asimbaki ye mpe ndenge abikaki nangonga wana. 48Nde Yesu alobi na ye: «Mwana na ngai, kondima na yo ebikisiyo. Kenda na kimia.»49Ntango azalaki naino koloba, moto moko kouta epai yamokonzi ya eyanganelo alobi: «Mwana na yo akufi, kotungisa lisusu Mokonzite.» 50Kasi Yesu ayokaki yango mpe ayanoli: « Kobanga te, ndima kaka mpeakobika.»51Ntango bakomi na ndako, aboyaki bato kokota na ye longola nsePetelo na Yoane mpe Jaki elongo na tata mpe mama ya mwana. 52Tala batobanso bazalaki kolela mpe komitungisa mpo na mwana. Kasi alobi: «Bolela te,akufi te, alali.» 53Kasi bazalaki kotiola ye, bayebaki ete asilaki kokufa.54KasiYesu asimbaki loboko ya mwana mpe abengaki ye na mongongo makasi:«Mwana na ngai lamuka!» 55Molimo na ye ezongaki, mpe bapesi ye mwa elokoya kolia. 56Baboti na ye bakamwi kasi Yesu apekisaki bango kopanza sangoyango.
91Abengaki ba yekoli mpe apesi bango nguta mpe bakonzi likolo na molomomabe nyoso mpe makoki ya kobikua bo kono nyonso. 2Atindaki bango koteyasango malamu ya bokonzi na nzambe mpe kobikisa bokono.3Alobaki na bongobomema eloko te mpona mobembo, lingenda te, mbongo te, lipa te, palata te,bilamba mibale mpe te. 4Ndako oyo boko fanda, bofanda kuna kino bokolongwamboka yango.5Mpona ba oyo bakoboya koyamba bino, bo pupula makolo nabino. yango ekozala elembo ya litatoli mpona mabe na bango. 6Na bongo,bakendaki na ba mboka kotatola sango malamu mpe kobikisa babeli.7Mokonziherode ayoki sango mpe amitungisaki makasi pamba te basusu balobaki ete jeanbaptiste asekwi, 8Basusu balobaki elie nde azongi mpe basusu kutu balobakimono ya basakoli ya kala asekwi. 9Herode alobaki nakotaki moto ya jean, oyonazali koyoka nde sango nani na bongo azalaki koluka nzela ya komonayesu.10Tango ba tindami ba zongaki, ba pesakisa ngo ya nyoso oyo ba salaki,azuaki bango mpe akendaki na bango na bethsida. 11Kasi bato ba nonaki bangompe balandaki bango kuna. yesu ayambiki bango mpe ateyaki bango sango yabakonzi na nzambe mpe abikisaki babeli.12Na pokwa, ba yekoli bayebisaki yeete zongisa bato bakende koluka esika ya kolala mpe yakolia pamba te tozali naesobe. 13Kasi alobi na bango bopesa bango molia bino moko bazongisi boyetozali kaka na mapa mitano mpe mbisi mibale. ekokali kozala malamu tokendekosomba molia mpo na etuluku ya bato oyo nyo nsoso. 14Basalaki pene penemibali nkoto mitano alobi na bayekoli bofandisa bango na kipiku moko batotuku mitano15Basalaki bongo mpe banso bafandaki. 16Yesu azuaki mapa mitanumpe ba mbisi ya ngo, apambolaki mpe abukaki yango mpe apesaki na ba yekolimpo bakabola na bato. 17Bato nyoso baliaki mpe batondaki mpe bikolo loki namibale etikalaki.18Esalamaki ete wana ezalaki kosambela yemoko , atunakibayekoli na ye bato bazali koloba nini mpo na n,gai ? 19Basongisi bato mosusubalobi ozaliu jean batiste, basusu elie mpe bnasusu balobi ozali moko ya kalande asekwi.20Yesu alobi mpo na bino, ngai nazali nani ? pierre ayanoli azaliklisto owuta na nzambe. 21Yesu apekisi bango koloba likambo yango na batomosusu, mpe abakisi. 22Mwana moto ako nyto kwama mingi mpe ba mpaka nalingomba, ba nganga nzambe mpe ba koboma ye kasi na mokolo ya misatuakosekwa.23Alobi na bango lisusu soki moto alingi alanda ngai, esengeliamiboya ye moko mpe amema ekulusu na ye mokolo na mokolo mpe alandangai. 24Moto oyo akolinga kobatela bomoyi na ye akobungisa yango, kasi oyoakolinga kobungisa yango mpana ngai akobikisa yango. 25Litomba nini na motoazua mokili mobimba bongo abungisa bomoy, na ye?26Moto oyo akoyakelamaloba na ngai mpe ngai moko soni, mwana na moto mpe akoyo kela ye sonitango akoya na kati na nkembo monene elongo na tata mpe banzelu. 27Na yebisibino ya solo, basusu katina bino kokufga te yambo ya mokolo wana.28Nsimapene mikolo mwambe ya masolo wana, yesu akendaki elongo na pierre jeanmpe jacque kosambela na ngomba. 29Wana azalaki kosambela elongi na yeebonginanaki mpe bilamba na ye ekomaki pembe makasi koleka.30Boye batomibale bayaki mpe bazalaki kosolola, ezalaki moise mpe elie. 31Nkembo makasiezingelaki bango mpe bazalaki kosola mpo na bokeyi naye na jerusalemekomaki pene.32Na tango yango, pierre mpe ba ninga na ye balalaki mpongi.tango balamuki, ba moni bango na nkombo kosolola. 33Esalamaki ete wanamoise mpe elie bazalaki kokende, pierre alobi molakisi ebingi na biso tofandaawa, mpe biso toko tonga ba hema misato mpo na bino misato ye azangalibososoli na oyo azalaki koloba.34Wana ezalaki ye koloba bongo, lipata eyekozingela bango, mpe ba bangi makasi mpo lipata ezingaki bango. 35Mongongokati na lipata elobi oyo azali mwanana ngai mpona, boya kaka ye. 36Tango lipataeleki, ba moni kaka yesu ye moko, mpe ba bombaki likambo yangosekele.37Lobi na yango, tango bakitaki na ngomba, etuluku na bato bayekokutana na bango. 38Moto moko kati na bango agangaki boye na bondelimoteyi, otala mwana na ngai kaka moko oyo nazali na ye. 39Molimo mabeelataka ye mpe na mbala moko abandi konganga kokangama mpe bwaka nsoi.molimo yango etikaka na mpasi mpe ye moto alembaka makasipenza. 40Nasengaiki na bayekoli na ya mpo babengana ye kasi bakokakite.41Yesu azongisi mpe alobi bato na motema kokangama, nakolala na bino kinotango nini mpo ne te yaka bino? mena ye awa. Wana elenge yango azalakiposana, molimo kabe ebwaki ye na mabele mpe koningisa ye makasikoleka. 42kasi yesu apameli molimo mabe yango mpe elenge abiki mpe azongiepayi ya tata na ye.43Bato nyoso bakamwaki komona monene, na nzambe, wanabato bazalaki ko sepela na nyoso oyo yesu asala, alobi na bayekoli boye. 44Tikaete maloba oyo evanda makasi na mitema na bino mpambate mwana na motobakokaba ye na maboko ya basumuki. 45Bango ba sosolaki maloba yango te mpoezalaki mabombami na moso na bango mpe bazalaki kobanga kotina ye ntina nayango.46Kobendana ekotaki kati na bango mpo na koyeba nani mokolo kani nabango. 47Lokola yesu ayebaki makanisi na bango, azuaki mwana moke atie katina bango. 48Mpe alobi soki moto ayambi mwana moke ya boye na kombo nangai, ayambaki mpe ngai, bongo soki moto ayambi ngai, ayambi mpe moto oyoatindaki nga. mpamba te mokolo kati na bino, azali mwana moke koleka binonyoso.49Jean alobi molakisi, moto moko kobengana milimo mabe na kombo nayo, biso moto moko kobengana milomo mabe na kombo na yo biso to pekisi yempo alandaka biso te. 50Kasi yesu alobi bo pekisa ye te. oyo azali kotelemelabiso te azali mpo na biso51Tango mikolo na ye yakonata na lola ekomaki pene,azui ekatelo ya ko kende na jerusalem. 52Atindi bato na mboka ba samaritainsmpo babongisa ye esika. 53Kasi bayamba ye mpo azalaki kokende najerusalem.54Tango jacques mpe jean ba moni bongo balobi mokonzi, okosepelaete topesa mitindo ete moto ewuta likolo ekita mpe ezikisa bango? 55Yesu atalibango mpe apameli bango. 56Bongo ba longwe mana mpe bakeyi na mbokamosusu.57Wana ezalaki bango na nzela, moto moko alobi na ye na kolanda yobipayi nyoso okokende. 58Yesu azongisi maloba ba mbwa ya zamba bazali na bandaku, mpe ba ndeke ya likolo bazali na bazala kasi mwana na moto azali naesika ya kolala te.59Bongo alobi na mususu landa ngai kasi alobi mokonzi nakende nanu kokunda tata na ngai. 60Yesu alobi na ye tika bakufi bakunda bakufina bango, kasi yo kende koteya sango malamu.61Moto mosusu alobi na yesuboye na kolanda yo mokonzi, kasi, na kende nanu kolaka ba ndeko nangai. 62Kasi yesu alobi moto moko te oyo azali kotindika pusu pusu mpe azalikotala na sima, akoki kokota na bokonzi na nzambi.
101Sima yamakambo wana yesu aponaki tuku sambo,mpe atindaki bango mibalemibale na bamboka nionso esika yemoko alingaki kokende. 2Mpe alobaki nabango ;elanga ezali monene kasi basali bazali mukie.Bobondela nkolo na elangaatinda basali nakati ya elanga3Bokende,botala nazali kotinda bino lokola bameme okati yaba mbwa. 4Bokamata mbongo te saki ya mobembo te,sapata mpebopega moto mbote te na nzela5naba ndako oyo bokoyingela,boloba kimia ezalana ndako oyo. 6Soki moto na kimia azali wana ,kimia na bino ezala likolonaye,sokibongo te akozongela bino. 7Bowume na ndako wana,bolia mpe bomelaoyo bakopesa bino ,mpo ete mosali nionso abongi na lifuti naye.8Soki bayambibino okati na engumba ,bolia manso bakopesa bino, 9bobikisa babeli mpe bolobana bango ete bokonzi ya nzambe ekomi pembeni10Nkasi na ba engumba oyobakoyamba bino te,bokende na balabala boloba; 11bo pupola putulu na makolona bino mpe putulu ya engumba na bino oyo ekangamaki na makolo na biso!Nkasi boyeba ete bokonzi na nzambe ekomi pene. 12Nazali koyebisa binomokolo na esambiselo,kondima ya sodoma ekozala te mpona engumbawana13Mawa nayo,chorazin! mawa nayo ,bethsaida! soki misala na nguyaesalamaki tyr na sodme,esengeli kotubela wita kala mpe komekola kolatasaki,mpe kozipa na putulu. 14Kasi okoki te kondima tyr na sidon na mokolo naesambiselo na bino. 15Yo,capernaume okanisi okomata na likolo? Te, kasi yookokita nanse omokolo naba wa,16Oyo akoyoka bino ayoki ngai,mpe oyo aboyi bino aboyi ngai,mpe abuaki oyo atindi ngai17Na esengo ba tuku sambabalobi;mokinzi kutu milimo mabe etosaki biso na kombo nayo. 18Yesu eyebisibango; namoni santana kokweya wita na likolo lokola kongenga. 19Tala napesibino bokonzi yakotambola likolo ya ba nioka,ba koto mpe likolo ya nguyanionso ya monguna,eloko moko te ekosala bino mabe . 20Mbala inso bosepelakate ,mpo ete milimo mabe etosi bino,kasi mpo ete bakombo na bino ekomami nalola21Kaka na tango wana,na esengo monene ya molimo,yesu alobi;nakumisi yo,o tata,nkolo ya likolo mpe mabele,mpo ete obomba makambu oyo nabato na mayele mpe bato na bwanya mpe otalisi yango na bato na mayele mukie,lokola bana mukie.iyo,tata mpo ete ezalaki malamu na miso nayo22Biloko nionso epesameli ngai epayi na tata,mpe moto moko te ayebi mwana soki tata te;mpe moko te ayebi tata te soki kaka mwana,mpe banani oyo mwana alingi komimonisa.23Abaluki epai yaba yekoli,alobi na bango na kuku;esengo na bayeba moni biloko oyo bazali komona. 24Nayebisi bino ebele yabasakoli mpebakonzi balulaki ba mona oyo bozali komona kasi bamona yango te, mpekoyoka oyo bozali koyoka kasi bayoka yango te25Moko yabasakoli ya ba yudaatelemi mpe kotalisa ye nakoloba;mokonzi nasala nini mpona kozua bomoi yaseko? 26Yesu alobi naye;nini ekomami na mibeko botangi nini? 27Nakoyanolaalobi;esengeli olinga mokonzi nzambe na motema nayo mobimba,na molemanayo mobimba,namakasi nayo mobimba mpe namakanisi nayo,mpe okolingamoninga nayo lokola omilingaka. 28Yesu alobi naye;oyanoli malamu,sala yangompe okobika29Kasi molakisi ,alingi kolongisa,alobi na yesu bongo;nani azalimozalani na ngai? 30Nakoyanola yesu alobi;moto moko azalaki kokita nayerusalemi,na yericho akutani na babomi ba punzi punzi ye na bilokonaye,babeti ye pene pene yaliwa31Na mbalakata,nganga nzambe moko akitakina nzela wana,mpe tango amoni ye,azui ye mpe akeyi naye. 32Ndenge mokompe na molewi akomi na esika yango amoni ye aleki ye33Moko yaba samariyaazalaki na mobembo,bokomi naye esika ya moto wana,atondisami namawa. 34Mpe apusani pembeni naye mpe akangi bapota apakoli ye mafuta mpevino,amatisi ye likolo ya mpunda naye,amemi ye na esika yakosalisa mpeasungi ye. 35Na mokolo elandaki ,abimisi mbongo mibale apesi namosalisi,salisa ye nyoso ekotika likolo,nabozongi na ngai nakofuta yo36Naninakati ya misato oyo akanisi kozala molingami na moto oyo ba punzaki nababomi? 37Molakisi alobi ;oyo amonisi mawa pona ye,yesu alobi naye kendesala lokola ye38Sika oyo,lokola bazali na nzela ya mobembo,bakotaki na mbokamosusu ,mwasi moko na kombo ya malata ayambaki bango na ndaku. 39Azalakina ndeko naye ya mwasi na kombo ya maria oyo afandaki na makolo yamokonzi mpe koyoka maloba naye40malata amipesaki pona kolamba bileyi mpekotiela bato.Aye na yesu mpe alobi; mokonzi,ezali kosala yo eloko te ndeko nangai ya mwasi atika ngai moko na sala?Loba naye asunga ngai . 41Kasi mokonziayanoli mpe alobi;malata,malata omipesi mingi na biloko. 42Kasi elokomokonde ezali na motuya .Maria aponi oyo ya motuya,oyo ekolongwa kati naye te
111Yango ekomaki mokolo moko Yesu azalaki kosambela na esika moko. Moko ya bayekoli na ye alobi: «Mokonzi lakisa biso ndenge ya kobondela lolenge Yoane alakisaki bayekoli na ye.»2Yesu alobi na bango:«Ntango bazali kobondela, bolobaka: Tata , tika nkombo na yo ezwa lokumu, bokonzi na yo eya.3Pesa biso bilei ya mokolo na mokolo. 4Limbisa masumu na biso, lolengebiso tolimbisaka baninga, kamba biso na komekama te.»5Yesu alobi na bango:«Soki moto moko akei epai na moninga na ye na butu mpe alobi na ye:«Moninga, defisa ngai mapa misato. 6Mpo ete moninga moko ayei epai na ngaioyo azali na mobembo, kasi nazali na eloko ya kopesa ye te: 7"Boye soki yeakozongisa maloba kati na ndako ete: Kotungisa ngai te, ekuke na ndako esilikokangama, ngai elongo na bana tosili kolala. Nakoki kotelema te mpo nakopesa yo mapa. 8Nalobi na bino ata akobima te kopesa ye mapa mpo azalimoninga na ye, akotelema kaka mpo na molende na ye mpe akopesa ye mapaoyo ye azali na bosenga na yango.»9Nalobi na bino lisusu: «Bosenga mpebakopesa bino; boluka mpe bokozwa; bobeta ekuke mpe bakofungola. 10Pambate, moto nyoso oyo akosenga bakopesa ye, mpe oyo akoluka akozwa, mpe oyoakobeta bakofungolela ye.11Tata nani kati na bino, akoki kopesa mwana na yenyoka soki akolomba ye mbisi? 12To soki akolomba ye likei bongo akopesakoto? 13Boye bino bato mabe bokopesa bana na bino biloko malamu, boni boniTata na bino na likolo akopesa te Molimo Mosanto na baoyo bakosengaye?»14Sima na ntango, Yesu abenganaki molimo mabe oyo ezalaki na baba.Ntango molimo yango ebimi, baba alobaki. Bituluku ya bato bakamwi. 15Kasibasusu balobi: «Ezali na nguya ya Beelzebul, mokonzi ya milimo mabe ndeabengani milimo mabe.»16Basusu bamekaki ye mpe basengaki ye kosalaelembo moko kouta na lola. 17Kasi Yesu lokola ayebaki makanisi na bangoalobi: «Bokonzi nyoso oyo akabwani kati na yango ezali ya kokufa, mpe ndakonyoso oyo ekabwani kati na yango ekokweya.18Soki Satana akabwani kati na yemoko, ndenge nini bokonzi na ye ekoumela? Mpo bolobi ete nazali kobenganamilimo mabe na nguya ya Beelzebul. 19Soki nazali kobengana milimo mabe nanguya ya Beelzebul, na nguya ya nani bayekoli na bino bazali kobenganayango? Na ntina na yango, bango bakozala basambisi na bino. 20Kasi soki nazalikobengana milimo mabe na nguya ya Nzambe, boye bokonzi na Nzambe eyeiepai na bino.21Ntango elombe mobali azali na bibundeli ya kokengele ndako naye, biloko na ye ebatelami. 22Kasi soki elombe mobali mosusu oyo aleki ye namakasi alongi ye, oyo alaki makasi akozwa bibundeli na ye mpe akobotolobiloko na ye. 23Oyo azali na ngai elongo te, azali moyini na ngai, mpe oyo nyosoazali lisanga na ngai te akolimwa.24Ntango molimo na mbindo ebimi na moto,ekendaka na bisika bikauka mpo na kopema. Soki ezwi yango te, akoloba:"nazonga na ndako oyo nautaki." 25Ntango azongi, akuti ndako yango ekombamimpe etiami molongo. Boye, akokenda kozwa milimo mosusu sambo mabekoleka ye moko mpe bakoya kofanda kati na ye. 26Boye efandeli ya moto oyoekokoma mabe koleka oyo ya libiso.»27Ntango asilisaki koloba boye, mwasimoko kati na etuluku ya bato alobi: «Esengo na libumu oyo ememaki yo, mpemabele oyo masungisaki yo.» 28Kasi alobi: «Bapambolama nde baoyo bazalikoyoka liloba na Nzambe mpe bazali kotosa yango.»29Lokola bituluku na batobazalaki kotondana, abandi koloba: «Ekeko oyo ezali eleko ya bato mabe.Bazali koluka elembo, ata ko elombo ekopesamela bango te, kolongola bobeleelembo ya Yona. 30Pamba te, lolenge Yona azalaki elembo mpo na bana yaNinive, bobele boye mwana na moto akozala elembo mpo na elekooyo.31Mokolo na kosambisama na eleko oyo, mokonzi mwasi ya etuka ya ngele akosekwa mpo na kokata likambo ya bato ya eleko oyo mpo ye ayei koyoka maloba ya mayele ya Salomo, mpe tala, oyo azali awa aleki Salomo.32Na mokolo ya kosambisa, bato ya Ninive bakofunda bato ya eleko oyo mpe bakopesa bango etumbu, zambi bango babongolaki mitema na mateya ya Yona, mpe awa ezali na oyo aleki Yona.33Moto moko te apelisaka mwinda mpoabomba yango na esika ya nkuku to na nse ya ekolo, kasi likolo ya mesa mpoengengisa ndako mobimba. 34Liso na yo ezali mwinda ya nzoto. Soki liso na yoezali malamu, okomona polele. Kasi soki liso na yo ezali malamu te, okozala namolili. 35Keba, pole oyo ezali kati na yo ekoma molili. 36Soki nzoto na yomobimba ezali pole, ata eteni moko te ezali kati na molili, boye nzoto na yomobimba ekozala lokola mwinda ekongenga makasi kati na yo.»37Ntango asilisikoloba, mofalisayi moko abiangi ye kolia na ndako na ye. Boye Yesu akotakimpe afandaki na mesa. 38Mpe mofalisayi akamwaki komona ete ye asukolakimaboko te liboso ya kolia.39Kasi Mokonzi alobi na ye: «Bino bafalisayi,bosukolaka libanda ya kopo mpe sani, kasi kati na bino etonda na lokoso mpemisala mabe. 40Bino bilema! Ezali oyo te asalaki libanda mpe ye asalakikati? 41Bopesa babola yango ezali na kati, mpe boye biloko nyoso mpeto ekozalaya bino.42Kasi mawa na bino bafalisayi, mpo ete bofutaka moko na zomi nandambu ya nyoso, kasi bozali kotika boyengebene mpe bolingo ya Nzambe. Ebongi malamu kotambola sembo mpe kolinga Nzambe, mpe kobosana te kosala makambo mosusu.43Mawa na bino bafalisayi, zambi bolingaka kozwabisika ya liboso kati na biyanganelo mpe losako ya bato ebele. 44Mawa na bino,zambi bozali lokola nkunda oyo emonani te mpe bato batamboli likolo na yangokozanga koyeba.»45Mpe moko ya balakisi mibeko ya bayuda alobi na ye:«Molakisi, oyo olobi ezali kotuka biso mpe.» 46Yesu alobi: «Mawa na bino,balakisi ya mibeko! Zambi botiaka mikumba ya kilo likolo na bato, kasi bokokikosimba yango ata na mosapi.47Mawa na bino, mpo ete bozali kotonga nkundampo na kokanisa basakoli, nzokande bankoko na bino nde babomakibango! 48Boye, bozali banzeneneke mpe bozali kondima misala ya bankoko nabino, pamba te ezali solo ete babomaki basakoli yango nde bozali kotongelabango nkunda ya kokanisa.49Mpo na yango mpe, bwanya ya Nzambe elobi:«Nakotindela bango basakoli mpe bantoma, mpe bakonyokolo bango mpebakoboma basusu kati na bango. 50Boye, bato ya ekeke eye bakozua mokumbaya makila ya basakoli nyoso oyo basopa uta ebandeli ya mokili, 51kobandamakila ya Abel kino ya Zakalia, oyo babomaki kati kati ya etumbelo mpe esikaesantu. Iyo, nazali koloba na bino, ekeke eye ekomema mokumba wana.52Mawa na bino balakisi na mibeko ya bayuda, zambi bolongoli fungola ya boyebi; bokokota bino mei te mpe bokangi nzela na baoyo balingi kokota.»53NtangoYesu abimaki wana, bakomi mibeko mpe bafalisayi batelemeli ye mpebaswanaki na ye na ntina na makambo ebele, 54bazalaki kotiela ye mitambo mpobazwa ye na maloba ma ye penza.
121Na tango yango,bato batondaki ebele nakati ya esika wana mpe bakomaki koniatana nde yesu alobi nabayekoli;bomibatela na etuluku naba farizi oyo bazali bato ya bilongi mibale2Nionso ezali yakobombama ekobima napolele. 3Yango wana nionso bokoloba na molili ekobima na polele. Oyobokoloba na suku ekoyokana na libanda4Baninga na ngai,bobanga te ba oyonionso bakoki koboma kaka nzoto mpe basuki wana. 5Kasi nazali kolakisa binonani bino bokoki kobanga bobanga nde oyo,sima yakoboma nzoto,azali namakoki yakobuaka yo na lifelo,ya solo na lobi na bino,bobanga ye!6Bandeke yamikemike mitano etekamaka na bongo moke,kasi nzambe abosanaka ata mokonabango te. 7Kutu nzambe ayebi motango yaba suki na bino ya moto,bobangate! bino boleki etuluku yabandeke wana na motuya8Nolobi nabino,moto oyoakotatola ngai liboso na bato,mwana moto akotatola ye mpe liboso na ba angeluya nzambe, 9moto oyo akowangana ngai liboso na bato ;bakowangana ye mpeliboso naba angelu ya nzambe. 10Moto oyo akoloba mabe na tina na mwana namoto,akolimbisama kasi oyo akotiola molimo mosantu,akolimbisama te11Tangobakomema biso liboso ya eyanganelo,bakambi mpe bakonzi,bomitungisa tempona yango. 12Pamba te molimo mosantu akoyebisa bino nini bokosala kaka naesika wana,13na bongo motomoko alobi;molakisi,loba na ndeko nangai,tokabola libula na biso. 14Yesu alobi naye;mobali,nani atie ngai mosambisilikolo na bino? 15Mpe alobi na bango;salakeba,nakoluka kozwa ebele na ndengeya mabe,pamba te bomoi na moto efandisami na bozwi te16Bongo yesu abetelibango lisese oyo;bilanga ya moto ya mbongo moko ebotaki mbuma ebelemakasi ,amilobi yemoko; 17ebele yabiloko oyo nakobomba yango wapi? 18Azwimakanisi mpe amilobeli;ezali malamu na buka bibombelo ya kala mpe natongaya minene koleka,mpo nabombela biloko nionso oyo. 19Boye nakoloba namolimo na ngai zala na kimia mpe sepela mpo ete ozali na bozwi mpona mbulaebele20Kasi nzambe alobi naye;bolole,napwa ya lelo malema nayoekosenga,mpe makambu oyo obongisi,ekokende epayi ya nani? 21ezali bongompona oyo azali kobomba bozui mpona ye moko kasi mpona nzambe te22Yesualobi naba yekoli naye;nabongo nde nazali koyebisa bino,bolela te pona bomoina bino,mpona bileyi,mpona nzato na bino to pe pona kolata na bino. 23Mpo etebomoi eleki bileyi,mpe nzoto eleki bilamba24Botala ba kombe kombe,balonakate mpe ba bukaka te,bazali mpe na bibombamelo te kasi nzambe alesakabango,bino boleki bango na motuya. 25Nani kati na bino akoki kobakisa kamwangonga mukie na boyi naye nanzela na mitungisi naye. 26Soki bino bokokikosala ata eloko moko te mpona nini bozali kolela mpona mosusu27Banzeteyamasango basalaka te mpe balonaka te kasi tala ndenge balataka! ata salomonatikala kolata lokolo bango te nakati na nkembo nionso. 28Soki nzambe azalikolatisa matiti ya zamba ,oyo ezangi ntina,ekobanda ndenge nini alatisa yo te?bato ya kondima moke29Boluka te oyo boliaka ,oyo bokomela mpe boyimayima te na ntina nayango. 30Mpo ete bikolo nionso elukaka yango mpe tatanabino ayebi mposa na bino31Kasi boluka bokonzi naye,mpe nionsoekopesamela bino. 32Bobanga te,bana mike,mpo ete tata na bino azali na esengompona kopesa bino bokonzi naye33Boteka biloko na bino pe bopesa nabazangi.Bobomba bozwi oyo ebebaka te,bozwi na lola oyo ekosilaka te,kunamoyibi mpe kopola ezali te. 34Pamba te esika bozwi nayo ezali esikape motemanayo ekozala35Bokanga mokaba makasi na loketo na bino mpe mwinda na binoezala yakopela; 36bozala lokola bato oyo bazozela kozongo ya mokonzi nabango mpona milulu mpo ete tango akokoma mpe akobeta,bafongolela yeekuke37Bapambolama basali oyo mokonzi akuti bongo,nayebisi bino ya soloakolata elamba naye mpe akokanga mokaba mpe akofandisa bango na mesa,yemoko akopesa bango bileyi. 38Soki mokonzi akuti bango yako lamuka nabutu to nabutu makasi basali yango bakopambolama39Boyeba lisusu ete sokimokonzi ya ndako ayebaka ngonga oyo moyibi akoya,alingaki kotika ndakopwelele te mpe alingaki kolala te. 40Bobongi sama mpo ete boyebi ngonga teoyo mwana moto akozonga41Pierre alobi;mokonzi lisese oyo ezali mpona bisokaka tope bato nionso? 42Mokonzi ayanoli;mopesi biloko ya sembo mpe yamalamu nini oyo mokonzi atikaki na ndako mpo akabolaka biloko naba ninganaye na tango ekoki. 43Apambolama mosali oyo mokonzi na bozongi naye akutiozosala. 44Yasolo,nalobi na bino;akopesa ye bokonzi ya biloko naye.45Kasi sokimosali yango alobi ete;mokonzi akozonga sikoyo te,bongo abandi kobeta basaliya basi mpe ya mibali,kolia mpe komela,kolangwa, 46mokonzi ya mosali wanaakoya na mpwasa,mpe akokata ye biteni biteni mpe akobwaka ye na esika yabatomboki47Mosali yango ayebaki mokano ya mokonzi naye kasi asalelaki yangote,akobetama fimbu makasi. 48Kasi na oyo ayebaki mokano na mokonzi te,mpeasali mabe,akobetama mpe fimbu kasi ya pete,bakosenga ebele na oyo bapesakiebele mpe bakosenga mukie na oyo bapesaki mukie49Naye mpona kopelisamoto na mabele,mpe posa na ngai ezali epela makasi. 50Kasi nazalina libatisioyo esengi nazwa mpe nazali na mposa esalama noki51Bokanisi ete ngai nayakikopesa kimia na mokili? te,nayaki kokotisa bokabwani. 52Kobanda sikoyo ndakoyabato mitano,bakokabwana mibale na misato,to misato na mibale. 53Bokabwaniekokota kati na tata na mwana naye,maman na mwana naye ya mwasi ,mwanaya mwasi na maman naye,bokabwani kati na babokilo.54Yesu azalaki kolobalisusu na bato;tango bomonaki lipata na ngombo moyi elaka,bolobaka ete mbulaekobeta ,mpe yango esalamaka bongo. 55Soki mopepe ewiti na ngele ezalikobeta bolobaka,lelo mulunge ekozala mpe ezalaka bongo. 56Bato ya bilongimibale bozali na makoki yako sosola etamboli ya sanza kasi bozali kokoakososola te tango nini tokomi57Mpona nini bozali kososola te oyo ezali mponabolamu na bino? 58Tango bozali kokende kosamba na moninga,sala maki eteboyokana na nzela mpo bokoma na bazuzi te noki bakosambisa yo mpebakokanga yo mpe bakobwaka yo na boloko. 59Nalobi nayo okobima kuna tekino okofuta misolo
131Na ekeko wana bato balobeli klisto na ntina ya galite oyo pilate abomisa makilana bango na oyo ya mbeka. ntango bazalaki koboma ba miama mpo na kopesamabonza. na nzambe. 2Yesu ayanoli bango mpe alobi boye bokanisi batu wanaya galileya yango banyokwami lolenge. 3Bongo te nayebisi binu. sokobobongwami te boko kufa bino banso se lolenge moko ngenge ba nyakwami.4Bango bato zomi na mwambi ya jerusalem oyo bakufaki ntango ndakoya siloe ebukanaki bokanisi mabe ya ba bango eleki mabe ya bato mosusu yajerusalem? 5Ezali bongo te na ye bisi bino soka bobongwani te boko6Yesuabetelaki bango lisolo ya masese oyo moto moko akonaki safu okati na elangana ye ya safu mpe ayoki koluka mbuma na yango kasi azuaki yango te. 7Nkoloelanga alobi na mokengeli ya elanga boye tala, mibu misato na yei kolukambuma ya nzete oyo kasi nazali kozua ya ngo te. kata yango. pona nini yangoezali kotondisa mabele mpamba.8Mokengeli elanga ayandi ye boye.tika yangomibu eye, nakotimola zinga zinga na yango nakotiya bosoto. 9Soko ebotimbuma,mibu ya sima ezali malamu, soki eboti mbuma te, kata yango.10Yesu azalakikoteya o kati ya eyanganelo na mokolo ya sabata. 11Mwasi moko azalaki wanaatondisamaki na molimo mabe kati na ye mpe azalaki na kuki na molimo mabekati na ye mpe azalaki na kuki na mokongo, azangi makasi ya kotelemalikolo.12Tangu yesu amonaki ye, abeyangi mpe alobi na ye mwasi, okangalamina bolembu na yo. 13Asemboli maboko likolo na ye mpe atelemisi mbala mokompo abandi kokumisa nzambe. Kasi mokambi ya eyanganelo asepelaki te mpoyesu azalaki kobikisa batu na mokolo na sabata. 14yango mokambi ayebisaki batuesengeli kosala mosala mpo na mikolo motoba. boya mpona kobikisama mponamokolo wana kasi mokolo ya sabata te.15Mokonzi alobi na ye motu na kibengonani te na kati na binu oyo akoki kokangola punala to ngombe na ye mponakokende komelisa yango mayi te mokolo ya sabata? 16Yango mwana mwasi yaabalayama oyo satana akangaki ye sina mibu zomi na mwambe, ekokaki na ye tekokangwa mokolo ya sabata?17Lokola azalaki kolobela bango, banso bazalaki kotelemela bayoki nsoni, mpe etuluku ya basusu basepelaki na baye maso ya ngolu asalelaki bango.18Yesu alobi lisusu nini oyo tokoki kokokisa na bokonzina nzambe, mpe eleko nini na koki kokokisanga nisana yango? 19Yango ekokanina mbuma moko moke ya nzete moutarde oyo motu alokoti mpe abwaki naekunde ya elanga na ye mpe yango ekomi nzete monene, ndeke na likolo basalizumbu na yango na kati na bitape na yango.20Alobi lisusu nini nakoki kokokisana bokonzi ya nzambe? 21Ezali lokola levure oyo mwasi atiyi okati ya kopomisato putulu yo masangu mpe opotisi yango kino ekovimba ekokoma monenepenza.22Yeso atalaki mpe ateyaki na kati ya mbaka mpe engumba monene nanzela na ye kokende na yelusalem. 23Motu moko alobi na ye mokonzi, ezalibobele ndambo na bato nde ba kobika alobi na bango. 24Boyika mpiko mpokokota na ezipilo moke mpo mingi bakolinga kokota nde bakokoka kokote.25Ntango nkolo ndako akotema, mpe akokanga ezipelo ya ndako, mpebakotikala libanda, kobete ezipelo mpe na koganga na koloba ete mokonzi,mokonzi, tika biso tokota mpe akoloba na binu nayebi bino te, bowutiwapi? 26Bongo bokoloba to liyaki mpe tomelaki na miso na yo mpe oteyaki nabalabala na biso. 27Ye akozongisa bino lisusu ete nayebi bipai bowuti tebolongwa mpembeni na ngai basali ya mabe.28Ekozala na kolela mpe koliamino ntango bakomana abraham isaack na yakobo na basakoli yonso bafandi nabokonzi ya nzambe kasi bino bobwakamaki libanda. 29Bato mingi bakowuta epaimoi ebimaka mpe epai moi elalaka na epai ya likolo mpe epai ya nse bakoyakofanda na esikaya feti oyo nzambe akosala bokonzi ya nzambe. 30Boyeba eteba oyo bazaki nsima bakoma bato ya liboso.31Ba falisayi mosusu bayei penepene na yesu bayebisi ye longola awa mpe kenda epai mosusu mpamba te erodealingi kobama yo. 32Yesu ayebisi bango bokenda koyebisa mboloko wana etenazali kobengana milimo mabe mpe kobisisa bato ya bokonu nakosala baye kinontango nasilisi mosalana ngai. 33Kasi ebongai nalanda mobembo na ngai mpoesengeli ba boma mosakoli bobele na yelusalem.34Bino bato ya yelusalemntango nzambe atindelaki bino basakoli boboyaka mpe koba mbaka bangomabango kasi ngai ntango yonso na mekaki kosangisa epai na ngai lokola nsosoasangisa banabaye na nse ya mapapu kasi bino boyaki. 35Yango wana alingikotika mboka na bino. nayebisi bino ntango bokoloba ete nkolo apambola motooyo akomi na nkombo yo ye.
141Mokolo na sabata,tango azalaki kokende na ndako ya mokonzi ya farizayampona kolia lipa,bafarizaya bazalaki kolandela ye. 2Liboso naye ezalaki na motona bokono moko yako vimba-vimba. 3Yesu atuni nabakonzi ya mibeko yabayuda mpe na farizaya; mobeko nabiso epesi biso nzela tobikisa mokolo yasabata to te?4Kasi ba batelaki kimia. Nabongo yesu asimbaki ye,mpe abikisi yempe atiki ye akende. 5Alobi nabango; nani nakati nabino zali na mwana yamobali to ebwele soki akweyi na libulu mokolo ya sabata akobimisa yenalombango? 6Bazalaki te na makoki yakoyanola makambo wana7Tango yesuasoso lolenge nini babengami bazalaki kopona esika ya lokumu,abetaki lisese nakoloba; 8tango bobiangami na nteko moko yalibala,bofanda te na esika yalokumu,ekokipe kozala moto moko yalokumu koleka abiangamaki mpe. 9Tangomokolo milulu akoya,akoloba nayo;pesa na moto mosusu esika nayo,nabongo,soni okokende kozua esika ya suka10Kasi tango obiangami,kende fanda naesika ya suka,nabongo mokolo milulu tango akoya ,akoki koloba nayo;moningo,kende liboso.Nabongo okoza okotobwama na esika ya bato nionso oyobovandi nabango mesa moko. 11Mpo ete moto nionso akomitombola akokita,mpe oyo akomikitisa akotombwama12Yesu alobi na mokolo milulu ;tango azali kobongisa milulu tope kolia,kobenga kaka te baninga nayo ,bandeko nayo,baboti nayo tope bazui ya pembeni nayo ,mpo bango mpe babenga yo na milulu nabango ,ekokomisa yo moto na botawu13Kasi tango ozali kobongimilulu,benga babola,babeli na bakufi miso 14nabongo nde okozala moto naesengo,mpo ete bakoki kokomisa yo moto na botawu te.na bongo yo okofutamanalisekwi ya sembo15Tango ba oyo bafandaki namesa na yesu bayoki makambuwana,balobi naye;esengo na oyo akolia lipa nabokonzi ya nzambe! 16yesuayanoli;moto moko abongisaki molulu monene mpe abengaki batoebele. 17Tango bileyi ebokisaki pona kolia,atindaki basali naye mpona kobengababiangami,boya mpo ete nionso ebongisami sikoyo18Bango nionso basengibolimbisi lolenge moko. Yaliboso alobi;nasombi elanga nazokende kotalayango.Bolimbisa ngai. 19Mpe mosusu alobi;nasombi ba ngombe mitano,nakeyikomeka yango.Bolimbisa ngai. 20Mpe mosusu alobi ;ngai nabala tala tina ngainakoki koya te.21Basali baye mpe balobi na mokonzi na bango. Nabongomokonzi ya ndako asiliki alobi na mosali naye; kende bangu naba nzela mpenaba mboka benga babola,ba beli ba ebonsono na bakufi miso. 22Mosalialobi;molakisi,oyo olobi esalemi kasi bisika ezali kaka23Molakisi alobi namosali naye; kende naba nzela ya minene mpe bokula na monganga ,memabango namakasi,natina ete ndako na ngai etonda. 24Mpo ete nazali koyebisabino,moko te naba biangami na ngai akomeka bileyi na ngai31Mokonzi nini tango akendakabitumba na mokonzi masusu,akofanda liboso te mpe kotuna toli soki akokikolonga na bato nkoto zomi liboso ya bato nkoto tuku mibale ya mokonzi mosusu? 32Soki te eleko mosusu zeali nanu mosika ,akotinda moto mpona kolukakimia. 33Na boye,moko na bino te akoki kozala moyekoli na ngai soki akabuanite na nionso oyo zaali nayango34Mungwa ezali malamu,kasi soki mungwaebungisi elengi nayango,lolenge nini lisusu ekoki kozonga na elenginayango? 35Yango ekomi tina te na mabele ata mpe na bipoli.Akobuakamalibanda.Oyo azali namatoyi yakoyoka ayoka
151Ntango oyo bakongoli na mpako,pe bato ya masumu bayaki epai nayesu,mpona koyoka ye. 2Ba farisai mpe bakomeli ba bandaki koyima-yima,katina bango ,bango ete ,moto oyo azali,koyamba basumuki pe aza kolia na bangobanso3Yesu abetelaki bango lisapo mpe alobaki na bango; 4nani kati na bino,soki azali na meme moko pe kobungisa moko kati na bango,akotika,batukulibwa na libwa,nalisobe mpe kokende koluka oyo ebungi kino,ntango akomonayango? 5Na tango amoni yango,atie yango na mapeka mpe kosepela.6Tangoakomi na ndako ,asangisi baninga naye ,mpe bandeko ya pembeni kolobaete;bosepela elongo na ngai,mpo ete meme oyo abungaki amonani. 7Nalobi nabino ekoza na esengo na likolo soki moto mokoko abongoli motema kolekankoto ya bato oyo baboyi kobongwana8Mwasi nani oyo azali na mpatazomi,soki abungisi mpata moko akopelisa mwinda te?akokombola ndaku te,mpoaluka mpalata kino akomona te ? 9Mpe tango akomona akosangisa ba ninganaye mpe akoloba na bango;bosepela elongo na ngai ,mpo namoni mpata oyonabungisaki. 10Nayebisi bino ezali na esengo na kati yaba muange ya nzambetango mosumuki moko abongoli motema.11Bongo yesu alobi na moto oyoazalaki na bana babale, 12oyo ya leki alobi na tata naye,tata pesa ngai ndambu yabomengo oyo ekoki na ngai. Mpe apesaki ye ndambu ya bomengo13Mikoloesilikoleka,elenge mobali akamataki nionso oyo ezalaki yaye mpe akendaki namboka moko mosika,mpe kuna abebisaki bongo naye na bondumba. 14Tangoasilisi kobebisa mbongo,nzala ekotaki na mboka wana,akomaki na posa yambongo.15Akendaki kokota mosala epayi ya moto moko,mpe atindaki yeakende kolesa ba ngulu. 16Alingaki kozua biloko yaba ngulu mpona kolia mpoete moto moko te abandaki kopesa ye biloko yakolia17Tango amizongisi katinaye mpe alobi;basali boni na ndaku ya tata na ngai baza na biloko,mpe ngainazali awa kokufwa na nzala. 18Nakozonga epai ya tata na ngai mpe nakolobanaye ;na sumuki na likolo mpe liboso nayo. 19Nabongisami te kozala mwananayo zwanga mosali nayo20azongaki epayi ya tata. Wana ezalaki yemosika,wana tata komona ye atondisami na mawa mpe akimi mbangu ayambiye.21Mpe mwana alobi naye tata nasumuki nalikolo mpe liboso nayonabongisami lisusu te kozala mwana nayo22Tata alobi naba sali naye; bokamatanoki mvuela ya motuya mpe bolatisa ye ,botia ye lopete na mosapi,mpe bolatisaye nkoto na makolo. 23Bokamata ngombe ya mafuta bobomela ye.To lia mpetosala milulu. 24Mpo ete mwana na ngai ya mobali akufwaki ,azasiko yo nabomoi.Abungaki sikoyo amonani.Na boye nde babandaki milulu25Na elekowana,yaya naye azalaki na elanga.Ezongaki ye na ndaku,ayoki na mosikamongongo ya kelelo mpe mabina. 26Abengaki moko yabasali mpe atunaki yesoki elingi kolakisa nini. 27Mosali ayanoli ye ndeko nayo azongi na ndakunabongo nde tata nayo abomi ngombe ya mafuta mpo ete azangi nabomoi28Mwana ya liboso ayoki kanda mpe alingaki lisusu te kozongandaku,kasi tata abondelaki ye. 29Na bongo ye alobaki na tata naye;mbula nambula nasalelaka yo,na buka ata mibeko nayo te,kasi otikala kopesa ngai atangombe moko te mpo na sala milulu naba ninga na ngai, 30kasi tango mwananayo aye ,oyo abebisaki bomengo nayo na basi ya ekobo,obomeli yengombe31Tata alobi naye ;mwana na ngai azali elongo na ngai nionso ya ngaiezali yayo. 32Kasi ezali malamu bona biso kosala milulu mpe kozala naesengo,mpo ete ndeko nayo yamobali oyo akufwaki azongi na bomoi,abungakimpe amonani
161Yesu ayebisi na bayekoli naye;mozui moko azalaki na kalaka naye ,babeteli yelisolo ete,azali kopunza-punza bozui naye. 2Eyoki ye sango ,abengisi kalaka,atuni ye ;nini nazalikoyoka natina nayo?Lakisa ngai lolenge nini ozali kosalelabozui na ngai.Nabanzi ete ,okokilisusu kobatela yango te.3Kalakaamilobeli;ebebeli ngai mosala na ngai yakobatela ekufi,nazali mpe namakasiyakotimola te,mpe soni mingi na koma bisenga senga, 4nayebi oyo nakosala,sokibalongoli ngai na mosala yango,mpo na yambama malamu naba ndeko nabango5Kalaka abengisi bato nionso na niongo na mokonzi ,mpe atuniyaliboso;okofuta boni na mokonzi? 6Ayanoli ye; ba ngbongolo nkama moko yamafuta ayebisi ye;kamata ekomeli nayo ,mpe fanda wana;kputola nyongonayo;na bingbongolo tuku mitano, 7kalaka atuni mosusu;yo okofutaboni?Azongiseli ye; ngoto nkama moko ya masangu,kalaka alobi naye;kputolamokanda nayo;naba ngoto ntuku mwambe8Kalaka yamabe azuilongonia ya mokonzi natina na nkaso naye .Bana na elek'oyo,nkaso na bongoejali mabe koleka ba oyo bajali kotambola na sembo. 9Ngai nayebisibino,bomisalela boyokani na bozui ya mabe mpo tango ekosilela bango10Oyoayebi kobatela biloko ya mikie azali mpe namakoki na oyo ya minene,bongooyo akozala sembo te,na makambo ya mikie,akozala mpe lolenge moko na oyoya minene. 11Soki ozalaki sembo te,nabozui oyo ya mabe,nani lisusu akotiela yomotema? 12Nalolenge wana ,soko ozalaki sembo te na biloko ya moninga,bongooyo ya yomoko?13Moto te,akoki kosalela bakonzi babale ,soki te akoteka moko,mpe akolinga mosusu ,soki te, akoboya moko, mpe akoyina mosusu,bino bokoki kosalela nzambe mpe bozui.14Bongo bafalisaya yalokoso ya mbongotango bayoki mateya maye,baseki ye. 15Bongo ayebisi bango ;bozali komizwasembo na miso ya bato,kasi mitema na bino,ezali mpole na miso na nzambe.Oyoezali lokumu na bato,ezali koyinama na nzambe16Mibeko mpe basakoli ezalimakasi makasi yambo ya boyei yowana-mobatisi wuta eleko ena,sango malamuya bokonzi na nzambe esakolami,moto na moto azali kobunda na makasiakota. 17Kasi ezali mpeza pete ete likolo mpe nasé ebulungana ,kasi likomimoko yaliloba ekobeba te18Oyo akobengana mwasi naye ,mpo ete abalana na mosusu,akweyi na ekobo ,oyo abali mwasi babengani ye na mobali,asali ekobo19Ejalaki mozwi, oyo azalaki kolata bilamba ya ntalo, mpe bisengo otangoinso, misolo elangwisaki ye, 20mobola moko na kombo lazalo ezalaki ye tangoinso liboso ya ekuke ya mozwi,mpota ebele na nzoto naye. 21Azalaki koliabobele mpumbulu ya biloko ,ezalaki kokweya nasé ya mesa ya mozwi,bongobambwa bazalaki nzinga-nzinga naye,kolembola ba mpota onzoto22Elekoyaliwa ekokaki mpona mobola bongo ba angelu ba memi ye ôtolo ya abalayama,mozwi mpe liwa ezwi ye bongo bakundi ye, 23akutani na mitungisi,mpeminioko makasi ,o mboka ya baweyi,atomboli miso mosika,amoni lazalo azalina ntolo ya abalayama24Abeti ntango makasi ;tata abalayama yokela ngai mawa ,yebisi lazalo ayakomelisa ngai mayi nasonge ya misapi naye,atangisela ngai na lolemo,pamba te,nazali kati na bwale ya moto25Abalayama ayanoli ye; mwanakanisa lolenge ozalaki kopunza na bozui nayo na mokili,lazalo na pasi ,sasaipi,ekomi ngonga naye yako sepela yo kati na bwale. 26Mpe lisusu,libulu ya monenemozindo ekaboli biso moto te akoki kokatisa ngambo,koya na biso ata ngambona bino27Mozwi azongisi,na bondeli yo ,tata abalayama tinda ye na libota nangai , 28mpo nazali na bandeko mitano na ndako,akebisa bango bameka te,koyana bwale oyo29Mpe abalayama ayanoli; mose na ba sakoli bazali kuna,bayokelabango. 30Moto yamozwi ayanoli;te,tata abalayama sokimoko yaba kufi akitelibango bakoyambola. 31Kasi soki bazali koyokela mose naba sakoli te,bakotikalakondimela soki moto asekwi kaki na bakufi te
171Yesu asololi na bayekoli naye ete; ekozala na makambo oyo ekopengwisa biso,kasi ekozala mawa na oyo okozala libaku ba oyo ekoyela. 2Ebongaki malamumpo naye, bakangisa libanga na kingo , mpe bajindisa ye na ebale, sokiapengwisi moko na bilenge.3Bojala n'angele, soki ndeko atutisi yo libaku sokiamikitisi, tika ye, 4Soki azongeli miko mina ,mbala sambo na mokolo, mpeazongeli yo, mbala sambo, komikitisa, tika ye kaka.5Batoma basengi na nkolo;«tombola» Bondimi na biso, 6Nkolo ayanoli. Soki bojalaki na bondimi lokolamutade, mbele bokokaki kopesa motindo na nzete oyo pikwama ! mpe kendakolonama kuna na libeke ya mayi monena, ekotosa bino.7Nani kati na bino azalina mokati na bilanga, to mokengeli na ba mpate na eleko ya bozongi bilanga,"abenga ye , afandisa ye mpe apesa ye bile? 8Nzoka nde, okopesaye mitindoboye: lata molato ya mosala, bongisela ngai bilei, soki ngai nasilisi kolia, mpekomela , nde yo osali lolenge moko.9ekozala mbongo soki mosali akokisilotomo naye, bapesa ye longonya? 10Bino nse lolenge moko, ntango boko kelamalamu etinda epesemeli bino; bolobaka, tojali nse basali, ye pamba «namitindo miabino».11Lokola ezalaki ye kokende na mboka Yelusaleme, akatakindelo ekaboli engumba ya samalia mpe galilaya. 12Ekoti ye na mboka moko,bato ya maba zomi, babimeliye. 13Batelemi mosika. Babandi konganga: « YesuNkolo, yokela biso mawa!»14Na ngonga emoni ye bango; apesi mitindo«Bokende liboso ya ba nganga Nzambe». 15Emoni moko na bango nete abiki,aongi lisusu kosanzola Nzambe na esengo. 16Abuki mabolongo nanse na Yesu,atondi ye. Azalaki mosamalia.17Yesu atuniye : bopetolamai bato zomi te? wapilibwa mususu? 18Ezalaki te ba mosusu bazonga kotonda Nzambe, bobele ndemopaya oyo? 19Mpe alobi naye: « telema, kenda, obikisami mpo nakondima.20Bafalisayi batuni ye, na maye matali eleko ya bokokisami yabokonzi na Nzambe, Yesu ayanoli ete: « Bokonzi na Nzambe ekoya na ba lokitote» 21Bakoloba te, yango oyo! soki, yango kuna! « bokonzi esili koyingela katina bino»22Ayebisi bayekoli « mikolo mizali koya, bokozala na mposa kolukakomona ata, mokolo moko mwana na moto, bokomona ye te». 23Bakoyebisabino ete, botala awa! bolanda bango te, 24Pamba te mokolo ya mwana na moto,ekozala lokola lolenge ya "mokali kali" engengaka nambo na ngambo.25Kasiyambo, esengeli amona mikakatano, mpe bato babwakisa ye. 26Lolenge ezalakina mikolo ya Noa, nde boye ekozala mokolo ya mwana na moto. 27Baliyaki,bamelaki, babalaki, mpe babalisaki bana na bango, kino ngonga Noa akotaki namasuwa (ekumbaka eyei, ebomiki banso).28Pelamaoko, na mikolo na LOTA,bazalaki koliya, komela, kosomba, mpe kosala mimbongo, kolonda, mpekotonga. 29Na mokolo LOTA abimaki na SPDOMO, Mbula ya mabanga yamoto ya mopepe ezikisaki bango banso.30Ekozala boye mokolo ya mwana namoto akoya. 31Mokolo yango, oyo akozala likolo na ndako, akokita te kobimisabiloko naye na ndako oyo akozala na bilanga akozonga te.32Boyebi mponamwasi ya LOTA. 33Oyo akoluka kobikisa bomoyi naye, akokufa, kasi oyoakobungisa bomoyi naye, akobika.34Nayebisi bino, bato mibale bakolala nambeto, moko ako limwa, moko akotikala. 35Basi babale bazali kotuta, mokoalimwi, mosusu atikali. 36(Mibali mibale kati na elanga, moko alimwi, mosusuatikali).37Batunaki ye « Ekozala wapi Mokonzi» ayebisi bango: « esika epoli » ebembe, nde bingondo bako tondana.
181Mpe ayebisi bango lisese esengeli babondela na kolemba te. 2Alobi: «Ezalakina engumba moko, Juzi moko azalaki kobanga Nzambe te mpe kotosa motote.3O kati ya engumba ena, mwasi yoko akufela mobali, azalaki koya mbala ike,akata likambo na moyini na ye. 4Juzi azalaki na mposa ya kosunga ye te. Kasiamilobeli: "Atako nabangaka Nzambe te mpe natosaka moto te, 5lokolanatungisami na mwasi oyo, nakokata likambo na ye, mpo atungisa ngai lisusute.»6Bongo, Mokonzi alobi: «Boyaka maloba ya juzi mabe oyo. 7SasaipiNzambe akoumela kokata likambo ya baponami na ye oyo bazali kolela butu namoi te? Akozilisa bango? 8Nayebisi bino, akokata likambo ya bango nalombangu. Lolenge moko, tango ekozonga mwana na moto, akokuta lisusukondima na mokili?»9Boye, alobi lisusu lisese oyo na basusu bazali komimonalokola bazali sembo koleka basusu: 10«Bato babale bakoti o tempelo mpo namabondeli (moko mofalisai mpe mosusu mokongoli mpako)11Mofalisai atelemikobondela na mambi ma ye mei: "Nzambe, natondi yo, mpo nakokani na batumabe oyo te, ya lokuta, ya bikobo, mpe bakongoli mpako. 12Nakilaka bileimbala mibale na mposo, mpe napesaka eteni na zomi na nyoso nazali nayango."13Kasi mokongoli mpako, atelemi mosika, akokaki ata kotala likolo te,kasi aleli koloba: "Nzambe, nazali mosumuki, yokela ngai mawa. 14Nayebisibino, moto oyo alimbisamaki koleka mosusu, oyo nyoso akomitombola, akokita,kasi oyo akomikitisa akotombolama.»15Bato bamemeli ye bana mpo amamabango, kasi bayekoli bapekisaki bango. 16Kasi Yesu alobi na bango: «Botikabana mike baya epai na ngai, bopekisa bango te; pamba te bokonzi ya Nzambeezali lolenge na bango. 17Ya solo, nayebisi bino, oyo azali koyamba bokonzi naNzambe lokola mwana moke te, akokota te.»18Mokambi moko atuni ye:«Molakisi malamu, Nasala nini mpo ete nasangola bomoi ya libela?» 19Yesuazongisi:«Mpo nini azali kobenga ngai moto malamu?» Moto moko te azalimalamu, bobele Nzambe ye Mei. 20Oyebi mibeko: Kosala ekobo te, koboma te,koyiba te, kotatola lokuta te, tosa tata mpe mama na yo.» 21Mokambi alobi:«Natosaka maye manso uta bolenge na ngai.»22Ntango Yesu ayoki yango, alobi:«Ezangi yo eloko moko. Teka bozwi na yo, nyoso, kabola yango na babola, mpende okozwa oyo eleki motuya na likolo. Yaka, landa ngai.» 23Kasi ntangomozwi ayoki yango, mawa etondi ye motema na ntina na bozwi na ye.24Yesu,amoni ye kotonda na mawa, alobi: «Ezali kpokoso na baye bazali na bozwikoyingela na bokonzi na Nzambe! 25Pamba te ezali pete na kamela koleka nalidusu ya tonga, na esika ete mozwi akota na bokonzi na Nzambe.»26Baoyobayokaki yango balobi: «Boye, nani akobika?» 27Yesu azongisi: «Biloko biyebizali kposo na bato, bizali mpete na Nzambe.»28Petelo alobi: «Biso totikinyoso ya biso mpe tobili yo.» 29Bongo Yesu azongiseli bango: «Ya solo, nalobina bino, ezali na moto moko te oyo atiki ndako na ye, mwasi na ye, bandeko naye, baboti na ye to bana na ye na ntina na ngai, 30akozanga te kozwa ebele namokili oyo, mpe bomoi ya seko na bokonzi na Nzambe.»31Sima ya koyanganisabazomi na mibale pene na ye, alobi na bango: «Botala, tozali kokende naYelusaleme, maye manso basakoli bakomaka na ntina na mwana na moto,ekokokisama. 32Zambi akokabama na bapagano, bakotuka ye, bakoyokisa yensoni mpe bakobwakela ye nsoi. 33Sima ya kobeta ye fimbo, bakoboma ye mpemokolo mwa misato, akosekwa.»34Basosolaki ata eloko moko te mpe liloba yango ebombamaki, mpe basosolaki makambo mango te.35Esalamaki ete ,lokola Yesu abelemaki na Yeliko, mokufi miso moko afandaka pembeni nabalabala mpo na kosenga, 36mpe eyokaki ye etuluku koleka, atunaki nini ezakikoleka. 37Bayebisi ye ete Yesu na Nazarete azali koleka.38Bongo mokufi misoagangaki, koloba: «Yesu, mwana na Dawidi, yokela ngai mawa.» 39Bayebazalaki liboso bapekisaki ye ete akanga monoko. Kasi ye agangaki lisusumakasi: « Mwana na Dawidi, yokela ngai mawa.»40Yesu atelemaki, mpe apesakimitindo ete bamema mokufi miso epai na ye. Mpe ntango mokufi miso akomakipene, Yesu atuni ye: 41«Olingi nasalela yo nini?» Ayebisi ye: «Mokonzi, nalinginamona lisusu.»42Yesu ayebisi ye: «Mona. kondima na yo ebikisi yo.» 43Nambala moko, amoni mpe abili Yesu na kosanzola Nzambe. Bato banso nakomona boye, bakumisi Nzambe.
191Yesu azalaki koleka na yericho. 2Ezalaki na moto moko na kombo ya zakayi.Azalaki mokonzi yaba futisi mpako,mpe azalaki nabozui3Abandaki kolukaayeba yesu azali nani,kasi akokaki te mpona etuluku ya batu,mpo ete azalakimakuse. 4Akimaki mbangu liboso yabato,mpe amataki likolo ya nzete yasikomore mpo amona ye,mpo ete esengaki yesu alekela wana5Tango yesuakomi na esika wana,atali ye likolo mpe alobi naye;zacayi kita nalombango,mpo ete lelo esenge na wumela na ndaku nayo. 6Awelisi kokita,mpeayambi ye na esengo. 7Nakomona bongo,bato bakamwaki mpe balobaki;yeakeyi kotala moto na masumu8Zakayi,atelemi liboso ya mokonzi,mpe alobinaye;tala mokonzi,nakokabola bomengo na ngai na babola ,mpe soki nabotolakieloko yabato nakozongisa yango mbala mine . 9Yesu ayanoli ye;lobiko ekoti lelona ndako oyo,mpo ete moto oyo azali mpe mwana ya abram. 10Mpo ete mwanaya moto ayaki koluka mpe kobiki ba oyo babungaki11Wana eyokaki bangomakambo wana,akobaki nakoloba mpe apesaki lisese mpo ete bazalaki pene nayerusaleme,bazalaki kokanisa ete bokonzi na nzambe ezokokisamasikoyo. 12Alobi;moto nabozui akendaki na mboka moko mosika mpona kozuabokonzi bongo azanga13Bengi basali naye zomi,apesi bango mosolo mpe alobina bango;bosala momboko kino tango nakozongo. 14Kasi bato naye bazalakikoyina ye,nabongo atindaki bato naye nakoloba;biso tolingi te ke moto oyoadodwa likolo na biso. 15Alekaki kasi nabozongi,sima yakozua bokonzi,atunibasali oyo apesaki mbongo,natina nakoyeba lolenge nini moko na mokoayekimise mosolo naye16Ya yambo ayaki liboso naye nakoloba;mokonzi,mpatazomi eboti zomi mosusu. 17Moto nabozui alobi;ezali malamu mosali malamu,poete ozalaki sembo na mokie okozala sembo na oyo ya minene18Ya mibale ayempe alobi mokonzi,mpata efuti mitano. 19Moto nabozui alobi,akozua bokonzi yamboka mitano20Mosusu aye,alobi;mokonzi tala, mpata nayo,na bombaki yangomalamu malamu, 21nabangaki yo,mpo ete ozali moto na pwelele,ozuaka esikaotiaki te,mpe obukaka esika olonaki te22Moto nabozui ayanoli ye;nazalikosambisa yo namaloba nayo ,mosali ya kanda.Oyebaki ke nazali moto nampwasa,nazwaka esika natiaka te mpe na bukaka esika nalonaki te. 23Pona ninite atiaki mbongo na nga banki te, mpo nakozonga na ngai nazua yango nandambu likolo24Na bongo moto nabozwi alobi na bato oyo bazalaki nzinganzinga naye;bo botola ye mpata,bopesa yango na oyo azali nayangozomi. 25Bayanoli ye mokonzi,ye azali na zomi26Nazali koyebisa bino,bakopesana moto oyo azali na yango,kasi na oyo azali nayango te bakobotola ata ndambuoyo ezali naye. 27Sikoyo,boyela ngai bayini na ngai,ba oyo balingi te na dondwalikolo na bango,mpe bo boma bango liboso na ngai28Sima yakoloba makambo wana,akobaki nakokende yerusaleme29Tango ekomaki ye na mboka betfazempe na betani ,nanzela ya ngomba ya olive,atindi bayekoli naye mibale, 30nakoloba;bokende na mboka ya pembeni.Tango bokokota,bokomona mwana napunda ,ata moto moko te amatela yango.Bofongola ye mpe boyela ngaiye. 31Soki moto atuni bino,pona nini bozali kofongola ye boloba na ye,mokonziazanaposa naye32Batindami bakendaki,mpe bamonaki mpunda lolenge yesuayebisaki bango. 33Nakofongola mpunda,mokolo mpunda alobi nabango;ponanani bozali kofongola mpunda? 34Bayanoli;mokonzi azali naposa naye. 35Bayakinaye epayi na yesu,batandaki maputa, mpe yesu afandaki likolo naye. 36Wanaetambolaki yesu babuakaki maputa nanzela azalaki koleka37Wana epusanaki yepene pene ya ngomba ya olivia mpona kokita ,etuluku ya ba yekoli ba bandakikosepela mpe kokumisa nzambe na mongongo makasi natina ya misala nayeoyo bamonaki, 38nakoloba;akumisama mokonzi oyo aye nakombo ya mobikisi!kimia na likolo,mpe nkembo na likolo esika ebulisami39Ndambu yabafarizi,nakati ya etuluku ,balobi naye;molakisi,pamela bayekoli nayo. 40Yesuayanoli bango;nazali koyebisa bino,soki bafandi kimia mabangaekoganga!41Wana epusanaki yesu pembeni na mboka,aleli mpona yango, 42mpealobi;soki yasolo oyebaki makambo oyo ekoki komemela yo boboto lelo,sikoyoebombami na miso nayo43Mpo ete mikolo ekoya,banguna nayo bakotongalopango monene mpona mpe bakozinga yo bipai binso 44mpe bakokweyisayo,nabana nayo elongo,bakotika ata libanga moko te likolo ya mosusu,mpo eteoyebaki te ngonga nini nzambe akokaki kobikisa yo45Yesu akoti natempelo,mpe abengani bateki , 46nakoloba nabango ;ekomama,ndako na ngaiekozala ya losambo,kasi bino,bokomisi yango esika ya miyibi47Na bongo yesuabandaki koteya mikolo nionso na tempelo. Bongo batumbi mbeka,bakomeli yamboka naba lakisi ya mibeko balukaki ye mpo baboma ye, 48kasi bamonaki tewapi bakozwela ye, mpo ete ebele basepelaki koyoka ye
201Mokolo moko yesu azalaki koteya mpe kosakola sango malamu na bakonzi yabangungu mineme mpe bakomi mibeko. 2Batuni ye, lobela biso, na bokonzi niniozali kosala makambo wana? mpe nani apesi bokonzi yango?3Ayondoli bangonatumi bango lokola. 4Alobi boyebisa ndai kobatisa ya yoane ewutaki na lola ntona bato?5Bakanisi kati na bango penza, balobi, soki toyanoli ete ewuti na lolabakoloba mpo na nini bandeme laki ye te? 6Mpe soko toyanoli ete ewutaki nabato, ebele ya bato bakobola biso mabango, zambi bayebi ete yoane azalakimosakoli.7Na bango bayanoli ete bayebi ete, toyebi te soki ewutaki wapi . 8Yesuayanoli bango ngai mpe nayibi te na bokonzi ya nani nazali kosala nayango.9Alobi lisese oyo na ebele ya bato, moloni moko alomaki elanga na vino,apesi yango epai ya balomi mpo ba futela mpe akeyi tango molai na mokilimosusu. 10Tango ya kobuka mbuma atindi mosaleli na ye moko epai ya balonimpo ete bapesa ye mbuma na elanga, babeti ye mpe bazongisi ye mabokopamba11Atindi mowumbu mosusu, babeti lolenge moko. 12Na sima atindimowumbu ya misanto, babeti, bazokisi mpe babengani ye.13Mokolo ya bilangaalobi nakozala nini?nakotinda mwana na ngai molingami tango mosusubakotosa ye. 14Kasi tango bamoni ye, balobana kati na bango, tala mosakoli,toboma ye, mpo ete elanga ekoma ya biso.15Babwaki ye libanda ye elanga, mpebabomi ye sikoyo mokolo elanga akosala bango nini? 16Ekoya ye akobomabango banso mpe akopesa elanga na bato basusu. ekoyoka bango yangobakoloba ete makambo ya motindo oyo ekoki kosalema te.17Kasi, yesu atalakibango mpe alobi mokomi maye malingi koloba nini?libanga oyo libwakami nabatongi ekomi libanga monene ya ndako. 18Oyo akokweiya likolo na yango nanibi bangaekokweba akopa nzana.19Awa bongo, bakonzi ya banganga minene mpebakomi mibeko balukaki ba konga ye na ntina na lisese wana nde babongo ebeleya bato. 20Na botalaka na bokutu, batindaki bamongi baye bazalaki kokanisa batoya sembo mpo ete bazui ye na mabe na elobeli na ye mpo ete bapesa ye namokonzi ya mboka.21Butanaki ye ete molakisi toyebi ete olakisaka mpe ateyakana sembo mpe okambamaka na lolenge ya moto te, kasi ateyaka nasolo. 22Epesameli biso ndingisa ya kofuta mpako na kaisala?23Kasi yesu ayebakimakanisi na bango mpe ayanoli bango. 24Talasi ngai likuta, etalisi elongi mpemakomi ya nami?bango gayonoli ya kai sala25Alobeli bango boye pesa nakaisala oyo ya kaisala mpe ya nzambe oyo ya nzambe. 26Bakokaki lisusu tekokanga ye mpo maloba oyo alobaki na miso na batu27Ba sadusi basusu bayeilokola lisekwa ezali te, 28Bapusani penepene na ye mpe batuni molakisi talamakambo mose akomaki soki ndeko azalaki na ye akobala mwasi wana mpoabotela ndeko na ye mwana?2930313233Nzokande ezaliki bandeko sambo, yo libosa ;ya mibali ya misato mbongo na bango , bango babali ye mpe bakufi batiki mwana ata moko te. Mwasi mpe ayei kokufa, Na tango ya lisekwa mwasi wana akozala ya non kati na bango34Yesu ayanoli bango, bana ya mokili bazalikobala mpe bazali kopesa na mabala. 35Kasi baye bakomomana sembo namikolomiye na ntango ya lisekwa na bakufi babalani te mpe bamipesi te nalibota. 36Bakoka lisusu kokufa ete bakokama na ba anzelu mpe bakozala bana nanzambe, lokola bana na lisekwa.37Tika ete bakufi basukwa, atako moseayelisaki, mpo na ntina na nzete ezali kopela moto abelelaki nzambe yaabalayama nzambe ye izaka mpe nzambe ya yakobo israele. 38Sikoyo, nzambeazali nzambe ya bakufi te kasi nzambe na bomoyi mpo ete bato banso bazali nabomoyi kati na ye.39Bomoko kati na bakomeli mibeko, bayanoli nkolo, olobimalamu. 40Mpe bakokaki kotuna ye lisusu te.41Yesu alobi na bango mpo na ninibazali koloba ete klisto azali mwana na dawidi 42Dawidi ye mei alobi nampkanda na nzembo alobi na ngai fanda na loboko na ngai ya mobali. 43Kinobayini na yo bakonyatama na makolo. 44soki davidi abiangi klisto nkolo kasilolenge kani a kozala mwana ya ye?45O eleko ebele bazali koyoka ye, alobi nabayekoli na ye, Keba na bakomeli mibeko, 46Kaye balekaka na bia zambalamilai, mpe balingaka losako ya lokumu O bisika minene, mpe baluka bisika yayambo O eleko ya mayangani mpe fete. 47Kobotala bandako yo basi bakufelamibale mpe basalaka mabondeli milayi mpo na kumilakisa nabala bala nasaukabakozue tumbu monene koleko.
211Tango Yesu atomboli miso likolo, amoni bazui bazali kotia makabo kati yakitunga. 2Amoni mpe mobola mwasi akufela mobali atie meya mibale. 3Mpealobi: Ya solo nalobeli bino, mwasi mobola oyo akabi koleka basusu bayebapesaki. 4Banso baye bapesaki koleka mwasi oyo te. na bobola naye apesimbongo oyo akokaki kobikela.5Lolenge bayike balobaki mpo na ndaku naNazmbe, ebongisami na mabanga ya wolo mpe makabo, 6Ye alobi; biliko yonsoezali komona, mikolo ekoya libanga moko te ekotikala likolo na libangamosusu.7Batuni ye, Molakisi makambo wana ekosalema na eleko nini? mpeelembo nini ekomonana? 8Yesu ayanoli, bomibatela ete bokweisama te, mpo tetebele bakoya na kombo na ngai, mpe akoloba ezali ngai, boyoka bangote. 9Ekoyoka bino lokito ya bitumba mpe makambo ya motindo na motindo,bobanga te mpo ete makambo oyo esengeli eya, kasi suka ekozala na pwasate.10Na bongo alobeli bango: ekolo moko ekotelemela mosusu, mpe etuka mokoekotelemela etuka mosusu. 11Koningana monene ya mokili ekozala bipayi nabipayi, makambo mabe na nzala mpe makozala. Makambo na somo mpebilembo minene na likolo.12Kasi liboso ya makambo yonso, bakotia binomaboko, bakonyokola bino, mpe bakokaba bino na biyanganelo, bakobwakabino na boloko, bakomema bino liboso na bakonzi mpo na kombo nangai. 13Yango epesa bino libaku ya kotatola.14Na bongo, bomitungisa te sokibokosamba lolenge kani, 15Mpo ete nakopesa lolenge ebongi na bino kolobampe bwanya oyo bayini na bino bakoki te kotia ntembe mpe kokweisabino.16Kasi bokokabama na baboti na bino, na bandeko na bino, mpe baningana bino, ebele kati na bino bakobomana na bango. 17Bokoyinama na ntina nakombo na ngai. 18Kasi nsuki na moto na bino ata moko ekolongua te. 19Nakoyika mpiko na bino bokozwa bomoi.20Soki bomoni yerusalema ezingami namapinga, boyeba ete kobebisama na yango ebelemi. 21Naboye baye bakozala nayudea, bakokima na bangomba mpe baye bakozala kati kati na engundabakokende, mpe oyo ya pembeni bakokota te. 22Mpo ete ekozala mikolo yaetumbu, mpo na kokokisama ya yonso ekomama.23Mawa na basi bazemi, mpebaye bazali kunungisa mabelemokolo yango, mpo ete ekozala mawa mpenzakati na mboka, mpe kanda na Nzambe ekozala likolo na ebele. 24Bakokweya namopanga epeli, bakokanga banga mpe bakomemana kati na bikolo yonso, mpeYerusalema, ekonyotama na makolo ya bapagano, tii eleko ya bapaganoekokoka.25Bilembo bikomonana na moi, na sanza, na mioto. Mpe awa namokili, ebele bakolenga, mpo na kotomboka ya mayi na monana, bakoyeba tesoki basala nini. 26Bato bakokufa na bobangi mpo na kozela oyo ekoya, mpo etebakomona nguya mpe lokumu na mwana na moto.27Na boye, mwana na motoakomonana kohuta na mpata na nguya mpe nkembo monene. 28Na elekomakambo yonsob ekokoma, botelema mpe botombola mitu mpo etekokangolama na bino ebelemi.29Yesu alobeli bango lisese moko: botala nzeteya vino, mpe nzete misusu. 30Na tango ebimi ba nkasa ya sika, na botalaka eteelanga ebelemi. 31Pelamoko, na eloko bokomona makambo kokoma boyeba etebokonzi ya Nzambe ebelemi.32Solo na yebisi bino, bato ya tango oyo bakolekate liboso ete makambo maye makoma. 33Likolo mpe nse ikoleka, kasi maloba nangai makoleka te te.34Bokeba na bino, mitema na bino mitonda na makambooyo te: milangwa, bampasi ya mokili, mpe yango ebelema bino puasate. 35Lokola komekama, mpo ete akoya mpo bafandi yonso na nse namoi.36Bonsengeli tango yonso, bobondela mpona kozwa makasi ya kokima namakambo yonso ekoya mpe komonana ebandeli ya koya ya mwana na moto.37Na boye, na mikolo oyo Yesu azalaki koteya na tempelo, azalakikokende kolala na ngomba ya Olive. 38Bato banso bazalaki koya tong-tongo natempelo mpo na koyoka ye.
221Nteke ye mapa ezanga kovinu, ekomaki pene, 2Ba nganga nzambe minene mpebatangi mibeko bolukaki koboma yesu, kasi baba ngaki bobele bayimboka.3Satana ayingeli O motema ya yuda iskaroto, moko na bayekoli zomi nababale, 4Ye ayokanaki elongo na ba nganga nzambe minene mpe bakonzi ya basinzili, na lolenge ya bokangi yesu5Basepeli mpe bayokani elongo mponakopesa yuda mosolo. 6Babembanaki, mpe balukaki ntaka elongobani mpo nabokongi yesu, nakokebaka ete etuluku ya bato bamona bango te.7Ekomakibango O mokolo mwa pasika, mokolo mwa lipa ezanga kovimba bokoti kingoya mwana meme, 8Yesu atindaki petelo mpe yoane, koloba na bango boyebokenda kobongisela biso moliya mwa pasika, mpo tiliya. 9Bango koyanola yebaye mokonzi, olingi tobongisa milulu mya nga wapi?10Ye koyanola bangoboye yokamela, tango ekokoka bino kati ya engumba, ekomona bino motomoko, akumbi mbeki ya mayi, bomolanda O ndako ekoyingela ye, 11Mpeboyebisa O kolo ya ndako boye mokonzi alobi na yo wapi esika akolia lipati lapasika elongo na bayekoli ba ye12Pe moto yango akolakisa bino eteni moko yamonene ya ndako na likolo, etandami malamu; bólengela kuna.» 13Bakei,bongo bakuti kaka ndenge alobaki na bango, pe balengeli Pasika.14Tango ngonga ekómi, afandi na mesa pe bantoma esika moko ná ye. 15Alobina bango: «Nazalaki na posa penza kolia Pasika oyo elongo na bino, liboso ’tèngai námona pasi; 16pamba té, nalobi na bino, nakoki kolia yango lisusu té tiiyango ékokisama na Bokonzi ya Nzambe.»17Akamati nkeni, azongisi matondi,bongo alobi: «Bókamata oyo pe bókabola yango na kati na bino; 18pamba té,nalobi na bino [’tè] banda lelo nakoki komela lisusu mbuma ya vinu té tiiBokonzi ya Nzambe ésila koya.»19Sima ya kokamata lipa, pe sima yakozongisa matondi, abuki yango pe apesi bango, alobi: «Oyo ezali nzoto nangai, epesami po na bino; bósalaka boye po na kokanisa ngai.» 20Se ndengemoko na nkeni, sima ya limpati, alobi: «Nkeni oyo ezali boyokani ya sika namakila na ngai oyo esopani po na binoa.21Kasi tala, moto oyo azali kokaba ngai azali elongo na ngai na mesa. 22Po,Mwana ya moto azali kokende ndenge esi’ekatamá; kasi mawa na moto oyo yeazali kokabama na nzela na ye!» 23Pe babandi kotunana na kati na bango nanialingi bongo kosala likambo yango.Nani aleki24Kowelana ebimi na kati na bango: nani na kati na bango akoki kotangamamoto alekib? 25Alobi na bango: «Bakonzi ya bikolo bakonzaka yango, pe batooyo bazali na bokonzi likolo na yango bamibengaka bato malamuc.26Ézalabongo té po na bino. Kasi na kati na bino, oyo aleki ázala lokola leki, pe oyoazali kokamba, lokola mosalid. 27Ya solo, nani aleki, oyo azali na mesa, to oyoazali kosalela? Ezali té oyo azali na mesa? Ngai nazali katikati na bino lokolamoto oyo azali kosalela batoe.28Bino, bozali nde bato oyo baumelaki na ngaielongo na komekama na ngai, 29pe ngai natie Bokonzi po na bino ndenge peTata na ngai atiaki po na ngai, 30po bólia pe bómela na mesa na ngai naBokonzi na ngai, pe bokofanda na bangwende po na kosambisa mabota zomi namibale ya Israel.31Simon, Simon, tala Satana asengaki bino po na koyungula bino lokola blé. 32Kasi ngai nasambeli po na yo, po bondimi na yo ésila té; pe yo, sima yakobongwana, lendisa bandeko na yo.»33Piere alobi na ye: «Mokonzi,nabongami kokende elongo na yo ná na boloko ná na liwa.» 34Alobi na ye:«Piere, nalobi na yo, lelo liboso ’tè soso élela okowangana mbala misato ’tèoyebi ngai té.»Libenga ya mbongo, saki pe mopanga35Pe alobi na bango: «Tango natindaki bino na libenga ya mbongo té, na sakité, na sapato pe té, bozangaki eloko?» Bazongisi: «Eloko moko tég.» 36Alobina bango: «Kasi sik’oyo, oyo azali na libenga ya mbongo ákamata yango,ndenge moko pe na oyo azali na saki, pe oyo azali na mopanga té, áteka kazakana ye po na kosomba yango.37Pamba té, nalobi na bino, esengeli ’tè oyoekòmamá, ékokisama kati na ngai: Atangamaki na molongo ya bato mabe. Yasolo, oyo etali ngai ekómi kokokisamah.» 38Balobi: «Mokonzi, tala, mipangamibale ezali awa.» Alobi na bango: «Ekoki na yango.»39Abimi pe akei engebene na momesano, na ngomba ya ba-Olive, bongobayekoli na ye balandi ye. 40Awa asili kokóma na esika yango, alobi na bango:«Bóbondela, po bókota na komekama té.»41Sima akei mwa-mosika na bango,lokola molai babwakaka libanga, agumbi mabolongo, asambeli, 42alobi: «Tata,soki olingi, longola nkeni oyo mosika na ngai. Nzokande, ézala mokano na ngaité, kasi ya yo ésalama.»43[[Bongo anzelu moko, uta na likolo, abimeli ye,azalaki kolendisa ye. 44Ayoki somo monene, bongo akómi kosambela namolende, pe motoki na ye ekómi lokola matanga ya makila ezali kotanga nase.]]45Atelemi sima ya losambo, akei epai ya bayekoli, bongo akuti bangobalali na mawa. 46Alobi na bango: «Po na nini bozali kolala? Bótelema,bóbondela po bókota na komekama té.»Bakangi Yesu47Azalaki nanu koloba, tala, bato ebele, pe oyo azalaki kokamba bango, motooyo abengamaka Yudasi, moko ya ba-Zomi na mibale, abelemi na Yesu po nakopwepwa ye. 48Yesu alobi na ye: «Yudasi, na kopwepwa nde ozali kokabaMwana ya moto?»49Awa basili komona likambo oyo elingi koya, bato oyobazali zingazinga na ye, balobi: «Mokonzi, tokobeta na mopanga?» 50Pe mokona bango abeti mosali ya mokonzi ya banganga-Nzambe pe akati ye litoi yamobali. 51Kasi Yesu azwi maloba, alobi: «Bótika bongo.» Asimbi ye na litoi,bongo abikisi ye.52Bongo Yesu alobi na bakonzi ya banganga-Nzambe, nabakonzi ya bakengeli ya tempelo pe bampaka oyo bayeelaki ye: «Bobimi namipanga pe na mangenda, lokola nde nazali moyibi. 53Mokolo na mokolo,nazalaki ná bino na tempelo, pe bokangaki ngai té. Kasi oyo ezali ngonga nabino pe bokonzi ya molilii.»54Bakangi ye, bongo bakei na ye pe bakotisi ye na ndako ya mokonzi yabanganga-Nzambe. Piere azalaki kolanda na mosika. 55Basali móto na katikatiya lopango, bongo bafandi lisanga. Piere afandaki na katikati na bango.56Awamosali moko ya mwasi asili komona ye afandi pembeni ya mwinda, atali yenyee, alobi: «Moto oyo pe azalaki ná ye.» 57Kasi ye awangani, alobi: «Mwasi,nayebi ye té.» 58Mwa-moke sima, moto mosusu amoni ye, bongo alobi: «Yo peozali moko na bango.» Kasi Piere alobi: «Ndeko, ngai té.»59Soki ngongamoko sima, moto mosusu atingami, alobi: «Ya solo, moto oyo pe azalaki elongona ye, pamba té azali pe moto ya Galilea.» 60Piere alobi: «Ndeko, nayebimakambo ozali koloba té.» Kaka na tango wana, awa azalaki nanu koloba, sosoeleli.61Mokonzi abaluki, bongo atali Piere. Pe Piere akanisi liloba ya Mokonzioyo alobaki na ye: «Liboso ’tè soso élela lelo, okowangana ngai mbala misato.» 62Abimi libanda, bongo aleli na mawa mingi.63Bato oyo bazalaki kokengela ye, bazalaki koseka ye pe kobeta ye. 64Bazipiye elamba na miso, bongo balobi na ye: «Lakisa ’tè ozali profete! Nani abetiyo?» 65Pe bazalaki kofinga ye na maloba mosusu mingi.66Tango tongo etani, likita ya bampaka ya ekolo −bakonzi ya bangangaNzambe ná Balakisi-Mibeko− esangani, bongo bamemi ye liboso ya LikitaMonene na bango. 67Balobi: «Soki ozali Kristo, yebisa biso.» Ye azongiselibango: «Soki nayebisi bino, bokoki kondima ngai té, 68pe soki natuni bino,bokokoka koyanola té.69Kasi banda lelo Mwana ya moto akofanda na lobokoya mobali ya Nguya ya Nzambej.» 70Bango nyonso balobi: «Ozali bongoMwana ya Nzambe?» Ye azongiseli bango: «Bolobi ’tè ezali ngai.» 71Bongobalobi: «Tozali lisusu na bosengá ya litatoli? Biso moko toyoki yango namonoko na ye.»
231Batelemaki banso, mpe bakumbi yesu o bosa bwa pilato. 2Ba mofundi rolobaboye moto moye tokumbi o baso bwa yo akotisa libebi mpe kilikili o nteyi yaekolo ya biso, nakopekisaka na bayi mboka kofuta mpako ya kayisala mpe yekoloba ete ye moko azali mokonzi klisto.3Pilato antuni na maloba naye ozalimokonzi na bayuda? yesu ayanoli ye boye olobi yango. Na 4mbisa, poso pilatoalobi banganga nzambe minene elongo na etuluku ya bato bayaki wana namonimbeba na moto oyo te. 5Kasi bango batelemelaki likambo yango mpe balobakiazali kotombokisa bayi mboka, na mateya maye etuka yudea, wuta etuka galileoesika abandaka ye, kino awa6Eyokaki poso pilato bongo, abatunaki soki motomona azali mobo tami ya galile. 7Eyoki ye ete, moto mwango azali oyo awiti oetanda ya helode, ye amozongisaki epayi ya helode,zambi azalaki na elokoyango o mboka yelusalemi8Bongo, tango emonaki helobe yesu, atondisamakina nsayi, nzembe, wato kala ye alukaki amono ye o miso ye o miso, koyokamaye ayokaka mpo na ye, mpo ye alikyaki ete yesu akosala yokabikamwa. 9Bongo ye atunaki yesu mituna nzike, kasi ye ayanolaki ata elokoyokp te. 10Ba nganga nzembe minene na batangi mibeko bazalaki wana, mpebamofundaki na kanza nyoso.11Helode mpe ba soda baye, ba mofingi mpenasima ya botiole ye, bamolatisaki elamba ya bongengi, mpe bamozongisaki omaboko ma poso pilata. 12Helode mpe poso pilato bakomi baninga woto mokolomona, zambi woto kala, bajalaka banguna.13Bongo poso pilato asengisi bakambi, basambisi elongo na bayi mboka. 14Mpe olobi na bango boye bomemelingai moto moye, bo moto mbokisi bayi mboka, mpe ngai na motuni mituna oboso bwa bino, na moni ata miko na ye te, na mafundi na bino nyonso.15Atakutu helode, amoni ata miko moko te, mpo akotela ye etumbu ya liwa. 16Nayango, nakomopesa kaka etumbu, mpe nakotika ye akende. 17Zambi poso pilatoasengelaki kobimisa o boloko, mokangemi moko ya moyuda, mpo na eleko yanteke.18Kasi bangangi banso elongo alongwa wana, botikabarnabase. 19Barnabase ye azalaki moto moye bulamatari amokangaki zambiakotisaki botomboki o nteyi ya engumba, mpe abomaki bato nzike.20Kasi posopilato alobi na bango lisusu, zambi alingaki atika yesu. 21Nde, bangangakibomobaka O ekulusu, bomoboba o ekulusu. 22Mpe alobi na bango mpo, na pesaye etumba ya liwa nazali kopesa ye etumbu, nde na mbisi, natiki yeakende.23Kasi bango babetaki tanga ekasi, kosenga ete bamboka o ekulusu, mpetangba na bango elongaki 24Poso pilato azwaki mokani, asala bobele mayebango balobi. 25Abimisi o boloko motomboki mpe mobomi, bo esengaki bango,mpe atikaki ye o mokano mwa bango.26Lokola ezalaki bango komema ye, basimbaki moto moko na kombo simone ya cylene, zambi ye awutaki kokata yango sima na yesu.27Bolandisamaki na etuluku ya bato mpe basi oyo, bazala kikoyoka mpasi o motema mpe bazalaki komilela mpo na yesu. 28Yesu abalukiesika ezalaki bango, mpe alobi basi na yelusalemi, bolela mpo na ngai te, kasibolela mpo na bino moko mpe bana na bino.29Zambi, omikolo mikoya, tangobakoloba basi bikombo bapambalama, mpe mikongo miye mibotite, mpe mabelemaye mamelisi te. 30Bongo bakoloba na bangomba inene baye bweyela likolo nabiso, mpe na bangomba inene boye bikweyela likolona biso, mpe bangomba ikeboye bijipa biso. 31Zambi soki nzete na mayi mpe elonama, basali yanzo bongo,boni boni oyo ya bokawuki?32Bato nzike, babomi babale mpe lokola, bakambamaki mpo ba bomama.33Ekomaki bango o esika ebengami mikuwa yamoto bamobaki o ekulusu, elongo na ba bomi babale, yoko oloboko la ye yamobali, mosusu na loboko ya mwasi. 34Yesu alobi tata limbisa,mpo bayebi te maye makosala bango bakabolaki bilamba bya ye, nakobete ke zeke likolo nayango.35Bayi mbaka batelema wana, kotalaka mpe koyoka lolenge basambisi bajalaki kazomela yesu na kolobaka boye Abiki saki bayike soki azali mopakolami na nzambe, moponami na ye, amibikisa ye moko.36Basoda mpelokola, bazamelaki ye, kopusanaka mpembeni na ye mpo nakokabela yemasanga ya ngayi. 37Bazalaki koloba soki ozale mokonzi ya bayuda, mibikisa yomeyi. 38Mpo moto na ye makomi ma ye makomameki tela, ye oyo mokonzi yabayuda.39Moko na babomi baye bamobabakaki esika yoko, afingi ye amofingimpe alobi yo nde klisto, mibikisa yo moko mpe bikisa biso. 40Kasi mosusuayanoli koloba boye yo ozo banga nzambe be te? yo oyo ozwi etumbu ekasi,kasi ye asali ata eloko yoko te. 41Mpo na biso, etumba yango ezali malamu,pamba te biso, tokobuka mbumu to konaki.42Mpe ye alobi na yesu okanisakangai bokonzi bwa yo. 43Yesu ayanoli ye boye solo na ye, lelo akozala elongo nangai O paradisa.44Ekomaki bongo ngonga ya motoba, bongo molili mpzingakimokonzi mobimba, kino na ngonga ya libwa, 45Moyi moyindaki, mpe elombamonene ya tempelo epasukaki O katikati.46Yesu agangaki na mongongo ekasitata, na maboko mayo, nde nazongisi molimo mwa ngai sima na ye kolobabango, akati motema. 47Kapitene ya basoda komona bongo bongo, akumisinzambe mpe alobi solo mpenza, moto oyo azalaki na alima.48Emoboki batomaye malekaki wana, babaluki nakoyo kaka mpasi O motema, nakomi betakantolo. 49Baye banso bayebaki yesu, elongo na basi nzike baye balandaki ye wutoetuka Galilea, batelemaki mosika, konongaka maye mazalaki kosalema.50Nayango, moto moko na kombo yosefu moko ya lisanga ya ba yuda, moto malamumpe ya alima, 51Asepelaki te na mokano basusu bazwaki, zambi ye awutaki Omboka alimateo, yoko engumba ya bayuda, azalaki kolikya bokonzi bwanzambe52Ye akeyi epayi ya moyangeli pilato, mpe amosengi nzoto yayesu. 53Akitasaki yango, azingi yango na elamba ya ntolo, mpe ati yango Omalita na libanga, esika nzoto yoko te atiamaki.54Bongo mokolo mwamabongisi ya sabba epusanaki, 55Basi baye bawutaka O etuka galileo, komonalolenge nzoto na yesu etiamaki O malita. 56Bazangoki, mpo nakolengele malasina solo kitoko, nde bapemisaki nzoto O mokolo mwa sabba bo elobi mibeko.
241Mokolo mwa yambo mwa mposo, bakendaki o lilita na ntongo makasi, bamemimalasi kitoko oyo babongisaki. 2Bakutaki libanga ezali lisusu te nalilita. 3Eyingelaki bango, bakutaki nzoto ya Mokonzi Yesu te.4Bazalaki koyebate maye maleki mpe na pwasa, bato babale babimelaki bango, balataki bilambaya bongengi makasi. 5Lokola basi yango bazalaki na bobangi, bakitisaki bilongio nse ya mabele, kasi balobi na bango: «Mpo na nini bozali koluka moto nabomoi kati na bakufi?6Azali lisusu awa te, kasi asili kosekwa. Bokanisa lolengeazalaki koloba na bino, ntango azalaki o Galileya, 7mpe alobaki: "Esengelaki etemwana na moto akabama na maboko ya basumuki, bakobaka ye o ekulusu, mpeakosekwa mokolo mwa misato."»8Basi basosolaki maloba mango, mpebalongwaki o lilita. 9Bapesi sango na makambo oyo nyoso na bazomi na mokompe na basusu banso. 10Baoyo balobaki makambo mango epai ya bantomaezalaki Malia ya Magadala, Janne, Malia mama na Jaki, mpe basi basusubazalaki na bango.11Kasi sango yango ezalaki lokola bolema epai ya bantoma,mpe bandimelaki basi te. 12Kasi Petelo atelamaki, mpe akimaki mbangu o lilita.Akitaki o nse mpe atalaki, amonaki na miso bilamba. Petelo azongaki epai naye, komituna na ntina na oyo elekaki.13Tala, o mokolo mwango, bayekolibabale kati na bango bakendaki o mboka ebiangami Emmausu, mosika naYelusaleme na ntaka ya makolo tuku motoba. 14Bazalaki kosolola bango nabango na maye manso malekaki.15Esalamaki ete tango bazalaki kosolola mpekomituna, Yesu ye mei apusanaki mpe atambolaki na bango. 16Kasi miso mabango makokaki koyeba ye te.17Yesu alobi na bango: «Nini bazali koloba binobabale?» Bango batondaki na mawa. 18Moko na bango, na nkombo Keleopase,ayanoli ye: «Ezali bobele yo moko, na baye bafandi na Yelusaleme oyo ayebi temaye maleki mikolo oyo?»19Yesu atunaki bango: «Makambo nini?» Mpebayanoli ye: «Makambo matali Yesu moto na Nazarethe, oyo azalaki mosakolimoko na nguya na misala mpe na maloba oboso bwa Nzambe mpe bwabato, 20mpe lolenge banganga nzambe bakonzi elongo na bakambi bakabaki yempo ete bapesa ye etumbu ya liwa mpe babaka ye o ekulusu.21Tozalaki kolikya ete ye nde akosikola Isalayele. Iyo, na maye manso maleki, sasaipi mokolo mwa misato uta makambo oyo maleki.22Kasi ezali na boko basi kati na biso,bakamwisi biso, bakendaki o lilita ntongo makasi. 23Ntango bamonaki nzoto te,bayaki koloba ete banzelu babimelaki bango mpe bayebisaki bango et ye azalina bomoi. 24Bamoko baye bazalaki na biso bakendaki o lilita, mpe bakutakimakambo lolenge basi bayebisaki. Kasi ye, bamonaki ye te.»25Na yango Yesualobi na bango: «O bato bazangi bososoli, mpe baoyo motema endimaka noki teoyo basakoli baloba! 26Ebongaki malamu te ete Klisto anyokwama mpo namakambo oyo, mpe akota kati na nkembo na ye?» 27Mpe kobanda na Mose mpebasakoli banso, asosolisaki bango makomi manso makomamaki na ntina naye.28Ntango ekomaki bango pene ya mboka oyo bazalaki kokende, emonanakilokola alingi kokenda mosika. 29Kasi bapekisi ye, koloba: «Zala na biso, zambimpokwa ebelemi mpe mokolo ekomi na suka na yango.» Mpe akoti, mpo nakotikala na bango.30Emonanaki ete , o ntango azalaki o mesa elongo na bango,akamataki lipa mpe sima ya matondo, abukaki yango, mpe apesi bango. 31Naboye, miso ma bango mafungwamaki mpe bayebaki ye, kasi alimwaki o misoma bango. 32Mpe bamilobelaki moko na mosusu: «Motema na biso etutisamakite kati na yango wana ezalaki ye kolobela biso na nzela mpe kolimbolamakomi?»33Batelemaki o ngonga ena, bazongaki o Yelusaleme, mpe bakutakibazomi na moko, mpe baoyo bayanganaki na bango elongo, 34balobi: «Ya solopenza Mokonzi asekwi mpe amonanaki na Simoni.» 35Mpe bayebisaki bangomaye malekaki o nzela, mpe lolenge nini Yesu amimonisi na bango o tangoabukaki lipa.36Ezalaki bango naino koloba makambo yango, Yesu ye meiamimonisi kati na bango, mpe alobi na bango: «Kimia ezala na bino.» 37Kasibatondisamaki na bobangi makasi, kokanisa ete bamoni elima.38Yesu alobi nabango: «Boni yiki yiki kati na bino, mpe mpo na nini mitema na bino mitondi namituna? 39Botala maboko mpe makolo ma ngai, ezali solo ngai. Bosimba ngaimpe bomona. Elima ezalaka na mosuni te mpe mikuwa te, lokola bozali komananazali na yango.» 40Elobaki ye boye, atalisi bango maboko mpe makolo maye.41O ntango bazalaki naino kondima te na esengo mpe kokamwa, Yesu alobina bango: « Bozali na eloko ya kolia awa?» 42Batalisi ye mbisi yakokalinga. 43Yesu azwi mpe aleyi yango o boso bwa bango.44Alobi na bango: «Yango nde nazalaki koloba na bino, tango nazalaki na bino, esengelaki ekokisama maye manso ekomama na mobeko ya Mose, kaki na basakoli, mpe na njembo.»45Na boye afungoli bango mayele ya Molimo, mpo basosolamakomi. 46Mpe alobi na bango: «Boye ekomama ete Klisto akonyokwama, mpeakosekwa kati na bakufi mokolo mwa misato. 47mpe bakoteya kobongolamotema mpe bolimbisi masumu na bikolo nyoso, kobanda na Yelusaleme.48Binobozali banzeneneke na makambo oyo. 49Mpe boye, nakotindela bino oyo Tataalakaki. Kasi bino, botikala kati ya engumba kino botondisama na nguya koutalikolo.»50Bongo Yesu akambi bango kino Betania. Sima na kotombola maboko,apamboli bango. 51Esalamaki ete o tango azali kopambola bango, akabwanaki nabango mpe abutwi o likolo.52Boye sima na kokumbamela ye, bazongaki naYelusaleme na esengo monene. 53Bazalaki ntango inso kati na tempelo,kokumisa mpe kotonda Nzambe.

Yoan

11Na ebandeli ezalaki liloba ,liloba ezalaki na nzambe pe liloba ezalaki nzambe. 2Yango ezalaki na nzambe na ebandeli. 3Bikelamu nioso bikelamaki na ye,ekelamu moko te esalamaki soki naye te.4Naye bomoyi ezalaka pe bomoyi ezalaka pole ya batu nioso. 5Pole engengi na molili pemolili pe molili epekisi yango ata mokié te6Motindami moko na nzambe , kombo naye ezalaki jean , 7Azali lokola nzene keke po atatola epayi na bato oyo ete azali mwinda na bomoi mpo bandimela ye. 8Yoani azali mwinda te nkasi aye po atatola pole.9Ezali mwinda ya sol'oyo ezo ngengisa bato nioso oyo bawiti na mokili10Azalaki kati na mokili ,pe mokili esalamaki naye,pe mokili eyebaki ye te. 11Aye epai yaba oyo yaye kasi ba oyo ya ye bayambaki ye te.12Kasi na ba oyo nioso bayambi ye,pe bandimeli kombo naye,apesi bango bokonzi yakokoma bana naye, 13ba oyo babotami na makila te na bondimisami ya nzote te pe ya moto te kasi ya nzambe.14Liloba elati nzoto pe ezali kati na biso,tomoni nkembo naye,pe nkembo naye emonana ki lokola ya muto moko oyo aweti na tata,etondisami na nkembo pe na bosolo. 15Yoan atatoli na mongongo makasi:ezali ye oyo na tatolaki nakoloba ete oyo akoya na sima na ngai azali nde moto na liboso na ngai,po ete azalaki liboso na ngai.16Wuta kotondisama na molimo,to zua epai naye ngolu na ngolu. 17Na tina mobeko epesama na mosse,kasi ngolu pe bosolo eye na nzela ya yesu masiya. 18Moto moko te amoni nzambe,bobele ye moko nzambe oyo azali na kati ya tata,amimonisi.19Oyo ezali litatoli ya yoan tango ba yuda batindaki banganga pe ba lewi pona kotuna ye. Y'ozali nani? 20Ye aboyaki te ayanoli bango na kimia pe alobi; nazali mobikisi te. 21Na boye batuni ye;ozali nani kasi? Ozali Eliya ? Ayanoli ;nazali pe yete . Batuni lisusu ozali mosakoli ? Ayanoli te.22Nabongo balobi naye ozali nani? Po ete tozongisa eyano na bato oyo ba tindaki biso? Olobi nini natina y'oyo ozali? 23Yoan ayanoli bango; nazali mongongo naye oyo ezali ko ganga kati na lisobe;botia alima na nzela na mokonzi lolenge mosakoli izaya alobaki ete;24Ezalaki wana batindami mususu epai yaba farizi. Batuni ye; 25Kasi pona nini ozali kopesa libatisi soki ozali mobikisi te, Eliya te pe mosakolite?26Yoan ayanoli bango pe alobi; ngai nazali kobatisa na moyi . Kasi nakati na bino ezali na moto moko oyo boyebi ye te. 27Moto yango azali oyo aye na sima na ngai. Na bongisami te kofongola singa ya sapatu naye. 28Makambo yango elekaki na Betanie pene pene ya jourdain esika yoan azalaki kobatisa.29Na mokolo ya sima ,yoan amoni yesu koya epai naye pe yo yoan alobi;botala ezali mwana na mpate oyo alongoli masumu na mokili mobimba. 30Yewana nalobaki ete oyo akoya sima na ngai aleki ngai na munene;po azalaki liboso na ngai. 31Nayebaki ye te, ezalaki po ete etalisama na Israel ete naye kobaptisa na mayi.32Yoan atatoli; Namoni molimo na nzambe kowita likolo kokita lokola ebenga koya kovanda katina ye. 33Nayebaki ye te kasi yende motindami na ngai mpo naya kobaptisa na mayi alobi na ngai; Moto oy'okomona molimo na nzambe kokita pe kovanda kati naye, ezali yende ako baptisa na molimo mosantu. 34Na moni pe na tatoli azali mwana na nzambe.35Na mokolo na sima ,Yoan azalaki na bayekoli naye mibale, 36bamoni yesu koleka wana pe Yoan alobi botala mwana na mpate na nzambe!37Ba yekoli bayoki yoan koloba bango,pe balandi yesu. 38Yesu azongi pe amoni bango kolanda ye,alobi na bango;bolingi nini ? Bayanoli ye ,Molakisi ovandaka wapi ? 39Ayanolibango: boya pe bomona . Bayaki pe bamonaki esika bwa ye . Batikalaki naye wana butu mobimba.40Moko na bayekoli oyo bayokaki Yoan pe balandaki yesu ezali André ,ndeko ya simon Petelo. 41Akendaki kokutana na moto ya liboso ndeko naye Simon pe alobi naye;ndeko tosili kokutana na masiya(klisto). 42Amemi simoni epai na yesu,yesu amoni ye pe alobi; yo simoni,mwana na yoan ,okobiangama céphas(libanga).43Na mokolo na sima ,wana yesu alingaki kolongwa pona kokende na galilea ,akutani na fillipe,alobi naye landa ngai. 44Tala filipo azali moto na betesaida,mboka y'adré pe ya petelo. 45Filipo akutani na nahanael pe alobi naye; Moto oyo mosse akomaka na na buku ya mibeko pe oyo ba sakoli balobaka tokutani na ye, yesu ,mwana ya joseph, na mboka ya Nazareth.46Nathanael alobeli ye :Eloko ya malamu ekoki kobima na nazareth ? Filipe azongiseli ye: yaka pe omona. 47Yesu amoni nathanael koya epai na ye pe alobi naye: Tala moto na mboka israel ya solo epai naye lukuta ezali te! Nathanael alobi naye : 48Lolenge nini oyebi ngai ? Yesu azongiseli ye ;Yambo filipe abenga yo tango ozalaki na sé ya nzete namonaki yo.49Nathanael ayanoli ; molakisi ozali mwana na nzambe ! Ozali mokonzi y'israel ! 50Yesu ayanoli ye :Ezali po ete nalobi na monaki yo na sé ya nzete ,yango ozali kondima ? Okomona makambo ya minene koleka wana . 51Pe alobi na ye lisusu : ya solo solo nazali koyebisa yo, okomona likolo ekofongwama pe ba angelou na nzambe komata pe kokita likolo ya mwana na moto.
21Sima ya mikolo misatu , mululu ya libala mizalaki na mboka cana nakati ya galilea pe maman na yesu azalaki wana. 2Yesu naba yekoli na ye babiangamaki pe na mululu yango .3Tango masanga esilaki bongo maman wa ye alobaki naye bazali lisusu na masanga te, 4yesu a yanoli ye ,likambo nini ngai nayo mwasi ? Tango na ngai ekoki nanu te , 5maman naye alobaki naba yekoli naye bosala nioso oyo akoyebisa bino.6Nzoka nde ezalaki na biloko motoba esalama na mabanga pona kotia mayi pe kotia bopeto naba yuda na tango ya mululu . 7Yesu alobi na bango :botondisa yango naba mayi , pe batondisaki yango , 8yesu alobaki lisusu naba sali naye bamema yango epai ya mokolo mululu pe basalaki yango.9Mokonzi ya milulu ameki mayi ebongwami masanga vino, nkasi ayebaki te esika yango ewitaki,nkasi ba sali ba yebaki esika ewitaki. Abengaki mobali yalibala pe alobaki naye : 10Bopesaka liboso masanga ya malamu na sima oyo ya mabe. Sikoyo batu balangwe na masanga ya mabe nzoka nde obombaki masanga kitoko makasi boye ,ti na tango oyo.11Bikamwa oyo esamaki na mboka cana na galilé ezalaki bikamwa ya liboso yesu asalaki ,pona kotalisa kembo naye,pe bayekoli bandimelaki ye.12Na sima na yango akitaki na mboka capernaum, yemoko,maman,bandeko naye ya mibali pe bayekoli naye,batikalaki wa pona mikolo mukié.13Mululu ya pasika yaba yuda ekomaki pene pe yesu akendaki na yerusaleme . 14Amonaki nakati ya tempelo ba teki yaba ngombe,mpate pe ba pigeons. Bato ba balolaka misolo pe bazalaki pe wana.15Asalaki fimbo yaba singa pe abenganaki bango libanda ya tempelo naba mpate pe ba ngombe na bango. Abuakaki mbongo na bango pe ba mesa na bango. 16Alobaki naba teki ba pigeon: bomema biloko oyo mosika na tempelo. Botika kobolongisa ndako ya tata na ngai wenze.17Bayekoli naye bakanisaki makomi na nzambe ekomama: Ete bolingo ya ndaku nayo eleki ngai. 18Ba konzi yaba yuda bayanoli ete: Elembo nini ezali kolakisa biso makambo oyo osali. 19Yesu ayanoli bango :Bobebisa tempelo oyo sima ya mikolo misato nakotonga yango.20Bakonzi yaba yuda balobi naye ete: Ndako ya nzambe oyo etongama na tuku mineyi na motoba,pe y'okotonga yango na mikolo misato? 21Kasi ye abandaki kolobela tempelo lokola nzoto naye. 22Na sima yako sekwa kati yaba kufi ,ba yekoli bakanisi nde alobelaki bango natina nayango pe bandimeli makomi pe maloba oyo yesu alobelaki bango.23Tango azalaki na jerusalem pona pasika,na tango yamilulu ,mingi bandimelaki kombo naye, kolandisama na bikamua oyo asalaki. 24Na bongo yesu alingaki komipesa nabango te mpo ete ayebaki mitema nabango nioso, 25mpo ete azalaki naposa ya komilakisa te na bato mpo ete ayebaka malamu makambo mazalaka na mitema mia bango pe azalaki na posa yalitatoli ya moto te po ayebi mitema na bango.
31Ezalaki na mofarizi moko kombo naye nicodème,molakisi yaba yuda. 2Moto yango akendaki na butu epai na yesu pe alobi na yesu: Molakisi toyebi ete ozali molakisi owiti epai na nzambe, mpo ete ezali na moto mosusu te oyo akoki kosala bikamua lokola yo,soki nzambe aza naye te.3Yesu ayanoli ye, solo solo,soki moto abotami ya sika te akoki kokota na bokonzi ya nzambe te. 4Nicodeme a yanoli yesu:lolenge nini moto akoki kobotama ya sika natango akomi mukolo ? Akoki te kozonga nalibumu ya maman po abotama ?5Yesu ayanoli ye: solo solo,soki moto abotami na mayi pe na molimo te ,akoki kokota te nabokonzi ya nzambe. 6Oyo abotami na nzoto aza nzoto,pe oyo abotami na molimo aza molimo.7Kokamua te na oyo nayebisi yo:esengeli nayo obotama ya sika. 8Mopepe ebetaka esika yango elingi . Ozoyoka makelele nayango ,kasi okoyeba te esika yango ewiti pe esika ezali kokende. Eza pe bongo na moto oyo abotami na molimo.9Nicodeme ayanoli ye: lolenge nini ekoki kosalema ? 10Yesu ayanoli ye: Ozali molakisi y'israel pe ozali kososola mambo oyo te? 11Solo,solo, tolobaka oyo toyebi pe totatolaka oyo tomoni. Nkasi bondimaka litatoli na biso te.12Soki nalobelaki bino makambo ya sé pe bondimeli ngai te,lolenge nini bokondima soki nalobeli bino makambo ya likolo? 13Moto moko te amata likolo soki kaka oyo awiti kuna te,mwana na moto.14Lolenge mosse atombolaki nioka motako na esobe,lolenge wana pe mwana na moto esengi atombwama 15po moto nioso oyo akondimela ye azua bomoi ya seko.16Nzambe alingi mokili apesi mwana naye moko,po ete moto nioso oyo andimeli ye abeba te kasi azua bomoi ya seko. 17Nzambe atinda mwana naye na mokili te po akatela mokili etumbu nkasi pona mokili ebika na nzela naye. 18Moto nioso akondimela ye azali na sé ya etumbu te, nkasi oyo akondima te aza na sé ya etumbu,po ete andimeli mwana sé moko ya nzambe te.19Tina ya esambiselo ,ezali oyo pole eye na mokili,nkasi bato ba lingi molili na esika ya mpole mpo ete misala na bango ezali mabe. 20Mpo ete moto nioso oyo asalaka masumu aza moyini ya mpole pe ayaka na pole te akobanga ete misala naye ya mabe ekoyebana. 21Lolenge moko pe na moto oyo azalaka sembo,ayaka na mpole,mpo ete misala naye oyo ekokisama na nzambe emonisama pe etalisama.22Sima na yango,yesu pe bayekoli naye bakeyi na mabele ya yudée. Wana abandaki kolekisa tango na bango mpe abandaki kobatisa. 23Yoan pe azalaki ko baptisa na Enon pembeni ya salim mpo ete esika wana mayi ezalaki ebele.Bato bazalaki koya epai na ye mpo abaptisa bango, 24wana yoan azalaki nanu akoti boloko te.25Nasuka ,bayekoli ya yoan basuani na moyuda moko pona bopetolami ya solo. 26Ba yekoli ya yoan baye epai ya yoan ,balobi naye: Molakisi moto oyo azalaki nayo na ngambu ya ebale ya jourdain,pe oyo otatolaki po naye,tala azali kobatisa pe bato nioso bakeyi ebayi naye.27Yoan ayanoli:moto akoki kosala eloko te soki nzambe nde atindi ye te. 28Bokoki bino moko kotatola ete nalobaki: nazali klisto te , kasi nalobaki natindamaki liboso naye.29Mokolo mwasi nde mobali,kasi moninga naye atondaka na esengo koyoka mongongo naye. 30Esengeli ye aleka liboso ngai nazonga sima.31Ye oyo awiti na likolo azali likolo ya nioso. 32Mpo azali kotatola oyo amoni pe ayoki,kasi bozali kotiya tembe. 33Oyo andimi ye alakisi ete nzambe azali solo.34Nzambe atondisa ye na molimo mosantu koleka. 35Lokola papa alingi mwana apesi ye bokonzi nioso. 36Soki ondimeli yesu ,oza na bomoyi ya seko,kasi soki otosi ye te okozua bomoi te,kasi kanda na nzambe ekokwelela yo.
41Na ntango Yesu ayebaki ba Pharisiens bayokaki azali ko batisa batu ebele koteka Yoani, 2(Na bongo Yesu ye moko abandaki kobatisa te kasi bayekoli na ye nde) 3alungwe Judee mpe bazongaki lisusu na Galilée.4Ezalaki motuya kokenge na Samarie. 5Ekomi bango na Samari, ba kombo na Sychar, pene ya lopango oyo Yakobo apesaka na mwana na ye Joseph.6Amoni libulu ya mayi ya Yakobo. Elembaki Yesu na mobembo mpe afandaki pembeni ya libulu Ezalaki na ngonga midi. 7Mwasi moko ya samariya aye po na kotoka mayi, Yesu ayebisi ye: «Pesa ngayi na mela». 8Na tango wana bayekoli na Yesu bakendaki kosomba bi leyi.9Mwasi ya Samaritain alobi: «Ndenge nini yo Mo Yuda, oza seka nga muasi ya samaritain mayi ya komela? Ba Yuda tosalisaka te.» 10Yesu ayanoli ye: « Soki oyebaki likabo ya Nzambe mpe nani oyo ozo lobela yo pesa nga mayi; olingaki yo moko kosenga , mpe kozua mayi ya bomoyi.»11Muasi ayebisiye: Moteyi, oza ata na katini te mpe libulu eza mozindo. Wapi tokozua lisusu mayi ya bomoyi? 12Ozali munene koleka tata na biso Yakobo oyo apesa biso libulu oyo, mpe ye moko amela mayi oyo, na bana mpe ba nyama na ye?».13Yesu alobi na ye: «Oyo akomela mayi oyo ako yoka lisusu posa, 14kasi mutu nyonso oyo akomela mayi nako pesa ye, ako yokaka lisusu posa ya mayi te. Nzokande mayi oyo nako pesa ye eko, komela ye libulu ya mayi oyo ekobimaka ti na bomoyi ya seko.»15MWasi ayebisi ye: «Molakisi, pesa nga mayi yango mpo nayoka lisusu posa ya mayi te, mpe nayaka lisusu wana ko toka te.» 16Yesu ayebisi ye: « Kenda benga mobali na yo mpe zonga awa.»17Mwasi ayanoli ye: «Naza na mobali te» Yesu azongiseli ye: «Olobi ya solo, 18mpo ozalaki na babali mitano, mpe oyo azali na ye aza li ya yo te. olobi ya solo»19Mwasi alobi: «Moteyi, na sosoli ete ozali mosakoli. 20Ba tata na biso ba ngumbamelaki na ngomba oyo, kasi yo olobi ete na Yelusalem nde esika ya ko ngumbamela21Yesu alobeli ye: «Mwasi ndimela ngayi, ngonga ekoya oyo kongumbamela Tata ekozala lisusu te na ngomba, na Yelusalem mpe te. 22Bozo ngumbamela oyo boyebi te. Biso toyebi oyo tozo ngumbambela, mpo ete lobiko eya na ba Yuda.23Tango ekoya mpe esi ekomi, tango ba ngumbameli ya solo bako ngumbamela Tata na Molimo mpe na solo, po ete azo luka ba ngumbameli ya bongo. 24Nzambe aza Molimo, ba ngumbameli ye basengeli basala ngo pe na Molimo25Mwasi alobi: « Nayebi ete ozali Messie a koya (oyo babengi klisto). Tango akoya akolimbola makambo nyonso.» 26Yesu alobi: « Ngayo yeyo, nazali oyo azoloba na yo.»27Kaka na tango wana bayekoli bazongi. bakamuaki lolenge azalaki kosolola na mwasi, kasi moko te alobaki: «Alingi nini?» to pona nini ozo solola na ye?.»28Mwasi atiki katini ya mayi, azongi na engumba m^pe ayebisi bato: 29«Boya kotala moto moko oyo alobi na nga manso nazalaka. Akoki kozala Klisto te.» 30Baye tokola ye.31Na tango wana ba yekoli bazalaki kobenga: Yesu po na kolia. 32Kasi ayebisi bango: «Naza na bileyi yakolia oyo boyebi te». 33Bayekoli ba tunani: «Mutu te amemeli ye bileyi, boye te?»34Yesu alobi na bango: «Bileyi na ngayi eza kosala mokano ya oyo atinda ngayi mpe ko kokisa mosala na ye. 35Bo loba te etikali sanza nineyi mpo tobuka mbuma. Kasi ngayi na lobi bo tombola miso mpe botala milanga, tango ya kobuka ekoki! 36Oyo azo buka azozwa mbano na ye mpe azo lokota mbuma mpo na bomoyi ya seko, po ete oyo azo lona na oyo azo buka basepele elongo.37Pona wana nde lisese:" Moko aloni mpe mosusu abuki." 38Na tindaki bino bo buka oyo bolonaki te. Misusu basalaki mpe bino bokotaki na bilanga na bango.39Bato ya Samari ebele bandimelaki ngolu na Yesu pona matatoli ya muasi: «Ayebisaki ngayi manso nasala.» 40Bato ya Samari baye na ye mpe bayebisi ye atikala mikolo mibale lisusu na bango.41Ebele ba ndimaki lisusu na maloba na ye. 42Ayebisi muasi: « Tozo mbimela lisusu te kaka maloba na yo mpo ete biso moko pe toyoki ye, mpe to yebi ete aza mobikisi ya mokili ya solo.»43Sima mikolo misantu, akeyi na Galille. 44Po ete Yesu ye moko alobaki ete mosakoli andimamaka te na mboka na ye. 45Tango akomaki na Galilée, bato na Galileya bayambaki ye. Bamokaki biloko nyonso asalaki na Yelusalem na milulu, po ete bango mpe bakendaki.46Ntango azongaki lisusu na Cana na Galilée, esika abongolaki mayi na vino. Ezalaki na mosali moko ya mokonzi na Capernaum, muana na ye ya mobali azalaki na bokono. 47Koyeba ete Yesu alungwaki na Judée po na Galileya, akeyi epa na Yesu mpe abondeli ye kokita mpe kobikisa mwana na ye oyo azalaki pene na liwa.48Yesu alobisi bango: «Loba ete bomonaki bilembo na bikamwa te, bozo ndima mpe te.» 49Mokambi na mapinga alobi: «Malakisi, boya yambo ete muana na nga akufa». 50Yesu ayanoli ye: «Kende, mwana na yo abiki.» Moto andimeli liloba oyo Yesu alobaki na ye, mpe akeyi.51Na bozongi akutani na basali na ye, balobi na ye muana asili kobika. 52Atuni bango na ngonga nini abandaki kobika. Bayanoli ye: «Lobi na ngonga sambo nde bokono etikaki ye.»53Mokambi ya mapinga aye kososola ezalaki kaka na ngonga wana Yesu ayebisaki ye ete: «muana ye abiki.» Na bongo ye moko na libota na ye mobimba bandimeli. 54Ezalaki likamwisi ya mibale oyo Ysu asalaki tango akendaki na Judée po na mboka Galileya.
51Sima na yango ,ezalaki na milulu naba yuda,mpe yesu amataki na yerusalemi. 2Pembeni na lisiba Ba babengi naba ebele bethesda. 3bato mingi yabokono ya ndenge na ndenge bavandaki wana,kozela mayi eningana. mpo ete angelou na nzambe azalaki koya pona koningisa mayi. 4Moto oyo azalaki kokweya liboso tango angelou azalaki koningisa mayi azalaki kobika na maladi naye.5Ezalaki na mobeli moko abela wita tuku misatu na mwambe. 6Tango yesu amoni ye ayebaki ete azalaki wana wuta kala,pe alobi naye olingi obika?7Mobeli ayanoli ye;molakisi naza ata na moto te ayo akoki kobwaka ngai na mayi,mpe tango nionso nalingaka nakweya na mayi ,bakweyaka kaka liboso na ngai. 8yesu alobi naye:Telema zua mbetu nayo mpe tambola9Nambala moko abiki,azui mbeto naye mpe atamboli.Ezalaki mokolo na sabata.10Bayuda balobi na moto oyo abikaki ;ezali mokolo na sabata epesami na nzela na bato te komema mbetu. 11Mobikisi na ngai olobi na ngai ete zwu mbetu nayo mpe tambola12Bayanoli ye;nani ayebisi yo zwa mbetu nayo mpe tambola? 13Kasi mobiki oyo ayebaki te yesu mpo ete yesu abendanaki na nkuku bona etuluku ya batu oyo ezalaki esika wana14Sima na yango,yesu akutani naye nakati ya tempelo mpe alobi naye:tala,yo obiki! kosumuka lisusu te,kabanga ete eloko moko ya mabe ekomela yo. 15Mobiki akeyi koloba naba yuda ete yesu nde abikisaki ye.16Natina nayango,bayuda bamonisaki yesu pasi mpo ete abikisaki moto mokolo nabo pemi. 17Yesu ayanoli bango:tata na ngai azosala kino sikoyo ngai pe nazosala. 18Natina nayango,bayuda bazalaki koluka ba bomaye,kaka te poye abikisaki mokolo ya sabata,kasi mpo ye abengaki lisusu nzambe tata naye,mpe amikomisaki nzambe.1920Yesu alobi na bango:soso nalobi na bino,mwana akoki kosala eloko te ye moko,kasi akosala kaka oyo tata azali kosalam mpo ete makambo tata azali kosala, mwana pe azali kosala yango,lokola tata alingi mwana azali kosalela ye nionso21Mpe lokola tata asekwisaki bakufi mpe kopesa bongo bomoi,ndenge moko mpe mwana akopesa bomoi na moto nionso oyo ye alingi. 22Mpo ete tata asambisaka moto te,kasi apesa kosambisa nionso na mwana . 23Na ntina ete moto nionso akumisa mwana na ndenge bazali kokumisa tata,moto oyo azali kotosa mwana te ,atosi mpe tata te oyo atindaki ye24Na solo-solo,moto oyo azali koyoka maloba na ngai mpe azali kondimela oyo atindaki ngai,azali na bomoi na seko mpe ye bakokatela ye etumbu te,nkasi ye alongi kufa mpe azwi bomoi25Ya solo-solo, nazali koyebisa bino,ngonga ekoya mpe esi eye, oyo ba weyi bakoyo mongongo ya mwana na nzambe mpe ba oyo bako yoka bako bika.26Lokola tata azali na bomoi nakati naye ndenge moko mpe apesa na mwana azala na bomoi kati naye 27mpe tata apesa bokonzi naye na mwana mpo ete asambisa mpo ete azali mwana na moto.28Bokamwa te mpo ngonga ekoki oyo bato nionso bazali na nkunda bakoyoka mongongo mpe bako bima. 29ba oyo basalaki malamu mpona lisekwi,ya bomoi,kasi ba oyo basalaki mabe natango ya lisekwi mpe ya esambiselo.30Nakoki kosala eloko moko te na ngai moko.nazali kosala mpona mposa na ngai te,kasi mpona mposa ya oyo atindaki ngai,kasi mposa ya oyo atindaki ngai. 31Soki nazali kotatola mpona ngai moko,litatoli na ngai ekozala solo te. 32Ezali na moto mosusu oyo atatolaka mpona ngai mpe nayebi ete litatoli naye mpona ngai ezali solo.33Bino botindaki bato epai ya yoani mpe atatolaki solo. 34Kasi litatoli na ngai ewiti na bato te,nazali koloba boye mpo ete bobika. 35kasi yoani azalaki mwinda oyo engengaka na tango moke,36Yesu olobi litatoli na ngai eleki ya yoan,mpo ete misala oyo tata apesi ngai kosala eleki ya yoani,ezali kolakisa ete tata nde atindi ngai. 37Bino bolingi koyoka mongongo naye te . 38Bomona ye ata moke te maloba naye ezali na bino mpe te,mpo bondimaka moto oyo ye atindi te.39Bino bozali koluka koyeba makomi,mpo ete boye ete nayango bokozwa bomoi na seko,kasi kaka makomi yango ezo tatola mpona ngai 40mpe bino bolingi koya na ngai te mpo bozua bomoi41nkembo na ngai ewiti epayi ya bato te, 42mpe nayebi ete bozali na bolingo na nzambe te kati na bino43Naye na kombo ya tata na ngai,mpe boyambi ngai te, soki moto moko ayaki nakombo naye moko,bolingaki boyamba ye. 44Lolenge nini bokoki kondima,bino oyo bolingaka lokumu na nzela na bato kasi bolukaka lokumu na nzambe te.45Bokanisi te ke ngai,nakofunda bino epai na tata,ezali na moto mosusu oyo afundaka bino,ezali mose oyo bino bolikyaka. 46Soki bozali kondimela mose,esengi na bino mpe bondimela ngai mpo ete oyo mose nakoma eza na ntina na ngai. 47Soki bino bozali kondimela makomi naye te lolenge nini boko ndimela maloba na ngai?
61Nasima ya makambo wana,yesu akatisaki na ngambo ya galileya na mayi ya tiberiadi. 2Etuluku ya bato ezalaki kolanda ye mpo ete bato bazalaki komona bilembo oyo azalaki kosala likolo ya ba beli. 3Yesu akeyi esika ya ngomba pe avandi na bayekoli naye.4Milulu ya pasika ebelemaki,milulu ya ba yuba lokola momesano. 5Yesu atomboli misu likolo mpe ameki motema na filipo ,wapi tokoki kosomba mapa pona kolesa batu oyo ,soki akososola yango. 6Kasi yesu azalaki koyeba nini akokaki kosala.7filipo ayanoli ye; ete nkama mibale ekokoka kosomba bileyi ya moto nionso te. 8Moyekoli moko andele ndeko ya simoni petelo alobi na yesu: 9Elenge moko awa azali na ba kwanga mitana na mbisi mibale, yango ekokoka na etuluki ya batu oyo?10Yesu alobi bovandisa bango,mpe bavandi bango nionso mikama mitano,yesu akamati biteni ya kwanga mpe mbisi apesi bango baliya. 11Tango basilisi 12koliya . Apesi mitindo naba yekoli balokota biteni ya bileyi oyo ekweyaki nasé13Balokoti bitunga zomi na mibale,tango bamoni bikamwa na bileyi balobi. 14Bolo,solo moto oyo azali mosakoli ebongaki aya na mokili. 15Yesu amoni posa na bango mpona kotia ye mokonzi,aponaki bango yemoko na ngomba.16Pokwa eyingeli, bayekoli bakiti na libongo . 17Mpona kokatisa na ngambo na kapernahum ngonga epusanaki mpenza yesu akomaki nanu te esika bango bazalaki . 18Mbonge etombokaki.19Bayekoli ba pusani pene etaka tuku misatu;bamoni yesu likolo na mayi mpe babangi. 20Mpe ye ayebisi bango ezali ngai ! bobanga te. 21Balingaki bakata ye na buatu, nkasi zelo ekangaki buato.22Na mokolo elandi, etuluku ya bato oyo etikalaki na ngambo mususu,basosoli ete ezalaki wana nabuato lisusu te. 23Etungisaki etuluku na bato24Tango etuluku ya bato bamoni mokonzi mpe bayekoli naye te na ngambo ya tybeyade bakatisi naba buato mpona koluka yesu. 25Tango bamoni ye na ngambo ya ebale,batunaki ye ngonga nini okomaki awa?26Yesu alobeli bango,bozoluka ngai,mpona makamwisi,oyo bomonaki,nkasi bozoluka ngai mpona posa ya nzoto na bino. 27Kata kosala mpona mposa ya nzoto,bosala mpona bileyi na bomoyi oyo mwana moto akopesa bino, oyo nzambe tata atia elembo naye.28Batuni yesu;tosala nini mpo totosa misala na nzambe ? 29Yesu ayanoli bango: Bondimela oyo nzambe atinda.30Bayanoli yesu;bikamwa nini okosala mpo to ndimela yo? 31Ba tata na biso baliaka kwanga na esobe ndenge ekomama: Apesaki bango kwango wita likolo.32Yesu ayanoli bango;solo mpenza, ezalaki mose apesaki bino kwanga na likolo,ezali tata na ngai oyo azo pesa kwanga solo na likolo. 33Bongo kwanga na nzambe ezali oyo ezokita na likolo,oyo ezopesa bomoi na mokili. 34Mpe balobi,mokonzi pesa biso kwanga yango.35Yesu ayanoli bango lisusu;nazali kwanga na bomoi ,oyo akoya epayi na ngai akoyoka lisusu nzala te,oyo akondimela ngai akoyoka lisusu posa ya moyi te. 36Bomoni ngai nkasi bondimeli ngai te. 37Nkasi ba oyo tata apesa ngai,bakoya epayi na ngai mpe nakobuakisa ata moko te.38Mpo ete nakita nalikolo te mpona posa na ngai, kasi ya moto oyo atinda ngai . 39Tala mposa ya moto oyo atindaki ngai,na bungisa ata moko te naba oyo ye apesa ngai, nkasi na sekusa bango na mokolo na suka. 40Yango nde mokano na tata,moto nionso amoni tata mpe andimeli ye azua bomoi na seko, mpe nako sekusa ye na mokolo na suka.41Ba kambi yaba yuda ba yimi-yimi mpona yesu; mpo alobaki ete azali kwango oyo ewiti na likolo,balobi naye : 42oyo azali muana ya maliya mpe yosefu oyo biso toyebi ? Ndenge nini aloba; awita likolo ?43Yesu ayanoli bango: Botika koyima-yima. 44Moko te kati na bino akoya epai na ngai soki tata abengi ye te mpe mpo na sekusaye mokolo na suka. 45Ekomama na basakoli bakoteyama naye moko nzambe,mpe bakoya epai na ngai46Moko te amona tata,soki oyo awita na likolo te. 47Na bosolo-solo ,oyo azondimela bomoi na seko.48Nazali kwanga na bomoi. 49Ba tata na bino ba lia kwanga na esobe mpe ba kufa.50Elobeli na yesu etombokisaki ba yuda mpe ba kamwe ; 51ndenge nini moto apesa biso nzoto naye tolia mpe makila naye to mela?52Yesu ayanoli bango: Ya solo-solo , 53malamu ete bino bolia te nzoto ya mwana moto mpe bomela makila naye te,bokozala na bomoi te.54Moto nionso oyo ako lia nzoto mpe makila na ngai akozua bomoi na seko,pe nako sekusa ye mokolo na suka. 55Ozo akolia nzoto na ngai mpe akomela makila na ngai, 56azalikati na ngai mpe nazali kati naye.57Soki nazali eza mpona tata,mpe oyo ako lia ngai akobika mpo na ngai. 58Ezali kwanga te oyo ba tata na bino ba liaka mpe bakufa. 59Yesu azalaki koloba makambu nionso oyo na synagongi tango azalaki kotangisa na kapernawume.60Ba yekoli sima yakoyoka malakisi wana bayimaki-yimaki mpenza mpe ba panzani , 61mpe yesu alobi na bango: Yango ezali kotungisa bino ?62Soki bomoni mwana moto amati esika awuta? 63Ezali molimo epesaka bomoyi,maloba oyo nalobeli bino ezali molimo mpe bomoyi.64Nakati na bino ezali naba oyo bazali kondima te. Mpo ete yesu ayebaki mpe ba oyo bakoteka ye. 65Nabongo nde nayebisaki bino ete moko te akoya epai na ngai soki tata apesi nzela te.66Namoni kati na bino ebele bandimela ngai te, bongo bapalangani na bango. 67Yesu atuni ba yekoli na zomi na mibale,bino mpe bolingi kokende na bino ? 68Petelo ayanoli : Mokonzi tokende epayi ya nani ? 69Ozali namoloba na bomoi , biso tondimi mpe toyebi ete ozali mopakolami na nzambe.70Ezali ngai nde na ponaki bino, bina zomi na mibale,moko kati na bino azali zabolo? 71Azalaki kolobela yudasi,mwana yamobali ya simoni iscariote,mpo ete yende akoteka yesu.
71Sima ya makambo wana ,yesu abembukaki na galilea, aboyaki kokende na yudea natina ete bayuda bazalaki koluka ye mpo ete baboma ye. 2Na tango oyo molulu yaba yuda pe ya mongombe ebelemi.3Bongo bandeko baye balobi naye: Longwa esika oyo pe kende na mokili mwa yuda ,po ete bayekoli bwa yo bamona misala oy'ozali kosala. 4Moto akoki kosala eloko na nkuku te soki ye mei alingi komonisa misala na ye polele. Soki olingi kosala misala oyo omimonisa na bato banso.5Atako bandeko baye ba bandaki kondimela ye te. 6Yesu ayanoli bango: Tango na ngai ebelemi nanu te,kasi ya bino esi ebelemi. 7Mokili ekoki te koyina bino,bobele ngai mpo nazali kotatola natina naye oyo na misala mabe.8Bino,bokende na milulu ; ngai te mpo ete tango na ngai ebelemi nanu te. 9Sima yakolobela bango makambo wana, atikalaki na galilea.10Kasi bandeko baye bakendaki na milulu ,yepe akendaki kasi nalolenge yako batama. 11Ba yuda balukaki ye na milulu bamitunaki soki azali wapi ?12Kosuana ezalaki kati na bango mpo natina naye. Basusu balobi ete azali moto malamu,basusu balobi te, azali kobungisa makanisi ya batu. 13Kasi ata moto moko te alobaki na pwelele po ete bazalaki kobanga ba yuda.14Na katikati ya milulu yesu amotaki na tempelo pe abandaki kotangisa. 15Ba yuda ba kamuaki; nako loba: lolenge nini moto oyo ayebi koteya koleka? Kasi ye atanga . 16Yesu ayanoli bango pe alobi: Malakisi na ngai ezali ya ngai te,kasi ya moto oyo atindaki ngai.17Soki moto alingi kosala mokano naye, okoyeba malakisi oyo,okoyeba liteya naye soki awiti na nzambe. Soki nazali kolobela natina na ngai moko. 18Moto oyo azali komilobela natina naye moko azali koluka lokumu naye,kasi oyo azali koluka lokumu ya moto oyo atindaki ye, moto wana azali solo pe bokabuani ezate kati naye.19Mosse apesaki bino mibeko te? Kasi ata moko te kati na bino abombaka mibeko. Pona nini bozali koluka bo boma ngai? etuluku ya bato eyanoli ye: 20Ozali zabolo. Nani azoluka koboma yo ?21Yesu ayanoli bango pe alobi: Nasali mosala mpe ekamwisi bino. 22Mose alakisaki bino kokata ngenga ezalaki mpona ye te nka mpona mikolo pe mokolo mwa sabata, bozali kosala yango.23Soki moto akatami ngenga mokolo mwa sabata mobeko mwa mose ebukani te? Mpona nini bazali na kanda na ngai mpo na bikisi moto na mokolo mwa sabata? 24Bosambisa bato te lolenge bozali komonela bango libanda kasi bosambisa na bosembo.25Ndambu ya bato na yerusaleme balobaki ete:Ezali ye te oyo bazali koluka mpona koboma ? 26Botala, y'alobaka pwelele ,mpe elobelaka ye eloko te. Bakambi bayebi ya solo ete azali masiya? 27Toyebi te esika awiti. Nkasi Tango masiya akoya,moto moko te akoyeba esika abimeli.28Yesu akangi na tempelo,kotangisa pe koloba: Boyebi ngai bino nioso pe esika na witi. Naye natina na ngai moko te, nkasi oyo atindi ngai aza solo,pe bino boyebi ye te. 29Nayebi ye mpo ete nawiti naye pe atindi ngai.30Bamekaki kokanga ye,nkasi moko te atiaki maboko likolo naye mpo ete ngonga naye ebelamaki nanu te. 31Nkasi batu ebele bandimelaki ye pe balobaki: Tango masiya akoya akosala makamwisi koleka ye ? 32Ba farisayo bayokaki koyima-yima na bato na ntina na yesu pe ba nganga nzambe bapesaki ba soda mpo bakanga ye.33Yesu ayanoli bango: Nazali nanu na bino na mwa tango mukié ,mpe nakokende epai naye oyo atindaki ngai. 34Bokoluka ngai nkasi bokozua ngai te; esika nazali kokende,bokozala na makoki te yakoya kuna.35Ba yuda bamituni soki akokende wapi,epai bango bakoki komona ye te? Akokende epai yaba greke pona ko tangisa bango ? 36Alingi koloba nini na elobeli oyo: Bokoluka ngai kasi bokomona ngai te; esika nazali kokende bokozala na makoki yakoya te.37Na sima ya milulu ,yesu atelemi mpe agangi,alobi soki moto ayoki posa ya mayi ,aya epai na ngai pe amela. 38Oyo akondimela ngai ,lokola makomi elobi atondisama na molimo mosantu.39Nkasi alobelaki mpo na tina na molimo oyo ye akopesa baye bakondimela ye, molimo epesamelaki nanu bango te mpo ete yesu azuaki nanu nkembo te.40Ndambu ya bato na etuluku ,tango bayoki maloba wana, moto oyo aza ya solo mosantu. 41Na galilea nde mobikisi esengi abima ? 42Makomi elobi te ke mobikisi akobima na libota ya Dawidi, na kati ya betheleme mboka ya dawidi ?43Bato bakabuanaki natina naye. 44Ndambu kati na bango balingaki ba kanga ye,ata moto moko te akangaki ye.45Bongo ba kangangi na ba soda bakendaki epai ya banganga nzambe mpe ba farisayo koyebisa bango ntina bamemaki ye te? 46Bakonzi na ba soda bayanoli bango:Moto moko te alobi lokola oliboso.47Bafarisayo bayanoli: Bino mpe bokosamaki ? 48Ezali moko na bakonzi naba farisaya bandimeli ye? 49Etuluku ya bato oyo eyebi mobeko te, elakelami mabe.50Nicodeme moko na bafalisayo oyo akutanaka naye oliboso alobi na bango: 51Mobeko na biso elobi bakoki kokatela te moto etumbu soki asambi nanu 52te?Bayanoli mpe balobi naye:Ozali moto na galilea? Luka mpe okomona ete ata mosakoli moko te awita na galilea.53Bango bazongaki moto na moto na ndaku naye.
81Yesu amataki na ngomba ya olive . 2Na tongo tongo,akeyi lisusu na tempelo,mpe bato nioso baye epayi naye. Avandisi bango mpe abandi koteya bango. 3Ba mpaka ya lingomba ba memeli ye muasi ya ndumba batié ye na kati kati ya bato.4Bayebisi ye ete tokangi maman oyo na mobali. 5Na mibeko na biso esengeli to boma ye na mabanga kasi y'olobi nini ? 6Nzoka nde ezalaki motambo mpo bakweya naye, nkasi asali lokola azoyoka bango te.7Lokola mituna elekaki ,atelemaki mpe ayebisi bango: Oyo nanu asumuka te abanda kobamba ye liboso. 8Mpe azongeli kokoma na mabele.9tango bayoki bongo,bango nioso ba panzani,mpe atikali ye moko na muasi wana. 10Nde atuni ye,mwasi,wabi bafundi nayo? Atamoko te abambi 11yo?Ayanoli: te ata moko te mokonzi,yesu mpe atiki ye akende nkasi akebisi ye azongela lisusu te.12Yesu azongeli kolobela bango,te naza molakisi nzela,oyo akolanda ngai akobeta ata mabaku te. 13Bafarisaya balobi naye:Litatoli ya moto moko andimamaka te .14Yesu ayanoli bango: Ata namilobeli mpona ngai moko,ezali solo;nzambi nayebi esika na witi pe nazali kokende kasi bino boyebi eloko moko te. 15Bozali kosambisa na bomoto kasi ngai te . 16Ata na sambisi nakomikasa te nzambi naza na tata na ngai oyo atinda ngai elongo.17Na mibeko,litatoli ya bato mibale nde bandimaka. 18Namilobeli na tina na ngai moko,mpe tata oyo atinda ngai azolobela ngai19Batuni tata naye,ayanoli bango: Boyebi ngai na tata na ngai te. 20Azalaki naino na ndako na nzambe tango alobaki bongo bakokaki kokweya naye te.21Alobi lisusu: Bokoluka ngai soki nakeyi kasi bokokufa na mabe na bino. Ezali mpasi pona kolanda ngai. 22Bayuda batunani :Alingi nde komidiémbiki mpo aloba bongo.23Yesu ayanoli: Bino bozali bato na mokili oyo,kasi ngai nazali moto ya mokili ya nse te. 24Soki bondimi te ngai nazali,bokokufa na masumu na bino.25Batuni ye,yo nana?Yusu ayanoli: Nasilaki koyebisa bino. 26Mpona bino,mingi yakoloba mpe yakotuna ezali oyo atindaki ngai azali na bosembo,ezali monoko na ngai kasi maloba na mokonzi. 27Azalaki kolobela bango natina ya tata kasi bazalaki kososola te.28Yesu ayanoli: Tango nakomata nde bokoyeba ete nazali kosala namitindo na ngai te ,oyo tata alakisi ngai nde nakosala. 29Lokola tozali naye elongo esengeli na sala mpo asepela. 30Tongo alobi bongo bato ebele bandimelaki ye.31Ayebisaki naba yuda oyo bakomaki ba klisto: Soki bo bombi mateya na ngai nde nakoyeba ete bozali ba yekoli na ngai. 32Na bosolo,boko kangola ma. 33Bayanoli ye: Tozali bawumbu te tozali bana ya abraham ebanda boni po oloba bongo?34Ayanoli bango: Ya solo penza moto oyo asali lisumu azali mowumbu ya lisumu. 35Bowumbu ekoki kosila nkasi mwana mokolo lopango afutelaka te. 36Soki mwana na nzambe akangoli bino na bowumbu,bozui bonsomi ya solo.37Nayebike bozali ba kitani ya abraham;bozoluka bo boma ngai mpo maloba na ngai ezui esika na mitema na bino te. 38Nazali kopesa bino mitindo oyo ewiti epai ya tata kasi bino bozali kotosa oyo ya ba tata na bino.39Bayanoli ye: Tozali bana ya abraham,yesu ayanoli bango:Soki mpenza bozalaki bana naye,mbele bolandaki ndakisa naye. 40Kasi mposa na bino ezali kaka ngai nakufa mpo na yebisi bino bosolo oyo ewiti epai na nzambe. 41Bino bozali komekola misala ya tata na bino.Bayanoli ye ;biso tozali bana ya abraham te,nzambe nde tata na biso.42Yesu ayebisi bango; soki mpenza nzambe azali tata na bino mbele boboyi ngai te,ngai mpe mwana naye oyo atindi. 43Ndenge nini bozali ko sosola te? Matoyi na bino mangongi. 44Bozali bana ya zabolo yango wana bolingi kosala mokano naye ,azali mobomi wita kala mpo alobaka solo te,azali mokosi mpe tata yaba kosi.45Boboyi kondimela ngai mpo nalobeli bino bosolo. 46Nani kati na bino akokiko ndimisa ngai na masumu ?Soki nalobi solo bozali kotia ntembe mpona nini ? 47Mwana nzambe nioso ayokaka malako naye. Nkasi bozali kotosa yango te mpo ete bozali bana naye te.48Ba yuda bayanoli ye;tala tina tolobaki te mpo ozali mosamalia na molimo mabe. 49Yesu ayanoli bango; nazali na molimo mabe te,kasi nazali ko memia tata ngai,bino mpe bozali komemia ngai te.50Nazali koluka lokumu na ngai te,nkasi mokolo lokumu nde akokabola biso. 51Yaso mpenza,oyo akotosa malako na ngai ,akozua bomoi ya seko.52Ba yuda bayebisi ye;ya solo ozali na molimo mabe .Abraham na ba profete bakufa bongo olobi te soki totosi malako nayo tokokufa te . 53Tata na biso abraham na ba profete ba kufa yo oleki bango?54Yesu ayanoli: Namikumisi ngai moko te tata oyo bozali koloba nzambe na bino nde azali kopesa ngai lokumu. 55Botikala koyeba ye te, nkasi nayebi ye, soki nawangani ye,nakokoma lokuta lokola bino.Lokola toyebani nazali kokela malako naye. 56Kutu tata na bino abraham asepelaka tango amonaka koya na ngai na ndoto.57Bayuda balobi naye: Okomi naino mobange te,omona abraham wapi ? 58Ayanoli bango: Ya solo mpenza ,yambo abotama nazalaka. 59Balokotaki mabanga mpona kobamba ye,Nkasi abatamaki mpe awumbaki bango.
91Tango yesu azalaki koleka,amoni moto moko akufa miso wuta mbotama naye. 2Ba yekoli batuni yesu ezali mbeba naye, to baboti na ye,abotama boye?3Yesu ayanoli;ezali ye to baboti naye te nde basalaki mbeba,kasi eza mpo nzambe akumisama na kati naye. 4Tosengeli kosala misala ya oyo atindaki ngai lokola tozali na bomoi. 5Lokola nazali na mokili nazali mwinda ya mokili.6Tango yesu asilisi koloba makambo wana,abwaki soyi na mabele ,asali poto poto na soyi ,apakoli ye namiso. 7Mpe alobi naye kende kosokola miso na siloe (elingi koloba motindami), moto yango akeyi mpe amoni.8Batonionso oyo bayebakaye kala ndenge azalaki kosenga-senga balobani: 9Ezali moto oyo azalaki kosenga-senga. Misusu balobi ezali ye ,misusu pe ezali ye te,bakokani,kasi ye moko alobi ezali ngai10Batuni ye omoni ndenge nini? 11Moto oyo babengaka yesu,asalaki poto-poto na soyi naye apakoli ngai mpe alobi nakende kosokola miso na siloe,tango natosi nasokoli mpe miso na ngai emoni. 12Bato yango batuni ye: Azali wapi? Azongisi naye te.13Ba memi moto oyo azalaki na miso yakokufa epayi yaba farize. 14Lokola ezalaki mokolo yako pema yesu asalaki poto-poto afongolaki ye miso . 15Bafarize batuni lisusu moto wana ezalaki ndenge nini mpo amona16Bafarize balobi: Moto oyo awiti na nzambe te mpo azali kotosa mokolo yabo pemi te,lolenge nini moto awiti na nzambe te okokikosala bikamwisi minene boye? Bokabuani ekotaki bango na bango. 17Batuni lisusu moto oyo azalaki na miso yakokufa; yo olobi nini mpona ye;ayanoli ;azali mosakoli . 18Baboyi kondima ke abotamaki miso ya kokufa.19Batuni ba boti naye,oyo azalaki mwana na bini ? Oyo bazalaki koloba abotama akufa miso,sikoyo azomona ndenge nini mpe nani afongoli ye miso ? 20Toyebi te azali mwana na biso abotama yako kufa miso. 21Botuna ye moko azali mokolo akopesa bino eyano.22Baboti naye,bayanolaki bango mpo bazalaki kobanga bakonzi yaba yuda. Mpo bayuda ba bandaki kobengana na ndako ya nzambe moto nionso oyo akotatola ete yesu azali mobikisi. 23Nde tina baboti naye bayanoli koloba :Azali mokolo.24Na mbala mibale ba bengi moto azalaki na miso yakokufa mpe balobi naye;kumisa nzambe,biso toyebi moto wana azali musumuki. 25Mokufi miso ayanoli ;koloba azali musumuki to te etali ngai te , nayebi eloko moko nazalaki komona te sika awa amonisi ngai26Mpe balobi naye;asalaki nini mpo afongola yo miso? 27Ayanoli ;nasi nalobaki na bino boyokaki te! Mpona nini bolingi boyoka lisusu? Bolingi bondimela ye ? 28Bafingi ye mpe balobi yo nde moyekoli naye ? 29Biso tozali bayekoli ya mose. Biso toyebi moise nzambe alobela ye ,kasi oyo te toyebi esika awiti te.30Moto alobi,bino bozali kokamwisa ngai,koloba awiti wapi,ye moto afongoli ngai miso. 31Toyebi nzambe ayokaka moto na masumu te;soki moto atosaka mpe asalaka mokano naye akoyoka ye.32Wita ebandeli ya mokili,toyoka nanu te moto afongola miso ya moto oyo abotama amonaka te. 33Soki moto yango azali ya nzambe te,akoki kosala eloko moko te, 34bayanoli ye, soki obotama namasumu,olingi kolakisa biso,mpe babimisi ye libanda.35Tango yesu ayoki ete babimisi moto yango na eyanganeli. Amoni mpe alobi naye;ondimeli mwana na moto? 36Ayanoli,mpe alobi;azali nana mpo nandima? 37Yesu alobi naye: Omo ye oyo azali koloba nayo. Moto yango alobi. 38Mokonzi na ndimi,mpe agumbameli ye.39Yesu alobi;nayaki kotala makombu ya mokili mpo ete ,baye ba kufa miso bamona,pe ba oyo ba monaka ba mona te. 40Ba farize mosusu oyo bazalaki naye awa bayoki maloba wana,balobi naye; biso tokufamiso? 41Yesu ayanoli : Soki bokufaki miso,mbele bozali ba sumuki te. Soki bolobi: tozo mona masumu na bino ezali .
101Na solo solo nalabeli bino, oyo akokota na lopango na ba nyama na lolenge elongo boni te, kasina nzela mosusu, moto wana azali mpyibi mpe mobomi. 2Kasi oyo akotaka na lopango na nzela ba nyama.3Mokelngeli akofungola ye, nzela. bameme bakoyoka mongongo na ye mpe akobianga bango na nkombo mpo abimisa bango. 4Wana ekobimisa ba oyo na ye yonso akotambola liboso mpe ba nyana bako landa ye nsima zambi bayebi, mongongo na ye.5Bako landa mopanya ti mpo bayebi ye te, bakobima ye zambi bayebi mongongo na bapanya te. 6Yesu apesi bango lisapo oyo, kasi bazali kososola te makambo azali kolobela bango.7nsima yesu alobeli bango lisusu na solo solo, malabeli bino, ngai nazali ekuke na bonyama. 8Ba oyo yonso bayaki liboso bazali bamiyibi mpe babomi , kasi bamene bayebi mingongo na bango te.9Nazali ekuke. nzote na moto akobita na ndako na nzala na ngai akobikisama,akokota, akobima mpe akozwa matiti malamu na kolia. 10Moyibi ayaki babola mpo ayiba, aboma mpe abebisa. ngai, nayeyi mpo ete bapate bozwa bomoyi ya kofuluka.11Ngai nazoli mabateli malamu, mobateli malamu apesaka bomoyi na ye mpo na bapate na ye. 12Mosali azali mobateli mabateli malamu te mpe azalaka na bapate mpe akimi. mpe nkasi akokanga bango mpe bapanzani. 13Akokima mpo azali moto na mosala mpe akotia motema likolo na bango te.14Yesu azali mobokoli malamu. ayebi ba oyo bazali na ye mpe bango mpe bayebi ye. 15Tata na ngai ayebi ngai, mpe ngai nayebi ye, mpe nokakabaka bomoyi na ngai mpo na bapate na ngai. 16Nazali lisusu na bapate ebele oyo bazali noino te na kati na lopango oyo te. ekoki ete nayesa bango lokola na lopango. kaloyoka mongongo na ngi mpo ete bazala bobela bapate na lingomba moko mpe mabateli17Yango wana tata alingi ngai. napesaka bana mpo nabotala bisusu. 18Moto te akoki kobotola yango, kasi ngai nde napesaka yango mpe nazali na bokonzi nakobotala yango.ezali tata nde moto apesi mitindo.19Emoniseli na maloba oyo bakabwani elotoki kati kati na ba yuda. 20Na kati na bango bamilobeli moto oyo azali na milimo mabe mpe mutu na ye ezali kosala malamu te bazali koyoka ye mpo na nini? 21Basusu bamilabeli malaba oyo azali koloba euti na moto na milomo mabe te. moto na milimo mabe akoki kofungala miso na mokufeli miso?22Na bongo ntango na milulu na kabulisa tapelo na yelusaleme ekokak. 23Ezalaki ntango na malili makasi mpe yesu azalaki kotambola na kati na tepelo,na mbalasani na salomon. 24Bango ba yuda bazingi ye mpe balabi kinotango nini akotika bato na kobanza banza? soko azali masiya yebisela biso balele.25Yesu ayanoli, nayebisaki bino kasi bozali kondima te. misala nazali kosala na nkombo ya tata yango nde bizali na ntina ngai. 26Kasi bazali kondimela ngai te mpo ete bazali bapate na ngai te.27Bapate na ngai bayokaka ngai mpo bayebi ngai mpe bazali kolanda ngai. 28Napesi bango bomoyi na seko bakokufa te mpe muto moko te akoki kobatala bango na maboko na ngai29Tata na ngai ye muto apesi ngai bango aleki bato yonso na monene mpe moto te akoki kabotala bango na mabako na tata. 30Ngai mpe tata na ngai tazali na bomoko. 31Bango ba yuda balokoti mabanza mpo na abamba ye.32Yesu ayandoli bango, nasilaki kotalisa misala yonso na malamu na tata na ngai mpo na nini bolingi kobamba ngai mabanga? 33Ba yuda bayanoli ezali mpo na misala ya malamu nde tozali kobamba yo mabanga kasi mpo ete azali kotiala nzambi, mpo ete yo azali muto, azali komikamata nzambe.34Yesu ayanoli ekomami te na mibeko na bino nalabi bozali ba nzambi nzambi? 35Soko yesu abiangi bango binzambi nzambi makomi ebongwani te, 36Bomi boni bozali kolaba na ye oyo nzambe abulisi mpe atindi ye kati na mokili azali kotiala nzambe mpo ete na lobi nazali mwana na nzambe?37Misala nazali kosala ya tata na ngai kasi bozali kondimela ngai te. 38Soko nazali kosa ata bazali kondinela ngai te bondina ata misala oyo, na bango bokoyeba mpe kososola ete tata azali na ngai mpe ngai kati na tata. 39Ata na yango balingaki lisusu kongo yesu, kosi abimaki na maboko na bango.40Lisusu yesu alekaki na ngambo na yaladere na esika yoane azala kozindisa bato na mai, mpe afandaki wana. 41Bato ebele bayaki epai yesu kolaba joane asalaki. bikamuseli moko te, kasi makombo yonso alobaki na ntina na yesu ezali ya solo. 42Et na esika wana bato ebele bandimelaki yesu.
111Moto moko na kombo ya lazalo, azalaka na bolono, ye azalaka moto ya mboka batania, elongo na maliya pe malata bandeko na ye ye basi. 2Maliya oyo asepelaki yesu malasi ya telo mingi na makola pe apangusaki na zuki na ye.3Ba ndeko na ye mibale ya basi batindaki moto epayi na yesu kolaba, ete, nkolo moto oyo alingaka azali na bakono makasi. 4Yesu koyoka boye, pe alobi bokono wana ekonemaye na kufate, nzoka nde ezali ete muana na nzambe akunmisama.5Yesu azalaka moninga ya libota wana. 6Kasi tango yesu ayoki sango ete lazalo azali na bokono, avandaki lisusu mikolo mibale na esika ye azalaka. 7Nde na sima ayebisi bayekoli na ye ete tozonga na jude.8Tango ba yekoli bayoki te bazanga na yudea ba yebisi yezu to zanga blisusu na mboka oyo bazali ko kana ba bana yo. 9Kasi yesu alendisi bango pe alobi ete mikolo ya moyi, soki moto atamboli na moyi akoki kobeta libaku te po azali komona malamu.10Kasi soki atamboli na molili a beta libaku po azali komona malamu te. 11Na suka ayebisi ba yekoli na ye ete to kende na betania moninga na biso lazalo alali pongi pe na kei kolamusa ye.12Bayekoli balobi na yesu, nkolo alali kasi akolamuka. 13Yesu azalaki kolala po na kufa ya lazalo bango bazolaka kokanisisa te ezalaki pongi ya kopema. 14Nde yesu ayebisi bango ppolele lazalo akufi.15Yesu ayebisi bayekoli na sepeli mingi pona bino na ndenge nazalaki te po bino bondima sikoyo tokeyi. 16Thomas oyo babengi lipasa na bayekoli mosusu te tokende tokufa elongo na nkolo17Kasi tango yesu akomi akuti moweyi asili kosala nikolo mineyi na nkunda. 18Po betania azalaka pembeni na yelusaleme na motango ya kilometelo misato. 19Bibele ya bayuda ba zalaka na ndeko na ndako po na ko lendisa bango. 20Tango malata oyo kite yesu azali ko ya akwi mbangu pona koyamba ye ndeko na ye malia avandaka na ndako.21Malata tango amoni yesu alobi nkolo soki ozalaki awa ndeko na ngai mbele akufi te. 22Kasi na yebi ete nionso okosenga na nzambe ako kokisama. 23Yesu alobi na ye ndeko na yo akosekua.24Malata alobi na yebi ete akosekwa na 26mokolo nasuka. 25Yesu alobi na ye ngai akosekua atako akufi. Moto nioso oyo azali na ba moyi pe andimi ngai ako kufa te. andimi yango?27Malata alobi ya solo nkolo, na ndimi ete azali klisto mwana na nzambe oyo azali koya na mokili. 28Tango asilisi kolala azongi na ndaku abengi maliya pembeni pe ayebisi ye ete malakisi azali awa pe azali ko benga yo. 29Ye atelemi pe azui kokutana na ye.30Yesu akotaka nanu na mboka te azalaka kaka na esika malata akutaki ye. 31Ba yuda oyo ba zolaka na ndako bamoni malia kotelema pe kopima ,bango bakani soko ele azui kolela na nkunda. 32Tango maliya akomi esika yesu azalaki, akweyi na makolo na ye pe alobi nkolo soki azalaki awa mbele ndeko na ngai akufaki te.33Tango yesu amoni malia azali kolela, pe ba yuda mosusu pembeni na ye bazali kolela, yesu ayoki mawa penja kati na ye. 34Alobi botiaki ye wapi? nkolo yaka omona. 35Yesu aleli36Ba yuda ba milobelaka tala ndenge azalaki molingami na ye. 37Kasi ba mosusu kati na bango ba milobeli, moto oyo afungolaki miso ya mokufi miso akufa te?38Na yango yesu ayoki mawa mingi koleka mpe akeyi na libanga. 39Boye yesu alobi bolongola libanga malata, ndeko ya mwasi ya lazalo. mokufi alobi na yesu nkolo nzoto esi epoli mpamba te azali na nkunda eleki mikolo mineyi. 40Yesu alobi na ye na yebisaki yo nini soki andimi oko mona nkembo na nzambe.41Ba longoki libanga pe yesu asemboli miso na ye na likolo pe alobi tata na tondi yo po oyoki ngayi. 42Na yebi ete oyo kaka ngayi tango nioso, ezoli kaka po na etuluku na bato oyo pembeni na ngayi nde na lobi bongo poba ndima ete yo moto otindi ngayi.43Na sima ya ye koloba bango a ngangi na mongongo makasi lazolo bima. 44Mokufi abimi maboko na makolo na ye ezingama na bilamba pe yesu alobi fungolo ye mpe botika ye akende.45Na yango ba yuda mingi oyo bayaki epayi ya madiya ,ba monaki makambo oyo pe ba ndima ye. 46Kasi bayike kati na bango ba kendaki epayi na ba falisayo ko yebisa oyo nionso yesu asalaki.47Na yango ba nganga nzambe pe ba falisayo. ba sanga naki pe balobi tosala nini? pamba te moto oyo azali kosala bikomwisi mingi. 48Soki totiki ye kaka boye, bato nionso ba kondimela ye, pe bato ya loma bakoya kobotola ba bisika na biso pe kozua mbaka na biso49Na tango wana, moto moko na kombo ya kayafa azalaka ngangu nzambe mokonzi na mbula wana alobi na bango boyeli eloko moko te. 50Bozali koyeba te ete ezali malamu po na bino ete moto moko akufi po na bato nionso na esika te mboka mobimba ekufa.51Azalaka kolala bongo na ndenge na ye moko, lokola azalaka nganga nzambe mokonzi na mbula wana azalaki kosokola ete yesu esengelaki akufa po na mokili mobimba. 52Kaka po na bikolo te kasi na ntina ete bana na nzambe oyo ba palangana mokili mobimba ba sangana ba zala eloko moko. 53Longwa na mokilo wana ba yo kani lolenge ba koboma yesu.54Kobanda wana yesu azalaki lisusu te komilakisa na lisibe na mboka efalayima elongo na ba ye koli na ye. 55Pasika ya ba yuda ekomani pene, mingi na bango ba kendeki na yelusaleme pe bisika ebele pona koma petola.56Ba zalaka koluka yesu pe ba zalaka komilobela bango na bango bokanisi nini? akoya na milulu te? 57Ba nganga nzambe pe ba falisayo ba pesaka mitindo ete, soki moto ayebaki esika yesu azalaki, ayebisa bango po bakende kokanga ye.
121Mikolo motuba yambo milulu ya pasika ebanda, yesu akomi na betani mbika lazalo asekwaki. 2Malata ndeko na lazalo ayambi yesu pe alesi ye na lazalo. 3Malia akamati mafuta ya solo penza koleka apakoli na makolo na yesu pe apangusi na suki na ye tala ndako mobimba etondi na solo penza4Yudasi isica moteki na yesu. 5Alobi nga kamwe, pona nini bateki mafuta ya motuya te? pe bakabola mosolo wana na ba bola te? 6Elobeli ya yudosi, ezali lolenge azalaki koyiba mosolo na libenga na bango.7Yesu alobi na bango botika ye kimia, oyo asali, ezali pona kufwa na ngayi. 8Kasi babola bazali nanu na ngonga, kasi mwana moto aza na ngonga.9Etuluku ya ba yuda ba zui sangu na yesu azali na mboka wana etuluku ya batu bayaki kaka pona yesu te kasi koluka nde ya koboma lazalo. 10Banganga nzambe bazalaki na nkanda penza pona koboma lazalo. 11Nati ye bato bandimela yesu.12Mokolo elandi, ebele bayeki na milulu tango bayoki yesu azo leka kokende na yehusam. 13Babuki mandalala, ma puta ko tanda yango na nzela pe kokanga hosana oyo aye na kombo na mokonzi na isalele.14Yesu amoni mwana punda, ndenge ekomama. 15Kobanga te mwana mwasi ya siyona. etuluku ya bata oyo bazalaki tango yesu azo sekwisa lazalo.16Ba likili ya yesu bazalaki bososala te tango ebele ya bato na bamasuwa na bango.17Etuluki oyo bazaki na yesu tango asweki yesu. 18Tina babimaki ebele pona kokuta na yesu. pamba te asalaki likamwisi yango. 19Ba phalisayi ba milobeli nini lisusu to koki sala?2022Sikawa ezalaki pe na gres kati na bato ba mataki pona kosanzola na milulu pe. 21Ba monaki philipo na mboka betsade na galilia, kotuna soki ba koki koma yesu philipo bakamatani na andelea, ko kende komona pe ko yebisa23Yesu a yanoli bango ngonga ekomi oyo mwana motu akumisama. 24Solo penza na za ko yebiso bino, soki mbuma ya nguba ekueyi na mabele te, ekufua pe epola po ebimisa mbuma mikama koleka.25Oyo alingaka bomoyi na ye, zkoza ngela yango. oyo azo kumitu ngisa posa bomoyi na ye, abombisa yango pona kokamata yango lisusu libela na libela. 26Soki moto alingi kozala mosali na ngai alanda ngai esika na zali esika basali bazala. soki moto azali mosali na ngai tata na ngai akotomba ye.27Bomoyi na ngai ekomi kokoso po ngo nga oyo , na loba nini tata sunga nga na ngonga oyo. ezali po na ngonga oyo na yelaki. 28Tata kumisa kombo na yo. mongongo ebimi na likolo koloba na kumisa ye, pe na kokumisa lisusu. 29Bato bazalaki pembemi na yesu, koyoka mongongo wana balo bani wana mongongo na kake, ba mosusu balobi wana mongongo na kake, ba mosusu ba lobi wana mongongo ya ngelu.30yesu ayanoli, mongongo oyo ba yeki,eye pona ngai te pona bino, sikawa kosambisama na mokili eye. 31Sikawa bakonzi ya mokili ba kobengana ye.32Tala ngai, batomboli ngai na mabele na kobenda etuluku ya batu ebele penza epayi na ngayi. 33Elobeli na ye wana, alingakikoyebisa lolenge na kufa na ye.34Bato ba yanoli ye boye. mwana na moto ako wumela seko awa na mabele. ndenge nini lisusu oloba na bino mwana na moto esengeli ato mbwana na mabele? bongo. 35Yesu ayanoli mwinda ezali nayini. 36Batambola tango mwinda ezali ko ngenga, po ete molili ezipa bino te. kasi oyo akotambola na molili ayebi nzala oyo azo kende bandi mela moyi po bo koma bana na moyi, pe yesu abulangani bango akeyi ko bambana mosika na bango.37Atako yesu asalaki bikamwisi ebele, bandimelaki ye te. 38Ndenge makomi ya mosakoli isayi ekokisama. mokonzi nani andimela misala na biso? nani loboko na mokonzi emoniseli ekokisama.39Yango wana bakoki kondima te pamba te isaya alobela yango bakoki kondimela ye te. 40Yango wana ye moko azipa bango miso, pe ayesi mitema na bango mabanga bo koma bango moko, pe bakoya epayi na pe na kobimisa na bokana na bango.41Isayi alobaki bongo po amonaki nkembo na nzambe. 42kati na yango bakonzi ebele ba ndimelaki yesu kasi bazalaki kobanga ba phalisayi pambe te, bakoya ko longola bango na eyangeneli na bango. 43Lolenge na bango ya kokumisa nzambe ezaliyambebo, bongo nzambe alingaka ba kumisa ye na motema pe na molimo.44Yesu angangi pe alobi. oyo andimeli nbayi, andimeli pe mutu oyo atinda. 45Oyo amoni ngayi amoni oyo atinda ngayi.46Nayaki lokola moyi na mokili, moto nionso oyo akondimela ngayi atikala na molili te. 47Si moto ayoki ma loba na ngayi,asaleli yango te ngayi naye kosambesa te kasi kobikisa mokili.48Oyo akobwakisa ngayi pe aboyi koyamba maloba na ngai, azali na moto oyo akosambisa ye. ye wana akosambisa mokolo na suka. 49Na lobi na posa na ngayi te, kasi na mitindu na tata na ngayi na yebisa buno yango. 50Na yebi ete mitindu oyo ezali bomoi na seko. oyo nionso na lobi, ezali ndenge tata alinda na loba na bino.
131Yambo ya milulu ya pasaka ebelema, Yesu ayebaki tango naye ya kotika mokili mpe kozonga epayi ya tata. Azalaki kolinga bato na ye oyo bazalaki na mokili. Atalisi bolingo na ye ti na suka. 2Wana zabolo Alonaki nkona ya manbe na motema ya juda iscariot mwanan ya simoni, makahisi ya koteka Yesu.3Lokola yesu ayebaki ete Tata apesaki ye bokonzi likolo na biloko nionso namaboko naye, mpe awutaki na Nzambe, akozonga na Nzambe. 4Tango bazalaki na mesa, atelemi alingoli elamba naye ya likolo, akamati elamba mosusu akangi na loketo. 5Atie mayi na katini mpe abandi kosokola makolo ya bayekoli. Mpe kopangusa bango makolo na elamba oyo alataki na loketu.6Ekomi na tango ya Simoni Mpe Simonop alobi, « Mokonzi, olingi osokola ngai makolo? » 7Yesu ayanoliye « oyo nazali kosala bokomaniola sikoyo te, ata ndele bokoyeba ka». 8Petelo alobi naye, « okosokola ngai makolo te» Yesu ayanili ye « lsoki na sokoli yo makolo te; okozua bolamu na ngai te». 9Simoni Petelo alobi naye « Mokonzi, kosokola ngai kaka makolo te, kasi na maboko mpe mutu na ngai».10Yesu Ayanoli ye « moto oyo asi asukoli, as;okolaka kaka makolo» mpo nzoto na ye mobimba ezali peto, kasi bino nionso te. 11Pamba te Yesu ayebaki moto akpoteka ye, yango wana alobi « bo petolami nionso te»12Sima Yesu kosokola bango makolo, amemi bilamba naye mpe avandi lisusu, sima alobi « boyebi eloko oyo nasali?». 13Bozali kobenga ngai "Mokonzi" mpe "Molakisi" mpe bozoloba solo ndenge nazali. 14Soki ngai Molakisi mpe Mokonzi nasokoli bino makolo, esengeli bosala bon go bino na bino. 15Nzoka nde na talisi bino ndakisa mpo bino mpe bo kobanda kosokola yango denge na sali na bino.16Solo, solo na lobi na bino, mosali azali likolo ya motabwuisi, ata oyo atindamaka likolo ya oyo atindaki ye. 17Soki boyebi makambo oyo, bopambolami soki bosaleli. 18Nazo loba na bino nionso te: mpo nayebi ba oyo nayebi ba oyo na pona. Bongo m^po makomi ekokisama. « Oyo azali kolia na ngai abalukeli ngai».19Nalobi na bino boye sikoyo lokola nanu esalami te, tango ekosalema bondima te ngai naazli. 20Ya sol, ya solo, na lobi na b ino, moto ayambi ngai, ayambi moto na tindi mpe moto ayambi ngai, ayambi oyo atindaki ngai.21tango Yesu alobi makambu wana, ayoki pasi na motema, mpe alobi na bango: « ya solo ya solo, na lobi na bino, moko na bino akoteka ngai». 22Bayekoli batalanaki moko na moko, batunani nani Yesu azalaki kolobela.23Moko ya ba yekoli, oyo Yesu abandaki kolinga alalelaki Uesu na tolo. 24Simoni Petelo atalasi elembo na moyekoli wana mpe alobi. « loba na biso Yesu azo lobela nani?» 25Moyekoli alalelaki yesu na tolo mpe atuni: « Mokonzi, ezali nani?».26Sima Yesu ayanoli: «Nakotia ndambu ya lipa na supu oyo na pesa ye wana.»:Tango ati ndambu ya lipa na supu apesi yango na Judas, mwana ya simoni iscario. 27Sima ya kolia lipa, satana akoteli Judas. Sima Yesu alobi na ye: «oyo olingi kosala, sala yango noki »28Moto moko te na ba oyo bazalaki na mesa ayebaki tina ya maloba wana. 29Ba mususu bakanisaki lokola Judas azalaki mobateli misolo nde ba ba zoloba naye: « somba biloko tozali na yango posa mpona milulu» Mosusu bakanisi, alingi apesa elooko na babola. 30Tango Judas aleï lipa abimi libanda. ezalaki na butu.31tango Judas akeyi, Yesu alobi :« sikoyo, mwana na moto atombuami mpe Tata atombuami » kati naye. 32Nzambe a kotombuamaka naye moko, Mpe ako tombolaka ye mbala moko. 33Bana mike, nazali na bino na ngonga moke; ba koluka ngaï, ndenge na lobaka na ba Yuda" Esika na zo kende, bino bokokomaka te" sikoyo na lobi mpe na bino.34Napesi bino mitindo ya sika oyo, bolingana bino na bino ndenga ngaï na lingaki bino, yango wana bosengeli kolinga bino na bino. 35Nde yango wana bato bakoyeba ete bozali ,bayekoli naga.36Simoni Petelo alobi: « Mokonzi azali kokende wapi?» Yesu ayanoli: « esika na keyi yo okokoka te kolanda ngaï sikoyo, kasi okolanda ka ngaï sima.» 37Petelo ayebisi Ye: « Mokonzi pona nini na landa sikoyo? Na kondima na kufa mpona yo». 38yesu ayanoli: « okepesa bomoyi nayo mpona ngaï? Ya soo solo, na lobi nayo, liboso te soso elela okowangana ngaï mbala misato.»
141Tika mitema na bino lizua buluyeke te. Bondimela nzambe pe ngai. 2Na ndako na tata na ngai ,ba ndako lizali mingi . Soki ezalaki bongo te,nde nasilaki koyebisa bino,po ete nazali kobongisa esika pona bino. 3Soki nakeyi kolengela bino esika, ngai moko mpeza naya kokamata bino ,natina ete esika nazali bino bozala mpe.4Bino boyebi nzela nini nakokenda. 5Thomas ayanoli yesu : Solo mokonzi biso toyebi te esika ozali kokende; Boni boni tokoyeba nzela ? 6Yesu ayanoli ye ;ngai nazali nzela,solo pe bomoi; moko te akoya na tata soki na nzela na ngai te. 7Soki boyebaki ngai mbele boyebi pe tata na ngai; sikasiko yo boyebi ye mpe bomoni ye.8Filipo ayanoli yesu: Lakisa biso tata, pe yango ekokoka pona biso. 9Yesu ayanoli ye: nazalaka na bino tango nioso mpe bino boyebi kaka ngai te, filipo? Moto nioso oyo amoni ngai amoni tata ;lolenge nini okoki koloba nalakisa bino tata?10Bokoki kondi te ete nazali kati na tata ,mpe tata azali kati na ngai ? Maloba nazali kolobela bino ewiti te na bokonzi na ngai moko;kasi ezali tata oyo aza kati na ngai nde azosala mosala naye. 11Bondime ngai,naza kati na tata, mpe tata aza kati na ngai; bondimela ata pona misala na ngai12Na solo,solo,nazali koyebisa bino:oyo akondimela ngai akosala bikamua oyo nazali kosala, akosala kutu yakoleka mpo ete nazali kozonga epai na tata. 13Nioso bokosenga na kombo na ngai ,nakosala yango mpo ete tata atombwama na nzela na mwana. 14Nioso bokosenga nakombo na ngai nakosala yango.15Soko bolingi ngai,bokobatela mibeko na ngai. 16Mpe,nakobondela tata pona bino,mpo atindela bino mosungi mpo ete azala na bino mpona libela , 17Ye molimo yabosolo,ba mokili bakoki kozala naye te mpo bazali komona ye te mpe bayebi ye te,kasi boyebi ye nzambi azali na bino mpe akozala na bino.18Nakotika bino bitike te,nakozongela lisusu epai na bino. 19Na tango moke bamokili bakomona ngai lisusu te,kasi bino bozo mona ngai. Mpo nazali kobika,bino mpe bokobika. 20Na tango wana boko yeba ete nazali na tata,mpe bozali kati na ngai,nazali kati na bino.21Moto oyo azali na mibeko na ngai mpe kobatela yango,yewana alingaka ngai; mpe moto oyo alingi ngai akolingama epai ya tata na ngai, nakolinga ye mpe nakomimonisa epai naye. 22Yudas oyo azali iscariote, alobi na yesu; Mokonzi pona nini ozali bobele komilakisa epai na biso kasi namokili te?23Yesu ayanoli: Solo moto alingi ngai ,akobatela liloba na ngai ,tata na ngai akolinga ye,biso tokoya kovanda epai naye. 24Ye oyo alingaka ngai te akobatela mpe maloba na ngai te,liloba oyo bozali koyoka ewiti na ngai te kisi na tata oyo atindi ngai25Nayebisaki bino makambo oyo,natango nazalaki na kati na bino. 26Yango wana,mosungi,ye molimo mosantu,oyo tata akotinda na kombo na ngai ,akolakisa bino makambo nioso mpe akokanisisa bino makambo nioso oyo nabandaki koyebisa bino. 27Natikeli bino kimia; napesi bino kimia na ngai.Napesi yango te lolenge mokili epesaka. Kasi mitema na bino ekota na buluyeke te pe bobanga te.28Boyoki lolenge na lobeli bino:Nakeyi,mpe nakozonga lisusu epayi na bino,soko bolingi ngai ,bosepela mpo ete nazongi epai na tata,ye aleki ngai na monene . 29Sika sikawa nalobeli bino yambo yango ekokisama mpo bondima tango ekosalama. 30Nakoloba lisusu mingi te na bino, mpo ete mokonzi ya mokili azali koya kasi azali ata na bokonzi te likolo na ngai, 31kasi mpo ete mokili eyeba ke nalingaka tata,nazosala kaka ndenge tata alobaka na ngai. Totelema mpe tolongwa na esika oyo.
151Nazali vina tata aza moloni na vino. 2Ye alongolaka bitape oyo ezo bota te ba mbuma pe apetolaka bitape nionso oyo ebotaka mbuma.3Bopetolami kala na ntina na etinda oyo na lobela bino. 4Bo yumela kati na ngayi ngayi kati na bino. ndenge etapi oyo ekoki kobata mbuma te soki ezali na vino te. boko kobimisa mbima te soki awumeli na ngai te5Nazali , bino bino bitape oyo ako wumela na ngayi ako mota mbuma ebele. penga . 6Soki moto awumeli na ngayi te, akobwakama lokola etape ekawuki pe batu kota yango pe kobwaka yango na moto po ezika. 7Soki bo kowumela na ngayi pe maloba na ngai kati na bino, bosenga nionso oyo bo zanga posa. pe bokozwa yango.8Nde na yango, tata na ngai azala na lokumu. tika bo bota mbuma ebele pe bozala badikili na ngayi. 9Ndenge tata alingaka ngayi pe na lingaka. ba wumela kati na bolingo.10Soki bokobatila mitindu na ngayi boko wumela na kati na bolingo na ye. 11Na yebisi bino biloko pe ete bozala zsengo na ngai esala kaki na bino pe yha kokoka.12Tala mobeko na ngayi bolinganga bino na bino ndenge ngayi na lingi bino. 13Bolingo ya monene kaka kokaba boma na yo pona batu mususu.14Soki bokosala makambo oyo natindi bino kosala. 15Na kobenga lisusu mosali te, pamba temosali ayelaka te eloko mokonzi na ye azo sala. ba bengaka biso ba masuwa na ngayi pamba te na talisi bino ma bombami nionso oyo ngayi.16Bino bopona ngayi te, kasi,ezali ngayi moto na pona bino pe na tondoli bino na misala. po bo bota mbuma ebele penga pe mbuma na bino ewumela koleka. yeba ete, nionso bo kosenga tata na nzela na ngai, akopesa bino yango. 17Ba pesi bino mitindo na makambo oyo bolingana bino na bino .18Soki mokili akoboya bino, yeba ete mokili aboya kala ndenge azo koboya bino. 19Soki bozalaka ya mokili, mokili elingaki kolinga bino na lolenge na bango. bo yali ya mokili oyo te, pamba te na pona bino na libanda ya mokili, ntina mokili eyina bino.20Bokanisa maloba na yebisa bino mosali akoki kozala moto ya mutuya te na liboso na mokonzi na ye. soko baniokolaki ngayi, ba koniokola pe ya bino. 21Bakosalela bango na tina na ngayi pamba te bayebi te mutu oyo atinda ngayi. 22Soki na yaka kolobela bango, bakokaki kosumuka te. kasi, sikawa bazali na lilaba ya koloba te pona masumu na bango.23Oyo abwaki ngayi, abwaki pe tata na ngayi. 24Soki na salaka makamisi kati na bango, oyo motu moko te akoki kosala yango, bakokaki kosumuka te, kasi bango nionso ba moni pe bayina ngayi na tata na ngayi. 25Nionso eleki po ete ekokisama na makomi oyo ekomama na mibeko. babaya ngayi na tina te.26Tango mosungi akoya, oyo na ngayi, elingi koloba molimo na solo, ye akotatola pona ngayi . 27Bino pe lokola, bokotala ngayi po ete bozali na ngayi elongo banda ebandeli ti na suka
161Nalobi na bino makambo oyo mpo bokweya te. 2Bakotiya bino libanda ya eyanganelo, na yango ekoki oyo moto nyonso akoboma bino na kokanisaka ete ajali kosala misala malamu mpo na njambe.3Bakosala makambo yango mpo bayebaki tata te mpe ngai te. 4Nayebisi ino makambo oyo mpo tango yango ekoya bokanisa lolenge na yebisaki bino. Nayebisaki bino yango na ebandeli te, mpo ete njalaki na bino elongo5Nakokende epai ya oyo atinda ngai, kasi kati na bino moko te atuni ngai motuna«Okokende wapi.» 6Lokola nayebisaki bino makambo oyo, mitema na bino etondi na mawa. 7Kasi nalobi na bino solo: Ejali malamu koleka mpo na bino ngai nakende. Mpo soki nakei te, mosungi akoya epai na bino te. Kasi soki nakei, nakotindela bino ye.8tango mosungi akoya, akolakisa bino mbeba ya mokili kolandana bongo na masumu, na bosembo mpe na kosambisama. 9Mpo na oyo etali lisumu, mpo ete bandimali ngai te. 10Ndenge moko na oyo etali bosembo mpo ete najali kokende epai ya tata, mpe bino bokomona ngai lisusu te. 11Na oyo etali kosambisama, mpo ete nkumu ya mokili oyo asi asambisami.12Najali na makambo mingi ya koloba na bino, kasi nyonso bokososola yango sika oyo te. 13Boye, tango ye, molimo na solo akoya, akolakisa bino kati na bosolo. Akoloba oyo ekouta na ye moko te; 14Akokumisa ngai, pamba te akojwa makambo oyo ya ngai, mpe akotatolela bino yango.15Nyonso tata ajali na yango, ejali na ngai; na yango, nalobi ete molimo akojwa makambo oyo ejali na ngai, mpe akopesa bino yango. 16Na ngonga moke, bokomona ngai lisusu te; sima ya ngonga moke lisusu bokomona ngai.»17Kati na bayekoli bamilobeli bamoko na basusu: «Makambo nini ajali koloba "na ngonga moke bokomona ngai lisusu te, na ngonga moke bokomona lisusu ngai" mpo ete ngai najali kokenda epai ya tata. 18Balobi lisusu: «Nini penja alingi koloba na biso" na ngonga moke? Tojali koyeba te ajali koloba penja nini»19Yesu amoni ete bajali na mposa ya kotuna ye mituna «Bojali kosenga boyeba oyo najali koloba; na ngonga moke bokomona ngai te, na sima na mwa tango lisusu bokomona ngai? 20Solo solo najali koloba na bino, bokolela mpe bokomitungisa tungisa, kasi mokili ekojala na esengo, bokojala na mawa kasi mawa na bino ekobongwana esengo. 21Mwasi ajalaka na mawa tango ngonga ya kobota ekoki likolo ya pasi. Kasi soki asili kobota, abosani pasi nyonso na ntina na esengo ya mwana oyo ayei na mokili.22Bino lokola bojali na mawa, tango oyo, kasi nakomonana na bino lisusu, mpe mitema na bino ekotonda na esengo mpe moko te akolongola bino esengo wana. 23Boye na mokolo wana, bokotuna ngai mituna te. Ya solo solo, nalobi na bino eleko nyonso oyo bino bokosenga na tata na nkombo na ngai, akopesa bino yango. 24Kino tango oyo bosengi naino eloko te na nkombo na ngai, bosenga, mpe bokojwa mpo ete esengo na bino ekokisama.25Nayebisi bino makambo oyo na lolenge ya masapo, kasi tango ezali koya nakoloba na bino lisusu na masapo te, kasi nakoloba na bino polele polele na ntina na tata.26Na mokolo wana, bokosenga na nkombo na ngai, mpe nalobi na bino te ete nakobondela tata mpo na bino, 27pamba te ye moko alingi bino; Na ntina ete bino bolingaki ngai mpe bondimaki ete nauti na tata. 28Nauti na tata, mpe nayaki na mokili, najali kolaba lisusu ete najali kolongwa na mokili mpe najali kokende epai ya tata.29Bayekoli na ye balobi: Tala sikoyo olobi polele, ojali koloba lisusu na masapo te. 30Sika toyebi ete oyebi makambo nyonso, ejali lisusu na ntina te ete moto atuna yo mituna. Na ntina na yango tondimi ete outaki solo na Njambe. 31Yesu ayanolaki bango: «Bondimi sikoyo?32Botala, tango ekoya, ya solo mpe esi eyei, mpe bokopanjana, moto na moto akojala epai na ye mpe bino bokotika ngai moko. Nzoka nde najali ngai moko te, tata ajali na ngai. 33Nayebisi bino makambo oyo mpo ete na njela na ngai, bojala na kimia. Kati na mokili bokoleka na ninyoko, kasi boyika mpiko: Ngai nalongi mokili.»
171Sima naye koloba makambo oyo,atomboli miso nalikolo mpe alobi:tata,tango ekoki. Kumisa mwana nayo mpo ete mwana akumisa yo, 2Lokola opesi ye bokonzi likolo na nioso ,mpo apesa bomoi na seko epai naba oyo nioso opesaki ye3Ezali bomoi na seko mpo bayeba yo,nzambe ya solo oyo atindaki yesu-klito. 4Na mokili oyo nakumisaki yo mpe nakokisi misala oyo opesaki ngai . 5Na tango oyo tata,kumisa ngai pene pene nayo nakembo oyo nazalaki nayango pembeni nayo liboso yambo mokili oyo esalama.6Na tatoli kombo nayo na bato na mokili oyo opesaki ngai . Bazalaki kati nayo pe y'opesi ngai bango pe batosi maloba nayo. 7Bayebi sikoyo ete nioso oyo opesaki ngai ewiti nayo, 8mpo ete napesi bango liloba oyo opesaki ngai. Bayambi yango pe bandimi yango na solo ete nawiti epai nayo, pe yonde otindaki ngai.9Na bondelaka mpona bango kasi mpona mokili te, kasi mpona ba oyo opesi ngai bango, mpo ete bazali ya yo. 10Nioso oyo ezali na ngai ezali ya yo pe nioso yayo ezali pe ya ngai ,pe nazali komikumisa mpona yango. 11Nazali lisusu na mokili oyo te kasi, bango bazali kati na mokili, mpo nakeyi epai nayo,tata mosantu,bomba bango pona kombo nayo,kombo oyo opesaki ngai mpo ete bazala moko,lokola yo na ngai tozali moko12Natango nazalaki na bango ,nabatelaki bango nakombo nayo opesaki ngai; na batelaki bango pe moko te kati na bango abungi, kaka mwana ya libungi, mpo ete makomi ekokisama. 13Sika awa nazoya epayi nayo , kasi nazali koyebisa bango makambu oyo na mokili,mpo ete bazala na esengo na ngai kati na bango. 14Na pesi bango maloba nayo, pe mokili eyini bango mpo ete bazali ya mokili te,lokola ngai pe nazali ya mokili te.15Nazali kosenga yo te mpo olongola bango na mokili,kasi mpo obatela bango liboso ya bato na nkanza. 16Lokola nazali ya mokili te,bango mpe bazali ya mokili te. 17Petola bango nabosolo nayo,mpo ete liloba nayo ezali solo.18Lokola y'otindi ngai na mokili ,ngai pe natindi bango. 19Namibulisami pona bango mpo ete bango mpe ba bulisama kati nabosolo.20Ngai nazali kobondela bobele mpona bango te, kasi mpe mpona ba oyo nioso bakondimela ngai pona liloba nayo, 21natina ete bazala na bomoko, lokola yo, tata, ozali kati na ngai, mpe ngai kati nayo. Nazo sambela bazala mpe kati na biso, natina ete mokili endima ete yonde otindaki ngai.22Napesaki bango kengo oy'oyo opesaki ngai, natina ete bazala na bomoko, lokola yo na ngai, tozali moko, 23ngai kati na bango pe yo kati na ngai, mpo ete bazala ya solo na bomoko; na tina ete mokili eyeba yonde otidaki ngai, mpe olingaka bango lolenge moko na ngai.24Tata,ba oy'opesi ngai, nalingi bazala pe esika oyo ngai nazali, natina ete bamona nkembo na ngai, oy'opesi ngai; mpo ete olingaki ngai yambo mokili esalama.25Tata moyenge bene,mokili eyebaki yo te,ngai nde moto nayebi yo, mpe ba oyo bayebi ete yonde otinda ngai. 26Nalakisaki bango kombo na yo,mpe nakolakisa bango lisusu, natina ete bolingo oyo oza nayango mpona ngai ezala mpe mpona bango.
181Tango asilisi koloba,yesu amibendaki na ngambo ya lubwaku ya sedron na elanga na bayekoli naye. 2Moteki yesu,yudasi pe ayebaki esika yango,mpo ,bameseneki kokende wana. 3Yudasi elongo ba soda,na bakonzi oyo batindamaki na nganga nzambe mokonzi bamemi mwinda mpe minduki.4Yesu lokola ayebaki makombo nionso,apusani mpe atuni bango: Nani bozali koluka? 5Bayanoli: Yesu wa nazareta,ezali ngai moteki naye yudasi azalaki naye elongo naba soda yango.6Ayanoli bango: Ezali ngai,bazongaki sima mpe bakweyaki makale kale. 7Atuni bango lisusu: Nani bozali koluka? Bazongisi ,yesu wa nazereta8Yesu ayanoli bango: Nasilaki koyebisa bino ete ezali ngai,lokola ezali boye botika ba oyo bakende. 9Esalemaki bongo mpona kokokisa lisakoli oyo: Naba ye apesaki ngai ata mokote abungaki,10Lokola petelo azalaki na mopanga,akati litoyi ya malakusu mosali ya nganga nzambe mokonzi. 11Yesu ayebisi petelo: Zongisa mopanga na mokaba na mokaba,ezali mokano ya tata na ngai,oboyi na kokisa yango ?12Bongo kapitene naba soda,elongo na ba kengeli ya bayuda bakweyi na yesu pe bakangi ye minyololo. 13Bakendeki naye epai na anna,bokilo ya nganga nzambe mokonzi ya eleko wana na kombo kaifa. 14Yende moto ayebisaka na ba yuda: Ebongi malamu moto moko akufela bato nionso.15Petelo na moyekoli mosusu ba landaki. Kasi kasi moyekoli oyo ayebanaki na nganga nzambe,mokonzi nde akotaki nakati. 16Petelo atelemaki liboso na ekuke mbongo moyekoli oyo akotaki nde abimi kosenga na mwasi mosali mpo akotisa petelo.17Mwasi mosali mokengeli ya ekuke ayebisi na petelo,ozali moko yaba yekoli naye te? Petelo awangani . 18Basi basali na bakengeli na ba yuda batelemaki pembeni ya môto nzambe ezalaki eloko ya elanga. Petelo atelemaki elongo na bango koyotela môto.19Nganga nzambe atunaki yesu na tina naba yekoli mpe mateya naye. 20Yesu ayanoli bango: Nazalikoteya tango nionso naba ndako ya nzambe esika bayuda bazalaki kosangana,nalobaki na nkuku te. 21Pona nini mituna ya boye? Tuna naba oyo bayokaki mateya na ngai.22Tango yesu alobaki boye,mokoya bakonzi yaba soda oyo azalaki wana ,abamboli ye mpe alobi: Ozali kobanga nganga nzambe mokonzi te? 23Yesu ayanoli ye : Wapi epi nalobi mabe? Soki bongote,obamboli ngai tina nini ? 24Yesu maboko na minyololo,anna atindi ye epai na nganga nzambe mokonzi kaifa.25Tango petelo azalaki koyotela môto ,batuni ye: Ozali moko yaba yekoli naye te, awangani lisusu. 26Ndeko ya mosali oyo petelo akataki litoyi ,atuni ye,yonde namonaki na elanga? 27Petelo awanganaki lisusu,mbala moko soso aleli.28Na tongo tongo ,bakamati yesu epai na kalifa bakeyi na ye esika ya kosamba,kasi bakotaki te,po bakoma mbindo te, nokite bakozanga kolia elambo. 29Pilato abimi kotuna bango: Mbeba nini tata oyo asali? 30Bayanoli ye: Soki azalaki moto mabe te tokokaki kofunda ye te .31Pilato ayebisi bango: Bokamata ye bino moko bosambisa ye kolandisama mobeko na bino,mpo ete mobeko na biso ezako pesa biso nzela te tokatela moto etumbu ya kufa. 32Balobaki bongo mpo maloba na yesu ekokisama tango alakakabango lolenge nini akokufa.33Pilato azongi nakati kotuna yesu: Yonde mokonzi ya yuda? Yesu ayanoli: 34Mituna wana ewiti nayo moko to bango nde basengi otuna ngai ? 35Bilato ayanoli: Nazali mo yuda? Bandeko nayo moko naba nganga nzambi nde bafundi yo,osali mbeba kani ?36Yesu ayanoli: Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te,soki boye te mbele ba soda na ngai mbele babundeli ngai mpo bayuda basambwisa ngai te. 37Pilato atuni ye ,ozali ,mokinzi ;ayanoli bongo,tala tina naye namokili mpo naloba bosolo,ba oyo balingaka bosolo nde bakoyoka ngai.38Pilato ayebisi ye: Solo nde nini ? Na sima,abimi koloba na bayuda;moto wana asali mbeba moko te. 39Lokola momesano ,nabimiselaka bino mokangami moka na eleko ya pasika,bolingi na limbisa mokonzi yaba yuda ? 40Bagangi makasi mpe balobi;ye te! kasi barabasi,nzokande azalaki mobomi
191Pilato abeti yesu fimbo, 2ba soda batongi ekoti na nzoube,mpe mpe batiaki yango na moto na yesu, balatisaki ye bilamba yaba lange ebele. 3Ba soda baye pene kotshola ye:Mokonzi yaba yuda, babeti ye namaboko na bango.4Pilato abimi libanda koloba na batu,tala naye nabino libanda mpona koloba ete namoni ata mbeba moko namoto oyo te. 5Yesu abimi libanda alati ekoti na nzube mpe elamba yaba lange ebele. Bongo pilate alakisi ye na bato:Tala moto! 6Tango bakonzi ba tumbi mbeka pe yaba soda ba moni yesu, bobaka ye na kulunsi,pe pilato alobi na bango: bozua ye mpe bobaka ye bino moko mpo namoni kati naye ata mbeba moko te.7Ba yuda balobi na bilato : Tozali na mobeko moko,nakati na yango,esengi ye akufa mpo ete amibengi mwana na nzambe. 8Tango pilato ayoki bongo,ebangisi ye koleka, 9bilato akoti na boloko kotuna yesu lisusu:owiti wapi? Yesu azongiseli ye ata eyano te.10Pilato alobi naye : Olingi koyanola ngai te,oyebi te ke nazali na bokonzi yako tika yo mpe yako baka yo na kulunsi? 11Yesu ayanoli ye: Ozali na bokonzi moko te likolo na ngai na oyo epesamela yo nalikolo.Bongo oyo akabi ngai nayo azali na lisumu monene.12Eyano na yesu: Pilato alukaki kotika ye,kasi,bayuda bagangi na maloba na bango:Soki otiki moto oyo,ozali moninga na cezalo te. Moto nioso oyo amikomisaka mokonzi na ndenge naye alobaka mabe mpona cezalo. 13Tango pilato ayoki maloba wana,abimisaki yesu libanda mpe avandisaki ye na kiti ya esambiselo(pavée) na hebelo(gabbatha).14Ezalaki mokolo ya kobongisa milulu ya pasika,na ngonga ya motoba na tongo. Pilato alobi naba yuda,botala mokonzi na bino, 15bagangi bango nioso: Longola ye pene na biso,longola ye,baka ye na kulunsi. pilato alobi na bango, ebongi na baka mokonzi na bino? Bagangi pe bayanoli pilato: Tozali kaka na mokonzi moko cezalo. 16Bongo bilato akabi yesu mpo babaka ye na kulunsi.17Bakamati yesu pe babimi naye, bamemi siye kulunsi kino na esika ebiangami mikuwa(golgotha). 18Babaki yesu elongo na mibali mibale: Moko naloboko ya ki tata na yesu mosusu na kimaman na yesu.19Pilato akomaki elemba mpe atié yango nalikolo ya moto na yesu: Yesu moto na nazareta,mokonzi yaba yuda. 20Etuluku naba yuda bakomi kotanga makomi wana,mpo esika yamikuwa ezalaki mpene na engumba na yelusaleme. Makomi wana bakomaki yango na minoko misato: Na hebelo,na latino pe na greke.21Banganga ya nzambe yaba yuda balobi na pilato: Kokoma te mokonzi yaba yuda ,kasi koma : Oyo azalaki koloba ete aza mokonzi yaba yuda. 22Pilato azongisi ete nasi nakomi.23Ba soda sima yako baka yesu na kulunsi,bazui bilamba naye bakati yango nabi teni mineyi ,eteni moko mpona soda moko; pe na mvula naye. Elamba moko ya motuya. 24Balobani bango mineyi topasola yango te,kasi to beta zegé oyo akozua ,azua yango,nioso oyo esengelaki esalama mpo makomi ekokisama ;bakaboli bilamba na ngai kati na bango mpe ba beteli yango zegé.25Ba soda basalaki makambo wa na miso ya malia maman na yesu,leki ya maman na ye,malia mwasi na clopas na malia magdala oyo batelemaki pempeni na kulunsi na yesu. 26Tango yesu amoni maman naye pe moyekoli naye oyo alingaki mingi pembeni na bango,alobi na maman naye;mwasi,tala mwana nayo ya mobali! 27mpe alobi na moyekoli naye;tala maman nayo! kaka na ngonga wana, moyekoli amemi malia na ndaku naye.28Sima na yango,yesu ayebaki ete makambu nioso ekolobama,sikawa esili pona kokokisa makomi na ba sakoli;olobi: nazoyoka posa ya mayi . 29Kibulu-bulu ya masanga ya ngayi ezalaki kala wana , ba soda bazuaki eponge na masanga na ngayi na mwa nzete mpona kotia ye na monoko 30.Tango yesu ameli masanga ya bololo mpe alobi;nionso ekokisami, akitisi mutu mpe akufi31Lokola ba yuda bazalaki kolengela milulu ya pasika,bibembe nabango misatu ekokaki kovanda libanda te,likolo na kulunsi na mokolo na sabbata,mpo ete milulu ya sabbata ezalaki motuya makasi,basengaki pilato makolo ya bayi babakami na kulunsi babuka yango,mpe balongola ba nzoto na bango. 32Mpe ba soda baye mpe ba buki makolo ya moto ya liboso mpe ya mibale oyo babakamaki na yesu. 33Tango baye epayi na yesu, ba moni ete esi akufaki , nkasi ye babukaki makolo naye te.34Moko na ba soda atshubi likonga na mopanzi na yesu ,sika wana makila mpe mayi ebimi na mopanzi na yesu. 35Moto oyo amonaki makambo wana atatoli mpe litatoli naye ezali solo. Ayebi ke litatoli naye ezali solo po ete bino mpe bondima.36Makambo wana ekomaki mpo ete makomi ekokisama: Mukuwa naye moko te bakobuka yango. 37Makomi masusu elobi boye:bakotala moto oyo batshubaki likonga na mopanzi.38Sima ya makambo wana,yosefu ya arimate,azalaki mpe moko yaba yekoli na yesu,aye nakuku na pilato kosenga nzoto na yesu elongwa na kulunsi . Pilato andimaki ,mpe yosefu asalaki bongo . 39Nikodema yepe aye, ye oyo akendaka mokolomoko na butu epayi na yesu. Amemaki mafuta ya solo malamu ezaki talo motuya.40Bazwaki bilamba na malasi ya solo makasi balingi yesu nzoto mobimba lolenge mibeko yaba yuda elobi. 41Pene na esika babakaki yesu,ezalaki na elanga. Nati na elanga yango ezalaki na ekundelo ya sika,nanu batia moweyi nakati te. 42Mpo ete ezalaki mokolo ya komilengela na milulu ya pasika ekomaki pene,pe ekundelo ezalaki pene,mpe bakundaki yesu wana.
201Na ntongo wa mokolo wa yambo,molili ezalaki naino ,mariya ya magadala ,aye na lilita,amoni ete libanga elongwe na nkunda. 2Boye akimaki mbangu epayi ya simoni petelo mpe na moyekoli mosusu oyo yesu alingaki mingi mpe alobeli ye,bolongoli nzoto na mokonzi na lilita,toyebi te soko batiye wapi.3Boye petelo mpe moyekoli mosusu babimi mpe bakeyi na. 4Bakimaki mbangu elongo;moyekoli akimaki mbangu mpe akomaki yambo na petelo. 5Angunzama atalaki na kati na lilita bilamba ekiti na mabele,kasi akotaki te nakati.6Sima naye simoni petelo akomaki mpe akotaki amoni bilamba na sé. Mpe elamba oyo batiaki na motu naye. 7Elamba ya pembe mpe esanganaki te na bilamba mosusu.8Sima,moyekoli oyo akomaki liboso;amoni mpe andimi . 9Na tango wana ba sosolaki nainao te makomi na nzambe ete yesu esengelaki a sekwa na bokufi. 10Bayekoli balongwaki na lilita,bazongaki na ndako na bango.11Bongo mariya atelemaki libanda na lilita,mpe azalaki kolela,akitaki kotala na kati ya lilita. 12Amonaki bangelou mibale balataki bilamba yapembe mpe bafandaki moko na esika ya motu na yesu elalaki mpe mosusu na esika na makolo na makolo naesika oyo nzoto na yesu etiamaki. 13Balobeli ye;maman ozali kolela mpona nini? Ozali koluka nani? Akanisaki ekoki kozala mosali kati na elanga,bongo mariya alobi;mokonzi soki ezali yo mutu olongoli ye,yebisa ngai esika otié ye mpo na kenda kobimisa ye.14Ntango mariya alobi bongo,azongi sima mpe amoni yesu atelemi wana,kasi ayebaki te ke ezali yesu. 15Yesu alobeli ye; mwasi mpona nini ozali kolela? Ozali koluka nani ? Akanisaki ete ezali mosali na elanga ;alobi mokonzi,solo ezali yo motu ,olongoli ye ,lakisa esika nini otié ye mpo nakenda kokamata nzoto naye.16Yesu alobeli ye;mariya,atali na sima mpe alobi nalokoto arameen; rabbouni(nkolo). 17Yesu alobeli ye: Kosimba ngai te,naino te nakeyi epayi ya tata na ngai,kasi kenda epayi yaba ndeko na ngai loba na bango ete nakozonga epayi ya tata na ngai mpe tata na bino,nzambe na ngai mpe nzambe na bino. 18Mariya ya mboka magadala azongi epai yaba yekoli;namoni mokonzi,mpe ye alobeli ngai makambo oyo.19Na pokwa yango na mokolo mwa yambo na poso,bikuke na esika ezingamaki bayekoli ekangamaki mpo bazalaki kobanga ba yuda,yesu abimeli bango mpwasa mpe atelemi nakati-kati na bango pe alobi; kimia na bino. 20Tango alobi bongo,alakisi bango maboko naye mpe ba mpanzi naye,nde natango bamonaki mokonzi,batondaki na esengo.21Yesu alobeli bango lisusu:Kimia na bino! lokola tata atindi ngai,ngai mpe na tindi bino. 22Ntango yesu asilisi kolobela bango,afulaki likolo na bango mpe alobi: Boyamba molimo mosantu. 23Oyo bokolimbisa masumu naye,yango ekolimbisama,mpe soko nani bokoboya kolimbisa masumu naye,masumu naye ekolimbisama te.24Thoma,moko na zomi na mibale,na kombo didyme,azalaki elongo moko na bango te ntango yesu ayaki. 25Bayekoli bayebisi likambo yango:Tomoni mokonzi ,mpe ye ayanoli bango;soki nakomona ba mpota yaba seté na maboko naye te ,soki mpe nakosimba ba mpanzi na te nakondima te.26Sima na mikolo mwambe,bayekoli bazalaki bango nionso nakati na ndako,mpe thoma azalaki elongo na bango,wana bikuke ya ndaku bikangamaki,yesu abimeli bango mpe atelemaki na kati-kti na bango mpe alobi: Kimia na bino. 27Nsima alobi na thoma:pusa awa lisapi nayo mpe tala maboko na ngai ,kozala moto na motema libanga te,kasi zala moto nakondima.28Toma ayanoli ye boye;mokonzi na ngai mpe nzambe na ngai. 29Yesu alobeli ye: Mpo ete omoni ngai nde ondimi ,bapambolama baye bamoni te kasi ba ndimi30Yesu asalaki bikamwa ebele na miso yaba yekoli,bikamwa oyo ekomama te ba mokanda oyo. 31Kasi makambo oyo ekomama mpo ete bondima ete yesu azali mobikisi,mpe mwana na nzambe,mpe nako ndima bongo boza na bomoi nakombo naye
211Sima na makambo mana yesu amumonisi lisusu na bayekoli baye libongo na tibeliate amonani na bango baye. 2Bayekoli na yesu bazalaki elongo na simona petolo toma, natanadi, bana nazebedeo mpe bayekoli ba lale basusu. 3simoni petelo alobi na bango. nakeyi na ebabe mbisi ba yanoli ye, toko kende elongo na yo. bakotaki o bwato, balobi butu mobimba, bazwaki eloko te.4Na tongo yesu atelemi na libongo, kasi bayekoli basosolaki ye te. 5Yesu atuni bango, bana bozali na eloko na kolia te? bayanoli ye ete te. 6Alobi na bango, babwaka monyama o loboko ya mobali la bwatu bokozwa tongo babwaki monyama bakoki kobenda ya ya ngo te mpo na ebale na mbisi.7Tango moyekoli moye yesu alingaki mingi asosoli ye, alati elamba na ye mpo azalaka bulumbu mpe amibwaki na mayi. 8Bayekoli basusu bazongi o kati ye bwoto mpo ezalaki mosika na mokili te. 9Bakami na mokili bamoni mbisi likolo na moto ya makala mpe lipa.10Yesu alobi na bango baya na ndambo na mbisi bazwaki. 11Sima petolo abendi monyama na mokili etondaki na nkama moko na ntukumi tano na misato ya mbisi ya minene atako bango monyama mopasukaki te.12Yesu abiangi bango baya kolia kasi moyekoli moko te atuni ye yo nani? mpo bayekoli nkolo. 13Ebelamaki yesu, akamataki lipa na mbisi apesaki bango. 14Oyo zalaki mbala ya misato yesu amimonisi na baye kobanda lisekwalia ye.15Sima na kolia abingi simona petolo sumana mwana na yowane, olingaka ngayi koleka ba oyo baluigaka ngayi? petolo ayanali ye, boye, nkolo ayebi na lingaka yo. yesu alobi na ye lesa bampate na ngayi. 16atuni ye lisusu mbala na mibale sima na mwana na yoani, olingaka ngayi? petolo ayanoli nkolo yo oyebi ete nalingaka yo yesu alibi na ye batala ba mpate ba ngayi.17Atuni ye mpo na mbala na misato simona mwana yoani olinga ngayi? ayanolaki ye nkolo yo oyebi makambo manso oyebi na lingaka yo. yesu alobi na ye batela ba mpete na ngayi. 18Solo mpenza na lobi na yo tango azalaka elenge amilatisaki bilamba mpe ozalaka kokende epai yo alingaki kasi ekokoma yo mpaka bakolatisa yo na moto mosusu mpe akokende epai oyo olingi te.19Yesu alobaki bongo mpo na kotalisa lolenge na liwa na petelo akokufa mpo na lokumu na nzambe. sima na koloba na ye alobi landa ngayi.20Tango petolo azalaki kokende, moyekoli oyo yesu alingaka mingi alandaki ye. 21Petelo alobi na yesu moto oyo akosala nini?22Yesu ayanoli ye soki nalingi ete azala na bomoyi ti kino na kozonga etali yo na nini? landa ngayi. 23Bongo, liloba lina lipalangana na kati na bandeko ete moyekoli wana ekokuta te. kasi alo baki ete soki na lingi azala na bomoyi te ki no na kozonga na ye etali te na nini?24Moyekoli mona ye azali kotatola na makombo mango, toyebi ete litatoli lia ye lizali lia solo. 25Makambo ebele mosalaki yesu soki makomamaki manso na mikanda ata esika moko na mokili okozala te mpo na mikanda miango.

Misala ya batoma

11Mokanda mwa yambo oyo ntoma Polo akomelaki Teofile na maye manso Yesu abandaki kosala mpe koteya, 2Kino mokolo oyo abutaki o likolo. Sima na kopesa mitindo na nzela ya Molimo Mosantu na ba ntoma oyo baponamaki, 3baye abimelaki bango nsima ya lisekwa kowuta kati na mpasi ya liwa.4Ntango akutanaki na bango, ayebisaki bango boye, apesaki bango mitindo ete bakende mosika ya Jelusalema te kasi bazila elaka ya Tata, lolenge alobaki: «Bayokaki na ngayi 5Yoane azalaki kopesa libatisio bobele na mayi kasi bino sima na mikolo moke boko batisama na molimo mosantu.»6Tango ba sanganaki batu naki ye boye: «Na ntango wana nde okofandisa bokonzi na Israele?» 7Ayanoli bango boye: «Ezali na bino te koyeba ntango to mikolo oyo Tata Nzambe aponi yango na lolenge na bokonzi na ye mpenza.» 8Kasi bino, bokozua nguya ya molimo mosantu ekoya likolo na bino, bokozala balobeli na ngayi na Jelusaleme, na Juda mobimba mpe kati ya Samari mpe suka ya etando ya mokili mobimba.9Tango Yesu asilisi koyebisa bango makambo oyo, lokola azalaki kotala na likolo, atombwami mpe mapata ezipi ye na miso na bango. 10Lokola bazalaki kowumela bobelez kotala na likolo, batu mibale na molato ya pembe babimeli bango na puasa mpe babelemi na bango. 11Balobelaki bango boye: «Bino batu ya Galileya pona nini botelemi kuna kotala na likolo ntangu molayi? Yesu wana esili ye kobuta na likola akozonga lisusu lolenge ekendeki ye na likolo.»12Bongo bazongaki na Yelusalema wuta ngomba na ba Olivia oyo ezali pena na Yelusalema, molayi ndenge moko na nzila ya Sabata. 13Wana esilaki bango kozonga na mboka, bamataki likolo na esika ba mesana kosangana bomomesano. Bazalaki Petelo, Yoane, Zaki, Andre, Filipe, Toma, Bartelemi, Matayo;, Zaki mwana Alphee, Simoni le Zelote et Yude, mwana Zaki. 14Basanganaki banso kati na bo moko na kati ya mabondeli tango yonso elongo na basi lokola Mariya mama ya Yesu na bandeko na ye.15Na mokolo wana, Petelo atelemaki na katikati ba ndeko bazalaki motango 120, mpe alobi: 16«Ezalaki na ntina mpenza ete makomi ekokisama, na lolenge Molimo Mosanto alakaki na monoko na Dawudi na ntina na Yudasi oyo akambaki baye bakangaka Yesu.17Azalaki moko na biso mpe azalaki kozua mbano na ye na mosala oyo. 18Lelo moto oyo asili kosomba elanga na mosolo ya nkele na ye, akwesami mutu yambo, nzoto epanzani , mpe nyonso kati ya libumu na ye epanzani. 19Makambo yango eyebani na kati na batu ya Yelusaleme mobimba mpe babengi elanga wana na lokota «Hakeldama» elakisi « elanga makila»20Pona yango ekomami kati na mokanda ya nzembo bayuda :«Tika ete esika oyo ekoma esika ya mawa moto te akoma esika yango. Bongo motu mosusu azua esika na ye»21Eleki na malamu, moko na batu oyo batambolaki na biso ntango nyonso oyo Mokonzi Yesu azali na kati na biso, 22kobanda libatisi ya Yoane tii mokolo abutwi kati na biso, azala moko na ba oyo bozalaki mpe bamonaki elongo na biso lisekwa.» 23Babimisaki o bonso na bango batu mibale: Yozefo lokola Barsabbase mpe kobenga lisusu Justus, na Matthias.242526Babondelaki boye: «Mokonzi yo moko oyebi nyonso, monisa biso nani kati na batu mibale oyo nani oponi pona kozua mosala ya ntoma esika Yuda oyo ye moko atikaki yango mpona kokende epayi ye moko aponaki.» Bongo babetaki zeke pona kozua motu moko; zeke elakisaki Matthias nde aponamaki mpe atangaki ye na ba toma.
21Na mikolo ya milulu ya boyeî ya molimo mosantu, ba mikangaki banson na esika moko. 2Na pwasa mopepe makasi kowuta na likolo ekoteli baango mpe etondisi ndako. 3Bilembo ya bikoti ya moto emonani na mito na bango. 4Bongo batondisami na molimo mosantu mpe ba bandaki koloba na minoko ya bapaya ndenge molimo azalaki kotinda bango.5kaka na ngonga yan,go, lba yuda mpe bato ya sembo ya bikolo nionso ya mokili bazalaki na jerusalem. 6Na makelele wana, ba poti nangu mpê bakoti na bulu yeke mpo bakuti bango koloba na monoko ya moko na moko kati na bango. 7Ba tondaki na esengo mpe ko kamwa makasi na kolobaka ete « bango nionso bazali bato na Galile te?».8Boni boni tozali koyoka bango na minoko na biso ya mboka? 9Perses, Medes, Elamites mpe baye ba vandaka na Mesopotamie, na Judee mpe na Cappadoce, na Pont mpe Asie, 10Na Phrygie na Pamphylie, na Egypte mpe na Engkumba ya Lybie pene ya Cyrene, na bapaya bawuti Rome, 11ba yuda mpe ba pagano oyo bandimi lingomba ya ba yuda ba ninga ya Crete mpe Arabie, tozali ko yoka bango kotatola misala ya nguya ya Nzambe.12Bango bazalaki n a esengo makasi mpe kokamwa, mpe bazali ko tunana kati na bango: « oyo likambo nini ». 13Ba mususu kati na bango ba tioli bango mpe balobi « balangwe lotoko ».14Elongo na bayekoli Pierre alobi « ba ninga lya judee, mpe bato nionso ya jerusalem boyoka likambo oyo» 15Biso to langwe lotoko te bo bo ùbazali kolaba pamba te tozali nanu na ngonga ya misatu ya mokolo.16Boyoka makambo, masakoli Joel alobaka na kala. 17Nzamba alobi alobi na mikolo na suka na kosopa molimo nanga na bato nionso. Bana na bino ya basi mpe ya mibali ba kosakola. Bilenge na bino ya mibali bakozua bimoniselo mpe bakolo kati na bino ba ko banda kolota bandoto.18Bobele bongo na basali nangayi mibalio mpe ya basi, nako sopa mpe molimo nangayi mpe ba kosakola. 19Nakosala bilembo na likolo mpe makamuisi awa na nse, makila, moto mpe milinga.20Moyi eko bongwana molili mpe sanza ekokoma makila, yambo mokolo na Mokonzi ekoma, mokolo monene mpe ya ko kamwa. 21Na bongo nani oyo akobelela kombo ya Mokonzi akobika.22Ba ninga ya Israel, boyoko nsango oyna nzambe ye moko liboso na bino bo o: Yesu ya nazareth, moto oyo Nzambe adima na kati na bino kolandana na misala minene ya kokamwan mpe bilembo asala na nguya na Nzambe ye moko liboso na bino boyebi bino nionso. 23Kolanda na mabongisi mpe mayele koeka ya Nzambe, atekamaki mpe bapaya na bosenga na bino ba bakakiye na ekulusu mpe akufaki. 24Kasi Nzambe asekwisaki ye, na kokangola ye na miniololo ya liwa mpo ete jeko kaka kosalama te ete liwa ekanga ye.25Pamba te Dawidi alobaki pona ye ete: " nazalaki komona Mokonzi kotelema mikolo nionso liboso na ngayi na loboko ya mobali mpo na kokengela ngayi nete na kweya te". 26Yango wana nsai na motema pe loyembo ya esengo na monoko mpe nzoto na ngai pena na kimia.27Mpo oko sundola molimo na ngayi na mboka bawa te, mpe oko pesa nzela te ete nzoto ya monsantu nayo epola. 28Ososolisa ngayi ba nzela ya bomoyi mpe okotondisa na bolalisi nayo.29Ba ninga, na motema pio, na lingi na lobela mpo na koko nabiso Dawidi: toyebi ete akufaki mpe akundamaki bongo lilita naye ezali kino lelo oyo. 30Lokola azalaki mosakoli mpe ayebaki ete Nzambe alakaki mpe alapaki ndayi ete mokitani naye akoyingela ye. 31Asosolaki mpe asakolaki pona lisekwa ya kristo "basundolaki ye na mboka bawa te mpe nzoto naye epolaki te".32Nzambe asekwisaki ye, mpe toyebi yango malamu biso nionso. 33Anetolama, mpe kowuta na loboko ya mobali ya Nzambe, asopeli biso molimo mosantu alakaki biso ndenge bozali komona mpe koyoka lelo.34Dawidi amata na likolo te kasi aloba " Mokonzi alobaki na Mokonzi na ngayi, fanda na loboko na nga ya mobali, 35Kino na ko komisa ba nguna nayo enyatelo nayo. 36Yango wana, tika libota mobimba ya Israel eyeba solo solo ete Yesu oyo bobakaki na ekulusu, Nzambe akomisa mokonzi mpe kristo.37Mateya masimbi mitema na bango mpe ba tuni pierre na ba ninga naye: "baninga sika tosala nini?". 38Petelo ayanoli: « bobongola mitema mpe bozua libatisi na kombo na Yesu Kristo mpo na bolimbisi ya masumu na bino, bongo bokozua likabo ya molimo monsantu. 39Pamba te elaka yango ezali mpe pona bana na bino. mpe mpo bato nionso oyo bazali na mokili, ebele ya bato nionso Mokonzi Nzambe na biso akobenga».40Na ebele ya mateya mosusu, ezalaki ko sosolisa bango koloba ete « bomibikisa na ekeke oyo ya goyi goyi». 41Na suka ba yambi maloba na Nzambe mpe bazui libatisi mpe na mokolo yango bato pene ya 3000 ba bakisami na jlingomba. 42Bazalaki kowumela na malakisi ya ba ntoma mpe na bomoko, na kokabola kwanga mpe na ba losambo.43Bobangi elataki bango moko na moko, mpe bilembo mpe bikamwa ezalaki kosalama na kati na bango na nzela ya ba ntoma. 44Bato nionso badimelaki bazaki lisanga mpe biloko na bango nionso ezalaki esika moko. 45Bazalaki koteka bozui na bango mpe ko kabola misolo wana kati na bango kolandana ba bosenga ya moko na moko.46Boye mikolo nionso bowumelaki na lolenge wana kati na tempelo, kokabola kwanga na ba ndeko, mpe kolia bileyi na esengo mpe komikitisa na motema. 47Bazalaki ko ngumbamela Nzambe mpe bazuaki ngolu na bato na mboka. Mokonzi azalaki kobakisa mokolo na mokolo bato oyo bazalaki ko bongola motema.
31Boye Petelo na Yoane bakendaki na ndaku na Nzambe na mabondili na ngonga ya libwa. 2Ejalaki na ebosono moko banda bomuana bajalaki komeman ye mikolo nyonso kotika ye o ekuke ya ndaku ya Nzambe oyo ba bengi la Belle; mpo na kosenga likabo ya mawa na bato bajalaki kokota na ndako ya Nzambe. 3Ntango amonaki bango kokota asengi bango likabo ya mawa.4Petelo atali ye na miso elongo na Yoane alobi : « Tala biso». 5Mokakatani atali bango na elikia ya kozua mwa eloko epayi na bango. 6Kasi Petelo alobi: «Najali na ata wolo te to palata te, kasi oyo najali na yango nakopesa yo. Telema pe tambola na kombo na Yesu Klisto ya Nazareta.»7Petelo asimbi ye na loboko ya mobali mpe na mbala moko mpe atelemisi ye, mbala moko makolo na mabolongo na ye esembwani. 8Nakopumbwe, mokakatani atelemi mpe atamboli; mpe akoti na Petelo na Yowani na tepelo, nako tambola, kopumbwe na kosanjola Nzambe.9Moto nyonso amoni ye kotambola mpe kosanjola Nzambe. 10Batu nyonso Basosoli ete ejali moto oyo ajalaki kofanda mikolo nyonso kosenga mbongo na ekuke ya ndako ya Nzambe oyo babengi la Belle; bakomaki na komana oyo esalami.11Lokola ye azalaki kolanda Petelo na Yoane bato nyonso akendeki mbangu na mbarazani babengi Salomo na kokamua. 12Emoni Petelo bango, alobi mpo na nini bino batu na Israel bozali kokamua. Pona nini bozo tala biso makasi boye lokola biso moko nde totambwisi mutu oyo na nguya na biso moko.13Nzambe ya Abalayama, Isaka mpe Yakobo, Nzambe ya ba tata na ye, akumisi mosali na ye Yesu, oyo bino bokabaki mpe bo wanganaki liboso ya Pilato ntangu alingaki kotika ye. 14Boboyaki Mosantu mpe Mutu ya Bosembo bosengaki batikela bino mobomi.15Bobomisaki Mokonzi ya kimia oyo Nzambe asekwisaki na bakufi biso tozali ba nzengeleke na ye. 16Sika oyo na kondima na nkombo na ye moto oyo bomoni mpe boyebi. Nkombo yango elendisi ye. kondima oyo etiami na Yesu, epesi ye makoki koona ye na nzoto kolongono.17Sika oyo bandeko, nayebi bosali boye mpo na kozanga koyeba na bokonzi na bino. 18Kasi eloko Nzambe asakolaka na monoko ya basakoli yonso esengelaki Klisto anyokwama na sika ekokisami.19Bobongola mitema mpe boyangela mpo ete alimbisa masumu na bino mpo ntango ya kopema na liboso na Mokonzi; 20atindela bino Klisto oyo aponamaki mpo na bino mokonzi.21Azali oyo likolo ezali koyamba kino ntango ya kobongisa makambo yonso oyo Nzambe alobaka kala na monoko ya basakoli. 22Mose alobaki :"Mokonzi Nzambe akobimisa mosakoli lokola ngayi kati na bandeko na bino bokoyokela ye na manso oyo ako yebisa bino. 23Ekokoma moto yonso oyo akoyo kela mosakoli te, akobebi sama na kati ya etuluku ya bato.24Iyo, basakoli oyo baleki liboso balobaka kobanda Samuel, bayebisaki kino mokolo oyo. 25Bazali bana ya basakoli mpe ya boyokani ya Nzambe asalaki na bankoko na biso, lokola alobaki na Abalayama: "mabota nyonso ya mokili bako pambuama na bakitani na yo". 26Yango wana Nzambe abimisi mosakoli na ye mpo na liboso atindi ye mpo abenisa bino mpe alongola moto nyongo na kati na nzela ya masumu
41Wana Petelo mpe Yoane bazalaki koloba na bato, ba nganga Nzambe bayaki mpe bakonzi ya soda mpe ba sadukai. 2Bazalaki na kanda na Petelo mpe Yoane na ndenga bazalaki kolakisa etuluku na bato na tina na yesu mpe lisekwa.Elingi koloba ete bakufi bakosekwa. 3Bongo bakangaki bango mpe batiaki bango na boloko kino lobi mpo ekomaki pokwa. 4Ebele na bato oyo bayokaki mateya yango badimaki, mpe motuya na baoyo ba ndimaki ezalaki mibali pene pene koto mitano.5lobi yango, bakonzi na bayuda mpe ba mbutamuntu mpe bakomi na mibeko basangani na jerusaleme. 6Nganga monene Anne azalaki, Caiphe, Yoane mpe alexandre mpe ya libota ya mokonzi bazalaki wana. 7Tango batelemisi Petelo mpe Yoane katikati na bango, mpe batunaki bango soki na nguya nini mpe na kombo ya nani bobikisaki bokono ya moto oyo?8bongo Petelo oyo iatondaki na molimo mosantu alobaki na bango: Bakambi mpe ba ba mbutamuntu. 9Botuni biso lelo mpona jbolamu oyo tosali epayi ya mobeli, bolingi koyeba soki abikaki na nguya nini? 10Tika toyebisa bino mpe ekolo mobimba ya Isalaele ete moto oyo abiki mpe atelemi liboso na bino na nguya na nkombo na Yesu ya nazareth oyo bino bobomaki na ekulusu mpe Nzambe asekuisaki ye.11Yesu Kristo nde libanga bobuakaki na batongi, ekomi, libanga oyo esimbi moboko ya ndaku. 12Kobikisama ezuami kaka epayi na moto moko, pona mokili mobimba, Nzambe atiaki moto mosusu te oyo akoki kobikisa biso, kaka Yesu.13Tango nionso ya likita bamonaki kasakasa ya Petelo mpe Yoane, bazalaki na kobanga te, nzoka nde bazalaki bato pamba, basosoli ete bazalaki elongo na Yesu. 14kasi lokola bazalaki komona moto oyo abikaki kotelema pene pene na bango bokokaki lisusu kotia tembe te.15Bongo babimisaki bnga na libanda ya likita monene, mpe babandi kotiana tembe. 16Balobi: « tosala nini na bato oyo? mpo bato nionso ya Jerusaleme bayebi ete ezali bato nde basali bikamuiseli oyo monene, mpe tokoki kowangana yango te. 17Kasi mpo ete sango yango epalangana kati na bato te, topekisa bango baloba lisusu na nkombo na Yesu te.» 18Babengaki Petelo mpe Yoane mpe bapekisi bango koloba to koteya na nkombo na Yesu.19Kasi Petelo mpe Yoane bazongiseli bango: bo pona binomoko: totosa bino to totosa Nzambe? 20Pamba te biso tokoki kotika kolobate makambu oyo tomonaki mpe toyokaki.21Bantoma likita bangangeli bango lisusu, mpe babimisi bango, bazuaki bazuaki likambo ya kopesa bango etumbu te, mpo bato bazalaki kosanzola Nzambe. 22Moto oyo abikisamaki azalaki na mibu koleka tuku minei.23Sima na bango kobima, Petelo mpe Yoane, bakeyi epayi ya baninga na bango, mpe bayebisi bango makambu nionso oyo ba nganga Nzambe mpe ba mbuta mutu balobaki. 24Sima ya koyoka lisolo yango, basangani mpona kosambela Nzambe boye: Mokonzi , yo ozalisi lola mpe mokili, ebale mpe biloko nionso kati na yango. 25Na nguya na molimo mosanto, olobaki na monoko na koko na biso Dawidi mosali nayo: mpona nini ekolo nionso bazali kotomboka mpe kongala pamba pamba boye?26bakonzi na mokoli bazali kobongama na etumba, basali makita mpona kombunda mpe Mokonzi mpe ba Klisto naye.27Yasolo Erode mpe Ponso Pilato basangani na engunda oyo, elongo na ba paya mpe bato na Isalaele mpona kombunda na yesu Oyo yo opona ka kozala masiya. 28Basalaki boye mpona kokisa makambo nionso oponaki liboso katina nguya mpe bolingo nayo.29Mpe ssikoyo Mokonzi, ltala ndenge bazali kogangale biso basali nayo. pesa biso nguya ya koteya nsango na yo . 30Sembola loboko nayo, mpe bikisa babeli, bilembo mpe bikamuiseli esalema mpo na nkombo na mosala nayo yesu. 31Awa basilisi kosambela, esika oyo bafandaki eningani, bango nionso batondisami na molimo mosantu, mpe baban di kosakola baloba na Nzambe na makasi nionso.32Bandimi nionso bazalaki na motema moko, biloko ezaliki ya lisanga. 33Nzambe azalaki kopesa nguya na ntoma, mpona kosakola lisekwa na Mokonzi Yesu.34Ata moto moko te na kati na bango azalaki kozanga, mpo bandimi nionso oyo baza na bilanga to ndaku, batekaki yango mpe batiaki mosolo nionso esika moko. 35mpe bapesaki mbongo nionso na ba ntoma*, mpe bazalaki kokabola yango na moto nionso.36Moto moko na libota na lewi na nkombo ya Yoseph kowuta na Chypre, ba ntoma bapesaki nkombo mosusu Barnabas (elingi koloba: moto ya kopesa mpiko). 37Lokola azalaki na bilanga naye, atekaki yango mpe apesaki mbongo yango na ba ntoma
51Tata moko na kombo Ananias na muasi naye safira, batekaki eteni ya bozui na bango, 2Ba bombi mua ndambo ya bongo, mwasi na ye ayebi.3bakeyi kotika epayi ya ntoma, Peteloatuni ye, Pona nini satana ayengeli na motema nayo mpo obuka lokuta? Oksi nde bato te kasi okosi Nzambe. 4Yambo ya koteka, ezalaki ya binote, bongo tango boteki ezali ya bino te? 5Eyoki ye liloba wana, Anania akueyi mbala moko mpe akufi, kobanga monene ezui baye banso oyo bayokaki yango. 6Bilenge mibali baye balingi ye mpona kokunda.7Sima ya ngonga misato, muasi naye akoti, mpe ayebi makambo elekaki te. 8Petelo alobi naye, yebisa ngayi soki botekaki bilanga na talo wana, ayanoli boye na talo wana.9Bongo Petelo alobi naye, pona nini boyokani poa kkomeka molimo na Mokonzi? tala baye bakundaki mobali nayo batelemi na ekuke, mpe bakomema yo. 10Akweyi tango wana, mpe akufi, mpe bilenge mibali bazongi bakuti ye akufu. bamemi ye bakeyi kokunda ye pembeni na mobali naye. 11Bobangi monene ekangi ekelrzia nionso, mpe baye banso, boyokaki eloko eye.12Bilembo ebele, mpe bikamuisin ezalaki kosalema kati ya mabota na maboko ya ba ntoma bazali esika moko na mbarabani ya salomo. 13Moto moko te, azuaki makasi ya kosangana na bango, libota ezalaki kolinga bango penza.14Bolamu, bandimi bazalaki kobakisama mpo na mokonzi, bayike ya mibale mpe basi, 15na ndenge ete, bamemi bato ya bokono pembeni na nezla pe balalisi bango likolo na etoko mpe mbeto natango ntoma Petelo akoleka, elelingi ekika kozipa bayike. 16Mua ndambu ya baton bawuti na ba engunda ezali pembeni ya jeruzalem, baye mpe lokola bamemi bato na bokomo, mpe ba oyo milimo mabe ekangaki bango, mpe banso babikaki.17Kasi ngonga Nzambe mokoNzi atelemi banso oyo bazalaki naye, mpe binzambi nzambi ya ba sadusoyo batondi na likunya. 18Bakangi bantoma mpe bwaki bango na boloko ya bato banso.19kasi na butu, angelu ya Mokonzi afungoli ekuke na boloko, mpe abimisi bango. 20Bokende na tempelo mpe bosakola na libota nionso maloba ya bomoyi oyo. 21Tango bayoki, bakati na ba tempelo, na tango mpe balakisi, kasi nganga Nzambe mokonzi na baye bazalaki na ye, babengi likita, ba mbuta muta ya bona Isayele, batindi bango mpona koluka ba ntoma na boloko.22kasi mokonzi ya basoda akeyi kotala kuna na boloko, mpe azangi kopesa sango. 23Tokuti boloko ekangami, mpe ba jsinzili bazali liboso ya ekuke ya boloko tango tofongoli ekuke, tokuti moto moko te na kati.24Tango mokonzi ya ndako ya Nzambe mpe nganga Nzambe, mokambi bayoki maloba eye bakamue somo ezui bango, na likambo oyo ekoki koya na sima. 25Kaka na tango wana, moto moko aye koyebisa bango sango, bato oyo bobwakaki na boloko, bazali na tempelo mpe kolakisa mabota.26Kapitaine mpe mokonzi ya ba soda bakeyi ko mema bango, kasi na malembe, na makasi te, mpo ete bazalaki kobanga mbasili komema po ete ba bamba bango mabanga te. 27Tango basili komema bango, ba batikibango liboso ya likita, nganga Nzambe monene, nde atuni bango? 28Alobi, topekisaki bino makasi mpona kotangisa nkombo wana kasi botondisi jeruzaleme na malakisi, mpe bolingi kotia likolo na biso makila ya moto wana?29Kasi Petelo, na ba ntoma bayanoli: to koki kotosa Nzambe, kasi bato te? 30Nzambe ya ba tata na biso nde asekui Yesu, oyo bino bo bomaki, mpe bo bakiye na nzete. 31Nzambe atomboli ye na loboko ya ye ya mobali mpo azala muana mpe mobikisi, pona kopesa kotubela na Isalael, mpe kolimùbisa masumu. 32Tozali ba nzengeleke na biloko wana kutu molimo mosatu oyo nzambe apesaki bato oyo batosakaye.33Tango batambuisi ya likita bayoki libanda pona tango moke. yango, basiliki mpe balingi koboma ba ntoma. 34Kasi mofarizo Gamaela, mosali mibeko monene oyo, banto banso na Isalael batosaka ye atelemi mpe apesi mitindo na ba ntoma ba bima35Nasima, alobeli bango, bato na Isalael, bosala keba na oyo tolingi kosala bato oyo. 36Mpo sima ya tango moke, Theudas atelemaki komilakisa ye azali moto mpe ebele ya bato pene pene na kama mineyi, ba sanganaki naye. Mpe ba bomi bango banso, mpe baye banso oyo bazalaki kotosa ye, ba panzani, mpe basili. 37Sima ya moto oyo, Yuda ya galilea atelemaki na tango ya kotanga, motango ya bato mpe abendi mua eteni ya bato, ye mpe akufi, baye banso oyo bazalaki kotoso ye bapanzani.38Sika oyo, na yebisi bino, bozala mosika na bato oyo, mpe tika bango kimia, soki ezali mabongisi to mosala ewuti na bato, ekokweya. 39Kasi soki ewuti epayi na Nzambe, bino bokoki kolonga yango te. bokoki kutu kososola ete bozali kobundisa Nzambe, na bongo bango banso badimi.40Na sima, babengi ba ntoma, mpe ba beti bango, mpe ba pekisi bango koloba na nkombo na Yesu, Mpe batiki bango bakende. 41Ba bimi na likita na kosepela na tina ete esali malamu na komona litioli pona nkombo wana. 42Sima nayango, mikolo nionso na tempelo mpe ndako na ndako, bazali kolakisa mpe kokoba koteyate Yesu a azali Kristo.
61O ekeko wana, mutuya ya bayekoli ebandaki kokola, na bongo bayuda Heleniste bafundaki baoyo ya Hebele, na ntina ete basi na bango oyo bakufela mibali, bazali kotiolama na tango ya bokaboli bilei ya mokolo na mokolo.2Bayekoli zomi na mibale, babengi bayike na bayekoli mpe bayebisi bango boye: «Ebongi te na biso kosundola liloba na Nzambe mpo na kokabola bilei. 3Bopona kati na bino, bandeko sambo oyo bajali na bizaleli malamu, batondisami na Molimo mpe na bwanya, boye tokoki kopesa bango mokumba ya mosala wana. 4Mpo na biso, tokokoba tango inso kati na losambo mpe na mosala ya kopanza liloba na Nzambe.»5Maloba na bango esepelisaki bayike na bango. Na bongo baponaki Etienne, oyo atonda na kondima mpe na molimo mosantu, mpe Filipo, mpe Prochore, Nicanor, Timon, Parmenas mpe Nicolas, mondimi ya sika ya mboka Antioche. 6Bandimi bakumbaki bato o bonso ya bantoma oyo babondelaki mpe babulisaki bango.7Na bongo, liloba na Nzambe etambolaki mosika, boye motuya ya bantoma ekobaki na lombango kati ya Yelusaleme. Mpe motuya makasi ya banganga Nzambe bakobaki na kondima.8Mpe Etienne atondisami na nguya mpe na ngolu, ajalaki kosala bikamwisi minene kati na batu. 9kasi ndambo ya bato ya eyanganelo ya Cyreniens mpe ya Alexandriens, mpe ndambo ya bato ya Cicilie, mpe ya Azia batomboki. Bazalaki kotelemela Etienne.10Kasi bakokaki kolonga bwanya mpe molimo oyo ezalaki koloba kaki na Etienne. 11Na bongo, basombaki bayike na nkuku mpo na koloba: «Toyokaki Etienne kobimisa maloba ya bosoto na ntina na Mose mpe Nzambe.»12Batombokisaki bato, bampaka mpe bakomi mibeko mpe banso oyo babundisaki Etienne, bakangaki ye mpe bamemaki ye o boso bwa bajuzi. 13bakumbaki banzeneneke ya lokuta koloba:«Moto oyo atikaka te kotatola maloba ya bosoto, na ntina ya eska ya bule mpe na mibeko. 14Mpo toyokaki ye koloba ete Yesu akobongola bizaleli nyonso oyo Mose atangisaki biso.» 15Baoyo banso bafandaki ya ba mpaka, babalolaki miso kotala ye, mpe bamoni ete elongi na ye ekomaki lokola ya anzelu.
71Nganga mokonzi alobi: «Boye nde otatolaki?» 2Etienne ayanoli: «Baninga mpe ba mpaka, boyoka ngai: Nzambe na nkembo oyo amonisamaki na mpaka na biso Abraham, tango ye afandaki na Mesopotamie, yambo ya kofanda na Charan; alobaki na ye: 3"Tika mboka na yo mpe bandeko na yo, boye kenda na mboka nakolikisa yo"»4Boye atiki mboka ya ba Chaldéens mpe amifandisi na mboka Charan. Boye sima ya kufa ya tata wa ye, Nzambe akambaki ye o mboka bino bofandi; 5Boye epesamelaki ye esika moko te ya bofandi; nzoka nde apesaki ye elaka (ata ko Abraham azangaki mokitani) ete mboka yango ekopesamela ye na bakitani na ye sima ya eleko.6Nzambe atalisaki ye, ete akofandisa bakitani na ye ngonga moke na mabele ya bapaya, boye bakofanda na bohumbu ya bakolo mabele mpe bakonyokolama mbula nkama minei. 7Boye nakosambisa mokili yango epai bokozala na bohumbu, elobi Nzambe, sima na yango nde bokobima mpe bokokumisa ngai na mabele oyo. 8Bongo asalaki boyokani ya bokati ngenga na Abraham, na yango Abraham akomaki tata na Isaac, mpe akataki ye ngenga sima ya mikolo mwambe; Isaac akomaki tata ya Jacob mpe Jacob tata na ba mpaka zomi na mibale.9Ba mpaka bakolisaki likunya na Joseph, mpe bateki ye mpo te akumbama na Egypte, kasi Nzambe azalaki na ye elongo, 10boye Nzambe asungaki ye na minioko yonso, apesaki ye ngolu mpe kimia liboso na Pharaon, mokonzi na Egypte. Pharaon atombolaki ye mbula matari ya Egypte mpe ya ndako na ye mobimba.11Bongo nzala mpe mpasi makasi eyingeli na Egypte mpe Canan; boye ba mpaka bazangaki bilei. 12Kasi eleko Jacob ayokaki ete masangu ezali naEgypte,atindaki ba mpaka ya yambo. 13Mbala ya mibale, Josephamilakisi na bandeko na ye; boye libota na Joseph eyebanaki na Pharaon.14Joseph atindaki bandeko na ye koyebisa Jacob tata na ye, koya na Egypte elongo na libota mobimba: motango ya bato tuku sambo na mitano. 15Boye nde Jacob ayingelaki na Egypte. Sima ye mei akufaki, kolandisama na ba mpaka yonso. 16Bakundamaki na mboka Sichem, esika wapi lilita Abraham asombaka na mosolo epai ya bana ya Hamor na mboka Sichem.17O eleko Nzambe apesaki na Abraham ekomaki pembeni, libota ekolaki mpe bakomaki bayike kati na egypte, 18kino mokonzi mosusu ayingelaki na egypte; mokonzi oyo ayebaki Joseph te. 19Mokonzi yango asalaki zunguluke na ba mpaka na biso mpe anyokolaki bango, kino kobwaka bana babotami sika mpo ete bakufa.20Mose abotamaki na eleko wana.Ye azalaki bonzenga na miso ya Nzambe mpe abokolamaki sanza misato na ndako ya tata na ye. 21Eleko oyo basundolaki ye, elenge mwasi mwana ya Pharaon akamataki ye mpe abokolaki ye pela moko mwana na ye.22Mose ateyamaki na boyebi yonso lolenge moko na bana egypte; mpe akomaki makasi na maloba mpe na misala. 23Na bokokisi mibu pene na tuku minei, akanisaki kokenda kotala bandeko na ye, bana na Israël. 24Boye na komona bazali konyokola moyuda moko, Mose abundeli ye kino kino koboma egyptien. 25Akanisaki ete ndeko na ye akososola ete na nzela na ye nde nzambe akosikola bango, nzoka nde basosolaki te.26Mokolo elandaki, apusanaki pene na ba yuda mosusu oyo bazalaki kondongwana. Amekaki koyokanisa bango; na koloba boye: «Bino bozali bandeko; boni-boni bozali kosalana mabe?» 27Boye oyo asalaki moninga mabe ayimi yimi mpe alobi: «nani akomisi yo mokonzi mpe mosambisi kati na biso? 28Okani koboma ngai pela moko obomaki egyptien lobi loleki?»29Sima ya boyoki mbela wana, Mose akimaki. Akomaki mopaya na mboka Madian,wapi abotaki bana babale. 30Sima ya mibu tuku minei, mwanze abimelaki ye na lisobe ya ngomba ya Sinaï, kati na moto ya manganga.31Boye Mose komona moto, akamwaki na emoniseli yango; bongo tango abelemaki mpo na kononga, mongongo ya Mokonzi engulumaki koloba boye: 32"Ngai nazali Nzambe ya bakoko nayo, Nzambe na Abraham, Isaac mpe Jacob." Na bobangi yonso akokaki ata kotala te.33Mokonzi alobi na ye: «Bimisa sapato na yo zambi esika etelemi yo, ezali mabele ebulisama. 34Ngai namoni solo minyoko ya libota ya ngai kati na egypte, nayoki milelo na bango mpe nakiti na ntina ya kosikola bango. Sasaipi, napesi yo mitindo ya koyingela na egypte.»35Mose oyo bobwakisaki, tango babelelaki: Nani akomisaki yo mokonzi mpe mosambisi? ye wana Nzambe atindaki pela moko mokonzi mpe mosambisi. Nzambe atindaki ye na nzila ya mwanze oyo abimelaka ye kati na manganga. 36Mose abimisaki bango libanda na egypte sima ya kosala bilembo mpe bikamwa kati na egypte mpe na ebale monene motane, mpe na lisobe mibu tuku minei. 37Bobele Mose wana, alobaki na libota ya bayuda: Nzambe akobimisa mosakoli kati na bino pelamoko ngai.38Ye nde engambe mobali oyo azalaki kati na lisanga, bisika bikawuka na mwanze oyo alobelaki ye likolo na ngomba sinaï. 39Engambe mobali oyo azalaki na bakoko na biso; mobali oyo akwaki maloba ya bomoi mpo na koteya biso. Engambe mobali oyo nde bakoko na biso baboyaki kotosa, babwakisaki ye mpe bazongisaki mitema na bango na egypte. 40Eleko wana, balobaki na Aaron: boye salela biso banzambe oyo bakotambwisa biso. Bongo maye matale Mose oyo abimisaki biso na egypte, toyebi maye makomeli ye te.41Boye batumbaki mbeka ya mwana ngombe mpe babonza yango na nzambe ya bikeko, sima mpe bayokaki nsayi na misala bangao mei basalaqki na maboko. 42Nzoka nde Nzambe asiliki mpe apesi bango mokongo mpe abwakisaki bango na kokumbamela minzoto na likolo.mpela moko ekomama na buku ya basakoli: ndako nbayuda, bokataki bibwele nkingo mpo na kotumbela ngai mbeka mpe kobonzela ngai na mibu tuku minei kati na bisobe?43Bino boyingisaki mongombo ya molck mpe monzoto ya nzambe ya Remphan, bikeko oyo bino bosalaki mpo na kokumbamela: Boye ngai nakokumba bino mosika koleka Babylone.44Bakoko na biso bazalaki na mongombo ya botatoli na lisobe,lolenge Nzambe apesaki mitindo tango ye asololaki na Mose, ete esengelaki ye komekola yango lolenge ye amonaki yango. 45Yango nde hema oyo bakoko na biso, kati na botamboli na bango, bakumbaka na mboka elongo na jJosua. Yango ekomaki tango ya mabele epesamelaki bango likolo ya mabota oyo Nzambe asilaki kobengana liboso ya bakoko na biso. Etikalaki bongo kino mikolo na Dawidi, 46oyo azwaki ngolu liboso na Nzambe; boye asengaki ete hema esantu etongama mpo na Nzambe na Jakobo.47Kasi ezalaki bongo nde Salomo atongaki ndako na Nzambe. 48Ata ko bongo, Nzambe na lola afandaka na ndako etongami na maboko na bato te; pela moko mosakoli alobaki. 49"Likolo ezali efandeli na ngai, bongo mabele ezali nde etelemeli na ngai. Lolenge ya ndako nini bokotongela ngai?" Bo elobaki Mokonzi. Wapi epemelo na ngai? 50Loboko na ngai te, nde asali nyoso?51Bato bazangi botosi mpe kokatama ngenga na mitema mpe na matoyi; bozali kotelemela tango inso molimo mosantu; bozali komekola bo bakoko na bino basalaki. 52basakoli boni boni bakoko na bino babenganaki te? Babomaki basakoli oyo bayingelaki liboso ya moyengebene obe moko; sasaipi, bino mpe bomekoli bayini mpe babomi, 53bino oyo bozwaki mobeko na ndikisa ya ba anzelu, kasi bobombaki yango te.54Tango likita ya banganga nzambe bayokaki boye, mitema mia bango mizokaki, mpe baliaki mino na kotuka Etienne. 55Nzoka nde ye kotondisama na molimo mosantu, atelemaki ngwi miso kotala likolo mpe amonaki nkembo na Nzambe. 56Etenne alobaki boye: «Botala, nazali komona mapata kofungwama, bongo mwana na moto kotelema na loboko mobali na Nzambe.»57Na boye likita na banganga nzambe bangangaki makasi, bongo bamikangaki matoyi, mpe bamibwakaki elongo likolo na ye. 58Babwakaki ye libanda ya engumba mpe babomaki ye na mabanga: boye banzeneneke bakumbaki bilamba na bango na nse ya makolo ya elenge mobali moko na nkombo Saul.59Bongo bazalaki kobwakela Etienne mabanga, ye atombolaki mongongo kobondela Mokonzi mpe koloba boye:«Mokonzi Yesu, okamata molimo mwa ngai» 60Bongo ye kofukama, angangaki makasi; «Mokonzi, kokumbisa bango lisumu oyo te. Sima ye koloba bongo, akati motema.»
81Saul andimaki liwa na ye, wana ebandaki mokolo monene ya koboma lingomba oyo ezalaki na Jelusaleme; bandimi nyonso bapalanganaki na Jude mpe na Samari, batikaki bantoma. 2Bato ya mawa bakundaki Etienne mpe bayokaki mawa monene na tinja ya likambo wana. 3Saul asaka mabe mingi na eyanganelo, azalaki kokenda ndako na ndako kobwaka mobali to mwasi, koti bango na boloko.4Bandimi baye ba panzanaki bazalaki kokenda koteya liloba. 5Filipe akendaki na engoimba ya Samari koteya bango Klisto.6Lokola etuluku ya bato bayokaki mpe bamoni bilembo oyo Filipe asalaki, bazalaki na bokebi na oyo te azalaki koloba. 7Bazalaki wana na milimo mabe elongwaki na bango na kati ya koganga na lokito makasi, Baye bakufa maboko to makolo babikaki. 8Esengo monene etundaki na engumba wana.9Ezala engumba moto na kombo ya Simoni, ye azalaki kosala bondoki, azalaki kokamwisa ba Samaritani, amipesaki moto ya lokumu. 10Ba Samaritani, nyonso azala muana to mokolo bazalaki kokeba mingi na maloba na ye, bazalaki koloba : «Moto oyo azali na bokonzi ya Nzambe, ye oyo abiangami moto ya monene.» 11Bazalaki koyoka ye, mpo ete awumelaki mingin na kosala bikamuisi ya bondoki na ye.12Ntango bango bandimaki mateya ya sango malamu epayi na Filipe, na oyo etali bokonzi ya Nzambe mpe na kombo na Yesu Klisto, babatisaki mibali mpe basi. 13Mpe Simoni ye moko andimaki mpe azuaki libatisi, tango amonaki Filipe akangami na ye na kotala bilembo na bikamwisi mpe atikalaki kati na kokamwa.14Sika oyo lokola ba Ntoma bazalaki na Jelusalema boyoki Samari ba yambi liloba ya Nzambe, na sima batindeli bango Petelo na Yoani. 15Tango bakomi basambelaki mpo na bango, mpo ete bayamba ngolu ya Molimo Mosanto. 16Mpo ete na ngonga wana, Molimo Mosanto ezalaki naino aye te mpo na bango.; bazuaki kaka libatisi na kombo na Mokonzi Yesu. 17Na yango Petelo na Yoani batielaki bango maboko mpe bayambi Molimo Mosanto.18Lokola Simoni amonaki ete MOlimo epemeli bango na kotia maboko ya bayekoli, apesi bango mbongo. 19Alobi : «Pesa ngayi bokonzi oyo mpo ete moto nyonso oyo ngayi na kotiela maboko akoka kozua Molimo Mosanto.»20Kasi Petelo ayanoli ye boye: «Tika okufa na masolo na yo, okanisi ete kozua likabo ya Molimo Mosanto ya Nzambe basombaka na mbongo. 21Ozali na eteni to likabo likambo, mpo ete motema na yo ezali sembo te liboso na Nzambe. 22Bongwana na kanda ya motema, sambela Mokonzi mpo ete akoka kolimbisa yo kati na misala na yo ya mabe. 23Mpo et na moni yo ozali kati ya ngenge ya kozua , mpe kati ya bokangami na masumu.24Simoni azongiseli bango boye: «Basambela Mokonzi mpona ngayi, na tina nyonso olobeli ngayi, likambo moko ya mabe ezua ngayi te.»25Tango Petelo mpe Yoani batatoli mpe balobi liloba ya Mokonbzi, bazongaki na Jelusame, na nzela bazalaki koteya sango malamu kati ya ba mboka ebele ya ba Samaritani.26Sika oyo angeli ya Mokonzi alobi na Filipê na koloba: «Telema kenda na ngambu ya sud na nzela ya Jelusalem na Gaza.» (Nzela wana ezali na mabele ya zelo na zelo). 27Bayoki mpe bakeyi. Kuna ezalaki na Ethiopien , oyo azalaki kokengela masolo ya mama mokonzi ya Ethiopi ayaki na Jelusalem mpo ya kosambela. 28Azongaki likolo ya likalo, na nzela azalaki kotanga makanda mosakoli Isaya ya kofanda.29Molimo elobi na Filipe: «Kenda mpe pusana pene ya likalo wana.» 30Filipe akeyi mbangu mpe ayoki moto azali kotanga mokanda ya Isayi mosakoli bongo atuni ye: «Ozali koyeba makambo ozali kotanga?» 31Ethiopiya ayanoli: «Na koyeba ndenge nini soki moto alimboleli ngayi te?» Abondeli Filipe abuta na likalo mpe kofanda na ye esika moko.32Eteni ya mokanda ya Nzambe oyo azalaki kotanga yango oyo: «Akomaki lokola meme oyo balingi koboma, lokola mwana mpate oyo elelaka te tango bazali kolongola yango nkunza, afungolaki ata munoko te. 33Na kati ya komikitisa balongolaki kosambisama ye. Na bakitani na ye, pamba te balongo laki na mokili.»34Moto wana ya Ethiopia atuni Filipe: «Nabondeli yo, mosakoli abandaki kolobela nani? Ya ye moko, to ya moto mususu?» 35Filipe ayanoli ye na kobanda nzela ya mokanda Isaya, sima ateyi ye na maye matali Mokonzi.36Otango bazalaki kokenda bakomi pene ya bitima ya mayi, moto na Ethiopa alobi : «Tala awa mayi yango oyo nini epekisi yo mpo obatisa ngayi?» 3738Na yango moto na Ethiopa asengi batelemisa likalo, bakoti na mayi, Filipe na moto na Ethiopiya, wana Filipe abatisi ye.3940Tango babimi na mayi, Molimo ya Mokonzi ememi Filipe wana moto na Ethiopiya amoni ye lisusu te, kasi asepelaki na kokoba nzela na ye. KAsi Filipe akomi mboka Azot. Akatisi etuka na kati ya koteya sango malamu na engumba kino kokoma na Sezare.
91Kasi Saul akobaki mosala na ye ya kotungisa mpe koboma bayekoli ya Mokonzi, akeyi epayi ya nganga Nzambe monene 2mpe atuni mokanda mpo na eyangenela ya Damas na nitna ete azua basungi na nzela, babali to basi akangi bango miniololo kino na Yelusalema.3Na nzela ya kokenda bakomi pene na Damas na pusa kaka engali kowuta na likolo ebeti nzinga nzinga na ye; 4akweyi na mabele mpe ayoki mongongo kolebela ye: «Saul, mpona nini ozali konyokola ngayi?»5Saul azongisi : «Yo nani, Mokonzi?» Mokonzi ayanoli : «ngayi Yesu oyo ozali konyokola; 6kasi telema kota na engumba, kuna nde okoyeba oyo kosala.» 7Mibali baye batambolaki na Saul, basilaki mayele ya koloba ezalaki te; bayo kaki mongongo kasi ba moni moto te.8Saul alamuki na mabele , tango afungoli miso, akokaki komona lisusu te; basimbi ye na maboko mpe bamemi ye na Damas. 9Atikali wana mikolo misanto na kozanga komona, kolia na komela te.10Na Damas ezalaki na moyekoli moko babiangi ye Ananias. 11Mokonzi alobeli ye na komona: « Ananias». mpe ayanoli: « Ngayi ye oyo Mokonzi.» Mokonzi alobi na ye: « Telema, mpe kenda na bala-bala babiangi Droite, kuna na ndako ya Yuda, tuna moto awuti na Tarse, babengi Saul; mpo azo bondela. 12Mpe amoni na emoniseli moto na kombo ananias kokota mpe kotiela ye maboko mpoe amona lisusu».13Ananias azongisi: «Mokonzi, na yoki etuluku ya bato koloba mpona tina ya moto wana, mbala boni anyokoli libota esantu na yo na Jelusalema. 14Azalaki na bokonzi kowuta na nganga Nzambe mokonzi pona kokanga moto nyonso ako belelaka kombo na yo». 15Kasi Mokonzi ayebisi ye: «Kenda, ye azali oyo ngayi moko na poni po na kotalisa kombo na ngayi epayi ya bapagano, bakonzi mpe na bana Israel; 16Nakotalisa ye ndenge ye akomona pasi na ntina na kombo na ngayi.»17Wana Ananias akeyi , akoti na ndako, atieli ye maboko mpe alobi: «Ndeko Saul, Mokonzi Yesu oyo amimonisaki epayi na yo na nzela na tango ozalaki koya, atindi ngayi mpo omona mpe otondisama na Molimo Mosantu.» 18Na mbala moko, biloko lokola poso ya mbisi ekweyi na miso na Saul, mpo azongeli komona , azui libatisi, 19sima aleyi mpe azui makasi na nzoto. Atikali na bayekoli mikolo ebele na Damas.20Kobanda wana, abandi koteya sango malamu ya Yesu na biyanganelo, koloba ete Azali mwana na Nzambe. 21Baye banso bayokaki bazalaki kati na kokamwa, na koloba ete: «Oyo moto abandaki ko bebisa na Yelusalem bato oyo babandaki kolobela Yesu ?Mpe ayaki awa mpona kokanga bato komema bango epayi ya nganga monene na Nzambe.» 22Kasi Saul akomi lisusu makasi koleka, mpe abandaki kobangisa ba Yuda oyo bazalaki kofanda na Damas nako lakisaka bango Yesu aza Klisto.23Sima mikolo ebele eleki, ba Yuda bayokani pona koboma ye. 24Kasi miango na bango eyebani epayi ya Saul. Bakengelaki bikuke inso ba moyi mpe butu pona koboma ye. 25Na butu bayekoli kakitisi ye na singa mpo bakimisa ye.26Tango akomi na Yelusalem, Saul aluki komonana na bayekoli , kasi bango nyonso babandaki kobanga ye, ba boyi ko ndima ye lokola moyekoli. 27Kasi Barnabas azui ye mpe amemi ye epayi ya ba ntoma. Abandi koyebisa bango ndenge nini na nzela Saul amonaki Mokonzi , mpe Mokonzi alobelaki ye mpe ndenge nini ateyaki nkombo ya Yesu na makasi mpenza.28Ayebisi bango lolenge azalaki kokota mpe kobima na Yelusalem, azalaki koloba na etingia na kombo na Mokonzi Yesu 29mpe azalaki kozongisela ba Yada Greque maloba; kasi ba oyo babandaki koluka na kolemba te ndenge nini koboma ye. 30Tango ba ndeko bayoki nsango oyo, ba memeli yango Sezare mpe kuna bakeyisi ye mpona Tarse.31Wana bobombaki ye, Eklesia ezalaki na kimia na etonga na Yuda, Galile mpe Samarie, bazalaki kolendisama mpe kotambola kati na kobanga Mokonzi kati na nguya ya Molimo Mosantu. Bandimi batondaki mingi na ba etonga wana. 32Sikoyo, po ete Petelo abandfaki kotambola engumba mobimba, akeyi mpe epayi ya ba ndimi oyo ya Lydde.33Kuna, akutani na moto na kombo Enée, oyo atikala ya kolala na ndetu naye kobanda mbula mwambe na gtina ya maladi ya buka-buka. 34Petelo alobi: «Enée, Yesu Kliosto abikisi yo. Telema bongisa mbeto na yo». Na pete atelemki. 35Bato ya mboka Lydee mpe ya Saron bamonaki ye mpe bandimeli Mokonzi.36Sika oyo ezalaki na Joppe moyekoli moko na kombo ya Tabita balimboli «Doloka». Muasi ya misla malamu azalaki kokabola na mawa na ye biloko na ye epayi ya babola. 37Abeli mpe akufi; sima ya kosokola ye, batie ye na ndako ya mabondeli ezalaki likolo.38Lokola Lyde ezalaki pembeni na Joppé, mpe bayekoli ayokaki ete Petelo azalaki wana, batindi mibali mibale mpona kobondela Petelo na koloba: «Yaka na kozela te.» 39Petelo atelemi mpe akeyi ba batu wana. Tango akomi, bakeyi na ye na esika ya mabondeli. Basi bakufela mibali bazalaki pembeni na ye na kolela, kolakisa bilamba oyo doloka azalaki kotonga tango azalaki na bomoyi.40Petela abimisi batu nyonso, atie mabolongo na ye mpe asambeli na sima abalukeli nzoto mpe alobi: «Tabita, telema» Dolokas afongoli miso mpe amoni Petelo afandi pene na ye. 41Petelo apesi ye loboko mpe atelemisi ye. Na ntango abengi ba ndimi na ba mama bakufela mibali mpe alakisio bango ye na bomoyi. 42Likambu oyo epanzanaki Koppe mpe mingi bandimelaki Mokonzi. 43Petelo atikalaki mikolo ebele na Joppe epayi ya moto na kombo ya Simoni, moteki mposo ya nyama.
101Moto moko ya engumba Cesaree, na nkombo Corneille, capitaine ya lingomba ya basoda babengi «Italienne.» 2Azalaki moto na sembo, ya kongumbamela Nzambe na libota na ye mpe bazalaki kopesa misolo ebele na bayuda mpe kosambela Nzambe mbala o mbala.3Pene na ngonga ya libua ya mokolo, amoni polele na emoniseli anzelu ya Nzambe kobimela ye mpe kobenga ye na nkombo. 4Corneille akamwi mpe atondi na kobanga alobi: «Tata likambo nini?» anzelu azongisi: «Mabondeli mpe makabo na yo mpo ya babola makoni liboso ya Nzambe lokola makabo ya kokanisaka. 5Sasaipi benga Simoni oyo abiangami mpe Petelo azali na engumba ya Jopppee. 6Afandi epai ya Simoni mobongisi poso ya nyama , ndako na ye ezali pene ya ebale.7Tango anzelu akei, Corneille abengi kati na basali na ye mibale mpe soda moko ya mondimi kati na basoda na ye. 8Ayebisi bango manso makomelaki ye mpe atindi bango na Joppee.9Lobi na yango , pene na ngonga ya motaba ya mokolo, lokola bazalaki na nzela mpe bakomi pene na Joppee, Petelo amati likolo na ndako mpo na kobondela. 10Kuna ayoki nzala mpe esengelaki kolia. kasi wana bazali kobngisa makusa, amemami na molimo, 11lola efungwami mpe ekolo monene na lolenge ya bolangeti esimbami na songe na yango minei,ezalaki kokita. 12Na kati na yango ezalaki banyama yonso ya makolo minei mpe baoyo batambolaka na mabele mpe bandeke ya likolo.13Bongo ayoki mongongo koloba na ye: «Petelo, telema, boma mpe lia.» 14Petelo azongisi maloba: «Te! Mokonzi; naino nalia nyama ya mbindo te.» 15Na mbala ya mibale mongongo elobi na ye lisusu: «oyo Nzambe amoni peto, komona yango mbindo te.» 16Yango esalami mbala misato bongo ekolo yango ezongaki na lola.17Wana Petelo azalaki kokanisa na ntina na emoniseli azwaki, tala bato bauti apai ya Corneille bakomi liboso ya ndako. 18Babeleli na mongongo makasi kotuna soko Simoni babengi Petelo azali.19Lokola Petelo azalaki kokoba kokanisa na ntina na emoniseli, Molimo Mosantu alobi na ye: «Tala bato misato bazali koluka yo! Telema, 20kita mpe kenda na bango. kobanga te pamba te, ngai moto natindi bango.» 21Petelo akiti mpe akutani na bango mpe alobi: moto bazali koluka ezali ngai, boyei nini?»22Bayanoli ete: «Capitaine moko na nkombo Corneille, moto na sembo mpe mongumbameli ya Nzambe mpe bayuda yonso batatoli bolamu na ye, azwaki mitindo kouta epai na Nzambe kobenga yo na ndako na ye, mpo ayoka sango malamu. 23Petelo ayambi bango mpe balali esika moko yambo bazonga lobi na yango. Ndambo ya baninga ya Joppee mpe bakendaki na bango.24Na mokolo elandaki, bakomaki na Cesaree mpe Corneille azalaki kozila bango, ye na baye abengaki.25Tango Petelo akoti na ndako, Corneille afukami liboso na ye mpo nakokumbamela ye. 26Petelo atelemisi ye mped alobi na ye: «Telema! Ngai mpe nazali moto lokola yo.»27Wana Petelo azalaki kosolola na ye, akoti na ndako mpe akuti bato ebele. 28Alobi na bango: «Boyebi bino moko ete epekisami na moyuda kosolola to kokota na ndako ya mopagano, kasi Nzambe alobi na ngai ete namona moto moko te mbindo. 29Yango wana nayei na mbela na yo na tembe te.» Boye obengi ngai nini?30Corneille alobi: "eleki mikolo minei nazalaki na mabondeli na ndako, na ngonga ya boye, namoni moto moko na bilamba ezalaki kongenga liboso na ngai 31mpe alobi: "Corneille! Nzambe ayoki losambo na yo mpe akanisi makabo na yo na ntina na babola. 32Tinda moto akende kobenga Simoni babengi ye Petelo, afandi na ndako ya Simoni mobongisi mposo ya nyama pene-pene na ebale. 33(Na mbala moko, natindaki bato epai na yo mpe osali malau mpo oyei. Sasaipi, tozali banso liboso na Nzambe mpo na koyoka mitindo nini apesi na yo mpo na biso)34Na bongo Petelo azwi maloba: «ya solo, nayebi et Nzambe azali na kopona pona bato te. 35Kasi na mokili mobimba, nani oyo azali kobanga ye, kongumbamela ye, mpe kotambola na sembo, Nzambe akosepela na ye.36Boyebi sango malamu atindelaki bayuda oyo etalisi ete kimia ezali na nzela na Yesu oyo azali Mokonzi na bato yonso. 37Boyebi bino moko oyo elekaki na Judee, kobanda na Galilai, sima na libatisi oyo Yoane azalaki koteya. 38Makombo etali Yesu ya Nazareth, boni boni Nzambe apokolaki ye mafuta ya Molimo Mosanto mpe na nguya. Azalaki kotambola, kosalaka bolamu mpe kobikisa bato yonso oyo zabolo azalaki kotungisa; pamba te, Nzambe azalaki na ye.39Tozali banzeneneke na makambo yonso oyo asalaki na mboka na bayuda mpe na Yelusaleme, Yesu oyo babomaki na ekulusu. 40Moto oyo, Nzambe asekwisaki ye na mokolo na misato mpe amonisi ye, 41na bato yonso te, kasi na banzeneneke baoyo Nzambe aponaka uta kala; nde biso oyo toliaki mpe tomelaki na ye sima na kosekwa na ye.42Apesaki biso mitindo ya koteya libota ya bayuda mpe totatoli ete aponamaka na Nzambe mpo azala mosambisi ya bato bazali na bomoi mpe baye bakufa. 43Basakoli yonso bazali kotatola ete moto yonso akondimela ye, akozwa bolimbisi ya masumu na nkombo na ye.44Wana Petelo azalaki naino koloba, Molimo Mosanto akiteli bango yonso bazalaki koyoka mateya. 45Baninga oyo balandaki Petelo kolongwa na Joppee bakamwi komona bapagano mpe kozwa Molimo Mosanto.46Pamba te bazalaki koyoka bapagano koloba na lokota ya sika mpe kokumisa Nzambe. Petelo ayanoli na nguya:« 47Bakoki kopimela libatisi ya mai na baoyo bazwi Molimo Mosanto lokola biso?» 48Apesi mitindo babatisa bango libatisi na nkombo na Yesu mpe basengi na ye kofanda na bango mwa mikolo moke.
111Bantoma mpe bandeko bazalaki na Yudee bayokaki ete bapagano bayambi liloba na Nzambe. 2Ntango Petelo akendaki na Yelusaleme, etuluku ya bandimi babangaki mpe balobi: 3«Yo osangani na bapagano mpe olei na bango!»4Kasi Petelo alimbolaki bango na siki siki koloba boye: « 5Nazalaki kati na mobondeli na engumba ya Joppee mpe namonaki emoniseli liputa moko ya monene kokita na likolo na biteni na yango minei, ekiti esika na ngai. 6Nasimbamaki mpe nasosolaki, namoni banyama ya nzamba, na baoyo batambolaka na nse na mabele mpe bandeke na likolo7Nayokaki mongongo kolba na ngai ete: «Telema! Petelo, boma mpe lia.» Nayanoli: 8«Te, Mokonzi eloko moko te ya mbindo ekota na monoko na ngai.» 9Kasi mongongo elobi lisusu kouta na likolo koloba: «oyo Nzambe alobi ezali bule, moto akoki koloba te ezali mbindo.» 10Yango esalemi misato, mpe ezongi na likolo.11Tala bato misato batelemi o boso ya ndako esika tozalaki, batindamaki epai na ngai kouta na Cesaree. 12Molimo apesi ngai motindo ya kokenda na bango kokakola te. Bandeko motoba bakei na ngai elongo, tokoti na ndako na ye. 13Ayebisi biso ndenge anzelu abimelaki ye na ndako koloba: «Tinda bato na Joppee mpe senga mosali na Nzambe Simoni babengi Petelo. 14Ye akoyebisa yo sango, yo na libota na yo bobika.»15Tango nabandi koloba Molomo Mosantu akitaki likolona bango lokola na biso na ebandeli. 16Ngai nakanisi liloba oyo Mokonzi alobaki: «Yoane abatisaki na mayi, kasi bino bokobatisa na molimo na Nzambe.»17Soki Nzambe apesaki bango likabo moko na biso oyo tondimela Mokonzi Yesu Klistu, ngai nani mpo natelemela Nzambe? 18Tango bayokaki makambo oyo, batikalaki kimia, bakumisaki Nzambe koloba: «Nzambe abongoli mitema ya bapagano mpo ete bazwa bomoi ya seko.»19Na bongo baye bapalangani na Yelusaleme mpo na monyokoli ,ebandaki na kufa ya Etienne, ekei kino Phenicie,Chypre mpe Antioche. Bateyaki liloba bobele na bayuda. 20Kasi ba mosusu na Chypre, mosusu naCyrene, mosusu na Antioche, Bamosusu bazalaki koloba kigrec, bateyaki bango sango malamu ya Mokonzi Yesu. 21Loboko ya Mokonzi ezalaki likolo na bango mpe bato ebele babongolaki motema, bayaki epai ya Mokonzi.22Sango etamboli, ekomi na matoi ya lingomna ya Yelusaleme; batindaki Barnabas kino na lingomba ya Antioche? 23Wana ekomaki ye mpe amoni ngolu na Nzambe, azalaki na esengo mpe alendisaki bango kokangama na Mokonzi na motema moko. 24Azalaki moto malamu, atondisami na Molimo Mosantu mpe na kondima. Bayike balandaki Mokonzi.25Barnabas akendaki na Tarse mpo na koluka Saul. 26Sima na komona ye, amemi ye na Antioche. Bayanganaki elongo na likomba mbula mobimba mpe koteya bato bayike. Ezali nde na Antioche mpo ete bayekoli babiangama mbala ya liboso baklistu.27O eleko ena, basakoli bakomaki na Antioche kouta Yelusaleme. 28Moko na bango na nkombo ya Agabus atelemaki mpe kosakola na nzela ya Molimo, nzala monene na mokili mobimba. Yango ekokisamaki na tango ya mokonzi Claude.2930Na yango, bantoma bazwaki mokano ya kotinda lisungi na bandeko ya Yudee. Basalaki bongo mpe batindaki misolo epai ya bampaka ya lingomba na nzela ya Barnabas mpe Saul.
121Na eleko wana, mokonzi Herode akangaki bato mosusu ya lisanga mpo na konyokolo bango. 2Abomaki Jaki ndeko ya Yoane na mopanga.3Lokola amonaki ete esepelisaki bayuda, akangaki mpe Petelo. Ezalaki tango ya pasika. 4Sima ya kokanga ye mpe kotia ye na boloko, atiaki basoda zomi na motoba, bakabwani na biteni mine, basoda minei na eteni moko mpo na kokengele ye. Azalaki na makanisi ya kosambisa ye sima ya pasika.5Petelo kati na boloko, lisanga bazalaki kobondela makasi na ntina na ye. 6Liboso ete Herode asambisa ye, Petelo alalaki kati ya basoda mibale bakanga ye na minyololo mibale mpe bakengeli mibale liboso ya ekuke ya bakengeli ya basoda.7Anzelu mokonzi abimelaki ye pwasa mpe boloko engengaki, abetaki Petelo na mopanzi mpo na kolamusa ya mpe alobi: «Telema na lopango» Na yango, minyololo ya maboko ekweyaki. 8Anzelu alobi na ye: Lata bilamba mpe sapato na yo. Petelo akeli yango. Anzelu alobi lisusu: Lata kazaka mpe landa ngai!9Petelo alandi anzelu mpe abimi. Amonaki yango kosalama lokola ndoto. Azalaki koyeba te ete ezali solo, azalaki kokanisa ete ezali ndoto. 10Tango baleki ekuke ya liboso, ya mibale mpe bakomi na ekuke ya mabende; oyo ezali kokenda kino engumba, efungwamaki yango moko liboso na bango. babimaki mpe bakomi na nzela, anzelu alimwi.11Tango Petelo amitali, alobi:« namoni ya solo Nzambe atindi anzelu na ye akongola ngai na boloko ya Herode mpe mposa ya bayuda.» 12Sima ya komona boye, akendaki na ndako ya malia mama na Yoane oyo abengami na nkombo ya Malako, esika ebele ya bandimi bayangaki mpe kobondela.13Tango abetaki ekuke, mosali moko ya mwasi na nkombo rhode, ayaki kofungola. 14Tango ayoki mongongo ya Petelo, abosani kofungola ekuke na ntina na esengo, apoti mbangu kopesa sango ete Petelo azli liboso ya ekuke. 15Balobi na ye: ozali liboma. Kasi azalaki koloba ete ezali solo. bango balobi ezali elilingi na ye.16Kasi Petelo azalaki kokoba kobeta ekuke mpe tango bafungoli, bamoni ye mpe bakamwi. 17Petelo asalaki bango elembo na maboko batika makelele mpe ayebisi bango ndenge Mokonzi asali mpo abima na boloko. Alobi: «Boyebisa makambo oyo na Jaki mpe bandeko mosusu.» Atikaki bango mpe akendaki esika mosusu.1819Ntongo etani, yiki-yiki ekoti kati na basoda na maye makomelaki Petelo. Sima ya koluka ye, mpe amoni ye te, Herode atuni basoda mpe apesi mitindo baboma bango. Sima na yango, akendaki na Judee na mboka Cesaree mpe atikali kuna.20Herode asilikaki makasi na bato na Tyr mpe Sidon. Bayaki elongo epai ya mokonzi, basololi malamu na Blaste, mosungi ya mokonzi ete asunga bango kosenga kimia na mboka na bango pamba te, mboka ya bango ezwaka bilei na mboka ya mokonzi. 21Mokolo moko ekomaki, Herode alataki bilamba naye ya bokonzi mpe afandi na ngwende na ye; apesi lisikulu.22Baimboka bangangi: Oyo ezali mongongo ya nzambe kasi ya moto te. 23Mbala moko anzelu mokonzi abeti ye mpo apesi nkembo na Nzambe te. Aliamaki na nkusu mpe akufaki.24Kasi liloba ya nzambe ekolaki mpe efulukaki. 25Barnabas mpe Saulo, bakendaki kosakola na Yelusaleme. kozonga na bango, bazwaki Yoane oyo abiangami Malako.
131Kati na Eklesia na Antoiche, ezalaki na basakoli mpe balakisi. Bazalaki Barnabas, Simoni (oyo babengi Niger), Lucius ya Cyrene, Manahen (oyo akokwamaki na Herode Tetrarque) mpe Saul. 2Tango bazali kogumbamela Mokonzi mpe kokila, Molimo Mosantu akaboli Barnabas na Saul mpo na mosala oyo abiangaki bango. 3Sima bango ko sambela mpe kokila ba bulisi bango mpe ba tindi bango.4Barnabas na Saul batosi Molimo Mosanto mpe bakiti na Seleucie. Kuna nde ba koti na Chyprte. 5Bokomi na bongo na engumba ya Salamine, bateyi liloba ya Nzambe na eyanganeli ya ba Yuda. Yowana-Malako azalaki kosunga bango.6Basili kokatisa ti na Paphos, ba moni nganga kisi , mosakoli ya lokuta ya ba Yuda, na kombo ya Bar Yesu. 7Asanganaki na Proconsul Sergius Paulus, moto mayele. Moto oyo abengaki Barnabas na Saul po ete alingaki koyoka liloba na Nzambe. 8Kasi nganga kisi Elymas atelemelaki bango abandaki ko meka kobongolisa bondimi ya Proconsul.9Kasi Saul, oyo babengi lisusu Polo, atondaki na Molimo Mosantu, ataliye na miso, 10mpe alobi: «Yo mwana satana, otonda na motombo mpe kanda, ozali monguna ya bosembo. Otikaka kopenguisa nzela ya alima ya Mokonzi te?11Tala sasayipi maboko ya Mokonzi eza likolo na yo mpe oko kufa miso.Sima mwa ntango mukie okomona moyi te. Londende pe molili ezipi Elymas; akomi koluka nani oyo akosalisa ye mpo na kotambola. 12Proconsul amonaki nyonso wana andimeli bateya na ntina ya Mokonzi.13Kowuta Paphos Polo na ba ninga na ye ba nani na masuwa ti kokoma na Perge na Pamphylie. Kasi Yoani atiki bango kozonga na Yelusalem. 14Polo na baninga na ye bakomaki na Antioche mpe bakotaki na eyangenelo ya ba Yuda mokolo ya sabati mpe bafandaki. 15Sima ya matangi mibeko na ba sakoli, mokonzi ya eyangelo ya ba Yuda atindeli bango maloba nakoloba ete: « Ba ndeko, soki bozali na maloba yako lendisa libota, bo loba.»16Polo alobi: « Batu na Israel, bino oyo bo memiaka Nzambe boyoka! 17Nzambe ya libota Israel aponaki ba koko na biso abotisaki mutuya na bango na etonga ya Ezipito, asemboli loboko na ye mpe abimisi bango. 18Mbula tuku meneyi abatelaki mpe asalisaki bango kati na esobe.19Sima kobebisa bikolo sambo kati na ekolo ya Canaan, apesi libota na biso mabele wana lokola bomengo. 20Nyonso wana esilaki na kokisama kobanda mibu nkama miney natuku mitano. Sima makambu wana, Nzambe apesi ba zuzi, kino mosakoli Samuel.21Baluki mokonzi, Nzambe apesi Saul, mwana na Kis, moto ya libota ya Banjamin, po na mibu tuku miney. 22Nzambe alongoli ye na bokonzi, abimisi Dawidi muana Isai pona kozala moto kolandisa motema na ye m:pe asala mansop oyo nalingi asala.23Nzambe ameni Mobikisa na kokitana ya Dawidi, Yesu, lokola alakaki kosala. 24Ebandaki yambo Yesu awa, Yowani azalaki koteya tina ya libatisi ya koyambola masumu na eloko ya israel. 25Tango mosala ya Yowani esilaki, alobi: «Bokanisaka naza nani? Oyo naza te. Kasi boyoka, Moto moko akoya sima na ngayi, oyo nakoki ata kofongola singa ya sapatu na ye te.26Ba ndeko, bana ya libota na Abraham mpe ba ngumbameli Nzambe, sango malamu ya lobika etindami mpo na biso. 27Po ete ba oyo bafandaki na Yelusalem na ba konzi na bango bayebaki ye te mpe bakokisaki maloba ya ba sakoli oyo etangamaka mokolo nyonso ya Sabba nako katela etumbu28Atako bazangaki tina ya solo po na koboma ye, na sengaki Pilate aboma ye. 29Tango bakokisi maye manso bakomaki bakitisi na ye na ekuluse, mpe bakundi ye na lilita30Kasi Nzambe asekwisaki ye na kati ya ba kufi. 31Amonanaki na ebele ya bato mikolo ebele na baye ba butaki na Galile ya Yelusamel. Bato wana nde ba nzengeneke ya libota.32Tomemi sango malamu oyo po na elaka oyo epesamela ba koko na biso. 33Nzambe akokisi elaka na ye po na biso, bana na bango, nako sekwisa Yesu kati na bakufi. Yango wana ekomani na nzembo na Dawudi: «Oza mwana na nga, lelo nakomi Tata na yo». 34Na yango asekwisi ye kati na ba kufi po ete nzoto na ye ebeba te, alobi boye: "Nako pesa bino ba santu mpe mapamboli na Dawudi".35Yango alobi lisusu na nzembo na Dawudi mususu: "Okondima te komona nzoto ya Mosantu epola". 36Mpo Dawudi asilaki ko lala elongo na ba tata na ye mpe nzoto na ye epolaki, 37kasi oyo Nzambe asekwisaki ayebaki Kopola te.38Eyebana na bino bandeko na nzela ya mutu wana nde kolimbisama ya masumu elobami. 39Na ye oyo nyonso ako ndima ye alongisama na mibeko na Mose.40Bosala agele, makambo basakoli baloba ekomela bino te. 41Botala, bobongaka te, bozala kolongono, mpo ete nazo sala masala kati na bino. Musala oyo boko ndima te ata moto ayebisi bino.42Lokola Polo na Barnabas bakendaki, libota esenge ba bandela maloba wana na Sabati oyo ekoya. 43Na sima ya mayangani na eyenganelo ya ba Yuda, Ba yuda ebele na ba proselystes oyo bazalaki malamu balandaki Polo na Barnabas oyo babandaki kolendisa bango na ko koba na ngolu ya Nzambe.44Bayike na bato na mboka basanganaki na Sabati oyo elandi po na koyoka liloba na Mokonzi. 45Tango ya Yuda ba moni etuluku ya batu, batondisamaki na zuwa mpe ba bandaki koloba mabe na tina ya makambu oyo Polo azalaki koloba mpe kofinda ye.46Polo na barnabas babandaki koloba na kobanga te : «Eza motuya loloba na Nzambe eteyama epayi na bino bato ya yambo. Kasi ko bwakisa yango po bozomi mona bokoki te po na bomoyi ya seko, tala tobaluki epayi ba pagano. 47Mpo ete Mokonzi apesaki mitindo boye: "Natiaki yo po ozala mpole na ba pagano mpe omema sango malamu na suka ya mokili".48Ba pagano basepelaki mpe ba kumisaki liloba ya Nzambe, nakoyokaka maloba ya Polo. Ebele oyo baponama pona bomoyi ya seko bandimaki. 49Liloba na Mokonzi epanzanaki na engumba nyonso.50Ba Yuda batombokisi basi ya motuya mpe bakambi ya engumba. Ba botisi mobulu mpe na bengani Polo na Barnabas libanda na ndelu ya engumba. 51Kasi Polo na Barnabe balakeli bango mabe na ko popola makolo na bango. Mpe bakeyi na engumba ya Icone. 52Bayekoli batondisamaki na esengo na Molimo Mosantu.
141Wana ekomaki Polo na Barnbas na Icone, bakotaki elongo na kati ya eyanganelo ya bayuda mpe koteya na lolenge oyo ebele na ba yuda mpe ba Grecs bandimelaki liloba. 2Kasi bayuda oyo bazalaki pkwokoso ba bongolisaki mitema ya ba pangano mpe bayeyisaki boblo epayi ya bandeko.3bawumelaki tango molayi esika wana, koloba na nkonzo mpe nguya ya Nzambe mpe kozongisa etatoli na ntina na nsango ya ngolu. Esalamaki bongo mpona kopesa nzila te bilembo mpe makamuiselama na maboko na Polo na Barnabas. 4kasi engomba ya mboka wana ekabwanaki: basusu mpona bayuda, basusu mpona batoma.5Tango ba panganoelongo na bayuda ba sanganaki mpona kondimisa bakonzi mpo bakoka koniokola mpe kobamba Polo na Barnabas mabanga. 6Polo na Barnabas bayokaki mabongisi ya mabe oyo mpe bakimaki okati na bingumba ya lycaone na Derbe mpe engunda mosusu na Zinga Zinga. 7Mpe kuna bajteyaki sango malamu.8nakati na mboka Lystre ekolope moko afandaki, kowuta, mbotama na ye, atambola te. 9Moto wana azalaki koyoka maye Polo azalio koteya bango, Polo atalakiye na elikia te motu oyo azali na kondima, akoki kobikisama. 10Alobi naye, konganga na mongongo makasi: « Telema nzungukalu» mpe motu oyo apimbwe mpe atmboli.11tango emonaki ngulupa ya batu oyo Polo asali, batomboli mingongo mpe balobi na kota ya Lyaconienne: « ba Nzambe bakiteli biso na lolenge ya bato mpebapesaki bango nkombo». 12Barnabas, abiangamaki na nkombo ya « Zeus» mpe Polo nkombo ya « mercure», mpo ye nde azalaki moteyi monene. 13Nganaga Nzambe ya Zeus oyo tempelo naye ezalaki na ekuke ya engunda ya mboka, bamemaki ngombe mpe fololo mpona kobonza mbeka.14Tango ba ntoma: Polo na Baenabas bayoki yango, bapaosoli bilamba bango mpe ba welisi na lombango okati na etuluku ya bango na 15Konganga ete: batu pona nini ekosala bino bongo? tazali mpe bikelamùu, mpe posa ndenge moko na bino. toyeli bino nsango malamu oyo esengeli na bino kobowanga na makambo oyo ya mpamba mpe kobaluka epayi na Nzambe na bomoyi oyo asalaki likolo na mabele, mayi na maye maso evandi likolo na yango. 16Na tango ya kala atikaki bikolo etambola na lolenge na yango.17Ata ko atikaki te kotatola lolenge ye azali, na kosala malamu, na kopesa bino mbula kowuta na likolo mpe bilanga ya mapamboli, na kaliyisa mpe kotondisa mitema na bino na esengo. 18Atako maloba oyo Polo na Barnabas, epekisaki bango te kobonza mbekaoyo.19bayuda mosusu ya Antioche mpe Icone bayaki kokotisa makanisi ebe kati na etuluku oyo. babanbaki Polo mabanga mpe kosukuma ye kinoi libanda ya engunda wana, na likanisi ete azali kokosa. 20Na tango bantoma bazalaki zinga zinga na ye, atelemaki mpe akotaki na kati ya engunda, lobi elandi akendaki na derbe ye na Barnabas.21Sima wana esilaki bango koteya nsango malamu na kati ya engunda wana, mpe kozua ba ntoma ebele, bazongaki lisusu na Lustre; Icone mpe na Antioche. 22Batikakite kolendisa milimo ya ba ntoma mpo bayika mpiko na kati na kondima na ntina ete: « ezali bobele kati na minioko mingi nde tokoyingela na bokonzi ya Nzambe.»23Wana esili bango kofandisa kati na mangomba ya bandimi mpe sima ya kobondela mpe kokila bilei, batiki bango na Mokonzi oyo bandimelaki. 24Bakatisaki pisidie mpe kokoma na Pamphilie. 25Baskolaki sango malamu na Perge mpe kokita kuna na Attalie. 26Kuna bayingila okati na masuwa mpona kokende lisusu na Antioche epai basengelaki na bango mpona ngolu na Nzambe na ntina mosala oyo bawuti kokokisa.27Ntango ekomaki bango na Antioche mpe babenasaki lingomba mombima, bayebisaki bango maye manso Nzambe asalaki na bango lolenge boni boni ezipelo ya nkondima epayi ya ba pa1gano. 28Bafandaki wana ntango molayi na ba ntoma.
151Ndambu na bato bakitaki na Judee, mpe bateyaki bandeko koloba boye:«soki yo okokata ngenga te engebene na mobeko na Mose, okoki kobika te.» 2Tango Paulo na Barnabas bandongbanaki noki na maloba na bango, bandeko bazwaki mokano ete, Paulo mpe Barnabas mpe bandeko mosusu bakumbama na Yelusaleme pene ya bantoma mpe ba mpaka kosolola na ntina likambo lina.3Tango bandeko batinami na ndingisa ya etonga, balekaki na Phenicie mpe Samalia mpe bateyaki kobongola mitema ya bapagano. Boye bapesaki esengo makasi na bandeko yonso. 4Na bokomi na bango o Yelusaleme, bayambamaki na etonga kati na bantoma mpe na bampaka, boye bamonisaki manso oyo Nzambe akokisaki na bango.5Na boye, ndambu na baoyo bandimelaki kati na Bafalizao, batelemelaki bango koloba: «Ebongi malamu kokatisa bango ngenga mpe kotosa mobeko na Mose. 6Bantoma na bampaka basanganaki na ntina ya kosolola likambo yango.7Sima na ngonga molai ya masolo; Petelo atelemaki mpe alobi: «Bandeko bozali na boyebi ete ngonga molai Nzambe aponaki ngai kati na bino, na ntina ete na nzela na ngai, bapagano bayeba sango malamu mpe bandimela. 8Bongo Nzambe oyo ayebi mitema, atatoli mpo na bango na bopesi bango Molimo Mosantu pelamoko na biso. 9Boye, ye akesenisi biso na bango te, na kobulisa bango mitema kati na kondima.10Sika oyo, boni boni bozali komeka Nzambe, na komemisa bayekoli mokumba oyo ata bankoko na biso to biso, tokokaki komema te. 11Kasi tozali na kondima ete tokobika na ngolu ya Mokonzi Yesu pelamoko bango.»12Bayike banso bayokamelaki tango Barnabas na Paulo bazalaki kotalisa bilembo mpe bikamwa oyo Nzambe asalaki kati na bapagano na nzela na bango.13Esilisi bango koloba, Jaki alobi boye: «Bandeko boyoka ngai. 14Simoni atatolaki lolenge nini Nzambe apesaki bapagano ngolu na ntina bapona kati na bango libota mpo na kobulisa nkombo na ye.15Maloba ya basakoli malandisami na maye wana, ndenge ekomami: 16«Sima na maye wana, nakozonga mpe nakotonga mongombo ya Dawidi oyo esila kokufa. nakotelemisa mpe nakokomisa yango sika. 17Na bongo ndambu ya bato bakoluka Mokonzi pelamoko na bapagano.» 18Elobi bongo Mokonzi mozalisi na manso seko na seko.19Na boye, makanisi na ngai ezali ete tokoki soko moke te kotia mobulu kati na bapagano oyo bayambi Nzambe. 20Nzoka nde kotalisa bango kokima mbindo ya bikeko, bonsoni, nyama batangisa makila te mpe makila. 21Uta kala na bileko eleka, ezali na bato na engumba moko na moko bazali koteya mpe kotanga Mose kati na biyanganelo ya bango mikolo yonso ya eyenga.22Boye, emonanaki malamu na bantoma mpe bampaka, lisanga na etonga mobimba, kopona Jude oyo abiangami Barbabas mpe Silas, bakambi kati na etonga, kotinda bango na antioche elongo na Paulo mpe Barnabas. 23Bakomaki boye: «Bantoma, bampaka na bandeko, epai ya bandeko na biso bapagano kati na Antioche, Syrie, mpe Cilicie, mbote na bino!24Toyokaki ete bandeko songolo baye topesaki mitindo te, bakumbamaki epai na bino mpe bobululinganisa bino na mateya oyo ekotisaki mobulu na mitema na bino. 25Na bongo ezalaki na biso banso toyokana kopona bandeko mpe kondela bino bango elongo na balingami Barnabas mpe Paulo, 26oyo bamibonza mpo na nkombo ya Mokonzi Yesu Chlisto.27Totindi mpe Jude na Silas kolobela bino makombo se moko. 28Elongobanaki na Molimo Mosantu mpe biso, kotindela bino kaka maye oyo elongobani: 29«Boye boboya makasi, manso babonzeli bikeko, makila, nyama batangisa makila te, mpe bonsoni. Soki bino bokokabwana na manso wana, ekozala malamu mpo na bino. Botikala malamu.30Na bongo, bapesaki bango nzela mpe na bokomi na Antioche, basangisaki bato ebele mpe bapesaki bango mokanda. 31Boye bango kotanga, batondaki na nsayi na bosungami. 32Jude mpe Silas bo basakoli, balendisaki bandeko na mayike na maloba mpe bakembisaki bango.33Kosila bango kolekisa mwa ngonga kuna, bandeko bazongisaki bango na kimia, na baye batindaki bango. 34Silas ye amonaki malamu ye kotikala moke. 35Kasi Paulo na Barnabas batikalaki na Antioche elongo na bandeko bayike basusu, kuna batangisaki mpe bateyaki maloba ya Mokonzi.36Mikolo mike koleka, Paulo alobaki na Barnabas: «Ebongi na biso kozonga kotala bandeko kati na bingumba binso epai toteyaki maloba ya mokonzi mpe koyeba boni boni bazali kotambola. 37Barnabas asepelaki batambola elongo na Yoane oyo abiangami Malako. 38Nzoka nde mpo na Paulo ezalaki malamu te batambola elongo na ye. Ye akabwanaki na bango kobanda Pamphylie mpe atambolaki na bango te na mosala.39Makanisi na bango ekokanaki te, na bongo bakabwanaki. Barnabas batambolaki na Malako kino na Chypre. 40Nzoka nde Paulo aponaki Silas mpe batambolaki elongo sima na bandeko kosengela bango ngolu ya Mokonzi. 41Akatisaki ekolo ya Syrie mpe Cilicie na kolendisa bitonga.
161Polo akomaki na Derbe mpe na Lystre, moyekoli moko azalaki wana na nkombo ya Timote, mama na ye azalaki mo Yuda mondimi na Yesu, tata na ye azalaki grec. 2Bandeko ya Lystre mpe Icone bazalaki kotatola malamu mpo na ye. 3Polo alingaki kozua ye mpo basala mobembo esika moko na ye. Akamati ye mpe akatisi ye ngenga mpo na ba Yuda oyo bazalaki kofanda na mokili yango mpo batyo nyonso ba yebaki ete tata na ye azalaki grec.4Kati na bingumba oyo bazalaki koleka, bazalaki kotalisa na Mangomba mibeko oyo ba ntoma mpe ba mbuta ya Kelusalema ba pesaki bango , mpe ba sengi bango kotosa yango. 5Mangomba ezalaki kokola makasi kati na kondima na bango, mpe motuya na bandimi ezalaki koluta na likola mokolo na mokolo.6Polo mpe baninga na ye bakatisaki mabele na Phrygie mpe na Galati, pamba te Molimo Mosantu apekisaki bango kosakola nsango malamu na Asie. 7Ntango bakomaki penepene na Mysie, ba mekaki kokende na Bithynie kasi Molimo Mosantu na Yesu apekisaki bango. 8Balekaki na nzela ya Mysie mpe bakitaki na engumba ya Troas.9Polo alotaki ndoto na butu: Amonaki moko ya Macedoine kotelema mpe koloba na ye: «Yaka na Macedoine kosunga biso.» 10Nsima na Polo komona ndoto yango, mbala to lukaki nzela ya kokende na Macedoine, mpo toyebaki ete Nzambe asili kobenga mpona kosakola nsango malamu na engumba yango.11Kolongwa na Troas, tokendaki semba na Samothrace, mpe lobi mosusu tokomaki na Neapolis. 12Kolongwa kuna tolekaki na Filipe oyo ezali engumba ya Macedoine, oyo engumba eleki motuya ya mboka, mpe tobandaka wana bazali ba Romain. Tofandaki na engumba yango mwa mikolo. 13Na mokolo ya Sabata, tobimaki na engumba mpe tokendfaki pembeni ya ebale tokanisaki esika malamu ya ko sambela ezalaki kuna. Tofandaki mpe to sololaki ba basi oyo basanganaki na biso.14Mwasi moko na kombo Lydie moteki na bilamba na engumba ya Thyatire, oyo azalaki kokumisa Nzambe azalaki koyoka biso. Mokonzi afungolaki motema na ye mpo na kotia litoyi na mateya ya Polo. 15Ye azuaki libatisi na libota na ye mobimba, sima asengaki biso koloba : «Soki bondimi ete nazali mondimi na Mokonzi boya kolala na ndako na ngayi, nabondeli bino.16Ekomaki ete, lokola kozalaki kokende na esika ya mabondeli, elenge muwasi moko oyo azalaki na molimo mabe oyo ebandaki kolakisa ye makambo makoya. Bakonzi na ye bazalaki kozua mbongo mingi pona mosala na ye. 17Mwasi yango abandaki kolanda biso na Polo mpe azalaki koganga na koloba: «Bato oyo bazali basali na Nzambe ya likolo. Bazo lakisa bino nzela ya lobiko.» 18Asali yango mikolo ebele. Kasi Polo alembaki mpe abalukaki na kolobela molimoyango: «Na pesi yo mitindo, na nkombo na Yesu Klisto bima na mwasi oyo.» MPe molimo ebimi na mbala moko.19Ntango bakonzi na ye ba moni ete bakoki kozua lisusu mbongo te, bakangi Polo na Silasi mpe bameni bango na zando epayi na bakonzi ya engumba. 20Ntango balakisi bango epayi ya bazuzi, balobi boye: «Bato oyo baza ba Yuda mpe bazali kobimisa mobulu kati na mboka. 21Mpe bazali kolakisa bizaleli oyo biso ba Romain topkoki kondima te mpe kosala te.»22Ebele na bato ba tombokelaki Polo mpe Silasi, bazuzi bapesi mitindo ete balongola Polo na Silasi bilamba mpe kobeta bango fimbo. 23Sima ya kotuta tuta bango, ba bwaki bango na boloko, mpe bapesi mitindo na mokengeli ya ya bakangani ete akangela bango makasi. 24Nsima kozua mitindo , mokengeli ya bakangami akotisi bango na kati na boloko mpe akangisi makolo na bango na libaye monene.25Pene pene na midi butu, Polo mpe Silasibazalaki ko kumisa Nzambe na koyemba, bato ya boloko bazalaki koyoka bango. 26Mbala moko mobele ebandaki koningana makasi penza kino ndako mobimba elingaki kobukana, kaka na ngonga wana bikuke na boloko nyonso mifungwamaki, monyololo na bakangami nyonso ekatamaki.27Mokengeli ya ba kangami alamukaki na pongi, emonaki ye ete bikuke nyonso na boloko ekomaki polele, abimisi mopanga na ye mpe alingi komi boma mpo akanisaki ete ba kangami nyonso basilaki kokima. 28Kasi Polo agangaki na mongongo makasi ete: «Komi boma te, Biso nyonso tozali.»29Bongo makengeli ya bakangami asengaki mwinda, akoti mbangu na boloko, mpe afukameli Polo na SIlasi na kolenga. 30Abimisi bango na libanda mpe atunaki bango ete: « Ba tata, nasala nini mpona bika? 31Bazongiseli ye: «Ndimùa Mokonzi Yesu, bongo okozua lobiko yo mpe libota na yo.»32Polo mpe Silasi babandi koteya ye mpe bato na ndako na ye maloba na Mokonzi. 33Kaka na ngonga wana na kati na butu, mokengeli ba kangami, amemi bango mpe asukolo ba pota na bango, mpe azui libatisi na ndako na ye mobimba. 34Ye akotisi Polo mpe Silasi na ndako na ye, mpe apesi bango lileyi, ye mpe lobota na ye batondaki na esengo mpo basili kondima Nzambe.35Ntango tongo etani, bazuzi ya ba Romain, batindi bato epayi na mokengeli boloko koloba: « Bimisa bato wana na boloko.» 36Mokengeli amemeli maloba wana na Polo koloba ete: «bazuzi batindi liloba ete na bimisa bino na boloko sika oyo bo bima mpe bokende na kimia.»373839Kasi Polo alobi na bato oyo bazuzi batindaki ete: «Tosambi ata kosamba te, babeti biso fimbo na miso na bato nyonso biso ba Romain. Sima babwaki biso na boloko. bongo sika oyo balingi kobimisa biso na kobombama. Ekoki kosalama bongo te, malamu bango moko baya kobimisa biso. Bakengeli yango bakendaki kolobela bazuzi, ntango bakonzi ya leta bayoki ete Polo na Silasi bazali ba Romain, babangaki. Bongo bazuzi bayaki ko bondela bango ba bima na boloko mpe basengaki Polo na Silasi kobima na engumba na bango.40Ntango Polo na SIlasi babimaki na boloko bakendaki kotala Lydie. Kuna bakuti bandeko , nsima na kolendisa bango balekaki.
171Baleki engumba aphipolismpe apononie, bakomi na engimba ya thessalonique wapi ezalaki eyenganelo ya ba yuda. 2Paul na bizaleli ya mboka na bango akeyi epayi na bango na mokolo ya misato ya mposo mpe bazalakio kosuana na ntina ya makomi.3Afungoli makomi mpe alimboli na koloba ezaki motu ya ete klisto anyokuma sima asekwa na kati ya bakufi. mpe alobi yesu oyo ngai nazali koteya azali klisto. 4Bayuda mosusu bandimi mpe basangani na paul mpe silas, elongo na ba gres baye balenda, basibaye bazalaki bakonzi na etuluki ya bato.5Bayuda ya moto mangongi, batondi na likunia bakamati mibali ya kanda bazalaki koteka na zando, asangisi bango mpo aluka kotia mobulu kati na engomba, bakeyi kobebisa ndako ya jason, baluki paul na silas bakanga bango,mpo komema bango libela ya bato. 6Kasi bazui bango te kasi bakokoti jason na bandeko mosusu liboso ya bazuzi ya engumba na koganga makasi, bato oyo batungisi mokili bakomi lisusu Awa. 7Bato oyo jason ayambaki bazali koboya mibeko ya mbula matari, bazali koloba ete mokonzi mosusu ezali yesu.8Etuluku ya bato na bazi ya engumba tango bayoki likaba oyo makanisi na bango ebulungani . 9Otango bafuti mpako na janson na ba mususu, batiki batiki bango kokenda.10Na butu wana, bandeko batindaki paul na silas na bere ekomi bango wana, bakotaki na eyanganelo ya ba yuda. 11Bango bazalkaki mingi koleka bathessalenique, mpo ete bayambaki liloba ya bantoma na motema malamu mpe mokolo na mokola bazalaki kotanga makomi ya nzambe mpo ya koyeba soki oyo balibelaki bango ezali ya solo 12Bongo bato mingi bandimaki na basi mosusu ya grecques ya bokeseni na mibali ebele.13Lokola ba yuda ya thessalonique bayaki ete paul azali koteya liloba ya nzambe na beree, kotomba kisa etuluku ya bato. 14Kaka na ngonga, bandeko batindi paul na mayi ya mungwa, silas na timathee batikali wana. 15Baye bamemaki paul bakeyi kino na mboka athenes tango atikalaki wana, bazui epayi na ye mitindo mpo na silas na timothes ete soki bakomi, balanda ye noki noki.16Na ngonga oyo paul azali kozela bango na athienes molimo na ye esepelaki te kati na ye na komona ete engumba wana etondaki na bikeko mingi. 17Bakomaki kokamatana na kati ya etanganelo na bayuda mpe na baye bazalaki kokumisa nzambe elongo na baye bazaki kokutana na bango mikolo nyonso na bisika ya zandu.18Bateyi mosusu bazalaki wana,oyo balandaka makanisi ya epikire mpe ya kenon, babandi kotiana tembe na polo. kasi bato mosusu baseki ye mpe bolobi esopa oyo alingi koloba nini? basusu kalobi azali koteya lokola mosakoli ya banzambe ya bapaya. balobaki bongo po polo azalaki koteya nsango ya yesu mpe ya kosekwana ye.19Bamemi paul na aeropage, batuni ye, tokoki koyeba ntina ya mateya oyo ya sika ozali kolakisa. 20Mpo ete ozali koloba na biso makambo ya kokamua, mpe tolingi koyebantina na yango. 21Pamba te ba to nyonso ya athenes na bapaya oyo bafandi kuna, mosala na bango bobele koloba to koyoka makambo ya sika.22Paul afandi kati aeropage mpe alobi, bino, bato ya athenes ya solo namoni ete bozali penza bato bayebi liloba nyonso. 23Na tamboli na engumba mpe kotala biloba oyo bazali kokumisa na moni ya ngo na makomi na nzambi oyo ayebaki te, bongo oyo bino bozali kokunisa na kozanga koyeba, ezali oyo ngai na zali kote ya bino.24Nzambe oyo asali mokili na mikolo binso biye bizali wana, mpo ete ye azali mokonzi ya likolo mpe ya mabele, afandi te na tempolo ndako oyo esalami na maboko ya bato. 25Asungami mpe na maboko yamoto te lokola ezangi eloko, mpo ete ye moko azali kopesa bomoyi na bato mpe mpemana ekelamu yonso26Na moto moko, asali mokili mobimba mpe bato bango baye bazali kofanda likolo ya mabele oyo akaboli mbulanga elanga, atie ndelo na mboka moko moko. 27Na yango esengeli baluka nzambe lisusu komeka na koluka mpe komona ye, pamba te azali mosika te na moko na moko na bino.28Mpo katina ye tozali kotambola, tozali na bomoyi mpe tomonani, lokola poetes moko aloba, pamba te tozali mpe bakitani na ye. 29Lokola tozali bato na nzambe tokanisa te ete bonzambe ezali ndenge moko na wolo, falanga to libanga oyo bapetoli epayi ya basali bikeko na makanisi ya bo moto.30Yango wana nzambe alandi mabunga na biso te kasi azali kopesa mitindo sikoyo na bato baye bafandi bisika bionso na kobi wama. 31Mpo ete asali mokolo moko oyo ye akosambisa mokili na kati ya sembo na muana ye oyo ye apona. nzambe atalisi nguya ya muana nati na kufa mpe na kosekwa.32Lokola bato ya mboka athenes bayoki koloba paul na makambo etali kosekwa na bakufi, bato baseki paul kasi basusu balibi tokoyo yo koloba mbala mosusu ya likambo oyo. 33Na sima paul, atiki bango. 34Kasi bato mususu balandi ye mpe bandimi na denys, mpe heropagite, na muasi na kombo ya damaris na ba mususu basa basangani mpe.
181Paul alongue athenes mpe akeyi na corithe. 2Akutani na muyida moko na kombo ya aquillas mofandi ya mboka ponf, wana ewuti bango kokoma sika sika na kowuta italie, elongo na muasi priscille mbamba te claude apesaki mitindo na bayuda balungua na rome mpe paul akendaki na bango. 3Paul awumeli wana, mpe bazaki kosala mosala se moko ya kotonga bahema.4Paul akaboli na bango maloba kati na eyanganelo na mokolo ya posa, azalaki kososolisa ba yuda na ba grecs. 5Paul na nguya ya molimo santu, ata toli liboso ya bayuda ete mokonzi azali klisto. 6Tango ba yuda baboyi mpe babandi kofinga ye, paul apupuli bilamba na ye mpe alobi na bango makila na bino ekueya likolo ya moto na bino nazali sembo, na kokenda epayi ya bapagano.7Na koleka wana akoti na ndaku ya titus justus ye oyo azalaki kobanga nzambe. ndako na ye ezalaki pene pene na eyanga nelo. 8Crispus, mokonzi ya eyanganelo na libota na ye bandimaki mokonzi ebele ya ba corinhier bayokaki paul mpe babati saki9Mokonzi ayebisi paul na butu na kati ya emoneseli, kobanga te loba kotika te. 10Na zali na yo moto moto te akosa yo mabe. lokola nazali na ebele ya bato na engai mba oyo. 11Paul awumeli wana mbula moko na ndambu kosa kola nsango malamu ya nzambe epai na bango.12Ntango gallion ako maki mota mbisi ya mbpka achaie, ba yuda ba tambisi ya mboka achaie, ba yuda ba tumbokeli paul mpe bamemaki ye liboso ya ndako ya esambiselo. 13Balobaki , moto oyo andimisi bato bakumisa nzambe na koboya oyo mobeko elobi misa nzambe na koya oyo mobeko elobi.14Paul alingaki koloba ntango ntango gallioon allobi na ba yuda soki ezali sembote soko koboma. mbele ezalaki malamu koloba na bino. 15Kasi lokola ezali motuna na ntina ya liloba na kombo ya mobeko na bino. bobongisa bino moko. na lingi kozala zuzi na likambo na bino wana.16Mpe abengani bango na efundeli. 17Bato yonso bakangi sostene mokonzi ya eyanganeli babeli ye liboso ya ndako ya esambiselo kasi galio akotaki te likambo na bango na bango oyo bazalaki kosala.18Paul awumeli mingi na bandeko na ye alonguali akotaki na masua ya syrie elongo na priscine mpe aquilla liboso ya kotika libongo nkokolaki motu ya ye, na cenchree lokola elepaki ye ndayi ya nazareen. 19Ntango bakomaki na ephese paul atiki priscille na aquillas wana. mpo alingaki ye moko akota na e yaugane lo kosolola na zuif.20Babonde lolui paul etikala mwa ntango mosusu. abu yaki. 21Kasi atikaki bango alobi na kozo ngela bino seko nzambe alingi akendaki na ephese.22Ntango paul akomaki na cesaree amataki apesaki mbote na lingomba ya nzambe ya ya jerusam, akeyi lisusu na atoche. 23Nsima ya kowumela wana kuna paul atambolaki na bingo mba ya galatie mpe pherygie azalaki kolondia ba ye koli24Mo yuda oyo na nkombo ya apollo mofandi ya allexandrie akomaki na ephese. azalaki na mayele mingi kopesa maloba mpe ngiya ya kolimbala makomi. 25Apollos ateyamaki na kolanda maye ya mokonzi mosali malamu na molimo ezali koloba na basosoli malamu na oyo etali mokonzi kasi kzsi bazalaki koyebaji kaka batisino ya jean. 26Apolios abandaki koloba na molende na eganganelo. ntango priscille mpe aquila bayokoli ye basangana ki naye. kolimbolaka na molende mongongo ya mokonzi.27Ntango alingaki kolika na achaie bandoko balendisaki mpe bakomelaki bagekoli ya achaie bayamba ntango akomaki basangaki makasi ba oyo bangimaki na ngolu. 28Apollos lele ba yuda babungi nzela mpe alimboli mikanda ya nzambe mpe alimboli mikanda ya nzambe oyo ezali koyebisa ete yesu azali masiya
191Esalamaki ete wana Apollos azalaki na corinthe, Polo azalaki kotambola na ba engamba kuna na ba ngomba mpe akomaki na ephese kuna akuti mwa ndambo ya bayekoli. 2Polo atuni bango: « boyamabki molimo mosantu tango tango bondimelaki?» Bazongisi ete: «Te! nanu toyoka kutu lisolo ya molimo monsantu te».3Polo alobi: « bino bozuaki libatisi nini?» bazongi maloba ete " libatisi ya Yoane". 4Bongo Polo alobi lisusu: « Yoane apeski libatisi ya kobongola motema, azalaki koteya bato ete bandimela na oyo azalaki koya sima naye: Yesu Kristo.»5Wana bayoki bongo, bazui libatisi na kombo na mokonzi Yesu. 6Tango Polo atieli bango maboko molimo mosantu Akiteli bango bango mpe ba bandi koloba na minoko mosusu mpe kosakola. 7Bango nionso mibali zomi na mibale.8Polo akotaki na eyanganelo mpe kuna azalaki koteya na mpifo pene ya sanza misato. Azalaki kokamba malakisi na kondimisa bato na makambo etali bokonzi ya Nzambe. 9Kasi ba yuda oyo baboyaki kobongola motema ba bandaki ko tiola sango ya kristo liboso na bato, Polo na bayekoli ba longwe wana mpe bakeyi mosika na bango. kuna azalaki ko teya liloba mikolo nionso na eteyelo ya Tyrannus. 10Mosala yangoewumelaki mbula, mpe esali ete bato nionso bavandaki na Azia, ba yuda mpe ba Grecs, bayokaki liloba ya Nzambe.11Nzambe azalaki kosala misala ya kokamwa na nzela na Polo. 12babeli bazalaki kobika mpe milimo mabe ko bima na banzoto na bato wana bazalaki kozwa bilamba na bango kopakola na nzoto na Polo mpe ba kopakola na nzoto na bango.13ezalaki na nganga kisi ya yuda bazalaki lotambola tambola na engumba, na kosalela kombo na Yesu na ndenge na bongo. bazalaki ko belela nkombo na Yesu likolo na bakangemi na milimo mabe koloba ete: « na mitindo na ngayi, na nkombo na Yesu oyo Polo azali koteya, bima!». 14Ba nganga kisi yango bazalaki sambo mpe bazalaki bana ya nganga Nzambe mokonzi ya bayuda Scéva.15Molimo mabe ayanoli bango boye: « ngayi nayebi yesu mpe Polo, kasi bino ba nani?». 16Molimo mabe ezalaki na kati na moto ekweyi na bango mpe abeti bango makasi na lolenge ete bakimi nde kokima na ndaku yango bolumbu mpe bazoki zoki. 17Likambo yango eyebana na bato nionso bazalaki na ephese, bayuda mpe ba Grec18mpe ebele ya bandimi ba sosoli mpe ba tubelaki makamlbo mabe bazalaki kosala. 19Mingi kati na bandimi ba oyo basimbaki ba kisi bayaki kozongisa ba buku ya kisi yango. Motuya ya ba buku yango koto tuku mitanu, mpe batimbaki ba buku yango na miso ya bato. 20Nayango, sango malamu epanzanaki makasi na nguya nionso .21Boye sima na kosilisa musala na Ephese, Polo azui ekateli na lisumu na molimo akende na Jerusalem. Kasi asepelaka koleka nainu na Macedoine mpe na Achaîe, sima amilobin esengeli na koma mpe na Rome. 22Polo atindaki mibake ya bayekoli naye na macedoine, Timothée mpe Eraste, bato bazalaki kosunga ye mpe ye atikalaki nainu na Azia mpona mwa tango.23Naeleko yango, mobulu makasi ebimaki na Ephese na ntina na sango malamu. 24Mosali mpe moteki moko ya bikeko ya bikeko ya wolo na kombo ya Demetrius azalaka kosala bikeko ya palata ya Diane mpe ezalaki kopesa mosolo ebele na baninga naye. 25Na bongo esangisaki ba ninga na ye mpe alobi : "ba tata, boyebi ete na mosala oyo nde tozali kozua misolo ebele.26Bozali na boyibi solo ete kaka awa na ephese te kasi pene na Azia mobimba Polo oyo andimisi mpe abongolisi bato ebele. Alobi ete baNzambe basalami na maboko na bato bazali ba Nzambe te. 27Likama ezali ete kaka te misala ba baso ekokweya kasi na tempelo28Tango bayoki bongo, ba tondi na kanda makasi, mpe ba bandi konganga ete: " azali monene Diane ya ba ephesien!". 29Bulu yeke ekoti na engunda mobimba. Bato bakimi mbangu bakeyi kokoya ta na ndako ya masano. ba kangaki baninga mibale ya Polo ba oyo bawutaki na macedoine, Gaïus mpe Artistarque.30Polo azalaki na mposa ya kokota kuna kasi ba yekoli ba pekisakiye. 31Bokye ndambo ya baninga ya Polo ba oyo bazalaki bakonzi ya ba soda ya engunda batindeli ye maloba ete akende ko kota kuna te. 32Bulu yeke ezalaki kati na bango mpe mingi kati na bango bayebaki te ntina nini ba kangaki mpo etuluku na bato mosusu bazalaki ko nganga mpona likambo oyo, mpe ndambo mosusu pona likambo wana .33Bayuda ba bakangaki Alexandre mpe batiye liboso na bato. Tango Alexandre atombolaki loboko mpona kopesa ndimbola, 34Na tango basosoli ete azalaki moyuda, bangangaki bango nionso elongo na mongongo moko pene ya ngonga mibale ete: "azali monene, diane ya ba Ephesien".35Tango Mokonzi ya ba soda ya engunda akitisi makele wana, alobi: « bino ùbaningan ya Ephese! nani ayebi ete Ephese nde ezali moboko ya tempelo ya diane mpe elili oyo ewuta na lola?» 36lakola ezali likambo ya kobeta tembe te, esengeli bo fanda kimia mpe bosala likambo na mbangu mbangu te. 37Pamba te bofundi bato oyo bazali ba miyibi na tempelo te mpe batioli ya Nzambe na biso te.38boye, soki ya mosala ba Demetrmius mpe ba ninga naye ya mosala ba moni mbeba na moto moko, bazuzi mpe zuza mokonzi bazala ba funda ye. 39Kasi soki ezali likambo etali musala na bino, yango ekobongisama na mayangani ya mikolo na mikolo. 40Pamba te bakoki kofunda biso na mbeba ya kotombokisa bato 'buluyeke oyo ezali na ntina te mpe tokozanga maloba ya koloba". 41Tango alobi bongo, azongisi moto na moto epayi naye.
201Tango mululu esilaki, Polo asangisi bayekoli mpe alendisi bango apesaki bango mboté mpe akendaki na Macedoine. 2Akatisaki ba engunda mpe azalaki ko lendisa bandimi kati na kosanzola Mokonzi, ye akendeki na grece. 3Afandaki kuna sanza misato, tango alingaki kokota masuwa mpo akende na Syrie, ayikaki bayuda bazalaki kokana ye, azui mokano ya kozonga na nzela ya Macedoine.4Sopater mwana na Pyrrhus mojto na Bérée, akendaki nzela moko naye,bango na Aristarque mpe Second bato na Thessalonique, Gaïus ya Derbe, Timoté , Tychique et Trophime bato ya d'Azia, ba kendeki elongo na bango. 5Bato yango batiki biso mpe ba kei kozela biso na Troas. 6Sima na yango, tokoti na masuwa na Philippe nsima na mikolo mitano to yei kokuta bango na Troas, kuna tozalaki mposo mobimba.7sima na mikolo ya kopema, tosanganaki esika moko mpona kolia mpe polo azalaki kosakola epaï na bato ya Troas kino midi na butu, mpe ekokiye akende lobi yango. 8Tozalaki na eteni ya ndako ya likolo mpe lmuinda mizalaki mingi.9Elenge mobali moko nkombo naye Eutychusn afandaki koyoka pongi makasi, tango Polo azalaki koteya, akweyaki kolongua likolo na ndaku na eteni ya misato, kino na nse, mpe akufaki wana wana. 10Polo akitaki mpe alalelaki ye likoloasimbaki maboko naye mpe alobaki: « Bobanga lisusu te ye azali na bomoï».11Sima Polo amati lisusu na etage aliaki mapa mpe azongelaki koteya kino ebandeli ya mokolo. 12Ba yaki na elenge mobali ya go na bomoï, mpe mawa na bato esilaki.13Pona biso to longwaki liboso na Polo kokota na maswa kokende na engumba ya Assos, kuna tokendaki kokutana na Polo. 14Tango akuti boiso na Assos, tokamati ye na masuwa mpe tokeyi Mytilene.15Nasima na wana, tokomaki na esanga ya Chios. Nsima na mokolo moko tokomi na esunga ya Samos, mpe lobi yango tokomi na Milet. 16Boye Polo akanisaki ete akoleka na Ephese, mpo alingaki kolekisa ntango te na Azia, yango alingaki koleka noki na mpo akoma na Jerusalem mokolo na Pentecote.17Na Milet Polo atindaki maloba na ephese kobenga ba mpaka ya lingomba. 18Ntango bakomi epaï naye, alobaki na bango boyeli ndenge nini, bizaleli nangaï ezalaki kati na bino, banda mokolo ya liboso nayaki na Azia. 19Nasalelaki mokonzi na motema ya komikitisa, elongo na mayi na miso mpe kati na matata oyon na zuaki na banyuda. 20Boyebaki ete na bombaki likambo moko te, mpe lolenge na teyaki b ino kati na ba ndaku na bino. 21Na biangaki bayuda mpe ba Grecs ete ba bongola motema, konzonga epaï na Nzambe kodima mokonzi Yesu.22Sika oyo na Keï na Jeruzaleme ndenge molimo mosanto atindi ngai, nayebi te eloko nini ekokweyela ngai . 23Molimo mosanto azali koyebisa ngai ete na mboka moko, boloko mpe minyokoli ezali kozela ngai. 24Kasi nazali kotala bomoi ;okola eloko pamba, mpo na lingi kosilisa mosala oyo monkozi apesi ngai, kosakola nsango malamu na ngolu na Nzambe.25Na lekaki katkati na bino, nyonso kosakola bokonzi na Nzambe. 26Mpona oyo nayebisi bino lelo, soki moto moko abungi nzela, ezali lisusu likambo nangai te. 27Mpo ete nabombelaki bino ata likambo, ata moko te na oyo etali mokano na Nzambe.28bomikengela bino penza mpe bondimi oyo molimo mosantu asili kotia na maboko na bino, bo batela lingpmba na Nzambe, oyo asombaki mpona kufa ya mwana naye Yesu. 29Bayebi ete nsima na n gai kolima awa, bato mabe bakobima kati na bin, mpe bakopenguisa ba ndimi. 30Nayebi ete kati na bino bato mosusu ya lokuta bakobima, mpe bakobenda bandimi epai na bango. Bozala ekenge, bokanisa ete mbula misatu butu na moyi na mai na miso.31Nazalaki kaka kopesa toli na moko na moko na bino. 32Sik'oyo napesi bino na maboko na Nzambe mpe maloba na ye ya nguya ya kopesa bino bokasi, mpe epesa bino libula lisanga na bato nyonso babulisami.33Nalulaki mbongo ya moto te, wolo ya moto te, to mpe bilanga ya moto moko te. 34Bino moko boyebi ete na salaki na maboko na ngai mpona kozua biloko oyo ngai mpe baninga nangai tozalaki na posa na yango. 35Na nyonso na pesaki bino ndakisa ete nde okoki kosunga bato botawu, mpe esengeki kokanisa maloba na ya Mokonzi Yesu oyo Yesu ye moko alobaki: esengo na mopesi aleki mozui.36Sima na maloba oyo, Polo afukamaki elongo na bango mpe banbondelaki . 37Bango nyonso bazalaki kolela, bayambi Polo mpona kopesaye mbote ya suka. 38Bango bazalaki na mawa mpe Polo alobaki bakomonana lisusu te, bango bakei kotika ye na masua.
211Nsima ko kabwana na bango, tokoti masuwa mpe tozui mbala moko nzela ya engumba ye Cos, mpe sima ya mokolo moko tokomaki na engumba ya Rhodes, kolongwa wana kokeyi na engumba ya Patara. 2Tango komoni masuwa kokende na Phenicie, to mataki mpe tokendaki.3TAngo kokomaki pene pene na esanga ya Chypre, to kikaki yango na loboko ya muasi, tolandi nzela ya Syrie mpe tokitaki na Tyr, po ete eza wana nde masuwa elingaki kobimisa biloko. 4Sima tomonaki moyekoli moko, to tikala wana mikolo sambo. bayekoli wana balobi na Polo, na Molimo, ba kende Yelusalema te.5Tango tokomaki na suka na mikolo an biso, tolongwaki mpe to kobaki mobembo na biso, bakendaki kotika biso ti na mandelo ya mboka. Sima kotiaki mabolongo na biso na se, tosambelaki mpe to pesanaki ba mbote ya suka. 6Tokoti na masuwa, mpe bango bazongaki epayi na bango.7Tango tosilisaki mobembo na biso na Tyr, tokomaki na Ptolemais. Wana topesaki mbote na ba ndeko tolekisaki mokolo moko na bango. 8Tolongwaki mokolo elandi, mpe tokendaki na Cesare. Tokotaki na ndaku ya Filipe, moteyi na sango malamu, oyo azalaki moko ya sambo mpe totikalaki na ye. 9Nzoka nde moto oyo azalaki na bilenge moseka mineyi oyo bazalaki kosakola.10Tangu kozalaki wana mikolo ndambu, mosakoli moko na kombo ya Agabus akiti na Judee. 11Aye yi epayi na biso mpe azui makaba na Polo. Ami kangi makolo na maboko mpe alobi: «Boye elobi Molimo Mosantu: « ezali na lolenge oyo nde ba Yuda ya Jelusalema ba kokanga mukolo mobaka oyo mpe kopesa ye na maboko ya ba pagano.»12Tango toyokakai makambo wana, biso na bato ya mboka tobondeli Polo akenda na Yerusalema te. 13Na yango Polo alobi: «Bozo sala nini, nako lelaka mpe bokuka ngayi motema? Mpo ete nabongisami kaka te mpo na kokangama, kasi po na ko kufa mpe pona kombo na Mokonzi Yesu.» 14Lokola tokokaki kobongola na kanisi na Polo te, totikaki kobondela ye, mpe tolobi: «Tika ete mokano na Mokonzi ezala na yo.»15Namokolo wana tomilengelaki mpo na komata na Yelusalema. 16Bayekoli ndambu ya Cesare bayaki na biso. Mamemaki na bango, moto ya Chypre, boyekoli moko ya kala, totikalaki na ye.17Tangu tokomaki na Yelusalema, ba ndeko bayambaki biso na ese ngo. 18Lobi na yang, Polo akendaki elongo na biso epayi ya Zaki; ba mbuta nyonso bazalaki wana. 19Sima na kopesa bango losako, abandaki kososolisa bango makambu nyonso Nzambe asalaki na kati ya ba pagano na nzela na lotomo na ye.20SIma ya koyoka Polo, ba tondaki Nzambe nako loba: «Omoni ba ndeko koto na koto bandimi na kati ya ba Yuda. bango nyonso bazali kotosa mibeko na motema moko. 21Bayokaki ete yo ozalaki koteya ba Yuda nyonso oyo bazalaki ko fanda na kati ya ba pagano basundola Mose ete oyebisi bango ba kata bana na bango genga te, mpe ba landa lisusu bizaleli ya ba Yuda te.22Toko sala nini? Ya solo bakoyoka ete osili kokoma awa. 23Sala oyo tozali koyebisa ye sika oyo: tozali na batu mineyi awa oyo balapi ndayi. 24Zua bango bomi petola mpe futela bango mpo ba palola bango suki. Na yango bango nyonso bako yeba makambo oyo balobaki na tina na yo ezali lokuta. Ozali kotosa mibeko ya Mose.25Kasi mpona likambo ya ba pagano oyo ba ndimeli Mokonzi, tokomi mikanda mpe topesi mitindo oyo basengeli komi benda na makambu ya mbeka ya ba bikeko, na makila, na ba nyama oyo babomaka mpo bapesa ba nzambe ya bikeko, to oyo babomaka na kofina kingo ma yango, mpe ba posa ya nzoto ya mabe. 26Na yango, Polo amemaki bato mineyi yango, lobi na yango ba petolami mpe bakeyi na Tempelo, mpe koyebisa eleko ya mokolo ya ko petolama tii mabonza esalama po na moko na moko.27Tango mikolo sambo esilaki, ba Yuda mususu ya Asie bamonaki Polo na Tempelo mpe batindi bato nyonso ba tombokela ye, mpe abakangi ye. 28Bazalaki ko ganga: « Baya bato na Israel kosalisa biso! Tala moto oyo azo lakisa esika nyonso na batu nyonso makambu oyo eza kokokana te na mibeko ya Mose, mpe akotisi ba grecs na tempelo mpe asili kotiya esika petwa bosoto.» 29Liboso, bamonaki Trophine moto na Ephese na ye na engumba , mpe bakamisaki Polo asili kokotisa ye na ndako ya Nzambe ya ba Yuda.30Engumba mobimba ezalaki na yikiyiki, mpe bato nyonso ba ye ko kanga Polo. Babimisi ye libanda na Tempelo mpe bakangi mbala moko bikuke. 31Lokola bazalaki koluka ko boma Polo, sango ekomaki epayi ya mokonzi ya ba soda ete mobulu ekoti na Yelusalem mobimba.32Kaka na ngonga yango akamati ba soda mpe bakonzi na bango, bakeyi mbango esika bato batondaki. Ntango bato ba moni ba soda na ba konzi na bango batikaki kobeta Polo. 33Bongo bakonzi ya ba soda bapusanaki mpe bazui Polo, mpe bapêsi mitindo ba ete bakanga ye na minyololo mibale. Batuni soki azalaki nani mpe nini asalaki.34Kasi moto na moto abandaki ko ganga na ndenge na ye. Na yango, mokonzi ya ba soda azuaki eyano moko te likola ya biloba loba nyonso wana, apesi mitindo ba mema Polo na kuna esika ba soda ba fandaka. 35Kokoma na bango na wenze, ba soda ba memaki ye mpona kanda ya bato. 36Po bazalaki ko ganga: « Bo boma ye!»37Ntango balingaki kokotisa Pola na ndako ya ba soda, ye alobi na mokonzi ya ba soda: « Na koki kozua ndingisa ya kolobela eloko moko?» Mokonzi ya ba soda a tuni ye: «Olobaka grac?». 38Oza moto ya Egypte te oyo akotisaki mobulu na mikolo eleki mpe atombokisaki bato koto mineyi na esobe?»39Polo alobi: «Nazali mo Yuda ya engumba Tarse na Cilicie. Nazali moto ya motuya na engumba. Na bondeli yo pesa nga nzela na lobela bango.» 40Tango mokonzi ya ba soda apesi ye ndingisa, Polo atelemi mpe atomboli maboko. Tangu kimia makasi ekoti, alobeli bango na munoko ya ba Hebreu. Alobi:
221Ba ndeko mpe ba tata, boyoka oyo nazali na yango pona koyebisa bino. 2Tango ba monaki ete Polo koloba na monoko ya ba hebreux, ba fandi kimia mpe alobi:3«Nazali moyuda, na botama na Tarse na Cilicie, nayekolaki na engumba oyo, nase ya Gamaliel. Balakisi ngayi mibeko ya ba tata na biso, na kati na kpomikebisa , nazali na molende mpo na Nzambe ndenge kaka bino bozali lelo. 4Na telemelaki lingomba oyo pene na kufa, nakangaka basi mpe mibali, basinga mpe nabuakaki bango na boloko. 5Na yango nganga Nzambe mokonzi mpe ba mpaka nyonso bakoki kotatola mpona nga egte ba pesaka nga mikanda mpona bandeko ya Damas. Nakende kokanga ba oyo bazali na lingomba wana mpe naya na bango na Yelusalem na minyololo6Esalamaki ete wana ezalaki ngayi na nzela pona kokoma na Damas, na mpuasa pembeni ya midi, mpole makasi engengeli ngayi 7Nakweyaki na mabele mpe nayoki mongongo elobaki na ngayi :«Saul, Saul, pona nini ozali konyokola ngayi?» 8Na yanoli: «Yo nani Mokonzi?» Azongisi ete: «Nazali Yesu ya Nazareth oyo ozali konyokola»9Ba oyo bazalaki na ngayi bamonaki pole, kasi bazalaki koyoka mongongo te. 10Na lobaki: «Mokonzi esengeli nasala nini?» Mokonzi alobi : «Telema, kota na Damas, kuna bakoyebisa yo nyonso oyo osengeli kosala.» 11Mpole wana ebomaki ngayi miso, nakokaki komona lisusu te, nde bamemaki ngayi komema na bato nazalakina bango.12Kuna na kutanaki na Ananias, moto na sembo kolandama na mibeko, Ba yuda nyonso ya Damas bazalaki kotala malamu mpo na ye. 13Ayaki liboso na ngayi, pe alobi: « Ndeko Saul banda lisusu komona.» Na mbala moko, namoni.14Bongo alobi: «Nzambe ya ba tata na biuso aponaki yo mpo ete oyeba mokano na ye. Mpe omona moyengebene, mpo oyoka maloba ma wuti na monoko na ye moko.» 15Okotatola liboso na bato nyonso makambo oyo yo omonaki. 16Sasayipi, ozali kozela nini? Telema mpe zua libatisi mpo masumu na yo malimbisama na kombo na ye.»17Tango nazongi na Yerusalem, wana ezalaki ngayi kosambela na Tempelo, Molimo ezuaki ngayi. 18Nayo kaki ye koloba na nga: «Bima noki na Yelusalem mpo bakondima litatoli na yo te, na ntina na ngayi».19Na lobi :«Mokonzi, bayebi bango moko ete na buakaki bato na boloko mpe na betaki ba oyo nyonso bazalaki ko ndimela yo fimbo. 20Nazalaki esika oyo bazalaki ko bomela Etienne nzeneneke na yo, ngayi moto na pesaki nzela mpz kokengela bilamba na bango. 21Kasi alobi na ngayi: «Bima, mpo na kotinda yo epayi ya ba pagano.»22Kino esika oyo ba yo kaki ye, kasi ba badni ko nganga makasi mpe balobi: «Moto ya boye abongi na bomoyi te! Bo boma ye!» 23Bazali ko nganga makasi, kobwaka bilamba mpe putulu likolo. 24Tango capitaine mokonzi amonaki bongo, apesaki mitindo ba kotisa Polo na boloko. Mpe alobaki ba sambisa ye na fimbo mpo ye moko ayeba mpona nini bato ba ngangaki ndenge wana.25Na tango ba kangaki ye basinga, Polo alobi na Centrurion oyo azalaki wana : « Bakoki ko beta fimb o makasi na moto yo azali moto ya akolo Rome yambo ya kosambisa ye to mpe kokatela etumbu?» 26Moto yango akeyi ko tuna Capitaine mokonzi boye:« Likambo nini olingi kosal? Moto yango azali moto na ekolo Rome.27Capitaine mokonzi akeyi kotuna ye soki ya solo moto ya ekolo ya Rome? Polo alobi: «Iyo». 28Mokonzi ya ba soda alobi: « Nafutaki misolo ebele mpo nazua mukanda ya moto na Rome.» Kasi Polo alobi: «Ngayi nabotama moto ya Mboka Rome.» 29Capitaine mokonzi mpe bato bazalaki boteta ye babangaki mpo bayoki ete Polo azalaki moto ya mboka Rome.»30Lobi na yango, lokola capitaine mokonzi alingaki koyeba solo ya likambo yango. Olongoli Polo minyololo mpe apesi mitindo na ba nganga Nzambe mpe ba mpaka ya lingomba na sangana. Abengisaki mpe Polo na kati na bango.
231Paulo atali bajuzi mpe alobi: «Naumeli liboso na Nzambe na bokebi nyoso tii mokolo ya lelo.» 2Nganga nzambe mokonzi Ananias apesaki mitindo na baye bazalaki pene na ye babambola ye na monoko. 3Boye Paulo alobi: «Nzambe akobeta yo, yo nde likonzi ya mibeko. Omifandisi mpo na kosambisa ngai kolandisama na mibeko nzoka nde okkobuka mibeko na na kopesa mitindo ete babeta ngai.»4Baye bazalaki pene na ye balobaki boye: «Boye nde ozali kotiola nganga nzambe mokonzi? » 5Paulo alobi: «Nayebaki te bandeko, ete azali nganga nzambe mokonzi. Mpo ekomama: okoloba mabe te na mokonzi na libota na yo.»6Tango Paulo asosolaki ete likita ebongisamaki na ba Saduceens mpe epai na bafarizao, atombolaki mongongo oboso ya likita: «Bandeko nazali mofarizao, mwana na mofarizao. Boye mpo ete nazali kozila na elikiya lisekwa ya bakufi, nde nazali kosambisama.» 7Ngonga ye alobi boye, moto epelaki kati na bafarizao mpe basaduceens, na bongo likita ekabwanaki. 8Mpo ete basaduceens balobaka ete lisekwa ezali te, banzelu te, ata molimo te; nzoka nde bafarizao balobaka ete manso wana ezalaka.9Na bongo botomboki eyingelaki makasi mpe ndambu ya bakomi mibeko na lingomba ya baferizao batelemaki koloba: «Tozwi mabe moko te na moto oyo. Nani ayebi soki molimo to mwanze alobelaki ye?» 10Ngonga oyo mobulu makasi eyingelaki, Capitaine mokonzi abangaki ete bakoki koboma Paulo, nde apesaki mitindo na basoda bakita mpe bazwa ye na makasi kati na likita na bajuzi mpe kokenda kotia ye na kobe ya mabanga.11Butu elandaki, Mokonzi abelemaki pene na ye koloba: «Kobanga te, pelamoko otatolaki mpo na ngai kati na Yelusaleme, osengeli mpe kotatola ngai na Roma.»12Ngonga moyi moyingeli, ndambu ya bayuda basalaki likopa mpe balapaki seleka. Bamilobelaki ete bakokila bilei mpe mayi kino bango bakoboma Paulo. 13Baye babongisaki likopa yango, bazalaki motuya koleka bato tuku minei.14Bakendaki komona na banganga nzambe mpe ba mpaka koloba boye: «Tomilakeli mabe makasi na kokila bilei suka suka toboma Paulo. 15Sasaipi, esengelaki ete likita na bajuzi eloba na capitaine mokonzi bakumba ye oboso bwa bino pelamoko bolingi kokota na mozindo likambo lya ye. Nde biso tobongami koboma ye liboso ete ye akoma awa.»16Kasi noko na Paulo ayokaki ete babongisi motambo,na bongoakendaki kokebisa Paulo kati na nkobe ya mabanga. 17Paulo abengaki moko na basoda ya capitaine koyebisa ye boye: «Kumba elenge mobali oyo oboso bwa capitaine mokonzi, mpo ete azali na maloba ya koyebisa ye.»18Na bongo capitaine akumbaki elenge mobali oyo oboso ya capitaine mokonzi koloba boye: «Paulo mokangami, abiangaki nagai mpe kosenga ete nakumba elenge mobali oyo oboso bwa yo, azali na maloba ya koyebisa yo.» 19Capitaine mokonzi azwaki ye na loboko mpe akendaki na ye na nkuku kotuna ye: «Nini ozali na yango ya koyebisa ngai?»20Elenge mobali ayanolaki: «Bayuda babongisaki kosenga yo kokumba Paulo lobi oboso ya likita pelamoko bazali na mposa ya kokota na mozindo bososoli ya likambo na ye. 21Kasi komitika te, mpo ezali na motuya na bato koleka tuku minei oyo basili kobongisela ye motambo. Bamilakeli mabe likolo na bango mei, mpe bazwi mokano ya kokila bilei mpe komela, kino bakoboma ye. Sasaipi bamibongisi kozila bobele ndingisa na yo.»22Na bongo capitaine mokonzi akabwanaki na elenge mobali oyo na ndingisa eye: «Koloba na moto te maye oyebisi ngai.» 23Na bongo abengaki ba capitaine mibale mpe koyebisa bango:«Bongisa nkama mibale ya basoda mpo ya bokei na mboka Cezaree, elongo na tuku sambo ya bamemi mpunda, mpe nkama mibale ya babeti matimbo. Bokolongwa na ngonga ya tuku mibale na moko.» 24apesaki lisusu mitindo ete babongisa ba nyama baye bakokumba Paulo ete akoma nzoto kolongonu epai Bula matari Felix.25Akomaki mokanda boye: 26«Ngai Claude Lysias epai ya mokonzi monene ya lokumu bula matari Felix, losako! 27Moto oyo akangamaki na bayuda, azalaki solo mokufi na ngonga ena, nde natindaki basoda mpo na kobikisa ye, kolanda sango ekomelaki ngai ete azali moko wa Roma.28Esengelaki na ngai koyeba ntina nini bafundaki ye, na ngonga nakumbaki ye oboso ya likita ya bango. 29Boye nayoki ete afundamaki na maye matali mibeko mia bango. Nzoka nde ata nkokoso moko ezalaki te kopesa ndingisa ya kufa to bokangami na boloko. 30Mpe tango nazwaki sango ete basalelaki ye likita mabe, nazwaki ndingisa ya botindi ye na lombango epai na yo, na boyebisi bafundi ye kotaliisa oboso na yo nkokoso nyoso bazwaki na ye. Tobwani!»31Basoda batosaki mitindo: bakumbaki Paulo kati na butu na mboka Antipatris. 32Mokolo elandaki, basoda bayike batikelaki bamemi mpunda mokumba, mpe bazongaki na nkobe ya mabanga. 33Na boyingeli na bakumbi mpunda o mboka Cezaree, bapesaki bula matari mokanda elongo na Paulo.34Bongo bula matari atangi mokanda, atunaki soko Paulo azaliki moto ya etuka nini? Tango ye ayebaki ete azali mowuta ya Cilicie, 35alobi: «Nakoyoka yo na mozindo eleko bafundi yo bakoyingela awa.» Na bongo, apesaki mitindo kobomba ye kati na ndako ya Herde.
241Sima ya mikolo mitano, nganga Nzambe Ananias mpe bapaka ya lingomba elongo na molobeli na komnbo ya Tertuelle bakendeki kofunda Polo epayi na balumatari ya engumba wana. 2Ntango Polo atelemi o bonso bwa bulamatari, Tertuelle abandi koloba: «Ngolu na yo tozui kimia monene mpe ndenge na yo ya kolengela makambo minene mbongwana ya malamu ekoti na kati na engumbqa na biso. 3Na ebele ya ngolu na yo , toyambi solo bolamu nyonso osaleli bango mpo oleki likolo na nyonso Felix.4Ezali na ntina te mpona kolekisa ngonga mpamba te, na sengi na yo oyoka ngayi na limemia nyonso malamu mpenza. 5To kutaki mutu oyo azali lokola sili mpe azali kotombokisa ba Yuda na kati na mokili mobimba. 6Amekaki kosumukisa Tempelo mpona yango nde to kan gi ye.7Kasi Lysias, mokonzi ya ba soda ayaki kobotola Polo na maboko na biso na makasi nyonso mpe akeyi na ye. 8Ntangu akotuna ye maye manso, nde okoyeba mpona nini tozo funda ye». 9Ba Yuda banso bafundi Polo mpe balobi makambo oyo ezali solo.10Kasi ntango bulamatali Felix apesi Polo ndingisa mpo aloba, Polo ayanoli boye: «Nayoki ete yo ozali mosambisi monene oyo uta mibu ebele, mpe nasepeli mingi mpo na kosembolela yo ngayi moko. 11Okoki kotala na balamu mpenza, kala mingi te, bobele nsina mikolo zomoi na mibale na wutaki komata na Yelusalem mpo na kongumbamela Nzamnbe. 12O tango bakutaki ngayi na kati na Tempelo, naswanaki na mutu te, mpe na tombokisaki etuluku ya batu te, ezala na kati na eyanganelo to na kati ya engumba te. 13Bazali na maye makoki komonisa yo mabe oyo ngayi nasali te.14Na ndimi solo o bosa bwa yo te ngayi na saleli Nzambe ya ba koko na biso na nzela oyo bazali kobenga lelo Nzambe ya bokesene. Nazali na bokebi na manso matali mob eko mpe kati makomi na basakoli. 15Ngayi na bango to kotia mitema na biso epayi na Nzambe ete batuna nazali na elikia lolenge moko na bango, ntina ya lisekwa ya ba kufi bayengebene mpe batu ya kanza. 16Yango wana nazali kotiya molende nazala ntangu nyonso motema mpembe na nionso ya Nzambe mpe na miso ya batu.17Sima na ba mbula eyike, na zongaki na lisungi mpo na ekolo na ngayi mpe mosala ya mabonza. 18Ndambu ya ba Yuda ya Asie bakutaki ngayi na ndako ya Nzambe wana esilisi ngayi komibongisa, nazalaki na etuluku ya batu te, to kati ya mobulu te. 19Bato oyo bamonisa o boso bwa yo maye man so ya mabe oyo ngayi nasalio soko bazali na yango solo.20Soki te bato wana baloba maye ya mabe oyo bakuti kati na ngayi o ntangui na sambisami o boso ya esambiselo na yo. 21Ezala eloko moko oyo na gangaki na mongongo makasi wana ezalaki ngayi na kati na bango :«Ezali na ntina na lisekwa ya bakufi, mpona yango nde nasembi sami na bango?»22Felix asosolaki na bolamu nzila ya makambo. Mpona yango azelisaki ba Yuda. Mpe alobi: «Ntangu mokonzi Lysias akoya kowuta na Yelusalem nde nako sambisa makambo na bino.» 23Mpe apesi mitindo na mokonzi ya mokama ya ba soda na kopekisa soko moke te baninga oyo bakoki kosunga to kotala Polo.24Nsima yamua mikolo, Felix azongi elongo na mwasi na ye Drusille oyo moyuda, abengi Polo mpe ayoki ye mpo makambo matali kondima kati na Mokonzi Yesu. 25Lokola Polo azalaki kosolola na ye na ntina na maye matali bosembo, mpe lolenge ya komibatela nakobengisa yo ntangu mosusu26Pela moko ozalaki kokanisa ete Polo akoki kopesa ye mbongo mpona yango nde azalaki kobengisa ye mbala na mbala mpona kosolola na ye. 27Kasi nsima ya mibu mibale, Porcius Festus akomi bulamatari na esika ya felix. Mpona kosepelisa ba Yuda Felix atikaki nayino Polo na kati ya boloko
251Sima mikolo musato ya bokomi ya festus na engumba, amataki na cesaree mac yerusalem. 2Nganga nzambe ya liboso na bakonzi yo minene ya ba yuda ba fundi paul oboso ya festus, ba beti djege na maloba na bango. 3Basengi festus lisalisi mpo na polo, na tango ya komema ye na yeruzalem baboma ye na nzela.4Festus ayanoli, polo azalaki na boloko ya cesaree ye meyi nde azonga kuna. 5Banani ba ya na biso na nzela, soki mabe ezui moto oyo na nzela, bafunda ye.6Bakati na cesaree sima ya mikolo mwambe to zami ba memeli ye polo na kosambisa. 7Na bokomi na ye, bayike ya bayuda ya yerusalem bapusani mpona kofunda ye, na nde oyo akoki kondima te. 8Polo alobi na yebi mabe oyo nasali mpo na kombo ya ba yuda, mpona tempelo, mpona cesare9Mpona kosalisa ba yuda festus atuni polo, soki alingi kokende na ngai jeruzalmem mpo na ngai moko na sambisa yo. 10Nabengi kosamba epai ya cersar wapi na koki kosambisama. yo moko oyebi ete na sali ata mabe moko te11Kasi soki na sali mabe oyo ekoki na liwa na kobanga liwa te soko bango ba kosi bokoki kopesa ngai na maboko na bango te. 12Likita ya festus eyokani, mpe bambengi. alobi obengaki cesar te kasi okokende epai na cesur13Agrippa na berenice sima na mikolo, bakey kotala festus. 14Festus sima mwa mikolo atalisi bango liko kambo polo na mokonzi. mpe olobi. felix atikaki moto moko na boloko. 15Wana ezaki ngai na yeruzalem ba nganga nzambe ba fundi moto oyo. epai na ngai mpo ete na kwesa ye. 16Na bizaleli ya ba bome, bakotaka likombo ya moto te, soki basambisi ye liboso ya baye ba fundi ye te,17Na bongo te, tango bayei, mokolo elandi na bengisi mpo na kosambisa moto wana. 18Ba fandi bayei na mofundi, na moni likambo oyo ba fundi ye te. 19Nzokande nde bazalaki kosolola tina ya lingomba na bango mpe yesu oyo akufa polo aza kopetela tolo ete azali na bomoi. 20Nayebaki te ndenge na kotala likambo oyo na tunaki soko akoki kokende kosambisama na yerusalem. mona tina na likambo.21Polo asengaki kotikala na boloko keno kozila mitindo yo mokonzi na boloko keno kozila mitindo yo mokonzi na pesaki mitindo ba bamba ye kino nakotinda epai ya cesar. 22Agrippa asengi festus mpo moto wana. festus azelisi lobi.23Lobi na yango agrippa na berenice bakei na lisanga, bakoti na ndako, mokonzi ya basoda na batu ya lukomu ya engumba mpe na mitondo ya festus ba memili bango polo. 24Festu ayebisi agrippa boye me daye bazali na biso, moto oyo, ebele ya baye banso ya yuda ba sesanga kobanda jeruzalem mpe ba zangi moto oyo na bomoi te?25Na sosolaki kokufa te na ye nde na zuaki mokamo ya kontinda ye epai ya mokonzi. 26na bazangi bososoli, yango nde notundi ye epai agrippa mpo akoma oyo ekoki mpo na likambo eye. 27ezalaki malamu mpona ngai, na tanda mokingemi ete na boyebisa likambo na ye te?
261Boye, Agrippa alobi na Paulo: «Okoki koloba mpo na yo moko.» Paulo asemboli loboko mpe alobi: 2Natondi na esengo, mokonzi Agrippa, mpo na kosamba liboso na yo lelo mpo na makambo bayuda bazali kofundela ngai. 3Mingi mingi mpo yo ozali moto ya bwanya makasi na oyo etali mituna mpe bonkoko ya bayuda, na yango nasengi na yo oyoka ngai na bokebi penza.4Bayuda nyoso bayebi lolenge nini bolenge na ngai elekaki na Yelusaleme mpe na mboka mobimba. 5Bayebaki ngai kouta ebandeli na ngai na lingomba ya bafarizao, lingomba oyo elandeka na bokebi penza bonzambe na biso mpe bayebi yango malamu.6Sasaipi nazali kosamba liboso na yo mpo nazali koluka elaka oyo Nzambe apesaki na batata na biso. 7Pamba te ezali elaka mabota zomi na mibale bazalaka kozila lokola bazalaki kongumbamela Nzambe butu mpe moyi. Ntina wana, Mokonzi Agrippa, bayuda bafundi ngai. 8Mpo na nini bozali kondima te ete Nzambe akoki kosekwisa bakufi?9Tango moko ngai natelemelaki misala ya Yesu ya Nazareth. 10Nasalaki yango na Yelusaleme. Nakotisi bandimi ebele na boloko, na lotomo nazwaki epai ya mokonzi ya banganga nzambe, nazalaki kotia mokoloto na molono ya baoyo bazalaki koboma bango. 11Mbala ebele, nazaki kopesa bango etumbu na kati na biyanganelo na bango, mpe nazalaki kotindika bango na makasi kotiola Yesu. Nazalaki kozwa nkanda makasi mpo na bango, mpe ata na bingumba ya bapaya, nazalaki kokenda konyokola bango.12Wana ezalaki ngai kosala boye, nazalaki kokenda Damas, na nkombo mpe mitindo ya bakonzi ya banganga nzambe. 13Na nzela wana, na midi, Mokonzi, pole makasi koleka ya sanza ekitelaki ngai mpe bato oyo tozalaki kosala na bango mobembo. 14Tokweyaki biso banso na mabele nde nayokaki mongongo koloba na ngai na monoko ya baebele: «Saul, Saul, mpo na nini ozalo konyokolo ngai? Okokoka kobunda na motonga te.»15Bongo natunaki: «Yo nani Mokonzi?» Mokonzi ayanoli: "Nazali Yesu oyo ozali konyokolo." 16Sikoyo telema! Nabimelaki yo mpo nakomisa yo mosali na ngai mpe nzeneneke ya makambo oyo oyebi likolo na ngai mpe makambo nakolakisa yo na mikolo ezali koya. 17Bongo nakobatela yo liboso na bayuda mpe bapagano epai nakotinda yo; 18mpo ofungola miso na bango mpe balongwa na molili mpo bakota na pole. Mpe balongwa na nse ya nguya ya satana mpo bakoma na nse na nguya ya Nzambe. Mpe bazwa bolimbisi ya masumu mpe libula oyo nazali kopesa na baoyo bakondima ngai"19Na yango, Mokonzi agrppa,natosaki emoniseli na Nzambe; 20kasi na bato ya Damas, ya Yelusaleme, mpe kino na bingumba nyonso ya Yudea, mpe epai ya bapagano, nateyaki bango ete babongola mitema mpe batala epai ya Nzambe, na kosalaka misala ezali kolakisa ete babongoli mitema. 21Ezali na ntina wana bayuda bayuda bakangaki nagai na tempelo mpo baboma ngai.22Nzambe asalisaki ngai kino sikoyo, mpo ete lelo nakoki kotatola liboso na bana mike mpe bakolo makambo oyo basakoli mpe Mose basakolaki, 23ete Klistu akonyokwama mpe akosekwa kati na bakufi mpe kotatola pole na libota ya bayuda mpe ya bapagano.24Lokola Paulo azalaki koumela na koloba, Festus alobi na mongongo makasi: «Paulo, ozali liboma, mayele na yo ebele ekomisi yo liboma.» 25Paulo alobi: «Nazali liboma te, mokonzi Festus, nazali koteya maloba ya solo mpe ya komikitisa. 26Pamba te Mokonzi ayebi makambo oyo mpe nazali koteya yango na bopete mpe nazali nakondima ete eloko moko te ezali ya kobombama na miso na ye.27Mokonzi Agrippa, «ondimelaka basakoli? Nayebi ete ondimelaka bango.» 28Agrippa ayanoli: «Paulo, olingi kokomisa ngai moklistu sikawa?» 29Paulo alobi: «Nazali kosambela Nzambe, se yo te, kasi baoyo nyonso bazali koyoka ngai, ezala na tango mokuse to molai, bakoma lokola ngai; longola bobele minyololo ya boloko.30Na yango mokonzi atelemi, bula matari mpe Berenice lokola mpe baoyo nyonso bazalaki wana elongo na bango; 31tango bakei, basololi bango na bango koloba ete: «moto oyo asali eloko te oyo ekoki komema ye na liwa to na boloko.» 32Agrippa alobi na Festus: Moto oyo soki asengaki komona Cezar te, mbele totiki ye.»
271Tango bazwaki mokano ete kokenda Italie, bapesi Paulo na bakangami basusu o maboko ya capitaine ya mapinga ya Auguste, oyo babengi Julius. 2Tozwaki masuwa Adramyte, oyo esengelaki enana pembeni pembeni ya Asie. Nde bongo tolekela mai monene. Aristarque, moto ya Macedoine ya mboka Thessalonique mpe azalaki na biso.3Na mokolo elandi, tosemaki na Sidon, wapi Juluis amonisaki boboto na ye epai na Paulo. Kutu apesaki ye nzela akenda kotala bandeko na ye mpe azwa lisungi epai na bango. 4Kolongwa wana tokatisaki ebale mpe tokei kosema pembeni na esanga ya Chypre mpo mopepe epikisaki biso kokoma wana. 5Tango tokatisaki mai oyo ezalaki pembeni na Cilicie mpe Pamphilie, tokendaki na Myra na engumba ya lucie. 6Kuna, tango capitaine oyo azalaki na biso amoni masuwa ya Alexandrie ezalaki kokenda na Italie, akotisi biso kuna.7Tobandaki kokenda malembe malembe mpe ezwaki biso mikolo ebele yambo tokoma pembeni ya Cnide mpo mopepe azalaki makasi. Tozalaki kokenda kaka bongo pembeni pembeni ya mabele ya Crete na ngambo mosusu ya Salmone. 8Tozalaki kopusana kaka malembe malembe pembeni na ebele ya mikakatano kino tokomaki esika moko babengi Fair Havens oyo ezali pembeni ya cite ya Lasee.9Tozwaki tango mingi, mpe eleko ya kokila ya bayuda elekaki, mpe bokatisi ebale ekomaki mabe makasi. Paulo akebisi bango 10mpe alobi: «Baninga, namoni ete mobembo tolingi kosala ezali mabe makasi, kaka mpo na masuwa mpe biloko te, kasi mpo na bomoi na biso.» 11kasi capitaine ya basoda ayokelaki ye te.12Lokola libongo eazaki malamu te mpo nakolekisa eleko ya malili makasi penza, batambwisi masuwa bayike balobaki tolongwa wana, toluka nzela ya kokoma na engumba ya Phoenix mpo na kolekisa eleko ya malili makasi penza. Phoenix ezali libongo ya engumba Crete, ezali kati kati ya ngambo oyo moyi elalaka. 13Tango bamoni mopepe ya kimia kobeta, bamemi masuwa; bakanisaki ezalaki ngonga malamu ya kokende. Batomboli longo mpe babandi konana pembeni pembeni na mabele ya Crete.14Kasi sima na tango moke, mopepe makasi babengi Euraquilon, euti na esanga ebandi kobeta masuwa. 15Lokola masuwa ekokaki lisusu kotambola te mpo na mopepe nde totikaki mopepe emema biso. 16Tolekaki pembeni pembeni ya esanga Cauda. Mpe na pkokoso.17Sima ya kokangisa yango na basinga, bazalaki kobanga ete masuwa ekangama na zelo ya mboka Syrte, bazwaki lisusu mokano ete mopepe etambwisa biso. 18Mopepe etungisi biso mingi nde basali ya masuwa babandi kobwaka biloko na mayi.19Na mokolo ya misato, basali na masuwa babwaki lisusu biloko. 20Lokola moyi mpe minzoto ebimaki te mikolo ebele mpe mopepe ezalaki kaka makasi, tondimaki lisusu te ete tokozala na bomoi.21Lokola esalaki ete bato baliaki te mikolo ebele, Paulo atelemaki kati kati ya bato mpe alobi: «Baninga! esengelaki boyoka ngai ete tolongwa na Crete te mpo makambo oyo ekomela biso te. 22Kasi sasaipi, nazali kobondela bino ete boyika mpiko, pamba te moto moko te kati na biso akufa, kaka masuwa nde ebebi.23Na butu ya lelo, anzelu ya Nzambe na ngai oyo nagumbamelaka abimelaki ngai 24Mpe alobi: «kobanga te, Paulo mpo esengeli osamba liboso ya Cesar mpe tala, Nzambe, na boboto na ye apesaki yo mpe bato yonso oyo bozali kosala na bango mobembo. 25Yango wana, baninga boyika mpiko, pamba te nazali na kondima na Nzambe ete makambo ekosalama ndenge alobaki na ngai. 26Kasi esengeli tosema na esanga.27Tango tokomaki na butu ya zomi na minei, lokola kotungisama kati ya ebale Adriatique, pembeni ya kati kati ya butu, basali ya masuwa bayoki lokola tozali mosika te na zelo. 28Bamekaki na banzete, bamonaki ete mozindo ezalalaki tuku mibale ya emekeli ya mozindo, bapusanaki lisusu moke mpe batali, bamoni mozindo ekomaki zomi na mitano. 29Bakomaki kobanga ete masuwa epanzana, bongo babwakaki longo minei mpo masuwa etelema mpe bazali kosambela ete tongo etana noki noki.30Basali ya masuwa bazalaki koluka nzela ya kokima batika masuwa, batiaki bongo bwato liboso ya masuwa koloba ete bazali kobuaka longo, nzoka nde bazalaki kokosa bato mpo bakima na yango. 31Kasi Paulo alobi na bato mpe na basoda: «Soko bato oyo batikali kati na biso te tokoki kobika te.» 32Boye basoda bakataki basinga ekangaki bwato na masuwa mpe bwato etiolaki.33Tango tongo etanaki, Paul alendisaki bato yonso mpo balia. Alobi: «Lelo tokokisi mikolo zomi na minei uto bobandaki kozela mpe kolia te. 34Boye, nabondeli bino bolia, pamba te ezali mokolo mpo na lobiko na bino, bongo ata suki ya moto moko ekolongwa te!» 35Na sima koloba boye, azwaki lipa mpe atondaki Nzambe liboso na bato yonso, abukaki yango mpe aliaki.36Bato yonso bazwaki makasi mpe baliaki. 37Tozalaki bato motango nkama mibale tuku sambo na motoba kati na masuwa. 38Tango baliaki penza penza, masuwa ekomaki pepele mpo babwakaki ndambo na masangu na ebale.39Na tongo, bayebaki lisusu te esika bazali, kasi bamonaki libongo moko ya zelo mpe bazalaki kotuna tuna soko bakokaki kokoma kuna. 40Boye bakataki longo mpe basundolaki yango kati na ebale. Bobele na tango yango, babongisaki yenda mpe bamatisaki elamba moko liboso ya masuwa mpe bazwaki nzela mpo na kokenda kosema na llibongo ya zelo. 41Bakomaki na libongo yango, bakutaki bibale mibale ekutana mpe basemaki wana. Na lolenge etelemaki, mbonge ezalaki kobeta yango makasi na sima nde masuwa ebukanaki.42mwango ya basoda ezalaki ete baboma bakangami yonso mpo ete moko te akima na nzela ya ebale. 43Capitaine apekisaki bango pamba te azalaki na mposa ya kobikisa Paulo. Nde apesaki nzela na moto yonso oyo akokaki kokatisa na mayi, asala yango. 44Nde baoyo bayebi te, bakokatisa bango na mabaya ya masuwa. Nde na bongo tokomaki biso yonso malamu na ngambo.
281Esilaki lusokoluka to yokaki ete esanga yango eliangamai malte. 2Bato ma esanga yango la ya makasi kisoma esengo . ba pelisaki moto mpo tozakima malili ya mwila.3Paul alokotaki ya nkomi mpo makotia ma moto nzokande nyoka moko ebimaki na nkomi yango mpoma molunge ya moto asuaki poul na maboko. 4Ntango ya esanga yango esanga yango momaki nyoka koswa paul balobiki ete moto oyo azali soli moliomi ma lmoto. ata alikakima mai etunilu na ye ezali kaka.5Kasi paul amikitaki loboko maye mipe nyoka ekweyaki na moto mpe paul ayokaki mpasi soki moke te. 6Batelelaki paul ete akovimba loboko to soki akokwe ya na pwaza mpe kokufa, kasi ntango bamoni ete eloko moko ebali yema te, babalusi maloba koloba ete moto oyo azali moko ya ba nzambe7Mabele ya publius mokonzi ya ejanga yango ezalaki nzinganzinga wana. ayambaki bibo mikolo mizato oyo to balaki wana. 8Tata na publius abelaki malali ya pulupulu mpe ya nzoto mote, paul akei kotala ye, abondeli mpona ye mpe abikaki. 9mpoma ye mpe ali kasi. Sima na tango batu nsoso ya malali na 10esanga yango bayaki pe epai na paul, pe ba zuaki lobiko. Batosaki biso mingi pe bapesaki bileyi ya mobembo.11Sima nasanza misatu na malquet, tozuaki masuwa oyo ezalaki kokende na alexandrie, kombo na yango ba mapasa oyo elekisaki eloko ya malili makasi koleka. 12Tokamaki na enguma ya syracuse, tosalaki mikolo misatu wana13Tolongwe wana koleka na esanga reggio, sima mokolo moko mopepe na ngele ebandi kopepe, pe sima na mikolo mibale tokomaki na engomba ya puzzoles. 14Tokuti bandeko moka yango, basengi nabiso ete tolala miko sambo epai bongo. kaka na lolenge ya ngo tokomaki na rome. 15Tango bandeko ya rome bayokaki sango na biso, baye kozua biso na nzando ya appuis pe esika na ndaku misatu, tang paul amoni bango, apesi nzembe matondi mpe azuiki mpiko.16Tako tokomi na rome, paul azuaki ndikisa yakofa nda ye moko bango ba solda oyo azalaki mokengeli na 17ye. Sima na mikolo misatu, paul abengaki ba paka na yuda kozala elongo na ye, alobaki na bango bandeko, na salaki ba mabe mokote na libota na biso ba yuda ya jerouzaleme bakangaki ngai mpe na zalaki mokangami na maboko ya ba romain. 18Sima na bango kosambisa ngai, bakani kotika ngai poba monaki likambo ya kokatela ngai etumbu ya liwa te.19Kadi ba yuda ba boyaki, nasengaki nzela ya kokende epai ya sezard. 20Ndetina nabengaki bina poto solola, po ete ba kangi ba kamba pona elaka na nzambe oyo ba ishael batiaka motema.21Bango nde ba lobi na ye, biso tozwi mikanda te miwuti na jude po na yo, ata bandeko ba ye koloko ma bete pona yo. 22Kasi polingi kozela epai na yo oyo ozalikokanasa na losambo yo, poto yebi ke bazalikobaya yango bipayi nionso.23Bapesaki elaka na paul, batu ebeli ba yaki na ndaku na ye, pe ateyaki bango. kolakisa mobeko na mose pe ya basakoli. 24Bamussu ba ndimaki maloba ya paul kasi ba mususu ba yaki kondima.25Ekokaki na bango kondi mate, paul abakisi ete, molimo mosantu alobaki na ba koko na bisu na monoko ya mosakoli isaya. 26Alobi ete bokoyoka na matoyi kasi bokoyeba tina te,bokotala namisu nde moko mona te.27Pamba te mitema na bango ekomi makoki, ba kangi matoyi na bango, bakangi miso na ba ngo po emona te, matoyi na bango eyoka te, pe molimo na bango eyeba kobikisa bango te.28Boyeba ete lobiko na nzambe etindemeli ba pakanu, bango pe boyokamela ye. 29Esilaki ye koloba maloba oyo, ba yuda bakeyi pe babandi kotiana tembe kati na bango.30Paul awumelaki mbula mibale na ndaku ya kofutela. kuna azali koya ba batu nionso oyo bayaki kotala ye. 31Ateyaki bango bokonzi na nzambe pe alakisaki makambo ya yesu klisti polele,moto moko te atekisaki ye

Baloma

11Mosali na Yesu klisto, Polo, aponami mpe abulisami ntoma na Nzambe, 2mpona sango malamu na Nzambe ezali oyo elakama uta kala na basakoli na makomimosantu. 3Oyo etali mwana na ye, uta na nzela ya libota ya Dawidi.4Na bongoabiangami mwana na nzambe engebene na nguya ya Molimo Mosantu, nalisekwa ya bakufi, nde Yesu Klisto Mokonzi na biso. 5Na ye , tozwi ngolu mpelotomo ya kolakisa bikolo binso molongo boyambi, mpe botosi o nkombo yaye. 6Na bikolo bina, bino mpe lokola bopanami bozala baye.7Balingami na Nzambe, baye bazwami na Roma, mpe babiangami kozala bansatu. Ngolu mpe kimia kati na bino kouta na Nzambe Tata na biso mpe Mokonzi Yesu Klisto.8Napesi matondi, yambo penza na Nzambe mpe Yesu Klisto mpo na binobanso, mpo ete kondima na bino etatolami na mokili mobimba. 9Mpo eteNzambe oyo nazali kosalela kati na ngai na ntina na Sango malamu ya mwanana ye, ayebi maye nalobelaka mpo na bino. 10Nalombaka mikolo minso namabondeli na ngai, libaku ezwama, naya kotala bino soki Nzambealingi.11Mposa ezali naya kolakisa bino ndambu ya misala ya molimo, mpobolendisama. 12Na ntina ete, tozala biso banso na bopikiliki na kondima; mpe yabino.13Balingami, nalingi bobosana te, sik'oyo, ete nalingaki mbala ebele kotalabino, kasi nazwi ndingisa te kino sik'oyo. Ezalaki na ntina komona misalamalamu kati na bino lokola ezalaki epai ya bapagano. 14Nazali na likambo yakobongisa na Ba-Ela mpe bapaya, epai bayibwanya mpe bilema. 15Na mayematali ngai, nabongami kosakola bino nsango malamu, na bino oyo bozali naRoma.16Pamba te, nsoni ezangi ngai mpo na nsango malamu. Yango ezalinguya ya Nzambe na oyo andimi, yambo nde Bayuda, elandi Ba Ela. 17Bosembona Nzambe emonani kati na ye, na ntina ya boyambi bondimi, lokola ekomami:« Moyengebene akobika na bondima.»18Uta likolo, nkanda na Nzambe ekitakalikolo na bato bazali kosumuka, na makambo ya bosoto, bozangi boyengebeneya bato ezali kozangisa bango Bonzambe. 19Mpo ete, makambo ya Nzambeeyebani polele, ye moko atalisi bango.20Nguya ya Nzambe mpe bonzabe na ye,oyo miiso ekoki komona te, eyebani na bato kati na bikela na ye uta ebandeli yamokili. Na yango bolimbisi ekozala te. 21Mpo ete atako bayebi Nzambe, baboyikokumisa ye mpe kosanjola ye. Kasi bakomi bazoba mpe mitema mya bangomizangi bososoli, yango ezali kati na molili.22Ba-mikwi lokola bato ya bwana,nzoka nde bazoba. 23Bamisaleli bikeko na elilingi ya bato, ndeke, nyama mpenyoka mpo bakumisa yango, koleka Nzambe.24Na bongo, Nzambe asundolibango kati na mposa mabe ya mitema mya bango na mbindo; mpo etebayokisama nsoni. 25Ezali nde bango babongoli Solo ya Nzambe na lokuta, mpebazali kokumisa bikelamu na esika ya Mokeli oyo abongi na lokumu seko naseko. Amen!26Yango wana Nzambe asundoli bango kati na mposa mabe,nzambi basi na bango bakomi kosala bosoni bango na bango, makambo oyoNzambe alingaka te. 27Ndenge moko mpe na mibali, batiki kosala mayemalongobani na basi ya bango mpo bakokisa mposa mabe kati na bango. Mibalibakomi kotambola na mibali oyo ebongi te, bazali komikatela etumbu na mikomina.28Lokola bango baboyi komemya Nzambe, ye asundoli bango basalela makanisi mabe oyo esengelaki te basala.29Batondi na mabe lolenge nyoso,nkanda, mposa mabe mpe mayele mabe. Batondi na mposa ya, koboma,koswana, lokuta mpe makanisi mabe. 30Bazali bato ya nsongi nsongi, batongi,banguna ya Nzambe. Bafinganaka, bato ya enzombo. Balingaka ntango insokosala mabe, batosaka baboti te. 31Bazangi mayele, bazangi bosolo, bazangibolingo mpe mawa.32Bayebi mabongisi ya Nzambe, na lolenge ya bato basalaka mambi mana, elongo na baye basepelaka na misala mina, etumbu na bango ezali kufa. Kasi bazali kaka kosala mambi mana te, bazali mpe kosepela na baye bazali kosala mango.
21Yo moto ozali mosambisi na bamosusu, mpe ozali kosala mabe mana lokola,ozali komikanga yo mei. Mpe bolimbisi ezali te mpo na yo. 2Baye basalakamambi mana, etumbu ya Nzambe ekwelaka bango.3Na boye, ozali kopesambano na bato bana, nzokande yo mpe mobebisi, lolenge nkani okokima nkeleya Nzambe? 4Kotsiola boboto mpe bolamu bwa ye te,mawa na ye azali kozilayo, nde obongola motema.5Kasi motu mangbongi na yo, motema makasi, oazalikobenda nkanda ya esambiselo ya Nzambe mokolo akokatela bango bansoetumbu ekoki. 6Akopesa na moto yonso mbano ya misala mya ye. 7Baye yamisala malamu, balukka lokumu mpe esengo ya libela ya mbeba te, akopesabomoi ya seko.8Kasi, baye batosaka Nzambe te, baboyi solona ye, balandibobele mabe, bakomona nkanda mpe bilelo. 9Baye banso bazali kosala mabe,bakozwa etumbu mpe bwale motindo na motindo, likolo na moko na mokobasali ya mabe, kobanda na bayuda, kosukisa na ba-Ela.10Kasi kimia, lokumumpe boboto ikozala na oyo asali malamu, yambo ezali bayuda, na sima baela. 11Jambi kokobola ezali te, na bonzambe. Baye bayebaki mibeko te, mpebasumukaki, bakozwa etumbu; kasi miango te. 12Baye bazali na boyebi namiango bakozwa etumbu engebene na mibeko.13Baye bazali bakoyoka kakamibeko, basepelisaka Nzambe te. Kasi esengo na baye bakomitiaka namisala. 14Komona ete bapagano bayebi mibeko te, kasi basalaka lolenge elingimibeko, atako bayebi yango te; euti na bizaleli na bango moko.15Na yangobazali komanyola kati na mitema na bango, makambo oyo elongobani namibeko. Basosolalka ete ezali solo. Bamifundaka bango mei kati na makanisi,soki basali malamu to mabe liboso na Nzambe. 16Mabombami na moto na motoekobima pwasa mokolo ya esambiselo ya Nzambe, na ntina ya nsango malamuya Yesu nalakisi bino.17Olobi ozali moyuda, ofandisa bomoi na mibeko, otutakatolo na Nzambe na yo. 18Oyebi makambo esepelisaka ye, oyo ezali na bokeseni,ozali na boyebi yango. 19Okanisi ozali penza motambwisi ya bakufi miso mpelotiki na baye bazali na molili. 20omikomisa molakisi ya bazoba, moteyi yabilenge, okanisi na ntina na mibeko nde oyebi maso ya bosembo.21Yo oyooteyaka basusu, mpo na nini omiteyaka te? Yo, oteyaka basusu bayiba te,oyibaka te? 22Opekisaka basusu kindumba, yo moko osalaka te? Yo, moyini nabikeko, mpo na nini ozali koyiba na tempelo?23Yo, otombolaka mapeka eteoyebi mibeko, obukaka miko te? nakomonela mibeko na Nzambepamba? 24Boye,nkombo ya Nzambe etukami epai ya bapagano mpo nayo.25Kokatama ngenga ezali ntina soki otosi mibeko. Soki na boye te, ozalikaka mosutu. 26Soki moto na mosutu atosi mibeko, ki-mosutu na ye elekimokatami ngenga te? 27Bongo, moto ya mosutu uta mbotama, azali sembo namibeko, akosambisa yo te, mokatami ngenga? Kaka mpo oyebi makomi,okatama ngenga nde, bozali kobuka mibeko na nko!28Na boye, libanda ezalikati te, mpo na moyuda ya solo, ngenga ya libanda na nzoto ezali elembo yapamba. 29Kasi moyuda ya solo, bayebaka ye na bizaleli, mpe ngenga ya soloezali motema etondi na misala ya molimo, ezali mpo na kotanga te. Lokumu yamoto ya lolenge boye, euti na bato te, nse na Nzambe.
31Bongo, litomba nini bayuda bazali na yango? Kokatisa ngenga nde nini? 2Nabosembo ezali ntina; mpo Nzambe amimonisaki yambo nde na bayuda.3Boniboni? Bayike o kati na bango bandimelaki ye te. Bongo Nzambe akosundolabayuda? 4Ekosalema te. Ata bato banso bazali bakosi, Nzambe azali sembo.Zambi ekomama ete: «Maloba mayo mazala solo, mpo ntango okosambisamaliboso ya bajuzi oyeba na kolonga.5Kasi soki mabunga ma biso mazali kotalisabosembo na Nzambe, tokoloba nini? Ye azali sembo te, mpo azali kopesa bisobitumbu? Ezali bongo? Wana ezali makanisi ya bato. 6Ezali bongo te, soki azalisembo te, akosambisa mokili ndenge nini?7Soki na lokuta na ngai, bosembo naNzambe ezali komatisa ye lokumu, na ntina nini nazali kosambisama bomosumuki? 8Mpo na nini tosala mabe mpe tozwa bolamu, ndenge basusu bazalikolobela biso tosala bongo; «Mabe tokosala, ekoyela biso bolamu?» Bakozwambano elongobani na biloba-loba wana.9Nde nini? tosengeli komilongisa? Sokimoke te. Zambi tosilaki kofunda bayuda na ba Ela ete bazali na nse yalisumu, 10pelamoko ekomami: «Moyengebene azali te, ata moko te.»11Moko teazali kososola. Ata moko te azali koluka Nzambe. 12Bango banso bapesiNzambe mokongo, bakomi banso bibobolo. Ata moto te azali kosala malamu,ata moko te.13Maloba na bango ezali kunda ya kofungwama mpe kokosa bato.Lolemo na bango etondi na ngenge ya nyoka. 14Minoko mya bango mitondi nabilakeli mabe mpe lokuta.15Bakimaka penza lombangu kosopa makila yabato. 16Koboma mpe konyokola bato, ezali mpasi te. 17Bango balukaka kimiate. 18Liboso na bango babangaka Nzambe te.19Sik'oyo, toyebi ete mibekoekomama mpo na baye bazali kotosa miango. Na boye, moto moko te afungolambanga mpo mokili mobimba ekobuka mabolongo liboso na Nzambe. 20Nayango, moto moko te akobika mpo na kotosa mobeko. Pamba te, boyebi lisumueyei na nzela ya mobeko.21Kasi sasaipi, bosembo na Nzambe ezali kokokisamana mobeko te. Yango etatolamaka na mobeko mpe basakoli. 22Bosembo yangoekokisami na nzila na kondima Yesu Klisto. Zambi bokeseni ezali te.23Pambate, banso basumuki mpe bazangi nkembo na Nzambe. 24Bango bansobalimbisami na ngolu na ye, na lisiko na Klisto Yesu.25Zambi Nzambe apesiKlisto lokola lisiko na makila ma ye tobika. Abonzela Klisto mpo azala ndakisaya bosembo na ye, uta kala, azalaki kokanga motema mpo na kokatela etumbuya masumu na bango. 26Sasaipi alakisi bosembo na ye. Mpo amonana ete azalisembo, na yango, baye banso bandimeli Yesu, bakomi sembo liboso na ye.27Naboye, nani akoki kotombola miluku na ye? Na likambo nini? Na ntina na misalana mibeko? Ezali boye te, Moboko ezali nde bondimi. 28Tomanyoli et motoakokoma sembo nde na bondimi, kasi na misala ya mibeko te.29Tososola;Nzambe azali kaka ya bayuda? Azali ya bikolo binso te? Boye, ya bikolobinso. 30Soki ete Nzambe azali moko, akobikisa bakati ngenga na ntina nabondimi na bango mpe bato na misutu na nzela ya kondima.31Nde bongo tokobebisa mibeko na ntina na bondimi? Ezali bongo te! Totiya mpe mokoloto na mibeko.
41Boni boni tokoloba mpo na bomengo ya koko na biso Abalayama? 2Soki bozwina ye ekomisaki ye sembo, mbele amitoombolaki, kasi nde liboso yaNzambe. 3Zambi makomi Malobi nini? «Abalayama atimelaki Nzambe, NdeNzambe amoni ye moto na sembo.»4Mosali azuaka lifuta na ye, yango ezalimatabisi te, ezali motoki na ye. 5Mpo na oyo azali kosala te, kasi motema na yeatieli yango na oyo andimaka bato ya masumu, bondimi na ye ekotikala esmbona lolenge na ye.6Loyembo na Dawidi eloba boye: «Lipamboli na oyo amonanisembo na miso ya Nzambe na ntina na misala te, kasi 7esango mpo na Nkoloalimbisaki, asukoli masumu na bango 8apambolama oyo Nkolo abosani masumuna ye.9Lipamboli yango epesami kaka na bakati ngenga, etali misutu te? Tolobiboye ete ; kondima ya Abalayama ekomisaki ye sembo. 10Ndenge kaniekomelaki ya? O eleko ya ngenga to ya mosutu? Azalaki nainomosutu.11Yambo, Abalayama andimelaki Nzambe, naino mosutu, bondimi naye nde epesi nzela abiangama moyengebene mpe azwa elembo ya ngenga. Nabilembo biye binso, bilakisaki ete akoma motomolo na baye banso bazali kati nabondimi. Ata bakatami ngenga te, Nzambe ayebi bango. 12Eyebani ete,Abalayama azalaki kaka motomolo ya bakati ngenga te, na baye bakata te, kasi,balongobani na bizaleli na moboko ya bondimi na ye.13Elaka ya kosangolamokili epesamelaki ye, na mabota maso mpo na botosi mibeko te, kasi na ntinana bosembo ya bondimi. 14Soki bolamu ekopesama na ntina na botosi mibeko,nde bondimi ekomi libungutulu, mpe ntina ya bilaka ezali te. 15Zambi mibekoesalemi mpo na bitumbu kasi soki mizali te, mikoki kobukama te.16Elakaepesami na mabota manso maye batosi mibeko ya Mose, mpe na baye batambolikati na bondimi ya koko Abalayama; tata na mabota manso. 17Mpo ekomama te,«Nakokomisa yo tata ya bikolo biike.» Abalayama atambolaki na kondimaliboso na'oyo apesaka bomoi na bakufi mpe asalaka na bisika oyo biloko bizalite.18Abalayama atiaki elikya makasi na bilaka Nzambe apesaki ye ete akokomatata ya mabota «lokola djelo ya ebale mpe minzoto ya likolo.» 19Atako akokisakimbula nkama, makasi ya kobotisa Sara ezalaki te, mpe eleko ya ya mabotaelekaki; kasi bondimi na ye ekitaki ta.20Na ntina na bilaka ya Nzambe, tembeezali te. Kati na ye, Abalayama atondaki na molende kati na bondimi mpekokumisa Nzambe. 21Azalaki kondima ete maye Nzambe alakaki, akokokisamango. 22Yango amonanaki moto ya sembo.23Makomi yango ezalaki mpo na yemoko te, andimama sembo. 24Kasi mpo na biso, Nzambe azwi biso lokola batoya bosembo, mpo tondimeli mwana na ye ya lisekwa, Nkolo Yesu. 25Ye wanaakabamaki mbeka mpo na masumu ma biso, mpe asekwaki mpo na bosikoli nabiso.
51Bongo biso tokomi sembo na kondima, tozwi kimia na Nzambe na nzila yaMokonzi Yesu Klisto. 2Na ye nde tozwi nzela ya ngolu, mpe bondimi. Yangotozali kotuta tolo mpo tozwa bisengo ya libela oyo Nzambe alaka na nkembo naye.3Atako na kati na bwale, tozali kotuta tolo mpo eyebani te, bwale epesakamolende. 4Boye, molende ebotaka bopikiliki; na yango, nde tokolikya bolamuekoya. 5Tokoyokisama nsoni te, zambi Molimo Mosanto atondisi mitema nabiso na bilingo na Nzambe.6O eleko tozalaki na nkaka, ngonga ebetaki mpobaye babunga na masumu, basikolama na kufa ya Klisto. 7Pamba te, ezalikpokoso kokufa mpo na mabe ya mosusu. Ekozala litomba kokufela moto yamasumu.8Nzoka nde Nzambe alakisaki bolingo na ye tango tozalaki basumuki,Klisto akufaki mpo na biso. 9Na tembe te, awa Klisto asikoli biso na makila maye, tobiki na nkanda na Nzambe.10Pamba te, o eleko totombukaki na Nzambe,boyokani eyingelaki na nzela ya kufa ya Yesu. Lokola boyokani ezongi,tobikisami na ye. 11Na yango kaka te, kasi tozali kotuta tolo na boyokani oyotozwi na Mokonzi na biso Yesu Klisto, liboso na Nzambe.12Na boye, lokolamoto moko akotisi lisumu na mokili, kufa mpe ekoti mpo na lisumu. Nde yangoepesami na bato banso, zambi banso basumuki. 13Yambo ete mibeko epesama,lisumu ezalaki na mokili, kasi miko ya lisumu ezalaki te, soki lisumu te.14Atakobongo, kufa ebandaki na Adamu kino Mose, bato banso bazalaki kokufa, atababuki mobeko te, lokola Adamu ya yambo, oyo azali elilingi ya oyoakoya. 15Kasi kino sasaipi, likabo ya ofele ezali lokola lisumu te. Zambi soki nalisumu ya moto moko, bayike bakufi, boni boni koleka ngolu na Nzambe mpelikabo na nzela ya moto moko, Yesu Klisto etondi mpo na bato banso.16Mpolibonza epesami te, mpo na ekweli na lisumu ya moto ya yambo. Bongo, ekateliya etumbu ya mokili mobimba ewuti na lisumu ya moto moko. Boye, libonza yaofele epesami, mpo kolimbisa masumu ya banso. 17Ezali boye, te na mbeba yamoto moko kaka, liwa ekonzi mokili mpo na ye, boni boni, na Yesu Klisto, oyoapesi bato bomengo eleki monene, ekomisi bango sembo mpe bazwi bomoi naye mei, bakoumela libela na ye.18Na boye, na mbeba na moko, banso bazwimbano, se lolenge wana, mosala ya moko ya sembo, ekomisi bato bansosembo. 19Zambi na nzila ya mangbongi ya moto moko, banso basumuki; lolengemoko na botosi ya moko, ebele bakozala sembo.20Kasi mobeko eyaki mpo etelisumu eleka ndelo.Boye esika lisumu eleki ndelo, ngolu ya Nzambe eluti mingikoleka. 21Bongo lokola lisumu ekonzaki bato na kufa, lolenge moko ngolu naNzambe ezali kokonza mpo na bomoi ya seko na nzela na Yesu Klisto Mokonzina biso.
61Bongo, tokoloba nini? Tókoba na masumu po ’tè ngolu ékola? 2Soki moke té!Biso bato tokufá po na lisumu, ndenge nini tokoki lisusu kobika kati na yango? 3Boyebi té ’tè biso nyonso oyo tobatisamá kati na Kristo Yesu, tobatisamá katina liwa na ye?4Bongo tokundamaki elongo na ye na batisimo kati na liwayango, po, ndenge Kristo asekwaki na bakufi na nkembo ya Tata, ndenge mokope biso tótambola na bomoi ya sikaa. 5Ya solo, soki tosangani na ye na lolengeya liwa na ye, tokozala pe bongo na nsekwa na ye.6Tóyeba yango ’tè bomotona biso ya kala esi’ebakamá elongo na ye na kuruze, po nzoto ya lisumu ékufape tózala lisusu baumbu ya lisumu té. 7Ya solo, moto oyo akufi alongisami nalisumu.8Nzokande soki tosi’tokufi elongo na Kristo, tondimi ’tè tokobika peelongo na ye; 9toyebi ’tè Kristo awa asili kosekwa na bakufi akokufa lisusu té:liwa ezali lisusu na bokonzi likolo na ye té.10Ya solo, awa ye akufaki, akufakipo na lisumu mbala moko po na libela; kasi awa ye azali na bomoi, azali nabomoi po na Nzambe. 11Bino pe lokola, bómitanga [bozali] bakufi po nalisumu kasi bozali na bomoi po na Nzambe, na lisanga na Kristo Yesu.12Boye, lisumu ézala na bokonzi té na nzoto na bino oyo etangamá kokufa:bótosaka baposa na yango té. 13Bókaba biteni ya nzoto na bino lokolabibundeli ya mabe po na lisumu té; kasi bómipesa na Nzambe, lokola bato yabomoi oyo bauti na bakufi pe bótia biteni ya nzoto na bino epai ya Nzambelokola bibundeli ya bosembo. 14Ya solo, lisumu ekozala na bokonzi likolo nabino té, pamba té bozali na se ya Mibeko té, kasi na se ya ngolu.Na mosala ya bosembo15Bongo nini?Tósala lisumu po tozali na se ya Mibeko té, kasi na se ya ngolu?Soki moke té! 16Boyebi té ’tè soki bomipesi epai ya moto po na kosalela ye nabotosi, bozali baumbu ya ye oyo bozali kotosa: soki ya lisumu oyo ememaka naliwa, to soki ya botosi oyo ememaka na bosembo.17Kasi, matondi na Nzambepo, bozalaki baumbu ya lisumu, kasi botosaki na mitema motindo ya mateya oyoboteyamaki. 18Awa bosili kokangolama na boumbu ya lisumu, bokómi baumbuya bosembo.19Nazali koloba na ndenge ya bomoto po na bolembu ya nzoto nabino: ya solo, ndenge bokabaki biteni ya nzoto na bino, lokola baumbu, nabosoto pe na oyo mibeko etindá té, po na kofanda kati na oyo mibeko etindá té,ndenge moko pe sik’oyo, bókaba biteni ya nzoto na bino, lokola baumbu nabosembo po na kofanda kati na kosantisama. 20Pamba té, tango bozalakibaumbu ya lisumu, bozalaki na bansomi na bosembo. 21Bongo na tango wana,mbuma nini bozwaki na makambo oyo bozali sik’oyo koyokela soni? Pamba tésuka na yango ezali liwa.22Kasi sik’oyo, awa bosili kokangolama na lisumu pebosili kokóma baumbu ya Nzambe, bozali na mbuma na bino po nakosantisama, pe suka, bomoi ya seko. 23Ya solo, lifuta ya lisumu ezali liwa;kasi likabo ya Nzambe ezali bomoi ya seko kati na Kristo Yesu, Mokonzi nabiso.
71Bandeko, boyebi té − ya solo, nazali koloba na bato oyo bayebi Mibeko − ’tè Mibeko ezali na bokonzi likolo ya moto bobele tango azali nanu na bomoi?2Yasolo, mwasi ya libala akangami na mibeko na mobali tango azali nanu na bomoi.Kasi soki mobali akufi, akangolami na mibeko ya mobali. 3Bongo soki akómiya mobali mosusu awa mobali na ye azali nanu na bomoi, ye akobengamamwasi ya ekobo; kasi soki mobali akufi, ye akangolami na mibeko: azali mwasiya ndumba té awa akómi mwasi ya mobali mosusu.4Yango wana, bandeko na ngai, bino pe bosi’bokufá na Mibeko na nzoto yaKristo, po na kozala ya moto mosusu, ye oyo asekwaki na bakufi, po tóbotambuma po na Nzambe. 5Pamba té, tango tozalaki na bomoto, baposa yamasumu, na nzela ya Mibeko, ezalaki kosala mosala kati na biteni ya nzoto nabiso po na kobota mbuma ya liwa.6Kasi sik’oyo, tokangolami na Mibeko, awa tosili kokufa na oyo tozalaki kokangama, na ndenge ’tè biso tokómi baumbu na lolenge ya sika ya Molimo, kasi té na lolenge ya kala ya makòmi.Mibeko pe masumu7Bongo, tokoloba nini?Mibeko nde ezali lisumu? Soki moke té! Kasi nayebilisumu té soki kaka té na nzela ya Mibeko. Ya solo, nalingaki náyeba baposa té,soki Mibeko élobaka té: Kolula téa. 8Lisumu ezwi libaku malamu, bongo, nalisalisi ya mitindo, eboti kati na ngai ndenge nyonso ya baposa; po tangoMibeko ezangi, lisumu ekufi.9Kala, ngai, nazalaki kobika na kozanga Mibeko;kasi tango mitindo eyei, lisumu ezongi na bomoi, 10pe ngai nakufi. Boye,esalamaki, po na ngai, ’tè mitindo oyo ememaka na bomoi, yango ememi naliwa.11Pamba té lisumu, awa esili kozwa libaku malamu na lisalisi ya mitindo,ekosi ngai pe na nzela na yango, ebomib. 12Ya solo, Mibeko ezali mosantu;mitindo pe ezali mosantu, sembo pe malamu.13Bongo eloko malamu ekómiliwa po na ngai? Soki moke té! Kasi ezali lisumu, oyo, po émonisama lisumu,nde eboti liwa kati na ngai na nzela ya eloko malamu. Boye, na nzela yamitindo, lisumu emonanaki na nguya na yango nyonso ya lisumu. 14Ya solo,toyebi ’tè Mibeko ezali ya molimo; kasi ngai nazali ya nzoto, natekamá nabokonzi ya lisumu.15Ya solo, makambo oyo nazali kosala, nazali koyebayango té: pamba té oyo nalingaka, nasalaka yango té; kasi oyo nasalaka, yangonde nayinakac. 16Soki oyo nasalaka, yango nde nalingaka té, wana nandimi ’tèMibeko ezali malamu.17Yango wana, ezali lisusu ngai té moto nasalaka yango,kasi lisumu oyo efandaka na kati na ngai. 18Pamba té, nayebi ’tè eloko malamuefandi kati na ngai té, elingi koloba na nzoto na ngai. Pamba té kolinga malamuezali penepene na ngai, kasi kotia yango na misala, ezali té.19Ya solo, nasalakaté malamu oyo nalingaka, kasi mabe oyo nalingaka té, yango nde nasalaka. 20Soki nasalaka oyo [ngai] nalingaka té, ezali lisusu té ngai moto nasalakayango, kasi lisumu oyo efandaka kati na ngai. 21Boye, nazali kokuta mobekooyo: po na ngai moto oyo nalingaka kosala malamu, bobele mabe ezalipenepene na ngai.22Ya solo, na motema na ngai moto, nasepelaka na Mibekoya Nzambe; 23kasi na kati ya biteni ya nzoto na ngai, namonaka mibekomosusu oyo ebundisaka mibeko ya mayele na ngai pe ekangaka ngai na boumbuya mibeko ya lisumu oyo ezali kati na biteni ya nzoto na ngai.24Ngai moto yamawa mingi, nani akokangola ngai na nzoto oyo ya liwa? 25Matondi naNzambe po na Yesu Kristo, Mokonzi na biso. Boye, ngai moko na mayele nangai, nazali kosalela Mibeko ya Nzambe, kasi na nzoto na ngai nazali kosalelamobeko ya lisumu.
81Po na yango, sik’oyo etumbu moko té ezali po na baoyo bazali kati na KristoYesu. 2Pamba té mobeko ya Molimo ya bomoi kati na Kristo Yesu ekangolakiyo na mobeko ya lisumu pe ya liwa.3Ya solo −oyo Mibeko ekoki kosala té pona bolembu ya nzoto− Nzambe, awa asili kotinda Mwana na ye moko na lolengeya nzoto ya lisumu pe po na lisumu, asambisaki lisumu kati na nzoto, 4pobosembo ya Mibeko ékokisama kati na biso oyo tozali kotambola, na ndenge yanzoto té, kasi na ndenge ya Molimo. 5Ya solo, baoyo bazali bato ya nzoto,balandaka makambo ya nzoto; kasi baoyo bazali bato ya Molimo balandakamakambo ya Molimo.6Pamba té, makanisi ya nzoto ezali liwa; nzokandemakanisi ya Molimo ezali bomoi pe boboto. 7Po makanisi ya nzoto ezali nabonguna ná Nzambe po etosaka Mibeko ya Nzambe té, ekoki kotosa yango peté. 8Baoyo bazali na se ya bokonzi ya nzoto bakoki kosepelisa Nzambe té.9Nzokande bino, bozali na se ya bokonzi ya nzoto té, kasi ya Molimo, lokolaMolimo ya Nzambe afandi kati na bino. Soki moto azali na Molimo ya Kristo té,moto wana azali ya ye té. 10Nzokande soki Kristo azali kati na bino, atakonzoto ekufi po na lisumu, Molimo azali bomoi po na bosembo.11Soki Molimo ya oyo asekwisaki Yesu na bakufi azali kofanda kati na bino, oyo asekwisaki Kristo na bakufi akopesa pe bomoi na banzoto na bino oyo etangamá kokufa, na nzela ya Molimo na ye oyo azali kofanda kati na binoa.12Yango wana, bandeko, tozali ya solo na nyongo, kasi ezali ya nzoto té po nakobika na ndenge ya nzoto. 13Pamba té soki bozali kobika na ndenge ya nzoto,bokokufa. Kasi soki, na nzela ya Molimo, bozali koboma bizaleli ya nzoto,bokobika.14Pamba té baoyo nyonso bazali kotambwisama na Molimo yaNzambe, bango bazali bana ya Nzambe. 15Ya solo, bozwaki molimo yaboumbu té po na kozonga lisusu na bobangi; kasi bozwaki Molimo yakokómisama bana, oyo na nzela na ye togangaka: «Ába, Tata!»b.16Molimo yemoko atatolaka elongo na molimo na biso ’tè tozali bana ya Nzambe. 17Nzokande soki tozali bana, tozali pe basangolì: basangolì ya Nzambe,baninga-basangolì ya Kristo; soki penza tokomona pasi elongo na ye po tózwape nkembo elongo na yec.18Ya solo, nakanisi ’tè bapasi ya elaka oyo ekoki kokokisama té ná nkembooyo elingi komonisama kati na biso. 19Pamba té, bikelamo ezali kozela na posanyonso komonisama ya Mwana ya Nzambe.20Ya solo, bikelamo ekonzamakina makambo ezangá tina − na mokano na yango té, kasi po na oyo akonzakiyango − na elikya 21’tè bikelamo yango kaka ekokangolama na boumbu ya oyoebebaka po na kokota na bonsomi ya nkembo ya bana ya Nzambe. 22Nzokandetoyebi ’tè, tii na moi ya lelo, bikelamo nyonso ezali kolela elongo pe komonabwale elongo.23Yango kaka té: biso pe oyo tozali na mbuma ya liboso yaMolimo, biso pe tozali kolela kati na biso moko, na kozelaká kokómisama bana,lisiko ya nzoto na bisoe. 24Po ezali na kati ya elikya nde tobikaki. Nzokandeelikya oyo emonanaka, ezali elikya té: nani atiaka elikya na oyo azali komona? 25Kasi soki tozali kotia elikya na oyo tozali komona té, tozali kozela yango namolende.26Ndenge moko pe Molimo ayaka kosalisa biso na bolembu na biso, pamba tétoyebi té nini esengeli tósenga na mabondeli na biso. Kasi Molimo ye mokoabondelaka po na biso, na maloba oyo ekoki kolobama té; 27pe ye oyo atalakakati na mitema ayebi nini oyo ezali makanisi ya Molimo, po abondelaka po nabasantu na ndenge Nzambe alingi.28Toyebi ’tè makambo nyonso esalakaelongo po na bolamu ya baoyo balingaka Nzambe, ya baoyo babengamáengebene na mabongisi na ye. 29Po baoyo ayebaki liboso, alengelaki pe bangobanda kala po na kokokana na lolenge ya Mwana na ye, po ye ázala Mwana yaliboso na kati ya bandeko mingi. 30Pe baoyo alengelaki banda kala, abengakipe bango; baoyo abengaki, akómisaki pe bango sembo; pe baoyo akómisakisembo, apesaki bango pe nkembo.Bolingo ya Nzambe elongaka31Bongo, tokoloba nini na makambo oyo? Soki Nzambe azali po na biso, naniakotelemela biso? 32Ye oyo aboyisaki té Mwana na ye moko, kasi akabaki yepo na biso nyonso, ndenge nini akoki té kokabela biso biloko nyonso elongo naye?33Nani akofunda baponami ya Nzambe?Nzambe nde akómisakasembo. 34Nani akokata etumbu? Kristo [Yesu] oyo akufaki, kutu koleka,asekwaki; ye oyo azali na loboko ya mobali ya Nzambe, ye oyo azali kobondelape po na biso!35Nani akokabola biso na bolingo ya Kristo? Pasi to bobangi,monyoko to nzala, bolumbu to likama, to pe mopanga? 36Ndenge ekòmamá:likolo na yo, tozali kobomama mokolo na mokolo.Tozali kozwama lokola bampate ya kobomamaf.37Kasi na nyonso oyo, tozali balongi koleka na nzela ya oyo alingaki biso. 38Ya solo, nandimisami ’tè ézala liwa, ézala bomoi, ézala ba-anzelu, ézalabankumu, ézala makambo ya mikolo oyo, ézala makambo ya mikolo oyo elingikoya, ézala banguya, 39ézala bolai, ézala bozindo, ézala ekelamo nini mosusu,ekokabola biso té na bolingo ya Nzambe oyo ezali kati na Kristo Yesu, Mokonzina biso.
91Nazali koloba bosolo kati na Kristo, nazali kokosa té, se ya motema na ngaiezali kotatola ná ngai na lisanga na Molimo Mosantu: 2nazali na mawa mingipe pasi tango nyonso na motema na ngai.3Pamba té, nalingaki ’tè ngai mokonázala oyo alakelamá mabe, oyo akabwaná ná Kristo po na bandeko na ngai,bato ya libota na ngai na bomoto, 4bango oyo bazali ba-Israel, kokómisamabana ezali na bango, lokumu, baboyokani, likabo ya Mibeko, losambo pebilakaa, 5bango oyo bazali bakoko oyo Kristo autá na ndenge ya nzoto, ye oyoazali likolo ya nyonso, Nzambe oyo apambolamá po na seko! Amen!6Ezali té ’tè maloba ya Nzambe ekómi pamba. Pamba té bato nyonso oyo bautána Israel, bato yango bazali Israel té. 7Ezali té po babotami na libota ya Abraamnde bango nyonso bazali bana na ye. Kasi na Izaak nde libota na yo ekozwakombob.8Elingi koloba: ezali té bana ya nzoto nde bazali bana ya Nzambe,kasi bana ya bilaka nde batangami lokola libota. 9Ya solo, maloba ya elaka,yango oyo: Kaka na elaka oyo, nakoya pe Sara akozala na mwana.10Yangokaka té, kasi Rebeka pe azwaki zemi na mobali moko, Izaak, tata na biso. 11Yasolo, bana babotamaki nanu té pe basalaki nanu likambo moko ya malamu to yamabe té, po mabongisi ya Nzambe, engebene na koponama, éumela, 12po namisala té kasi po na ye oyo abengaka; eyebisamaki na Rebeka ’tè Kulutuakozala moumbu ya lekid 13ndenge ekòmamá: Nalingi Yakobo pe nayiniEzaue.151614Bongo, tokoloba nini?Kozanga bosembo ezali epai ya Nzambe? Sokimoke té! 15 Pamba té alobaki na Moize:Nakoyoka mawa na oyo nakoyokela mawa.Pe nakolakisa boboto na oyo nakolakisa bobotof.16 Boye, yango ezali té likambo ya moto oyo alingi to ya moto oyo azali kokimambangu, kasi ya mawa ya Nzambe.17Pamba té Makòmi elobi na Faraon:Natiaki yo penza po na likambo oyo: po na kolakisa kati na yo nguya na ngai pepo ’tè kombo na ngai ésakolama na mokili mobimbag. 18Yango wana,ayokelaka mawa moto oyo ye alingi, pe akómisaka motú makasi moto oyo yealingi.19Bongo okoloba na ngai: [bongo] po na nini azali kopalela lisusu? Ya solo,nani akoki kotelemela mokano na ye? 20Kasi yo moto, ozali nani po óbetatembe ná Nzambe? Eloko oyo basalá ekoki koloba na oyo asalaki yango: Po nanini osalá ngai boye?h. 21Mosali-mbeki azali na bokonzi likolo ya mabelé té pona kosala na potopoto kaka moko yango, mbeki moko po na mosala ya lokumupe mosusu po na mosala ya mikolo nyonso?22Pe soki Nzambe, awa alingakikolakisa kanda na ye pe kososolisa nguya na ye, akangaki motema mingi penzapo na bambeki ya kanda oyo ebongisamaki po na libebi, 23pe po álakisabomengo ya nkembo na ye na bambeki ya mawa oyo ye abongisaki liboso po nankembo, 24na biso baoyo abengaki, kaka té kati na Bayuda, kasi pe kati nabikolo mosusu,25ndenge alobi na Ozé:Nakobenga ekolo na ngai, oyo ezalaki ekolo na ngai tépe mwasi ya bolingo, oyo azalaki mwasi ya bolingo té;i. 26pe na esika oyo elobelamelaki na bango: bino bozali ekolo na ngai té,kuna, bakobengama bana ya Nzambe ya bomoij.27Ezaya agangaki pe po na Israel: Ata motango ya bana ya Israel ezali lokolazelo ya mbu, bobele mwa-ndambo oyo batikali bakobika; 28pamba té Mokonziakokokisa mobimba pe noki maloba na ye po na mokilik. 29Ndenge Ezayaalobaká liboso:Soki Mokonzi ya mampinga atikelaki biso libota té,tolingaki kokóma lokola Sodome,tolingaki kozala lokola Gomorel.Israel pe bosembo30Bongo, tokoloba nini? Bikolo ezalaki koluka bosembo té, ezwi bosembo,bosembo euti na bondimi. 31Nzokande Israel oyo ezalaki koluka mibeko yabosembo, ekómaki na Mibeko té.32Po na nini? Po eutaki na bondimi té kasi namisala. Batutani na libanga ya libaku, 33ndenge ekòmamá:Tala, natie na Sion libanga ya libaku, libanga monene oyo ekweisaka,pe oyo akondimela ye akoyokisama soni tém.
101Bandeko, posa ya motema na ngai pe losambo na ngai liboso ya Nzambe po nabango ezali po na lobiko. 2Pamba té, natatolaka po na bango ’tè bazali nabolingo makasi ya Nzambe, kasi na ndenge ya boyebi té. 3Ya solo, awabazangaki koyeba bosembo ya Nzambe pe kolukaká kotia [bosembo] ya bangomoko, bamitiaki té na se ya bokonzi ya bosembo ya Nzambe.4Pamba té Kristoazali suka ya Mibeko, po bosembo ézala na moto nyonso oyo andimi.Maloba, bondimi pe lobiko 5Ya solo, Moize akòmaki po na bosembo oyo eutaka na Mibeko ’tè: Moto oyoasalaka makambo yango, akobika po na yangoa.6Nzokande bosembo oyo eutina bondimi elobi boye: Koloba té na kati ya motema na yo: Nani akobuta nalikolo? −Yango elingi koloba kokitisa Kristo− 7to Nani akokita na libuluezangá suka? - Yango elingi koloba kotombola Kristo na bakufi.8Kasi yangoelobi nini? Liloba ezali penepene na yo, na kati ya monoko na yo pe na kati yamotema na yo. Yango elingi koloba Liloba ya bondimi, oyo tozali kosakolab. 9Po soki otatoli polele na monoko na yo ’tè Yesu azali Mokonzi pe ondimi namotema na yo ’tè Nzambe asekwisaki ye na bakufi, okobika. 10Pamba té oyoendimami na motema ememaka na bosembo, pe oyo etatolami na monokoememaka na lobiko.11Ya solo, Makòmi elobi: Moto nyonso oyo andimeli ye,akoyokisama soni téc. 12Ya solo, bokeseni ezali té na kati ya Moyuda ná moGreki pamba té se ye moko azali Mokonzi ya bato nyonso, atondá na bomengopo na bato nyonso oyo babelelaka ye. 13Ya solo, moto nyonso oyo akobelelakombo ya Mokonzi akobikad.14Bongo ndenge nini bakobelela oyo bandimeli té? Ndenge nini bakondimelaoyo bayoki té? Pe ndenge nini bakoyoka soki mosakoli azali té? 15Pe ndengenini bakosakola soki batindami té? Ndenge ekòmamá: Boni ezali kitoko, makoloya baoyo bazali kosakola makambo malamu!e.16Kasi bato nyonso batosaki sango malamu té. Pamba té Ezaya alobaki:Mokonzi, nani andimi sango na biso?. 17Boye, bondimi eutaka na koyoka, pekoyoka na nzela ya liloba ya Kristo.18Kasi, nazali kotuna: Bayokaki té? Kutumongongo na bango etambolaki na se mobimba,pe maloba na bango tii na suka ya mokili mobimba.19Kasi natuni: Israel ayebaki yango té? Moto ya liboso, Moize, alobi:Nakoyokisa bino zuwa po na oyo ezali ekolo té,nakoyokisa bino kanda po na ekolo oyo ezangá mayele.20Pe Ezaya abangi té, alobi:Namonami [na] baoyo bazalaki koluka ngai té,namilakisi na baoyo bazalaki kotuna ngai té,i. 21nzokande alobaki po na Israel: moi mobimba nazalaki kotandela mabokoekolo oyo ezangá botosi pe ezalaki kotelemela.
111Bongo nalobi: Nzambe aboyi bato na ye? Soki moke té! Pamba té ngai penazali mo-Israel, mwana ya Abraam, ya libota ya Benjamena. 2Nzambe aboyité bato na ye baoyo asi’ayebaki liboso to bozali kososola té oyo Makòmi elobina nzela ya Eliya tango afundi Israel liboso ya Nzambe? 3Mokonzi, babomibaprofete na yo, babuki bisika ya kobonzela na yo, natikali ngai moko pe bazalikoluka bomoi na ngai.4Kasi eyano ya Nzambe elobi na ye nini? Ngai mokonatikali na bato koto sambo oyo bagumbi mabolongo liboso ya Baal téc. 5Naboye, na elaka ya lelo pe, mwa-ndambo oyo batikali, engebene na koponama yangolu, bazali.6Nzokande soki ezali po na ngolu, ezali lisusu po na misala té;soki bongo té, ngolu ezali lisusu ngolu té. 7Bongo nini? Oyo Israel azali koluka,azwi yango té; kasi baoyo baponami bazwi yango, pe bato mosusubakómisamaki motú makasi, 8ndenge ekòmamá:Nzambe apesi bango molimo ya pongi,miso po na komona tépe matoi po na koyoka té,tii lelo oyod.9Pe David alobi:Mesa na bango ézala motambo pe monyama,libaku pe lifuta oyo ezongisameli bango. 10Miso na bango ékóma molili po bámona té,pe sala ’tè mokongo na bango égumbama tango nyonso!e.Lobiko ya bapagano11Bongo, natuni: Ya solo, babeti libaku po na kokweya? Soki moke té! Kasi nambeba na bango, lobiko ekei epai ya bapagano, po na kotumola zuwa na bango. 12Nzokande, soki mbeba na bango ezali bomengo ya mokili, pe kokita nabango bomengo ya bapagano, boni koleka, litondi na bango ekozala.13Kasinalobi na bino bapagano: lokola nazali, ngai, ntoma ya bapagano, nakumisimosala na ngai, 14soki, tango mosusu, nakoyokisa zuwa bato oyo bazali makilamoko ná ngai, pe nakobikisa bamosusu na kati na bango.15Ya solo, sokikotiama pembeni na bango ezalaki kozongisama ya boyokani ya mokilif, bonikoyambama na bango ekozala, soki nsekwa na bakufi tég? 16Nzokande, sokimbuma ya liboso ezali mosantu, potopoto pe; pe soki mosisa ezali mosantu,bitape pe.17Kasi soki bitape mosusu ekatami, pe yo nzete ya Olive ya zambaopikami na kati na yango pe osangani na mosisa, na mai ya nzete ya Olive, 18kobeta tolo té liboso ya bitape. Kasi soki obeti tolo, ezali yo té moto omemimosisa, mosisa nde ememi yo.19Bongo okoloba: bitape ekatami po ngainápikama. 20Malamu! Yango ekatami po na kozanga bondimi; kasi yo otelemingwi po na bondimi. Kozala na lolendo té, banga nde. 21Pamba té soki Nzambeayokeli bitape ya solo mawa té , [keba] akoyokela yo mawa pe té.22Bongo, tala bolamu pe kanda ya Nzambe: kanda epai ya baoyo bakwei, pe bolamu ya Nzambe epai na yo, soki oumeli na bolamu yango; soki té yo pe okokatama.23Bango pe soki baumeli té na kozanga bondimi, bakopikama; pamba téNzambe akoki kopika bango lisusu. 24Ya solo, soki yo, engebene na lolenge nayo, okatami na nzete ya Olive ya zamba, pe opikami na lolenge na yo té, nanzete ya ba-Olive oyo elonami, boni koleka, bango, engebene na lolenge nabango, bakopikama na nzete ya ba-Olive ya bango moko!Lobiko ya suka ya Israel25Pamba té, bandeko, nalingi té bózanga koyeba mobombamo oyo, po bómimona bato ya mayele té [na miso] na bino moko, po mitema makasi ezwi ndambo ya Israel tii litondi ya bapagano ékota.26Pe bongo Israel mobimbaekobika, ndenge ekòmamá:Mobikisi akouta na Sion,akolongola bomoi ezangá bondimi ya Yakoboh. 27Pe oyo ekozala boyokani na ngai ná bango,tango nakolongola masumu na bangoi.28Na oyo etali sango malamu, bazali banguna, po na bino; kasi na oyo etalikoponama, balingami likolo ya batata. 29Pamba té makabo pe ebiangeli yaNzambe ebongwanaka té.30Ya solo, ndenge, kala, bino boboyaki kotosaNzambe; kasi sik’oyo, boyokelami mawa likolo ya kozanga botosi na bango. 31Ndenge moko pe, bango, sik’oyo, baboyi kotosa likolo ya mawa na bino pobango pe [sik’oyo] báyokelama mawa. 32Pamba té Nzambe akangi bato nyonsolisanga na kozanga botosi po bango nyonso báyokelama mawa.33E! bozindo ya bomengo, bwanya pe boyebi ya Nzambe! Boni kosambisamana ye esosolamaka té pe banzela na ye eyebanaka téj! 34Ya solo, nani ayebi makanisi ya Mokonzik?To nani azali mopesi toli na ye?35To nani apesaki ye liboso,po ézongisamela yel? 36Po nyonso euti na ye, ezali na nzela na ye pe po na ye. Nkembo ézala na yepo na sekom. Amen!
121Bongo bandeko, nalendisi bino, na mawa ya Nzambe, bóbonzela nzoto na binolokola mbeka ya bomoi, mosantu pe oyo esepelisaka Nzambe, yango ezalilosambo oyo ebongi. 2Bólanda mokili oyo té, kasi bóbongwana na koyeisamaya sika ya mayele po bósosola nini ezali mokano ya Nzambe, nini ezali malamu,nini esepelisaka ye pe nini ezali malamu penza.Makabo ya molimo ya ndenge na ndenge3Ya solo, na ngolu oyo epesameli ngai, nalobi na moto nyonso na kati na bino: bómimona té likolo koleka ndenge esengeli komimona, kasi bómimona po na kozala bato ya mayele ndenge Nzambe akabolá eteni ya bondimi na moko na moko.4Ya solo, ndenge tozali na biteni mingi na nzoto se moko, pe biteninyonso yango ezali na mosala se moko té, 5ndenge moko pe biso: ebele, tozalinzoto se moko kati na Kristo, pe moko na moko eteni ya bamosusua.6Awatozali na makabo ya ndenge na ndenge engebene na ngolu epesameli biso, sokilisakoli, ézala engebene na bondimi; 7soki mosala, na mosala; soki moteyi, naliteya; 8soki molendisi, na lilendisi; moto oyo akabaka, ézala na motema moko;motambwisi, ézala na komipesa; moto oyo ayokelaka bato mawa, ézala naesengob.9Bolingo ézala ya bokibisi té. Bóyina mabe, bókangama na malamu. 10Nabolingo ya bandeko, bólinganaka; na lokumu, bókumisanaka.11Na molende,bózala bato ya goigoi té, na molimo, bózala bato ya molende, po na Mokonzi,bósalelaka ye; 12na elikya, bósepelaka; na monyoko, bókangaka mitema; nalosambo, bóyikaka mpiko, 13bósanganaka na bosengá ya basantu, bólukakakoyamba bapaya epai na binoc.14Bópambola bato oyo bazali konyokola[bino], bópambola pe bólakela mabe téd. 15Bósepela ná bato bazali kosepela;bólela ná bato bazali kolela. 16Bóyokana malamu bino na bino: bózala namakanisi ya lolendo té, kasi bómemama na makambo ya komikitisa. Bino mokobómikanisa té bato ya mayelee.17Bózongisa na moto moko té mabe na mabe.Bóluka kosala malamu na miso ya bato nyonso. 18Soki ekoki kosalama, ndengeetali bino, bózala na boboto na bato nyonso.19Balingami, bómilongisa binomoko té, kasi bópesa esika na kanda, pamba té ekòmamá: Mokonzi alobi,Kozongisa mabe ezali likambo na ngai, ngai nakofutaf! 20Kasi, soki mongunana yo azali na nzala, pesa ye bilei; soki azali na posa ya mai ya komela, pesa ye;pamba té na kosalaká bongo, ozali kotondisa makala ya móto na motú na yeg. 21Kolóngama na mabe té, kasi longa mabe na malamu.
131Moto nyonso átosa bakonzi oyo bazali na bokonzi kolekaa, pamba té ezali nabokonzi té, soki euti na Nzambe té, pe oyo ezali etiamá na Nzambe. 2Bongomoto oyo aboyi kotosa bokonzi azali kotelemela mobeko ya Nzambe, pebatelemeli bango moko bakozwa etumbu.3Ya solo, bakonzi bazali bobangi tépo na mosala malamu, kasi po na mosala mabe. Olingi óbangisama na mokonzité? Sala malamu, pe okozwela yango lokumu, 4pamba té ye azali mosali yaNzambe po na bolamu na yo. Kasi soki osali mabe, banga. Ya solo, alatakamopanga pamba té: azali mosali ya Nzambe, mopesi etumbu, po na kanda, epaiya moto oyo asalaka mabe. 5Yango wana, esengeli kotosa kaka té po na kanda,kasi pe po na se ya motema.6Ya solo, ezali pe po na yango nde bofutakampako. Pamba té bazali basali ya Nzambe oyo bamipesaka na likambo yango. 7Bófuta bato nyonso nyongo na bango: mpako na mofutisi-mpako; ntako namofutisi-ntako; bobangi na moto oyo abongi na bobangi; lokumu na moto oyoabongi na lokumu.8Bózala na nyongo na moto moko té, longola se oyo ya kolingana bino na bino;pamba té moto oyo azali kolinga moto mosusu, asi’akokisi mobeko. 9Ya solo,mobeko: Okosala ekobo té; okoboma moto té; okoyiba té; okolula té, pe sokimobeko nini mosusu, esangani na liloba oyo [,na]: Okolinga moninga na yolokola yo moko. 10Bolingo esalaka moninga mabe té. Boye, bolingo ezali:kokokisa Mibeko.11Na yango, bóyeba elaka oyo: ezali ngonga na bino ya kosila kolamuka napongi, pamba té sik’oyo lobiko ekómi penepene na biso koleka tango oyotondimaki. 12Butu epusani, pe tongo ebelemi. Bongo tótika misala ya molili,[kasi] tólata bibundeli ya mwinda.13Tótambola ndenge elongobani, lokola namoi: lokoso ya kolia té, kolangwa masanga té, makambo ya bosoni té, mobuluté, koswana té pe zuwa té. 14Kasi bólata Mokonzi Yesu Kristo pe bómitungisapo na nzoto té po na kokokisa baposa na yango ya mabe.
141Bóyamba oyo alembi na bondimi; kasi po na makambo ya tembe té. 2Motomosusu andimaka kolia nyonso; nzokande moto ya bolembu aliaka kakandunda.3Moto oyo aliaka átsiola té moto oyo aliaka té; moto oyo aliaka téásambisa té moto oyo aliaka, pamba té Nzambe ayambi ye. 4Yo ozali nani,mosambisi ya mosali ya moto mosusu? Átelema to ákwea, etali mokonzi na yemoko; kutu akotelema, pamba té mokonzi akoki kotelemisa ye.5[Ya solo] motomoko akanisaka ’tè mokolo oyo eleki mokolo mosusu; kasi moto mosusuakanisaka ’tè mikolo nyonso ezali ndenge moko. Tika moto na moto, namakanisi na ye, ándimisama bongo. 6Moto oyo akanisaka mokolo bongo,akanisaka po na Mokonzi; oyo aliaka, aliaka po na Mokonzi, pamba té apesakamatondi na Nzambe. Oyo aliaka té, aliaka té po na Mokonzi pe apesaka matondina Nzambea.7Ya solo, moto moko té na kati na biso azali na bomoi po na yemoko; pe moto moko té akufaka po na ye moko. 8Pamba té, soki tozali nabomoi, tozali na bomoi po na Mokonzi, pe soki tokufi, tokufi po na Mokonzi.Ata tozali na bomoi, ata tokufi, tozali ya Mokonzi. 9Ya solo, Kristo akufaki peazongaki na bomoi po na likambo oyo: po ázala Mokonzi ya bakufi pe ya baoyobazali na bomoi.10Kasi yo, po na nini osambisaka ndeko na yo? To pe, po nanini otsiolaka ndeko? Ya solo, biso nyonso tokotelema liboso ya esambiselo yaNzambeb; 11pamba té ekòmamá:Ngai Mokonzi nalapi ndai ’tè mabolongo nyonso ekogumbamela ngaipe minoko nyonso ekokumisa Nzambe.12[Bongo] boye, moko moko na biso akosamba [liboso ya Nzambe] po namakambo na ye mokod.Kozala libaku po na ndeko na yo té 13Bongo, tósambisana lisusu té; kasi tósosola kutu likambo oyo: tótiela téndeko libaku to likambo oyo ekweisaka.14Nayebi pe nandimisami kati naMokonzi Yesu ’tè eloko moko té ezali mbindo na yango moko; longola se po namoto oyo akanisi ’tè eloko songolo ezali mbindo, yango ezali mbindo po namoto wana. 15Ya solo, soki ndeko na yo ayokisami mawa po na bilei, ozalikotambola lisusu engebene na bolingo té. Kobungisa té, na bilei na yo, ye oyoKristo akufelaki.16Bongo, oyo ezali malamu po na bino éfingama té. 17Yasolo, bokonzi ya Nzambe ezali bilei to binwa té; kasi bosembo, boboto peesengo na lisanga na Molimo Mosantu.18Ya solo, oyo asalelaka Kristo namakambo wana, asepelisi Nzambe pe andimami na bato. 19Bongo, boye, tikatóluka makambo ya boboto pe ya matòngì po na bamoko pe bamosusu.20Óbebisa mosala ya Nzambe likolo ya bilei té. Ya solo, nyonso ezali peto; kasiezali mabe po na moto oyo azali kolia ébetisa libaku. 21Ezali malamu kolianyama té, komela vinu té, ná oyo ezali kobetisa ndeko na yo libaku.22Ozali nakondimisama, [yango] ózala na yango po na yo moko na miso ya Nzambe.Esengo na moto oyo azali komisambisa té na oyo amoni ezali malamu. 23Kasimoto oyo azali kotia tembe, soki alei, asi’akatelami etumbu, po euti nakondimisama té. Nzokande nyonso oyo ezali ya kondimisama té ezali lisumu.
151Biso baoyo tozali makasi tosengeli komema bolembu ya baoyo bazangimakasi pe komisepelisa biso moko té. 2Moko moko na biso ásepelisa moningapo na bolamu na ye, po na litòngì.3Pamba té Kristo amisepelisaki ye moko té,kasi, ndenge ekòmamá: mafinga ya bato oyo bafingaki yo ekweeli ngaia. 4Yasolo, nyonso oyo ekòmamá liboso, ezalaki po na liteya na biso po, na molendepe na lilendisi ya Makòmi, tózwa elikya.5Nzambe ya molende pe ya lilendisiápesa bino makanisi moko engebene na Kristo Yesu, 6po, motema moko,mongongo moko, bókumisa Nzambe, Tata ya Mokonzi na biso Yesu Kristo.Koyambana na bolingo nyonso 7Yango wana bóyambana bino na bino, ndenge Kristo pe ayambaki bino, po nalokumu ya Nzambe.8Ya solo, nalobi ’tè Kristo akómaki mosali ya baoyobakatamá ngenga likolo ya bosolo ya Nzambe, po na kolendisa bilaka yabakoko; 9nzokande bapagano bazali kokumisa Nzambe po na mawa, ndengeekòmamá:yango wana nakokumisa yo na kati ya bapaganope nakoyembela kombo na yob.10Pe alobi lisusu:Bapagano, bósepela elongo na ekolo na yec. 11Pe lisusu:Bapagano nyonso, bósanzola Mokonzipe bato nyonso bákumisa yed.12Ezaya alobi lisusu:eboto ya Yesé ekozala,pe akotelema po na koyangela bapagano; bapagano bakotia elikya epai na yangoe.13Nzambe ya elikya átondisa bino na esengo nyonso pe na boboto nyonso na bondimi, po bótonda na elikya, na nguya ya Molimo Mosantu.14Bandeko na ngai, po na bino, ngai moko nandimisami ’tè bino botondi na motema malamu, botondi na boyebi nyonso pe bokoki kokebisana bino na bino.15Nzokande, namwa-bisika, nakòmeli bino makasi, lokola po na kokanisela bino, po na ngoluepesameli ngai na Nzambe, 16po na kozala mosali ya Kristo Yesu po nabapagano; na kozalaká nganga-Nzambe ya sango malamu ya Nzambe, polibonza ya bapagano ékóma libonza endimami, esantisami na Molimo Mosantuf.17Boye, na lisanga na Kristo Yesu, nazali komikumisa po na mosala nazalikosalela Nzambe. 18Pamba té nakomeka té koloba eloko, soki kaka té oyoKristo asali na nzela na ngai po na botosi ya bapagano, na liloba pe na mosala, 19na nguya ya bilembo pe makamwisi, na nguya ya Molimo [ya Nzambe]; nandenge ’tè, banda na Yeruzalem pe zingazinga tii na Iliri, nasi’nakokisi kosakolasango malamu ya Kristo.20Boye, nazalaka na posa ya kosakola sango malamuepai Kristo atangami té, noki té nátònga likolo ya mobokó ya moto mosusu; 21kasi, ndenge ekòmamá:Baoyo sango po na ye eyebisameli té bakomona,pe baoyo bayoká té bakososola.22Yango wana napekisami mbala mingi náya epai na binoh. 23Kasi sik’oyo,awa nazali lisusu na mosala té na bitúká oyo; banda mbula ebele, nazali na posamakasi ya koya epai na bino,24tango nakokende na Espanye. Pamba té nazalikolikya kotala bino awa nakoleka, pe kosalisama na bino kuna, sima ya kotondaliboso na ndambo ya esengo ya kozala ná bino. 25Kasi sik’oyo, nazali kokendena Yeruzalem, po na kosalela basantu.26Pamba té Masedwane pe Akayaesepelaki kokongola mwa-makabo po na bokeleli ya basantu ya Yeruzalemi. 27Ya solo, esepelaki pe ezalaki na lotomo ya kosalela bango: pamba té sokibapagano basanganaki na makabo na yango ya molimo, yango pe esengelikosalisa bango na biloko ya mokilij.28Bongo soki nasilisi lotomo oyo penapesi bango mbuma oyo mobimba, nakoleka, na nzela na bino, na Espanye. 29Nayebi ’tè awa nakoya epai na bino, nakoya na litondi ya lipamboli yaKristo.30Kasi [, bandeko,] nazali kolendisa bino, po na Mokonzi na biso YesuKristo pe po na bolingo ya Molimo, bóbunda elongo na ngai na mabondeli epaina Nzambe po na ngai, 31po nákangolama na bato oyo baboyi kondima naYudea pe mosala na ngai po na Yeruzalem éyambama malamu na basantu, 32po, na mokano ya Nzambe, awa nakokóma epai na bino na esengo, nápemamoke elongo na bino.33Nzambe ya boboto ázala na bino nyonso. Amen!
161Nasengi bino po na ndeko mwasi na biso Febe, oyo azali [pe] mosali yaEklezya ya Sankré, 2po bóyamba ye po na Mokonzi, na ndenge elongobani nabasantu, pe bósunga ye na makambo oyo akosengela na bino. Pamba té azalakimosungi ya bato mingi, ná ya ngai moko.3Bópesa mbote na Priska ná Akilas,baninga na ngai ya mosala kati na Kristo Yesua, 4baoyo batiaki bomoi nabango na likama po na kobikisa ngai; baoyo kaka ngai moko té nazali kotonda,kasi pe ba-Eklezya ya bapagano. 5Bópesa pe mbote na Eklezya oyo esanganakana ndako na bangob. Bópesa mbote na Epenetos, ndeko na ngai ya bolingo, oyoazali mbuma ya liboso ya Azia po na Kristo.6Bópesa mbote na Maria, oyoamonaki pasi mingi na mosala po na bino. 7Bópesa mbote na Andronikos náJunia, bato ya libota na ngai pe baninga na ngai ya boloko, oyo bayebaná na katiya bantoma, oyo pe bazalaki kati na Kristo liboso na ngai. 8Bópesa mbote naAmpliatos, ndeko na ngai ya bolingo kati na Mokonzi.9Bópesa mbote naUrbanus, moninga na biso ya mosala kati na Kristo, pe na Stakus, ndeko na ngaiya bolingo. 10Bópesa mbote na Apeles, oyo andimamá kati na Kristo; bópesambote na libota ya Aristobule. 11Bópesa mbote na Erodion, moto ya libota nangai; bópesa mbote na bato ya libota ya Narsise, oyo bazali kati na Mokonzi.12Bópesa mbote na Trifene pe na Trifoze oyo basalaki mosala makasi kati naMokonzi. Bópesa mbote na Persis, ndeko mwasi ya bolingo oyo asalaki mosalamakasi kati na Mokonzi. 13Bópesa mbote na Rufus, moponamì kati naMokonzi; pe na mama na ye oyo azali pe ya ngaic. 14Bópesa mbote naAsunkritos, Flegon, Ermes, Patrobas, Ermas pe na bandeko oyo bazali ná bango.15Bópesa mbote na Filologe pe na Julia, na Neré pe na ndeko na ye ya mwasi,na Olimpas pe na basantu nyonso bazali ná bango. 16Bópesanaka mbote nakopwepwa mosantu.17Bandeko, nazali kolendisa bino, bókeba na baoyo bazali koyeisa kozangaboyokani pe mabaku na kotelemelaká mateya oyo bino boyekolaki. Bókimabango. 18Ya solo, bato ya boye bazali kosalela Mokonzi na biso Kristo té; kasimabumu na bango moko. Na maloba na bango ya sukali pe ya lokuta, bakosakabato bazangi mayele.19Ya solo, botosi na bino eyebani na bato nyonso; bongonazali na esengo po na bino. Kasi nalingi ’tè bózala bato ya bwanya namakambo ya malamu, peto na makambo ya mabe. 20Nzambe ya bobotoakopanza Satana na se ya makolo na bino noki. Ngolu ya Mokonzi na biso Yesuézala na bino.21Timoté, moninga na ngai ya mosala atindeli bino mbote, náLusius, Jazon pe Sosipater, bato ya libota na ngaid. 22Natindeli bino mbote,ngai Tertios moto nakòmi mokanda oyo kati na Mokonzi.23Gayos, moto oyoayambi ngai na ndako na ye pe Eklezya mobimba, atindeli bino mbote. 24Eraste,mobateli ya mbongo ya engumba atindeli bino mbote, ná ndeko Kuartose.25[Na oyo akoki kolendisa bino engebene na sango malamu na ngai pe mateyaya Yesu Kristo −engebene na emoniseli ya mobombamo ekundamá banda seko, 26kasi oyo emonani sik’oyo na makòmi ya baprofete, elakisami na bikolonyonso, engebene na etindá ya Nzambe ya seko ya komema bango na botosi yabondimi−27na Nzambe se ye moko mayele, po na Yesu Kristo, nkembo po na seko. Amen!

1 Corinthiens

11Polo abuangami na Yesu Klisto po azala apostolo na ye na ngolu na Nzambe, pe ndeko na ye Sosthène, 2na eklesia ya Nzambe na Corinthe oyo Yesu Klisto apetolaki. Tozokomela ba oyo basalelaka Mokonzi Yesu Klisto na bisika nionso, Mokonzi na bango mpe ya biso. 3Tika ngolu pe kimia ya Nzambe Tata na biso mpe Mokonzi Yesu Klisto ezala na bino.4Nazo kumisa Nzambe na ngayi, na ngolu oyo Yesu Klisto apesa biso. 5Apambola bino na makambo nionso, na maloba pe boyebi. 6Apambola bino ndenge matatoli epesama na Klisto andima yango, solo kati na bino7Bongo bino bozangi ba makabo ya Molimo te. Lolenge bozalaki kozela yango na eminiseli ya Mokonzi Yesu Klisto. 8Akolendisa bino kino suka bongo bokozala bokembe kino mokolo ya kosambisama. 9Nzambe azali mokokisi na bilaka abianga bino na lisanga ya mwana na ye Yesu Klisto Mokonzi na biso.10Azali kolendisa bino bana mibali pe bana basi na kembo na Mokonzi Yesu klisto oyo bino bondima, mpe bokabuani ezali te kati na bino. Nazo bondela bio, bozala lisanga moko makanisi moko pe molimo moko. 11Nazuaki sango na b ino na batoi ya Chloé ndenge bozali koswana pamba kati na biso.12Ba oyo bazo loba : «ngayi nazali ya Polo, to ya Apolos, to ya Cephas, to ya Klisto». 13Klisto akabwani? Polo abakisamaka pona bino? Bo bozuaka libatisi na kombo ya Polo?14Natondi Nzambe po ete batisa bino te, kolongola kaka Crispus na Gaius. 15Mpo ete moko te aloba ete abatisama na kombo na ngayi. 16(Na batisaki ndako mobimba ya Stephanas, nayebi te soko na batisa ba mosusu).17Natindama te epayi ya Klisto po na batisa bato kasi po na teya sango malamu, na mayele ya bamoto te, po ete ekulusu ya Klisto ezala na nguya na yango te1819Bongo sango na ekulusu ezali liboma na miso ya ba oyo bazo kufa . Po na bato Nzambe abikisa , ezali na nguya ya Nzambe. Po ekomama ete: «Nako bebisa bwanya ya bato na bwanya. Nako balola bososoli ya mayele».20Wapi mutu na bwanya? Wapi mutu atanga? Wapi molobeli ya mokili oyo? Nzambe abaloli bwanya ya mokili oyo te na liboma? 21Banda mokili na bwanya abosani Nzambe, esepelisi Nzambe kobikisa ba oyo ba ndimeli na liboma ya malakisi.22Bongo ba Yuda basengi bilembo ya bikamuisi, ba gracs basengi bwanya. 23Kasi tozo teya Klisto abakisama, libanga ya libaku po na ba Yuda, mpe liboma mpo na ba Grecs.24Bongo pona ba oyo Nzambe abiangi, Yuda to Grecs , tozo teya Klisto likola nguya mpe bwanya ya Nzambe. 25Pamba ete liboma ya Nzambe eleki bato na bwanya, mpe bolembu na ye makasi koleka bato26Zua na bokebi ebiangeli na yo ndeko.Mukie kati na bino bazalaki na bwania na lolenge ya bo moto. Moke kati na bino bozalaki na nguya, moke kati na bino bozalaki na mbotama ya malamu. 27Kasi Nzambe apona biloko ezanga makasi kati na mokili pona kopesa yango makasi.28Nzambe apona oyo ya mukie mpe ba boya na mokili. aponaka ata biloko ezangi tina , po nako bebisa oyo ya tina. 29Asali bongo po ete moto te a beta ntolo liboso na ye.30Na ntina na oyo Nzambe asala , sika oyo bozali na Klisto Yesu oyo akoma pona biso bwania eya na Nzambe sembo na biso, libulami na biso pe lifuti na makila na biso, 31na boye ekomama: «oyo azo beta ntolo, abeta ntolo na Mokonzi.»
21Tango na yaki epayi na bino, ndeko, na yaki te na lisukulu ya komimonisa to ya bwania tango nazalaki kosakola bosolo oyo ebombani na Nzambe. 2Nzokande nazuai mokano yako yeba likambo moko te tango nazalaki na bino, longola kaka Yesu Klisto oyo abakamaki na ekulusu.3MPe nazalaki na bino n akati na bolembu, na kobanga, mpe kolenga mingi. 4Na salelaki maloba ya mayele na ngayi te na nionso nabandaki koloba, kasi ezalaki na komonisama na nguya ya Molimo Mosanto. 5Na tina ete kondima na bino efanda te kolandisa mayele ya bomoto kasi na nguya ya Nzambe.6Sika oyo tozo lobela mayele na kati na bato ya kokola, kasi bwania yango ya mokili te, to ya bakonzi ya ekeke oyo ezo leka. 7Kasi tozali kolobela bwanya ya Nzambe na bosolo ebombami, bwania ebombami na Nzambe abongisa banda kala pona nkembo na biso.8Moko te ya bakonzi ya ekeke oyo ayebaki bwania yango, soki bayebaki balingaki babaka na ekulusu te Mokonzi na nkembo. 9Kasi lokola ekomama: «Makambo oyo miso moko te emoni, matoyi moko te eyoki, makanisi moko te eyebaki, makambu kaka Nzambe abongisa pona ba oyo alingaka.»10Ezali makambo oyo Nzambe amonisi na Molimo na ye, mpo Molimo ayebi makambo nyonso ata bozindo ya Nzambe. 11Mpamba te nani ayebi makanisi ya moto kolongala elimi na ye na ye? Na yango moko te ayebi mozindo ya Nzambe soki Molimi ya Nzambe ye moko.12Kasi tozuaki Molimo ya mokili te, kasi Molimo oyo ewuti na Nzambe, po toyeba na mpamba makambu oyo ewuti na Nzambe. 13To lobi makambo oyo na maloba ete bwania na moto ekoki kolakisa te, kasi Molimo Mosantu alakisaka biso, Molimo Mosantu alimbolaka maloba ya bonzambe na bwania ya bonzambe.14Moto azali na bonzambe te azuaka makambu oyo ya Molimo Mosantu te, po ezali liboma pona ye. Okoki kososola te po ete eza bonzambe nde ba sosolaka yango. 15Moto ya bonzambe asambisaka makambu nyonso kasi, asambisami na mutu te. 16Po ete : «Nani akoki koyeba makanisi na Mokonzi po akoka ko tangisa ye?» Kasi tozali na makanisi ya Klisto.
31Ba ndeko na ngayi na kokaki te kolobela bino lokola bato bazali na Molimo na Nzambe, kasi lokola bato oyo bazali kolanda makambu ya bomoto, lokola bana bakotami sika na Klisto. 2Na pesaki bino miliki kasi misuni te, mpo bo koki nayino te.3Po bozali nanu na bonzoto. Pamba te esika koyinana na koswana ezali kati na bino, bo bika mpe bo tambola na lolenge ya bato na mokili te? 4Soki moko na bino alobi: «Ngayi nazali moto ya Polo» mpe mosusu alobi: « Ngayi nazali moto ya Apollos» Bozo bika te na bonzoto? 5Nani nde Appolos? to ni Polo? Ba sali oyo na nzela na bango nde bpondimelaki, ba oyo Nzambe apesaki musala6Ngayi nalonaki, Appolos asopelaki mayi, kasi Nzambe nde akolisaki. 7Bongo moto alonaki na oyo asopaki mayi bazali pamba. Nzambe nde akolisaka.8Na bongo oyo azo lona na oyo azo sopa mayi baza moko, moko na moko akozua lifuta ya mosala na ye. 9Po tozali basali na Nzambe, bino bozali elanga na Nzambe, pe bazali lokola ndako oyo Nzambe atongi10Na ngolu ya Nzambe oyo epesamela ngayi lokola motongi ndako ya bwania, na tiaki moboko pe mosusu atongi likolo na yango na bongo moto na moto akeba na lolenge azali kotanga likolo. 11Na bongo moto moko te atiya moboko mosusu, kaka oyo etiama oyo ezali Yesu Klisto.12Sika oyo moto oyo akotonga na wolo, na misolo, na mabanga ya talo, na ba nzete, ba mosusu na mabaya pe mosusu na matiti, 13mosala na ye, ekomonana polele, po misala na moto na moto ekomonana. Moto ekomonisa motuya na yango.14Soki misala ya moto atongi ewumeli, akozua lifuta . 15Soki misala eziki , akozua bo bebi, kasi ye moko ako bika, bo bele lokola motoi abika na liwa ya moto.16Bo yebi ete bino bozali tempelo ya Nzambe, mpe Molimo na Nzambe efandaka kati na bino? 17Soki moto abomi tempelo ya Nzambe, Nzambe akoboma ye. Po tempelo ya Nzambe eza bule, mpe bozali mbule18Moto te amikosa. Soki moto na kati na bino amimoni moto na bwanya na ekeke oyo, akoma «zoba» po akoma moto na bwanya. 19Po bwanya ya mokili oyo ezali libola pona Nzambe. Ppo ekomama: «Ayokisaka bato ya bwanya soni na motambo na bango» 20pe: « Mokonzi ayebi makanisi ya bato ya bwanya ezali pamba.»21Yango wana moto moko te aluka lokumu na bato, po nyonso ezali ya bino 22ata Polo to Appolos, to Cephas, to mokili, to bomoyi, to liwa, to biloko ya lelo ou biloko ekoya. Makambu nyonso ezali ya bino, 23mpe bozali ya Klisto na Klisto azali na Nzambe.
41Yango wana bakokaki kokomisa biso, lokola basali na Klisto mpe babateli na bosolo na Nzambe. 2Na lolenge wana, etongi mobateli ozala oyo bato bazali kosepela na ye.3Kasi mpo na ngayi ezali litomba moko te ete nasambisama epayi na bino soko mpe na esambisela na bato. Zambi nazali komisambisa ngayi moko te. 4Nazali koyeba te na likambo nini bafundi ngayi kasi elengi koloba te ete nazali na likambo te. Mokonzi nde azali kosambisa ngayi.5Yango wana kosambisa muto te liboso na ntango, liboso Mokonzi aya. Akobimisa polele oyo ebombami na kati na molili mpe kobimisa makanisi na mitema. Bongo muto na muto akoyamba litomba na ye epayi na Nzambe.6Sika awa, bandeko natina misala oyo ekoki kosalema na Appolos mpe na ngayi moko mpo na bolamu na biso, natina ete boyeba ntina na maloba: «Bolekisa ndelo te na oyo ekomami» mpo ete muto te azala na komikumisa likolo na moninga. 7Zambi nani ozali komona bokeseni kati na biso mpe basusu? Boyebi ete boyambi yango mpamba te? Soko boyambaki mpamban mpona nini botondi na lolendpo lokola boyambaki mpamba?8Bozali na nyonso oyo bolingaki! Bosili kokuma bazui! Bobandaki kozala bakambi mpe ewutaki na biso te! na solo makanisaki ete bokamba, bongo biso mpe tozala bakambi lokola bino. 9Zambi Nzambe ati bino ba apostolo na molongo na suka lokola bato bakateli bango likambo na kufa tokumi bato na kolakisama pole te na miso na mokili , na ba nzela mpe na bato.10Tokomi ba zoba mpona Klisto. Kasi bino bozali na boyebi kati na Klisto. Tozali na bolembu kasi bolendisami na nguya. Bozali kozua bino na lokumu, kasi biso tosambwi. 11Kino na ntongo oyo, tozali na nzala mpe posa na mayi, tozali kolata bilamba bizangi lokumu. Bazali kobeta biso na ntina te, mpe tozangi esika na kofanda.12Tozali kosala masolo makasi , misala na maboko na biso mpenza. Na ntango bozali kofinga biso, tozali kopambola, ntango bazali konyokola biso, tozali kokanga mitema. 13Ntango bazali kotiola biso, tozali kozongisa na motema pete. Tokumi bato bazangi ntina, bato na mokili babwaki biso mpe tozali na ntina te na makambu yanso.14Nakomeli bino te mpo epesa bino nsoni, kasi mpo ebongisa bino lokola bana oyo nalingaka. 15Ata soko bozali na koto zomi na bato bapesi bango mpo na Klisto, bozali na ba tata ebele te, zambi ngayi moko nakomi tata na bino na nzela na Klisto Yesu na nzela na sango malamu. 16Na bongo , nazali kolendisa bino mpo bozala ba oyo bazali komekola ngayi.17Yango wana natindi mwana na ngayi Timothe, molingami na ngayi mpe mwana bosembo kati na Mokonzi. Akolakisa lisusu malakisi na ngayi na Klisto lolenge nazali kolakisa epayi na bango bipayi yonso mpe nakati na ba mangomba yonso. 18Sika awa, basusu kati na bino batondi na komikumisa, kosala lokola nakoya lisusu te epayi na bino.19Kasi kola mingi te nakoya, soki Mokonzi alingi. Nde nakoyeba ba oyo na biloba loba na lofundo mpona kotala nguya na bango. 20Zambi bokonzi na Nzambe ezali bobele maloba te, kasi na nguya. 21Boni bolingo nini? Ekoki na ngayi koya epayi na bino na fimbo to na na bolingo na kati na molimo mpe boboto?
51Bayebisi biso ete kindumba ezali na kati na bino, bosoto wana endimami te na lisanga ya ba pagano. Bayebisi biso, moko kati na bino azo sala kindumba na mwasi ya tata na ye. 2Pe lolendo eleki bino! Ebongaki te bomi tungisa kati na bino? Motu oyo azo sala makambu ya ndenge wana alongwa na lisanga na bino.3Ata nazali te na nzoto , kasi nazali sasayipi na molimo , na sambisi kala mutu oyo asali likambo wana. 4Ntango bozo sangana na kombo na Mokonzi na biso Yesu Klisto, molimo na ngayi ezali elongo na bino na nguya na Mokonzi na biso Yesu Klisto na sambisi kala mutu wana. 5Na sali bango po na kokaba ye na maboko ya satana pona koboma misala na ye ya nzoto. Po ete bomoyi na ye ebika soki na kobanzi na mokolo na Mokonzi.6Lolendo na bino eza malamu te, boyebi ete kamwa fulu ya mapa etombolaka mapa koleka? 7Bomi petola ya kala, po ete bozala mapa ya sika, lokola bozali sika awa lipa ezangi fulu. bongo Klisto ye nde mwana mpate ya pasika oyo abakisamaki. 8Toyangana na molulu na fulu ya kala te ya bizaleli mabe mpe ya kanda , kasi na lipa ezangi fulu ya bosolo mpe solo.9Na komeli bino makambo oyo, botika kosangana na batu ya mobulu na kindumba. 10Na pekisi bino te kozala na bayokani na kati na mobulu ya kindumba ya mokili te, to bilulela te, to batu na bikeko te, mpo wana esengeli bo longwa na mokili.11Sika awa nazo komela bino, bozala na boyokani te na mutu babengi ndeko kati na Yesu oyo aza na mobulu ya kindumba, to na makasi na koyiba mbongo, to mutu na bikeko, to motsioli, to molangwi masanga, to mokosi makambo, kolia na mutu ya ndenge wana te esika moko. 12Ndenge nini na komikotisa na kosambisa bato ya libanda ya eklesia? bongo, bazali kosambisa te ba oyo na eklesia? 13Nzambe asambisaka ba oyo ya libanda. «Bolongola mayele mabe na kati na bino.»
61Soki moko na bino aza koswanisi moninga akokende na esambeselo na bapagano to akokende na bandimi? 2Boyebi ete bandimi bakosambisa mokili? Soki bokosambisa mokili, boki kosambisa makambu ya mike ezoleka na eklesia? 3Boyebi ete boko sambisa ba anjelu? Ndenge nini bokoki kosambisa makambo nyonso ekoyela bino na eklesia?4Soki bozo sambisa makambu ya balabala ya mikolo nyonso, pona nini bokoki kotiya baninga na esika na bango te na ba oyo baza na eklesia? 5Naza kolobela bino pona soni na bino Ezali na mutu kati na biso oyo mwa bwanya akoki kokata makambu kati na bino bandeko ya eklesia? 6Lolenge makambu ezo leka, mondimi afundi moninga na ye mondimi na maboko ya mopagano7Lolenge koswana eza makasi kati na bino bandimi ezali elonga te mpona bino. Pona nini bokoki konyokwama te muto akweyi te? Pona nini bozo ko mikosa 8Kaka koluka kotiya matata na esika akoki kotiaya makelele te? Nzokande bazali na ndeko na bino!9Boyebi te kozanga sembo ekozangisa mutu na bokonzi na Nzambe? Bondima makambo ya lokuta te. Ba ndumba, ba ngumbameli bikeko, batu ya mobulu ya kindumba, 10ba miyibi, kindumba ya basi ya batu to mibali ya batu, ba lokoso ya mbongo, ba tongi, ba tioli, na molangwa masanga, batu ya lokuta pona kozua mbongo moko te o kati na bango akozala na bokonzi ya Nzambe. 11Yango ezalaki kati na bino, kasi bomi petola , pe bomi bulisa, pe bokoma sembo na Nzambe na kombo na Mokonzi Yesu Klisto pe na Molimo na Nzambe na biso.12«Nionso ebongeli nga,» kasi nyonso ezali na ntina te. kasi nakomi tika te na nionso mibale. 13«Bileyi eza pona libumu, libumu pona bileyi», kasi Nzambe ako bebisa nyonso mibale. Nzoto ezali pona kindumba te, kasi nzoto ezali pona Mokonzi , Ye nde akobongisa pona nzoto.14Nzambe asekwisa mbala moko Mokonbzi na biso na nguya na ye. 15Boyebi ete banzoto na bino ezali biteni na nzoto na Klisto? Na kokende wapi kozua biteni na nzoto ya Klisto na sangisa yango na ndumba esika moko? Ekosalama te!16Boyebi ete soki ozo sangana na ndumba bokomi nzoto moko. Ndenge makomi elobi: « Bango babale bakokoma nzoto moko.» 17Kasi oyo akosangana na Mokonzi bakokoma molimo moko.18Bokima kindumba! Po lisumu mususu oyo moto azo sala eza libanda ya nzoto na ye, kasimoto na bodumba azo bebisa nzoto na ye moko.19Boyebi ete nzoto na bino eza tempelo na Molimo Mosantu, oyo afandaka kati na bino, oyo boyamba na Nzambe? Boyebi ete bino bozali na ndenge na bino te? 20Pamba te basombami na talo makasi, bokumisa Nzambe na nzoto na bino.
81Sika oyo na makambu etali banyama oyo ba bonzelaka bikeko, biso nyonso tozali na mayele. Bo yebi na biso ekomisaka biso lolendo , bolingo nde etongaka. 2Soki moko na bino akanisi ayebi eloko, moto wana ayebi nayino te, alingi nde ayeba. 3Kasi soki moto alingi Nzambe, moto wana ayebani na Nzambe.4Na boye na makambu etali kolia moto akoki kolia ntama oyo ba bonzeli bikeko, toyebi ete « na mokili , nzambe ya ekeko, aza pamba» mpo Nzambe aza kaka moko. 5Atako ba nzambe na bango bazali, soki na likolo to na mabele, lokola banzambe baza ebele na bakonzi. 6Kasi po na biso, Nzambe aza kaka moko, Tata, na ye nde nyonso eyaka, po na ye nde kozo bika, Mokonzi moko , Yesu Klisto, na ye nyonso ezalisami pe na ye nde tozali.»7Bato nyonso bazali na boyebi wana te, ba mosusu bazali kogumbamela bikeko ti sika oyo, pe bazali kolia ba nyama oyo ba bonzelaki na nzambe ya bikeko. Boye mayele na bango ebebi po ete bazali na botawu.8Nzokande bileyi eko lakisa biso Nzambe te. to petolami te soki to boyi koliya yango pe to petolami te soki tolie yango. 9Bo sala keba bosomi na bino ekoma libaku na baye bazali na kondima moke (Boyebi moke). 10Ndakisa moto moko azali na boyebi bamoni ye azali koliya ba nyama na ndako ya banzambe ya bikeko moto oyo amoni ye epayi na batawu ya mayele ya bomoto ekotinda ye te? Aliya nyama ebonzami na bikeko?11Na bongo yo moto ozali na boyebi ya makambo ya banzambe ya bikeko okweyisa ndeko na yo na boyebi moke te, oyo Klisto akufelaki, abeba. 12Na bango soki osali ndeko na yo mabe pe otutisi ye libaku na bozangi makasi na motema na ye, asumuki epayi na Yesu. 13Yango wana soki bileyi ekomi libaku na ndeko na ngayi, nakolia lisusu nyama te, po epesa nzela na ndeko na ngayi te akweya.
91Nazali nsomi te? Nazali ntoma te? Namonaki Yesu mokonzi na bino te? Bozali bana na ngayi te kati na mosala na Mokonzi? 2Soki po na basusu nazali ntoma te, po na biso nazali, po bozali elembo ya lotomo na ngayi kati na Mokonzi.3Bongo nde nayanolaki bango bafundaki ngayi. 4Tozali na makoki ya koliya mpe komela te? 5Tozali na makoki ya kobala muasi mondimi te, lokola ba ntoma mosusu bazo sala, na ba ndeko na kati na Mokonzi, na Cephas? 6Ezali kaka Barnabas na ngayi nde esengeli tosala?7Soda nini oyo azanga bakambi? Moloni ya masungu akolia yango te? Mobokoli ya bangombe akomela miliki te? 8Bomoto nde ezali kolobisa ngayi? Mibeko elobi bongo pe te?9Na mibeklo ya Mose ekomani boye: «Kokanga monoko ya ngombe tango azali kopasola mbuma te» Nzambe pe azali koba tela ngombe? 10Azali kolobela biso te? Ekomama pona biso , mokati elanga esengeli azala na elikia pe oyo azali kopasola mbumba azala pe na elikia yako buka mbumba. 11Soki toleyisaki bino mbuma na molimo tosali mabe soki bokabeli biso biloko na bino?12Soki basusu bazali na makoki likolo na bino, bon go biso te? Ata bongo tosengaki bino te, kasi tokembaki po totiya mobulu na sango malamu ya Klisto te. 13Boyebi ete baye basalaka na ndako na Nzambe pe baye basalaka na etumbelo baliak pe na etumbelo. 14Ndenge moko pe, Mokonzi apesaka mitindo: Ba panzi ya sango malamu, bakolia na mosala na bango.15Kasi natikala kosenga makoki ngayi te. Nazali kokoma te mpo bopesa ngayi mabonza. 16Soki nazali kopanza sango malamu, ezali po na komikwa te, esengeli mosala bongo. Mawa na ngayi soki nateyi sango malamu te.17Soki nasali na motema esengo nde nakozua lifuti kasi soki bongo te, nazali tango yonso na mikumba oyo nazuaki. 18Wapi lifuti na ngayi? Soki nateyi sango malamu, ebongo nazela eloko te, pe nasenga makoki na ngayi ya sango malamu te.19Atako nazali nsomi na makambo yonso, nakomi mosali ya bato yonso, po nazua bato mingi. 20Pona ba Yuda, nakoma mo Yuda, po na benda ba Yuda, epayi na baye batosaka mibeko na koma mpe lokola bango, po nabenda batosi mibeko. Nasalaka bongo ata nazali motosi mibeko te.21POna baye batosaka mibeko te, nakoma pe lokola bango, kasi nazali na nse ya mibeko ya Klisto. Nasalaka boye po nabenda baye bazali kotosa mibeko te. 22Po na batu ya botawu, namikomisaka pe muto ya botawu pona longa bango. Nakomaka bongo pona bato yonso pona bikisa eteni ya bato. 23Namipesaka pona sango malamu po ete ngayi pe na pambolama.24Boyebi ete bapoti mbango yonso nde balongaka te? Kaka se moko bino pe bopota pona kozua lifuti. 25Moto ya masano yonso atosaka mibeko ya ngalasisi wana po azwa mbano ya tango moke, kasi tozali kopota pona kozua motole ya bomoyi. 26Tina wana nazali kopota bulubulu te, po nasala mosala ya punda te. 27Nazali konyokolo nzoto na ngayi lokola moumbu, po na sima ya koteya basusu, ngayi moko nakotana te.
101Nalingi ete boyeba, bandeko ete ba tata na bino bazalaki yonso na nse na mapata mpe balekaki na kati na mayi na mongwa. 2Ba batisamaki na Mose kati na mapata mpe kati na ngayi na mongwa, 3mpe banso baliaki bileyi na molimo. 4Banso bamelaki mayi na molimo, mpamba te bamelaki mayi na libanga na molimo oyo ezalaki Klisto.5Kasi Nzambe asepelaki na bango banso te, bakufaki mpe bibembe na bango epanzanaki na kati na esobe. 6Sika makambo oyo bizali ndakisa mpona biso, na tina ete tolinga te ba posa ya mabe lokola bango.7Bozali bato na kosambela bikeko te lokola bango. Lokola ekomamaka: «bato bazalaki kofanda pona kolia mpe komela , mpe batelemaki pona kosakana.» 8Kosala masumu na kindumba te, lokola basusu mingi bazali kosala mpamba te na mokolo moko bato koto tuku mibali na misato bakufaki na likambo yango.9Totia Yesu na kati na komekama te, ndenge mingi na kati na bango basalaki boye mpe bakufaki na ba nyoka. 10Mpe toyimaka yimaka te lokola mingi na kati na bango mpe ba ajelu na kufa abomaki bango.11Makambo oyo ekumeli bango mpo epesa biso ndakisa mpo tososola. Ekomama mpona malakisi na biso na oyo etali suka ya ntango ebelemi. 12Mpo ete oyo azali kokanisa atelemi likolo akeba mpo akweya te. Komekama yonso ezali kokomela biso oyo eza ya bo moto te. Nzokande, Nzambe aza sembo. Akotika bino te 13komekana koleka makasi na bino, kasi uta na komikanisa akofungola nzela mpo ete bozala na nguya mpo na kobima na yongo .14Kasi balingami kimia bikima losambo na bikeko. 15Nazali kolobela bino lokola bato na bwanya, mpo ete bososola oyo nazali koloba. 16Kopo na mapamboli oyo tozali kapambola yango tozali kokabola ezali makila na Yesu te? Lipa tokaki na biteni biteni ezali kokabola yango nzoto na Klisto te? 17Po ete tozali na biteni na lipa, biso etuluku na bato, tozali nzoto moko mpe tosangani esika moko mpona lipa.18BOtala bana na Isaleyela: bazali kasangana na etumbelo ba oyo wanabazali koliya ba mbeka? 19Nalobela bino lisusu nini? Ekeko nde eleko nini? To bileyi epesameli ekoko nde eloko nini?20Kasi nazali koloba na ntina na biloko ba pagano, oyo bazali ba Yuda te, bazali kotumbela bazali kotumba yango na ba bikeko kasi mpona Nzambe te. Nalingi te bosangana na ba milimo mabe! 21Bokoki te komela kopo na Mokonzi mpe oyo ya ba demona. Bokoki te kozua esika na mesa ya Mokonzio mpe ya na mesa ya ba demona. 22Tolingi kotumbola zuwa na Mokonzi? Toleki ye na makasi?23«Yonso elingisami» kasi nyonso ezali na litomba te. «Nyonso elingisami», kasi yonso ekoki kotonga te. 24Muto te aloka bolamu na ye moko Nzokande , muto na muto aluka bolamu na moninga na ye.25Bokoki kolia yonso bazali kotekisa na zando, bokoki kotungisama mpo na yango te. 26Zambi :«mabele eza ya Mokonzi mpe biloko nyonso oyo mizali». 27Soko mopagano akosenga bino tolia na ye mpe bolingi kolia, lia nyonso makanisi etungisami te.28Kasi soko muto akoloba na bino: «bileyi oyo ewuti na libonza ya ba pagano koliya yango te. Po na tina na muto oyo ayebisi yo mpo na ntiona na bososoli na yo. 29Alobeli na bososoli na bino te, kasi bososoli na basusu. Pamba te pona nini bosomi na ngayi ekosambisama na bososoli ya muto mosusu? 30Soko nazali koliya na matondi na nii nakofingama mpo na yango mpo naleyi na matonfi?31Na bongo soko bokomela to koliya , bosala yango po na kembo ya Nzeambe. 32Bosala mabe ba Yuda to ba Grecs to eklisia ya nzambe mabe te. 33Nazali komeka kosepelisa bato yonso na makambu nyonso Nazo luka litomba na ngayi moko te, kasi oyo ya batu ebele. Nazali bongo bo babika.
111Bomekola ngayi, ndenge ngayi na mekolaka Klisto. 2Sika oyo na sepeli na bino ndenge boza kanisa na makambo nyonso, mpe kobangami na na mibeko lokola na komelaki bino. 3Sika oyo na lingi na sosolisa bino ete Klisto azali Mokonzi ya mobali nyonso, mobali azali mokonzi ya muasi, mpe Nzambe azali mokonzi ya Klisto. 4Mobali nionso aza ko bondela to kosakola na elamba ezipi mutu na ye azali kokumisa mokonzi na ye te.5Kasi muasi azali kobondela to kosakola mutu pamba azali kokumisa mokonzi na ye te. Po ete lokola suki na ye ezali ya kokata. 6Soki muasi akoki kotia elamba na mutu na ye te, esengeli na ye akata suki. Soki kokata suki ezali soni po na muasi, esengeli na ye kasi kozipa suki na ye na elamba.7Bongo, mobali asengeli azipa mutu na ye te na elamba, po azali elilingi mpe kembo ya Nzambe. Kasi muasi azali elilingi ya mobali. 8Po mobali ba benda ye na muasi te , kasi muasi abendama na mobali.9Mobali akelama pona muasi te, kasi muasi akelama pona mobali. 10Na yango muasi esengeli azala na elembo ya lokumu na mutu na ye, na tina ya ba anjelu.11Kati na Mokonzi, muasi azali ye moko te na mobali, soki mobali mpe azali ye moko te na muasi. 12Po lokola muasi awuta na mobali, na yango mobali abotamaka na muasi. Mpe biloko nyonso ewuta na Nzambe.13Bokata na bino moko: ezali malamu na muasi ko bondela Nzambe mutu pwelele? 14Mokili ezali koteya bino te, soki mobali azali na suki milayi pe ebele ezali soni pona ye? 15Mokili ezali koteya bino te, soki muasi azali suki milayi pe ebele, azali nkembo na ye? Po suki na ye epesamela ye po lokola elamba ezipaka. 16Kasi soki mutu alingi kobenda makelele na ntina na yango, tozali na eloko mususu te, ata eklesia ya Nzambe.17Kasi na ba malakisi elandi, na kumusi bino te, po ete bokokani, tango bozali kosangana, ezali pona malamu te kasi po na mabe makasi. 18Ya yambo , nayokaki ete tango bosangani na eklesia, ezli na kokabwana kati na bino mpe na ndimi yango mukie. 19Esengeli ezala bokabwana ndambu na makambu eyeba na kati na bino na esengo.20Tango bozo sangana, ezali pona elambo te esengeli kolia. 21Tango boza kolia yango, moto na moto aliya nanu bileyi na ye moko liboso ya misusu bazua ya bango. Moko aza na nzala mosusu alangwe. 22Bozali na ba ndaku te po na bolia to bomela? Bolingi kobebisa lokumu na eklesia na Nzambe pe kosambwisa ba oyo bazali na ezloko te? Nalobela bino nini? Na kumisa bino? N atondi bino te po na yango.23Bongo nazua na Mokonzi oyo na yebisi bino. Tango Mokonzi Yesu, na butu wana batekaki ye, azuaki lipa. 24Sima kotanda Nzambe, abuki yango mpe alobi: «Oyo ezali nzoto na ngayi, oyo ezali pona bino, bosala yango po na klokanisa ngayi»25Ndenge moko azui kopo sima ya kolia alobi: « Kopo oyo ezali boyokani ya sikana makila na ngayi. Bosala bongo ngonga nyonso bokomela yango po na ko kanisa ngayi.» 26Na tango yonso boko liya lipa mpe komela kopo , boko tatola kufa na Mokonzi ti na bozongi na ye.27Mutu nyonso akolia pe komela kopo ya Mokonzi na ndenge elongobani te, akozua etumbu pona nzoto pe makila na Mokonzi Yesu. 28Moto nyonso amitala ye moko, liboso na kolia pe komela. 29Po oyo azolia to komela nakozanga bososoli, azo mela pe koliya esambiseli na ye moko. 30Yango wana ebele kati na bino bazali na bolembu pe bokono, ebele pe balala pongi31Soki tomi tali malamu kati na biso, toko sambisama te. 32kasi tango tosambisami na Mokonzi, tozali ba yekoli, po ete mokili eboya biso na esabeli na ye.33Tango bozo sangana pona kolia pe komela, boyokana bino na bino. 34Soki moko na bino azali na nzala, alia epayi na ye, po ete tozo sangana te po na kobenda ko sambisama. Pona oyo etali makambu musus oyo tokomi te, na kopesa bino biyano tango na koya.
121Na oyo etali makabo ya molimo, ndeko, nalingi boyeba malamu. 2Tango bozalaki ba pagano, bozalaki kokende na banzambe ya bikeko, na lolenge nyonso, batambuisamaki na yango. 3Yango wana, nalingi boyeba moto nyonso azali na Molimo na Nzambe akoki koloba te «Yesu alakelama». Moto te akoki koloba :«Yesu aza Mokonzi» longola Molimo Mosatu.4Makabo ekeseni kasi Molimo moko. 5Lolenge ya kosalela Nzambe ekeseni kasi Mokonzi kaka moko. 6Misala ekeseni kasi eza kaka Nzambe moko akokisaka yango.7Epesamela na moto moko bomonisami ya Molimo mpo basusu bazua litomba na yango. 8Pamba te mosusu epesemeli ye Molimo ya maloba ya bwanya, na mosusu liloba ya boyebi na molimo moko kaka.9Na mosusu epesemela kondima na molimo kaka moko, mosusu likabo ya kobikisa , 10mosusu likabo ya bikamua, mosusu likambo ya kosakola, mosusu likabo ya kososola milimo, na mosusu koloba nkota ya sika, na mosusu likabo ya kolimbola minoko. 11Kasi Molimo kaka moko nde asalaka makambu wana nyonso, nakopesa makabo muto na muto ndenge alingi.12Lokola nzoto ezali moko pe biteni ebele pe nyonso ezali biteni ya nzoto moko ezali bongo pona Yesu. 13Nzokande na Molimo moko nd e tobatisami na nzoto moko, ezala ba Yuda to ba Grecs, baumbu to basomi, bango nyonso basalami na Molimo moko.14Na bongo nzoto ezali teni moko te, kasi ebele. 15Soki likolo elobi: «Po nazali liboko, nazali eteni na nzoto te», azali eteni ya mukie na nzoto te. 16Soki litoyi alobi: «Po nazali lisu te, nazali eteni na nzoto te», azali eteni ya mukie te. 17Soki nzoto nyonso ezalaki lisu, esika nini koyoka elingaki ezala? Soki nzoto nyonso ezalaki litoyi, esika nini nzolo elingaki ezala?18Kasi Nzambe atia biteni nyonso na nzoto ndenge alingaki. 19Soki bango nyonso bazalaki eteni moko, nzoto elingaki ezala wapi? 20Kasi biteni ezali ebele, nzoto moko.Lisu akoki koloba te na loko: «Nazali na posa na yo te.» «Ata mutu koloba na lokolo, nazali na posa na bino te.» Kasi biteni na nzoto oyo emonanaka botawu ezali na motuya. Biteni oyo tokanisaka ya soni, topesaka yango motuya mingi,

2 Corinthiens

11Ngayi Polo, ntoma na Mokonzi Yesu, na mokano na Nzambe, mpe na ndeko Timothe, na Lingomba ya Nzambe oyo ezali na Corinthe mpe na bato banso ya Nzambe ya etukua mobimba ya Achaïe. 2Tika ete ngolu ezala na bino mpe kimia ya Nzambe Tata na biso mpe Mokonzi Yesu Klisto3Nzambe Tata na Mokonzi na biso Yesu Klisto akumisama. Azali Tata, alingaka biso mpe Nzambe al;ongolaka biso mawa yonso. 4Alongolaka biso mawa ntango nyonso oyo toyoakak bwale mpe biso mpe tokoka kosala lokola ye tolongola mawa ya bato nyonso oyo bazali na bwale.5Pamba te, lolenge bwale ya Klisto ekweli biso mingi, nse lolenge mawa tozuwaka mpe makasi ya kosilisa mawa mpo,na Klisto. 6Kasi soko tozali komona bwale , ezali mpo mawa na biso esila mpe to bika. Soki alongoli biso mawa , ezali mpo mawa na biso mpe esila, bongo boyeba kokanga motema, lokola biso na bino tozali komona bwale lolenge moko. 7Ya solo, tozali kotia motema mpo toyebi ete bino tokokoka kosilisa mawa, lokola bino bozali komona bwale lolenge moko na biso.8Bandeko, tolingi te bozala na boyebi te, ba ndeko na makambu tokutanaki na yango na etuka ya Asie. Makama yango malutaki mingi, elikya ezalaki lisusu te ete tokobika. 9Ya solo tomonaki lokola bakateli biso etumbu ya liwa. Esalemaki bongo mpo totiya motema na biso na biso te, kasi na Nzambe oyo asekwisaka ba kufi. 10Abikisi biso na liwa ya somo mpe ye kaka moto akobikisa biso lisusu. Totieli ye motema ete ako banda kobikisa biso ntango nyonso.11Akosala bongo, ntango bino mpe bozali kosunga biso na mabondeli na bino. Bongo, ebele bakobanda kotonda Nzambe mpo na bolamu tozwaka mpo bato mingi bazali kobondela ye.12Tokoki kobeta ntolo, matatoli ya motema na biso eza komi tungisama te, tozali komimona ete tosalaka kaka makambo ya malonga lolenge Nzambe ye moko asalaka, yango emonisami na niso na bato banso, mpe ebele mpenza na kati na bino. 13Tokomelaka bino kaka makambo oyo bokoki kotanga mpe koyeba. Na banzi , bokomi koyeba yango malamu, 14lokola bozo sosola biso. Namo kolo ya Mokonzi Yesu tokozala tina na bino ya kotuta ntolo, po bokozala na na biso.15Lokola nazalaki kotiya motema epayi na bino, nakomaki na mboka na biso mpo nasepelisa bino mbala ya mibale. 16Nalingaki kozonga lisusu epayi na bino mpo bozwa nzela ya kosalisa ngayi, tango nako kende na Macedoine, mpe lisusu na etuka ya Yudea.17Na bongo nakomaki kaka, bikamela? Nazwaka mikano na ngayi kaka na mayele yo bomoto, mpo nandima mpe naboya na mbala moko? 18Kasi, lokola Nzambe azali sembo, nalobaka na bino na motema mibale te.19Mpo ete Klisto Yesu muana ya Nzambe oyo Silvain mpe Timote na ngayi moko toyaki kosakola epayi na bino, azali na mitema mibale te, azali moto ya motema moko. 20Pamba te, bilaka ya Nzambe eza "iyo" na ye. Mpe kati na ye to ndimi na nkembo na Nzambe.21Sikawa ezali Nzambe ye moko moto atelemisi biso na biso makanisi, mpo tosangana na Klisto , mpe akomisi biso bato na ye mpenza. 22Atie elembo emonisi ete tozali bato na ye atondisi mitema na biso na Molimo Mosantu oyo azali kolakisa ete alingi kopesa biso mobimba na ye.23Nzokande Nzambe azali nzeneneke na ngayi, na boyaki kozonga na Corinthe mpo namemela bino mindondo te. 24Nalingaka koyela bino bobele esengo. Na makambo etali bondimi na bino, nalingi komitia Mokonzi na bino te, pamba te bozali na bondimi ya ko koka
21Bongo, naboyaki kozongela bino mpo nayokaki mawa. 2Soki nayokisi bino mawa, nani akoki ko pesa ngayi makasi, ezali bobele bino bato oyo nayoki mawa.3Nakomelaki bino mokanda mpo nalingaki ete bino bato bosengeleki kosepelisa ngayi , boyokisa ngayi mawa mokolo nakoya. Nayebi malamu ete esengo na ngayi ezali lisusu ya bino nyonso. 4Ya solo, nakomela bino mokanda yango , nalelaki mingi mpe motema na ngayi etonolaki na bwale (mpasi) mpe mawa. Nakomaki yango mpona kozokisa mitema na bino te, kasi mpo boyeba ete nalingi bino mingi koleka.5Soki moto ayokasi ngayi bwale na motema, ezali kaka bwale na ngayi moko te, kasi nakoki koloba ete ayokisi biso banso bwale. 6Etumbu eye mingi kati na bino bopesi bopesi na moto wana, ekoki. 7Sikawa ebongi malamu bolimbisa ye mpe bolendisa ye mpo atikala na mawa libela te.8Yango mawa nasengi na bino bolakisa ete bolingaka ye. 9Nzokande ntango nakomelaki bino mokanda wana, nalingaki komeka bino mpo nayeba soko botosaka ngayi na makambu nyonso.10Soki olimbisi mosali ya mabe, ngayi mpe nalimbisi ye. Pamba te, oyo nalimbisi, elimbisami likola na bino na miso ya Klisto. 11Mpo satana azwa nzela ya kokosa biso te. Tosi toyebi mayele na ye.12Nakomaki na mboka Troas mpona kosakola sango malamu ya Klisto , Nkolo afungoli ngayi nzela mpo na kosala mosala 13Na yango, nazalaki na kimia te, mpo na monaki ndeko na ngayi Tite te. Yango wana nati kaki bato ya Troas mpe nakendeki na Macedoine..14Kasi natondi Nzambe mpo bipayi binso Klisto azali kolonga etumba, na nzela na bino, azali komema solo kitoko, ya boyebi na ye bisika binso. 15Pamba te , epayi na banto bazali kobika na baye bazali kobunga nakomi lokola solo ya kitoko oyo Klisto azali kobimisela Nzambe.16Mpo na bato babunga bayopkaka solo yango lokola solo ya liwa oyo ezali koboma bango. Kasi ba oyo bazali kobika bayokaka yango lokola solo ya bomoyi oyo ezali kobikisa bango. Nani akoki na mosala yango? 17Biso tozeali lokola bato mosusu te oyo basalaka mombongo na liloba na Nzambe mpona mobumu na bango moko. Kasi tolobaka bobele makambo ya solo na miso ya Nzambe, mpo ye moto atindi biso tosakola sango ya Klisto.
31Sika biso tabandi komitombola biso moko? Lokola ezali to bongo te? Biso tozali na posa ya mikanda ye etinda kowuta epayi na bino to na bino te. 2Bino bozali mokanda ya etinda oyo akomami na mitema na biso eyebani pe etangami na banso. 3Pe biso bo talisi ete boizali mokanda na Klisto oyo etindamaki na biso oyo ekomami na langi te, kasi na Molimo na Nzambe na bomoyi. Ekomama na bikomeli ya libanga te kasi na bikomeli ya mitema ya bato4Na yango biso to ndimisami epayi na Nzambe na nzela na Klisto. 5Tokoki te na biso moko po na kozua oyo ewuti epayi na bino, nzokande bo kasi na biso ewuti epayi na Nzambe. 6Nzambe nde apesi biso makoki ya kozala ba sali ya boyokani ya sika mpe boyokani oyo eye na makomi ya Molimo, po ete makomi ebomaka molimo epesaka bomoyi7Sika awqa lotono oyo ezali kobotisa makambo oyo ekomama na mikanda ya mabanga yango ezali na lokumu ya lolenge oyo nde libota ya Israel bakoki kotala elongi ya Mose na mpuasa. Oyo ezali kaka lokumu liboso na ye, pe lokumu oyo ezalaki koleka. 8Litomba nini ekozala na mosala oyo Molimo asali?9Soki lotomo ya kokatela etumbu ezalaki na kembo penza , boni misala na bosembo elingaki etonda na kembo! 10Na yango ezalaki kembo na ntango mususu yango eza lisusu kembo te, likolo ya kembo oyo eleki yango. 11Soki oyo elakaki ezali na kembo , boni kembo ekozala na oyo ezali seko.12Tozali bato na mpiko penza po ete tozali na kolikia. 13Biso tozali lolenge moko te na Mose, oyo azalaki ko bomba elongi na ye, po ete libota na Israel ba zala na makoki yako tala ye te. Suka na kembo oyo azalaki koleka.14Bazalaki yako kangama na makanisi, kino lelo oyo, elamba ya bokangami ezo wumela na boyokani ya kala ezali ko funguama te po ete kaka na Klisto nde ekoki kolimwa. 15Kino lelo ngonga batangi Mose elamba ya ba okangami ekangaka mitema na bango. 16Kasi soko moto abongoli motema na ye epayi na Mokonzi nde elamba ya bakangi elongwe.17Mokonzi azali Molimo, esika oyo Molimo na Mokonzi efandi, kuna somi ezali. 18Banso bilongi ya kofungwama, tomona kembo na Mokonzi, tozali kobongwan ana lolenge ya kembo kolandisama na mosusu lokola kowuta na Mokonzi oyo azali Molimo.
41Yango wana, zambi tozali na lotoma , lokola mpe tozui mawa nyonso tokomilembisa te. 2Na puasa toboyaki ba nzela ya soni mpe ya nkuku, tozali kolika na lolenge ya mayele mabe te, mpe tozali kokunda maloba na Nzambe te.Nde, kolakisa makambo polele , tozali komitika na bososoli na banso na Nzambe.3Kasi soki sango malamu na biso ezipami mpo na baye babebi. Na maye matali bango, Nzambe na mokili oyo abulunganisi milimo na b a pagano. 4Na yango, bazali na makoki lisusu te hya komona pole na Sango Malamu, mpe lokumu ya Yesu Klisto oyo ezali elilingi na Nzambe.5Po tozali komi teya biso moko te, kasi tozali kotaye Yesu Klisto lokola Mokonzi , biso lokola bangamba na bino mpo na bolingo na Yesu. 6Mpo Nzambe ye moko alobaki :« Pole ekongengisama kati na molili,» bongo engengisamaki kati na mitema na biso, mpo na kopesa pole ya boyibi ya lokumu ya Nzambe, kati na Yesu Klisto.7Kasi bomengo ya motuya ezali kati na mbeki ya mabele mpo ete nguya na yango mingi mpenza ewuta na biso te kasi na Nzambe. 8Tozali kotungisama na lolenge nyonso, kasi tolembaka te. Toyokisamaka mpasi kasi to bungisi elikya te. 9Tozali konyo kolama, kasi tobwakisami te. Tozali kobwaka bwaka biso na mabe , kasi kokufi te. 10Tango yonso tolatisama na nzoto ya kufa ya Yesu mpo ete bomoyi ya Yesu emonana na nzoto na biso.11Biso oyo tozali na bomoyi, tozali yonso na likama na liwa na ntina na bolingo na Yesu. Mpo bomoyi na Yesu emonana kati na banzoto na biso na biso. 12Na tina na yango, liwa ezali kobundisa biso, nzokande bino bozali kati na bomoyi.13Kasi tozali na Molimo moko ya kondima, yengebene na makomi. «Nandimaki lokola mpe nazali koloba». Tozali kondima lokola mpe tozali koloba pela moko. 14Toyebi oyo ete asekwisaki Mokonzi Yesu, akosekwisa biso, pela moko na Yesu. Toyebiu ete akokumba biso elongo liboso na ye. 15Makambo manso mazali litomba na bino mpo ete ngolu epesami mpo na bayike, mpe matondo ekobakisama mingi na nkembo na Nzambe.16Bongo na yango esengeli tolemùba te , atako na libonda tozali ya kokufa, tozali kozua kobongwana mokolo o mokolo. 17Kpokoso mike mike tozali komona, ezali kobongisela biso mpo na bozito ya lokumu oyo eliki ndelo. 18Biso tozali kotia motema te na biloko ya mokili, kasi oyo ezali ya mokili oyo te. Mpo ete biloko ya mokili ezali bobele na ntango moke, kasi oyo ebombani na lola ezali ya libela.
51Toyebi ete ebobolo ya nzoto na biso tozali kobika na yango na nse na mua soki epanzani, nzoka o teti, Nzambe abomba bonzenga ya ndako. Yango etongama na mayele ya bomoto te, ezali nde efandelo ya libela na lola. 2Kati na ebobolo, tozali bobel na bilelo na boye posa ezali tolatisama na oyo ya bonzenga. 3Yango nde ekolongola nsoni na biso.4Na kowumela kobika na ebobolo, tokozala bobele bato ya kolelaka ba pasi , yango ekobukabuka biso tolingio toyoka nsoni te. Posa ezali , tolata ndako ya bonzenga, mpo kufa ezala na nguya likolo na bomoyi te. 5Nde Nzambe mobongisi na mambi manso apesi biso Molimi lokola ndanga mpo na kokokisa bilaka ikoya.6Bongo bozali na elikya na bososoli ete ntango inso tokowumela na ebobolo tozali mpenza mosika na Mokonzi. 7Makambo emonani nayino polele te kasi tozali kotambola bobele na boyambi. 8Tozali kolikya soki tojali na bosenga kofanda na Mokonzi elongo, lotomo ezali tobima na nzoto ya ebobolo.9Yango ezali ngbangbata tojali koluka mpona kosepelisa ye ata, tojali na nzoto yango, to te. 10Mpo banso toko telema o boso wa ngbende ya esambiselo ya Klisto, zambi lifuta ebongisami na moko, kolandana na makambo na nzoto na ye, malamu soki ya mabe11Awa toyebi komemya Mokonzi, tokosala manso tolatisa mpe ba mosusu, lokola Nzambe ayebi bizaleli na biso, nakolikya ete bino mpe bososoli biso penza. 12Ezali tina te, tomi ndimisa n abiso lokola bato ya sembo. Topesi bino eposa ya komikumisa na ntina na biso mpo na koteya baye batalaka motema te, kasi makambo ya libanda.13Pamba te bolemla na biso mpo na NZamben bon go buana na biso mpo na bino. 14Tozali kondima yango ete bolingo ya Klisto elaki ete, moko nde azuaki liwa ya banso, na boye banso bakufi. 15Klisto akufi mpona banso bongo ba oyo bazali na bomoyi babiki mpo na bango meyi te ezali mpo na oyo akufa mpe asekwi.16Na tina na bizaleli mabe ya bato, biso tosambisi moto te, ata to nyokolaki Klisto, na lolenge maben kasi ntosambisi moto te na lolenge yango. 17Bongo, soki moto ajali kati na Klisto, akomi ekelamu ya sika. Makambo ya kala malongwi, bongo yonso mabongwami sika.18Yonso ezali nse mabongisi na Nzambe oyo ayingisi lisusu boyokani na ye, na biso na nzela na KListo mpe apesi biso etinda ya bosakoli nsango ya boyokani. 19Na nzela na Klisto boyokani na Nzambe ye moko, na mokili etongami mpe azali lisusu kotala masumu na bango te, apesi biso etinda ya bosakoli.20Toponami lokola ba lobeli ya Klisto, lokola Nzambe azali kosala mbela na ye epayi na biso. Bojala na boyokani na Nzambe. 21Akomisa Klisto mbeka (lisiko) mpo na masumu na biso, asalaki ata lisumu moko te, asalaki bongo mpo na biso tokoma sembo na miso na Nzambe kati na ye.
61Lokola tosalaka elongo to sengi ete bonomo ngolu ya Nzambe eloko ya pamba te. 2Mpo ete alobaki : «Na eloko yango nayokelaki bino, nasalisaki bino tango mokolo ya kobikisa bino eyaki. Mokolo yango ekoki lelo oyo ezali mokolo ya lobiko. 3To tiela moto libaku ya mitungisi liboso na ye te, pamba te tolingi te ete lotomo na biso esambwa.4Nzokande na lolen ge moko tolakisaki ete tozali basali ya Nzambe ya solo na kati na koyika mpiko, mpe na ba mpasi lolenge banyokolaka biso, ba tungisaka biso koleka, babetaka biso fimbu 5na kati na baboloko, na kati ya mobulu, mpe na kati ya misala makasi, mpe bazangisi mpongi na butu, mpe tozalaki na nzala 6kati na kopetolama, kati na bomoyi, kati na koyika mpiko, kati na kofungolama, mpe na kati na Molimo Mosanto mpe na bolingo ya solo. 7Tozali basali ya liloba ya solo, kati, na nguya ya Nzambe ezali na bibundeli na sembo na maboko ya mobali mpe ya muasi.8Tozali kosala kati na lokumu mpe na kati na nsoni , na kati ya makambo ya mabe mpe makambo ya malamu, balobaka na biso tozali bokosi, nzokande tozali bato ya sembo. 9Toyebani te awa ezali biso kosala , nzokande toyebani malamu balobaka tokomi penepene ya liwa, nzokande tozali na biso malamu. Topesani etumbu nayino babomi biso nanu te. 10Tosali lokola bato ya mawa, kasi nayino totondi na nsayi; tozali lokola baye bakelala, nzokande tozali kokomisa ebele bazui , lokola bazanga, nzokande tozali na nyonso.11Bino ba Corinthien, tolobeli bino polele mpe motema na biso efungwani polele mingi. 12Ezali biso te tokangaki mitema na bino, kasi bino nde bomibendanaki lolenge na bizaleli na bino moko. 13Sikawa, kati na bosombitanyi, nazali koloba lokola epayi na bana ba fungola mitema na bino polele penza.14Basangana na ba pagano te, mpo ete bosangani nini bosembo ezali na yango na oyo ekokan te? Mpe lisangana nini ezali kati na pole na molili? 15Boyokani nini ekoki kozala kati na Klisto mpe Belial? 16Mpe bosangani nini ezali kati na mondimi mpe mopaganio? Boyokani nini ezali kati na Tempelo ya Nzambe mpe oyo ya bikeko? Pamba te , biso tozali Tempelo ya Nzambe ya bomoyi, lolenge Nzambe alobaki : «Nako fanda kati na bino mpe nako tambola elongo na bango, nakozala Nzambe na bango mpe bazali bato na ngayi»17Na yango : Bobima na kati na bango mpe bako kabwana na bango, elobi Mokonzi: «Bosimba eloko moko te ya mbindo, mpe nakoyamba bino. 18Nakozala Tata pona bino mpe bokozala pona ngayi bana mibali mpe ya basi» Elobi, Mokonzi ya nguya nyonso
71Balingami lokola tozali na bilaka, to boya biloko ekokomisa nzoto pe molimo na biso bosoto pe kobanga Nzambe.2Bomema biso o mitema na bino po totuki moto te, tobetisi moto libaku te, zambi toluki bolamu epayi na bino te. 3Ezali po na kokatela bino etumbu te nde nalobi bongo po na nalobaki te ete bozali na esika kati na mitema na biso kati na bomoyi , to liwa. 4Natielaka bino motema pe na tutaka tolo po na bino, zambi atako na mpasi na biso totondisama na esengo koleka.5Ekomaki biso mboka Macedoine, to pemaki te, kutu tomi tungisaki na lolenge bozangi boyokani i libanda pe bobangi kati na bino, 6kasi Nzambe oyo apesaka konzo na baye balembi, alendisaki biso na bokomi na ndeko Tite. 7Ezalaka te po na boyei na ye nde Nzambe alendisaki biso, kasi na konzo azwaki epayi na bino, alobelaki ngayi po na bolingo, pona pasi na bino, pe na komipesa na ngayi mpo na bino bongo esepelisaki ngayi mingi.8Atako mokanda na ngayi epesi esengo te, naza na mawa te, ngayi pe nazui mawa tango bino bozali na esengo te, lokola ezui tango mokuse. 9Sika awa nazali na esengo po ete mawa na oyo boyokakai ememi mbongwana epayi na bino. 10Solo mawa oyo boyokaki na Nzambe nde etindi bato babongola mitema, pe babika bongo tina ya koyoka mawa ezali te, na mawa nde bato bamipesaka na Nzambe, soki te, ekomemela bino se kufa.11Botala lolenge mawa ya bo Nzambe oyo eboti komipesa kati na bino, boni boni komipesa na bino elakisi ete boyebaki likambo te, boniboni soni na bino , boni boni kobanga na bino, boni boni posa na bino, molende pe bosengi ete bakata likambo na bino na sembo, na manso oyo bolakisi ete bozalaki na mbeba te. 12Ekomeli ngayi bino mokanda moye, ezali te mpo moto asalaki mbeba , to oyo azali komona bwale, kasi po na kotalisa polele bolamu bolakisi epayi na ngayi liboso na Nzambe.13Yango wana mawa na ngayi esilaki , esengo ewuti na Tite, po molimo na ye esepelaki na bino nyonso. 14Pamba te na miso naye, nabetalaki bino tolo, po boyokisaki ngayi soni te, mpe Tite ayaki komona makambo nabetelaki bino tolo ezali lokuta te.15Bolingo na ye epayi na bino ezali nayino monene, zambi ebanzaka ye limemia na bino, mpe lolenge boyambaki bo bangi pe kolenga. 16Nazali na kosepela po natiela bino motema.
81Balingami, tolingi kososolisa bino likambo ya ngolu na Nzambe oyo emonanaki na Eklesia ya Macedoine. 2Na ntango ya yikiyiki ya mpasi na bnago, na kati na esengo ya bango ya koleka mpe bobola ya makasi na bango makabo na bolingo koleka ndelo.3Na moni ngayi mei bokasi ya kokaba na bango oyo eleki bozui na bango kolandisa mokano na bango mpenza, 4basengaki biso na molende nyonso topesa bango ndingisa mpo lokota mpe na mosala wana ya kosunga bandimi. 5Na yango, esalemaki te na lolenge tolingaki kasi bamipesaki bango moko epayi na Mokonzi, mpe epayi na biso na mokano na Nzambe.6Na boye yosengaki na Tite akokisa kati na bino mosala wana ya bolingo lolenge abandaki. 7Lokola bozali kosala malamu mpenza makambo oyo na kati na kondima , mpe koteya maloba mpe na boyebi mpe na etingia yonso na ntina na bolingo na bino mpo na biso, tika ete botombwama kati ma misala mina mya bolingo.8Ezaaki mitindo te napesi bino, zambi ezali mpo na kotala bosembo na bolingo na kowulamisa yango na etingia ya bato mosusu. 9Na boyebi ngolu ya Mokonzi na biso Yesu Klisto atako azalaki mozui, ami komisaki mobola mpo ete bino botombwana.10Na ntina na yango nakopesa bino toli mpo esunga bino. Eleki mbula moko, bo kanaki kaka mpo bosala eloko te, kasi bozalaki na makanisi ya kosala yango. 11Bosilisa yango mbula oyo, lokola bozali na mposa ya kosala, boye kokokisa misala yango lokola bozali na makasi. 12Lokola bokani kosala likambo yango, boyeba ete ezali malamu mpe endimami. Mosala yango ekosalama na makoki oyo emonani na maboko na moko na moko.13Mokumba oyo ezali te mpo na kosepelisa basusu, mpe kosundola mokumba yango epayi na bino, kasi tolingi bato banso lolenge moko. 14Oyo bobombaki ekosenga bosenga na bango. Bobele oyo ya bango babombaki ekosunga mpe bino lokola mpo ete bokokana. 15Lokola ekomami: «Bomengo ya ba mosusu ezala mpasi ya baninga te, kasi bakokan ana bozui»16Nzambe azua lokumu, zambi mpo na bino atié mposa malamu o motema mwa ndeko Tite. 17Zambi ayokaki kaka bosenga na biso te, kasi azuwaki molende ekasi mpo na bakokisi likambo yango, na boyebi ye meyi epayi na biso.18Tomitindi elongo na ndeko oyo mangomba manso ya Mokonzi ekumiksi mpo na mosala mwa bopalanganisi sango malamu. 19Mpe lisusu aponamaki na mangomba mpo akende mobembo elongo na biso, mpo na bokokisi mosala mwa bosungi bato, mpo na lokumu na Mokonzi ye moko, mpe mposa na biso ya bosalisi ye.20Makabo na ye tokozwa o nteyi ya bino nde toko keba ete moko kati na bino akanisa mabe mpo na yango 21zambi toko keba mingi kosala maye mazali n,a lokumu o boso bwa Nzambe mpe bayi mokili.22Tondimi mpe ndeko yoko ya mobali lokola, na ye elongo na bango babale, mpo tomekaki mbala nzike na mwa bitinda, mpe sika azui tina mpe bomo ndimi o nteyi ya bino. 23Boyeba mpo na Tite, ye azali moninga mpe masuwa na ngayi na mosala na Nzambe mpona bino, mpe bandeko ba biso bana, batindami mpo basunga bino, bazali lokumu mpo na Klisto. 24Na yango bolakisa bango bolingo na bino, mpe bolakisa o nteyi ya mangomba ntina ya lokumu na biso mpo na bino.
91Na ntina na mosala ya kosunga babulami, na moni ntina te na komela bino. 2Pamba te nayebi posa na bino ya kusalisa bango nazali komikumisa epayi ya ba Macedoine. Nayebisi bango ete Achaïe amilengelaki kobanda mbula eleki pe ezali molende na bino nde esali ete ba zala na molende yako sala bongo na makanisi malamu3Natindi ndeko po ete lokumu oyo na lobelaki bino ezali pamba te , pe bo bongwama ndenge na lobaki. 4Ekozala soni po na biso soko na koya na biso na ba ndeko ya Macedoine, (nalobi eloko te na tina na bino), bo bongwami. 5Na tina wana ba ndeko mpo ete basalisa bino po nakobongisa makabo oyo bino bolakaki, pe ezala ebongisami, na koyima yima te, kasi ezala bino moko bopesi.6Bosengeli koyeba ete oyo aloni muke ako buka muke, nde oyo aloni mingi ako buka mingi. 7Boye tika ete moko na bino apesa na mawa te pe na mitindo te, kasi oyo bokanaki na motema . Pamba te Nzambe alingi oyo apesi na esengo.8Na makambo yonso , Nzambe akotondisa bino na ngolu, po ete bozala na bo fuluki na misala malamu na bino. 9Ndenge ekomama: «Apesaka bozui na ye na ba oyo bakelela .» Bosembo na ye etikalaka libela .10Ye nde apesaka milona na moloni mpe lipa mpo na bileyi, akopesa mpe akofulukisa milona na ye. Akoyesa ebele kobuka ya ba yengebene. 11Po na kokola na ntina na bolamu na bino ye akobakisa na manso po mingi ba kopesa Nzambe matondi12Mosala oyo ezali kotala bosenga ya bandimi kaka te, kasi ezali pe likambo na esengo mpe ya kopesa. 13Lokola bandimi bino, bokumisa boye Nzambe na kotosaka sango maklamu na Klisto. Bokumisaka mpe Nzambe na makabo na bino na esengo mpo bango pe moko na moko. 14Po na ngolu mingi na Nzambe pe na bino, ba bondeli po na bino na ntina na bolingo mingi . 15Po na likabo to zangi kokosola, to pesi Nzambe nkembo.
101Ngayi Polo, nazo lendisa bino, na komikitisa pe na bopolo kati na Klisto, nazali moto ya nkanza te ntangu nazali na bino, kasi nazali moto na kimia mosika na bino. 2Tango nazali na bino , na bondeli bino, na kozala na mposa ya makasi mpenza ete kasi na kolikia ete na kozala na mposa ya kozala makasi pe na kotelemela ba oyo bakanisi ete biso to biki na nzoto.3To koki kobunda na nzoto te, atoko to tamboli kati na nzoto. 4Mpo ete bibundeli na biso eazali ya nzoto te, kasi yango ezali na nguya ya likolo po na kobebisa oyo ya bokasi, yango ezali kobebisa maloba ya bakosi.5Nde tomemi makanisa yonso ya molili na botosi Klisto, mpe tozali kobebisa oyo yonso ya mozindo oto ezali kotelemela boyebi na Nzambe. 6Tango bozala na batosi nde tokozala ba oyo baselengwi po na ko pesa etumba misala yonso oyo etosi te.7Solo moto nani aleki ete azali na Klisto, atala malamu oyo ezali o boso, mpe akanisa ete lolenge ye azali na Klisto, tozali pe bongo. 8Natina na bokonzi oyo Mokonzi apesi biso po na kotanga bino kasi po na ko bebisa bino te, nazali na soni te, ata nazui lokumu po na bino.9Ezala te ete yango ebangisa bino, na mikanda na ngayi. 10Soko na nzoto nalembi pe maloba na ngayi ezali natina te ete boyoka yango, ba mosusu ba lobi ete mikanda na ye ekoki pe ezali bosolo mpe na nguya.11Boyeba ete oyo tokosala kati na bino , tango tozali na bino te, yango nde to lobi na mikanda na biso. 12Tango bozali komikwa , bozali na mayele te, po ete toyaki po kumilakesi to kozala lukola ba oyo bazali komisumisa13Na yango, totika na ndelo oyo Nzambe atiaki liboso na biso, ndelo oyo etandami mosika na bino. Boye to komitalisa mosika na ndelo te. 14Tozalaki ya yambo kokoma mosika na bino, na sango malamu na Klisto, tango tokomaki epayi ya bino, tokendeki mosika na ndelo te.15Nzokande, elikia na biso ezali ete lokola bokoli na kondima, etando ya mosala na biso epusani koleka pe etikali nayino na ndelo na yango. Boye tozui lokumu te koleka ndelo ya misala ya ba mosusu. 16Tolingi kozua lokumu te na oyo mosala esalemi na ba mosusu. Elikya na biso ezali ete tokoka kosakola sango malamu na ba mboka mosika na biso.17«Soki okomi kumisa ezala kati na Mokonzi.» 18Po ete oyo atindami ye moko andimani te, kasi oyo Mokonzi atindi.
111Nakosenge o nteyi ya bino, botika ngayi koloba bo elema , bomeka solo kokanga motema. 2Mpo ete natielaka bino zuwa, zuwa bosantu , mpo na bino, zambi bolingisami na mobali moko, mpo te lakai kolekisa bino epayi na Klisto lokola baseka ngondo.3Nzokande bobangi ezalki na ngayi, komona ete engebene nyoka na mayele na ye ya mabe akosaki Eve , se lolenge ena makanisi na bino mapengwa na bosolo, mpe na bomikabi ya mpeto mpo na Klisto. 4Soki kasi moto moyike, aya koteya bino Yesu oyo biso to teyaki bino te, soki tango mosusu, boyamba molimo aye ekeseni na oyo boyambaki, to mpe lisusu, boyamba sango malamu aye ekeseni na oyo boyokaki, bokanga motema na makambo ya lolenge loye.5Zambi, nazolikya ete naleki ata soki moke te, ba ntoma oyo baloba ete bazali likolo. 6Atako , na bongimi te mpo nakoyeba koloba, o boso bwa bato, nazalaki bozito mpo na moto moko te. Nazali mpe na boyebi mingi te, na tina na yango nde toyebisaki bino makambo manso, na lolenge inso.7Nasalaki lisumu lolenge na mi kweyisaki mpo na bino botombwana? Zambi na teyaki bino sango malamu na bonsomi banso. 8Atako mangomba nzike epesaki ngayi masungi na bango, na bombamaki bango mpo naseleka kaka bino. 9Ezali ngayi o nteyi ya bino, mpe na kati na bakeleli, nazalaki bazito mpo na moko na bino te, mpo nazwaki masungi kowuta epayi ya ba ndeko ya mboka Macedoine, na lolenge ena nde nakokoba kozala, mpo nazala libako moko te mpo na bino.10Lokola basolo bwa Klisto ezali na ngayi, awa na etuka Achaïe tokolinga te komi kwawa to lofundi eyingela. 11Mpo nini? Ngayi nalinga bino te? Kaka Nzambe nde ayebi.12Bongo maye nazali kosala nakokoba kosala bongo mpo na longola bino likanisi ya batongi ngayi mpe oyo bango ba mikumisaka (ba ndimama lokola, bato bazali kosala mosala moko lokola biso). 13Nzokande bato ba lolenge boye, bazali ba ntuma te, basali ya lokuta, oyo bamibongolaka lokola ba ntoma na Klisto.14Bongo ekozela kamwa te, mpo satana ye meyi abongwanaka bo anjelu ya mpole. 15Ekozala likanisi te , soki basali baye lokola, bakobongwana bo basali ya sembo, misala mya bango nde emonani na suka ya manso.16Na bondeli yango boye, moto moke te abanza ete nazali na bolema, zambi soki bongo, boyamba ngayi bo moto na bolema, mpo na mikumisa moke. 17Na ye malobi ngayi na ntina nakolikya oyo etondisami na lofundu, endingisami te epayi na Mokonzi, kasi nazali koloba bo moto na bolema. 18Mpo ete bayike o nteyi ya bino banikumisa na mosuni (nzoto), na mikumisi mpe lokola.19Zambi lokola bondimi bilema o nteyi ya bino, bokomi bato na bwanya. 20Zambi soki bondimi moto moye akomisi bino bangambo ba ye, konyongaka bino, nakomimonaka likolo ya bino to mpe kobambola bino ba mbata. 21Nayoki nsoni mpo na koloba ete tozalaki na bolembu mpo nakosala lolenge ena. Ya solo soki moto amikumisi (nalobi bo moto na liboma), nakomi kumisa mpe lokola.22Soki bazali ba ebeleo ngayi mpe lokola, soki bazali ba Israelite, ngayi mpe lokola, soki bazali bakitani to bana na Abraham, ngayi mpe lokola. 23Soki bazali basali ya Klisto (awa na lobi bo moto na bolema), nazali lisusu bongo te, nazalaki mingi mingi na misala makasi, kati na ba boloko nzike, na minyoko malolenge ebele, natelemelaki makama na liwa nzike.24Ba Yuda babetaki ngayi fimbo tuku misato na libwa 25mbala misato na betamaki na nzete, mbala esusu babambaki ngayi mabanga, mbala misato nazindisaki ngayi o ebale, nazalaki mokoli moko na ndamo o kati ya mayi mosana. 26Nasalaki mibembo mingi , nazuaki ebele kati ya bibale, bayibi epayi , libota na ngayi moko ekanaki ngayi ba pagano bakanaki ngayi, bayi bingumba bakanaki ngayi, na bisobe mpe lokola na ebale monana, ba ndeko ya lokuta mpe lokola bakanaki ngayi.27Nazalaki na misala makasi mpe ya mpasi, mpe ba butu nzike oyo mpongi ezalaki gte , na nzala mpe mposa ya mayi, tango nyonso koka nakokila bileyi, na malili mpe bolumbu. 28Na yango, libanda na makambo maye nazali mokolo na mokolo na mpasi o motema mpo na bino mangomba na Mokonzi. 29Zambi, soki moko o nteyi ya bino alembi mpe lokola nalembi, soki mosusu akweyi o lisumu, motema ekosala mpasi mingi.30Soki na komikumisa, ekozala mpona bolembu bwa ngayi. 31Nzambe Tata na Mokonzi Yesu, akumama libela ye nde ayebi ete na buki lokuta te.32Na mboka Damas, bulamatari ya mokonzi Aretas apesi mitindo na bayi mboka ete basenzela mpo soki ba moni ngayi kobima na ekuke enene ya engumba , bakwena ngayi. 33Kasi kotisaki ngayi ya kitunga mpe bakitisi ngayi o lininisa pembeni ya ebale enene, na ponyokaki o maboko maye.
121Nakoki komikumisa kasi litomba ezali te nakosalaka bongo, kasi naloba awa na bimoniseli mpe mabombami kowuta na mokonzi. 2Na yebi moto moko kati na MOkonzi oyo mbula zomi na mineyi koleka, abutwaki mapata ya misato, soki kaka na nzoto na ye, to mpe kotika nzoto na ye , Nzambe ye meyi nde ayebi.3Bongo nayebi ete moto wana atombwaki na lola, 4mpe ayokaki mpe amonoki mambio misantu , oyo moto nani akoki koloba te. 5Nakolobaka mpo lolenge ya moto yango, nakomikumisa mpo na ye , kasi mpona ngayi te, soki kaka mpona tina na bolembu na ngayi nde nakoki koloba6Soki nalingaki komikumisa nakozala mpe moto na bolema te, zambi na koloba bosolo te, kasi na mipekisi komikumisa, mpo ete moto moko te azala na likanisi koleka na oyo akomona to koyoka mpo na ngayi. 7Nakomipekisa lisus mpona komikumisa, na tina na bonene bwa mabombani man. Na yango nakotonda na lufundu te, zambi batubio ngayi zube na mosuni, mopesi sango ya satana mpo apengwisa ngayi mpo ete nazala moto na lofundu koleka te.8Mpona makambo mango, ba bondelaki Mokonzi mbela misato mpo alongola ngayi na mango. 9Kasi ye alobi na ngayi: «Ngolu na ngayi ekoki mpo na yo, zambi nguya na ngayi ekokisami na bolembu na yo.» Na bongo na ngayi, mpo ete nguya na Klisto efandi na ngayi. 10Natondisami na nsayi na bolembu na mafinga , na mobulu to bitumba mpe na minyoko, na mpasi mpo na Klisto, pamba te tango nazali na bolembu, nde makasi ayingeli o nzoto.11Atako nazali moto oyo azanga tina te, o boso bwa bato oyo babiangami ba ntuna minene, namikumisaki moto na bolema, zambi bino nde bosukumaki ngayi na lolenge yango. 12Bilembo bwa solo ya ntoma , elakisamaki o kati ya bino nakokangaka motema, na bilembo bimoniseli mpe bikamwa. 13Mpo ete mangomba masusu, anleki bino na nini? Longola kaka lolengi na lingaki kozala bozito mpo na bino te, bo limbisa ngayi mpo na mpasi eye na pesaki bino.14Bongo nalingi koya epayi ya bino mpo na mbala na isanto, mpe boyeba lisusu ete , nakozala kaka te, bozito mpo na bino, mpo ete ezali bomengo na bino te , nde nalingi kasi mitema na bino moko. Mpo ete bana bakobomb a mpo na baboti na bango te, kasi baboti nde mpo na bana na bango. 15Nakomi mpenza mobimba ngayi moko mpo na molimo na bino, pamba te , soki nalingi bino mingi nasali mabe?16Kasi lolenge ezali nazalaki bozito mpo na bino te , zambi nazali na mayele mingi , mpo ete natia bino mitambo. 17Bongo, bakanisi ete nalukaki litomba epayi na bino na motindami na ngayi o nteyi ya bino? 18Na lendisaki Tite aya epayi na biso elongo na moto mosusu, Tite azuaki litomba epayi na bino? Totambolaki kaka lolenge yoko te? Bitambi bya biso biwulanaki te?19Bakanisi ete na ntango oyo nyonso tobandaki ko mi longisa o boso na bino? O boso na Nzambe, na Klisto tolobeli makambu nyonso oyo po na kolendisa bino.20Najali na bobangi ete, na boyebi bwa ngayi nakuta bino te, lolenge nazali kobanza , najali na bobangi mpe mpo na bino, bomona ngayi lolenge makanisi na bino nazali , nazali ko banga kokuta o nteyi ya bino, koswana , zuwa, kanda ekasi, koluka bolamu ya moto na moto, bilobela , lofundu mpe nyamunyamu. 21Na kobanga ete na bozongi bwa ngayi , Nzambe ayokisa ngayi ngayi nsoni o boso bwa bino, najali kobanga ete nayokisama mawa na bayike kati na bino oyo bakosumuka, mpe babongwani na bosoto bwa bango te, na mobulu ya bondumba mpe nasepeli na bango oyo esalaka bango.
131oyo mbala ya misato nazali koya epayi na bino, lolenge mibeko eloba: «Soki batatoli mibale nto misato batatoli lolenge moko, likambo ekatani.» 2Nazali na likambo ya kolobela baye basalaki masumu, na bino banso. Nasili maloba yango tango nazalaki epayi na bino mbala ya mibale, mpe sikawa, ata nazali mosika, n azongeli yango lisusu: soki nakomi epayi na biso nakoyokela moto moko mawa te.3Pamba te, bolingi nalakisa ete Klisto azali koloba na monoko na ngayi. Ye azangi makasi te epayi na bino, kasi azali na nguya na kati na bino. 4Ya solo, babomaki ye na ekulusu tango azangaki makasi kasi sikawa azali ma bomoyi mpo na nguya na Nzambe. Biso mpe tozangi makasi lolenge Klisto azangaki yango, kasi aali na bomoyi oyo pamba te nguya ya Nzambe ekobanda kosala na biso kati na bino.5Bomitala bino moko mpo boyeba soki bozali na bondimi. Bomoyi te ete Yesu Klisto azali na bino? Soki te, bosi bolakisi ete bobungi. 6Kasi makanisi boyebi ete biso tolongi te.7Sikawa, tozali kobondela Nzambe ete bosala ata mabe moko te. Tozali na mposa ya komilongisa te, kasi tolingi kaka bosala makambo ya malamu , ata biso tomonani lokola bato balongi te. 8Pamba te soki tokosalela makambo ya solo, nguya oyo Nzambe apesi biso ekozala lisusu na ntina te, ye apesi biso yango kaka mpo esalela makambo ya solo.9Boye tosepelaka soki tozangi makasi mpe soki bino bozali na nguya . Tozali kobondela Nzambe ete bozala bato ya malamu mpenza. 10Nakomeli bino makambo oyo liboso ete naya, mpo ete tango nakoya napesa bino etumbu te, Mokonzi apzsi ngayi bokonzi mpo na kolongisa bino kasi mpona kokweyisa bibno te.11Bandeko mpo na kosukisa, botikala malamu, boluka kaka kosala malamu mpenza, bolendisamaka , boyokana, bozala na boboto. Bongo Nzambe ya bolingo mpe ya boboto akozala na bino. 12Bopesana mbote mingimingi mpe boyambana lolenge elongi na bato ya Nzambe.13Bato banso ya Nzambe oyo bazali awa batindili bino mbote. 14Bolamu ya Mokonzi Yesu Klisto, bolingo ya Nzambe Tata, mpe lisungi ya Molimi Mosantu ezala na bino banso.

Bagalatia

11Polo ntoma, ntoma kowuta ka bato te, to na nzela na batole kasi na nzala ya klisto pe ya nzambe tala, oyo asekwisaki ye na bakufi. 2Pe bandeko nionso bazali na ngai elongo,na bitonga ya galalia.3Tika ete ngolu pe kimia ezala na bino na nzela ya nzambe tata mpe ya nkolo yesu klisto. 4Oyo amipesaki ye moko po na masusu na biso, na ntina ete to kangolama na ekeke oyo ya mabe ko landasa mokano ya nzambe pe tata. 5Naye nkembo ezali libela na libela6Na kamwe mingi ete bino bopengi noki noki na ye oyo abenga bino na ngolu na klisto. na kamwe mingi na lolenge bolandi mateya mosusu. 7Oyo elingi kolala te, ete mateya mosusu ezali. kasi ezoli na bato balingi ko bulunganisa bino pe ba lingi ba bongo malamu ya klisto.8Kasi ata biso, ata anzelu ya likolo ateyi bino sango malamu mosusu ekeseni na oyo bino toteyaki bino alakelama mabe. 9Ndenge to lobaki ma bino mbala eleki na ya ngo sikoyo na zongeli yango lisusu soki moto ateyi bino sango malamu mosusu ekeseni na oyo bo ndimaki alakelama mabe. 10Po sika sika oyo na zali koluka lisungi na bala to oyo ya nzambe? na zali koluka kosepelisa bato? soki na zali kaka koluka kosepelisa bato, na zali mosoli na klisto te.11Na yango nalingi boyeba bandeko, zango malamu oyo ngai na lakisaki eti na bato pamba te. 12Na zwaki yango na moto ye, ba teyi ngai yango te. nzoka nde na zuaki yango na emoneneli ya kisto na ngai13a Boyo kaki ndenge ba lobaki na ntina na bomoyi na ngai eleka, na ndenge na zalaki na bizaleli na ba yuda ndenge na niokolaka na mposa nionso etonga na nzambe pe ko panza. 14Na kolaka na bizaleli ya ba yuda malamu koleka ba ninga na ngai oyo to kolaka na bango. na zalaka na molende koleka na oyo etali ba nkoko ya ba tata na biso.15Kasi esepebisaki nzambe apona ngai longwa na libumu ya mama na ngai. abenga ngai kolandana na ngolu na ye. 16Po te amonisa mwana na ye ezali na ngai na ntina ete na sokola sango na ye na bapagano na tunaki mosuni pe makila te. 17Na mataki na yelusaleme te epai na ba oyo ba kamaki ba ntoma liboso na ngai. nzoka nde na kendeki na zongi na damaseke.18Boye sima mibu misato, na mataki na yelusaleme po na yeba cephas pe natikolaki mikolo zomi na mitano na ye. 19Kasi na monaki ba ntoma mosusu te. longola ya kobo ndeko na mokonzi. 20Nionso na komeli bino liboso na nzambe na zali koluka lokuta te.21Sima, na kendeki na ba bituka ya sulia pe ya elikia. 22Na yebanaki te ngai noko, na bitonga ya yuda oyo ezalaki na klisto. 23Kasi ba zalaka koyoka kaka oyo azalaki koniokola na kala, lelo azali koteya kondima oyo ye azalaka kobebisa. 24Ba kumisaki nzambe na ntina na ngai.
21Sima ya mbula zomi na minei na zongaki lisusu na jerusalem na barnabas, na memaki na tite. 2Na kendaki mpo nzambe alakisaki ngai mpo na kende. na zalaki ko kolimbola bango sango malamu na zali ko teya na bapaganu kasi na zaki loloba na nkuku na bayangeli ya eklezia ma lingaki te mosala na ngai ezanga litomba.3Ata tite moninga ya mosala atako azalaki mu grec oyo azalaki na ngai bakataki ya nzoto na makasi te. 4Atako bandeko ya lukuta oyo batindaki na nkuku na mayele mabe ba zalaki kotala bosomi oyo te zali na yongo kati na christo yesu ba lingaki kokonisa biso baumbu ya mibeko. 5Totikelaki bzngo ntaka te, mpo takoka komemela bino sango malamu ya solo.6Ata ba oyo mimenaki ba tambwisi nzambe aponaka bilongi te. 7ba yebaki te na bengo maki mpo na kopala nganisa sango malamu na ba mosutu. lolenge ya petelo mpo na kopanza sango malamu na bato bakata nzoto. 8Nzo kande nzambe moko wana abiangaki petelo mpo na bato ba kata nzoto abengi mpe ngai mpona ba mosutu.9Tango ba sosoli ngolu nzambe atiaki kati na ngai jacques, petelo na jeane oyo ba yebanaki lokola nakonzi, ba tiiaki biso maboko, na barnabas mpe na ngai, na lolenge ya kondima kosakola sango malamu epayi ya ba paganu mpe bango epayi ya bato bagunga. 10Ba sengi biso to kamisa mpe ba bola, mpe na zalaki kosala makasi mpona yango.11Tango petelo akomaki na antioche na bayaki makambu na ye polele na miso ya bato,mpo abandaki kosala mabe. 12pamba te liboso ete bato jake atindaki ba koma kuna petolo azalaki kolia na ba paganu. sokibato wana ba komi atiki mpe amibendi mosika na ba paganu mpo na kobanga bato ba kata nzoto.13Ba yuda mosusu ya antioche ba bandaki kosala lokola ye, ata barnabas amiko tisaki na lolenge ya ngo. 14Tango na moni te azoli ko landa basolo ya sango malamu, na lobi na petelo liboso na bango nyoso. soki yo moyuda zali kobika lokola mopaganu nde nini okotinda ba paganu na makasi ba koma bayuda.15Biso to batama ba yuda te keseni na bikolo mususu. 16Nzokande to yaki koyeba ka moto moko te akomaka bosembo mpo atosaka mibeko, kasi ezali mpo andimelaki jesu klisto po to koma bosembo to koki kotia mitema na mibeko.17Soki to luki kokoma bosembo po na klisto wana tondimi te biso ba yuda to zala bato ya masumu klisto nde akomisi biso bato ya masumu ata moke te. 18Soki na bandi kotonga ndako oyo na si na buka, elingi koloba te na landaka mibeko te. 19Na oyo etali mibeko na sengeli kokufa kodima elongo na yesu na kuruze.20Ezali ngai moto na zali kobika te kasi ezali nde yesu kobika kati na ngai, ezala bomoi ya bo moto na zali kobika na kondima kati na yesu muana ya nzambe, na bolingo na ye amipesi pona ngai. Na 21boyi malamu ya nzambe te. soki bosembo ewutaki na mibeko, wana yesu akufaki na kuruze pomba.
31Bagalatia, bino ba zanga mayele, nani aloki bino? nzo kande ezali elakiseli polele na yesu klisto abakami na ekulusu mpo na bino. 2Nalingi loyalaka likambo oyo na misala na mabeko to na nzala na kondima na oyo boyoki? 3Bazali bazoba buye? bobandaki malamu na molimo mpo bosukisa yango na misala na nzoto?4Bonzo wami boye na mpamba minzaka yango ezalaki na ntina te? 5Ndenge moko, ye oyo opesi bino molimo na nzambe mpe asali misala ya minene na kati na bino, azali asali misala ya minana na kati na bino,azali kasala yango na misala na mobeko to na nzela na loyoka mabeko?6Lokola abayana andimaki nzambe mpe ekumisaki ye muto na sembo. 7Basosola ete ba oyo bandimi bayali bana na balayama. 8Makomi na nzambe ebongisi ete nza mbe akolongisa bapa kano na nzela na kondima na bango nsango malamu esokolamaki liboso na abala yama. 9Na bongo ba oyo bazali na kondima bapambolami elongo moko na abrayama ete na kondima na ye.10Ba oyo bazali kotia mutema na misala na mobeko, bazali na nse na lisuma mpo ekomami lisuma ezala na moto azali kobika na lolenge oyo ekomami na buku na mobeko. mpe akotia yango yonso na buku na mobeko. mpe akotia yango yonso na misala te. 11Sika sika oyo eyebani polele ete nzambe akolongisa moto te na nzala na mobeko zambi. loyengebeni akobikaka na nzela na kondima. 12Mobeko ewutaka te na nzela na kondima kasi, ye oyo azali kotasa ba makambo oyo na mobeko akobikaka na nzela na mibeko.13Klisto asombi biso na lisuma na mobeko soko ekumi eloko ne lisuma mpo na biso, mpo ekomami lisuma ezua moto oyo babakisi ye likolo na nzete. 14Ntina monene ezali ete lisuma oyo ezali likolo na abrayama ekoka koya likolo na bapakanu na katina masiya yesu, mpo ete tokoka koyamba elekeli na molimo na nzela na kondima.15Bandeko, na zali koloba lokola bato. lokola molanda na boyakani katina bato ekomami moto te akoki koboma bilaka na nzambe to kobakisa eloko moko na yango. 16Sikawa bilaka bipesaki na abrayama mpe na bakitana na ye elobamite ete bokitani mpo na bato yonso te kasi babeli na muto moko mokitani na yo. oyo azali klisto.17Sika nazali koloba, boyokani oyo endimamaki na nzambe ekoki te elaka wana ekufa na nzela na mobeko oyo ebimaki kama mineyi na ntuku misato mibu uta kala. 18Zambi soko libela ebimi na nzela na mobeko ekoki lisusu te koya na nzela na mobeko ekoki lisusu te koya na nzela na elaka, kasi na nzela na nzambe oyo apesaki bomengo na nzela na abrama mpo na elaka19Mpona nini mobeko epesamaki? etianaki mpo na bobuka miko kino koya na mokitani na abrayana oyo eleka epesameli ye, 20mabeko ebimaki polele mpo na bato na nzela na ba anzela mpe na moto oyo etiaka boyokani kati na bato sika sika oyo mato atiaka boyokani azali bobele muto moko nzokande azali nse ye moko.21Bongo mobeko ekozala monguna na bikekeli na nzambe? bongo te soko mabeko oyo ekoki kapesa bomoyi epesamaki bosembo na nzambe ekoki solokoyana nzela na mabeko wana. 22Kasi bango te, makomi ekangisi yonso na nse na bokonzi na masumu. baye, elaka na nzambe mpo na kobikisa biso na nzela na kondima yesu klisto epesamaki na ba oyo ba kondima.23Kasi biboso kondima yesu esalema, biso tokangama mpe tobatelamaki na nzela na mobeko kino komonisama na kondima. 24Boye, mabelo ezali lokilo senzeli na biso kino ntango na yesu ekokisami mpo ete tokoka kosembolama malama na nzela na kondima. 25Sika oyo, tozali na kondima tozali lisusu te na bo bokonzi na mokongeli. 26Zambi bozale bino banso bana na nzambe na nzela na kondima klisto yesu.27Bino oyo bozuaki libatisi na nzela na klisto, bolatisami na klisto. 28Na kati na yesu, moyuda azali te mo grecque te, mowumbu te, moto na libre te, mobali te, mwasi te, mpamba te bazali bango muto moko, na kati na klisto yesu. 29Bino, soko bazali na klisto, biso bana bokitani na abola yama ba oyo bako zua bomengo na elaka epesamaki na abalayama.
41Mwana oyo azali mokitani ya bozwi ya tata na ye, akeseni te na moumbu nzambi akembi naino te, ata ye nde mokonzi. 2Babokoli mpe bakalaka na ye bakozala na ye kino akokola.3Ndenge moko tango tozalaki naino bilenge towumelaki na boumbu ya bato ya mokili oyo. 4Kasi tango ngonga ebetaki, Nzambe atindaki mwana na ye abomama mpe atosaki mibeko ya bayuda. 5asalaki bongo mpo afutela bango nyongo ya boumbu mpo tokoma mpe bana na ye.6Nzambe atinda bomoi ya mwana na ye kati na mitema na biso oyo ezali konganga : «Tata» 7Tala ntina bozwi bonsomi lokola bana mpe bakitani na ngolu ya Nzambe8Kasi tango bozalaki naini bapagano bozalaki nde baumbu ya banzambe ya lokuta. 9Kasi bosili koyeba Nzambe mpe ye ayebi bino, ntina nini bolingi kopengwa.10Bozongeli bizaleli na bino ya kala ya kononga ba sanza mpe mbula? 11Nazali kobanga mpo ete motoki na ngai ebimaki pamba.12Nakosenga na bino bolanda ndakisa na ngai mpo bosalaki ngai mbeba moko te. 13Mokolo ya yambo nateyaki bino sango malamu, ezalaki na ntina na botau ya nzoto. 14Ata ko nzoto etungisamaki na bokona, boboyaki ngai te, kasi boyambaki ngai lokola anzelu ya Nzambe, lokola Chlistu Yesu ye mei..15wapi esengo na bino? Soko nabazi esengo na bino tango bolingaki kosopa makila na bino mpo na ngai. 16Sik'awa nakomi monguna na bino mpo nalobi solo.17Bolingo ya bato wana , ezali ya masele. mposa na bango ezali bokabwana mpo bolanda bango. 18Ebongi malamu kolinga moto ata azali mosika na bino.19Bozali bana oyo nabotaki na mpasi, nakozala na kimia soko bobongwani ya solo. 20Mposa na ngai, nakoma esika bozali mpo nayeba ndenge nini koloba na bino, zambi sik'oyo nasili mayele.21Boyoka ndenge mibeko elobi, bino bato bolingaka kotosa yango. 22Abalayama abotaki bana mibale,na basi mpe mibale. Mwasi ya boumbu na oyo ya bonsomi. 23Mwana oyo abotamaki na mwasi ya boumbu awutaki na mposa ya nzoto, kasi oyo ya mwasi ya nsoni, azalaki mwana ya elaka.24Elingi koloba: basi mibale nde boyakani mibale. Agar nde mwasi moumbu oyo aboti bana ya boumbu. 25Ngomba Sinaï nde Agar na Arabiya ezali Yelusaleme ya sika, mpo azalaki na boumbu na bana na ye.26Yelusaleme ya likolo nde mboka ya bonsomi. 27mpo ekomama: «Mwasi ekomba asepeli mpo ayebi mpasi ya kobota te. kasi oyo ya likombe azali na bana koleka oyo abala.»28Bozali bana ya elaka lokola Isaka. 29Kino tango ena; mwana ya lisumu azalaka konyokola mwana ya molimo.30Makomi elobi boni? Bengana mwasi ya moumbu mpe mwana na ye, nzambi mwana ya moumbu akokitana na mwana nsomi te. 31Na boye bandeko, tozali baoumbu te kasi bansomi
51Tozali basomi na masiya libela, tozali na etumbu te. 2Tala lokola ngai Paulo nazali koyebisa bino, soki okatami ngenga Chlistu azali na ntina na yo te.3Nazali koyebisa lisusu na moto nyoso akokata ngenga, atosa mibeko minso; 4Bino botangwa na Masiya, bokangami na mibeko bojali kobika na ngolu na ye te.5Mpo na Molimo mpe na kondima tojali kolikya na makambo malamu. 6Na kati na Chlistu Yesu bakatama ngenga, bakatama ngenga te se lolenge lioko. Kasi bobele kondima kati na bolingo. 7Bokimaki mbangu malamu. Nani apekisi bino kotosa makambo ma solo? 8Oyo bojali kosala ejali na makanisi ya moto abiangaki bino te.9Ndambu moke ya nfulu, evimbisaka lipa. 10Natiela bino motema na Mokonji na lolenge bino bokanisaka te tango mosusu oyo ajali kobungisa bino akojala na etumbu na ye.11Bandeko, najali koyebisa bino lisusu na ntina ya ngenga, mpo na nini najali kominyokola? Na yango, libaku ya ekulusu esila kolongwa. 12Nakanisi baoyo bajali kotinda bino na libebi, bango moko balongwa na kati na bino.13Mpo ete bandeko, Njambe abiangi bino bojala bansomi. yango etinda bino na misala ya njoto te. Kasi bosalisanaka bino na bino na bolingo. 14MPo ete mibeko minso mikangami na mobeko se moko: «Linga moninga wa yo lokola yo mei omilingaka.» 15Soki koswana mpe kobomana kati na bino,bokeba ete bokobebisana.16Botambola lolenge ya Molimo kasi na mposa ya njoto te. 17Mpo ete bamposa ya njoto na oyo ya Molimo eyokanaka te. Mbano na yango ejali kopekisa bino oyo bolingi kosala, bosala yango te. 18Kasi Molimo atambolisa bino oyo bojali na epekiseli na ntina na mobeko te.19Tala, misala ya njoto yango oyo: Ekobo, makambo na mbindo, pite, 20losambo ya bikeko, kindoki, nkaka, kowelana, juwa, nkanda, kolula, kokabwana, kopona pona, koboma bato, kolangwa masanga, lokoso mpe makambo ya lolenge yango. 21Nayebisi bino lokola nayebisaki bino liboso, bato oyo basalaka makambo yango, bakoyingela na bokonji na Njambe te.22Mbuma na Molimo yango oyo: bolingo, esengo, kimia, kokanga motema, boboto, malamu, kondima, 23bopolo, kokanga motema, mibeko epekisi makambo oyo te. 24Baoyo ya Yesu Chlistu, babwaka misala mia njoto mpe mposa na yango.25Soki tojali na Molimo, totambola na Molimo. 26Tojala na lolendo te, totungisamaka te, tolukanaka kati na biso.
61Soki motu bazui ye na mbalakata na masumu, bino batu ya molende na molimo bosunga ye po akoka kotelema botala naka pe bosungaka bino na bino po bo kweya te na komekoma. 2Bo memana mikumba bino na bino bongo boko ye kokokisa mobeko na klisto.3Bongo, soki motu akanisi azali na eloko, kasi azali na yango te, azali komibebisa ye moko. 4Tika motu na motu amotala penza na misala na ye, bongo ako yeba lolenge ya komikumisa. azanga koniokola moninga. 5Moto nionso amema mikumba na ye.6Motu nionso oyo azali koyekola liloba na nzambe na nzambe, esengeli. 7Akabola bozui na ye na moto oyo azali kotangisa.bomikosa, basakana na nzambe te. oyo nionso motu akolona akobuka yango penza. 8Motu nionso oyo akolona mbuma moke ya nzoto na ye ya masumu, ya kobuka libungutulu kasi oyo akolona pona molimo, akobuka bomoyi na seko ya molino.9Tomi tika te kosala malamu bongo tango eye to kobuka soki to sundoli yango te. 10Bongo; tango mbela epesemeli biso. sala bolamu na mutu nionso kobosana te kosala lisusu kpoleka malamu ma lisanga ya bonolimi.11Tala, mokanda ya monene oyo na komelaki bino na maboka na ngai penza. 12Bobele, ba oyo ba lingi kotalisa nde kaka bango na bizaleli malamu ya nzoto na bango, epesa bino bulemba po na kokatisa ngenga pamba te ba niokwama pono ekuluisus ys klisto. 13Ata ba oyo bakata na ngenga ba zokoka te kobatela mibeko. kasi ba lingi kaka ba kata ngenga po ba mikumisa na nzoto na bango.14Mokolo moko te ekomele posa ta ko miokumisa, soki ezali na ekulusu ya mo mokonzi yesu klisto, na nzela na yango nde mokili elekaki na moto na ekulusu ya ye pona ngai pe pona mokili. 15Ezala ngenga to ngenga te eloko ezali na tina mbotama ya sika. 16Bato nionso ba kowumela na mobeko oyo tika kimia pe mawa ezala kati na bino israel na nzambe.17Banda lelo motu mokpo atungisa ngai te pamba te, na memi na nzoto na ngai bilembo na yesu. 18Tika ngolu ya mokonzi yesu klisto ezala na molimo ndeko amen.

Efezo

11Polo, moko ya ba toma ya yesu-kristo,na mokano ya nzambe, na ba bulami ya nzambe na efezo. 2tika ete ngolu na nzambe,Mpe TaTa na nkolo na biso yusu-Masiya epesamela bino.3Tika Nzambe Tata na mokonji na biso yesu klisto. akumisama, ye nde apamboli biso banso na mapomboli kati na mokonji na biso yesu klisto. kuna na likolo. 4Nzambe asi apona biso uta kala kala ya libandali ya mokili. Kati ya muana na ye yesu klisto kuna na likolo.5Nzambe a si alakaka biso uta kala na nzala ye mwana na ye yesu klisto na ye meyi. 6Maponomi na biso, ewuti na mbuma, ya masanzoli kati na ngolu oyo ewuti epai na ye moko. nde apesi biso ya mpamba na lolenge alingi biso.7Kati na yesu klisto tosombamaki na makila na ye mpona kolimbisama na masumu na bomengo na ngolu na ye. 8Asopi ngoluma ye nyoso, mpe bwanya na ye bososoli na ye.9Nzambe a monesili biso tina ya mabombami na mokamo nde asepelaki na komonusu klisto. 10Mosala nba klisto ezali na tina ya kokokisa tango. lotomo ya kosangisa biloko nyoso esika se moko, kobanda kuna na likolo, mpe na nse kati na bokonzi na ye se moko .11Kati klisto, toponamaki lokola ye na yango nde akataki mpona biso,libosoi ya kosala biloko nyoso, na mabongisi na ye, na likolo, na nse na mokano na ye. 12Nzambe atomboli biso mpo ete tazala bana na ye ya liboso. kozua elikya mpe molende kati na klisto. na yango nde tazala kokumisa mpe nkembo na ye.13Kati na klisto, bo yokaki maloba na ye, sango malamu oyo ekangoloki bino oyo bondima ki, yango nde, bolatisami na molimo mosatu oyo alakaki. 14Molimu monsatu abombeli biso bana na ye, ndambo ya bomenga oyo ekokotisa biso mobimba kati na ye. mpona masanzoli mpe nkembo na ye.15Natina wana, uta na yoka sango bondumi mpo na nkolo yesu klisto, mpe bolingo oyo bolakisi mpona bansatu bati na ye. 16Na tiki kozongisa matondi epai ya nzambe matondi epai na ye, mpe kotika bino na maboko ya nzambe na mabondeli na ngai.17Na bondeli nzambe na mokonzi ya biso yesu klisto apesa bino bwanya, emonesili, boyebi na ye. 18Na bondeli nzambe ete alongola miso ya mitema na bino, mpo ete batia motema, na molende epai na ye oyo abiangi bino kati ya bomengo na kembo kati ya bana na ye oyo apona.19Na bondeli mpona bino mpo ete bokoka koyeba bonene mpe nguya na ye, oyo misala ezomonana na monene ya makasi na ye. 20Kaka na nguya wana nde nzambe asekuisaki yesu kati na liwa mpe afandisi ye kuna na likolo na loboko ya mobali. 21Afandisi kuna likolo mosika, likolo yo balamaladi, bokonzi, nguya, kokonza nyoso. na yango klisto akokonza kaka na ekeke oyo te,kasi na ekeke oyo ekoya ndele.22Nzambe epesi nyoso na nse ya makolo na bokonzi na yesu mpe apesi lingomba bokonzi likolo. 23Lingomba ezali nzoto ya klisto. oyo etondi na makambo nyoso, mpe na nyoso.
21Mpo na beno, bokufaki kati kozanga kotosa ye mpe kati na masumu. 2Na kati ya makambo oyo nde botambalaka mokola mosusu na kolandaka lizaleli mpe etambolisi bino na mokili oyo. botambali lokola mokonzi na kolandeka mopepe. wana ezali molimo ya oyo azali na mosala na kati ya mwana ya motoyi mangongi. 3Tozalaki mpe mokolo mosusu na kati ya baye bazanga kondima. tozalaka mpe kosala makambo ya mabe posa ya nsuni biso ezalaka kotinda biso.tosalelaka mposa ya nzoto te mpe na makanisi tozala mpe bana ya kanda lokolo basusu.4Kasi nzambe na mawa ebele na ntina ya bolingo na ye oye alinga biso. 5Lokola tokufaki ya na ntina ya mibunga na bisi, ameni biso na bomoyi ya sika elongo kati na nkolo. ezali ngolu nde ebikisi bino. 6Nkolo asekwisi biso elongo mpe afandisi biso bisika ya likolo kati na klisto yesu. 7Asali boye mpo ete na bikeke bizali koya, amonisa biso bazui ya ngolu na ye. atalisi biso yango na nzela ya mwana na ye na bolingo na klisto yesu.8Mpo ete bobikisami kati na ngolu na kotala kondima ya ngo ewuti na bino te, ezali likabo ya nkolo. 9Ezali te na ntina ya misala na bino ete botia lolendo wana. 10Tozali misala ya maboko na ye, tokelami na klisto yesu mpo ya kosala misala malamu oyo nkolo atandi uta liboso mpo na biso, mpo totambola kati nayango.11Bokanisa mbala nzike ete bozala ba yuda te na mposa ya nzoto. bokatami ngenga te mpo bobianga bongo na makambo ya bato. 12Mpo ete na ngonga wana bokabwanaki na klisto. bazalaki bapaya kati israele bapaya na boyokani ya elaka. bozalaki na elikia na makambo makoya. bozalaki na nzambe te kati na mokili oyo.13Siki oyo lokola bazalaki mosika na ye, nkolo apusi bino kaki namakila ya muana na ye yesu klisto. 14Ye azali kimia na biso. asali na bango mibale se moko, mpe kanda. 15Elingi koloba abomi mobeko ya mitindo mpe makomi mpo ete moto akoma ya sika na ye moko. 16Asalaki boye mpo ayokinasa mabota mibale ya nkolo na kozala kati ya bomoko na nzoto na kotala ekulusu. ekulusu elongi liwa.17Kimia eyaki na nzela ya klisto na bino ba ye bazalaki mosika, kimia na bazali pene pene. 18Na nzela ya yesu tozui nzela ya kokenda na tata kati na molimo moko.19Boye bino bayuda tebozali lisusu libanda te to bapaya te. mpo na yango, bazali lisanga kati na baye mboka na baye bamiti pembani mpo na nkolo na lisanga ya bana na nzambe. 20Botongani likolo ya etongeli ya bantoma mpe basakoli. klisto yesu ye meyi azali libanga ya talo. 21Na ye, ndako inso ntiami elongo mpe ekoli lokola eyanga nelo kati namokonzi. 22Na ye bino mpe bozali kotonga elongo lokola ndako ya kolala mpo nzambe kati na molimo.
31Yango wana ngai polo, na komi mokangami ya mokonzi yesu pona bino ba pagano. 2Na kanisi ete yebi mokumba nini ya ngolu na zua pona bino.3Na komaki mokanda ya ngo ko landana na emoneseli na zuaki. yango ezoli solo ebombama ndenge nakomaki na mokanda mosusu. 4Soki bo tangi yango bokoyeba mayele na ngai likolo ya solo ebombama pona klisto. 5Na bileko misusu solo yango eyebanaka te na bana na batu kasi sasaipi, ebimi puasa na lisungi na molimo na nzela ya ba ntoma pe ba sakoli ya sembo.6Solo yango ezali ete ba pakano pe ba zui libula elongo moko na bayuda pe ba komi nzoto moko. bazali ko kabola bilaka moko na bayuda kati na klisto yesu na nzela ya sango malamu. 7Nakomi bongo mowumbu ya sango malamu kolanda na ngolu oyo nzambe asali ngai na nguya na ye.8Tata ko nazali moke kati na ba oyo ba bangama na nzambe, nazali na likabo yango. likabo etali kotatila sango malamu ya bo zui makasi tokaki kososola te kati na klisto epayi na ba pakano. 9Esengeli na sosolisa bato nionso na maye matali miango na nzambe jambi,nzambe abomba miango yango wuta kala koleka.10Esala maki bongo po ete sasaipi, na nzela na etonga ba yike ba konzi ya molili na bisika eleki likolo ba yeba ba lolenge ebele ya ko sosola bwana ya nzambe. 11Yango eko salama kolandana na miangu ya libela akokisa kati na yesu klisto mokonzi na biso.12Pamba te na kati na klisto to zali na kasa pe bo koti na motema pio pona kondima tozali na yango na ye. 13Na bondeli bino bo lemba te pona minioko na zui pona bino. yango nde elonga na bino.14Natina na yongo na gumbamelaka nzambe tata, 15Epai ma bota nioso mawuta kobanda na likolo pe nse. 16Nasengi naye kolandana na nkembo na ye monene alendisa bino na nguya na ye lisanga na molimo mosantu oyo ezali kati na bino.17Bongo klisto avanda na mitema na bino kati na kondima pe bozala na misisa makasi kati na bolingo na ye. 18Po ete bo sosola elongo na ba klisto nionso manso matali mosindo ya bolingo na klisto. 19Nzambe apesi bino makoki ya koyeba monene ya bolingo ya klisto oyo eleki mayele nioso po ete botanda na bo nzambe.20Bongo na ye oyo azali na makoki po ko pesa biso kaleka na nguya na ye ezali kati na biso, nioso to zali ko senga pe ko kanisa, 21Nkembo epesa nela ye na etonga kati na klisto yesu na bileko nioso seko pe libela na libela amen.
41Bongo, lokola mokonzi mokangami mpona mokonzi, mabandeli bino botambola na bizaleli malamu na lolenge bobiangama ki. 2Ntango nyoso bozala na konikitisa, na motema pete mpe na motema molai. 3Kobatela bomoko kati na molimo mpe na kimia. bo tia molende kobatela ya ngo.4Nzoto ezali moko mpe molimo moko na ndenge bo bengamaki, 5Mokonzi azali moko, kondima moko, libatisi moko. 6Mpe nzambe moko tata mabata nyoso azali likolo nyoso, kosala na makambo nyoso mpe ko fanda kati na nyoso.7Apesi moko na moko na biso ngolu ko landana na likolo na klisto. 8Lokola na komi elobi ntango amataki na likolo, ye a kabolaki makabo ma bato.9Elingi koloba nini amati soki te akitaki na nse ye mabele. 10Ye oyo akitaki na nse eza kaka moto moko wana oyo amataki na likolo asuli bongo mpo akokisa makambo nyoso.11Klisto akaboli makabo oyo ba ntoma, ba sakoli, ba panzi na nsango malamu, ba bateli mpate mpe balakisi. 12Asali bo ye mpo na kobongisa ya ba klisto. 13Na ndenge oyo oyo tokokoma biso nyoso asika moko, kozala moko kati na kondima na biso mpe kati na boyebi na bino na mwana na nzambe.14Bongo tozala lisusu bana te lokola batu oyo mayi ememaka awa na kuna na mipepe ya malakisi mabe na ba kosi oyo bazali kotungisa bato na nzela mabe ya bongo. 15Nzokande kosakola polele likambo ya solo kati na bolingo, esengeli tokola kati na makambo nyoso na oyo azali motu nde mokonzi. 16Klisto asangisi biteni nyoso na nzoto esika, moko,ezali kokola mpe kokoma monene mpo na bolingo.17Bongo na nkombo na mokonzi bokoki kotambola te lokola ba pagano oyo ba tambolaka na makanisi na bango moko. 18Mpe mayele na bango ezali molili ba zangi bomoyi oyo nzambe azali ko pesa mpe mitema na bango esili kokoma libanga. 19Bazangi nsomi, bapesi nzoto na bango na bikobo, mpe ba zali kosala makambo ndenge nyoso ya masumu.20Kasi boyo kasi likambo na klisto boye te. 21Boyokaki nsango na mokonzi mpe tango bondimaki ye, batu balaki saki bino likambo na solo oyo ezali na mokonzi. 22Bango esengeli bo bwaka bizaleli na bino ya kala mpo ekomema yo na kufa.23Esengeli bobongwana kozala motema sika kati na motema na bina mpe molimo na bino. 24Bolata moto na sika oyo nzambe, asili ko zalisa na ndenge na ye.25Mpo na oyo bo bwaka lokuta. moto na moto aloba solo epai na moninga na ye, mpo ete biso nyoso tozali biteni ya nzoto moko. 26Siki bosiliki, bo keba ete bokweya kati na masumu te mpe bosilika moyi mobimba te. 27Kopesa nzela na satana te.28Moyibi atika koyiba, kasi ekoki asala mosala mpo azua bileyi na ye moko mpe mpo na kosunga ba oyo bazali na bosenga. 29Boloba maloba mate te, boloba kaka malamu mpo eko sunga bato mosusu kokende liboso kaki na kondima, boye likambo bokoloba ekoki kosunga bato oyo bazo yoka bino. 30Boyokisa molimo mosantu na nzambe mawa te, mpo molimo azali elembo oyo nzambe asili kotia na nzoto na bino, azali kotalisa ete na mikolo mikoya nzambe akobikisa biso.31Bobengama mosika na bino makambo nyoso ya mabe. kanda, koswana, ko yinana, ko tomboka, ko finga. 32Kasi bo linganaka, bo salisanaka mpe bo limbisanaka ndenge nzambe alimbisaki bino mpo na klisto.
51Bozala solo ba mekolami na nzambe lokola bana na ye yabolingo. 2Mpe tambola kati na bolingo lokala klisto alingaki biso mpe a mipesi na biso lokola likabo mpe mbeka ya solo ya malasi ya kitoko mpo nzambe.3Kokufisa posa ebe ya nzoto,mbindo to lokoso ekoka ko vanda kati na bino te lolenge ya bandimi basusu. 4Nakati na bino ezuama te misala ya soni, mpe maloba ya kokoso mpe maseki ekoki kokitisa lokumu yamotu. ngolu mpe kimiya evanda kati na bino.5Pamba te boyebi na bolamu ete motu na ekobo mpe posa mabe ya nzoto ya mbindo to lokoso, mosa mbeli azali na bozui soko moke te kati na bo konzi ya klisto mpe nzambe. 6Moto mosusu akosa bino te na maloba ya pamba. ezali na ntina na makambo ya motindo ya boye nde kanda ya nzambe eyaka likolo ya bana bazangi botosi. 7Bosangana na bango esika moko te.8Mpo kala bozalaki molili, kasi siko oyo bo zali mwinda kati na kolo. mpona ya ngo botambola bana ya mwinda. 9Mbuma ya mwinda elongo bani na bilamu,sembo, mpe solo. 10Boluka oyo eyengebeni na kati na kolo. 11Kolanda te misala oyo ezangi mbuma. bimisa yango na polele. 12Mpo misala bazali kosala na molili ezali soni mingi mpo na koloba.13Maye mabombami soko mwinda engengisi,ekoti lisusu kobatama te. 14Mpo engengisami libela. mpo na yango makomi elobi boye, lamuka yo oyo ozali kolala mpe telema kati na bakufi mpe klisto akongengisa yo.15Keba na lolenge boni boni bozali kobika, lokola bilema te, kasi lokola batu ya bwanya. 16Salela ntangu mpo mikolo mizali mabe. 17Bozali bilema te, kasi sosola mokano ya mokonzi ezali boni boni.18Bolangwaka masanga te oyo ekoki kobebisa kasi botondi samana molimo mosatu. 19Bomi lendisama na nzambe na bayuda, mpe na ba nzembo ya molimo mosatu, boyemba mpe bo kumisa mokonzi na motema na bino mobimba. 20Kozongisa ntanga inso matondo epayi ya nzakumba mpo na mokambo yonso na kombo na mokonzi na biso yesu klisto. 21Bomi kitisa kati na b ino na lolenge ya klisto.22Basi, bomikisita epai ya mibali na bino, lokola na mokonzi. 23Na ntina ete mobali azali mokonzi ya mwasi lokola klisto mpe azali mokonzi ya lingoma, azali mobikisi ya nzoto. 24Na ndenge lingomba ezali kotosa, basi mpe batosa mibali na bango na makambo nyoso.25Mibali bolinga basi na bino, lokola klisto alingaki lingomba, mpe ami kabaki mpo na yango. 26Asalaki boye mpo na kobulisa yango. abuliusaki yango na kosukula yango na mayi na nzila ya liloba. 27Asalaki bongo mpo na komonisa ye meyi lingomba moko ya nkembo oyo ezali na bosoto mpe makwanza, mpe biloko lolonge oyo te,kasi oyo ezali bule, bonzenga mpe peto.28Na bolenge mibali bakoki kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko. oyo alingi mwasi na ye amilingi ye meyi. 29Moto moko te amiyina, kasi aleyisa yango mpe alingi yango lokola klisto alingaki lingomba. 30Mpo tozali eteni ya nzoto na ye mpe nza.31Mpo na yango, mobali akotika tata mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye bongo bango miobale ba kokoma nzoto moko. 32Ezali makambo minene kasi na zali koba mpo klisto mpe lingomba. 33Ata bongo, moko na moko na bino alinga mwasi na ye lokola yemeyi mpe mwasi apesa mobali na ye lokumu.
61Bana, botoso baboti na bono na ndenge na mokonzi,mpo ezali sembo. 2Tosa tata mpe mama na yo, ete ezali mitindo ya libogo oyo ezali na bilakeli. 3na bongo okozala na moto na esengo mpe oko wumela na mokili.4Baboti, boyona bokisa bana na bana na bino te, kasi bokola bango na liliba na nzambe na kanda te.5Basali botoisa ba konzi na bino awa na nse bo pesa bango botosi ya malamu, mpe na motema malamu, tosa bango, bo, totosaka mokonzi klisto. 6Bino bakonzi bonyokola basali na bino te, kasi boyeba te molakasi na bino oyo azali na likolo, azali mpe molakisi na bango. 7Bosala na motema moko, eyenge bene na mokonzi, kasi mpo na batu te. 8Boyeba ete bolamu nyoso oyo basalaka na bato, bokozua litomba epayi ya mokonzi.9Ebongo bino ba konzi bo sala lolonge moko lokola basali bo nyokola bango te, kasi boyeba ete molakisi na bino, ye mpe azali molakisi na bango kuna na likolo akataka likambo na soni te.10Bozali ba nzeneneke, mpe nzambe ye meyi ayebi, nde to mibatelaki kozala bule, sembo, mpe na tembe te oboso na bino baye bondima. 11Na lolenge wana, bino moko boyebe ndenge kani tozalaki okati na bino ndenge papa azalaka na bana. tolendisaki bino, pe topesaki bino longonya.12Biso tolobelaki bino na ndenge bokoki totambola bo bana na nzambe. oyo abenga bina na bokonzi pe kembo na ye. 13Na tina wana, tozangisi matondi na nzambe tango oyo bo yambaki biso ba pangi sango malamu pe bo tindemaki bo batu maloba ya boto te. maloba oyo ewuti na mosala na nzambe. oyo ezali ya bosolo, maloba ya nzambe. ndemaloba oyo ezali kosa mosala kati na bino bandimi.14Kasi bino baninga, bozo kokana kamekola biso. lokola ekeleza ya juda kati klisto yesu, pamba te bo moni bwale lokola banunga na bino. oyo bakemba epaye ya ba yuda. 15Ezalaki ba yuda nde ba boma mokonzi yesu elongo na ba sakoli ezalaki ba yuda nde ba benganaki bazalaki batu ma kanga. epayi ya bato nyoso. 16Bazali kutu kopekisa biso kote ya bato mosusu te oyo bazali ba yuda. po ete bango babika te.17Mwa tango moke tobwanaki na bina, kasi maboko na motema, na posa monene na motema komona bino. 18Na ba lolonge ya ba mabondeli nyoso, na ba posa, to bondela tango nyoso na molimo. pe na makanisi zala ekekonge pe yika piko pe na mabondeli pona ba ndimi nyoso.19Bosambela nzambe pona ngai po liloba na nzambe etiama kati na monoko na ngai, mpo na monisa mabombami na sango malamu oyo ebombami. 20Po na sango malamu oyo na tindami lokolo toma kati ya minyololo mpo na koko ka koteya sango na elikia, na kokaki koloba21Kasi, bokoka koyeba makambo ya ngai ndenge nazali ko mema ya ngo tychique moninga mosali sembo ya mokonzi akopesa bino sango nyoso. 22Na tindeli bino ye na tina, boyeba ndenge tozali, pe abandisa mitema na bino.23Tika kimia ezala kati na baninga, pe bolingo ewuti epayi ya nzambe tata pe tata na mokonzi yesu klisto. 24Tika ngolu ezala likola na baye balingaka mokonzi na biso yesu klisto na bolingp oyo ezanga suka.

Ba filipe

11Polo mpe Timoté basali na ayesu Kristo, epai na babulamai nionso kati na Kristo Yesu bazali na Felipi mpe bakengeli mpe basungi elongo. 2Ngolu mpe kimia kowuta na Nzambe Tata na biso mpe Mokonzi Yesu Kristo ezala na bino.3Natondaka Nzambe na nagi , kati na makanisi nionso na ngai mpo na bino. 4Tango nionso na bondelaka mpona bino, nazali kobondela na esengo. 5Mpon na lisanga kati na sango malamu longua na mokolo ya liboso kino sasaipi. 6Nadimi boye ete mobandisi na mosala malamu kati na bino akosukisa na mokolo ya Yesu Kristo.7Ebongi malamu kokanisa bongo mpo na bino yonso, Zambi nazali na biono na motema na ngai, mpo ete bozali nionso bansanganinnan ngai na ngolu kati na kokangama na ngai mpe kati na mlosala na kolob ela mpe kotambolisa nionso malamu. 8Mpo ete, Nzambe azali motatoli(zeneneke) na ngai ete nazali na mposa na bino nionso na bolilgo ya Kristo Yesu.9Nazali kobondela ete bolingo na bino boyikama koleka mingi mingi esika moko na boyibi mpe bososoli nionso. 10Ete bomekisa makambo makeseni, ete bozala mpeto mpe na ekweli te mpo na mokolo kristo, 11mpe lisusu mpo ete botondisama na sembo (boyengebene) exuti na nzela na yesu Kristo, na nkembo mpe na lisanzoli na Nzambe.12bandeko, sikawa nalingi boyeba ete makambo makwelaki ngai, nasungi kotambolisa sango malamu, 13Mpo ete bakengeli na ndako ya mokonzi, na basusu ebele, basi bayeli ete nakoti loboko mpo na kristo. 14Mpe ebele ya bandeko bazali kozua molende mpo na kotiela Mokonzi Yesu mitema, awa bazali komona ngai na boloko, boye bobangaka te mpo na kosakola maloba na Nzambe.15Ya solo, basusu, bazali kosakola sango na Yesu Kristo mpo bayokela ngai likunya, mpe koluka baleka ngai na mosala. Kasi basusu bazali kosakola yango na makanisi malamu. 16Bango basakolaka Kristo na bolingo, bayebi ete natiyami mpo na nzela ya kosakola sango malamu. 17Kasi basusu basakolaka sango ya Kristo na mitema mibale mpo na komilakisa. Banisi ete bakoki kobakisela ngai ba mpasi lokolo nazali na boloko.18Kasi, likambo te! Ata bongo na sepeli mpo na bango nionso oyo bazali kosakola sango ya Kristo, ata makanisi na bango masali mabe. Boye, nakosepela kaka. 19mpo ete, bazali kosambela mpo na ngai, mpe molimo ya Yesu Kristo azali kosunga nagi, mpe makambo nionso wana ekosuka malamu, mpe nakobika.20Naliki ete, nakoyoka soni ata moke te. Sikoyo lokola mikolo nionso, makambfu oyo ezali kokwela nga rkopesa Kristo lokumu ata soki nabiki to na kufi. 21Mpo ete, mpo na ngai bomoi ezali Kristo. Ata nakufi nazui bomengo kolela .22Kasi soki nazali na bomoi, nakoki kosala mosala ya ntina, bongo nayebi te keloko nini nakoki kopona. 23Mpo ete, makambo oyo mibale esilisi ngai mayele: nakufa mpo nazala esika moko na krsito, yango nde eleki malamu, 24Kasi, kotkala na mokili eleki malamu mpo na bino.25Yango wana nakoki kotia tembe te; nayebi ete na kokokufa te, nakotikala epai na bino nionso mpo bo ndimi na bino ekola mpe eyela bino esengo. 26Bongo, ntago na kozongela bino, bokozala na sengo mingi koleka mpo na ngai, na lisanga na Kristo Yesu. 27Bozala na bizaleli oyo elakisaka ete botosaka sango malamu ya Kristo. Boye, naya kotala bino nto naya t, nayoka ete bozali kaka na molende, bosanagni na makanisi moko, mpe bobunda na motema moko mpo na kondima oyo ewuti na sango malamu.28bobanga banguna na bino ata moko te. Moende na bino ekolakisa ete bozali kobunga, kasi bionpo bokolika; nyonso ekosalama na makasi ya nzambe. 29Mpo ete, bolamau nanye ekomisi bino bato ya Kristo: bosengeli kaka kondimela te, kasi komona mpe mpasi mpona ye. 30Bongo bokomi kobinda etombu oyo ngai mpe na bundaka, ndenge bomonaki liboso, mpe bozali koyoka sikawa na mosika.
21Nazo likia kati na bino, bompikiliki na Yesu ezali. Nazo likia lisungi kowuta na bolingo na ye ezali. Nazo likia bomoko na molimo ezali, nazo likia koyokana, mawa mpe bolingo na motema ezali kati na bino. 2Bokomisa esengo nagaï mobimba, nakozala na makanisi moko, bolingo moko, lokola bosangani na molimo, mpe na kozala na likanisi moko.3Bosala eloko moko te na moyimi to mpe komi kwakwa. Nzoka nde, bozala na komisokia, koyebaka ete basusu nde baleki bino. 4Boluka bobele bolamu ya bino mokote, kasi ya basusu.5Bozala na makanisi moko oyo ezalaki na Yesu Kristo. 6Azalaki na bo Nzambe, kasi azuiki te bokokani naye Nzambe lokola likumisi. 7Nzoka nde, amimonaki mpamba, azuaki lolenge ya mosali pamba, mpe abimaki pwasa na bato nionso. 8Amisokyaki mpe azalaki na botosi kino liwa, liwa ya ekulusu.9Nayngo, Nzambe atombolaki ye na bokonzi, mpe apesaki ye kombo eleki ba kombo nyionso. 10Asalaki bongo, na tina ete na kombo na Yesu, mabolongo nionso efukama na likolo, awa na nse mpe na nse na mabele. 11Bongo konta nionso etatola ete Yesu Kristo azali Mokonzi, afandi na nkembo ya Nzambe Tata.12Na bongo balingami, lolenge etosaka bino tango nionso, kaka na bozali bwa ngaï te, kasi sasaipi ata nazali te, bosala kaka mosala mpo na lobiko na binomoko, na bobangi mpe bolengi. 13Zambi ezali nde Nzambe asali kati na bino bolingi mpe bosali, bo elingi ye.14Bosala manso na koyima yima te, mpe kowunawuna. Bosala baongo mpo bokoma baye bazanga kebisama mpe na alima, bo bana na Nzambe oyo bazanga mabunga; 15Bosala bongo, mpo bo ngenge ba mwinda kati ya mokili, kati ya lobota na ya bato kiliki mpe ya masumu. 16bosimba ngbi liloba na bomoyi na tina ete nakwa tina ya bomikumisi na mokolo ya Kristo, na bongo nde nakoyeba ete na kilinganaki na lobango pamba, mpe nasalaki mosala na pamba te.17Kasi ata ko na mipesi bo likabo na mbeka, mpo na mosala, na bondimi na bino, nasengi mpe nazali kosepela elongo na bino. 18Se na lolenge yango, bosepela elongo lisusu mpe bosepela elongo na ngaï.19Kasi nazo likua kati na nkolo Ymbo esu, na tango moke, kotindela bino Timoté, mpo na ngaî kozua konzo, tango ekoyeba ngaï makambo matali bino. 20Nazali na moto mosusu oyo azali na nakanisi lokola ye, mpo azali na mpasi na motema mpo na biso. 21Mpo ete ba mosusu balukaka se maye matali bango, kasi oyo ya Yesu Kristo te.22Zambi bino, boyebi motuya na ye, mpo lokola elenge azali kosalisa tata naye, mpe ye wana kosunga ngaï na elanga na Nzambe. 23Nazo likya kotinda ye epaï na bino, soki bakati likambo na nagï na epaï na zuzi. 24Kasi, nazali na elikya na epaï na Mokonzi ztz ngaï mey nde nakomi kuna tango moke.25na moni tina na zongisela bino Epaphrodite. Azali ndeko na ngaï mpe moninga ya etumba, mpe mopalanganisi sango, mosali mpe lokola mpona kosunga ngaî. 26Eyokaki bino ete azalaki na bokono, oyokaki motema pasi mingi mpe mposa na ye ezalaki se aya epayi bozali. 27Azali na bokono ekasi mpe alingi kokata motema, kasi Nzambe ayoki ye mawa, ye moko kaka te, na ngaï mpe lokola, mpo nayoka monyonko sima na monyoko te.28Natindi ye epaï na bino, mpo ekomona bino ye , bozala na nsayi mpe ngai mpe ngayi nakomitungisa mingi lisusu te. 29Boyamba na bondeko Epafoladite kati na Mokonzi, na sengo nionso, bopesa lokumu na bato lolenge na bango. 30Mpo alingaki kokata mtema mpo na mosala na nkolo, alingaki kokufa mpo na kosalela ngaï mpe na naye bokoki kosala te na mosala na nkolo elongo na ngaï.
31Nayango ba ndeko, esengo na biso ezala kati na Mokonzi. na lembi te kokomela bino kaka makambo yango. yango nde eko bikisa bino. 2Bo keba mpona ba mbwa mpe basali ya mabe, bokeba na bakati ngenga ya lokuta. 3Mpo ete biso nde bakati ngenga ya solo, mpe to kongumbamelaka Nzambe na molimo. Biso baye tozui lokumu kati na Yesu Kristo, Mpe elikia na biso ezali na nzote te.4Ngaï mpe na kokaki mpe kolikia na nzoto. Soki moto akanisi ete ebongi naye kolikia na nzoto, lokola nga mpe. 5Na katamaka ngenga mokolo ya muambe, mu Isalela, libota ya Benzamini, Hebeleo ya Hebelelo, mpona mobeko ya ba Pharizayo.6Na komikumisa na tembe te, mobebisi na linomba na tina na mobeko. 7Mpona Yesu Kristo, oyo ezalaki litomba mpona ngaï, na tali yango lokola kobungisa.8Natina na kitoko ya boyebi kati na Mokonzi Yesu Kristo, Mpe na tali nionso ya kombugisa mpe lokola poto - poto, nayango na tiki nionso mpona Kristo. Mpona yende na tika makambu nionso. Nazali komona yango lokola mbindo, kaka mpona yamba Kristo. 9Mpe kozala kati na ye. mpona sembo ezali mpona boyengebene na ntina na mobeko te, kasi oyo na zui na kondima kati na Yesu, boyengebene ewuti na Nzambe na kondima nde na ndimami na ye. 10Sasaipi nalingi na sosola nguya ya lisekua na kristo, mpe bomoko ya ba mpasi naye. Nalingi na mikokisa na liwa ya kristo, mpona lolenge moko. 11Mpo ete na longa kati na lisekwa kati na ba weyi.1214Ezali te ete na kui makambo mango, napetolami nanu te mpe nazui motole te nde nazo pota bangu ete nazua yango mpo ete ngaï mpe na simbami na Yesu Kristo. 13Bandeko, nazo kanisa nanu te ko simba yango. Kasi nazo kanisa boye: Kobosana nionso oyo eleka mpe natala mpona oyo ezali liboso, Nazo kima na lombango mpona tina, mpo nazua motole na bomoyi na Nzambe katina Yesu kristo.15Na kyango biso baye banso to kembi, to zala se na likalisi moko, soki bokokanisa lolenge mosusu Nzambe mpe ako lakisa na lolenge na esika wana. 16Nayango, na esika biso tokomi, totambola lolenge moko.17Bandeko, bomekola ngaï, botala se baye batambolaka engebene lolenge na biso. 18Mpo ete bayike kati na bino batambolaka lokola bayini na ekulusu na Kristo, eko loba ngaï boye pisoli etandi ngaï na biso. 19Mbanu na bango ezali be libebi, mpo ba salelaka kaka libumu na bango, ba pesi lokumu na oyo ekosala soni na bango. Bakanisaka kaka makambo ya mokili.20Biso tozali bayi likolo, kuna tokozela mobikisi Mokonzi Yesu Kristo. 21Ako bongola nzoto na biso ya soni, mpe kowulanisa yango na Nzoto naye ya nkembo, oyo esalami na bokonzi na nguya mpona kokonza makambu nionso epayi naye.
41Yango wana bandeko nanga, ya bolingo, esengo na ngai mpe lokumu na ngai, botelema ngbi kati na Mokonzi. 2Nasengi Evodie mpe Syntyche, kokota na lisanga na Mokonzi. 3Na biangi yo masuwa kosunga bango mpo bapesaki ngai maboko na lotomo ya kopanza sango malamu nzela moko na clemen, mpe na ndambo ya ba masuwa oyo batikalaki oyo kombo na bango engulutami na buku na bomoi,4Bosepelaka bobele bongo kati na Mokonzi yesu, nabandeli Bosepela. 5Mokonzi akomi pene, bopolo nayo eyebana na bato nionso. 6kobanza banza te, kzsi na manso na mabondeli mpe kotonda Nzambe, toyebisa nzambe ba posa na biso. 7Mpe kimia na Nzambe, oyo eleki mayele nionso ekobatela mitema na bino, na makanisi elongo na Kristo yesu.8Na oyo etikali, nionso kitoko, ya malonga, ya bosembo, ya peto mpe elingisami, ya lokumu, mpe soki eloko ya malamu ezali, soki eloko ezui mbano, ebongi na kosanjola , kanisa makambo wana. 9Botikala ngbina biloko bozuaki, boyokaki, mpe bomonaki epai na nga, bokela yango, mpe bokozua kimia na nzambe.10Natondi na esengo kati na Mokonzi sik'awa mpe kozwa lisusu bolamu oyo bolakisi mpona ngai, bokokaki, kokokisa tina ba bino pona ngai, bolakisa kokela yango kasi bozwaki nzela te. 11Ezali mpona bosenga na ngai te nde nalobi, kasi na lolenge nazali. 12Nayebi lolenge yakozala na bosenga , to kozala na na bozui, na kati na makombo nionso, na yebi sekele kobika na eleko na bozwi tobozangi. 13Manso nakoki kosala kowuta na makasi naye.14Na bongo, bosalaki malamu kosunga ngai na mikakatano nazalaki na yango, Zambi elongwaki ngai na macedoine, ata lingomba moko te esungaki ngai. 15Bobele bino ba ndeko ya mbonka Filipe. 16Tango ezalaki ngai na thesalonik, mpona bosenga na ngai, lisungi ewuti nde epayi na bino. 17Nazalaki koluka bopesangai eloko te, bobele kokumisa bolamu bosalaki.18Nazui manso botindelaki ngai epai ya ndeko Epafodite, nakokelela lisuste, Zambi biloko wana bizali lokola malasi na soslo kitoko mpe mbeke oyo endimani na nzambe. 19Bongo Nzambe nangai akobakisa na bosenga na bino, bozui kowuta eapi naye, na nkembo na yesu kristo. 20Sasaipi, nkembo ezonga libela na nzambe Tata na biso Amen.21Bopesa Mbote na mosantu moko na moko. kati na kristo yesu. bandeko nionso oyo baza na ngai batindeli bino mbote. 22Basantu nionso batindeli bino mbote, mingi na ndako na Cesar. 23Ngolu na Mokonzi yesu kristo ezala na bino nionso Amen.

Colosiens

11Polo, ntoma ya Klisto, mpe ndeko na bisoTimote, 2mpe ba ndeko ya molende oyo bakangamaka na Klisto. Tika ete ngoliu ezala na bino mpe kimia ya Mokonzi Nzambe, Tata na biso. 3To tondi NZambe, Tata na Mokonzi Yesu Klisto, mpe tozali kobondela ntango nyonso na biso.4Pamba te, toyebi lolenge kondimela Klsito Yesu mpe kolinga ba bulami nyonso. 5Bozala na bolingo yango na ntina na elikia ebombani na likolo mpo na bino. Boyokaki mpo na yango liboso na liloba na solo na nsango malamu, 6oyo ekomi epayi na bino, ezali kobota mbuma mpe kolangana molongo mobimba. Ezali mpe bo bobele bongo epayi na bino, longwa mokolo wana eyokaki bino mpe eyebaki bino ngolu na solo ya Nzambe.7Boyekolaki yango epayi na Epafala, ye mosalami na biso ya bolingo. Azali mosali na Klisto na sembo mpo na biso. 8Ayebisi biso mpo na bolingo na bino kati na Molimo.9Yangonana , banda moyokaki biso mpo na bolingo yango , totikaki kolandela mpo na bino te, tokosenga ete botonda na nzebi na mokano na ye, na mayele nyonso mpe na bososoli na Molimo. 10Na bongo, tozali kokobisa na mabondeli mpo botambola na sembo na Mokonzi mpe bosepelisa ye na makambo yonso. Boboto mbuna na misala nyonso malamu, bokola mpe na koyebaka Nzambe.11Tika ete nguy na ye ya nkembo ekembisa bino na makasi yonso ete boyika mpiko mpe bozala na mitema pete esika moko na esengo. 12Botonda Tata, ye oyo abongisi bino mpo na kozwa likabo na bino na libula na babulami kati na moyi.13Ye akangoli biso longwa na nkanga na molili mpe akotisa biso na bokonzi na Mwana na ye na bolingo. 14Kati na Ye tozali na lisiko, na yango tolimbisami masumu.15Ye azalaki elilingi na NZambe, oyo akomonanaka te. Mobotami na liboso ya biloko bizalisami. 16Mpo ete kati na ye biloko bizalisamaki, ezala ya likolo mpe na nse, biye bikomonana mpe biye bizangi komonana, na kati na mikonzi , bileko biso bizalisamaki na maboko na ye, mpe mpo na ye. 17Azalaki liboso na biloko biso, mpe biloko biso bizali eloko moko kati na ye.18Azali moto na nzoto, yango Lingomba. Azali ebandeli mobotami na loboso kati na biloko biso. 19Mpo ete, Nzambe asepeli ete litombe na bonzambe efandi kati na ye, 20mpe kozongisa boyokani na biloko biso epayi n aye, na nzela ya Mwana, wana esili ye koyeisa kimia mpo na makila na ekuliusu na ye ete azongisa biloko biso na bondeko na ye, soko soko biloko na nse, soko biloko na likolo.21Na bino lokolo, bozalaki liboso bapaye mpe bayini kati na makanisi na bino mpe na misala na biso mabe. 22Kasi sikawa, asikoli bino mpo na kufa na ye ya mosuni , egte akomisa bino babulami liboso na ye, awa ezangi bino litono mpe lofundo. 23Soki bongo, etelemi bino ngwi na kondima lokola moboko, mpe soko bobongwi te na kolikiaka sango malamu eyokaki bino. Sango yango esakolami na bato banso, na nse mpe na Likolo. Ngayi Poloi nakomi mosaleli na yango.24Sasayipi, nasepeli mpo na bolozi bozui ngayi na ntina na bino. Nazalaki kkotondisa maye mazongi na mpasi na Klisto kati na mosuni na ngayi mpo na nzoto na ye, yango Lingombe. 25Nakomi mosali na Lingomba. Nzambne apesi ngayi lotomo ya koyebisa bino polele liloba na ye. 26Liloba yango ezali likambo libombamaki epayi na babumali na ye. 27Nzambe alingaki kayebisa bango motindo ya pozui kati na nkembo ya mabombani solo kati na bapakano. Klisto mpo na biso, Elikya ya nkombo ekoya.28Ye nde tosakoli. Na bwana yango tolendisi pe toteyi bango, mpo ete totalisa baonso ete bakoki na Klisto. 29Na yango, na nguya na ye ezo sala kati na ngayi nde na bundi mpe na sali mosala na ngayi.
21Mpo ete ngayi nalingi boyeba bitumba monene nazali na yango mpo bino la Loadicée mpe pona basusu oyo bamona nayino te. 2Nazali kosala mpo na kulendisa mitema na bino ezala na ndenge bosali lisanga ya bolingo pe na kati ya bozui yonso oyo etondisama solo na bososoli na meyele oyo Nzambe alombi na nguya na ye na Yesu. 3Abombi bomengo yonso na bwanya pe boyebi.4Nayebisi bino mpo ete moto moko azimbisa bino te na maloba na ye . 5Atako nazali kati na bino penepene na nzoto te, kais na molimo nazali na bino elongo. Pe na kusepela na esengo na motema mpo na mwango pe sembo na bino ko monana ba ndimi ya solo ya Klisto.6Ndenge bondimela Klisto Mokonzi na motema moko botambola ebongo na ye. 7Bolengisama na kundima na bino, bozalaka na ntina na bino kati na ye, botongana likolo na ye lokola boko bolembisana na bondimola ndenge boyekolaki, botonda matondo ya solo.8Bozala na bokebi, mpo ete moto te apunza bino na maloba na ye na mayele, na bilanga bonya na ye mpo bobosana Klisto te. 9Zambi litondo mobimba na Nzambe ekofanda na ye na motindo ya nzoto.10Bisili kokoka penza na ye. Azali Mokonzi ya nguya nyonso mpe bokonzi nyonso. 11Na bokatani ngenga na ekateli na molokote oyo ekolongola mosuni na nzoto kasi na ekateli ya Klisto. 12Bokundami na bino esika moko na libatisa, bosekwi na ye na kondima kati ya nguya ya Nzambe oyo asekwisi ye na bawa.13Tango bakufi mpo na nambi na bino pe kati na bokati na nzoto na bino ye amemaki bino na bomoyi pe asekwisi bino na kondima kati ya nguya ya Mokonzi oyo asekwisa Klisto na baweyi. Pe alimbisi biso na mabe yonso oyo basala. 14Alongolaki busambusa na nyongo pe miboko oyo ekomamaki mpo na biso, liobela na libela pe alongolaki yango nzela pe akangaki yongo na n zete ya ekulusu. 15Alongolaki mikolo mpe mikonzi pe atalisi bango polele lokola eloko pamba alongaki biloko na bango nyonso na ekulusu.16Bongo moto moko te asambisa bino na tina ya bileyi na ntina ya bimeli, soko na ntina na elaka na elamba, soki na sanza, sokona Sabbat. 17Makamnbo nyonso ezali elilingi oyo ekoya mpe ekozala kaka elilingi, nde eloko ya solo ekozala bobele Yesu Klisto.18Botikela te moto oyo alingi bosoto abotola bino libonza bozuaka. Moto ya lolenge wana bakotaka kati na bileko bazali komona pe bakumaka lulendo na makanisi ezanga ntina. Ye akanisaka na mayele ya bomoto te. 19Bokangama na bato te mpo na nzoto kasi nzoto mobimba ekolaka na kokola na Nzambe. Esali yango koleyisama mpe kokangama na matonga mpe bikongameli na yonso.20Soki bokufeli makambu mike-mike na mokili na Klisto. Mpona nini boko tambola lokola bato ya mokili? Pona nini boko yambaka mibeko ya mokili? 21Bosala yango te, bomeka yango te , bisimba pe yango te. 22Yonso oyo ezali kopesa mpona bisaleli na mateya pe mobongisi ya batu. 23Mobongisi ya motindo wana ezali kolakisa mayele mabe n a ntina nasalami na moto ye moko ozwa mingi pe kotindo ye bobele na nzela ya kosala malako ya mabe kasi yango ezali na ye bomoto te ata moke na nzoto ya bomoto eloko te.
31Lokola bosekwi sa maki na Klisto, boluka bamoyi ya bokesani, na lolenge ya Klisto oyo afandi na loboko ya mobali na Nzambe. 2Nakanisi na bino bobele na ya, kasi na mokili te! 3Kanisa bo, bosila kokufa, bongo Klisto abombi bino kati na bo Nzambe. 4Mokolo ye akoya, bino mpe boko monana elongo na nkembo na ye.5Bo boma ba posa yonso ya mokili, lokola (Kindumba, makambo ya nsoni, posa ya mabe, lokosa ya mbongo, losambo ya bikeko). 6Kanda ya Nzambe ezali ko dasuka likolo ya bato basalaka makambno motindo mana. 7Tala etamboli mabe bozalaki na yango kala, ya kosalela mambi mawa. 8Na boyo esengeli bosundola mambi yango (Nkele, kosilika, kotongo, kotukana, makanisi mabe, Matinga, kobuka lokuta, eyokana na maloba ya bino te).9Bobukanaka lokuta te, zambi misala mpe bizaleli ya kala bobwaka yango. 10Bolatisami na bwanya ya moto ya sika, ko longobana na elilingi ya mokeli na ye. 11Na yango, ba Grec bazali te ata ba Yuda, ata mokati ngenga, to bakati ngenga te, basukutu te, baombo te, bansomi mpe te, kasi banso liboke moko nse na kati na Yesu.12Lokola ba ponami na Nzambe, mpe balingami kati na bosantu, bolatisama na mitema na mawa, boboto, komisokia, kimia, koyeba kokanga mitema. 13Boyokanaka mpe bolimbisaka kati na bino. Soki moko na bino azali kodosa mosusu, bolimbisana, lolenge bino bolimbisamaki na Mokonzi. 14Na makambo yonso, bolingo ya solo ekonza bino.15Tika mitema na bino mitonda na kimia na Klisto. Nde boye bobiangami kazala nzoto moko kati na kimia bozala na matondi. 16Bomengo ya maloba na Klisto ezala na bino, b oteyaka mpe bomipesaka toli kati na bino, na buanya, na masanjoli mpe na nzambo ya Dawidi, boyembela Nzambe na masanjoli. 17Na manso bosali na maloba mpe misala, eza na kombo ya Mokonzi Yesu, mpe botanda Nzambe.18Nalolenge elongi bani na Mokonzi, basi botosa mibali na bino, 19Mibali bolinga basi na bino na kongalela bango te. 20Bana botosa baboti bwa bino, mpo yango ezali siki-siki kati na Mokonzi. 21Ba tata , bolembisaka mitema mia bana na bino, na mutumoli ma bino22Bongamba, botosa ba konzibwa bino ya misala, kati na sembo , na miso ya lokuta te, mpe mpo bosepelisa bango te, kasi na motema sembo ya kobanga Nzambe. 23Soki bajali kosala , sala na esengo boyende Mokonzi na yo na bokeseni na bato yonso. 24Boyeba ete boko sangola libula na maboko na Mokonzi. Bozali kosalela nde Mokonzi Yesu. 25Pamba te, moto yonso azali sembo te, ako zua mbano na ye, kokakola ezala te.
41Mokonzi bopesa lifuta lilongobani bayeba ete bino mpe bozali na oyo ya bino na lola.2Boyika na mabondeli. bazala ekenge na mabondeli mpe misala malamu. 3Na lisanga bobondela mpo na biso lokola, mpo Mokonzi afungola nzela na tina na liloba, mpona koloba polele polele kati na Klisto. Najali na boloko na tina na liloba yango. 4Bobondela ete ntango najali koteya , mayele efungoana.5Bobebisa ngonga te, botambola na buana liboso na ba oyo bajali na bino elongo te. 6Tika maloba na bino etonda ngolu, esangiosana na monana , na ntina ete boyeba koyanola bino na bino na bolamu banso.7Mpo na maye matali ngayi, ndeko Tychique nde ayebisi bino mango , Zambi azali ndeko molingami mosali ya sembo mpe mongamba lokola ngayi kati na Mokonzi. 8Na motindi o nteyi ya bino mpo apesa bino ba sango na biso apesa bino mpe bompikiliki lokola. 9Na motindi elongo na ndeko Onesime, moto na sembo mpe molingimi oyo ozali wa bino ndeko. Na mbisa nde akoyebisa bino, maye manso maleki awa.10Masuwa mpe moninga na ngayi ya boloko , na kombo alisataki, apesi bino mbote elongo na malako ndeko na Barnabas (mayende bazwaki mitindo kowuta na biso, bomoyamba malamu,) 11mpe ndeko Yesu oyo tobengaka Justus. bango bana ba yuda bakatema ngenga oyo basalaka elongo na ngayi mpo na bakonzi bwa Nzambe, bazalaki lisungi monene mpe lipemi mpo na ngayi.12Ndeko Epaphrase apesi bino mbote, azali moko kati na bino mpe mongamba na Yesu Klisto, akobunda tango inso na mabondeli mpona bino, bino, na tina ete botikala ngbi mpe na elikya makasi na kati na mokana na Nzambe. 13Na tatoli mpo na ye bboye, akosala na bokasi banso mosala mpo na bino, mpo baye ya Laodisé, elongo na baye ba Hiérapolis. 14Luka monganga mpe molingami elongo na Demas ba pesi bino mboto.15Bopesa mbote na balingami o mboka Laodicée mpe Nymphas elongo na nalingo bye ezali o ndako na ye. 16Ekotanga bino mokanda maye, botanga yango mpe na lingomba ya Laodisé, pela moko kotango oyo ekomi bandeko ba Laodisé. 17Baloba na Archippe, «Azala na bokebi mpe botosi na lotono azui wuta na Mokonzi, mpe akokisa mosala mwango bo esengele».18Losako eye kokomami na loboko na ngayi moko Polo, bokanisa inso boloko mpe minyololo na ngayi. Ngolu ebila bino

1 Thessaloniciens

11Polo, Silvain, et Timothée na Etonga ya Thessalonique kati na Nzambe tata mpe Mokonzi Yesu Klisto. Ngolu mpe kimia elata bino mbaso.2Tozali kotondo Nzambe tango inso ngonga tozali kobondela mpo na bino. 3Tozali kokanisa mbala inso liboso na Nzambe Tata na biso, Konzo na bino na kondima, bolingo na bino makasi mpe mopikiliki, na molende ya bokangemi na bino manso matali mokonzi Yesu Klisto4Baninga toyebi solo Nzambe alingi bino mpe apona bino, 5ntina sango malamu oyo tomemeli bino kaka na maloba te kasi na kolikia makasi nguya ya Molimo Mosantu. Lolenge moko boyebi lisungi nini oyo biso tozalaki kati na bino.6Boye bino bokomi ba mekoli na biso mpe ya mokonzi lolenge boyambaki sango malamu nkati ya mikakatano makasi kasi na esengo kowuta na Molimo Mosantu. 7Bokomi bango nolakisa na kondima po ya boye mbanso ya mboka Macedoine mpe Achaie8Pamba te kowuta na bino maloba ya mokonzi ezuaki mpifo kaka na mboka Macedoine mpe na Achaie te. Nzoka nde bipayi mbiso kondima na bino etambolaki yango wana tozali na tina ya kobelela yango te. 9Mpo ete bango moko batalisaki ba pete nionso toyingelaki epayi na bino. Batalisaki lolenge nini ya boyambi na bino epayi ya Nzambe na bosundoli binzambe nzambe pona kosalela Nzambe ya solo oyo azali na bomoi. 10Bozali kotalisa ete bozali kozela bozongi ya muwana na ye oyo asilaki kosekwisa kati na bakufi. Ye nde Yesu oyo azali kosikola biso na kanda oyo ezali koya
21Na bongo boyebi bino moko, ba ndeko boyeyi na biso epayi na bino ezalaki ya pamba te. 2Bo monaki bino moko ndenge to monaki pasi mpe minyoko ya soniu na mboka ya ba Phillipe. Tozuaki elikia na biso kati na Nzambe, mpona kosa kola sango malamu ya Nzambe kati ya ebele ya bato oyo bayokanaka te.3Na bongo lilendisi ya biso ezali ya kokosa te, mpe ya bosoto te, mpe ya lukuta te. 4Nzokande na ndenge oyo biso tondimisami na Nzambe mpo na biso sango malamu oyo tozali koloba. Tozali koloba mpona kosepelisa bato te, kasi kosepelisa Nzambe. Ye nde ayebi mutema na biso.5Na bongo biso tolobaki maloba ya losepelisa bato te, ndenge boyebi ata na mayele ya kolula, Nzambe azali molobeli na biso, 6mpe to lukaki nkembo ya bato te, oyo ewuti na bino to na ba mosusu, biso to telemelaki lokola ba toma na Klisto.7Nzokande, tozalaki na kati na biso lokola maman ayangelaka bana na ye. 8Nse bongo, tozuaki sayi pona bino ko kabola na bino sango malamu kaka te, kasi pe bizaleli na bino, na bongobokomaki na motuya pona biso. 9Na bongo bazo kanisa bino moko, ba ndeko, mosala na biso mpe pasi na yango. Tosalaki kosali butu mpe moyi, na tina komemisa bato mukumba na biso te. Na tongo wana, tozo teya bino liloba na Nzambe.10Bozali ba nzengeleke, mpe Nzambe ye meyi ayebi, ndenge tomi batelaki kozala bule, sembo mpe na tembe te liboso na binop boye bondima . 11Na lolenge wana, bino moko boyebi ndenge kani tozalaki okati na bino ndenge papa azalaka na bana, tolendisaki bino, mpe to pesaki bino longonya. 12Biso tolobelaki bino na ndenge bokoki to tambola na lolenge ekoki na Nzambe, oyo abenga bino na bokonzi mpe kembo na ye.13Na tina wana, tozongisi matondi na Nzambe tango oyo boyambaki kowuta na biso sango malamu ya Nzambe , bo ndimaki yango te lokola maloba ya bato. Nzokande bondimi yango na lolenge ebongisami, liloba ya Nzambe. nde maloba oyo ezali kosala mosala kati na bino bandimi.14Kasi bino baninga, bozo kokana komekola biso lokola ekelezia ya Juda kati an Klisto Yesu, pamba te bo moni bwale lokola baninga na bino ya liboso, oyo ba kemba epayi ya ba Yuda. 15Ezalaki ba Yuda nde baboma Mokonzi Yesu elongo na ba basakoli. Ezalaki ya Yuda nde ba benganaki biso. Bazalaki kosepelisa Nzambe te. 16Bazali kutu kopekisa biso koteya bato mosusu te oyo ba Yuda, po ete bango babika te. Kanda na Nzambe ekokitela bango na mokolo ya suka.17Mwa tango moke tokabwanaki na bino, kasi na motema te. Tozalaki na posa monene na motema komona bino. 18Bongo tokanaki koya epayi ya bino na Polo, kasi mbala o mbala, kasi zabolo akangeli biso nzela. 19Bongo wapi elikwa na biso na mikolo ekoya to esengo, to motole ya lukumu liboso na Mokonzi Ysu na bo zongi na ye? Ezali bino te, lokola ba susu? 20Bongo bino bozali nkembo mpe esengo na biso
31Na yango, toko kaki kokanga motema te, to monaki ete ezalaki malumu ko tikala biso moko na Athenes. 2Boye to tindaki bapanzi sango malamu na Mokonzi, mosali na Nzambe Timothe mpo na kolendisa mpe ko yeyisa bino makasi ayengebene na bo ndima na bino. 3Tosali boye mpo ete moto te azala na mikakatano na boyambi mpe bo yebi bino moko ete tobiangami mpo na yango.4Solo tango tozalaki na bino , toyebisaki bino ete toko niokama kati na kati nakomi tungisa boyebi ete ekomaki. 5Na tina wana, na kokaki kokanga motema te mpo na ko zela, na zalaki koyaka bondimi na bino ta mosusu momeki, ame kaki mosala na bino ete ezali pamba.6Tango akomaki epayi na bino amemelaki bino ba sango malamu na bondimi mpe na bolingo na bino. Alobaki ete bino bozali kokengela makambo malamu na biso. Mpe bozali na mposa ya komona biso; lokola biso mpe tolingi yango. 7Na boye, ba ndeko mibali, na kati na mawa mpe mpasi, tolendisamaki na bino na tina ya kondima na bino.8Sika oyo tozali kobika, soko bokangami makasi kati na Mokonzi. 9Bongo, na ndenge nini tokoki kopesa matondi na Nzambe mpo esengo oyo tosengeli komonisa liboso na ye. 10Butu mpe moyi, tozali kosambela ye na makasi koleka mpo amonisa biso elongi na bino mpe kobakisa oyo ezangi na bondimi na bino.11Tika Nzambe na bino mpe Tata ye moko, mpe Mokonzi Yesu ba talisa nzela na biso. 12Tika mokonzi akolisa bino mpe afulikisa bolingo kati na bino na ba misusu mpe na batu yonso, lokola tozali kosala mpo na bino. 13Asala bongo, mpo kolendisa mitema na bino mpo ezala kozanga mbeba na basanto liboso na Nzambe mpe Tata na bozongi na Mokonzi Yesu na ba santu yonso.
41Bongo ba ninga tozali ko yikisa mpiko pe ko lendisa bino na kombo ya mokonzi Yesu. Bo boyekolaki na biso lolenge ya kosepelisa Nzambe; nde yango bozali ko landa. Bo koba bango. 2Boyebi mitindo topesaki bino ko wuta na mokonzi Yesu.3Jambi mokonzi alingi bo peto na bino, bo boya kindumba, 4moto na moto abatela nzoto na ye peto po na lokumu. 5Bo mikaba na ba posa ya mabe te (lolenge ba yeba yebi Nzambe te). 6Moko te akosa to asala moninga mabe. Pamba te mokonzi a ko pesa etumbu na ba tomboki lolenge to lobaki na bino.7Nzambe abengaki biso na bosolo te kasi na bopeto. 8Yango wana moto oyo ako boya mateya oyo aboyi pe Nzambe oyo apesaka Molimo Mosantu.9Pona oyo etali bolingo na bino na bino, ezali na tina te ba teya bino yango, Mokonzi ye meyi ateyaka bino yango. 10Longonia po na oyo bozali kosala pona ba ninga ya Macedoinepe bo yika mpiko na kosalaka bango koleka. 11Bo sepela kovanda na kimia, ko sala misala ya maboko na bino pe ko tala misala na bino moko, bo topesaki mitindo. 12Bo sala bongo po ete bo tambola kati na sembo na bo tosi liboso na ba ninga oyo nanu bo ndimeli te pe bo kelela te.13Ba ninga toyoyi ete bozala na bulu yeke pona ba kufi po ete bozala na mawa makasi te lokola bato oyo ba zangi elikia pona maye na makoya lobi. 14Soki to ndimi ete Yesu akufaki pe asekwaki, to ndima pe ete Nzambe akosekwisa pe ba oyo ba kufaki kati na Yesu. 15To yebisi bino na mitindo na mokonzi ete baye bazali na bo moyi, bazali kozela bo zongi na mokonzi, ba ko netwama liboso na ba oyo ba kufaki te.16Pamba te mokonzi ye moko ako zonga ko wuta na likolo, ako ganga na mongongo ya anzelu pe kelelo ekobeta, boye ba Klisto bakufa bako sekwa liboso. 17Bongo biso ba Klisto toko netwa pona kokutana na Mokonzi na mapata pona libela. 18Bolendisa bango bino na nzela na maloba oyo.
51Sika oyo, mpona oyo etali ngonga mpe bileko, bandeko ba koti tokomela bino te. 2Po ete boyebi malamu mokolo na Mokonzi ezali koya lokola moyibi na butu. 3Tango ba koloba: "kimia mpe bokengi ezali," nzokande libebi ezako yela bango. Lokola mpasi ya kobota ya mwasi.4Kasi bino ba ndeko, bozali kati na molili, mpo ete ozuama lokola moyibi. 5Kasi bana ya moyi, mpo tozali bana ya butu te. 6Lokola tozali bana ya moyi tozala ekenge. 7Mpo ba oyo ba lalaka balalaka na butu.8Mpo ete tozali bana na moyi, tomi batela, to lata ekoti ya kondima, mpe bolingo. 9Mpo ete Nzambe abengaki biso mpo na kanda te, kasi mpo na kozua na nzela ya Mokonzi Yesu. 10Oyo akufaki mpona biso, mpo ete tobika elongo na Mokonzi na biso Yesu Klisto. 11Mpo na yango bolendisama mpe bopesana mpiko moko epayi na moninga na ye ndenge bosalaka.12To sengi na bino bandeko, botosaka bato oyo bazali ko kamba bino na nzela ya Mokonzi mpe bazali koteya bino. 13To sengi na bino mpe bozala na bolingo makasi epayi na bango mpo na mosala oyo basalaka, bozala na kimia kati na b ino. 14To sengi na bino bandeko, bokebisa bato na goyi-goyi, boyikisa mpiko na bato ya kobanga bosunga bato pete, bozala bato na motema molayi epayi na bato nyonso.15Bo keba ete moto moko te asala moninga na ye mabe, kasi boluka tango nyonso kosala malamu epayi na bato nyonso. 16Bosepelaka tango nyonso. 17Bobondela na kotika te. 18Bo pesa Nzambe matondo mpona makambo nyonso. Mpo yango nde makambo Nzambe asengi ete bosala kati na Nkolo Yesu.19Bokanga mosala ya molimo te. 20Botiola masakoli te. 21Kasi bomeka makambo nyonso, bongo bokangama na oyo ya malamu. 22Bo kengela makambo nyonso ya mabe.23Ekoki Nzambe na kimia azalisa bino bato na ye. Ekoki Molimo na yo nyonso, motema mpe nzoto ezanga bo soto kino Nkolo Yesu akozonga. 24Moto oyo abengi bino azali sembo mpe ezaye nde akosala.25Ba ndeko, bobondela mpe mpona biso. 26Bopesa bandeko mbote ya esengo. 27Nasangi na bino kati na Mokonzi ete mokanda oyo etangama na ba ndeko nyonso. 28Tika ngolu na Mokonzi Yesu Klisto ezala na bino nyonso

2 Thessaloniciens

11Makomi kowuta epayi na Paul, Silvain mpe Timotheé mpona lingomba na ba tesalonika mpona tata Nzambe na yesu Klisto. 2Ngolu mpe kimia na Nzambe mpe Mokonzi Yesu Klisto ezala na bino.3Ebongi na biso kozongisa matondi epayi na tata Nzambe mpona bino bandeko. Esili koyebana te kolingana katinabino na bino esili kokola makasi mpenza. 4Mpona yango, tozalikosolola na tina na bino na kati na lingomba ya tata Nzambe na lolendo yonso. tozali ko tongo bino na ndenge bozali koyika mpiko kati na buale mpe mikakatano mpe kondima na bino ezali kowumela, tozali kolobela na tina na minyoko oyo bozali kokemba. 5Ezali solo elembo mpe sembo ya esambiselo ya Nzambe na suka ya makambo nyoso, nde bokozuama na lukumu na kati na bokonzi ya Nzambe mpo bonyokwami na tina na yango.6Na sembo mpenza, Nzambe akonyokolo baye bazali konyokolo bino. 7Mpe akolendisa baye bazali kati na bwale lokola biso . Akosala nyango na eleko Mokonzi Yesu akobimela biso na pwasa na likolo elongo na bangelu na likolo mpe na bokasi nyonso. 8Na kati ya moto ya kongenge makasi, akozongisa mabe na ba oyo bayebi Nzambe te mpe baye bayambi nsango malamu ya Mokonzi Yesu te.9Bakonyokwama na etumbu mpe kobebisama ya libela mpe kobengana mosika libela na libela liboso ya Yawe kati na kembo na bokonzi naye. 10Akosala yango ntango ekozonga ye lisusu mpo akumisama na baye yaye, bakosanzola ye, mpo badimi mbela naye.11Mpona yango, tozali ko sambela ntango nyoso mpo na bino. Tosambela mpo Yawe ayamba bino solo lokola baponami naye, tozali kosambela mpo Ye akokisa mposa ya bolamu ya misala kodima ya nguya. 12To sambela na lolenge te kombo na Mokonzi na biso Yesu ekumisama na bino. To sambela mpo bino bokumisama ne ye, mpona ngolu na Yawe na biso mpe Mokonzi Yesu Masiya.
21Sika oyo, tosengi na bino na parade ya Mokinzi na biso Yesu Klisto, ekosalama elongo na biso. 2bozala komitungisa te na makanisi, na molimo, na maloba to na mukanda mpo na kodimisa bino te koya na Mokonzi ebelemi.3Moto akosa bino te ata ndenge nini, mpo yango ekosalama te kino ekoya komekama, moto azangi mibeko amonana na muana ya libebi. 4Oyo akotosa te to akotomboka na baye bazali kobiangama Nzambe mpo ba kumisa ye, na yango bazali kofanda na kati ya biyangamele ya Nzambe mpo bomonisa banga lokola akomi Nzambe.5Bokanisa ete nayebisaki bino makambo oyo ngonga nazalaki na bino? 6boyebi sikoyo ezali kopekisaye na lolenge ete amimonisa na ngonga ekoki. 7Mpo ete mabombami ya kozanga kotosa esili kokoma na misala, kaka moto moko asimbi yango kino ngonga oyo ye akolongua na nzela wana.8Mpo na yango, oyo akotosa mibeko akomimonisa polele. Monkonzi Yesu akobuma ye na mopepe ya munoko naye. mpe akokumisa se moto pamba na kokanisa koya naye. 9Motomboki akoya na nzela ya kmisala ya zabolo na nguya inso na bilembo ya lokuta mpe bikamuiseli ya lokuta. 10Na kokosa kozanga bosolo, biloko biye bikozala nsolo te pamba te mpo bambi bolingo ya baye bakobunga, mpo ete mbabikisama.11Natina na yango, Mokonzi akomema etumbu ya kobungisa na tina ete badima lokuta. 12Mabe ete bakosambisama, baye banso bandimaki te bosolo, kasi bazui ngolu ya kosala mabe na kozanga sembo.13Kasi topesi nglolu na bandeko baye bazali kati na Nkolo, mpo ete Nkolo aponi bango lokola mbuma ya liboso ya bokonzi na Nzambe na kati ya kubulisama na molimo mpe kondimama ya solo. 14Mpo yango ebiangi bino mpo na tina ya sango malamu, mna tina ya koyamba nkembo ya Mokonzi na biso yesu klisto. 15Na yango molingami, kanga makasi, simba kodima oyo bateya yo na liloba na biso to na mokanda na biso.16Sik'oyo ete Mokonzi na biso Yesu Klisto ye moko na Nzambe Tata na biso oyo alingi mpe apesa biso molende ya libela, mpe bolingo na ye na tina ya ngolu ekoya. 17Bolendisama mpe bobongisa mitema na bino na kati na misala nyanso malamu mpe na liloba naye.
31Sasa ipi bandeko, bobondela pona biso, tina ete maloba ya Monkonzi mateyama na lombango mpe masanzolama, ndakisa kati na bino. 2Bobondela na tina ya basikolami na biso na bato ya nkanja mpe mabe mpo bango nyonso bazali na kodima te. 3Kasi Mokonzi azali sima ya maloba naye mpe akofwandisa bino mpe kobatela bino na moto ya nkanja4Tozali kolikya na Mokonzi na bolingo na tina na bino, ete bozali kosala mpe kokoba kosala maye nyonso mandimisamaki. 5Boye Mokonzi akamba mitema na bino na bolingo na Nzambe mpe na Konzo ya Masiya.6Sasa ipi bandeko, tozali kopesa bino mitindo na nkombo ya Mokonzi Yesu masiya, bosangana te na ba ndeko oyo bazali na kati na botawu mpo yango elongobani na bizaleli kokitana na biso te. 7Mpo bino moko bozali na boyebi ya komekola biso. mpo ete tozalaki kati na bino na bizaleli ya batomboki te. 8Mpe toliyaki ofele kwanga ya moto te . Nzoka nde tosalaki mosala makasi na mpasi, butu mpe moyi, tina tozala mokumba epayi na bino te. 9Tosalaki yango mpo na bozongi lolenge ya kokonza te. Nzoka nde tosalaki boye na tina ya kotalisa ndakisa epayi na bino mpe bokoka komekola biso.10Eloko tozalaki na bino, topesaki mitindo ete soki moto aboyi kosala masala, aliya mpe te. 11Mpo toyokaki bayike kati na bino balingi mosala te kasi bamipesi na kibolole. 12Bongo pona bango topesi mitindo mpe to teyi bango na komno ya Yesu Masiya kosala na kimia mpe kolia kwanga oyo bamilambeli.13Kasi bino bayengebene, bolemba te kosala oyo elongobani. 14Motomboki nyonso na maloba ya mukanda eyebosangana naye soki moke te mpona soni naye ebima mpwasa. 15Bomona ye lokola monguna te kasi bokebisaye lokola ndeko.16Tika ete kimia ya Ye Meyi Mokonzi epesamela bino tango nyonso. Azala mpe na bino. 17Ngayi Paul napesi bino losako lolenge nazali kosala na mikanda minso. 18Tika ete ngolu ya Mokonzi Yesu Masiya ezala na bino banso.

Timoté ya yambo

11Polo ntoma na Yesu Kristo, na ndingisa ya mitindo ya Yawe mobikisi na biso mpe Yesu Kristo eleikiya na biso. 2Epaï na timoté mwna kati na kondima ya solo: Ngolu, mawa mpe kimia kowuta epaï na Nzambe Tata Mpe Yesu kristoNkolo na biso.3lokola napesaki mitindo makasi liboso na ngaï kokonde na Macedoine, tikala na Ephese mpona kokebisa batu mosus mpo balakisa mateya ya kokesana te. 4Mpe bazala ekenge na makambo ya mpamba oyo ezangi tina mpe ezali na suka te. Nionso wana ezali bobele kotumala koswana esika ya kotalbolisa mosala ya nzambe ekende liboso oyo ezali ya kondima.5Sika oyo ntina ya mitindo ezali bolingo oyo ewuti na kati ya motema peto, bo moto kaiti ya kondima ya solo. 6Mingi basili kozanga kokoma na suka, babungi oyo mpe bamipesi na mateya ya mpamba ezangi ntina. 7Balingi bazala balakisi ya mibeko kasi bazali kosolola te oyo bazali koloba, na oyo bozali kotelemela. 8Toyebi ete ezali malamu soko bazali kosalela yango na ndenge esngeli.9Toyebi na solo ete mibeko esalami mpona baye baboyi kotosa mibeko mpe na batomboki, basumuki mpe na bato ya mbindo, bapangano mpe na bayebazangi koyeba Nzambe. esalami mpona baye bazali koboma ba tata mpe mama na bang, babomo. 10Mpona baye bazali kosangisa nzoto bango na bango, mpo na baye bazali kokanga bato na makasi mpe kokumisa bango bawumbu, mpna batu na lokuta, mpona balapi ndayi ya mpe na baye banso azala ata nani oyo azali koboya malako ya monsatu. 11Mitondo oyo ewuti na sango jmalamu ya nkembo, Nzambe Tata na bolingo, akomisi ngaï mokambi.12Nazongisi matondi epaï na Mokonzina biso Yesu Kristo, Kembisaki ngaï mpo akutaki sembo mpe atiyaki ngaï katina mosala na ye. 13Nazalaki motioli sango malamu mpe moniokoli ya bato, moto ya matata makisi, kasi nazuaki ngolu, mpo nazalaki kati na kozanga koyeba mpe na bozangi kondima. 14Kasi ngolu na mokonzi na biso etondaki katina ngai na bolingo na ye kati na kristo Yesu.15Sango malamu oyo ezala solo solo mpe ebongi na kodima yango ete Yesu Kristo ayaki na mokili mpona kobikisa basumuk, nga nde mosumuki ya liboso. 16Mpona yango, ayokelaki ngaï mawa koleka mponazala lokola ndakisa epaî na bato nionso bakondimela nkolo Yesu bazua bomoï ya seko. 17Kobanda sika sika oyo, yo Mokonzi na bilaka, mokokisi na bilaka oyo akufaka te amonanaka te, oyo Nzambe mosusu lokola ye azali te, lokumu mpe masanzoli ezanga epayi naye libela na libela. Amen18Timoté mwana na ngaï ya motema, natie liboso na yo mibeko oyo elonbani na masakoli na ntina nayo. oyika mpoko mpe ozala na molende mpo obunda etunda ya malamu na ndenge ekoki. 19Salela yango mpo ete ozua kondima mpe mayele ya bomoto malamu. Mpo mingi baboya kotosa tokodima na bango ezinda mpe babungi nzela ya solo. 20Lokola hymenée na alexandre, nakabi bango na zabula, mpo bayekola ete ba tiolaka Nzambe te.
21Nalendisi na bino ete liboso ya kosenga na Mokonzi, esengeli kobondela mpo na baninga , nakati ya kopesa melesi mpo na bato banso. 2Mpo na bakonzi na baye, bazali na bokonzi ya mbula matari, na luana tokozala kotambola na kati na kimia mpo ya kokumisa Mokonzi, mpe tozala bato ya kokuka. 3Yango ezali malamu na miso ya Nzambe mobikisi na biso. 4Alingi tobika mpe tondima makambo ya solo.5Nzambe azali kaka moko oyo, molobeli mpe be moko atie boyokani ya nzambe na moto, nde Yesu kristo. 6Amipesaki ye moko mbeka mpo na biso, yango wana batatoliki na ngonga ekoki. 7Mpo na ntina Yango wana ta mitiaki kozala moteyi mpe ntoma, nakoloba solo mpe na kokosa te, nazali moteyi ya bapagano, kati nabosembo.8nalingi bato babandela na bisaka nionso, batombola maboko ya bosantu na nkanda te, soko koswana te. 9Basi mpe ndege moko, na tango ya losambo balata malamu kasi na lofundu te, balekisa ndelo te, batika kolata biloko ntalo wolo to mayaka to bilamba ya ntalo, balekisa ndelo te. 10kasi bapesa nzoto na bango kilo na misala ban go ya malamu, ndenge ebongi ebongi na basi oyo balobaka te , batosaka Nzambe.11Basi esengeli kozala na kimia ntongo ya mateya. 12Na pesi bango mitindo ya koteya to ya kozala na bokonzi likolo ya mibali te. Mpe batikala nye na esika ya bosangani.13Adamo na Eva bango nde bikelamo ya liboso otango akelaki mokili. 15Adamo ye apenguisamaki te, kasi ezalin Eva nde muasi apenguisamaki penza na koboya mitindo ya Nzambe. 14Nayango ye akobika na bana naye soki akowumela kati na kodima, na bolingo, na kobulisama mpe kati na makanisi bosantu naye.
31Liloba oyo esengeli kondima yango: Mpo okoma Eveque, aponi mosala malamu. 2Esengeli azala mokengeli mpe azal na mbindo te. Azala mobali ya muasi moko, azala na lokosote, azala moto ya lokumu mpe azala na limiema, boyambi ya malamu mpe ayeba koteya. 3Alangwa masanga te, makambo mpe yamakisi te, kasi azala kimia, moto ya boboto mpe azala moto ya lokoso ya bongo te.4Akamba libota naye na ndenge esengeli, mpe bana naye batosa na ndenge esengeli. 5Mpo ete soki moto ayebi lotambuisa libota naye, boni boni akoki kokamba lingomba yan Nzambe.6Azala mondimi ya sika, noki te akoki kovimba na lufundu akueya na motambo ya zabolo. 7Azala na matatoli malamu epayi ya baninga, na ntina ete akweya na nsoni mpe na mitambo ya zabolo.8Badiakono ya gomba bato ya lokumu, babalola maloba te, bamela masanga te baluka bongo na mayele mabe te. 9Bazala koloba se solo na ntina ya kondima na bango, mpe makanisi sembo. 10Esengeli ba mekama, mpe bazala na kozuama te mpe bazala kosunga.11Basi na bango basengi bajala ba mama na lokumu, batonga te mpe lokoso te, ndenge moko, bazala na makoki, bokoki kozala na biloba loba te. Bazala basi ya kokoka na makambo manso. 12Badiakono bazala mibali ya muasi moko, esengeli batambuisa bana mpe libota na bango nazela ya boyengebene. 13Mpo ete baye basala malamu, bazuaka nguende ya liko, mpe bafuluka na kati ya kodima ezli na Kristo yesu.14Lokola na komi makambo oyo, makanisi nakoya epaï nayo kala te. 15Ata na wumeli koya, nasili koyebisayo lolenge ya kotambola na kati ya libota ya Nzambe, oyo ezali lingomba ya Nzambe na bomoï, likonzi oyo esimbi solo.16Esengele bosembo emimonisa na boyengebeneezala monene: « akomaki moto, andimaki na molimo, amoni na ba anzeli, atatolamaki na mokili, andimaki, nkembo naye emonanaki».
41Elaka ya suka bato basusu ba kosundola kondima oyo elobi molimo mpona kokangama na mateya oyo ekopenguisaka mpe kolanda moboko ya milimo mabe. 2Na nzela na mitema mibale ya lokuta na kati ya mayele na bango. 3Akoteya ba bandimi oyo bazali na boyebi mpe solo bako pekisa bango na tina ya bileyi oyo Nzambe akela mpo toliyaka yango na kozongisa matondi epai naye. 4Nionso oyo Nzambe asali ezali malamu, tobwakisa yango te. kasi tozongisaka matondi liboso ya kolia. 5Mpo manso ebulasami na liloba na Nzambe mpe na mabondeli. 6Na bolakisa na bandeko oye, okozala mosali ya mokonzi Yesu Kristo, mpe mosali malamu oyo alendesami na maloba yo kondi ma. 7Kasi osalaka malamu, bwakisa masolo ya ba pangano oyo elingi basi ya pa mpaka. 8Ngalasisi ezali malamu mpôna nzoto kasi kokangama na Nzambe nde ezali litoma bilaka mpona bomoï ya lelo mpe oyo ekoya.9Oyo erzali likambo ya solo ekoki tondima. 10Bobele na ntina eye, nde tozali kobunda makasi mpo ete totia elikia na biso epaï na Nzambe na bomoï, oyo azali mobikisi ya bato boye nionso bandimela ye.11Tatola makambo oyo mpe teya yango. 12Bolenge nayo etiolama na moto te, kasi zala ndakisa mpo na banye bandimaka, na maloba, na bizaleli, na bolingo, na bandimi na peto. 13Omipesa na kotanga, kolendisa, kolakisa kino na koya.14Kosala liseki te na likabo oyo ezali kati nayo, oyo epesamaki yo na basakoli sima ya komama yo loboko na ba mbuta mitu. 15Mipesa na makambo oyo, wumela kati na yango, mpo ete ùmakambo emonana. 16Zala ekenge, mpe na malakisi nayo, yika mpiko na maye, okomibisa mpe baye bakoyoka yo
51Ko ngangela mpaka te, nzoka nde lendisa ye lokola tata. lendisa bilenge mibali lokola ba ndeko. 2Lendisa basi bakoli lokola ba mama mpe ba oyo bazali bilenge blokola bilenge basi na bosembo nionso.3Pesa lokumu na basi bakufela mibali, ba kufeli mibali ya solo solo. 4Kasi soki mokufeli mobali azali na bana mpe ba koko, ba yekola yambo nanu kopesa lokumu na mabota na bango. Akumisa na ye mpo yango ekosepelisa Nzambe5Mokufeli mobali ya solo solo azalaka ye moko, atiaka elekia na Nzambe. awumela mikolo nionso na losambo mpe mabondeli. 6Zonka nde mwasi oyo azali kowumela na bisengo ya mokoli azali ya kokufa ata ko ye azali na bomoï7Yebisa bango banso makambo oyo mpo bayeba kkomibatela. 8Soki moto abongisaka bazalani naye mpe libota na ye te, abuaki kondima naye mpe azali mabe koleka mopagano.9bakobenga mwasi mokufeli mobali azali oyo azala na mibu koleka tuku motoba, mpe esengelaki azala mwasi ya mobali moko. 10Esengeli azala mwasi ya misala malamu, ezala na mosunga bana, na koyamba ba paya, na kosokola makolo ya bandimi, mpe akosunga bato ya pasi to komipesa na misala nionso ya malamu.11Mpona bakufeli mibale ya bilenge, kokamata bangona molongo wana te mpo bango bakoki kobala lisusu soki mposa ya nzoto ezwi bango. 12Na bongo bakokweya na mibeko mpo bakowangana ndayi na bango. 13Goyi Goyi ekolata bango, ba kokende ndako na ndako mpe ba kokoma kaka goyi goyi te kasi ba kokoma bato ya makele mpe bato Ba kobanda koloba makambo bakokaki. koloba te.14Na sepeli ete b;ilenge basi babala, babota bana mpe batambuisa ba ndaku na bango malamu, mpo ete mongun azwa nzela ya kofunda biso te ete tosalaki mabe. 15Pamba te nadambukati na bango basi bazongeli. 16Ba mama ba kristo basalisa basi bakufeli mibalempe ete lingomba ezana mokumba makasi te.17Tika ba mpaka na lingomba ba oyo bazali kotambwisi malamu ba kumisama mbala mibale, mingi mingi ba teyi. 18Okoki kokanga monoko ya ngombe te tango azali kosala mosala» mpe « mosali abongi na lifuti na ye».19Oko sambisa mpaka na lingomba kaka soki ba fundi bazali mibale to koleka. 20Pamela bato basali masumu liboso na bato mpo basusu ba banga.21Na pesi yo mitindo liboso na Nzambe, liboso ya Yesu Kristo mpe liboso ya ba anzelu ete obatela mibeko oyo ndenge ezali mpe kosala likambo na kopona pona te. 22kotiela moto maboko na moto te, kokota na masumu na moto te.23Okomela kaka mayi te, kasi mwa vino mpona ba mpasi nayo ya libumu mpe ba mpasi misusu. 24Masumu ya bato mosusu emonaka polele mpe kosambisama esi esalema. 25Nzoka nde ya bato mosusu emonanaka na miso ya bato te. Mpe bongo mpo na misala misusu emonana ka polele kasi misusu te.
61Esengeli ba oyo nyonso baza na bawumbu batosa bakonzi na bango na makambo nionso, mpo moto moko te atiola kombo na Nzambe to na mateya ana biso. 2Bawumbu oyo bazali ba bakonzi bandimi ba boya kotosa bongo te, kasi basengele kosalela bango malamu kolela.3soki moto mosusu alakisi makambo mosusu, oy ekokani te na maloba ya solo ya Yesu Klisto, to baboyi mateya oyo ezalaki ;komema bango na bomengo. 4bato yango batondi nna lolendo, mpe bayebi ata eloko moko te, kaka koloba loba pamba, yango embendaka Zuwa, kosuana, kofinga, makanisi mabe. 5bato yango batonda na tembe, bazali na maknisi malamu te, bato ndenge oyo, bakanisi ete kotosa Nzambe epesaka bozui6Litomba monene ezali na makambo na Nzambe, soki makokitisa motema. 7Mpo ete tobotamaki na mokili oyo na eloko moko te, mpe tokozonga maboko pamba. 8Bongo soki tozali bilei mpe bilamba, yango ,ekoki na biso.9Ba oyo balukaka kozala na bomengo mingi, bazali kokweya kati na komekama, mpe ebungi saka bango kino kufa. 10Mpo ete, bolingo na mosolo ezali ebandeli na mabe. Bato mosusu bakueyisaki kondsima na bango.11Kasi yo moto omipea na Nzambe kima na makambo nyonso wana, bolukaka bosembo, kodima, bolingo, motema molaï mpe boboto. 12Bunda etumba ya kondima, simba bomoï ya seko, tia molende mpona yango nde okozua bomoï ya seko, oyo Nzambe abengelakiyo.13Boye ma sengi nayo na miso na Nzambe, mpe na miso ya Yesu Kristo oyo atatolaki kodima liboso na Ponce Pilate. 14Tosa Mitindo mpe kengela yango, kino mokolo mokonzi ma biso Yesu Kristo akozo nga.15Nzambe akotindaye na mokoloye moko mpo azali Nzambe monene, mokonzi na bakonzi mpe Nkolo na ba Nkolo. 16Ye moko akoki kokufa te, ye moko afandi kati na moïnda oyo moto moko te akoki kokoma pene pene na yango, moto moko te akoki komonaye, lokumu mpe nguya ya seko ezala naye. Amen!17Ye bisa na bato na mosolo batika lolendo, baktia mitema na bomengo na bango te. Kasi batia mitema epaï na Nzambe, oyo apesaka biso biloko mp tosepela na ,yango. 18Yebisa abango basala kaka malamu, mpe bazala bazui na kati na misala malamu. Bazala bato kokaba mpe bazala bato yakozua bomoï ya seko. 19Bakozala na bomoko na mikolo ekoya mpe bakozua bomoï ya seko.20Ndeko Timoté, batela makambo nyonso oyo Nzambe ati na maboko nayo. Boya bilobaloba na bato oyo batiolaka Nzambe, Boya mpe te mbe ya baye ba lobaka bazali bato ya mayele. 21Ba mosusu oyo balandiki nzela ya kondima. ekoki ngoli na nzambe ezala elon,go na bino.

Timothe ya mibale

11Polo ntoma ya Yesu Klisto, na mokano ya Nzambe, kolanda bilaka ya bomoyi kati na Klisto Yesu, 2na Timothée, muana na ngayi ya bolingo, tika ete ngolu ya Nzambe na mawa mpe kimia na ye epesamela yo na nzela na Klisto Yesu Mokonzi na biso.3Na tondi Nzambe oyo nazo salela na motema na ngayi mpeto lokola ba koko basalaki, ko kanisa tango nyonso yo butu mpe moyi na mabondeli. 4Nako kanisaka mayi na miso, nalingi mpenza komona yo , mpo ete motema ezala nsayi. 5Nazali kobomba lolenge tozalaki po na kondima na yo solo solo nani azalaki liboso na koko na yo Lois, na mama na yo Eunice. Mpe naza na kondima azali na bomoyi ndenge moko na yo.6Nazali na kondima ete ye oyo abandaki, na yo sango malamu akokumisa yango solo mokolo na Mokonzi Yesu. 7Na yango Nzambe apesaki biso molimo ya kobanga te, kasi ya nguya, ya bolingo ya botosi, na motema.8Koyoka soni te mpo na ko tatola Mokonzi na biso, Kamata eteni ya pasi mpona sango malamu ya nguya ya Nzambe. 9Nzambe abukisi biso, mpe abiangi biso na molimo na ye , mpo na misala na biso te, kasi na mobongisi mpe ngolu na ye. 10Lobiko na Nzambe emonani sika awa na ebimeli na mobikisi Yesu Klisto. Na koya ya mobikisi Yesu Klisto. Klisto asilisi liwa mpe ye amemi bomoyi ya seko na pole ya sango malamu. 11Na yango wana na tiamaki moteyi, ntoma mpe malakisi.12Yango wana nazali kotia molende lisusu na ba pasi, kasi nazali na soni te, po nayebi nani na ndimala, pe nayebi nazali koyeba ete, ye azali na makoki ya kutala kino na mokolo wana oyo ngayi na mipesi. 13Batela na kondima, pe bolingo kati na Klisto Yesu lolenge ya sango ya solo oyo oyokaki epayi na ngayi. 14Bomba malamu malakisi ya kitoko oyo apesaki yo na lisalasi ya Molimi Mosantu oyo ezali kati na biso.15Baye bafandi na Azia basundoli ngayi. Na lisanga wana ezali na Phygelle na Hermogène. 16Tika ete mawa na Mokonzi epesamela ndaku ya Onesiphore, mpo ete ntango nyonso azali kosunga mpe na monaki soni te na kokangama na gayi. 17Nzokande, tangu azalaki na Rome, alukaki nga nako lemba te mpe amonaki nga. 18Mokonzi apesa ye mawa na eloko , ndenge apesaki lisalisa na Ephèse.
21Yo muana na ngayi, yika mpiko na kati na ngolu na Yesu Klisto. 2Oyo oyekolaki na ngayi lakisa yango na bato ya sembo, ba oyo bazali na mokoki ya kolakisa ba mosusu.3Lokola soda ya mpiko ya Yesu Klisto, nyokwama na ngayi elongo. 4Soda moko te soki alingi asepelisa Mokonzi na ye agtalelaka lisusu makambo na ye atalelaka lisusu makambo na ye. 5Bobele bango mokimi mbangu aokolonga soki akimi na ndenge esengeli.6Mokati nilanga azali kosala na makasi nyonso esengeli azala mobuki mbuma liboso. 7Kanisa malamu na maye nazali koloban Mokonzi akososolisa yo yango.8Kanisaka Yesu klisto, mokotani ya Dawidi, oyo asekwaki kati na bakufi, kolandana na mateya na ngayi. 9Na tina na yango, ngayi nazali konyokwama kino ba kangi ngayi minyololo lokola moto mabe, 10nazali kondima ba mpasi oyo nyonso mpo ba ponami, mpo ete bango mpe ba bikisama kati na Yesu Klisto, mpo na nkembo ya libela.11Yoka liloba oyo ya sembo: «Soki to kufi na ye, tokosekwa mpe na ye.» 12Soki totelemi ngwi, toko dondwa na ye elongo. Soki towangani ye, ye mpe ako wan ganga biso. 13Soki mpe biso tozali nyamu-nyamu, nzoka nde ye akotikala sembo, akoki ko komi wanga te.14Wumela nako talisa bango makambo oyo benda bango matoyi ete basuana te bango na bango likolo ya liloba moko, mpo eko sunga te, nzoka nde ekotisa mobulu na ba oyo bazali koyoka. 15Bunda ete NZambe amona yo moto na sembo , ozala mosali ya nsoni te. Kasi mosali oyo azali kotatola sango malamu mpenza.16Boya masolo ya pamba pamba mpo elongolaka bato pembeni na Nzambe. 17Ba masolo na bango ezali kopanzana lokola mopepe. Hyménée et Philète mpe bazali na lingomba wana, 18bato yango ba boyi solo, mpe bazali koteya ete lisekwa esi esalama mpe kondima ya bato mosusu ezali kokweya.19Nzokande, moboko ya solo mpe makasi oyo Nzambe atiaki ezali kowumela. Elobi boye: «Mokonzi, esengeli akima masumu.» 20Na ndako ya mozui, ezalaka kaka na ba kopo ya wolo to palata te, kasi ya libaya mpe ya mabele , mpe ezalaka misusu ezalaka mpo na milulu ya minene nzokande misusu mpona milulu ya bongo na bongo. 21Soki moto amipetoli na mabe, bakosalela ye mpe kobulisa ye lokola kopo ya lokumu oyo Mokonzi akoki kosalela mpona tango nyonso.22Kima ba mposa ya bolenge, luka bosembo, kondima, bolingo, kimia lisanga na ba oyo bazali ko belela Mokonzi na motema peto. 23Kayanola mituna ya zololo mpe ya buzoba te, pamba te oyebi ete ebimisaka koswana.24Mosali na Mokonzi esengeli na hye koswana te, kasi esengeli azala na bolingo na bato nyonso, azala na makoki ya koteya mpe moto ya kokanga motema. 25Esengeli ateya ba tomboki na komikitisa mpo Nzambe akoki kopesa bango nzela ya ko bongola mitema mpe koyeba solo. 26Ba kokaki ko koma lisusu na mayele mpe kolongwa na mitambu ya satana oyo azwaki bango mpe kokanga bango mpo basalaka mokano na ye.
31Kasi yeba boye: na mikolo mua suka, pasi ekoyingela. 2Mpona bato bako boya kokaba, bakolinga masolo, lelondo, batioli, batioli Nzambe, batomboki na baboti, bazangi batondi, batuki Nzambe, 3bazangi bomoto, bazangi kotondo, bafingi Nzambe, bazangi komibetela, batonda nkanza, baboya bolamu, bateki , bazangi koyoka, bazangi motema, 4boko linga kosepelisa nzoto kasi Nzambe te.5Bakolakisa ete ba kobanga Nzambe, nzokande bako boya nguya na ye. Kima mosika na bango. 6Pona ete mingi mingi kati na bango bazali boye ba koyingela na mobota mpe kokwa basi boye bazanga mayele. BAye oyo batondi na masumu mpe, bamemani na mposa eyike. 7Bajali koyekola tango inso, kasi bakoki soki moke te kokola na solo.8MPela moko Jannès na Jambrès baboyaki Mose, lolenge moko bateyi oyo lokuta baboyi solo, bazali boye batondisami na bozoba mpe bazangi ntina na maye matali kondima. 9Kasi bako kende mosika te, mpona ete liboma na bango ekobima mpuasa liboso ya bato mbaso, mpela moko boye wana.10Nzokande yo okobaki na boyebi mateya na ngayi, botamboli na ngayi, mposa na ngayi, kondima na ngayi, mpiko na nga, bolingo na ngayi, mopikiliki na nga, 11bitumba na nga, pasi na ngayi, mpe maye makomelaki ngayi na mboka Antioche, na Icone, mpe na Lystre Na bundisamaki makasi kasi Nzambe asikolaki ngayi tango inso. 12Nzokande baye banso balingi bomoi nako banga Yesu Klisto bako bundisama 13Kasi bato na mabe, mpe bakokoba na mabe koleka Bakobungisa basusu, bango moko basi babunga14Kasi yo, tikala na maye oyekolaki mpe andimelaki makasi. Ozali na boyebi na nani oyekolaki na ngo. 15Oyebi malamu ete uta bomuana na yo, oyebaki Makomi Esantu, maye makoki kokomisa yo na bwana ntina lobiko na nzela ya kondima kati na Yesu Klisto.16Makomi nionso ezali kowuta na Nzamben na ntina ye koteya, kondimisa, kobongisa, mpe kolakisa kati na sembo. 17Na tina ete mosali na Nzambe azala na mayele mpe makoki mpona misala malamu.
41Na pesi mitindo oyo liboso na Nzambe mpe Yesu Klisto, oyo akosambisa bato na bomoyi mpe ba kufi, ntina na koya ya bokonzi na ye. 2Teya liloba, zala ngwi na ntango mpe ntango te. kebisa bango mpe lendisa, teya bango na motema makasi mpe na boboto yonso.3Ntango ekoya bato bakolinga mateya solo te. Kasi bakolanda posa ya bango moko, maloba oyo bango moko bakosepela na yango, bakotondisama na koyoka yoka. 4Bako longolaka matoyi na bango na bosolo, mpe bako baloka epayi ya ba makambo oyo ezalaka te. 5Kasi yo, zalaka na ekenge na manso, longa mimekano, sala mosala ya koteya, mpe sala yango malamu.6Ngayi pe na sali mingi. tango na nga yako zonga ekoki. 7Nabundi bitumba malamu, nasilisi kotambola bisika nyonso, na silisi nyonso na ngayio; na batelaki kondima na ngayi. 8Motole ya kondima na epesemeli motole oyo Mokonzi, zuzi ya solo akopesa ngayi na bozongi na ye , na kozala ngayi moko te kasi na baye banso bakomona koya na ye kati na bolingoi.9Sala makasi ya oya kotala ngayi na lombango (noki-noki). 10Po Demas asondoli ngayi. Alingi mokili ya lelo mpe akeyi na Thessalonique. Crescens akeyi na Galati, mpe Tite na Dalmatie.11Luka nde aza na ngayi. Zua Marc et boya na ye , mpo aza na motuya mpo na mosala. 12Natindaki Thychique na Ephèse. 13Kazaka na ngayi natikaki yango na Troas epa ya Carpus, memela ngayi yango ntangu opkoya mpe mikanga mingi-mingi ba parchemins.14Alexandre mosali mabaya, asali makambu mingi ya mabe epayi na ngayi. Akozua mbanu na ye epayi ya Mokonzi kati ya mosala na ye. 15Bosala keba na ye, mpo aboyi penza maloba na biso. 16Na ngonga na silisaki kelasi, na monaki ata moto te kosunga ngayi. Nzokande banto nyonso babwakisaki ngayi. Natangeli bango mabunga wana te.17Kasi ezalaki Mokonzi nde azalaki na ngayi mpe alendisaki ngayi, na ntina ete mateya elekaki malamu mpe bapangano bayo kaki na bokebi nyonso tango na zalaki koteya , bango na monaki ete na bimi na monoko ya nkosi. 18Mokonzi akolongola ngayi kati ya misala inso ya mabe, mpe akobikisa ngayi na bokonzi na ye ya likolo nkembo ezala na ye na mbula na mbula, ezala se bongo.19Bo pesa Priscille na Aquilas, na libota ya Onesisphore mbote. 20Eraste atikali na Corinthe, kasi natikaki Trophime mkobela na Milet. 21Zala nyonso ozonga na ngonga ya elanga. Eubulus apesi bino mbote, Pudens, Linus, Claudia, mpe ba ndeko banso bapesi yo mbote. 22Mokonzi azala elongo na molimo na yo. Ngolu ezala na yo.

Petelo ya yambo

11Petelo ntoma ya Yesu Kristo, na ba paya pa palangani na ba mboka nionso, na baponami na etuka ya na gala tia, na cappadoce, n'Asie mpe bitynia. 2Engebene na mayele ya Nzambe Tata, etunda na molimo monsatu, mpona botosi mpe mpona bosokoli bino ya makaila ya yesu Kristo. tika ete ezala na bino mpe botonda na kimia.3Tika ete Nzambe mpe Tata ya Mokonzi na biso Yesu Kristo apambolama, mpo epasaq bisobomoyi ya sika mpe botema na elikia totia bobele naye. mpo na koseluisa Yesu kristo. 4Na bongo, abombeli biso bomengo na likolo oyo ekotikala seko. 5Abombi bino na nguya ya Nzambe mpo botia mitema epayio na ye.6bino bosepela mpona yango, ata na tango muke bokoki koyoka mawa. na mimekano ya ndenge na ndenge. 7Na yango mpo ete kodima na bino ekomekama, kodima oyo eleki motuya na wolo oyo ekomekama na moto. oyo ekoya sima ya kodima na bino mpona lokumu, na Nkembon mpe na masanzoli na koya ya Nkolo Yesu Kristo.8Bino bomonakaye te, kasi bolingaka ye. sikoyo bozali komona ye te kasi bozondima ye , mpe botondisami na esengo koleka. 9Sikoyo bokoyamba mbuma ya kodima na bino, lobiko ya bomoyi na bino. 10Lobiko mpe ngolu oyo ebombela bino, esali ete koluka mpe koyeba epai ya basakoli.11Balukaki bayeba lolenge nini mpe ngonga nini molimo ya Yesu elob elaki ango. Bongo yango elekaka tango abandaki koloba na tina ya mpasi ya Kristo mpe nkembo oyo ekoya sima. 12Ayebisaki bango makambo minene oyo bazalaki kosala mpo na bango mkok te, kasi mpona bino, tango bazalaki koloba pona biloko oyo ba panzisango mpe molimo mosantu atindama na likolo (makambu oyo bangelo baza na posa ya kotia misu na bango).13Boye boselinwa, bofungwama, bozala na etindia na ngolu oyo ekozala na bino ntango na koya na Mokonzi Yesu. 14Lokola bana bazali na botosi, bolanda Mposa oyo ezali na bino ntango bozangali boyebi.15Lokola oyo abiangi bino nazali bule, bozala mpe bule na bizaleli na bino. 16Mpo ete ngayi ye meyi nazali mbule. 17Soko bobiangi tata oyo asambisaka na lolenge na bato te, mpe na mosala ya moko kati na bino, ntango, etikali na molbembo bo bange ye.18Nabizaleli ezangi ntinate, oyo boyokaki na tata na bino nde ba sombi bino, to na mbongo soko na wolo ebebisama. 19Nzoka nde na makila na ntalo ya Kristo oyo ezalaki lokola mpate ezangi mbeka mpe mbindo.20na moboko ya molonga mob imba, Kristo aponamaki, Sika, na ntago yua suka emonani epai na bino. 21Bondimela Nzambe na nzela naye, oyo asekuisaki ye kati na ba kufi mpe na oyo apesameli nkembo mpo ete kondima mpe elikia na bino efanda likolo na Nzambe.22Na botosi kati na solo boyeyisi milimo na bino mpeto. yango ezalaki mpo na bolongo kati na bondeko mpe solo, bolingana nabino mpeza bino na bino kati na motema. 23Na kona beba, nde bobotami ya sika, kasi na kona ebeba te na kati na liloba na bomoyi mpe seko na Nzambe.24Pamba te« mosuni nionso ezali lokola nkasa, mpe nkembo na yango lokola fololoya nkasa. Nkasa ekaokaka mpe fololo ekweyaka; 25nde liloba na Mokonzi ewumelaka.» yango nde sangfo malamu kesakolami na bino.
21Na bongo bobuaka mabe nionso, lokuta nionso, mayele mabe nionso, mposa ya kulula, mpe matongi. 2Kasi lokola bana babotami sika, bolingaka mabeleba bongi ya milimobokola na kobika na nzela na ye. 3Soki bososoli ete Mokonzi azali malamu.4Boya epayi naye libanga na bomoyi oyo bato babuakaki, kasi Nzambe apona yango ezali motuya. 5Lolenge moko lokola mabanga na ntalo oyo elendisami po na kokoma ndako na molimo, mpo nakozala bonganga Nzambe oyo epesi mbeka na bomoi oyo endimani na Nzambe na Nzila na Yresu.6Mpo ete maakomi malobi: « Tala natie na sion libanga na ntalo, oyo eponami. » Moto nani jandimeleyi akoyokisama nsoni te.7Pona bino bondimi lokulu ejali na bino. kasi libanga « oyo batongi ba buakaki, yango ekoma ya ntalo». 8Mpe « libanga na moto mpe, libanga monene na libaku». kozanga ,botosi na liloba na Nzambe, koselengua, mpo ete na yango balakilami.9Kasi bino, jbozali libota liponami, banganga Nzambe, libota mosantu, na Nzambe, na ntina ete bosakola bolamu ya oy abiangi kati na molili mpe na moyi endimami. 10Sika bozali libota na Nzambe, mpo etet baza na libebi, bozanki ngolu sika bozali na yango.11lokola bapaya ba oyo bawayi wayi, na bondeli bino ba ndeko komipekisa mposa ya nzoto oyo ezali kobundisa mitema na bino. 12Kati na pagano, tozali na, bizaleli malamu, mpo ete soko $bakoloba moto na ntina na bino, bakoki komona misala malamu mpe lkokumisa nzambe na koya naye.13Botosa ba Nkumu ya mboka mpona MokoNzi, botosa bakonzi lokola banetolami, 14boyangeli ba oyo bapesaka etumbu na bato mabe mpe kokumisa ba oyo bazali malamu. 15Mpona bolamu basali bino, ezali mokani na Nzambe tango botikaki nye na maloba ya bato bazangi boyebi, bazoba. 16Lokola basali na Nzambe, nbosomi na bino ebomba kanda te lokola bato na bonzomi. 17Bolinga bandeko, bokumisa mutu nionso, mpe mokonzi, bobanga Nzambe.18Basali, bozala na botosi mingi na bakonzi na bino ya malamu mpe mabe. 19Mpo ete ezali lokumu na moto oyo azali koniokuama na likambo oyo ayebite, makanisi naye efandi na bo Nzmbe. 20Ezali na lokumu nini mpo na koniokuama na etumbun tango osali lisumu? ezali malamu na miso na Mokonzi, tango ozali koniokuama mpo na malmu asali.21Bino bo biangamakisto mpona yango, mpo ete Kristo aniokuamaki mpo na bino. Wana ezali ndakisa mpo na bino bolanda matambe naye. 22Ye asalaki ata lisumu te, okati ya mùonoko naye ezalaki na lokuta moko te. 23Ye afingamaki, kasi azongisaki maloba te, azalaki na mpasi: mpe asalaki mobulu te. Atikaki na oyo akataka makambu sembo.24Kasi ye akumbaki masumu na biso na nzoto naye, na ekulusu, na tina ete tozala lisusu na lisumu te mpe tobila bo sembo. Nzambi na mapipi na ye nde tozuaki lobiko. 25Mpo tozalaki kotelengana lokola ba mpate ba bunga nzela, kasi sasa ipi bozongi epayi na mobateli mpe mokengeli ya milimo na bino.
31Ndenge moko, bino basi botosaka mibali na bino, kosalaka bongo na tina ete ata moto atosaka maloba na Nzambe te, komona bizaleli malamu na basi na bango, bandimeli Nzambe, 2Mpo et bamoni bizaleli ya malonga mpe ya limemia.3Bobomikomisa kitoko te na biloko oyo emonanaka na miso, kokanga suki, kolata biloko ya wolo to bilamba ya kitoko, kasi kitoko oyo emonanaka na misu te. 4kasi bozalaka bato ya mitema malamu. Mpe kimia, wana nde kitoko ya kobombama, yango nde ezali ya motuya na miso na Nzambe.5Basi ya kala ya bosantu bazalaki komikomisa ndenge wana, batielaki Nzambe mitema mpe kotosa jmibali na bango, 6lolenge moko Sara atosaki Abraham mpe azalaki kobenga ye mokonzi, bozaali sik'oyo bana na naye soki bozali kosala makambo ya malamu mpe bozali kobanga mikakatano te.7Ndenge moko mpe bino mibali bozalaka na bizaleli moko ya malamu na basi na bino, mpe boyeba ete ba zali bikelamu oyo ezangi makasi, botosa bango mpo ete bango mpe bakozwa bolamu oyo nzambe alakaki na bato nionso, bosala bango mpo eloko moko ekangela bino nzela na mabondeli na bino.8Mpo na kosulisa, bozalaka se na likanisi moko, boyokanaka mpe bolinganaka lokola bandeko,bozalaka bato ya boboto mpe komokitisa, 9Soki moto asaliyo mabe kozongiselaye mabe te , soki moto afingi yo, kofinga ye te, kasi, senga na Nzambe apesa ye bolamu mpo Nzambe abengi bino mpo bozua bolamu naye nionso.10Oyo alingi bomoi mpe komona mikolo esengo atika kosala mabe mpe koboya lmakambo nionso ya lokuta. 11Atika kosala makambo ya mabe mpe asala malamu, aluka kimia alandango. 12Misona Mokonzi ezali kotala bayengebene mpe matoyi naye, ezali koyoka mabondeli na bango, kasi apesaka bato mabe mokongo.13Nani akosala bino mabe, soki bomipesi na misala ya malamu? 14Kasi soki bazali konyokola bino pona makambo ya malamu, bopambolami, bobanga te, mpe bozala mitema likolo likolo te.15Bondima Mokonzi ye Kristo na mitema na bino, soki batuni bino, bozelaka nini boyeba kopesa bango eyano na bopole mpe botosi. 16Bozala na makanisi ya malamu, mpo ata bato oyo bafingaka bino lokola bozalaki bato mabe, batikala na soni. 17Nzambe alingi tomona bwale mpona misala malamu na esika tosalaka mabe.18Yesu amoni bwale mbala yoko mpo na masumu. ye ùmokyengebene amonaki bwale pona biso bato mabe mpe komema biso epayi ya Nzambe, akufaki na mosuni, kasi azongaki nabomoi, na nguya ya molimo mosantu. 19Na nguya ya molimo, akendeki koteya milimon ekangami sika oyo na boloko. 20Bakangaki mitemate na mikolo na Noa, bazangaki botosi, tango Nzambe akangaka motema mpo na kozela mikolo ya Noa, tango na kotanga masuwa mpe Nzambe abikisaki bato mwambe na mayi.21Yango nde elembo ya libatisi oyo epesi biso lobiko sik'oyo, pona kolongola bosoto ya nzoto te kasi, na lisekwa na mokonzi na biso yesu Kristo. 22Kristo abutaki na likolo, afandi na loboko ya mobali na Nzambe. Ba angelu, mikon,zi mpe ba nguya ezali kotosaye.
41Bongo Awa Kristo anyokolami ona bomoto, bino mpe bondimi konyokolama na molende nionso mpote moto oyo anyokolami, ye nde moto aboyi masumu libela. 2Boye, moto lolengfe wana azali lisusu kobika makambo na bomoto te, kasi bozalaka na bizaleli oyo Nzambe alingaka.3Nzambi bobebisi ntango mingi na kolandaka makambo esepelisaka bato baye bayebi Nzambe te. Bazalaki kosala ekobo, kondima posa mabe, kolangwa masanga, kokabuana, kolia mpe komela na lokoso mingi koleka , banzambe bikeko.mpe kobebisa lokumu na biso lolenge bozalaki kosambela banzambe ya bikeko. 4Kasi bato bayebi Nzambe te bakomi kokamwa mpe kofinga bino, lokola bazali kosangana na bango lisusu te mpo na kosala makambo wana ya mobulu. 5Nzoka nde mokolo ezali bakosamba mpona yango nionso baye bazali na bomoi na baye bakufa. 6mpo na yango, Kristo asakolaki sango malamu mpona bato bakufa, baye tolobaka basambisami wana ezalaki bango na mokili. Kristo asalaki boyee mpo bazua bomoyi ya molimo bo ,elingi nzambe .7Suka ya makambo ekomi pene pene, yango wana, bozala mayele mpe ekenge kati na mabondeli. 8Likambo eleki lotomo yango oyo" bolingana mingi penza, pamba te, baye bazalaka na bolingo, Nzambe alimbisaka masumu na bango, atako ezali ebele. 9Boyambanaka kati na bino, bofundamaka te.10Lokola moko na bino, ozui b iloko, bosalela yango na lolenge ebmongi mpo na bolamu na baniga. 11Soki moko azli kosakola, asokola bobele maloba ya Nzambe akozwa lokumu mpona Yesu Kristo. Na Yesu Kristo, lokumu mpe Nguya nionso ezali ya ye seko. Amen.12Balingami, mpo na moniokoli mosali kokomela bino lokola emekeli: bokamwa te pela moko soki lekamueseli ezali kokweela bino. 13Kasi na motindo mosusu, bosepela ete bozali kosanga na mpasi ya Kristo, ete bosepela na esengo monene wana ekomonana nkembo na yawe. 14Bozala na esengo soki bakofinga bino mpo na kombo na Kristo mpe ete molimo na nkembo mpe na Nzambe azali kowumela na bino.15Boye tika ete moto kati na bino aniokolama lokola mobomi, moyibi, mosali ya mabe to mpe monangi ya makambo ya ba mosusu, 16Kasi soko aniokolami lokola moklisto, ayoka nsoni te, nde akumisa Nzambe mpo na Nkombo oyo.17Nzambi elaka ete kosambisa ebanda na ndaku na Nzambe. soko nde ebandi awa na biso, nsuka na bango baboyi nsango malamu na Nzambe ekozala nini? 18Soko moyengebene akobika bobele na kpokoso motali na Nzambe mpe mosali masumu azali lolinge boni? 19Na bongo, ktika ete bango kbazala na kpokoso pelamoko ekani Nzambe, bapesa bomoyi na bango epai na mozali na bango mpo na kosala malamu.
51Nazali koteya ba mpaka kati nabino, ngayi mpaka, moninga mpe nzeneke ya bwale ya kristo, mpe moko na ba oyo ba jali kolikyo nkembo oyo ejali koya. 2Na boye, najali kolendisa ba mpaka, ete, bobatela etonga ya Mokonzi apesi bino. 3Bokamba yango na mosuku suku te, kasi nde na bolingo na Nzambe, bobatela yango na lokoso ya misolo te, bobele na bolingo. Bokamba bango na motema na kanza te, lokola bana ya misale na bino, kasi bojala ndakisa, mpona Ekelesia. 4Tango ye mei, Mokonzi na ba mpate akoya, nde bokozua mbano wa lokumu.5Lolenge moko, bino bilenge mibali, bomemiya ba kulutu. Bino nionso bosunganaka, kati na komikitisa, ba moko mpe basusu pamba te, Nzambe atelemelaka bato ya enzombo, asalelaka ngolu na baye bamikitisaka. 6Na nse na loboko na nguya na Nzambe, bomisokya, mpo ete, atombola bin,o, na ntango esengeli. 7Bosundola mitungisi na bino yonso epai na bino nionso epayi na ye, mpo akobatela bino.8Bozala na bopolo mpe ekenge, monguna na bino, zabolo azali kozumbulika nzinga nzinga na bino lokola nkosi, miso ngwa, koluka oyo akolya. 9Bojala makasi, botelemela ye kati na kondima , boyibi ete kati na mpasi yango, banionga na bino mosusu na mokili, bajali koyika mpiko.10Sima na tango muke, ya bwale, Nzambe na ngolu oyo abiangi bino kati na nkembo ya libela na Kristo, akobutisa bino, akofandisa bino, mpe akolendisa bino. 11Bokasi bwaye nse biloko binso bikeke na bikeke. Amen.12Na nzela ya moninga nagayi Silas, nde nakomelaki bino na mokuse. Bokangama penza na makomi yango mpo ezali bolamu na Nzambe. 13Eklesia oyo ya babilone oyo bojali na yango lolenge moko, epesi bino losako elongo na mwana nagayi maloko. 14Bopesana losako ya esengo, kimia na kati na kristo ejala na bino.

Petelo ya mibale

11Ngayi SimoniPetelo, moombu mpe ntoma na Yesu Klisto, epayi na bango bazui likabo na kondima lolenge moko na biso kati na boyengebene na Nzambe na biso mpe Mobikisi Yesu Klisto. 2Ngolu ezala na bino mpe kimia eyikana kati na boyebi na Nzambe mpe na Yesu, Mokonzi na biso.3Nguya na ye NZambe esili kopesa biso biloko yonso na bomoyi mpe na kosambela Nzambe, mpo na boyebi oyo abiangi biso na kembo mpe na malamu na ye mpenza. 4Na yango atieli biso bilaka minene mpe na motuya na ntina ete, na bilaka yango bozua likabo na bino na lolenge na Nzambe, mpe bokima libebi lizali kati na mokili mpona mposa mabe.5Na ntina oyo mpenza , botia etingia yonso mpona komizwela molende kati na kondima na bino mpe mayele kati na molende. 6Mpe komipekisa kati na boyebi, mpe mpiko kati na komipekisa, mpe kosambela Nzambe kati na mpiko. 7Boboto epayi na ba ndeko na kobondela Nzambe mpe bolingo kati na boboto epayi na ndeko.8Zambi soko makambo oyo mazali kati na bino mpe mazali koyikama, makobatela bino ete bozala pamba te mpe bozanga kobota mbuma te, mpo na boyebi na Mokonzi na biso Yesu Klisto 9Mpo ete moto oyo azangi makambo yango akufi miso, akomonaka biloko mosika polele te, asili kobosana ete apetwaki na masumu na ye ya kala.10Na bongo bandeko , eleki malamu ete bozala na etingia mpo na kolendisa ebiangeli mpe epimeli na bino. Soko bokosalaka bongo, bokotuta mabaku soko moko te. 11Zambi nzela na koyingela kati na bokonzi na sek,o na Mokonzi na biso, mobikisi Yesu Klisto ekozwama mpo na bino na malamu mpenza.12Na bongo nako tika te kokanisela bino makambo oyo, uta bisili koyeba yango mpe kolendisama na makambo na solo masili kokomela bino. 13Na banzi ete, ebongi na ngayi kolamukisa bino kati na makanisi mayino ezali ngayi kati na ema oyo. 14Nayebi ete, kala mingi te, nakotika hema oyo na nzoto lokola Mokonzi Yesu alakisaki ngayi. 15Nako mekana etingia ete ntango yonso nsima na kolongwa na ngayi bokokoka kokanisa makambo oyo lisusu.16Zambi wana wana eyebisaki biso bino mpo na nguya na komonana na Mokonzi na biso Yesu Klisto, tobilaki masese malobami na mayele te, kasi lokola esili biso komona nkembo na ye monene na miso na biso mpenza. 17Mpo ete azui lokumu mpe nkembo na maboko na Nzaambe Tata mpe mongongo ebimi mpona ye na nkembo monene monene ete: «Oyo mwana na ngayi, molingami na ngayi, nakosepelaka na ye mingi.» 18Toyokaki mongongo yango kobima na likolo, wana ezalaki biso na ye kuna na ngomba na bule.19Tozali kolendisa liloba lisakolami na makasi koleka. Bokosala malamu kotiya mitema na yango, lokola mwinda oyo ezali kopela na esika molili, kino ekotama ntongo mpe moto na nton go ekobima na mitema na bino. 20Boyeba liboso na yonso ete, bisakweli na makomi ebimaki na makanisi na bato mpenza te. 21Mpo esakweli moko te ebimaki naposa ya moto, kasi bato bawuti na Nzambe balobi wana ezalaki bango kopusana na Molimo Mosantu.
21Ba sakoli na lokuta bakomi kati na bato, bateyi balokuta bakoya mpe lokola. Bakomeme na bokuta mateya na libungi mpe libebi, zambi bako wangana Mokonzi moye asikolaki bango. Na yango bako benda na mpwasa libebi. 2Bayike bako landa maloba sukali na bango, bongo na nzela na bango, bosolo ekonyokwana. 3Na lokoso ya bango, bako kosa bayike ba bino na maloba lokuta, etumba ya bango ekowumela te, libebi na bango mpe ekolala mpongi te.4Soki Nzambe abikisaki te ba anjelu oyo basumukaki, kasi apesaki bango mbeka epayi ya Tartarusi mpo babombana o mokili bwa bozindo na minyololo, kozelaka esambiselo. 5Mpe ya abikisaki mokili na kala te, bobele kaka Nowa, nde abombaki ye, zambi azalaki moteyi na bosembo, elongo na bato sambo, etindaki ye mbula monene na mokili na basumuki. 6Yango mpo nakopesa ndakisa na mokili ya bato mabe, Nzambe azikisaki kino kokomisa putulu, bingumba Sodoma mpe Gomora.7Bobele Lota nde Nzambe abikisa, kati na minyokoli mingi ya etamboli ebe ya baye bakabwana mpe batombokela mibeko. 8Mpamba te, moto afandaki mikolo na mikolo kati na bango, molimo mwa ye ya sembo etungisamaki mpo na mabe maye azalaki komona mpe koyoka. 9Mokonza nde ayebi ndenge kokangola bato semba o boso ya komekama, mpe lolenge nini kobomba bato bazanga bosembo mpo na bozui etumbu o mokolo mua bosambisani.10Yango ezali solo na baye ba kobi kotambola na ba mposa mabe ya nzoto, nakoboyaka bokonzi, bazali na mangbongi koleka, bakebaka te kotuka bato batombwa na lokumu. 11Ba anjelu batonda bokasi mpe ngula, bakoki te komeme o boso bwa Nzambe bisambiselo ya mafinga.12Zambi banyama bazanga boyebi, bakelama mpona boleyi mpe libebi, bayebaka te eloko ekofinga bango. Ba bebisami. 13Bakozua mbano ya misala ebe ya bango, bazo likwa te komipesa na misala ya lofundu mokolo na mokolo nde malamu bami babisi mpe bami komisi mbindo, bazali komi sepelisa na lokuta ya bango na eleko ya ba nteke ya bino. 14Miso ya bango etondi na bililingi ya basi na bikobo, batondaka mabe te to masumu te, babendaka milimo ya boye bakemba te na nzela ya bango ya mabe mitema nya bango eyebi kolula makasi bazali bana na libebi.15Basundoli nzela na sembo, ba pengwi mpe balandi nzela ya Balaam muana ya Beor, ye oyo alingaka mingi kozua lifuta ya baye bazanga sembo. 16Kasi azwamaki mpo miko na ye nei, mwa mbalata (ânesse) emini (muette) alobaki na mongongo ya moto, kokebisa mosakoli na liboma ya misala na ye.17Bato baye bazali lokola mosulu ezanga mayi, bazali ba mapata matangbi na mopepe ekasi, molili makasi ekokwa bango. 18Bakoloba na lofundu ya pamba, bakobenda bayike na ba mposa ya nzoto, bakobenda mpe lokola baye bameki kokima o nzela ya libungi. 19Bazali kolaka bango bonsomi, kasi bango moko bazali baombo na libebi, mpo ete moto azali moombo na makambo nzike oyo ezingi ye.20Moto nani akimi bosoto na mokili na nzela ya boyebi Mokonzi mpe mobikisi Yesu Klisto, bongo ezongeli lisusu bosoto boona, lolenge ya na ye ekozala ebe koleka ya kala. 21Ebongaki malamu mpona bango koyeba nzela na bosembo te, bongo na mbisa, ba pengwa na ndema esantu moye bamopesaki. 22Lisese liye liwulani mpo ya bango: «Imbwa akozongelaka bisanzi ya ye, pelamoko ngulu na mbisa ya bosukoli ye, azongi o potopoto.»
31Sika balingami, mokanda moye mwa babale nakomeli bino, mpo na bolamusi bosolo bwa molimo na bino, 2ntina ya bino kobangaka ngonga o ngonga, maloba mosanto, masakolamaka na basakoli basantu mpena ndema (mitindo) nya Mokonzi, apesaki biso nzela ya ba ntoma na bino3Nayambo yeba ete ba tyoli bakoya na mikolo nya suka, ba kotyola mpe bakotambola engebene na ba mposa ya bango mey. 4Na kolobaka: «Elaka na bozongi bwa ye ezali wapi?» Uto bakeli bwa mokili, kokoma na ba tata na biso, kino sika makambo natikali obe bongo.5Ba mibungisi bango moko, koboye ete likolo mpe nse bisimi o kati ya bibale uto kala kala engebene liloba na Nzambe. 6Ezali na makambo mya lolenge ena nde, mokili na kala ebebi, samaka mpe ezindaka o ebale. 7Na yango likolo mpe nse bibongisami mpo na moto engebene na mitindo kaka yoko byango bibongisami mpo na mokolo ya esambiselo mpe ya libebi ya bato mabe.8Balingi , bobunga elongo oyo te, ete mokolo yoko epayi na Nkolo ewulani na mibu koto yoko, bongo mibu koto yoko mpe lokola mokolo moko. 9Nkolo ekowumela te, mpo akokisa yaye bilaka, lokola ekobanza bayi, kasi ye azali kozelisa mbongwena na bino, zambi alingi ete, moto moko abunga te, kasi kosepela ete banso babongola mitema.10Na yango mokolo na Mokonzi, ekokoma lokola na pwasa, likolo ekoleka na lokito ekasi, biloko bikozika o moto, mpe mokili ebongo na biloko byango mpe lokola.11Mpo ete boyike bwa biloko bina, bikobebisama lolenge yoko, bosengeli kozala bato ya lolenge nini? Bosengeli kobika na bosanto na Nzambe mpe limenya. 12Bosengeli kozelisa boyeyi bwa mokolo na Mokonzi, na bokangi motema, pamba te, likolo ekobeba o moto, mpe biloko nzike ekonyangwana lokola. 13Kasi biso tokozela se elaka ya ye, likolo na sika mpe mokili na sika, wana bosembo ekowumela seko na seko.14Na bongo balingami kozela makambo mana, bosala makasi mpo bozala na litono te, to mpe tz o boso bwa ye, engebene na kimia elongo na ye. 15Koyeba ete kozelisa ya Mikonzi na biso nde libeki na biso lolenge molingami Polo akomaki, na lolenge bwanya epesamelaki ye. 16Polo alobeli makambo oyo manso o mikanda na ye, kuna kati makambo misusu, masegi lisosoli, mpo bato ya mabunga mpe batelema ngbi te, bazali kobungisa lolenge ya bososoli ya makambo mango engebene esalaka bango na nakomi masantu mpona libebi ya bongo meyi.17Mpo na yango, balingami, eyebi bino makambo ma ye, bozala na bokengi mpo ete bopengwa tena lokuta ya bato ya mbindo , oyo baluki bobungisa bompikiliki ya bino epayi na Mokonzi. 18Kasi bokemba katina ngolu mpe boyebi na Mokonzi mpe Mobikisi na biso Yesu Klisto, naye nkembo sasayipi mpe lobiko na lobiko. Amen!

Yoane ya misato

11Mpaka epaiyamolingamiGawusi, oyonalingaka na bosolo. 2Molingami, nazalikosepelaofuluka na makambomansompeozalakolongono, engebene na bofulukiyamolimo na yo. 3Zambi natondisami na sayikoleka tango nayokilitatoli na yoya solo na bandeko na yo, lolengeotambolakakati na solo. 4Oyo ndesayimpo na koyokaetebana na ngaibazalikotambolakati na solo.5Molingami ozalikosalabosembo na bandekompebapaya, 6batatolaki bolingo na yooteiyalingomba. Ekozalamalamukotindabangomobemboengebene na bonzambe, 7bakamatakieloko moko te yabapagano, zambiezalimpo na nkombo na Yesundebabimaki. 8Esengeli koyambabatoyalolengewana, mpoeteelongotosakolabosolo9Mwa mokenangurutakinalisanga, kasiDiotrefes, oyoamikwakamotoyayambo o katinabango, aboyakikoyambabiso. 10Kasi, sokinayei, nakobanzamisalana ye, ndengealobakimakamboyabonsonimpemalobayamabe. Etondisamiye te na misala na ye, yakoyambabandeko te. Azalakikopekisa baye bazalakikosalayangompekobenganabango na lisanga.11Balingami, bomekolamabe, kasioyoyamalamu. Oyo asalakamalamuazayaNzambe, oyoasalakamabeamonaNzambe te. 12Demetrius, na bosolokati na yendebatobansobatatolakimpo na ye. Bisompetotatolimpeboyebietelitatoliyangoezali solo.13Nazalaki na mayikeyakokomelayo. Kasinakokomayangolisusu te. 14Nazali kolikyakoyakunampotosola. 15Nzambe apesayokimia, bandekompebapesiyolosako.

Yuda

11Yuda, mosaliyaYesuKristo, ndekoyaJake, na baoyobabengamápebalingamá na Nzambe Tata, pebabatelamá po na YesuKristo, 2mawa, bobotopebolingoétondamelabino.3Bandeko ya bolingo, lokola nazalaki na posa makasi ya kokòmela bino likolo ya lobiko na biso nyonso, nasengeli násala yango po na kolendisa bino bóbunda po na bondimi oyo epesamelá basantu mbala moko po na libela. 4Ya solo, batomosusubamikotisinamayelenakatinabino, baoyobasi’bakòmamáutakalaponaetumbuoyo, batobasambelakaté, oyobabongolángoluyaNzambenabisonamakamboyabosotopebawanganakaNkolopeMokonzi se mokonabisoYesuKristo.5Nalingikokundolelabino, [bino] oyobosi’boyebimakambonyonsoponalibela, ’tèMokonzi, awaasilikobikisabatonamokiliyaEjipito, nasimaabomibaoyobazangikondima. 6Ba-anzeluoyobabatelakilokumunabangoté, kasibatikakiesikanabangomoko, akangisábangonaminyololoyasekonakatiyamoliliponamokolomoneneyakosambisama.7NdengeSodome, Gomorepebingumbayapembeni −oyobasalakikindumbapebalandakibikelamoyanzotomosusu se bongo− bapesamilokolandakisaawabazwietumbuyamótoyaseko; 8ndengemokope, nandengebalotelaka, bakómisakanzotonabangombindo, baboyakabokonzipebatukakabankembo.9Nzokande Mikael, mokonziyaba-anzelu, tango azalakákowelananázabolo, kotianatembeponanzotoyaMoize, amekakitékokitisa ye namalobayakosambwisa, kasialobaki: «Mokonziápesayoetumbu.» 10Batowana, batsiolakamakambooyobayebité; pemakambooyobayebinabomotolokolabanyamaoyoezangámayele, nayangondebabebisamaka. 11Mawanabango, pobalandinzelayaKainapebamibwakinalibungaya Balaam ponalifuta; peponakotombokayaKora, bakufi.12Bangondebazalimabakunamampatinabinoyabondeko, awabakoliakaesikamokonábinopebakomitondisakanabileiminginakozangasomo. Bazalimapataezangámai, oyoememamakanamipepe; bazalibanzeteoyoezangimbumanaelakanayango, epikolami: ekufimbalamibale; 13bazalibambongeyambuetombokiebimisakafulufuluyamakamboyasoninabango; bazaliminzotoetelenganakaoyomolilimakasiebombameláponalibela.14EzalipeponabangondeEnoka, motoyasambosimaya Adam, asakolakiboye: «Tala, Mokonziazalikoyanábasantuna ye nkotonankoto, 15ponakokatamakamboyabatonyonsopekosukisabatonyonsoponamisalamabenyonsoyabangooyobasalaki, peponamalobamakasioyobatoyamasumubasambelakatébalobelaki ye.» 16Bazalibatooyobayimayimaka, balelalelaka, batambolakaengebenenabaposanabango;minokonabangoebimisakamalobaetondánalolendo, pebaletakabato kaka ponalitomba.Mateyayabantoma17Kasibino, bandekoyabolingo, bókanisamalobaoyoelobamálibosonabantomayaMokonzinabisoYesuKristo. 18Balobakinabino [’tè]: «Na mikoloyasuka, batsiolibakozala, bakotambolaengebenenabaposanabangoyamabe.» 19Bangondebakotisakabokabwani, batoyamakanisiyabomoto, baoyobazangiMolimo.20Kasibino, bandekoyabolingo, bómitongalikoloyabondimimosantupenzanabino, bóbondelanaMolimoMosantu. 21BómibatelanabolingoyaNzambe, bótalelamawayaMokonzinabisoYesuKristotiinabomoiyaseko.22Baoyobazalikotiatembe, bóyokelabangomawa, 23bamosusu, bóbikisabangonakobotolakábangonamóto; pemosusu, bóyokelabangomawa, nabobangi, pebóyinaatabilambanabangoebebisamiponanzoto.Lokumuyasuka24Na oyoakokikobatelabinonakokweyapekotiabino, bozangámbeba, libosoyankembona ye, naesengomonene; 25na ye se moko, NzambeMobikisinabiso, nanzelayaYesuKristoMokonzinabiso, nkembo, bonene, nguyapebokonzi, libosoyabileko, pesik’oyopeponabilekonyonso. Amen!

Emoniseli

11Emoniseli ya Yesu Kristo, oyo Nzambe apesaki ye po na kolakisa basali na ye makambo oyo esengeli koyaa noki. Alakisi yango sima ya kotinda anzelu na ye epai ya mosali na ye Yoane, 2oyo atatolaki nyonso oyo amonaki: liloba ya Nzambe pe litatoli ya Yesu Kristo. 3Esengo na motangib pe na bato bazali koyoka maloba ya lisakoli, pe bazali kotosa makambo oyo ekòmamá na kati na yango; pamba té elaka ekómi penepene.4Yoane, na ba-Eklezya sambo oyo ezali na Azia. Bolamu pe boboto euti epai ya Oyo azali, azalaki pe akoya; pe euti epai ya milimo sambo oyo ezali liboso ya ngwende na yec; 5pe euti epai ya Yesu Kristo, motatoli ya sembo, mwana ya liboso abimi na bakufi, pe Nkumu ya bakonzi ya mokili, ézala na bino. Ye alingaka biso pe akangoli biso na masumu na biso na makila na yed; 6pe akómisi biso bokonzi, banganga-Nzambee po na Nzambe pe Tata na ye. Nkembo pe nguya ézala na ye po na seko [na seko]! Amen.7Tala, azali koya na mapata,pe moto nyonso akomona ye,ata baoyo batobolaki ye,pe bikolo nyonso ya mokili bakoyoka mawa po na ye.Ya solo, bobele bongo!f. 8Mokonzi Nzambe alobi: «Ngai nazali Alfa pe Omegag; oyo azali, azalaká, pe azali koya; Oyo-ya-nguya-nyonso.»Limoni ya Mwana ya moto9Ngai ndeko na bino Yoane; pe moninga na monyoko, na bokonzi pe na molende na lisanga na Yesu, nazalaki na esanga oyo ebengamaka Patmosh likolo ya Liloba ya Nzambe, pe ya litatoli ya Yesu. 10Na mokolo ya Mokonzii, Molimo akiteli ngai pe nayoki sima na ngai mongongo moko ya makasi lokola mongongo ya kelelo, 11ezali koloba: «Oyo ozali komona, kòmayango na mokanda pe tinda yango na ba-Eklezya sambo: na Efeze, na Smirna, na Pergamos, na Tiatire, na Sarde, na Filadelfia pe na Laodisé.12Nabaluki po na kotala mongongo oyo ezalaki koloba na ngai pe, sima ya kobaluka, namoni bitemiseli ya mwinda sambo ya woloj. 13Na katikati ya bitemiseli ya mwinda yango, moto moko lokola Mwana ya moto; alati elamba molai pe alati mokaba moko ya wolo na tolok.14Motú na ye ná suki na ye ezalaki pembe lokola suki ya mpate ya pembe, lokola mbula pembe; pe miso na ye lokola kopela ya lolemo ya mótol. 15Makolo na ye ezalaki lokola motako ya motuya, ndenge epetolamá na móto makasi; pe mongongo na ye ezalaki lokola lokito ya mai monenem. 16Na loboko na ye ya mobali asimbi minzoto sambo, pe na monoko na ye, mopanga moko ya mino mibale ezalaki kobima. Elongi na ye ezalaki lokola moi oyo ezali kongenga na makasi na yangon.17Tango namoni ye, nakwei na makolo na ye lokola moto akufi; kasi atieli ngai loboko na ye ya mobali, alobi: «Kobanga té! Ngai nazali moto ya liboso pe moto ya sukao; 18moto oyo azali na bomoi: nakufaki, kasi tala, nazali na bomoi po na seko na seko, pe nazali na bafungola ya liwa pe ya mokili ya bakufi.19Bongo, kòma makambo oyo omoni: oyo ya lelo, pe oyo ekoya sima ya oyo. 20Mobombamo ya minzoto sambop oyo omonaki na loboko na ngai ya mobali, pe bitemiseli ya mwinda sambo ya wolo yango oyo: minzoto sambo ezali ba-anzelu ya ba-Eklezya sambo; pe bitemiseli ya mwinda sambo ezali ba-Eklezya sambo.»
21Kòmela anzelu ya Eklezya ya Efeze ’tè oyo asimbi minzoto sambo na loboko na ye ya mobali, oyo azali kotambola na katikati ya bitemiseli ya mwinda sambo ya wolo, alobi boyea: 2«Nayebi misala na yo, mosala makasi na yo, pe molende na yo; pe nayebi ’tè okoki kondima bato ya mabe té. Omekaki baoyo balobaka bango moko ’tè bazali bantoma nzokande bazali bantoma té, pe ozwi bango batoya lokutab.3Ozalaki na molende, pe omonaki pasi po na kombo na ngai; kasi olembaki té. 4Kasi mabe moko nazwi yo na yango ezali ’tè osi’otiki bolingo na yo ya libosoc. 5Kanisa nanu uta esika nini okwei; bongola motema pe sala misala na yo ya liboso. Soki té, nazali koyeela yo, pe nakolongola etemiseli ya mwinda na yo na esika na yango, soki obongoli motema té.6Kasi ozali na malamu oyo: oyinaka misala ya bato ya Nikola, misala oyo ngai pe nayinaka. 7Moto oyo azali na matoi, áyoka oyo Molimo alobi na ba-Eklezya. Molongi, nakopesa ye nzela ya kolia mbuma ya nzete ya bomoi oyo ezali na paradizo ya Nzambed.»8Kòmela anzelu ya Eklezya ya Smirna ’tè moto ya liboso pe moto ya suka, oyo akufaki pe azongi na bomoi alobi boyee: 9«Nayebi monyoko pe bobola na yo −nzokande ozali moto ya bomengo−, ná kotsiola ya baoyo balobaka bango moko ’tè bazali Bayuda, nzokande bazali Bayuda té, kasi sinagoga ya Satanaf.10Ózala na bobangi moko té ya bapasi oyo okomona. Tala, zabolo akobwaka bamosusu na kati na bino na boloko, po bómekama; pe bokozwa monyoko mikolo zomig. Zala sembo tii na liwa, pe nakopesa yo motole ya bomoi. 11Moto oyo azali na matoi, áyoka oyo Molimo ayebisi ba-Eklezya. Molongi akozwa etumbu ya liwa ya mibale té.»12Kòmela anzelu ya Eklezya ya Pergamos ’tè moto oyo azali na mopanga ya minoi mibale alobi boye: 13«Nayebi esika ofandaka: epai ngwende ya Satana ezali. Kasi okangami na kombo na ngai pe owangani bondimi na ngai té, ata na mikolo ya Antipas, motatoli na ngai ya sembo oyo abomamaki epai na bino, epai Satana afandi.14Kasi likambo moko nazwi yo na yango ezali ’tè ozali kuna na bato bakangamaka na mateya ya Balaam, oyo azalaká kolakisa Balak átiela bana ya Israel motambo ya kolia nyama babonzeli bikeko, pe kosala kindumbaj. 15Lisusu, ozali pe na bato mosusu bakangamaka, ndenge moko, na mateya ya bato ya Nikola.16Na boye, bongola motema. Soki té, nazali koyeela yo noki, pe nakobundisa bango na mopanga ya monoko na ngai. 17Moto oyo azali na matoi, áyoka oyo Molimo alobi na ba-Eklezya. Molongi, nakopesa ye mána ebombamá; nakopesa ye libanga moko ya pembe, pe likolo ya libanga yango, kombo moko ya sikak ekòmamá, oyo moto moko té ayebi, longola se moto oyo akozwa yango.»18Kòmela anzelu ya Eklezya ya Tiatire ’tè Mwana ya Nzambe, oyo miso na ye ezali lokola kopela ya lolemo ya móto pe makolo na ye lokola motako ya motuya alobi boyel: 19«Nayebi misala na yom, bolingo na yo, bondimi na yo, lisalisi na yo pe molende na yo; misala na yo ya suka eleki oyo ya liboso.20Kasi mabe moko nazwi yo na yango ezali ’tè ozali kondima Jezabel, mwasi oyo alobaka ye moko ’tè azali profete pe ateyakan; azali kokosa basali na ngai básala kindumba pe bália nyama babonzeli bikeko. 21Natikelaki ye tango po ábongola motema; kasi alingi kobongwana na kindumba na ye té.22Tala, nazali kobwaka ye na mbeto, ná baoyo bazali kosala ná ye ekobo, na kati ya monyoko monene, soki babongwani na misala na ye téo. 23Nakoboma bana na ye, pe ba-Eklezya nyonso ekoyeba ’tè ngai nayebi makanisi pe mitema ya bato; pe nakofuta moko moko na bino engebene na misala na yep.24Nazali koloba na bino mosusu oyo bozali na Tiatire, bino nyonso oyo bondimi mateya wana té, pe boyebi "bozindo ya Satana" té −ndenge balobaka−: nakomemisa bino mokumba mosusu té; 25kaka oyo bozali na yango. Bósimba yango tii tango nakoyaq.26Molongi, moto oyo akotosa misala na ngai tii na suka,nakopesa ye bokonzi likolo ya bikolor. 27Pe akokamba yango na lingenda ya ebende −ndenge babukaka bilokú ya mabelés−, 28ndenge ngai moko pe nazwaki bokonzi epai ya Tata na ngai; pe nakopesa ye monzoto ya tongot. 29Moto oyo azali na matoi, áyoka oyo Molimo alobi na ba-Eklezyau.»
31Kòmela anzelu ya Eklezya ya Sarde ’tè oyo azali na milimo sambo ya Nzambe pe minzoto sambo alobi boye: «Nayebi misala na yo: balobaka ’tè ozali na bomoi, nzokande osi’okufáa. 2Kengela pe lendisa oyo etikali, oyo elingi kokufa: pamba té namoni té ’tè misala na yo ekoki na miso ya Nzambe na ngai.3Bongo kanisa ndenge oyambaki pe oyokaki; batela yango pe bongola motema. Soki okengeli té, nakoya lokola moyibi, pe okoyeba té soki na tango nini nakobimela yob. 4Kasi na Sarde, ozali na mwa-ndambo ya bato oyo babebisi bilamba na bango té. Bakotambola elongo na ngai, na bilamba ya pembec, po bazali bato balongobani.5Molongi akolata bongo bilamba ya pembe, pe nakolongola kombo na ye na buku ya bomoi té; pe nakondima ye na miso ya Tata na ngai pe na miso ya ba-anzelu na yed. 6Moto oyo azali na matoi, áyoka oyo Molimo alobi na ba-Eklezyae.»Mokanda na Eklezya ya Filadelfia7Kòmela anzelu ya Eklezya ya Filadelfia ’tèMosantu, Oyo ya Solo,oyo asimbi fungola ya David,oyo afungolaka pe moto moko té akokanga,oyo akangaka pe moto moko té afungolakaf, alobi boye: 8«Nayebi misala na yog. Tala, natie ekuke efungwamá liboso na yo, oyo moto moko té akoki kokanga, po ozali na nguya moke, otosi maloba na ngai, pe owangani kombo na ngai té.9Tala, napesi yo bato ya sinagoga ya Satana, baoyo balobaka bango moko ’tè bazali Bayuda, nzokande bazali Bayuda té, kasi bakosaka. Tala, nakosala ’tè báya kofukama na makolo na yo pe báyeba ’tè ngai nalingaka yoh. 10Lokola obatelaki maloba na ngai ya molende, ngai pe nakobatela yoi na tango ya komekama oyo elingi koyeela mokili mobimba po na komeka bato ya mokili. 11Nazali koya noki. Simba oyo ozali na yangoj, po motomoko té ábotola yo motole na yo.12Molongi, nakokómisa ye likonzi na kati ya ndako mosantu ya Nzambe na ngai. Akoki kobima libanda lisusu té, pe nakokòma, likolo na ye, kombo ya Nzambe na ngai, pe kombo ya engumba ya Nzambe na ngai, Yeruzalem ya sika, oyo ezali kokita uta na likolok epai ya Nzambe, pe kombo na ngai ya sika. 13Moto oyo azali na matoi, áyoka oyo Molimo alobi na ba-Eklezyal.»14Kòmela anzelu ya Eklezya ya Laodisé ’tè Amen, Motatoli ya sembo pe ya solo, Ebandeli ya bokeli ya Nzambem, alobi boye: 15«Nayebi misala na yon: ozali pio té, móto pe té. Nalingaki ózala pio to móto! 16Bongo, lokola ozali mwa-móto moke, kasi móto té, pio pe té, nalingi kosanza yo na monoko na ngai.17Po ozali koloba: nazali moto ya bomengo, natondá na mosolo, nazali na bosengá ya eloko té; nzokande oyebi té ’tè ozali moto ya pasi pe ya mawa, mobola, okufá miso, pe ozali bolumbu. 18Napesi yo toli ósomba wolo epetolamá na móto epai na ngai po ótonda na bomengo; pe bilamba ya pembe po ólata bongo soni ya bolumbu na yo émonana té; ná pe kisi ya kotia na miso po ómona.19Ngai, baoyo nyonso nalingaka, napamelaka pe nateyaka bangoo. Bongo, zala na molende makasi pe bongola motema. 20Tala, natelemi na ekuke pe nazali kobeta. Soki moto ayoki mongongo na ngai pe afungoli ekuke, [boye] nakokota epai na ye pe nakolia limpati esika moko ná ye, pe ye esika moko ná ngai.21Molongi, nakopesa ye nzela ya kofanda ná ngai na ngwende na ngai, ndenge ngai pe nalongi pe nafandi ná Tata na ngai na ngwende na ye. 22Moto oyo azali na matoi, áyoka oyo Molimo alobi na ba-Eklezya.»
41Sima na makambo oyo, natalaki mpe namoni likolo kofungwama. Mongngo ya liboso oyo nayokaki koloba lokola kelelo:«Mata awa mpe nakotalisa yo oyoekoya na sima na makambo oyo.» 2Na tango yango, namonaki kati na molimo kiti moko mpe moto efandi likolo na yango. 3Moto afandaki, amonanaki lokola libanga ya yasipi na salali, mpe monama mozingaki kiti na bokonzi. Monama ezalaki lokola libanga na samala.4Nzinga nzinga na kiti na bokonzi, ezalaki na kiti tuku mibale na minei mpe ba mpaka tuku mibale na minei bafandaki na kiti yango, balataki bilamba pembe, na mito na bango mitole na wolo. 5Mokalikali ebimi na kiti na bokonzi, mpe mingongo na nkake. Minda sambo ipelaki liboso na kiti na bokonzi, mizalaki milimo sambo na Nzambe.6O boso bwa kiti na bokonzi lokola libeke na talatala ezali na motindo na kulusatala. Kati na kiti na bokonzi mpe bipai na bipai, Bikelamu na bomoi minei, bitondi na miso liboso mpe sima7Ekelamu ya bomoi ya liboso ezalaki na motindo na nkosi, oyo ya mibale na motindo na ngombe, oyo ya misato na elongi ya moto, mpe oyo ya minei na motindo na mpongo ezalaki kopumbwa. 8Bikelamu minei bazalaki moko na moko na mapapu motoba matondi na miso likolo mpe nse. Batiki te koloba butu mpe moi « Mosantu, mosantu, mosantu ezali Mokonzi Nzambe na biso, oyo azalaki, azali mpe akozala.»9Ntango inso bikelamu minei bapesi nkembo, lokumu mpe matondi epai na mofandi na kiti na bokonzi, ye oyo azali na bomoi libela na libela. 10Mikolo yango tuku mibale na minei bakwei liboso na mofandi na kiti na bokonzi, mpe basambeli oyo azali na bomoi libela na libela mpe babwaki mintole na bango liboso na kiti na bokonzi mpe koloba: 11«Mokonzi mpe Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo, lokumu mpenguya. Zambi okelaki biloko binso, mpe na mokano mwa yo, binso bikelami mpe bizali.»
51Na loboko ya mofandi na kiti na bokonzi namonaki mobili kokomama na kati mpe na nsima, mpe mobili kokangama na bilembo sambo. 2Namoni mpe mwanze makasi kosakola na mongongo makasi ete: «Nani akoki kofungola mokanda mpe bilembo na yangoʔ»3Na likolo, na mokili, na nse na mokili, moto te akoki kofungola mokanda soki kotala kati na yango. 4Ngai mpe nalelaki mingi mpo ete moto moko te azwami mpo afungola mokanda soki kotala kati na yango. 5Nde moko ya mikolo alobi na ngai ete lela te, kasi tala, nkosi na libota na Yuda, ntina na Dawidi, asili kolonga. Ye akoki kofungola mokanda mpe na bilembo na yango nsambo.6Kati na kiti na bokonzi, bizali na bomoi minei, mpe kati na mikolo, namoni mwana na mpate kotelema; lokola asili kobomama. Azalaki na maseke nsambo mpe miso nsambo mazali milimo nsambo na Nzambe mitindami kati na mokili mobimba. 7Akei mpe akamati mokanda na loboko na mobali na mofandi na kiti na bokonzi.8Wana esili ye kokamata mokanda yango, Bizali na bomoi minei na mikolo yango tuku mibale na minei, bakwei liboso na mwana na mpate, mpe bazalaki moko moko na nzenze mpe na mbeki na wolo etondi na mpaka, oyo izali mabondeli ya bapetwi.9Bayembi loyembo na sika ete: « Obongo na kokamata mokanda yango, mpe na kofungola bilembo na yango, mpo ete obomami mpe na makila ma yo osikoli mpo na Nzambe bato na mikili nyoso, na minoko nyoso, na bikolo nyoso na mabota nyoso. 10Mpe ozalisi bango bokonzi na banganga mpo na Nzambe na biso, mpe bakozala bakonzi na mokili.11Namoni mpe nayoki mingongo na banze mingi bazingi kiti na bokonzi, mpe Bizali na bomoi, mpe mikolo, motuya na bango ezalaki nkoto mpe bankoto. 12Bazalaki koyemba na mongongo makasi koloba: «Mpate oyo asili kobomama abongi na kozwa nguya, na mibolo, na mayele, na makasi, na lokumu, na nkembo, na masanzoli.»13Nayoki biloko nyoso bizalisami na likolo mpe na mokili, mpe na nse na mokili, mpe na mai monene, mpe biloko nyoso na kati na yango koloba ete: « Na mofandi na kiti na bokonzi, mpe na mwana na mpate, masanzoli, na lokumu, na nkembo, na makasi, libela na libela. 14Bizali na bomoi minei balobi ete, bobele bongo, mpe mikolo bakwei kosambela.
61Namoni mwana na mpate kobuka moko ya fungola sambo, mpe nayokaki moko na Bizali na bomoi minei koloba na mongongo lokola nkake ete: «Yaka!» 2Nazalaki kotala mpe namonaki mbalata mpembe. Mofandi na yango azalaki na litimbo, motole epesami na ye.Abimi lokola molongi mpo alonga.3Wana efungolaki ye elembo ya mibale, nayoki ezali na bomoi ya mibale koloba ete: « Yaka!» 4Mbalata mosusu motane ebimi. Nguya epesami na mofandi na yango ete alongola kimia na mokili na ntina ete bato babomana, mpe mopanga epesami na ye.5Wana efungolaki ye elembo ya misato, nayoki Ezali na bomoi ya misato koloba ete: «Yaka» Natali mpe namoni mbalata ya mwindo, mofandi na yango azalaki na kilo na loboko na ye. 6Nayoki mongongo lokola kati na Bizali na bomoi minei koloba ete: «Kopo mibale na masangu denali moko,kopo motaba na loso denali moko, bebisa mafuta, na vinyo mpe te.7Wana efungoli ye elembo ya minei, nayoki mongongo ya Ezali na bomoi na minei koloba ete: «Yaka» 8Natali mpe namoni mbalata ya na langi koloba mpondu. Mpo na mofandi na yango, nkombo na ye liwa. Mpe ewelo elandi ye penepene. Bokonzi likolo na ndambu na minei na mokili epesameli bango, mpo na koboma na mopanga, na nzala, na banyama na yauli na mokili.9Wana efungoli ye elembo ya mitano, namoni na nse na etumbelo milimo na bango basili kobomama mpo na liloba na Nzambe mpe mpo na litatoli litatolaki bango. 10Bagangi na mongongo makasi ete: «kino tango nini Nkolo Mosantu mpe na solo, okosambisa te mpo na kobukanisa bango bafandi na mokili na ntina na makila na biso?» 11Bapesi moko na moko na bango elamba ya pembe, mpe balobaki na bango kopema naino mwa tango moke bakopema kino ekoka motuya ya baninga na bango baombo, na bango baoyo bakobomama lokola esili bango penza kobomama.12Wana efungoli ye elembo na motoba, namoni ete mokili eningani mingi, moi eyindi lokola elamba moyindo mpe sanza mobimba ekomaki lokola makila. 13Mpe mioto na likolo mikwei na nse lokola mosuke ebwaki mbuma n yango mogugu wana ezali yango koningana na mopepe makasi. 14Likolo elimwaki lokola mikanda ezingami. Ngomba nyoso na bisanga nyoso bilongwi na bisika na yango.15Bokonzi na mokili, na bato minene, mikolo, mikonzi na basoda, na bazwi, na bato nya makasi, na baombo nyoso mpe bansomi bamibombi na kati na malusu, na mabanga na ngomba. 16Alobi nangomba mpe mabanga ete, «kweya likolo na biso, mpe bomba biso na miso na mofandi na kiti na bokonzi mpe na nkele na mwana na mpate. 17Mpo ete mokolo monene na nkele na ye eyei, mpe nani akoki kotelema?»
71Sima na yango, namoni ba-anzelu minei batelemi na bipai minei ya mokili, bakangi mipepe minei ya mokili po mopepe moko épepa na mokili té, na mbu té, na nzete moko pe té. 2Namoni anzelu mosusu azali komata uta na epai moi ebimaka, asimbi elembo ya Nzambe ya bomoi; abeleli na mongongo makasi na ba-anzelu minei oyo nzela ya kobebisa mokili pe mbu epesamelaki bango, 3alobi: «Bóbebisa mokili té, mbu té, banzete pe té, tii tango nakosilisa kotia basali ya Nzambe na biso elembo na bilongi na bango.»4Pe nayoki motango ya bato oyo batiami elembo: bazalaki nkoto kama moko na tuku minei na minei, batiami elembo, ya mabota nyonso ya bana ya Israel. 5Bato ya libota ya Yuda: nkoto zomi na mibale batiami elembo;bato ya libota ya Ruben: nkoto zomi na mibale;bato ya libota ya Gad: nkoto zomi na mibale; 6bato ya libota ya Aser: nkoto zomi na mibale;bato ya libota ya Neftali: nkoto zomi na mibale;bato ya libota ya Manasé: nkoto zomi na mibale;7bato ya libota ya Simeon: nkoto zomi na mibale;bato ya libota ya Levi: nkoto zomi na mibale;bato ya libota ya Isakar: nkoto zomi na mibale; 8bato ya libota ya Zabulon: nkoto zomi na mibale;bato ya libota ya Jozef: nkoto zomi na mibale;bato ya libota ya Benjamen: nkoto zomi na mibale batiami elembo.9Sima na yango, namoni: tala, bato ebele penza oyo moto moko té akoki kotanga bango, bato ya bikolo nyonso, ya mabota nyonso, ya bamboka nyonso pe ya minoko nyonsoa, batelemi liboso ya ngwende pe liboso ya mwana-mpate, balati bilamba milai ya pembe, pe mandalala na maboko na bango, 10bazali koganga na mongongo makasi:Lobiko na Nzambe na biso oyo afandi nangwende, pe na mwana-mpate!11Pe ba-anzelu nyonso oyo bazalaki zingazinga ya ngwende, ya bampaka pe ya ba-bomoi bafukami, bilongi na bango na se liboso ya ngwende pe bakumbameli Nzambe, 12balobi:Amen! Mapamboli, nkembo, bwanya,matondi, lokumu, nguya pemakasi ézala na Nzambe na biso po na seko na seko,Amen!13Pe moko na kati ya bampaka atuni ngai, alobi: «Bato oyo balati bilamba milai ya pembe, bazali banani pe bauti wapi?» 14Nazongiseli ye: «Mokonzi na ngai, yo nde oyebi.» Pe ayebisi ngai: «Ezali bato oyo bauti na monyoko monene; basukoli bilamba milai na bango pe bakómisi yango pembe na makila ya mwana-mpate.15Yango wana bazali liboso ya ngwende ya Nzambepe bazali kosambela ye butu moi na ndako mosantu na ye.Pe Oyo afandi na ngwende akotia éma likolo na bango. 16Bakoyoka lisusu nzala té, bakoyoka lisusu posa ya mai pe té;moi ekobeta bango ata moke té,molunge makasi moko pe téb; 17po mwana-mpate oyo azali na katikati ya ngwende akobatela bango, akokamba bango na maziba ya mai ya bomoi;pe Nzambe akolongola mpinzoli nyonso na miso na bangoc.»
81Tango afungoli elembo ya sambo, kimia moko ekoti na likolo soki ndambo ya ngonga mokoa. 2Pe namoni ba-anzelu sambo oyo bazalaka liboso ya Nzambe; pe bakelelo sambo epesameli bango.3Anzelu mosusu ayei pe atelemi na esika ya kobonzela; asimbi engwekúngwekú ya wolo, pe malasi ebele epesameli ye po ábonzela yango, ná losambo ya basantu nyonso, na esika ya kobonzela ya wolo, liboso ya ngwendeb. 4Milinga ya malasi emati uta loboko ya anzelu, elongo na losambo ya basantu, liboso ya Nzambe. 5Anzelu azwi engwekúngwekú, atondisi yango na móto ya esika ya kobonzela, pe abwaki yango na se. Bakake, mingongo, mikalikali pe koningana ya mabelé ebimi.6Ba-anzelu sambo oyo basimbi bakelelo sambo bamibongisi po na kobeta yango. 7Oyo ya liboso abeti kelelo: matandala pe móto esanganá ná makila ebimi, pe ebwakami na mokili. Eteni moko ya biteni misato ya mokili eziki; eteni moko ya biteni misato ya banzete eziki pe matiti ya mobesu nyonso eziki.8Anzelu ya mibale abeti kelelo: eloko moko lokola ngomba monene ezali kopela mótoe ebwakami na mbu. Eteni moko ya biteni misato ya mbu ekómi makila, 9pe eteni moko ya biteni misato ya bikelamo oyo ezali na mbu pe ezali na pema ya bomoi ekufi; pe eteni moko ya biteni misato ya bamasuwa epanzami.10Anzelu ya misato abeti kelelo: monzoto moko ya monene ekwei uta na likolof, ezali kopela lokola mwinda; ekweeli eteni moko ya biteni misato ya bibale pe maziba ya mai. 11Kombo ya monzoto yango ezali Apisinto. Pe eteni moko ya biteni misato ya mai ekómi bololo, pe bato ebele bakufi na mai yango po ekómi bololo.12Anzelu ya minei abeti kelelo: eteni ya misato ya moi ebetami, ná eteni moko ya biteni misato ya sanza, pe eteni moko ya biteni misato ya minzoto; po eteni moko ya biteni misato na yango éyinda, pe moi éngengisa eteni moko ya biteni misato na yango té, ná butu pe ndenge mokoh.13Pe namoni: Nayoki engondó moko ezali kopumbwa na likolo penza, ezali koganga na mongongo makasi: «Mawa! Mawa! Mawa na bato ya mokili po na mingongo mosusu ya bakelelo oyo ba-anzelu misato balingi kobeta.»
91Anzelu ya mitano abeti kelelo: namoni monzoto moko euti likolo ekwei na se; pe fungola ya libulu ezangá suka epesameli yango. 2Efungoli libulu yango ezangá suka pe milinga emati uta na libulu yango, lokola milinga ya litumbu ya monenea. Moi eyindi, ná likolo pe, po na milinga ya libulu yango.3Makonki ebimi na milinga yango pe epanzani na mokili; pe nguya lokola nguya bankotó ya mokili ezalaka na yango epesameli yango. 4Eyebisameli yango ’tè ébebisa matiti ya mokili té, molóna moko té, nzete moko pe té; longola se bato oyo bazali na elembo ya Nzambe na bilongi téb.5Pe nzela epesameli yango ’tè éboma bango té, kasi éyokisa bango pasi sanza mitano. Pe pasi na yango ezali lokola pasi ya nkotó tango eswi moto. 6Na mikolo wana, bato bakoluka liwa, kasi bakozwa yango té; bakolula kokufa, kasi liwa ekokima bango.7Lolenge ya makonki yango ezalaki lokola bampunda esi’ebongisami po na etumbad. Na mitú na yango, ezalaki na biloko lokola mitole ekokaná ná wolo, pe bilongi na yango lokola bilongi ya bato; 8ezalaki na suki lokola suki ya basi, pe mino na yango lokola ya bankosie; 9ezalaki na batolo lokola bakazaka ya bibende, pe makelele ya mapapu na yango ezalaki lokola lokito ya makalo ya bampunda ebele ezali kokende mbangu na etumbaf;10ezali na mikila lokola bankotó, ná basende; pe na mikila na yango nguya na yango ya koyokisa bato pasi sanza mitano ezali. 11Ezali na mokonzi likolo na yango: anzelu ya libulu ezangá suka; kombo na ye na ebré ezali Abadon, pe na greki Apolion. 12Mawa moko eleki; kasi, mawa mibale ezali koya lisusu sima na yango.13Anzelu ya motoba abeti kelelo: nayoki mongongo moko euti na basonge [minei] ya esika ya kobonzela ya wolo oyo ezali liboso ya Nzambeh, 14ezali koloba na anzelu ya motoba oyo asimbi kelelo: «Fungola ba-anzelu minei oyo bakangamá penepene na ebale monene Efrate.» 15Pe ba-anzelu minei yango bafungolami, basi’babongamá po na ngonga, mokolo, sanza pe mbula ya koboma eteni moko ya biteni misato ya bato.16Motango ya basoda bamati mpunda ezalaki −nayoki motango na bango−: nkoto tuku mibale mbala koto zomii. 17Namoni bampunda pe baoyo bamati yango, na limoni, boye: bazali na ngubà ya ebende, motane lokola móto, bulé-moindo pe langi ya mosaka lokola fofólo. Mitú ya bampunda ezalaki lokola mitú ya bankosi; pe na minoko na yango, móto, milinga pe fofólo ezali kobimaj.18Eteni moko ya biteni misato ya bato ekufi po na bapasi misato oyo: móto, milinga pe fofólo oyo ezalaki kobima na minoko na yango. 19Pamba té makasi ya bampunda ezali na minoko na yango pe na mikila na yango. Ya solo, mikila na yango ekokaná ná banyoka; ezali na mitú pe eyokisaka pasi na yango.20Bato oyo batikali, oyo bakufi na bapasi wana té, bapesi ata mokongo na misala ya maboko na bango té: boye batiki té kosambela milimo mabe, bikeko ya wolo, ya palata, ya motako, ya mabanga, ya mabaya, oyo ekoki komona té, koyoka té, kotambola pe ték. 21Bapesi mokongo na koboma na bango té, na bondoki na bango té, na kindumba na bango té, na moyibi na bango pe té.
101Namoni anzelu mosusu ya nguya azali kokita uta na likolo, alati lipata, monama likolo ya motú na ye, elongi na ye ezali lokola moi pe makolo na ye lokola makonzi ya móto. 2Na maboko na ye, asimbi mwa-buku moko efungwamá. Atie lokolo na ye ya mobali na mbu, pe lokolo ya mwasi na mokili,3pe agangi na mongongo makasi ndenge nkosi egangakaa. Tango agangi, bakake sambo eyokisi lokito na yango. 4Tango bakake sambo ebeti, nalingaki kokòma, kasi nayoki mongongo moko euti likolo ezali koloba: «Bomba makambo oyo bakake sambo elobi, kokòma yango téb!»5Anzelu oyo namonaki atelemi na mbu pe na mokili,atomboli loboko na ye ya mobali na likolo; 6pe akati seleka na kombo ya oyo azali na bomoi po na seko na sekoc, oyo akelá likolo pe oyo ezali na kati na yango, mokili pe oyo ezali na kati na yango, mbu pe oyo ezali na kati na yango, ’tè tango ekozala lisusu té. 7Kasi na mikolo ya mongongo ya anzelu ya sambo, tango akobeta kelelo, boye mobombamo ya Nzambe ekokisami, ndenge ayebisaká sango malamu na basali na ye, baprofete.8Bongo mongongo oyo nayokaki euti na likolo eyebisi ngai lisusu, elobi: «Kende kokamata mwa-buku efungwamá, na loboko ya anzelu oyo atelemi na mbu pe na mokili.» 9Nakei epai ya anzelu kosenga ye ’tè ápesa ngai mwa-buku yango. Alobi na ngai: «Kamata pe lia yango. Ekozala bololo na libumu na yo, kasi na monoko na yo, ekozala elengi lokola mafuta ya nzoi.»10Bongo nakamati mwa-buku yango na loboko ya anzelu pe nalie yango. Na monoko na ngai, ezalaki elengi lokola mafuta ya nzoi, kasi tango nameli yango, libumu na ngai ekómi bololod. 11Pe balobi na ngai: «Esengeli ósakola lisusu na bato, na bikolo, na minoko pe epai ya bakonzi ebele.»
111Mokékélé moko lokola mwa-nzete ya komekela epesameli ngai, pe alobi: «Telema pe meka ndako mosantu ya Nzambe, esika ya kobonzela, pe bato oyo basambelaka na kati na yangoa. 2Kasi po na oyo etali lopango oyo ezali libanda ya ndako mosantu, tika yango, komeka yango té: po esi’epesami na bapagano; pe engumba mosantu ekonyatama sanza tuku minei [na] mibaleb.»3Pe nakopesa na batatoli na ngai mibale, balati saki, nzela ya kosakola mikolo nkoto moko na kama mibale na tuku motoba. 4Bango nde banzete mibale ya olive pe bitemiseli mibale ya mwinda mibale oyo ezalaka liboso ya Mokonzi ya mokilic. 5Sokimoto alingi kosala bango mabe, móto ekobima na monoko na bango pe ekozikisa banguna na bangod. Soki moto alingi kosala bango mabe, ezali na lolenge wana nde moto yango asengeli kobomama.6Bazali na bokonzi ya kokanga likolo po ’tè mbula ébeta té na mikolo ya masakoli na bango. Bazali pe na bokonzi likolo ya mai, kobongola yango ékóma makila, pe kopesa mokili bapasi ya ndenge na ndenge, tango nyonso oyo bango balingie. 7Tango bakosilisa litatoli na bango, Nyama oyo emataka uta na libulu ezangá suka ekobundisa bango, ekolonga bango pe ekoboma bangof.8Bibembe na bango ekozala na esika monene ya engumba monene oyo ebengamaka na lisese Sodome, pe Ejipito, esika Mokonzi na bango pe abakamaki na kuruze. 9Pe bato ya bikolo, ya mabota, ya minoko pe ya bamboka nyonsoh bakotala bibembe na bango mikolo misato na ndambo; pe bakotika té bibembe na bango étiama na lilita.10Bato ya mokili bakosepela po na bango pe bakozala na esengo. Bakopesana makabo, po basakoli wana mibale bayokisaki bato ya mokili pasi mingi. 11Sima ya mikolo yango misato na ndambo, molimo moko ya bomoi euti na Nzambe ekoteli bango, bongo batelemi na makolo na bangoi. Pe somo monene ekangi bato oyo bazali kotala bango. 12Bayoki mongongo makasi euti na likolo ezali koloba na bango: «Bómata awa!» Bamati na likolo, na kati ya lipata, pe banguna na bango bamoni bangoj.13Kaka na tango wana, koningana moko makasi ya mabelé esalami pe eteni moko ya biteni zomi ya engumba ebukani, pe bato nkoto sambo bakufi na koningana ya mabelé yango. Bato oyo batikali bayoki somo pe bapesi lokumu na Nzambe ya likolo. 14Mawa ya mibale eleki; tala, mawa ya misato ezali koya noki.15Anzelu ya sambo abeti kelelo: mingongo moko minene ebimi na likolo, elobi:Bokonzi ya mokili ekómi ya Mokonzi na bisope ya Mesiya na ye;pe akoyangela po na seko na sekol.16Bampaka tuku mibale na minei oyo bafandi na bangwende na bango liboso ya Nzambe bakwei bilongi na se pe bakumbameli Nzambe, 17balobi:Mokonzi Nzambe ya nguya nyonso,yo oyo ozali pe ozalakám,totondi yo po ozwi nguya monene na yope ofandisi bokonzi na yo.18Bikolo esilikaki;kasi kanda na yo eyaki,pe elaka ya kosambisama ya bakufi;pe ya kopesa lifuta na basali na yo, baprofete,na basantu pe na bato oyo babangaka kombo na yo,bato mike pe bato minene;pe elaka ya kobebisa bato oyo bazali kobebisa mokilin.19Bongo ndako mosantu ya Nzambe oyo ezali na likolo efungwami, pe sanduku ya boyokani na ye emonani na ndako mosantu na ye. Pe mikalikali, mingongo, bakake, koningana ya mabelé pe matandala mingi ezalakio.
121Elembo moko monene emonani na likolo: Mwasi moko alati moi, sanza na se ya makolo na ye, pe motole ya minzoto zomi na mibale na motú na yea. 2Azali na zemi, pe azali koganga po na pasi pe monyoko ya kobotab.3Pe elembo mosusu emonani na likolo: tala, Dragon moko monene ya motane lokola móto, ezali na mitú sambo ná maseke zomi, pe bikoti ya bokonzi sambo na mitú na yangoc. 4Mokila na yango ekomboli eteni moko ya biteni misato ya minzoto ya likolo pe ebwaki yango na mokili. Dragon yango etelemaki liboso ya Mwasi oyo alingi kobota po, tango akobota, élia mwana na yed.5Bongo aboti mwana-mobali, oyo akokamba bikolo nyonso na lingenda ya ebende. Pe mwana na ye atombwami epai ya Nzambe pe ya ngwende na yee. 6Mwasi akimi na esobe, epai wapi azalaki na esika esi’ebongisamá kuna na Nzambe, po áleisama kuna mikolo nkoto moko na kama mibale na tuku motoba.7Etumba ebimi na likolo: Mikael pe ba-anzelu na ye babundi ná Dragon; Dragon pe ebundi ná ba-anzelu na yangog, 8kasi elongi té; esika na likolo ezwami lisusu té po na bango. 9Pe Dragon monene yango ebwakami, nyoka ya kala oyo ebengamaka Zabolo pe Satana, mokosi ya mokili mobimba, ebwakami na seh, pe ba-anzelu na ye babwakami elongo na ye.10Nayoki mongongo moko makasi na likolo ezali koloba:Sik’oyo, lobiko pe nguya,bokonzi ya Nzambe na biso,pe bokonzi ya Kristo na ye ekómi;po oyo afundaka bandeko na biso,oyo azalaki kofunda bango butu moi na miso ya Nzambe na biso abwakamii.11Bango balongi ye po na makila ya mwana-mpatepe po na liloba ya litatoli na bango: balingaki bomoi na bango té, ata tii na liwaj. 12Yango wana bósepela, likolokpe baoyo bofandi na kati na yango!Mawa na se pe na mbupo zabolo akiti epai na bino na kongala moko makasi,awa asi’ayebi ’tè azali na tango moke.13Tango Dragon emoni ’tè ebwakami na mokili, ekómi kolanda Mwasi oyo abotaki mwana-mobali. 14Kasi mapapu mibale ya engondó monene epesameli Mwasi po ápumbwa tii na esobe, na esika na ye, epai wapi akoleisama kuna, po na tango moko, batango pe ndambo ya tango, mosika na nyokal.15Pe nyoka esanzi mai na monoko na yango lokola ebale sima ya Mwasi, po ebale émema yem. 16Kasi mabelé esalisi Mwasi: mabelé efungoli monoko na yango pe emelin ebale oyo Dragon esanzaki na monoko na yango. 17Dragon esilikeli Mwasi, pe ekei kobundisa bana na ye oyo batikalaki: baoyo batosaka mibeko ya Nzambe pe bazalaka na litatoli ya Yesuo; 18pe etelemi na libongop ya mbu.
131Namoni Nyama moko ezali komata uta na mbu; ezali na maseke zomi pe mitú sambo. Ezali na bikoti ya bokonzi zomi na maseke na yango pe [ba]kombo ya kotuka na mitú na yangoa. 2Nyama yango oyo namonaki ezalaki lokola nkoi, makolo na yango ezalaki lokola ya ursu, pe monoko na yango lokola monoko ya nkosi. Dragon epesi yango nguya na yango, ngwende na yango, pe bokonzi moneneb.3Moko ya mitú na yango ezalaki lokola ezokisamá pota oyo ekoki koboma, kasi pota na yango oyo ekoki koboma ebeli. Mokili mobimba ekamwe pe elandi Nyama. 4Pe bakumbameli Dragon po epesi bokonzi na Nyama; bakumbameli pe Nyama, balobi: «Nani akokani na Nyamac pe nani akoki kobundisa yango?»5Nzela ya koloba maloba ya lolendo pe ya kotuka epesameli yango, pe bokonzi ya kosala mosala sanza tuku minei [na] mibale epesameli yangod. 6Pe efungoli monoko na yango po na koloba maloba ya kotuka Nzambe, po na kotuka kombo na ye, éma na ye, baoyo bafandaka na likoloe.7Nzela ya kobundisa basantu pe ya kolonga bango epesameli yango; bokonzi likolo ya mabota nyonso, bikolo nyonso, minoko nyonso, bamboka nyonso pe epesameli yangof. 8Bato nyonso ya mokili bakokumbamela yango, baoyo bakombo na bango ekòmamá té, uta na ebandeli ya mokili, na buku ya bomoi ya mwana-mpate oyo akatamá kingo.9Moto oyo azali na matoi, áyoka! 10Oyo atangamá kokangama,akokende na kokangama;oyo atangamá kobomama na mopanga,akobomama na mopanga.Oyo nde ezali tina ya molende pe ya bondimi ya basantu.11Pe namoni Nyama mosusu ezali komata uta na mokili; ezalaki na maseke mibale lokola mwana-mpate, kasi ezalaki koloba lokola Dragon mokoi. 12Ezali kosalela bokonzi nyonso ya Nyama ya liboso na miso na yango, pe esali ’tè mokili ná bato oyo bafandi na kati na yango bákumbamela Nyama ya liboso oyo pota na yango ekoki koboma ebeli.13Esali bilembo minene: tii kokitisa móto, uta na likolo, na se, na miso ya bato nyonsoj; 14ekosi bato ya mokili po na bilembo oyo epesameli yango nzela ya kosala na miso ya Nyama, na kolobaká na bato ya mokili ’tè básala elili ya Nyama, oyo ezali na pota ya mopanga pe ebiki.15Pe nzela ya kopesa bomoi na elili ya Nyama epesameli yango, po elili ya Nyama éloba pe ésala [na ndenge] ’tè baoyo nyonso bakokumbamela elili ya Nyama té bábomamak. 16Epesi mitindo na bato nyonso, bato mike pe bato minene, bato ya bozwi pe babola, bansomi pe baumbu ’tè bátia bango elembo na loboko na bango ya mobali to na elongi na bango, 17pe moto moko té akokoka kosomba to kotekisa, longola se soki azali na elembo yango, kombo ya Nyama to motango ya kombo na yango.18Bososoli nde ezali awa: moto oyo azali na mayele, ásosola motango ya Nyama, pamba té elakisi motango ya moto moko, pe motango na yango ezali kama motoba na tuku motoba na motoba.
141Pe namoni: Tala, mwana-mpate atelemi na ngomba Sion, pe elongo na ye bankoto kama moko na tuku minei na minei oyo bazali na kombo na ye pe kombo ya Tata na ye ekòmamá na bilongi na bangoa. 2Nayoki lokito moko euti na likolo lokola lokito ya mai moneneb pe lokola lokito ya kake moko makasi; pe lokito oyo nayokaki ezalaki lokola ya babetì-nzenze bazali kobeta banzenze na bango.3Pe bazali koyemba [lokola] nzembo moko ya sikac liboso ya ngwende pe liboso ya ba-bomoi minei pe ya bampaka; pe moto moko té akokaki koyeba nzembo yango, longola se bankoto kama moko na tuku minei na minei, baoyo basikolami na mokili. 4Bango bazali baoyo bamikómisi mbindo na basi té: ya solo, bazali bangondòd. Bango balandaka mwana-mpate bipai akendeke; bango basikolami na kati ya bato, bazali mbuma ya liboso po na Nzambe pe pona mwana-mpate. 5Na monoko na bango lokuta ezwami té, pe bazali bato bazangá mbeba.6Pe namoni anzelu mosusu azali kopumbwa na likolo penza; azalaki na sango malamu ya seko ya koyebisa bato ya mokili, bikolo nyonso, mabota nyonso, minoko nyonso pe bato nyonsoe. 7Azalaki koloba na mongongo makasi: «Bóbanga Nzambe pe bópesa ye lokumu, po ngonga ya kosambisa na ye ekómi. Bósambela Oyo asalá likolo, se, mbu pe maziba ya mai.»8Anzelu mosusu, ya mibale, alandi, alobi: «Ekwei! Babilone monene ekwei! Yango nde ezalaki komelisa bikolo nyonso vinu ya kongala ya kindumba na yango.»9Pe anzelu mosusu, ya misato, alandi bango, alobi na mongongo makasi: «Soki moto akumbameli Nyama ná elili na yango, pe azwi elembo na elongi na ye to na loboko na ye, 10ye pe akomela vinu ya kongala ya Nzambe, oyo elengelamá esangisamá na mai té, etiami na nkeni ya kanda na ye; pe akoyokisama pasi na móto pe na fofólog na miso ya ba-anzelu basantu pe na miso ya mwana-mpate.11Baoyo bakumbamelaka Nyama ná elili na yango; pe oyo azwi elembo ya kombo na yango, milinga ya pasi na bango ekozala komata po na seko na seko, pe butu moi bakozwa bopemi téh.» 12Oyo nde ezali tina ya molende ya basantui: bato oyo batosaka mibeko ya Nzambe pe bondimi ya Yesu.13Pe nayoki mongongo moko euti na likolo, ezali koloba: «Kòma: “Esengo na bakufi, baoyo bazali kokufa, banda sik’oyo, na lisanga na Mokonzi.” Molimo alobi: “Ya solo, bápema po na mosala makasi na bango; pamba té misala na bango ekolanda bangoj.” »14Pe namoni: Tala, lipata moko ya pembe, pe likolo ya lipata, oyo afandi azali lokola Mwana ya motok, azali na motole ya wolo na motú na ye, pe mbeli moko ya mino na maboko na ye. 15Anzelu mosusu abimi na ndako mosantu na kobelelaká oyo afandi likolo ya lipata na mongongo makasi: «Salela mbeli na yo pe buka mbuma po tango ya kobuka mbuma ekoki, pamba té mbuma ya kobuka ya mokili ekomelil!» 16Bongo oyo afandi likolo ya lipata abwaki mbeli na ye na mokili pe mbuma ya mokili ebukami.17Anzelu mosusu abimi na ndako mosantu oyo ezali na likolo; ye pe azalaki na mbeli moko ya mino. 18Anzelu mosusu, oyo azalaki na bokonzi likolo ya móto, [abimi] uta na esika ya kobonzela, pe abeleli na mongongo makasi oyo azalaki na mbeli ya mino, alobi: «Salela mbeli na yo ya mino pe buka bitukà ya nzete ya vinu ya mokili po mbuma na yango ekomeli.»19Anzelu yango abwaki mbeli na ye na mokili pe abuki mbuma ya nzete ya vinu ya mokili, pe abwaki yango na ekamoleli monene ya kongala ya Nzambe. 20Ekamoleli enyatami na libanda ya engumba; pe makila ebimi na ekamoleli yango, tii na minoko ya bampunda, tii na bastade nkoto moko na kama motoba.
151Pe namoni elembo mosusu ya monene pe ya kokamwa na likolo: ba-anzelu samboa basimbi bapasi ya suka sambo, po na nzela na yango, kongala ya Nzambe ekokokisama.2Pe namoni lokola mbu moko ya talatalab esanganá ná móto. Baoyo balongi Nyama, elili na yango, pe motango ya kombo na yango, batelemi na mbu yango ya talatala, basimbi banzenze ya Nzambe.3Bazali koyemba nzembo ya Moizec, mosali ya Nzambe, pe nzembo ya Mwana-mpate:Misala na yo ezali minene pe ya kokamwa,Mokonzi Nzambe ya nguya nyonso!Banzela na yo ezali sembo pe solo,Mokonzi ya bikolo! 4Mokonzi, nani ábanga yo té,pe ákumisa kombo na yo té?Po se yo moko ozali mosantu;bikolo nyonso ekoyakokumbamela yopo bikateli na yo ya sembo emonanid.5Sima na yango, namoni: ndako mosantu, éma ya litatoli efungwami na likolo, 6pe ba-anzelu sambo oyo basimbi bapasi sambo babimi na ndako mosantu; balati bilamba ya talo penza, ezali kongenga, pe balati mikaba ya wolo na tolo.7Moko ya ba-bomoi minei apesi ba-anzelu sambo nkeni ya wolo sambo etondi na kongala ya Nzambe oyo azali na bomoi po na seko na seko. 8Ndako mosantu etondi na milinga euti na nkembo ya Nzambe pe na nguya na ye; pe moto moko té akoki kokota na ndako mosantu, tii tango bapasi sambo ya ba-anzelu sambo ekokoka.
161Nayoki mongongo moko ya makasi euti na ndako mosantua, ezali koloba na ba-anzelu yango sambo: «Bókende pe bósopa bankeni sambo ya kongala ya Nzambe na mokili.»2Oyo ya liboso akei kosopa nkeni na ye na mokili; bongo pota ya mabe pe ya pasib ebimeli bato oyo bazalaki na elembo ya Nyama pe baoyo bakumbamelaka elili na yango.3Oyo ya mibale asopi nkeni na ye na mbu, pe mbu ekómi makila lokola ya moto oyo akufi; pe nyonso oyo ezalaki na bomoi na kati ya mbu ekufi.4Oyo ya misato asopi nkeni na ye na bibale pe na maziba ya mai; pe ekómi makilac. 5Nayoki anzelu ya bamai azali koloba:Ozali Sembo, Yo oyo ozali pe ozalaká;d Mosantu.Po okati boye. 6Po basopi makila ya basantu ná ya baprofete;pe omelisi bango makila.Babongi na yangoe. 7Pe nayoki esika ya kobonzela ezali koloba:Ya solo, Mokonzi Nzambe ya nguya nyonso,bikateli na yo ezali ya solo pe ya sembof.8Oyo ya minei asopi nkeni na ye na moi: pe nzela epesameli ye ya kozikisa bato na móto; 9pe bato baziki na molunge moko ya makasi penza, batuki kombo ya Nzambe oyo azali na bokonzi likolo ya bapasi wana, kasi babongoli mitema té po na kopesa ye lokumu.10Oyo ya mitano asopi nkeni na ye na ngwende ya Nyama. Bokonzi na yango ekómi molilig, pe bato bakómi komiswa lolemo po na pasi. 11Batuki Nzambe ya likolo po na bapasi pe bapota na bango; kasi batiki misala na bango té.12Oyo ya motoba asopi nkeni na ye na ebale monene Efrate, pe mai na yango ekauki po nzela ya bakonzi bauti epai moi ebimaka ébongisamah. 13Pe namoni milimo misato ya mbindo lokola magorodo ebimi na monoko ya Dragon, na monoko ya Nyama pe na monoko ya profete ya lokuta. 14Ya solo, ezali milimo ya bazabolo oyo esalaka bilembo. Yango ekei epai ya bakonzi ya mokili mobimba kosangisa bango po na etumba ya mokolo monene ya Nzambe ya nguya nyonso.15Tala, nakoya lokola moyibi. Esengo na moto oyo akokengela pe akobatela bilamba na ye, po átambola bolumbu té pe ámonisa soni na ye téi. 16Basangisi bango na esika oyo ebengamaka na ebré Armagedonj.17Oyo ya sambo asopi nkeni na ye na mopepe pe, uta na ndako mosantu, mongongo moko makasi ebimi na ngwende elobi: «Esili!» 18Mikalikali, mingongo ná bakake ebimi, pe koningana moko makasi ya mabelé esalami, na ndenge ’tè banda moto azali na mokili, koningana ya mabelé ya makasi ya boye etikalá kosalama tél! 19Engumba monene ebukani na biteni misato pe bingumba ya bapagano ekwei. Nzambe akanisi Babilone monene, po na kopesa yango nkeni ya vinu ya kongala ya kanda na yem.20Bisanga nyonso ekimi pe bangomba emonani té. 21Matandala minene lokola batalenta ekiteli bato uta na likolo, pe bato batuki Nzambe po na pasi ya matandala: po pasi yango ezalaki makasi penza.
171Moko kati na Anzelu sambo, baoyo basimbaki ba sani sambo, alobi ete: «Yaka, nakolakisa yo ndenge Nzambe akopesa etumbu na mwasi ndumba monene oyo afandaka penepene na na ebale 2mpe bakonzi na mokili bajali kotambola naye, bato ya mokili mobimba bajalaki kolangwa vinyo ya kindumba na ye.»3Molimo Santu ya Nzambe ekoteliaki ngai, anzelu amemi ngai na esobe kuna namoni mwasi afandi likolo ya nyama motane penza; nzoto na yango bakoma bankombo ya kotiola Nzambe. Nyama yango ajalaki na mitu nsambo, mpe maseke zomi. 4Mwasi yango alataki bilamba ya lokumu, ya motane penza na biloko ya wolo, mabanga ya ntalo mpe mayaka, na loboko na ye asimbi kopo ya wolo, etonda na makambo ya kindumba na ye, yango ezali ya lisuma mpe mbindo. 5Na elongi ya ye bakoma nkombo moko ya sekele elingi koloba ville monene ya Babilone, mama ya basi ya ndumba mpe makambo ya bosoto ya mokili.6Namoni té mwasi yango alangwi makila ya bandimi mpe makila ya baye bakufa mpo naYesu. Nakamwi penza tango namoni ye. 7Anzelu atunaki ngai: « mpo na nini nakamwi? Nakolakisa yo sekele ya mwasi mpe nyama oyo amemi ye. Nyama oyo ajali na mitu sambo na maseke zomi.8Nyama oyo omonaki ajalaki na bomoi, kasi sika ajali lisusu te, etikali moke ebima na libulu oyo bakanga milimu mabe, bongo ekobunga libela. Bato ya mokili bakokamwa, baoyo ba nkombo na bango ekomama na buku na bomoi te uta na ebandeli ya mokili; bakokamwa tango bakomona nyama wana, pamba te, yango ejali nabomoi kasi ejali lisusu te, mpe ekomonana lisusu.9Mpo na kosolola makambo esengeli ojala na bwanya penza. Mitu nsambo elakisi ngomba nsambo esika mwasi ajali kofanda. 10Ejali mpe na bakonzi nsambo. Bakonzi mitano basila kokufa, moko na bango ajali mpe mosusu naino te. Tango akoya, akoumela mingi te.11Nyama oyo ejalaki na bomoi kasi ejali lisusu te elakisi mokonzi ya mwambe, ye ajali moko kati na bakonzi nsambo mpe akokenda kobunga libela.12Maseke zomi oyo omonaki elakisi bakonzi zomi oyo bakomi naino te bakonzi te. Bakozwa bokonzi esika moko na nyama wana tango moko pamba. 13Bango nyoso zomi bajali na makanisi ya kopesa nguya mpe bokonzi na bango na maboko na nyama wana. 14Bakobundisa mwana ya meme, kasi mwana ya meme akolonga bango; pamba te ajali motambwisi ya batambwisi mpe mokonzi ya bakonzi mpe elongo na ye baoyo babiangami baponami, bayengebene.15Anzelu alobi na ngai lisusu ete: «Bibale omonaki esika mwasi ndumba afandaka elakisi bato ya mboka mpe mabota, mpe minoko ebele.16Maseke zoni omonaki, yango mpe nyama ikoyina mwasi ndumba. Bakonzi nyoso bakobotola ye bomengo oyo ajalaki na yango nyoso, bakotika ye bolumbu, bakolia mosuni na yempe bakotumba ye na moto. 17Zambi Nzambe akotisi na mitema na bango makanisi ya kosala makambo oyo ye alingi. Bakopesa bokonzi na bango na maboko ya nyama kino tango Nzambe akokokisa maloba na ye.18Kasi mwasi yo omonaki elakisi ville monene oyo ejali kotambwisa bakonzi nyoso na mokili mobimba.»
181Nsima ya makambo yango namonaki anzelu mosusu alongwi na likolo ajali kokita na bokonzi monene mpe mabele eninganaki na nkembo na ye. 2Engangaki na mongongo ya nsomo ete akiti na Babilone monene akwei mpe ekomi esika ya kofanda ya milimo mabe mpe mipepe nyoso ya mbindo mpe esika ya kobombana ya bandeke nyoso ya milimo mabe mpe nyoso eyinami. 3Bikolo nyoso ezwami na vinyo ya nkanda ya ekobo ya ye. Mpe bakonzi ya mabele basali ekobo mpe bato ya mombongo na mabele oyo basalaka mibembo bakomaki bazwi mpo na nguya ya ebele ya biloko ya ye ya kitoko oyo ajali koyokela nsoni te.4Nayokaki mongongo mosusu elongwi likolo elobi bobima kati na ye. Bino batu na ngai mpo bomema masumu na ye te mpe bozwa etumbu te esika moko na ye. 5Mpo ete masumu ma ye masili kokoma likolo mpe Nzambe amoni misala na ye ya mabe. Bojongisela ye mabe nyoso oyo asalaki bino, makambo nyoso ye asalelaki. 6Bojongisela ye mbala mibale.Amelisaki bino kopo ya vinyo ya bololo, botondisela ye yango mbala mibale.7Ndenge emikumisaki pe esalaki lipombo,ndenge moko pe bóyokisa yango pasi pe mawa;po ezalaki koloba na motema na yango:Nafandi lokola mama-mokonzi,nakufelá mobali tépe nakozala na matanga ata moke tée. 8Yango wana, na mokolo moko, bapasi na yango,bokono, matanga pe nzala monene ekoya,pe ekozikisama na móto,po Mokonzi Nzambe oyo akateli yango etumbu azali makasi.9Bakonzi ya mokili oyo basalaki kindumba pe lipombo ná yango bakolela pe bakoyoka mawa po na yango, tango bakotala milinga ya kozikisama na yango. 10Bakotelema mosika po na bobangi ya pasi na yango, bakozala koloba:Mawa, Mawa na Babilone, engumba monene, engumba makasi!Po na ngonga moko pamba, etumbu na yo eyei!.11Pe bato ya mombongo ya mokili bazali kolela pe kosala matanga po na yango, po moto moko té asombaka lisusu biloko na bango: 12biloko ya wolo, ya palata, ya mabanga ya talo, ya mayaka, ya bilamba ya petepete, ya bilamba ya motane ya ngola, ya bilamba ya swa, ya bilamba ya motane ngwaa; nzete nyonso ya malasi, biloko nyonso esalamá na pembe ya nzoku, biloko nyonso esalamá na mabaya ya talo, na motako, na bibende, pe na marbreh; 13kinamonon, amomon, malasi, mire, mpaka ya malasi, vinu, mafuta, farine, blé, banyama ememaka mikumba, bampate, bampunda, makalo, nzoto pe milimo ya batoi.14Mbuma oyo motema na yo eyokaki posa na yango,elongwe epai na yo;nyonso ya kitoko pe ya kongengaebungi po na yo;pe ekoki komonana lisusu ata mokolo moko té.15Bato ya mombongo ya biloko oyo bakómaki na bomengo po na yango bakotelema mosika po na bobangi ya pasi na yango. Bakozala kolela pe kosala matanga, 16bakoloba:Mawa, Mawa na engumba monene,elati elamba ya petepete,ya motane ya ngola, ya motane ngwaa,etie wolo,mabanga ya talo pe mayaka, 17po na ngonga moko pamba, bomengo nyonso ebebisami!Bakapitene nyonso ya masuwa, baoyo nyonso balúkalukaka wana, bato ya masuwa, pe baoyo nyonso basalaka misala ya mbu, batelemi mosika;18bazalaki koganga awa bazalaki kotala milinga ya kozikisama na yango, bazalaki koloba: «Nini ekokani na engumba monenej?» 19Babwaki putulu na mitú na bango; bagangi na kolela pe na mawa:Mawa! Mawa na engumba monene,oyo bomengo na yango ekómisakibaoyo nyonso bazali na bamasuwa na mbu bato ya bozwi!Kasi na ngonga moko pamba, ebebisami! 20Likolo, sepela po na yango,bino pe basantu, bantoma, ná baprofete,po Nzambe akateli yango ekateli na bino.21Bongo anzelu moko ya makasi akamati libanga moko lokola enikelo ya monene pe abwaki yango na mbu, alobi:Babilone, engumba monene,ekobwakama na makasi boye,pe ekoki komonana lisusu té. 22Lokito ya babetì-nzenze pe ya babetì-miziki,ya babetì-piololo pe ya babetì-keleloekoki koyokana epai na yo lisusu té.Moto ya misala ya maboko moko té ya mosala ya maboko songoloakoki kozwama epai na yo lisusu,pe lokito ya libanga monene ya konika mbumaekoki koyokana epai na yo lisusu té.23Polele ya mwindaekoki kongenga epai na yo lisusu té,pe mongongo ya mobali abali sika pe ya mwasi abali sikaekoki koyokana epai na yo lisusu té,po bato na yo ya mombongo bazalaki bato minene ya mokili;po bikolo nyonso ekosamaki na bondoki na yo. 24Makila ya baprofete, ya basantu ezwami epai na ye,ná ya baoyo nyonso bakatamaká kingo na mokili.
191Sima na yango, nayoki lokola mongongo moko monene ya bato ebele penza na likolo, bazali koloba:Aleluyaa!Lobiko, nkembo pe nguya ezali ya Nzambe na biso 2po bikateli na ye ezali ya solo pe ya sembo;po apesi etumbu na mwasi ya ndumba moneneoyo azalaki kobebisa mokili na kindumba na ye,pe azongiseli ye mabepo na makila ya basali na yeb.3Mbala ya mibale, balobi:Aleluya!Pe milinga na ye emati po na seko na sekoc.» 4Bampaka tuku mibale na minei pe ba-bomoi minei bafukami, pe bakumbameli Nzambe, Oyo afandi na ngwende, balobi:Amen! Aleluya!Eyenga ya libala ya Mwana-mpate5Pe mongongo moko ebimi uta na ngwende, elobi:Bókumisa Nzambe na biso,bino nyonso basali na ye[pe] baoyo bobangaka ye,bato mike pe bato minene!d.6Pe nayoki lokola mongongo ya bato ebele penza, lokola lokito ya mai monene, lokola lokito ya kake makasi, bazali koloba:Aleluya!Po Mokonzi Nzambe [na biso], Oyo-ya-nguya-nyonso,afandisi bokonzi na ye.7Tósepela, tózala na esengo monenepe tópesa ye nkembopo eyenga ya libala ya mwana-mpate ekómi,pe mwasi na ye amibongisie; 8nzela epesameli ye ya kolatabilamba ya petepete ya kongenga ya talo−ya solo, bilamba ya petepete ezali bikateli ya sembo po na basantu.9Alobi na ngai: «Kòma: “Esengo na baoyo babengami na limpati ya libala ya mwana-mpate!” » Pe alobi na ngai: «Wana ezali maloba ya solo ya Nzambe!» 10Pe namibwaki na makolo na ye po na kokumisa ye, kasi alobi na ngai: «Keba! Kosala bongo té, Nazali se moninga na yo ya mosala pe ya bandeko na yo oyo bazali na litatoli ya Yesu. Kumbamela nde Nzambe! Pamba té litatoli ya Yesu ezali nde molimo ya lisakoli.11Namoni likolo efungwami, pe tala, mpunda moko ya pembe ezalaki. Oyo amati yango [abengamaka] Moto ya sembo pe Moto ya solo; akataka makambo pe abundaka bitumba na bosembo. 12Miso na ye ezalaki [lokola] lolemo ya móto, pe bikoti ya bokonzi mingi ezalaki likolo ya motú na ye; azali na kombo moko ekòmamá, oyo moto moko té ayebi, longola se ye moko. 13Alati elamba moko epoli na makila, pe kombo na ye ezali "Liloba ya Nzambeg."14Basoda [oyo] bazalaka na likoloh bazalaki kolanda ye likolo ya bampunda ya pembe; balati bilamba ya petepete ya pembe ya talo. 15Na monoko na ye, mopanga moko ya mino ezalaki kobima, po na yango, áboma bikolo; ye nde moto akokamba bango na lingenda ya ebende, pe akonyata ekamoleli ya vinu ya kongala ya kanda ya Nzambe ya nguya nyonsoi. 16Na elamba na ye pe na ebelo na ye azalaki na kombo moko ekòmamá: "Mokonzi ya bakonzi pe Nkolo ya bankolo."17Pe namoni anzelu moko atelemi na kati ya moi pe abeleli [na] mongongo makasi bandeke nyonso oyo epumbwaka na likolo penza: «Bóya kosangana na limpati monene ya Nzambe, 18po bólia misuni ya bakonzi, misuni ya bakonzi ya basoda, misuni ya bilombe, misuni ya bampunda pe ya baoyo bamataka yango, misuni ya bato nyonso, ya bansomi ná ya baumbu, ya bato mike pe ya bato minenek.»19Pe namoni Nyama, bakonzi ya mokili ná basoda na bango basangani po na kobunda ná oyo afandaka likolo ya mpunda ná basoda na ye. 20Nyama ekangami, elongo na profete ya lokuta oyo azalaki kosala, na miso na yango, bilembo oyo ekosaki na yango baoyo bazwaki elembo ya Nyama pe bakumbamelaka elili na yango. Bango mibale babwakami, bazali na bomoi, na laki ya móto oyo epelisami na fofólo.21Bamosusu babomami na mopanga ya oyo afandaka likolo ya mpunda, oyo ebimaka na monoko na ye; pe bandeke nyonso etondi misuni na bango.
201Pe namoni anzelu moko azali kokita uta na likolo, azali na fungola ya libulu ezangá suka ná monyololo moko monene na loboko na ye. 2Akangi Dragon, nyoka ya kala, oyo ezali Zabolo pe Satana, pe akangi yango na minyololo mbula nkoto mokoa. 3Abwaki yango na libulu ezangá suka pe akangi, pe atie elembo likolo na yango, po ékosa bikolo lisusu té tii mbula nkoto moko ékoka. Sima na yango, esengeli éfungolama po na mwa-tango moke.4Namoni bangwende, pe baoyo bafandi na yango, bokonzi ya kosambisa epesameli bango; pe milimo ya baoyo bakatamá mitú po na litatoli ya Yesu pe po na Liloba ya Nzambe, pe baoyo bakumbamelaki Nyama té, elili na yango pe té, pe bazwaki elembo na elongi to na loboko na bango té. Bazongi na bomoi pe bayangeli elongo na Kristo mbula nkoto mokob.5Bakufi mosusu bazongi na bomoi té, tii mbula nkoto moko ékoka. Oyo ezali nsekwa ya liboso. 6Oyo akozala na nsekwa ya liboso azali moto ya esengo pe mosantu. Liwa ya mibale ekozala na bokonzi likolo na bango té; kasi bakozala banganga-Nzambe ya Nzambe pe ya Kristo pe bakoyangela elongo na ye mbula nkoto moko [yango].7Tango mbula nkoto moko ekokoka, Satana akobimisama na boloko na ye, 8pe akokende kokosa bikolo na bipai minei ya mokili, Gog pe Magogc −oyo motango na yango ezali lokola zelo ya mbu−, pe kosangisa yango po na etumba.9Bapanzani na etando ya mokili pe bazingi nganda ya basantu pe engumba ya bolingo; kasi móto moko ekiti uta na likolo pe esilisi bangod. 10Pe zabolo, mokosi na bango, abwakami na laki ya móto pe ya fofólo, esika Nyama pe profete ya lokuta bazali, pe bakoyokisama pasi butu moi, po na seko na seko.11Pe namoni ngwende moko monene ya pembe pe oyo afandi na yango, oyo mokili ná likolo ekimi elongi na ye pe esika yango eleki emonani té. 12Pe namoni bato bakufá, bato ya minene pe ya mike, batelemi liboso ya ngwende. Babuku efungwami; pe buku mosusu efungwami, oyo ezali ya bomoi. Pe bakufi basambisami, kolanda oyo ekòmamá na babuku yango, engebene na misala na bangoe.13Mbu ezongisi bakufi oyo bazalaki na kati na yango, liwa pe mokili ya bakufi ezongisi bakufi oyo bazalaki epai na yango; pe moko moko asambisami engebene na misala na ye. 14Liwa pe mokili ya bakufi ebwakami na laki ya móto. Oyo ezali liwa ya mibale: laki ya móto. 15Pe oyo akòmamá na buku ya bomoi té, abwakami na laki ya móto.
211Namoni likolo ya sika pe mokili ya sikaa. Pamba té likolo ya liboso pe mokili ya liboso elimwe, pe mbu ezali lisusu té. 2Pe namoni engumba mosantu, Yeruzalem ya sika ezali kokita uta na likolo epai ya Nzambe, esi’ebongisami lokola mwasi ya libala amikémbisi po na mobali na yeb.3Nayoki mongongo moko makasi uta na ngwende ezali koloba: «Tala! Éma ya Nzambe ezali na kati ya bato. Akofanda esika moko ná bango: bango bakozala bato na ye, pe ye moko [Nzambe na bango] akozala Nzambe-elongo-na-bangoc. 4Akolongola mpinzoli nyonso na miso na bango; liwa ekozala lisusu té, koganga té, pasi pe ekozala lisusu té: [po] makambo ya liboso elekid.»5Oyo afandi na ngwende alobi: «Tala, nazali kosala biloko nyonso ya sikae.» Pe alobi: «Kòma, po maloba oyo ezali ya sembo pe ya solo.» 6Alobi na ngai: «Esili! Ngai [nazali] Alfa pe Omega, Ebandeli pe Suka. Oyo azali na posa ya mai, ngai nakopesa ye liziba ya mai ya bomoi ya ofeléf.7Molongi akozwa makambo wana; nakozala Nzambe na ye, pe ye akozala mwana na ngai. 8Kasibato oyo babangaka, bato ya tembe, bato ya bizaleli ya mabe penza, babomì, bandumba, bandoki, basambelì ya bikeko pe bato nyonso ya lokuta, likabo na bango ezali na laki epelisami na móto pe fofólo, oyo ezali liwa ya mibale.»9Moko ya ba-anzelu sambo oyo basimbi nkeni sambo etondi na bapasi sambo ya suka ayei koyebisa ngai: «Yaka, nakolakisa yo mwasi ya libala, mwasi ya Mwana-mpate.» 10Pe amemi ngai, na molimo, likolo ya ngomba moko monene pe molai, pe alakisi ngai Yeruzalem, engumba mosantu oyo ezali kokita uta na likolo, epai ya Nzambe,11ezali na nkembo ya Nzambe. Kongenga na yango ezalaki lokola libanga ya talo, lokola libanga ya yaspe ezali na kristal. 12Ezalaki na lopango moko monene pe molai; ezalaki na bikuke zomi na mibale pe likolo ya bikuke yango, ba-anzelu zomi na mibale bazalaki. Pe bakombo ekòmamá: ezali [bakombo] oyo ya mabota zomi na mibale ya bana ya Israel. 13Na epai moi ebimaka, bikuke ezalaki misato; na epai ya likolo, bikuke misato; na epai ya ngele, bikuke misato; pe na epai moi elalaka, bikuke misato.14Lopango ya engumba yango ezalaki na mibokó zomi na mibale pe likolo na yango, bakombo zomi na mibale ya bantoma zomi na mibale ya Mwana-mpate ezalaki. 15Oyo azalaki koloba na ngai azalaki na emekeli, mokékélé ya wolo po na komeka engumba, bikuke na yango pe lopango na yango.16Engumba yango ezalaki na bipai minei ekokaná: molai na yango ezalaki [pe] lokola bonene na yango. Ameki engumba yango na mokékélé: ezalaki penepene na bastade nkoto zomi na mibaleg, molai, bonene pe bosanda na yango ezalaki ndenge moko. 17Pe ameki lopango na yango: ezalaki na pekus kama moko na tuku minei na mineih, na emekeli ya bato −oyo ezalaki pe ya anzelu.18Molato ya lopango yango ezalaki yaspe, pe engumba ezalaki ya wolo ya peto ekokaná ná talatala ya peto. 19Pe mibokó ya lopango ya engumba ekembisamá na mabanga ya talo ya ndenge nyonso: mobokó ya liboso na yaspe, ya mibale na safire, ya misato na kalsedwane, ya minei na emerode; 20ya mitano na sardoniksi, ya motoba na sardione, ya sambo na krizolite, ya mwambe na beril, ya libwa na topaze, yazomi na krizopraze, ya zomi na moko na yasente, ya zomi na mibale na ametiste.21Bikuke zomi na mibale yango ezalaki mayaka zomi na mibale. Ekuke moko moko esalamaki na liyaka se moko; pe balabala ya engumba yango esalamá na wolo ya peto lokola talatala polele. 22Namoni ndako mosantu té na kati na yango, pamba té Mokonzi Nzambe ya nguya nyonso azali ndako mosantu na yango, ná Mwana-mpate.23Engumba ezalaki na bosengá ya moi té, ya sanza pe té po na kongengela yango; pamba té nkembo ya Nzambe ezali kongengisa yango, pe Mwana-mpate azali mwinda na yango. 24Bikolo ekotambola na polele na yango, pe bakonzi ya mokili bazali komema nkembo na bango epai na yango. 25Bikuke na yango ekoki kokangama ata mokolo moko té, pamba té butu ekozala kuna té;26pe bakomema nkembo pe lokumu ya bikolo epai na yango. 27Eloko moko ya mbindo ekoki kokota na yango té, moto oyo asalaka mabe ya somo pe lokuta pe té; kaka baoyo basi’bakòmamá na buku ya bomoi ya Mwana-mpate.
221Pe alakisi ngai ebale ya mai ya bomoi, kitoko lokola kristal, ezali kobima na ngwende ya Nzambe pe ya Mwana-mpate. 2Na katikati ya balabala na yango pe epai na epai ya ebale, ezalaki na nzete ya bomoi moko ebotaka mbuma mbala zomi na mibale: na sanza moko moko, epesaka mbuma na yango; pe makasa ya nzete yango ezalaki po na lobiko ya bikolo.3Libabe moko ekozala lisusu té; ngwende ya Nzambe pe ya Mwana-mpate ekozala na kati na yangoa pe basali na ye bakosalela ye, 4bakomona elongi na ye pe kombo na ye ekozala na bilongi na bango. 5Butu ekozala lisusu té, pe bakozala na bosengá ya polele ya mwinda to ya moi té, po Mokonzi Nzambe akongengela bango, pe bakoyangela po na seko na seko.6Pe alobi na ngai: «Maloba oyo ezali ya sembo pe ya solo. Mokonzi, Nzambe ya Molimo ya baprofete atindi anzelu na ye álakisa na basali na ye makambooyo esengeli koya noki. 7Tala, nazali koya noki. Esengo na moto oyo azali kotosa maloba ya lisakoli ya buku oyo.»8Ngai Yoane moto nayokaki pe namonaki makambo oyo. Pe tango nayokaki pe namonaki, nakwei na makolo ya anzelu oyo azalaki kolakisa ngai makambo oyo po na kokumbamela ye. 9Kasi alobi na ngai: «Té, Keba! Nazali moninga na yo ya mosala pe ya bandeko na yo, baprofete, pe ya bato oyo batosaka maloba ya buku oyo. Kumbamela nde Nzambeb!»10Pe alobi na ngai: «Kobomba maloba ya lisakoli ya buku oyo té, pamba té elaka ekómi penepene. 11Moto oyo asalaka mabe ákoba kosala mabe pe moto ya mbindo ákoba komikómisa mbindo; moto ya sembo ákoba kosala bosembo pe mosantu ákoba komisantisa.12Tala, nazali koya noki. Pe nazali na lifuta na ngai ya kopesa na moto na moto engebene na mosala na ye. 13Ngai nazali Alfa pe Omega, Moto ya liboso pe Moto ya suka, Ebandeli pe Suka.14Esengo na baoyo basukoli bilamba milai na bango po na kozwa likoki ya koya na nzete ya bomoi pe bákota na engumba, na bikuke. 15Na libanda, bambwa, bandoki, bandumba, babomì, basambelì ya bikeko, baoyo nyonso balingaka pe basalaka mabe bak ozala.16Ngai, Yesu, natindi anzelu na ngai po átatolela bino makambo oyo etali ba-eklezya. Ngai nazali eboto pe moto ya libota ya David, monzoto oyo engengaka na tongo.»17Molimo pe mwasi ya libala balobi: «Yaka!» Oyo azali koyoka áloba: «Yaka!» Oyo azali na posa ya maic áya; oyo alingi, ázwa mai ya bomoi ya ofelé.18Nazali koyebisa na baoyo nyonso bayoki maloba ya lisakoli ya buku oyo: soki moto moko abakiseli yango likambo, Nzambe akobakisela ye bapasi oyo ekòmamá na buku oyo; 19pe soki moto moko alongoli likambo na maloba ya buku ya lisakoli oyo, Nzambe akolongola ndambo na ye na nzete ya bomoi pe na engumba mosantu oyo ekòmamá na buku oyo.20Motatoli ya makambo oyo azali koloba: «Ya solo, nazali koya noki. Ézala se bongo! Mokonzi Yesu, yaka!» 21Ngolu ya Mokonzi Yesu ézala na bato nyonso.